MOKANDA YA YAMBO YA MOSE, EBIANGAMI GENESE (EBANDELI)

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14Mokapo 15Mokapo 16Mokapo 17Mokapo 18Mokapo 19Mokapo 20Mokapo 21Mokapo 22Mokapo 23Mokapo 24Mokapo 25Mokapo 26Mokapo 27 – Mokapo 28Mokapo 29Mokapo 30Mokapo 31Mokapo 32Mokapo 33Mokapo 34Mokapo 35Mokapo 36Mokapo 37 – Mokapo 38Mokapo 39Mokapo 40Mokapo 41Mokapo 42Mokapo 43Mokapo 44Mokapo 45Mokapo 46Mokapo 47 – Mokapo 48Mokapo 49Mokapo 50

 

Mokapo 1

1. Na ebandeli Nzambe * akelaki likoló pe mabele. 2. Pe mabele ezalaki na lolenge te pe esika ya pamba**, pe molili ezalaki likolo ya etando ya mozindo. Pe Molimo Nzambe azalaki kopumbwa-pumbwa likolo ya etando ya mayi. 3. Pe Nzambe alobaki: Pole ezala, pe pole ezalaki. 4. Pe Nzambe amonaki pole pe ete ezalaki malamu; pe Nzambe akabolaki pole na molili. 5. Pe Nzambe abengaki pole Mokolo, pe molili abengaki yango Butu. Pe pokwa ezalaki pe tongo ezalaki : mokolo moko. 6. Pe Nzambe alobaki: Etando moko ezala na katikati ya mayi, pe ekabola mayi na mayi. 7. Pe Nzambe asalaki etando pe akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi oyo ezalaki likolo ya etando. Pe esalamaki bongo. 8. Pe Nzambe abengaki etando Likolo. Pe pokwa ezalaki pe tongo ezalaki : mokolo ya mibale

— v. 1: Nzambre na Ebre: Elohim, (boyike ya Eloah, Nzambe oyo aleki likolo), oyo ezali na lolenge ya ebele (pluriel), kasi esalelamaka na ba-verbe ya mutu moko (singulier), pona kolakisa Bonzambe, na ndimbola ya solosolo, kasi te motango ya ebele ya banzambe.

— v. 2: liloba ‘’esika ya pamba’’ na Ebre : Tohu wa-bohu, elakisi oyo ebongisami te pe ekoki kofandama te, ezali kozela ete Nzambe abongisa yango na molongo na ye

9. Pe Nzambe alobaki: Mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko, pe mabele emonana. Pe esalamaki bongo. 10. Pe Nzambe abengaki mabele ya kokawuka Mabele, pe kosangana ya mayi yango abengaki ba Mer (mayi monene). Pe Nzambe amonaki ete ezalaki malamu. 11. Pe Nzambe alobaki: mabele ebimisa matiti, matiti oyo ezali kobota momboto, pe banzete ya mbuma oyo ebimisaka mbuma na lolenge na yango, oyo ezali na milona na kati na yango likolo na mabele. Pe esalamaki bongo. 12. Pe mabele ebimisaki matiti, matiti oyo ebimisaka milona ya lolenge na yango, pe banzete oyo ebimisaka mbuma oyo kati na yango ezali na milona ya lolenge na yango. Pe Nzambe amonaki ete ezalaki malamu. 13. Pe pokwa ezalaki pe tongo ezalaki : mokolo ya misato. 14. Pe Nzambe alobaki: Tika bingengiseli (mwinda) ezala na etando ya likolo pona kokabola (kosakola) butu na moyi, pe yango ezala pona bilembo pe pona bileko pe pona mikolo pe pona bambula, 15. Pe ekozala bingengiseli (mwinda) na etando ya likolo pona kongengisa mabele. Pe esalamaki bongo. 16. Pe Nzambe asalaki bingengiseli (mwinda) minene mibale—pole monene pona koyangela mokolo pe pole ya moke pona koyangela butu—pe minzoto. 17. Pe Nzambe atiaki yango na etando ya likolo pona kongengisa mabele; 18. Pona koyangela likolo na moyi pe likolo na butu, pe pona kokabola kati na pole na molili. Pe Nzambe amonaki ete ezalaki malamu. 19. Pe ezalaki pokwa pe tongo— mokolo ya mineyi. 20. Pe Nzambe alobaki: Tika mayi epanza na ebele ya bikelamu ya bomoyi, pe tika bandeke epumbwa likolo ya mabele na etando ya likolo. 21. Bongo Nzambe akelaki banyama minene ya mayi pe ekelamu nyonso ya bomoyi oyo etambolaka na mayi, na kolanda lolenge ya mitindo na yango, pe ndeke nyonso ya mapapu na kolanda lolenge ya mitindo na yango. Pe Nzambe amonaki ete ezalaki malamu. 22. Pe Nzambe apambolaki yango, alobaki: Bobota pe bokola pe botondisa mayi na kati ya mayi monene (mer), pe tika ndeke ekoma mingi na mabele. 23. Pe pokwa ezalaki, pe tongo ezalaki : mokolo ya mitano.

— v. 20*: na Ebre: molimo, awa pe molongo 21, 24, pe 2:19. — v. 20**: na elongi ya. — v. 21: bisika mosusu pe: banyoka, bangando.

24. Pe Nzambe alobaki: Tika ete mabele ebimisa bikelamu ya bomoyi kolanda lolenge ya mitindo na yango, bibwele, na biloko nyonso oyo etambolaka na mabele, pe banyama ya mabele kolanda lolenge ya mitindo na yango. Pe esalamaki bongo. 25. Pe Nzambe asalaki banyama ya mabele na kolanda lolenge ya mitindo na yango, pe bibwele na kolanda lolenge ya mitindo na yango, pe nyama nyonso oyo etambolaka na mabele kolanda lolenge na yango. Pe Nzambe amonaki ete ezalaki malamu. — v. 25: oyo ezali kopumbwapumbwa; (awa mpe bisika mosusu). 26. Pe Nzambe alobaki: Tosala mutu na elilingi na biso, na lolenge na biso, po bakonza likolo na mbisi ya mayi monene (mer) pe likolo ya bandeke na likolo, pe likolo ya bibwele pe likolo ya mabele nyonso, pe likolo ya banyama nyonso oyo etambolaka na mabele. 27. Pe Nzambe akelaki mutu na elilingi na ye, akelaki ye na elilingi ya Nzambe; akelaki bango mobali pe mwasi.

— v. 27: mutu, libota ya batu, awa, e mbala mingi bisika mosusu.

28. Pe Nzambe apambolaki bango pe Nzambe alobaki na bango: Bobota pe bokola pe botondisa mabele pe bokonza likolo na yango, bokonza likolo na bambisi ya mayi monene (mer) pe likolo bandeke ya likolo pe likolo na ekelamu nyonso ya bomoyi oyo ezali kotambola na mabele. 29. Pe Nzambe alobaki: Tala, napesi bino matiti nyonso oyo ebotaka milona oyo ezali likolo na etando ya mabele mobimba, pe nzete nyonso oyo ezali na mbuma ya nzete na kati na yango, ekozala bileyi ya koliya pona bino. 30. Pe na nyama nyonso ya mabele, pe ndeke nyonso ya likolo, pe na nyama nyonso oyo etambolaka na mabele, oyo ezali na bomoyi kati na yango, pe matiti nyonso ya motane pona bileyi. Pe ezalaki bongo. 31. Pe Nzambe amonoki nyonso oyo asalaki, pe tala, ezalaki malamu penza. Pe pokwa ezalaki pe tongo ezalaki : mokolo ya motoba.

 

Mokapo 2

1. Pe likolo pe mabele esilaki, elongo na mapinga na yango nyonso. 2. Pe na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala na ye nyonso oyo asalaki; pe apemaki na mokolo ya sambo na mosala na ye nyonso oyo asalaki. 3. Pe Nzambe apambolaki mokolo ya sambo pe abulisaki yango, pamba te na mokolo yango apemaki na mosala na ye nyonso oyo Nzambe akelaki po na kosala. 4. Oyo nde ezali lisolo ya oyo ebimaki na likolo pe na mabele tangu ekelamaki, na mokolo oyo Yawe* Nzambe asalaki mabele pe likolo; 5. Pe nzete moke moko te nyonso ya elanga liboso ete ezala na mabele, pe matiti nyonso ya elanga liboso ya kokola; po Yawe Nzambe abetisaki mbula te na mabele, pe ezalaki na mutu te pona kosala (kobalola) mabele; 6. Kasi londende ya mayi moko emataki na mabele pe esopaki mayi na etando mobimba ya mabele. 7. Pe Yawe Nzambe asalaki mutu* wuta na putulu ya mabele, pe afulaki na kati ya madusu ya zolo na ye pema ya bomoyi, pe mutu akomaki ekelamu ya bomoyi.

— v. 4: Yawe na Ebre: YHWH. Mbala liboso ya komonana na yango. Basusu: Yawe, to Yahoh, to Yawu; — v. 5: likolo: molona. 7 : « Mutu » esalelami elongo na artikle defini (elingi koloba « mutu yango » pe elakisi ete yango ezali na motango moko (singulier)

8. Pe Yawe Nzambe aloni elanga moko na Edene, na esika ya esti, pe kuna atiaki mutu** oyo ye asalaki. 9. Pe Yawe Nzambe akolisaki na mabele nzete nyonso kitoko na kotala pe malamu pona kolia, pe nzete ya bomoyi na kati-kati ya elanga pe nzete ya koyeba malamu pe mabe. 10. Pe Ebale moko ebimaki libanda na Edene pona kosopa mayi na elanga, pe wuta kuna ekabwanaki pe ekomaki bibale mineyi *. 11. Pe kombo ya liboso ezali Pishone; yango nde ezingizingi mokili mobimba ya Awila, epayi oyo wolo ezali. 12. Pe wolo ya mboka wana ezali malamu; wana bdellium* ezali pe libanga onyx**. 13. Pe kombo ya ebale ya mibale Giyone : yango nde ezingizingi mokili mobimba ya Kush. 14. Pe kombo ya ebale ya misato ezali Tigre * : yango nde ezali kosopana liboso epayi ya Asuria**. Ebale ya mineyi ezali Efrate***.

— v. 10.: mito. — v. 12*: lolenge moko ya résine (?). — v. 12**: to: berili. — v. 14*: ebale Tigre. — v. 14**: to: Asuria. — v. 14***: na Ebre: Frate.

15. Pe Yawe Nzambe akamataki mutu pe atiaki ye na kati ya elanga ya Edene pona kosala (kobalola) yango pe kobatela yango. 16. Pe Yawe Nzambe apesaki motindo oyo epayi ya mutu: Okolia na bonsomi nzete nyonso oyo ezali na elanga; 17. Kasi nzete ya koyeba malamu pe mabe, okolia yango te ; po mokolo okolia yango te ; po mokolo oyo okolia yango okokufa penza. 18. Pe Yawe Nzambe alobaki: Ezali malamu te mutu azala ye moko, nakosalela ye mosungi moko oyo akokani na ye. 19. Pe Yawe Nzambe asalaki wuta na mabele banyama nyonso ya bilanga pe bandeke nyonso ya likolo, pe amemaki yango epayi ya mutu pona komona ndenge nini akopesa bango kombo; pe kombo nyonso mutu akopesa na ekelamu moko ya bomoi, ezalaki kombo na yango. 20. Pe mutu apesaki bakombo na bibwele nyonso, pe na bandeke ya likolo pe na banyama nyonso ya elanga. Kasi pona Adam *, amonaki te mosungi moko te oyo akokani na ye.

— v. 19: wuta na mabele. — v. 20: esika mosusu: mutu (awa, kozanga artikle).

21. Pe Yawe Nzambe apesaki pongi ya bozindo likolo ya mutu, pe alali; pe azwaki moko ya mikuwa na ye pe akangaki esika yango na mosuni. 22. Pe Yawe Nzambe asalaki mwasi moko na mokuwa oyo azwaki na mobali, pe amemaki ye epayi ya mobali. 23. Pe mobali alobaki: sik’oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai pe mosuni ya mosuni na ngai ; ye oyo akobengama mwasi (Isha), po azwamaki na mobali (Ish). 24. Yango wana mobali akotika tata na ye na mama na ye pe akosanganaka na mwasi na ye, pe bakomaka mosuni moko. 25. Pe bango mibale bazalaki bolumbu, mobali pe mwasi, pe bazalaki soni te.

 

Mokapo 3

1. Nzokande nyoka ezalaki na mayele mabe koleka nyama nyonso ya bilanga oyo Yawe Nzambe asalaki ; pe alobaki na mwasi: Solo ! Nzambe alobaki : bokolia te nzete nyonso ya elanga? 2. Pe Mwasi alobaki na nyoka: mbuma ya banzete nyonso ya elanga, tozali kolia ; 3. Kasi mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : bokolia yango te pe bokosimba yango te, soki te bokokufa. 4. Nyoka alobaki na mwasi yango: solo, bokokufa te, 5. Po Nzambe ayebi ete na mokolo oyo bokolia yango miso na bino ekofungwama, pe bokokoma lokola Nzambe, koyeba malamu pe mabe. 6. Pe mwasi amonaki ete nzete ezalaki malamu pona kolia pe ezalaki kitoko pona miso, pe nzete ezalaki kolingisa pona kozwa bwania (bososoli), azwaki mbuma na yango pe aliaki yango, pe apesaki pe epayi ya mobali na ye oyo azalaki elongo na ye, pe ye aliaki. 7. Pe miso na bango mibale efungwamaki, pe basosolaki ete bazalaki bolumbu; pe batongaki bakasa ya figi pe basalaki mikaba. 8. Pe bayokaki mongongo ya Yawe Nzambe kotambola na kati ya elanga na molunge ya mokolo. Pe mutu na mwasi na ye babombamaki liboso ya Yawe Nzambe na kati-kati ya banzete ya elanga. 9. Pe Yawe Nzambe abengaki mutu pe alobaki na ye: Ozali wapi? 10. Pe alobaki: Nayokaki mongongo na yo na elanga, pe nabangaki, po nazali bolumbu, pe nabombamaki. 11. Pe Yawe Nzambe alobaki: Nani amonisaki yo ete ozali bolumbu? 12. Pe mutu alobaki: Mwasi oyo opesaki na ngai, oyo azali elongo na ngai, ye apesaki ngai nzete, pe naliaki. 13. Pe Yawe Nzambe alobaki na mwasi: Osali nini? Pe mwasi alobaki: Nyoka akosaki ngai, pe naliaki yango. 14. Pe Yawe Nzambe alobaki na nyoka: Po osali bongo, olakelami mabe koleka banyama nyonso pe bibwele nyonso ya elanga, okobanda kotambola na libumu na yo, pe okobanda kolia putulu mikolo nyonso ya bomoyi na yo. 15. Pe nakotia kimonguna kati na yo na mwasi, pe kati na mokitani na yo pe mokitani na ye; akobuka yo moto na yo, pe okobuka litindi (talon) na ye. 16. Na mwasi, alobaki: Nakokomisa pasi na yo makasi mingi, na zemi na yo, nakobota, okobota bana na pasi, pe posa na yo ekozala epayi ya mobali na yo, pe ye akokonza likolo na yo. 17. Na Adam, alobaki: po oyokaki mongongo ya mwasi na yo pe oliaki nzete oyo napesaki yo mitindo, na koloba : yo okolia yango te. Mabele alakelama mabe pona yo, okolia na pasi na mikolo nyonso ya bomoyi na yo. 18. Ekobimisa banzube pe basende, pe okolia matiti ya elanga. 19. Na motoki ya elongi na yo okolia lipa na yo ti okozonga na mabele ; po ozali putulu pe okozonga na putulu.

— v. 11: Pe alobaki. — v. 15: elingi koloba momboto ya mwasi.

20. Pe mutu abengaki mwasi na ye na kombo ya Eve, po azalaki mama ya batu nyonso oyo bazali na bomoyi.

— v. 20: wuta na verbe Khava, kozala na bomoyi.

21. Pe Yawe Nzambe asalaki bilamba ya loposo po na Adam pe mwasi na ye, pe alatisaki bango. 22. Pe Yawe Nzambe alobaki : Tala, mutu akomi lokola moko na biso, pona koyeba malamu pe mabe; pe sik’oyo, noki te asembola loboko na ye pe akamata lisusu nzete ya bomoyi pe alia, pe azala na bomoyi libela...! 23. Pe Yawe Nzambe atiaki ye libanda ya Elanga ya Edene pona kobalola mabele, epayi oyo ye azwamaki. 24. Abenganaki mutu pe atiaki na epayi ya esti ya Elanga ya Edene bakeruba pe mopanga ya moto oyo ezalaki kobalubaluka na ngambo nyonso pona kobatela nzela ya nzete ya bomoyi. * .

 

Mokapo 4

1. Pe mutu ayebaki Eve mwasi na ye, pe azwaki zemi pe abotaki Kayina ; pe alobaki : Nazwi mutu elongo na Yawe. 2. Pe abotaki lisusu ndeko na ye, Abel. Pe Abel azalaki kobokola bibwele, pe Kayina azalaki kosala bilanga na mabele. 3. Pe ekomaki na sima ya mwa tangu, Kayina amemaki likabo ya mbuma ya mabele, likabo pona Yawe. 4. Pe Abel amemaki, ye pe lokola, bana ya liboso ya etonga na ye, pe mafuta na bango. Pe Yawe asepelaki na Abel pe na likabo na ye, 5. Kasi na Kayina na likabo na ye, asepelaki nango te. Bongo Kayina asilikaki makasi, pe elongi na ye ekomaki mawa-mawa. 6. Pe Yawe alobaki na Kayina: Pona nini osiliki, pe pona nini elongi na yo ekomi mawa-mawa? 7. Soki osali malamu, elongi ekotombolama te? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali na ekuke. Pe posa na yango ekozala epayi na yo, kasi yo, osengeli koyangela yango.

— v. 7: mbano ekozala te? — v. 7: to: mbeka ya lisumu, liloba ya Ebre ezali na ndimbola nyonso mibale; kofukama ezali liloba oyo basalelaka pona nyama oyo elali na mabele.

8. Pe Kayina alobaki na ndeko na ye Abel ; pe esalemaki ete, wana bazalaki na elanga, Kayina atombolaki loboko na kobundisa ndeko na ye Abel pe abomaki ye. 9. Pe Yawe alobaki na Kayina: Wapi ndeko na yo Abel? Pe ye alobaki: Nayebi te ; Ngai nazali mobateli ya ndeko na ngai? 10. Pe Ye alobaki: Osali nini? Mongongo ya makila ya ndeko na yo ezali koganga epayi na ngai wuta na mabele. 11. Pe sik’oyo olakelami mabe wuta na mabele oyo efungoli monoko na yango pona koyamba makila ya ndeko na yo wuta loboko na yo. 12. Tangu okolona mabele, ekopesa yo lisusu makasi na yango te; okozala motelengani pe mozangi bopemi. 13. Pe Kayina alobaki na Yawe: Etumbu na ngai eleki monene pona (eimbisama) namema. 14. Tala, obengani ngai lelo na etando ya mabele, pe nakobombama mosika ya elongi na yo, pe nakozala motelengani pe mozangi bopemi na mabele; pe ekosalema ete oyo nyonso akomona ngai akoboma ngai. 15. Pe Yawe alobaki na ye: Na yango, ye oyo nyonso akoboma Kayina bakozongisela ye mabe mbala sambo. Pe Yawe atiaki elembo na Kayina, po ete ye oyo nyonso akomona ye aboma ye te. 16. Pe Kayina alongwaki liboso ya Yawe ; pe afandaki na mokili ya Nod, na esti ya Edene. 17. Pe Kayina ayebaki mwasi na ye, pe azwaki zemi pe abotaki Enok; pe atongaki engumba moko, pe abengaki engumba yango na kombo ya mwana na ye ya mobali Enok. 18. Pe pona Enok, Irad abotamaki, Irad abotaki Meyuyaele, pe Meyuyaele abotaki Metushayele, pe Metushayele abotaki Lamek. 19. Pe Lamek azwaki basi mibale pona ye: kombo ya moko ezalaki Ada, pe kombo ya oyo ya mibale Tshila. 20. Pe Ada abotaki Yabal, ye azalaki tata ya baoyo bafandaka na bahema pe bazali na bibwele. 21. Pe kombo ya ndeko na ye Yubal, oyo azalaki tata ya baoyo nyonso oyo babetaka nzenze pe flite. 22. Pe Tshila, ye pe abotaki Tubale-Kayina, oyo azalaki nkolo ya basali nyonso ya bronze pe ya bibende. Pe ndeko mwasi ya Tubale-Kayina ezalaki Naama. 23. Pe Lamek alobaki na basi na ye: Ada pe Tshila, boyoka mongongo na ngai, basi ya Lamek, botia litoyi na maloba na ngai: Nakoboma mutu moko pona pota na ngai, pe elenge mobali pona mapipi na ngai; 24. Soki mbala sambo pona Kayini bakazongisa mabe, Lamek ekozala mbala tuku sambo na sambo. 25. Pe Adam ayebaki lisusu mwasi na ye lisusu, pe abotaki mwana mobali pe abengaki ye na kombo Sete, po ete, alobaki, Nzambe apesi ngai mokitani mosusu na esika ya Abel ; po Kayina abomaki ye. 26. Pe pona Sete mwana mobali abotamaki, pe apengaki ye na kombo Enosh. Bongo bakomaki kobelela kombo yaYawe.

 

Mokapo 5

1. Oyo ezali buku ya oyo ebotami na Adam. Na mokolo oyo Nzambe akelaki Adam, asalaki ye na elilingi ya Nzambe. 2. Akelaki bango mobali pe mwasi, pe apambolaki bango; pe abengaki bango na kombo Adam na mokolo oyo bakelamaki. 3. Pe Adam abikaki na bomoyi mibu kama moko na tuku misato (130), pe abotaki mwana na lolenge na ye moko, na elilingi ya ye, pe abengaki ye na kombo Sete. 4. Pe mikolo ya Adam sima ya kobota Sete ezalaki mibu kama mwambe (800); pe abotaki bana mibali pe bana basi. 5. Pe mikolo nyonso ya Adam oyo azalaki na bomoyi ezalaki mibu kama libwa na tuku misato (930); pe akufaki. 6. Pe Sete abikaki na bomoyi mibu kama moko na mitano (105) pe abotaki Enosh. 7. Sima ya kobota Enosh, Sete awumelaki mibu kama mwambe na sambo (807) pe abotaki bana mibali pe bana basi mosusu. 8. Mikolo nyonso ya Sete ezalaki mibu kama libwa na zomi na mibale (912), pe akufaki. 9. Pe Enosh abikaki na bomyi mibu tuku libwa (90) pe abotaki Kenane. 10. Na sima ya kobota Kenane, Enosh awumelaki mibu kama mwambe na mitano (815) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 11. Mikolo nyonso ya Enosh ezalaki mibu kama libwa na mitano (905), pe akufaki. 12. Kenane abikaki na bomoyi mibu tuku sambo (70) pe abotaki Mayalalele. 13. Na sima ya kobota Mayalalele, Kenane awumelaki mibu kama mwambe na tuku mineyi (840), pe abotaki bana mibali pe bana basi. 14. Mikolo nyonso ya Kenane ezalaki mbula kama libwa na zomi (910), pe akufaki. 15. Pe Mayalalele abikaki na bomoyi mibu tuku motoba na mitano (65) pe abotaki Yerede. 16. Na sima ya kobota Yerede, Mayalalele, awumelaki mibu kama mwambe na tuku misato (830) pe abotaki bana mibali pe bana basi. 17. Mikolo nyonso ya Mayalalele ezalaki mbula kama mwambe na tuku libwa (895), pe akufaki. 18. Pe Yerede abikaki na bomoyi mibu kama moko na tuku motoba (162) pe abotaki Enok. 19. Na sima ya kobota Enok, Yerede awumelaki mibu kama mwambe (800) pe abotaki bana mibali pe bana basi. 20. Mikolo nyonso ya Yerede ezalaki mibu kama libwa na tuku motoba na mibale (962), pe akufaki. 21. Pe Enok abikaki na bomoyi mibu tuku motoba na mitano (65) pe abotaki Metushela. 22. Na sima ya kobota Metushela, Enok atambolaki elongo na Nzambe mbula kama misato (300) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 23. Mikolo nyonso ya Enok ezalaki mibu kama misato na tuku motoba na mitano (365). 24. Pe Enok atambolaki elongo na Nzambe, pe azalaki lisusu te, po Nzambe azwaki ye. 25. Pe Metushela abikaki mbula kama moko tuku mwambe na sambo (187) pe abotaki Lamek. 26. Na sima ya kobota Lamek, Metushela awumelaki mibu kama sambo na tuku mwambe na mibale (782) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 27. Mikolo nyonso ya Metushela ezalaki mibu kama na libwa na tuku motoba na libwa (969), pe akufaki. 28. Pe Lamek abikaki na bomoyi mibu kama moko na tuku mwambe na mibale (182) pe abotaki mwana mobali. 29. Pe abengaki ye na kombo ya Noa pe alobaki: Ye oyo akobondisa biso na misala na biso pe na pasi ya maboko na biso, po na mabele oyo Yawe alakelaki mabe. 30. Na sima ya kobota Noa, Lamek awumelaki mibu kama mitano na tuku libwa na mitano (595) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 31. Pe mikolo nyonso ya Lamek ezalaki mibu kama sambo na tuku sambo na sambo (777); pe akufaki.

— v. 29: Ebre: Noa, libondisi, bopemi.

32. Pe Noa azalaki na mibu kama mitano (500), pe Noa abotaki Sem, Sham pe Yafete.

 

Mokapo 6

1. Pe ekomaki ete tangu batu bakomaki kokoma ebele na etando ya mabele pe bana basi basilaki kobotamela bango. 2. Ete bana mibali ya Nzambe bamonoki bana basi ya batu, ete bazalaki kitoko; bongo bazwaki basi pona bango na kati ya basi nyonso oyo baponaki. 3. Pe Yawe alobaki: Molimo na ngai akotika kotungisa mutu pona libela te, pamba te azali mosuni, kasi mikolo na ye ekozala mibu kama moko na tuku mibale (120). 4. Bilombe minene (nefilimi*) bazalaki na mabele na mikolo wana, pe lisusu na sima, tangu bana mibali ya Nzambe bakendaki epayi ya bana basi ya batu pe basilaki kobotela bango bana : Bango bazalaki batu ya nguya ya kala, batu ya lokumu. 5. Pe Yawe amonaki mabe ya mutu ekomaki monene na mabele, pe ete kobanza nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki mikolo nyonso bobele mabe. 6. Pe Yawe ayokaki mawa ete asalaki mutu na mabele, pe ayokaki pasi na motema na ye. 7. Pe Yawe alobaki: Nakosilisa likolo na etando ya mabele mutu oyo ngai nakelaki, kobanda mutu ti na bibwele pe ti na baoyo etambolaka na mabele pe ti na bandeke ya likolo, po nayoki mawa ete nasalaki bango. 8. Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe.

— vv. 1*, 2, 4: mutu to batu. — vv. 1**, 7: ya mabele. — v. 3: mingi batangi: tangu nyonso elongo na mutu na libunga na bango; azali mosuni. — v. 5: na Ebre: mokolo mobimba. * .

9. Oyo ezali oyo ewuti na Noa: Noa azalaki mutu moko sembo, azalaki ya kokoka na kati ya batu ya tangu na ye; Noa atambolaki elongo na Nzambe. 10. Pe Noa abotaki bana misato ya mibali: Sem, Shame, pe Yafete. 11. Pe mabele ezalaki ya kobeba na mabe liboso ya Nzambe, pe mabele ezalaki ya kotonda na yawuli. 12. Pe Nzambe atalaki mabele, pe tala, ezalaki ya kobeba na mabe, po mosuni nyonso asilaki kobebisa banzela na ye na mabele. 13. Pe Nzambe alobaki na Noa: Suka ya mosuni nyonso eye liboso na ngai, po mabele etondi na yawuli na tina na bango, pe tala, nalingi koboma bango elongo na mabele. 14. Omisala masuwa (arshe) na nzete ya gofer. Okosala masuwa na bashambre, pe okopakola yango gudron na kati pe na libanda. 15. Boye nde okosala yango: molayi ya masuwa ekozala mapeko kama misato (300), monene na yango mapeko tuku mitano (50), pe mosanda na yango mapeko tuku misato (30). 16. Okosala esika ya pole kokota na masuwa, pe okosilisa yango na likolo na mapeko moko. Pe ekuke ya masuwa okotia yango na mopanzi na yango, pe okosala yango na biteni misato : ya se, etaje ya mibale, pe ya misato. 17. Pe tala, ngai nazali komema mpela ya mayi likolo ya mabele, pona kobebisa wuta na se ya likolo mosuni nyonso oyo ezali na molimo ya bomoyi kati na yango; nyonso oyo ezali na mabele ekokufa. 18. Pe nakotia boyokani na ngai elongo na yo, pe okokota na kati ya masuwa, yo na bana na yo ya mibali pe mwasi na yo pe basi ya bana na yo ya mibali elongo na yo. 19. Pe nyonso ya bomoyi, mosuni nyonso, okokotisa na masuwa mibale ya lolenge nyonso, pona kobomba yango na bomoyi elongo na yo; bakozala mibali pe basi. 20. Na bandeke na lolenge ya ndenge na yango, pe na bibwele na lolenge na yango, pe na banyama nyonso oyo etambolaka na mabele na lolenge na yango, mibale ya lolenge nyonso bakoya epayi na yo pona kobomba bango na bomoyi. 21. Pe yo, zwa bileyi ya ndenge nyonso oyo eliamaka, pe okobomba yango elongo na yo; pe yango ekozala bileyi pona yo pe pona bango. 22. Pe Noa asalaki bongo; lolenge nyonso oyo Nzambe apesaki ye motindo, bongo nde asalaki.

 

Mokapo 7

1. Pe Yawe alobaki na Noa: Kota na kati ya masuwa, yo na ndako na yo mobimba, po namoni yo ete ozali sembo liboso na ngai na libota oyo. 2. Na banyama nyonso ya peto, okokamata pona yo sambo-sambo, mobali pe mwasi na yango, pe na banyama oyo ezali ya peto, mibale, ya mobali pe mwasi na yango. 3. Lisusu na bandeke ya likolo, sambo-sambo, ya mobali pe ya mwasi, pona kobatela bomoyi ya momboto na yango likolo ya mabele mobimba. 4. Po na mikolo sambo, nakobetisa mbula na mabele mikolo tuku mineyi (40) na butu tuku mineyi (40), pe nakolongola likolo ya mabele bikelamu nyonso oyo nasalaki. 5. Pe Noa asalaki nyonso oyo Yawe apesaki ye mitindo. 6. Pe Noa azalaki na mbula kama motoba (600) tangu mpela ya mayi eyaki likolo ya mabele. 7. Pe Noa akotaki na kati ya masuwa, ye na bana na ye ya mibali, mwasi na ye pe basi ya bana na ye ya mibali elongo na ye, na tina ya mayi ya mpela. 8. Na banyama ya peto pe na banyama ya mbindo, pe na bandeke pe na nyonso oyo etambolaka na mabele. 9. Mibale na mibale bakotaki na kati ya masuwa epayi ya Noa, mobali pe mwasi, ndenge Nzambe apesaki Noa mitindo. 10. Pe ekomaki ete na suka ya mikolo sambo, mayi ya mpela eyaki likolo ya mabele. 11. Na mbula kama motoba (600) ya bomoyi ya Noa, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo ya sanza, na mokolo yango kaka, maziba nyonso ya mozindo monene bifungwamaki makasi, pe bikuke ya likolo bifungwamaki. 12. Pe mbula ezalaki likolo ya mabele mikolo tuku mineyi (40) na butu tuku mineyi (40). 13. Kaka na mokolo yango, Noa, pe Sem, Shame pe Yafete, bana ya Noa, pe mwasi ya Noa, pe basi misato ya bana na ye elongo na bango, bakotaki na kati ya masuwa. 14. Bango pe banyama nyonso kolanda lolenge na yango, bibwele nyonso kolanda lolenge na yango, banyama nyonso oyo etambolaka na mabele kolanda lolenge na yango, pe bandeke nyonso kolanda lolenge na yango, ndeke nyonso oyo ezali na mapapu. 15. Pe bakotaki epayi ya Noa na kati ya masuwa, mibale mibale ya mosuni nyonso, oyo kati na yango elimo ya bomoyi ezalaki. 16. Pe baoyo bakotaki, mobali to mwasi, ya mosuni nyonso, ndenge Nzambe apesaki ye mitindo. Pe Yawe akangaki likolo na ye. 17. Pe mpela ya mayi ezalaki likolo na mabele mikolo tuku mineyi (40); pe mayi emataki mingi pe etombolaki masuwa, pe ematisaki yango likolo ya mabele. 18. Pe mayi ezalaki makasi mingi pe emataki mingi likolo ya mabele, pe masuwa ezalaki kotambola na kopumbwa-pumbwa likolo ya mayi. 19. Pe mayi ekomaki makasi mingi mingi likolo ya mabele, pe bangomba milayi nyonso oyo ezali na se ya likolo mobimba ezipamaki. 20. Mayi emataki mapeko zomi na mitano (15) likolo ya bangomba, pe bangomba ezipamaki. 21. Pe misuni nyonso oyo etambolaka na mabele ekufaki, ezala na bandeke pe bibwele pe banyama pe nyonso oyo etambolaka na mabele, pe mutu nyonso. 22. Nyonso oyo ezalaki na pema ya bomoyi na zolo na yango, na nyonso oyo ezalaki na mabele ya kokawuka, bakufaki. 23. Pe nyonso oyo ezalaki na etando ya mabele ebebisamaki, kobanda na mutu kino na bibwele, kino na banyama oyo ebendanaka na mabele pe bandeke ya likolo; babebisamaki na likolo ya mabele. Kasi kaka Noa atikalaki pe baoyo bazalaki elongo na ye na masuwa. 24. Pe mayi emataki makasi likolo na mabele mikolo kama moko na tuku mineyi (150).

 

Mokapo 8

1. Pe Nzambe akanisaki Noa, pe banyama nyonso pe bibwele nyonso oyo ezalaki elongo na ye na kati ya masuwa; pe Nzambe asalaki mopepe moko likolo ya mabele, pe mayi ekitaki; 2. Pe maziba ya mozindo pe bikuke ya mpela ya likolo ekangamaki, pe mbula oyo ezalaki kokweya longwa na likolo ekangamaki. 3. Pe mayi makitaki likolo na mabele, kozonga pe kokende liboso pe kozonga; pe mayi ekiti na sima ya mikolo (150). 4. Pe masuwa etelemaki likolo na bangomba ya Ararate na sanza ya sambo, na mokolo ya zomi na sambo ya sanza. 5. Pe mayi ekobaki kokita kino sanza ya zomi; pe na sanza ya zomi, na mokolo ya liboso ya sanza, basonge ya bangomba ebimaki. 6. Pe ekomaki na suka ya mikolo tuku mineyi (40), ete Noa afungolaki fenetre ya masuwa oyo asalaki. 7. Pe atindaki korbo moko, oyo ebimaki, kokendaka pe kozongoka kino mayi ekawukaki likolo na mabele. 8. Pe atindaki elongo na ye ebenga (kolombe) pona kotala soki mayi ekiti likolo na mabele. 9. Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia likolo te, pe ezongaki epayi na ye na kati ya masuwa, po mayi ezalaki nanu likolo ya mabele mobimba ; pe atombolaki loboko na ye pe azwaki yango pe akotisaki yango na kati ya masuwa elongo na ye. 10. Pe azelaki lisusu mikolo sambo, pe atindaki lisusu ebenga libanda ya masuwa. 11. Pe ebenga eyaki epayi na ye na tangu ya pokwa, pe tala, na mbebu na yango, kasa ya olive oyo ewuti kobukana. Pe Noa ayebaki ete mayi ekitaki na mabele. 12. Pe azelaki lisusu mikolo sambo, pe atindaki ebenga, pe ezongaki lisusu epayi na ye te. 13. Pe ekomaki ete na mobu kama motoba na moko (601), na sanza ya yambo, na mokolo ya yambo ya sanza, ete mayi esilaki kokawuka likolo na mabele; pe Noa alongolaki ezipeli ya masuwa pe atalaki, 14. Pe tala, likolo ya mabele ekawukaki. Pe na sanza ya mibale, na mokolo ya tuku mibale na sambo (27) ya sanza, mabele ekawukaki. 15. Pe Nzambe alobi na Noa, koloba: 16. Bima na masuwa, yo na mwasi na yo pe na bana na yo ya mibali pe basi ya bana na yo ya mibali elongo na yo. 17. Obimisa elongo na yo nyama nyonso oyo ezali elongo na yo, mosuni nyonso, ndeke nyonso to bibwele, pe nyama nyonso oyo etambolaka na mabele, pe tika yango etombolaka na mabele, pe ebota pe ekoma mingi na mabele. 18. Bongo Noa abimaki, na bana na ye ya mibali, mwasi na ye pe basi ya bana na ye ya mibali elongo na ye. 19. Nyama nyonso, nyama nyonso oyo etambolaka na mabele, pe ndeke nyonso, oyo etambolaka na mabele, kolanda lolenge na yango, ebimaki na masuwa. 20. Pe Noa atongaki etumbelo po na Yawe, pe azwaki banyama nyonso ya peto pe ndeke nyonso ya peto, pe abonzaki bamakabo ya kotumba na etumbelo. 21. Pe Yawe ayokaki solo kitoko ; pe Yawe alobaki na motema na ye: Nakolakela lisusu mabele mabe te na tina ya batu, po ete makanisi ya motema ya mutu ezali mabe wuta bomwana na ye, pe nakobeta lisusu te bikelamu nyonso ya bomoyi lokola nasalaki. 22. Banda sik’oyo, tangu nyonso oyo mikolo ya mabele ekowumela, ya kolona pe kobuka mbuma, ya malili pe molunge, ya mbula pe ya elanga, butu pe moyi, ekosila te.

 

Mokapo 9

1. Pe Nzambe apambolaki Noa na bana na ye, pe alobaki na bango: Bobota pe bokoma mingi pe botondisa mabele. 2. Pe bobangi na bino pe somo na bino ekozala likolo ya nyama nyonso ya mabele, pe likolo ya ndeke nyonso ya likolo, pe na bikelamu nyonso oyo ezali kotambola na mabele, pe likolo ya mbisi nyonso ya mayi monene; bakabami na maboko na bino. 3. Eloko nyonso oyo ezali na bomoyi ekozala bileyi pona bino; lokola matiti ya mobeso, napesi bino. 4. Bobele kaka, bokolia mosuni te na bomoyi na yango, elingi koloba makila na yango; 5. Pe nakosenga penza makila ya bomoyi na bino; na loboko ya nyama nyonso nakosenga, pe na loboko ya mutu, na loboko ya mutu moko-moko, ya ndeko na ye, nakosenga pona makila na ye ya bomoyi. 6. Ye oyo nyonso akosopa makila ya mutu, na nzela ya mutu makila na ye ekosopama; po na elilingi ya Nzambe, asalaki mutu. 7. Pe bino, bobota pe bokoma mingi; bobota mingi na mabele pe bobakama mingi likolo na yango. 8. Pe Nzambe alobaki na Noa pe na bana na ye ya mibali elongo na ye : 9. Pe ngai, tala, natie boyokani na ngai elongo na bino pe elongo na bana na bino na sima na bino, 10. Pe elongo na bikelamu nyonso ya bomoyi oyo ezali elongo na bino, ezala na bandeke pe bibwele pe na banyama nyonso ya mabele elongo na bino, na kati ya nyonso oyo ebimaki na masuwa, —nyama nyonso ya mabele. 11. Pe natie boyokani na ngai elongo na bino, pe mosuni nyonso ekokufa lisusu te na nzela ya mayi ya mpela, pe mpela ya mayi ekozala lisusu te pona kobebisa mabele. 12. Pe Nzambe alobaki: Oyo ezali elembo ya boyakani oyo nazali kosala kati na ngai na bino pe ekelamu nyonso ya bomoyi oyo azali elongo na bino, pona mabota nyonso, pona libela. 13. Nakotia likonga (ark) na ngai na lipata, pe yango ekozala elembo ya boyakani kati na ngai na mabele. 14. Pe ekokoma na tango nyonso oyo nakomema mapata likolo ya mabele, boye likonga (ark) ekobima na lipata. 15. Pe nakokanisa boyokani na ngai oyo ezali kati na ngai na bino pe na ekelamu nyonso ya bomoyi ya mosuni nyonso ; pe mayi ekokoma lisusu mpela ya mayi te pona koboma mosuni nyonso. 16. Pe likonga (Ark) ekozala na kati ya lipata, pe nakomona yango pona boyokani ya seko kati na Nzambe pe bikelamu nyonso ya bomoyi ya mosuni nyonso na mabele. 17. Pe Nzambe alobaki na Noa: Oyo ezali elembo ya boyokani oyo nazali kosala kati na ngai na mosuni nyonso oyo ezali na mabele. 18. Pe bana ya Noa ya mibali oyo babimaki na masuwa ezalaki Sem, Shame pe Yafete; pe Shame azalaki tata ya Kanana. 19. Bango misato bazali bana ya Noa ya mibali; pe wuta na bango nde batu bapalanganaki na mabele mobimba. 20. Pe Noa abandaki kozala mosali bilanga pe alonaki nzete ya vino. 21. Pe amelaki vino pe alangwaki, pe amimonisaki bolumbu na kati ya hema na ye. 22. Pe Shame, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye pe ayebisaki bandeko na ye mibale na libanda. 23. Pe Sem na Yafete bakamataki elamba, pe batiaki yango na mapeka na bango mibale, pe batambolaki sima pe bazipaki bolumbu ya tata na bango, pe bilongi na bango ebalukaki na sima, pe bamonaki bolumbu ya tata na bango te. 24. Pe Noa alamukaki na vino na ye, pe ayebaki oyo mwana na ye ya moke asalaki ye. 25. Pe alobaki: Kanana alakelama mabe! Akozala mowumbu ya bawumbu ya bandeko na ye. 26. Pe alobaki: Apambolama, Yawe, Nzambe ya Sem, Tika ete Kanana azala mowumbu na ye! 27. Tika ete Nzambe akomisa Yafete monene, pe tika ete afanda na bahema ya Sem, pe tika ete Kanana azala mowumbu na ye! 28. Pe Noa awumelaki na bomoyi, sima ya mpela ya mayi, mbula kama misato na tuku mitano (350). 29. Pe mikolo nyonso ya Noa ezalaki mibu kama libwa na tuku mitano (950); pe akufaki.

 

Mokapo 10

1. Pe oyo nde ezali oyo ewuti na bana ya Noa: Sem, Shame, pe Yafete; bana mibali babotamelaki bango na sima ya mpela ya mayi. 2. Bana ya Yafete: Gomere, Magoge, Madayi, Yavane, Tubale, Meseke, pe Tiras. 3. Pe Bana ya Gomere: Ashkenaze, Rifate pe Togarma. 4. Bana ya Yavane: Elisha, Tarsis, Kitime pe Dodanimi. 5. Wuta na bango, bokabwani ya bisanga na bikolo, kolanda na mikili na yango, moko-moko kolanda monoko na ye, kolanda mabota na bango, na kati ya bikolo na bango. 6. Bana ya Shame: Kush, Mistrayime, Pute, pe Kanana. 7. Pe bana ya Kush: Seba, Avila, SabIta, Rayama, na Sabeteka. Pe bana ya Rayama: Saba na Dedane. 8. Pe Kush abotaki Nimrode, ye nde abandaki kozala mutu ya nguya na mabele; 9. Azalaki mobomi ya banyama ya nguya liboso ya Yawe; yango wana elobami : Lokola Nimrode, mobomi ya banyama ya nguya liboso ya Yawe. 10. Pe ebandeli ya bokonzi na ye ezalaki Babel, Erek, Akade, pe Kalene, na mokili ya Shinare. 11. Wuta na mokili wana Ashure abimaki, pe atongaki Ninive, Rehobote-ire pe Kala. 12. Pe Resene, oyo ezali na kati-kati ya Ninive pe Kala: yango nde engumba monene. 13. Pe Mistrayime abotaki : Ludime, Anamime, Lehabime pe Naftuyime. 14. Pe Bapatrusime, pe Bakasluyime (oyo Bafilistia bamimaki epayi na bango), pe Bakaftorime. 15. Pe Kanana abotaki Sidone, mwana na ye ya liboso, pe Eté, 16. Pe Moyebuse, Moamore pe Mogirigasi, 17. Pe Bayevi, pe Ba-Arki, pe Ba-Sine, 18. Pe Ba-Arvade, Bazemari pe Bayamate. Na sima, mabota ya Bakanana epalanganaki. 19. Bandelo ya Bakanana ebandaki na Sidone, tangu ozali kowuta na Gerare, ti na Gaza; pe tangu ozali koya kowuta epayi ya Sodome pe Gomore pe Adma pe Tsheboyime, kino na Lasha. 20. Yango nde ezali bana ya Shame, kolanda lolenge ya mabota na bango, minoko na bango, na kati ya mboka na bango, pe na kati ya bikolo na bango. 21. Pe Sem, tata ya bana nyonso ya Ebere, pe ndeko ya Yafete, mwana ya liboso, bana mibali babotamaki pe na ye. 22. Bana ya Sem: Elama, Asure, Arpakshade, pe Lude pe Aram. 23. Pe bana ya Aram: Utshi, Uli, Getere pe Mashi. 24. Pe Arpakshade abotaki Shela, pe Shela abotaki Ebere. 25. Pe epayi ya Ebere babotamaki bana mibale ya mibali: kombo ya moko Pelege, po na mikolo na ye mabele ekabwanaki; pe kombo ya ndeko na ye Yoktani. 26. Pe Yoktani abotaki Almodade, Shelefe, Azarmavete pe Yerak. 27. Pe Adorame, pe Uzale, pe Dikla, 28. Pe Obale, pe Abimayele, pe Sheba, 29. Pe Ofire, pe Avila, pe Yobabe. Bango nyonso wana bazalaki bana ya Yoktan. 30. Pe esika na bango ya kofanda ezalaki kobanda na Mesha, tangu ozali kowuta na Sefare, ngomba ya esti. 31. Bango wana bazali bana ya Sem, kolanda lolenge ya mabota na bango, kolanda lolenge minoko na bango, na mboka na bango pe kolanda bikolo na bango. 32. Wana nde ezali mabota ya bana ya Noa, kolanda lolenge na mabota na bango, kati na bikolo na bango; pe na bango nde mabota ya bikolo na mokili epanzanaki sima ya mpela.

 

Mokapo 11

1. Pe mokili mobimba ezalaki na monoko moko pe maloba moko. 2. Pe ekomaki ete tangu bakendaki epayi na esti, bakutaki etando ya patatalu na mokili ya Shinare, pe bafandaki kuna. 3. Pe balobanaki moko na mosusu: Boya, tosala babriki pe totumba yango na moto. Pe bazalaki na babriki po na mabanga pe bitume esika ya siman. 4. Pe balobaki: Boya, tomitonga engumba pe ndako molayi oyo songe na yango ezali kokoma na likolo, pe tomisala kombo po topalangana te likolo na mokili mobimba. 5. Pe Yawe akitaki pona kotala engumba pe ndako molayi oyo ban aya batu bazalaki kotonga. 6. Yawe alobaki : Tala, ezali mutu se moko, pe bango nyonso bazali na monoko moko, pe babandi kosala boye; pe sik’oyo eloko moko te ekopekisa bango kosala oyo bakani kosala. 7. Tokende, tokita pe tobulunganisa monoko na bango kuna, po ete moko te ayeba tina ya elobeli ya moko mosusu te. 8. Pe Yawe apalangisaki bango wuta kuna likolo ya mabele mobimba, pe batikaki kotonga engumba. 9. Yango wana kombo na yango ebengami Babel, po kuna Yawe abulungisaki monoko ya mabele mobimba; pe wuta kuna Yawe apalangisaki bango likolo ya etando ya mabele mobimba. 10. Tala mabota ya Sem: Sem azalaki na mibu kama moko (100), pe abotaki Arpakshade mbula mibale sima ya mpela. 11. Pe sima ya kobota Arpakshade, Sem awumelaki mibu kama mitano (500) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 12. Pe Arpakshade awumelaki mibu tuku misato mitano (35) pe abotaki Shela. 13. Pe sima ya kobota Shela, Arpakshade awumelaki mibu kama mineyi na misato (403) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 14. Pe Shela awumelaki mibu tuku misato (30) pe abotaki Ebere. 15. Pe sima ya kobota Ebere, Shela awumelaki mibu kama mineyi na misato (403) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 16. Pe Ebere awumelaki mibu tuku misato na mineyi (34) pe abotaki Pelege. 17. Sima ya kobota Pelege, Ebere awumelaki mibu kama mineyi na tuku misato (430) pe abotaki bana ya mibali pe ya basi. 18. Pe Pelege awumelaki mibu tuku misato (30), pe abotaki Rehu. 19. Sima ya kobota Rehu, Pelege awumelaki mibu kama mibale na libwa (209) pe abotaki bana mibali pe bana basi. 20. Pe Rehu awumelaki mibu tuku misato na mibale (32) pe abotaki Seruge. 21. Sima ya kobota Seruge, Rehu awumelaki mibu kama mibale na sambo (207) pe abotaki bana mibali pe bana basi. 22. Pe Seruge awumelaki mibu tuku misato (30) pe abotaki Nakore. 23. Pe sima ya kobota Nakore, Seruge awumelaki mibu kama mibale (200) pe abotaki bana ya mibali pe bana ya basi. 24. Pe Nakore awumelaki mibu tuku mibale na libwa (29) pe abotaki Tera. 25. Pe sima ya kobota Tera, Nakore awumelaki mibu kama moko na zomi na libwa (119) ; pe abotaki bana mibali pe bana basi. 26. Pe Tera awumelaki mibu tuku sambo (70), pe abotaki Abram, Nakore pe Arane. 27. Oyo nde ezalaki ya oyo ewuti na Tera: Tera abotaki Abram, Nakore pe Arane. 28. Pe Arane abotaki Lota. Pe Arane akufaki liboso ya tata na ye Tera na mokili ya mbotama na ye, na Ur ya Bakaladea. 29. Pe Abram pe Nakore babalaki basi: kombo ya mwasi ya Abram ezalaki Sarayi, pe kombo ya mwasi ya Nakore ezalaki Milka, mwana mwasi ya Arane, tata ya Milka pe ya Yiska. 30. Pe Sarayi azalaki ekomba; azalaki na bana te. 31. Pe Tera akamataki Abram mwana na ye, pe Lota mwana mobali ya Arane, mwana mobali ya mwana na ye ya mobali, pe Sarayi bokilo na ye ya mwasi, mwasi ya Abram, mwana na ye ya mobali; pe babimaki longwa na Ur ya Bakaladea pona kokende na mboka ya Kanana; pe bakomaki kino na Arane, pe bafandaki wana. 32. Pe mikolo ya Tera ezalaki mibu kama mibale na mitano (205); pe Tera akufaki na Arane.

 

Mokapo 12

1. Pe Yawe alobaki na Abram: Longwa na mboka na yo, na libota na yo pe na ndako ya tata na yo, pe kende na mboka oyo nakolakisa yo. 2. Pe nakokomisa yo ekolo moko monene, pe nakopambola yo, pe nakokomisa kombo na yo monene, pe okozala lipamboli ; 3. Pe nakopambola baoyo bakopambola yo, pe nakolakela mabe baoyo nyonso bakolakela yo mabe; pe kati na yo, mabota nyonso na mabele ekopambolama. 4. Pe Abram akendaki, lokola Yawe ayebisaki ye; pe Lota akendaki elongo na ye. Abram azalaki na mbula tuku sambo na mitano (75) tangu alongwaki na Sharane. 5. Pe Abram akamataki Sarayi mwasi na ye, Lota, mwana ya ndeko na ye, biloko na bango nyonso oyo bazwaki, pe batu oyo bazwaki na Sharane, pe babimaki pona kokende na mboka ya Kanana ; pe bakotaki na mboka ya Kanana. 6. Pe Abram alekaki na mboka ti na esika ya Shekeme, ti na nzete monene ya Shene ya More. Pe Bakanana bazalaki na mokili yango. 7. Pe Yawe amonanaki na Abram pe alobaki: Nakopesa mboka oyo epayi na momboto na yo. Pe Abram atongaki wana etumbelo na Yawe, oyo amonisamaki epayi na ye. 8. Pe alongwaki kuna kokende na ngomba, na esti ya Bethel pe atelemisaki hema na ye, Bethel na westi pe Ayi na esti. Pe atongaki etumbelo kuna pona Yawe pe abelelaki kombo ya Yawe. 9. Pe Abram akendaki, kotambola pe kokende na Negeve. 10. Pe nzala ezalaki na mboka; pe Abram akitaki na Ejipito pona kofanda kuna, po nzala ezalaki makasi na mboka. 11. Pe esalemaki lokola azalaki pene ya kokota na Ejipito, ete alobaki na Sarayi mwasi na ye: Tala, nabondeli yo, nayebi ete ozali mwasi elongi kitoko; 12. pe ekosalema ete tangu Baejipito bakomona yo, bakoloba ete : Azali mwasi na ye, pe bakoboma ngai, pe bakotika yo na bomoyi. 13. Loba, nabondeli yo, ete ozali ndeko na ngai ya mwasi, ete bolamu ekomela na ngai na tina na yo, pe ete bomoyi na ngai ebikisama na tina na yo.

— v. 9: kombo ya etuka oyo ezali na sudi ya Yuda, epayi ya esobe.

14. Pe esalemaki boye ete tangu Abram akotaki na Ejipito, Baejipito bamonaki mwasi na ye, pe azalaki kitoko mingi. 15. Pe bankumu ya Farao bamonaki ye, pe bakumisaki ye liboso ya Farao; pe bamemaki mwasi na kati ya ndako ya Farao. 16. Pe Asalelaki Abram malamu na tina na ye, pe azwaki bampate pe bangombe, baane ya mibali, pe bawumbu ya mibali pe ya basi, pe baane ya basi pe bakamela. 17. Pe Yawe abetaki Farao pe ndako na ye na bapota makasi ya minene na tina ya Sarayi, mwasi ya Abram. 18. Pe Farao abengaki Abram pe alobaki: likambu nini oyo osali ngai? Pona nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo? 19. Pona nini olobaki: Azali ndeko na ngai ya mwasi, yango pe nazwi ye po azala mwasi na ngai? Pe sik’oyo, tala mwasi na yo; kamata ye pe kende. 20. Pe Farao apesaki batu na ye mitindo na tina na ye, pe babenganaki ye, ye, pe mwasi na ye, pe nyonso oyo ezalaki ya ye.

 

Mokapo 13

1. Abram alongwaki na Ejipito pe akendaki na Negeve, ye pe mwasi na ye na nyonso oyo ezalaki ya ye, pe Lota elongo na ye. 2. Pe Abram azalaki mozwi monene na bibwele, na palata pe na wolo. 3. Pe akendaki, na Negeve ti na Bethel, ti na esika oyo hema na ye ezalaki na ebandeli, na katikati ya Bethel na Ayi. 4. Na esika oyo etumbelo oyo asalaki liboso ezalaki ; Pe Abram abelelaki wana kombo ya Yawe. 5. Pe Lota lokola, oyo azalaki kokende elongo na Abrama, azalaki na bibwele pe bangombe pe bahema. 6. Pe mboka ekokaki te komema bango pona bafanda elongo ; po biloko na bango ezalaki mingi penza, pe bakokaki kofanda elongo esika moko te. 7. Pe koswana ebimaki kati na babateli ya bitonga ya Abram pe babateli ya bitonga ya Lota. Pe Bakanana na Baferezi bazalaki kofanda na mboka na tangu wana. 8. Pe Abram alobaki na Lota: nabondeli yo, koswana ezala te kati na ngai na yo, pe kati na babateli na yo ya bampate na babateli na ngai ya bampate, po tozali bandeko mibali. 9. Mboka mobimba oyo nyonso ezali liboso na yo te? Kabwana, nabondeli yo, na ngai. Soki okeyi na loboko ya mwasi, ngai nakokende na loboko ya mobali; pe soki okeyi na loboko ya mobali, ngai nakokende na loboko ya mwasi. 10. Pe Lota atombolaki miso na ye pe amonaki etando mobimba ya Yordani, oyo ezalaki ya kosopana na mayi bisika nyonso, liboso ya Yawe abebisa Sodome pe Gomore, lokola elanga ya Yawe, lokola mboka ya Ejipito, tangu owuti na Tshoyare. 11. Pe Lota aponaki pona ye etando mobimba ya Yordani ; pe Lota akendaki na esti. Pe bakabwanaki moko na mosusu: 12. Pe Abram afandaki na kati ya mboka ya Kanana, pe Lota afandaki na kati ya bingumba ya patatalu pe atelemisaki bahema na ye ti na Sodome. 13. Nzokande batu ya Sodome bazalaki batu mabe, basumuki minene liboso ya Yawe. 14. Pe Yawe alobaki na Abram, sima ete Lota asilaki kokabwana na ye: Tombola miso na yo pe tala na esika oyo ozali, epayi ya nord pe ya sud, ya esti pe ya westi. 15. Po mboka nyonso oyo ozali komona, nakopesa yo pe na bakitani na yo pona libela. 16. Nakosala ete bakitani na yo bazala lokola putulu ya mabele; na bongo ete soki mutu moko akoki kotanga putulu ya mabele, bokitani na yo pe ekoki kotangama. 17. Telema pe tambola na kati ya mboka na molayi pe mokuse na yango, po nakopesa yo yango. 18. Pe Abram atombolaki bahema na ye pe ayaki pe afandaki pembeni ya banzete ya Mamre, oyo ezali na Ebron ; pe atongaki wana etumbelo pona Yawe. .

 

Mokapo 14

1. Pe ekomaki na mikolo ya Amrafele mokonzi ya Shinare, Arioka mokonzi ya Elasar, Kedor-laomere mokonzi ya Elam, pe Tidale mokonzi ya bikolo, 2. Babundaki bitumba na Bera mokonzi ya Sodome, Biresha mokonzi ya Gomore, Shineyabe mokonzi ya Adma, pe Shemebere mokonzi ya Tsheboyime, pe mokonzi ya Bela, oyo ezali Tshoy are. 3. Bango nyonso basangisaki mapinga na Lobwaku ya Sidime, oyo ezali mer ya Mungwa. 4. Mbula zomi na mibale, bazalaki ya kokonzama na Kedor-Laomer, kasi na mbula ya zomi na misato batomboki. 5. Pe na mbula ya zomi na mineyi, Kedor-laomere ayaki, pe bakonzi oyo bazalaki elongo na ye, pe babundisaki Barefayime na Asheterote-Karnayime, Bazuzime na Ame, pe Baemime na Shave-kiriatayime. 6. Pe Baorite na kati ya ngomba ya Seyire, kino na El-Parane, oyo ezali pembeni na esobe. 7. Pe bazongaki pe bakomaki na En-Mishpate oyo ezali Kadeshe, pe babetaki mokili mobimba ya Baamalekite, pe lisusu Baamore oyo bafandaki na Atshatshone-Tamar. 8. Pe mokonzi ya Sodome, pe mokonzi ya Gomore, pe mokonzi ya Adma, pe mokonzi ya Tsheboyime, pe mokonzi ya Bela (yango nde Tshoyare) babimaki pe batelemaki milongo na bango pona etumba na kobundisa bango na Lobwaku ya Sidime. 9. pona kobundisa Kedor-laomere, mokonzi ya Elama, pe Tidale, mokonzi ya bikolo (Goyim), pe Amrafele, mokonzi ya Shinare, pe Arioka, mokonzi ya Elasar: bakonzi mineyi batelemelaki bakonzi mitano. 10. Nzokande Lobwaku ya Sidime etondaki na mabulu ya bitime; pe bakonzi ya Sodome pe ya Gomore bakimaki pe bakweyaki kuna; pe baoyo batikalaki bakimaki na bangomba. 11. Pe bakamataki bomengo nyonso ya Sodome pe ya Gomore, pe bileyi na bango nyonso, pe bakendaki. 12. Pe bazwaki Lota, mwana ya ndeko ya Abram, na biloko na ye, pe bakendaki; po azalaki kofanda na Sodome. 13. Pe mutu moko oyo akimaki ayaki pe ayebisaki yango epayi ya Abram Moebre, oyo azalaki kofanda pembeni ya banzete minene ya Mamre, Moamore, ndeko ya Eshkol pe ndeko ya Aner. 14. Pe Abrama ayokaki ete ndeko na ye ya mobali akangami na bokangemi, pe atombolaki batu na ye oyo babongisama, baoyo babotama na ndako na ye, mibali kama misato na zomi na mwambe (318), pe alandaki bango kino na Dan; 15. Pe akabolaki mapinga na ye pona kobundisa bango na butu, ye na basali na ye, pe abetaki bango, pe alandaki bango ti na Oba, oyo ezali na loboko ya mwasi ya Damas. 16. Pe azongisaki biloko nyonso, pe lisusu Lota ndeko na ye, pe biloko na ye, pe lisusu basi pe batu. 17. Pe lokola azalaki kozonga na sima ya kobeta Kedor-laomere na bakonzi oyo bazalaki elongo na ye, mokonzi ya Sodome abimaki pona kokutana na ye na Lobwaku ya Shave, yango nde Lobwaku ya Mokonzi. 18. Pe Melekisedeke, mokonzi ya Salem, abimisaki mapa pe vino, (po azalaki nganga-Nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likolo. 19. Pe apambolaki ye pe alobaki: Abram apambolama na Nzambe Oyo-Aleki-Likolo, Mozalisi ya likolo pe ya mabele! 20. Pe apambolama Nzambe Oyo-Aleki-Likolo, oyo akabi banguna na yo na loboko na yo! Pe apesaki ye moko na zomi ya biloko nyonso. 21. Pe Mokonzi ya Sodome alobaki na Abram: Pesa ngai batu pe kamata biloko yango pona yo. 22. Pe Abram alobaki na mokonzi ya Sodome: Natomboli loboko na ngai epayi ya Yawe, Nzambe Oyo-Aleki-Likolo, Mozalisi ya likolo pe ya mabele : 23. Soki nakokamata ata singa ti na singa ya sandale, to eloko moko te ya oyo ezali ya yo, po oloba te: Nakomisi Abram mozwi! 24. Longola kaka oyo bilenge mibali baliaki, pe eteni ya mibali oyo bakendaki elongo na ngai ​— Aner, Eshkol, pe Mamre ; bango bakozwa eteni na bango.

 

Mokapo 15

1. Sima ya makambu wana, liloba ya Yawe eyaki epayi ya Abram na emonineli moko, koloba: Kobanga te, Abram, ngai nazali nguba na yo pe lifuti na yo monene mingi. 2. Pe Abram alobaki: Nkolo Yawe, okopesa ngai nini, wana ngai nazali kokende kozanga bana, pe mosangoli ya ndako na ngai ezali Eliezere ya Damas? 3. Pe Abram alobaki lisusu: tala, opesi ngai mokitani ata moke te, ye oyo abotami na ndako na ngai azali mosangoli na ngai. 4. Pe tala, liloba ya Yawe eyaki epayi na ye, koloba: ye oyo akozala mosangoli na yo ya libula te, kasi ye oyo akobima na nzoto na yo, ye nde akozala mosangoli na yo. 5. Pe abimisaki ye libanda pe alobaki: Tala likolo, pe tanga minzoto, soki okoki kotanga yango. Pe alobaki na ye: Bongo bakitani na yo ekozala. 6. Pe andimi Yawe, pe atangelaki ye yango lokola bosembo. 7. Pe alobaki na ye: Ngai nazali Yawe, oyo abimisaki yo na Ur ya Bakaladea, pona kopesa yo mboka oyo po ozwa yango. 8. Pe alobaki: Nkolo Yawe, na nini nakoyeba ete nakozwa yango? 9. Pe alobaki na ye: kamata ngombe-mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme-mobali ya mibu misato, pijon pe mwana ya pijon. 10. Pe akamataki biloko yango nyonso pe apasolaki yango kati-kati, pe atiaki eteni ndambo na eteni ndambo na yango na ngambo mosusu; kasi apasolaki bandeke te. 11. Pe bandeke oyo eliaka banyama bakitaki likolo ya banyama oyo ekufa, pe Abram abenganaki bango. 12. Pe lokola moyi ezalaki kolala, pongi makasi ekwelelaki Abram ; pe tala somo, molili makasi ekwelelaki ye. 13. Pe alobaki na Abram: Yeba penza ete bakitani na yo bakofanda na mboka oyo ezali ya bango te, pe bakokomisa bango bawumbu pe bakoniokola bango na bowumeli ya mibu kama mineyi (400). 14. Kasi ngai nakosambisa ekolo oyo ekomisaki bango bawumbu, pe na sima bakobima na biloko ebele. 15. Pe yo, okokende epayi ya batata na yo na kimia pe okokundama yo na kimobange malamu. 16. Pe na nkola (jeneratio) ya mineyi bakozonga awa, po mabe ya Baamore esili nanu kotonda te. 17. Pe ekomaki ete tangu moyi elalaki, pe molili ekotaki; pe tala, etumbeli ya milinga, pe torshe moko ya moto elekaki kati na biteni ya banyama. 18. Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani na Abram, pe alobaki: Napesi bakitani na yo mboka oyo, kobanda na ebale ya Ejipito ti na ebale monene, Efrate : 19. Bakeni, Bakenizi pe Bakadamoni, 20. Pe Baeti, Baferezi pe Barefayime, 21. Baamore, Bakanana, Bagirigazi pe Bayebusi.

 

Mokapo 16

1. Pe Sarayi, mwasi ya Abram, abotelaki ye mwana te ; pe azalaki na mosali-mwasi moko ya Ejipito pe kombo na ye ezalaki Agar. 2. Pe Sarayi alobaki na Abram: Nabondeli yo, tala ete Yawe apekisi kobota bana ; kende epayi ya mosali na ngai ya mwasi ; tangu mosusu na komitonga (ndako) na nzela na ye pe Abram ayokaki mongongo ya Sarayi. 3. Pe Sarayi, mwasi ya Abram, akamataki Agar, Moejipito, mosali-mwasi na ye, sima ete Abram afandaki mibu zomi na mboka ya Kanana, pe apesaki ye mobali na ye Abram pona azala mwasi. 4. Pe Akendaki epayi ya Agar, pe akomaki na zemi. Amonaki ete azalaki na zemi, nkolo na ye ya mwasi atiolamaki na miso na ye. 5. Pe Sarai alobaki na Abram: Mabe oyo basali ngai ezali likolo na yo : Ngai, napesi yo mosaleli na ngai likolo ya tolo na yo ; pe sik’oyo amoni ete akomi na zemi, pe nazali ya kotiola na miso na ye. Yawe asambisa kati na yo na ngai ! 6. Pe Abram alobaki na Sarayi: Tala mosaleli na yo azali na loboko na yo, sala ye ndenge okomona malamu na miso na yo. Pe Sarayi aniokolaki ye mabe, pe ye akimaki liboso na ye. 7. Kasi anjelu ya Yawe akutaki ye pembeni ya liziba ya mayi na kati ya esobe, pembeni ya liziba na nzela ya Shure. 8. Pe alobaki: Agar, mosaleli ya Sarayi, owuti wapi, pe okokende wapi? Pe alobaki: liboso ya Sarayi, nkolo na ngai ya mwasi, nazali kokima. 9. Pe anjelu ya Yawe alobaki na ye: Zonga epayi ya nkolo na yo pe mikitisa na se ya loboko na ye. 10. Pe Anjelu ya Yawe alobaki na ye: kobakisama, nakobakisa bakitani na yo mingi, pe bakokoka kotangama te na tina ya ebele na yango. 11. Pe Anjelu ya Yawe alobaki na ye: tala ozali na zemi pe okobota mwana mobali, pe okobenga kombo na ye Yishmayel, po Yawe ayoki pasi na yo. 12. Pe ye akozala ane ya zamba ya mutu; loboko na ye ekotelemela bango nyonso, pe loboko ya bango nyonso ekotelemela ye, pe akofanda liboso ya elongi ya bandeko na ye nyonso. 13. Pe Abengaki kombo ya Yawe oyo alobaki na ye: Yo ozali Nzambe oyo amonisami* (azali komona ngai), po alobaki : solo, namoni awa pe sima ya oyo amimonisami? 14. Yango wana yango babengaki liziba yango : Be’ere-la-ayi-royi*; tala, ezali kati na Kadeshe pe Berede.

— v. 13: bamosusu: oyo amonaka; oyo amoni ngai ; Basusu: oyo azali komona ngai; vɛrsɛ oyo etikali elandi ndakisa yango. — v. 14: liziba ya Mutu ya Bomoyi oyo amimonisaka ; liziba ya Oyo azali na bomoyi oyo amoni ngai.

15. Pe Agar abotelaki Abram mwana mobali, pe Abram abengaki mwana na ye ya mobali oyo Agar abotaki na kombo ya Yishmayel. 16. Pe Abram azalaki na mibu tuku mwambe na motoba (86) tangu Agar abotaki Yishmayel na Abram.

 

Mokapo 17

1. Pe Abram azalaki na mibu tuku libwa na libwa tangu Yawe amimonisaki na Abram pe alobaki na ye: Nazali *Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, tambola liboso na ngai na bosembo pe zala ya kokoka. 2. Pe nakotia boyokani na ngai kati na ngai na yo, pe nakokamisa motango na bino mingi. 3. Pe Abram akweyaki elongi na se, pe Nzambe alobaki elongo na ye, alobaki : 4. Pona ngai, tala boyokani na ngai ezali elongo na yo, pe okozala tata ya bikolo ebele ; 5. Pe kombo na yo ekobengama lisusu Abram te, kasi Abraham, po nakomisi yo tata ya bikolo ebele. 6. Pe Nakobotisa yo mingi penza, pe nakokomisa yo bikolo ; pe bakonzi bakobima epayi na yo. 7. Pe nakotia boyokani na ngai kati na ngai pe yo pe bakitani na yo sima na yo, pe na bankola (bajeneratio) na bango nyonso, pona kozala boyokani ya seko, ete nazala Nzambe na yo, pe ya bakitani na yo sima na yo. 8. Pe napesi yo pe na bakitani na yo sima na yo mboka ya bofandi na yo, mboka mobimba ya Kanana, lokola bozwi ya seko; pe nakozala Nzambe na bango. 9. Pe Nzambe alobaki na Abraham: pe yo, okobomba boyokani na ngai, yo na momboto na yo sima na yo, na bankola (bajeneratio) na bango. 10. Oyo ezali boyokani na ngai, oyo bokobomba, kati na ngai na bino pe bakitani na bino oyo bakolanda bino: mobali nyonso kati na bino akatama ngenga. 11. Pe okokata mosuni ya loposo na yo ngenga, pe yango ekozala elembo ya boyokani na kati na ngai na bino. 12. Pe mobali nyonso kati na bino oyo azali na mikolo mwambe na bowumeli ya bankola na bino, asengeli kokatama ngenga kati na bino, ye oyo abotami na kati ya ndako pe ye oyo asombami na mbongo, mwana ya mopaya oyo azali ya momboto na yo te. 13. Bokozanga te kokata ngenga ye oyo abotami na ndako na yo to ye oyo asombami na mbongo na yo, pe boyokani na ngai ekozala na mosuni na bino lokola boyokani ya seko. 14. Pe mobali oyo akatamaki ngenga te, oyo akatisamaki ngenga te na mosuni ya loposo na ye ya liboso, akolongolama na kati ya batu na ye : abuki boyokani na ngai.

— v. 1: Shaddai, (boyike?) wuta na Shad, nguya. — v. 5*: tata oyo atombwami. — v. 5**: tata ya ebele ya batu.

15. Pe Nzambe alobaki na Abraham: Tangu Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu na kombo ya Sarayi te, kasi Sara. 16. Pe Nakopambola ye, pe nakopesa yo pe mwana mobali na nzela na ye; Nakopambola ye, pe akokoma bikolo; bakonzi ya bikolo bakobima epayi na ye. 17. Pe Abraham akweyaki na elongi na ye na se pe asekaki pe amitunaki na kati ya motema: Mwana mobali akoki kobotama na mutu oyo azali na mibu kama (100)? Pe Sara, oyo azali na mibu tuku libwa (90), akobota mwana? 18. Pe Abraham alobaki na Nzambe: Ô, Yishmayel abika na bomoyi liboso na yo! 19. Pe Nzambe alobaki: Ya solo, Sara mwasi na yo akobotela yo mwana mobali, pe okobenga ye na kombo Izak. 20. Po na oyo etali Yishmayel, nayoki yo : tala napamboli ye, pe nakobotisa ye mingi pe nakokomisa ye ebele koleka ; akobota bakambi zomi na mibale, pe nakokomisa ye ekolo monene. 21. Kasi nakotia boyokani na ngai elongo na Izak, oyo Sara akobotela yo na tangu oyo na mbula oyo ekoya. 22. Pe asilisaki kosolola elongo na ye, Nzambe amataki epayi ya Abraham.

— v. 15*: mokonzi, to: mutu oyo azali kobunda. — v. 15**: mwana mwasi ya mokonzi. — v. 19: Ebre: Yitzhak, koseka.

23. Pe Abraham akamataki Yishmayel, mwana na ye ya mobali, pe baoyo nyonso oyo babotamaki na kati ya ndako na ye, pe baoyo nyonso basombamaki na mbongo na ye, mibali nyonso na kati ya batu ya ndako ya Abraham, ​pe akataki ngenga ya mosuni ya loposo na bango kaka mokolo wana, ndenge Nzambe alobaki na ye. 24. Pe Abraham azalaki na mbula tuku libwa na libwa (99) tangu ye akatami ngenga na mosuni ya loposo na ye; 25. Pe mwana na ye ya mobali, Yishmayel, azalaki na mibu zomi na misato (13) tangu ye akatami ngenga na mosuni ya loposo na ye. 26. Kaka na mokolo yango, Abraham akatamaki ngenga, pe Yishmayel mwana na ye ya mobali, 27. Pe mibali nyonso ya ndako na ye, baoyo babotamaki na ndako pe baoyo basombamaki na mbongo na kati ya bana ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.

 

Mokapo 18

1. Pe Yawe abimelaki ye pene na bashene ya Mamre, pe azalaki ya kofanda na ekoteli ya hema na ye na tangu ya molunge ya moyi. 2. Pe atombolaki miso pe atalaki ; pe tala, mibali misato batelemi pene na ye ; pe tangu amonaki bango, akimaki wuta na ekoteli ya hema na ye po na kokutana na bango pe agumbamaki kono na mabele. 3. Pe alobaki: Nkolo, soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, koleka mosali na yo te na nzela na yo. 4. Nabondeli yo, tika ete bamema mwa mayi, pe bosukola makolo na bino pe bino bokopema na se ya nzete. 5. Pe Nakozwa eteni ya lipa, pe bokopesa mitema na bino makasi, na sima bokoki koleka na nzela na bino, po ezali pona yango nde bolekaki pembeni ya mosali na bino. Pe balobaki: Sala ndenge olobi. 6. Pe Abraham akendaki mbangu na hema epayi ya Sara pe alobaki: Zwa noki, bamezire misato ya farini ya malamu, pakola yango pe sala bagato. 7. Pe Abraham akimaki mbangu na etonga pe azwaki mwana ya ngombe moko ya mafuta pe malamu, pe apesaki yango na elenge mobali moko, oyo abongisaki yango noki-noki. 8. Pe akamataki kreme pe miliki, pe mwana ya ngombe oyo abongisaki, pe atiaki yango liboso na bango. Pe atelemaki pembeni na bango na se ya nzete, pe baliaki. 9. Pe batunaki ye: Wapi Sara, mwasi na yo? Pe alobaki: Tala, azali na kati ya hema. 10. Pe alobaki: Ya solo, nakozonga epayi na yo na tangu oyo ekoya, pe tala Sara mwasi na yo akobota mwana mobali. Pe Sara azalaki koyoka na ekoteli ya hema, oyo ezalaki sima na ye. 11. Nzokande Abraham na Sara bazalaki mibange, bapusanaki na mbula mingi ; pe Sara atikaki kozala na mimesano ya basi. 12. Pe Sara asekaki na kati na ye, kolobaka: sima ya kokoma mobange, nakokoma lisusu na esengo? ... nkolo na ngai pe azali mobange. 13. Pe Yawe alobaki na Abraham: Pona nini Sara asekaki pe alobaki: Nakobota penza mwana, ngai oyo nazali mobange? 14. Ezali na likambu moko oyo ezali pasi mingi pona Yawe? Na tangu oyo etiami, nakozonga epayi na yo, tangu ngonga na yango ekoki, pe Sara akobota mwana mobali. 15. Pe Sara awanganaki, alobaki: Nasekaki te, po abangaki. Pe alobaki : Te, osekaki penza. 16. Pe mibali balongwaki wana pe batalaki na ngambo ya Sodome, pe Abraham akendaki elongo na bango pona kotika bango bakende. 17. Pe Yawe alobaki: Nakobombela Abraham oyo ngai nalingi kosala? 18. Abraham akokoma solo ekolo monene pe ya nguya, pe na nzela na ye bikolo nyonso ya mabele ekopambolama ? 19. Po nayebi ye, ete akopesa mitindo na bana na ye pe na ndako na ye sima na ye ete babatela nzela ya Yawe, pona basala oyo ezali sembo pe ya boyengebene, po Yawe akoka koyeyisa likolo ya Abraham oyo alobaki na tina na ye. 20. Pe Yawe alobaki: Po koganga ya Sodome pe ya Gomore ezali monene pe lisumu na bango ezali makasi penza, 21. Boye nakokita pe nakotala soki basali penza lolenge ya koganga oyo ekomi kino epayi na ngai​ pe soki te, nakoyeba yango. 22. Pe mibali yango balongwaki wana, pe bakendaki epayi na Sodome; pe Abraham atelemaki nanu wana liboso ya Yawe. 23. Pe Abraham apusanaki pene pe alobaki: Okoboma moyengebene elongo na mutu mabe? 24. Mbala mosusu bayengebene bazali tuku mitano (50) na engumba. Okobebisa yango pe okolimbisa engumba yango te pona bayengebene tuku mitano (50) oyo bazali kati na yango? 25. Mosika na yo kosala lolenge wana, koboma moyengebene elongo na mutu mabe, kosalela moyengebene pe mutu mabe ndenge moko! Ezala mosika na yo! Mosambisi ya mabele mobimba akosala sembo te? 26. Pe Yawe alobaki: Soki nakuti bayengebene tuku mitano (50) na kati ya Sodome, na kati ya engumba, nakolimbisa esika nyonso na tina na bango. 27. Pe Abraham ayanolaki pe alobi: tala, ngai nabondeli, namekaki kolobela Nkolo, ngai oyo nazali putulu pe mabele ya moto. 28. Mbala mosusu mitano bakozanga na kati na tuku mitano (50) ya bosembo; Okobebisa engumba mobimba pona mitano? Pe alobaki: Nakobebisa yango te soki namoni tuku mineyi na mitano (45) kuna. 29. Ye akobaki lisusu koloba na ye, pe alobi: tangu mosusu bakozala kaka tuku mineyi (40) kuna? Pe alobaki : Nakosala yango te, na tina ya tuku mineyi. 30. Pe alobaki: Nabondeli yo, tika ete Nkolo asilika te, pe ngai nakoloba: tangu mosusu bakozala kaka tuku misato (30) kuna? Pe alobaki: Nakosala yango te, na tina ya tuku misato. 31. Pe alobaki: Tala, nabondeli yo, nameki koloba na Nkolo: tangu mosusu bakozala kaka tuku mibale (20) kuna? Pe alobaki: Nakobebisa yango te na tina ya tuku mibale (20). 32. Pe alobaki: Nabondeli yo, tika ete Nkolo asilika te, pe nakoloba lisusu kaka mbala moko: tangu bakozala kaka zomi (10)? Pe alobaki: Nakobebisa yango te na tina ya zomi. 33. Pe Yawe akendaki tangu asilisaki koloba na Abraham; pe Abraham azongaki na esika na ye.

 

Mokapo 19

1. Pe Baanjelu mibale bayaki na Sodome na tangu ya pokwa, pe Lota afandaki na ekuke ya Sodome. Pe Lota amonaki bango, pe atelemaki pona kokutana na bango pe agumbaki elongi na ye na mabele. 2. Pe alobaki: Tala, nabondeli bino, Bakolo na ngai, bobaluka epayi ya ndako ya mosali na bino pe bolekisa butu kuna pe bosukola makolo na bino ; pe bino bokotelema na tongo, pe bokokende nzela na bino. Pe balobaki: Te, kasi tokolekisa butu awa na esika ya polele. 3. Kasi alendisaki bango makasi ; pe babalukaki epayi na ye, pe bakotaki na ndako na ye, pe asalaki feti pona bango, atumbaki mapa ezangi levin, pe baliaki. 4. Liboso ete balala, mibali ya engumba, mibali ya Sodome, bazingaki ndako, kobanda na elenge mobali ti na mobange, batu nyonso oyo bawutaki na bisika nyonso ya engumba. 5. Pe babengaki Lota pe balobi na ye: wapi mibali oyo bayaki epayi na yo na butu ya lelo ? Bimisa bango epayi na biso po toyeba bango. 6. Pe Lota abimaki epayi na bango na ekuke pe akangaki ekuke sima na ye. 7. Pe alobaki: Nabondeli bino, bandeko, bosala mabe oyo te. 8. Tala, nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu mobali te. Tika nabimisa bango epayi na bino, pe bosala na bango ndenge ezali malamu na miso na bino. Bobele mibali oyo bosala eloko moko te, po bakoti na se ya elili ya ndako na ngai. 9. Pe balobaki: longwa wana! Pe balobaki lisusu: Mutu oyo ayaki kofanda awa lokola mopaya, pe sik’oyo akomi kosambisa! Sik’oyo tokosala yo mabe koleka bango. Pe batindaki Lota makasi, pe bapusanaki pona kobuka ekuke. 10. Pe mibali basembolaki maboko na bango pe bakotisaki Lota epayi na bango na kati ya ndako, pe bakangaki ekuke. 11. Pe babetaki na bokufi miso baoyo bazalaki na ekuke ya ndako, kobanda na elenge moke kino na monene, pe balembaki koluka ekuke. 12. Pe mibali balobaki na Lota: Ozali na nani mosusu awa? Bokilo mobali, pe bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, pe nyonso oyo ozali na yango na kati ya engumba, bimisa bango libanda ya esika oyo ; 13. Po tokobebisa esika oyo, po koganga na bango ekomi monene liboso ya Yawe; pe Yawe atindi biso tobebisa yango. 14. Pe Lota abimaki pe alobaki na babokilo na ye ya mibali, oyo bakamataki bana na ye ya basi, pe alobaki: Botelema, bobima libanda ya esika oyo, po Yawe akobebisa engumba. Pe amonanaki na misusu ya bokilo na ye ya mibali ete ye azalaki kosakana. 15. Pe lokola moyi ya tongo ebandaki kobima, baanjelu batindaki Lota na lombangu pe balobaki: Telema, kamata mwasi na yo na bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa, soki te okokufa na kati ya mabe ya engumba. 16. Pe ye azalaki kolekisa tangu, pe mibali basimbaki loboko na ye, loboko ya mwasi na ye pe maboko ya bana na ye mibale ya basi, Yawe azalaki koyokela ye mawa, pe babimisaki ye pe batikaki ye libanda ya engumba. 17. Pe esalemaki ete tangu babimisaki bango libanda, alobaki ete: mibikisa pona bomoyi na yo! Kotala na sima na yo te, pe kotelema te na kati ya etando mobimba, mibikisa likolo na ngomba, po ete yo okufa te. 18. Pe Lota alobaki na bango: Te, Nkolo na ngai, nabondeli yo! 19. Tala, mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, pe boboto na yo oyo olakisaki epayi ngai na kobomba molimo na ngai na bomoyi ezalaki monene; pe nakoka komibikisa na ngomba te, noki likama ezwa ngai pe nakufa. 20. Tala, nabondeli yo, ete engumba ezali penepene pona kokima kuna, pe ezali moke; bongo tika namibikisa kuna​ (ezali moke te)?​ Pe bomoyi na ngai ekobika. 21. Pe alobaki na ye: Talá, nayambi bosanga na yo kati na likambu oyo, ete nabebisa te engumba oyo olobeli. 22. Sala mbangu ya komibikisa kuna, po nakoki kosala eloko moko te kino tangu okokota kuna. Yango wana babengaki kombo ya engumba yango Tshoyare. 23. Moyi ebimaki likolo ya mabele tangu Lota akotaki na Tshoyare. 24. Pe Yawe anokisaki mbula ya likolo ya Sodome pe Gomore, oyo ewuti na Yawe, ya sufre pe ya moto ; 25. Abebisaki bingumba wana pe etando mobimba, bafandi nyonso ya bingumba pe banzete ya mabele. 26. Pe mwasi ya Lota atalaki na sima, pe akomaki ekeko ya mungwa. 27. Pe Abraham atelemaki na tongo-tongo pe akendaki na esika oyo atelemaki liboso ya Yawe. 28. Pe atalaki na ngambo ya Sodome na Gomore, na ngomba ya mokili mobimba ya patatalu, pe amonaki, pa atalaki, milinga kobima na mabele lokola milinga oyo ewuti na etumbeli ya fulu. 29. Pe esalemaki, tangu Nzambe abebisaki bingumba ya etando, Nzambe akanisaki Abraham pe abimisaki Lota na libebi, tangu abebisaki bingumba oyo Lota azalaki kofanda. 30. Pe Lota amataki na Tshoyare pe akendaki kofanda na ngomba, ye pe bana na ye mibale ya basi elongo na ye, po abangaki kofanda na Tshoyare. Pe ye na bana na ye mibale ya basi bafandaki na libulu moko. 31. Pe Mwana mwasi ya mokolo alobaki na oyo ya leki: Tata na biso akomi mobange, pe ezali na mobali moko te na mabele oyo akoki koya epayi na biso kolandisama na lolenge ya mabele nyonso. 32. Yaka, tomelisa tata na biso vino pe tolala elongo na ye, po tosala ete bokitani ya tata na biso ebika. 33. Pe butu wana bamelisaki tata na bango vino, pe mwana mwasi ya mokolo ayaki pe alali na tata na ye, pe ayebaki te tangu nini alali to tangu nini atelemaki. 34. Pe ekomaki ete mokolo oyo elandaki, mwana mwasi ya mokolo alobaki na oyo ya leki: Tala, lobi na butu nalalaki elongo na tata na ngai, tomelisa ye lisusu vino na butu ya lelo, pe kende kolala elongo na ye, po tosala ete bokitani ya tata na biso ebika. 35. Pe na butu wana lisusu bamelisaki tata na bango vino, pe oyo ya leki atelemaki pe alali elongo na ye, pe ayebaki te tangu nini alali to tangu nini atelemaki. 36. Bongo bana basi mibale ya Lota bakumbaki zemi ya tata na bango. 37. Pe ya mokolo abotaki mwana mobali pe abengaki ye na kombo Moaba : ye azali tata ya Moaba ti lelo. 38. Pe oyo ya leki, ye pe lisusu abotaki mwana mobali pe abengaki ye na kombo Ben-Ami : ye azali tata ya bana ya Amona ti lelo.

 

Mokapo 20

1. Pe Abraham alongwaki kuna, akendaki na mokili ya *Sud, pe afandaki na kati-kati ya Kadeshe na Shure, pe afandaki na Gerar. 2. Pe Abraham alobaki po na Sara mwasi na ye: Azali ndeko na ngai ya mwasi. Pe Abimelek, mokonzi ya Gerar, atindaki pe azwaki Sara. 3. Pe Nzambe ayaki epayi ya Abimelek na kati ya ndoto pe alobaki na ye: Tala, okufi na tina ya mwasi oyo ozwi, po azali mwasi oyo abala. 4. Nzokande Abimelek apusanaki pembeni na ye te ; pe alobaki: Nkolo, okobebisa ata ekolo moko ya boyengebene? 5. Alobaki na ngai te ete: Azali ndeko na ngai ya mwasi? Pe ye moko alobaki na ngai: Azali ndeko na ngai ya mobali. Nasalaki yango na bosembo ya motema na ngai pe na bozangi mbeba ya maboko na ngai. 6. Pe Nzambe alobaki na ye na ndoto: Ngai pe nayebi ete osalaki boye na kati ya bosembo ya motema na yo, pe bongo nabatelaki yo po osala te lisumu epayi na ngai, yango wana napesaki yo nzela te osimba ye. 7. Pe sik’oyo, zongisa mwasi ya mobali yango, po azali profete, pe akobondela po na yo, pe okobika na bomoyi. Kasi soki ozongiseli ye te, yeba ete okokufa solo, yo na nyonso oyo ezali ya yo. 8. Pe Abimelek atelemaki na tongo-tongo pe abengaki basali na ye nyonso pe alobaki maloba wana nyonso na matoyi na bango, pe batu yango babangaki mingi. 9. Pe Abimelek abengaki Abraham pe alobaki na ye: Osali biso nini? Na nini nasali yo lisumu, po omemela ngai pe bokonzi na ngai lisumu monene boye? Osaleli ngai makambu oyo esengeli kosalema te. 10. Pe Abimelek alobaki na Abraham: nini omonaki pona osala boye? 11. Pe Abraham alobaki: Ezali po nalobaki ete: Ya solo, kobanga Nzambe ezali te na esika oyo, pe bakoboma ngai na tina ya mwasi na ngai. 12. Pe lisusu ya solo, azali ndeko na ngai ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ngai; kaka nde azali mwana mwasi ya mama na ngai te, pe akoma mwasi na ngai. 13. Pe ekomaki ete tangu Nzambe ayengisaki ngai longwa na ndako ya tata na ngai, nalobaki na ye ete: Tala ngolu oyo okosala ngai: kati na bisika nyonso oyo tokokoma, okoloba na tina na ngai: Azali ndeko na ngai. 14. Pe Abimelek akamataki na etonga pe na bangombe, pe na basali ya mibali pe ya basi, pe apesaki yango epayi ya Abraham, pe azongiselaki ye Sara mwasi na ye. 15. Pe Abimelek alobaki: Tala, mboka na ngai ezali liboso na yo, fanda esika nyonso oyo olingi. 16. Pe na Sara alobaki: Tala, napesi nkoto ya palata (1000) na ndeko na yo ; tala, oyo ekozala ezipeli pona miso na yo pona baoyo nyonso bazali elongo na yo pe pona banso. Boye nde ye apamelaki. 17. Pe Abraham abondelaki Nzambe, pe Nzambe abikisaki Abimelek, pe mwasi na ye pe basali na ye ya basi, pe babotaki bana : 18. Po Yawe akangaki penza matrise nyonso ya ndako ya Abimelek, na tina ya Sara, mwasi ya Abraham.

 

Mokapo 21

1. Pe Yawe atalaki Sara lokola alobaki, pe Yawe asalaki epayi ya Sara lokola alobaki. 2. Pe Sara azwaki zemi pe abotelaki Abraham mwana mobali na kati ya mobange na ye, na ngonga oyo etiamaki oyo Nzambe alobelaki ye. 3. Pe Abraham abengaki kombo ya mwana na ye oyo abotamaki na ye, oyo Sara abotelaki ye, Izak. 4. Pe Abraham akataki mwana na ye Izak ngenga tangu azalaki na mikolo mwambe, ndenge Nzambe apesaki ye mitindo. 5. Pe Abraham azalaki na mibu kama moko (100) tangu mwana na ye Izak abotamelaki ye. 6. Pe Sara alobaki: Nzambe apesi ngai nzela ya koseka, oyo nyonso akoyoka yango akoseka elongo na ngai. 7. Pe alobaki: Nani alobaki na Abraham ete: Sara akomelisa bana mabele? 8. Pe Mwana akolaki pe atikaki mabele, pe Abraham asalaki feti monene na mokolo oyo Izaka alongwaki komela mabele. 9. Pe Sara amonaki mwana ya Agar Moezipito, oyo abotelaki Abrahama, azali koseka. 10. Pe alobaki na Abraham: Bengana mowumbu mwasi oyo na mwana na ye, po mwana ya mowumbu oyo akozwa libula te elongo na mwana na ngai, elongo na Izak. 11. Pe yango ezalaki mabe makasi na miso ya Abraham na tina ya mwana na ye. 12. Pe Nzambe alobaki na Abraham : Ete yango ezala mabe na miso na yo te na tina ya mwana pe na tina ya mosali na yo, kati na nyonso oyo Sara alobi na yo, yoka mongongo na ye ; po na Izak bokitani ekobengamela yo. 13. Pe nakokomisa bongo ekolo mwana ya mowumbu mwasi, po azali momboto na yo. 14. Pe Abraham atelemaki na tongo-tongo, pe azwaki lipa pe mbeki moko ya mayi pe apesaki yango na Agar, atiaki yango likolo na lipeka na ye, elongo na mwana pe atindaki ye akende. Pe akendaki, ayengaki-yengaki na esobe ya Beersheba. 15. Pe mayi ya mbeki esilaki, pe abwakaki mwana na se ya moko ya banzete mike. 16. Pe akendaki pe afandaki liboso na ye mosika, na ntaka ya likonga, po azalaki koloba: Nasengeli te ete namona mwana kokufa. Pe afandaki liboso na ye, pe atombolaki mongongo na ye pe alelaki. 17. Pe Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, pe anjelu ya Nzambe abengaki Agar longwa na likolo pe alobaki na ye: Ozali na nini, Agare ? Kobanga te, po Nzambe ayoki mongongo ya mwana epayi oyo azali. 18. Telema, tombola mwana, pe zwa ye na loboko na yo, po nakokomisa ye ekolo monene. 19. Pe Nzambe afungoli ye miso, pe amonaki libulu ya mayi. Akendaki pe atondisaki mbeki na mayi pe amelisaki mwana. 20. Pe Nzambe azalaki elongo na mwana, pe akolaki pe afandaki na kati ya esobe pe akomaki mobeti likonga. 21. Pe afandaki na kati ya esobe ya Parane; pe mama na ye azwelaki ye mwasi ya mboka ya Ejipito. 22. Pe na tangu wana Abimelek na Pikole, mokonzi ya mapinga na ye, balobaki na Abraham: Nzambe azali elongo na yo na nyonso oyo ozali kosala. 23. Pe sik’oyo, lapa ngai ndayi awa, na nzela ya Nzambe, ete okosala lokuta te epayi na ngai, bana na ngai, to bana ya bana na ngai : kolanda bolamu oyo nasali epayi na yo, okosala bongo epayi na ngai pe epayi ya mboka oyo ofandaki na kati na yango. 24. Pe Abraham alobaki: Nalapi ndayi yango. 25. Pe Abraham apamelaki Abimelek na tina ya libulu ya mayi oyo basali ya Abimelek babotolaki na makasi. 26. Pe Abimelek alobaki: Nayebi te nani asalaki likambu oyo, pe lisusu oyebisaki ngai yango te, pe ngai, nayoki yango kaka lelo. 27. Pe Abraham akamataki bampate na etonga pe bangombe pe apesaki yango Abimelek, pe bango mibale basalaki boyokani. 28. Pe Abraham atiaki pembeni bana-mpate ya bilenge sambo ya etonga. 29. Pe Abimelek alobaki na Abrahama: Bana-mpate ya bilenge sambo oyo otie pembeni elingi koloba nini? 30. Pe ayanolaki: ete okozwa na loboko na ngai bana-mpate bilenge sambo, pona kozala litatoli na ngai ete natimbolaki mabulu oyo. 31. Yango wana, babengaki esika yango Beer-sheba, po kuna bango mibale balapaki ndayi. 32. Basalaki boyokani na Beer-sheba. Pe Abimelek na Pikole, mokonzi ya mapinga na ye, bazongaki na mboka ya Bafilistia. 33. Pe ye alonaki nzete ya tamaris na Beer-sheba ; pe kuna abelelaki kombo ya Yawe, *Nzambe ya seko. 34. Pe Abraham afandaki tangu molayi na mboka ya Bafilistia.

 

Mokapo 22

1. Pe ekomaki, na sima ya makambu wana, Nzambe amekaki Abraham pe alobaki na ye: Abraham! Pe alobaki : Ngai ye yo. 2. Pe alobaki: Kamata mwana na yo ya mobali, se moko ya yo, ye oyo olingaka, Izak, pe kende na mboka ya Moriya, pe kuna obonza ye na mbeka ya kotumba, likolo na moko ya bangomba oyo nakolakisa yo. 3. Pe Abraham atelemaki na tongo-tongo, pe abongisaki ane na ye pe amemaki elongo na ye mibale ya bilenge mibali na ye pe mwana na ye Izak ; Abukaki koni pona mbeka ya kotumba pe atelemaki pe akendaki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye. 4. Na mokolo ya misato, Abraham atombolaki miso pe amonaki esika yango na mosika. 5. Pe Abraham alobaki na bilenge mibali na ye: Bino, botikala awa, elongo na ane ; pe ngai na mwana tokokende ti kuna, pe tokokumisa ; pe tokozonga epayi na bino. 6. Pe Abraham azwaki koni ya likabo ya kotumba pe atiaki yango likolo ya Izak, mwana na ye ya mobali ; pe atiaki pe moto pe mbeli na loboko na ye, pe bango mibale bakendaki elongo. 7. Pe Izaka alobaki Abraham, na tata na ye: Tata na ngai! Pe alobaki : Ngai ye yo, mwana na ngai. Pe alobaki: Tala moto pe koni, kasi wapi mwana-mpate pona mbeka ya kotumba? 8. Pe Abrahama alobaki: Mwana na ngai, Nzambe akomona (akopesa) mwana-mpate pona mbeka ya kotumba. Pe bakendaki bango mibale elongo. 9. Pe bakomaki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye. Pe Abraham atongaki etumbelo kuna, pe abongisaki koni, pe akangaki Izak mwana na ye basinga, pe atiaki ye likolo na etumbelo, likolo na koni. 10. Pe Abraham asembolaki loboko na ye pe azwaki mbeli pona kokata mwana na ye. 11. Kasi Anjelu ya Yawe agangelaki ye wuta na likolo pe alobaki: Abraham! Abraham ! Pe alobaki : Ngai ye yo. 12. Pe alobaki: Kosembola loboko te likolo ya mwana mobali pe kosala ye eloko te, po sik’oyo nayebi ete obangaka Nzambe, pe ete opimeli ngai te mwana na yo, se moko ya yo. 13. Pe Abraham atombolaki miso pe amonaki, pe tala ezalaki na mpate-mobali moko sima na ye, ekangamaki na maseke na yango na nzete ya bwison. Pe Abraham akendaki pe azwaki mpate-mobali pe abonzaki yango lokola mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye. 14. Pe Abraham abengaki kombo ya esika wana : Yawe-Yire, lokola balobaka kino lelo: Na ngomba ya Yawe ekomonana (ekopesama). 15. Pe Anjelu ya Yawe agangelaki Abraham wuta na likolo pona mbala ya mibale. Pe alobaki: 16. Nalapi ndayi na ngai moko, elobi Yawe : Po osali likambu oyo pe opimeli ngai te mwana na yo, se moko ya yo, 17. Solo, nakopambola yo pe nakokomisa momboto na yo ebele lokola minzoto na likolo pe lokola zelo oyo ezali na libongo ya mayi monene ; pe momboto na yo bakozwa ekuke ya banguna na bango. 18. Pe bikolo nyonso na mabele ekopambolama na nzela ya momboto na yo, po ete yo oyoki mongongo na ngai. 19. Pe Abraham azongaki epayi ya bilenge na ye, pe batelemaki pe bakendaki elongo na Beer-sheba. Pe Abraham afandaki na Beer-sheba. 20. Pe ekomaki na sima ya makambu wana, bayebisaki Abraham na koloba: Tala, Milka, ye lokola, abotaki bana na Nakor, ndeko na yo : 21. Uze, mwana na ye ya liboso; pe Buzi, ndeko na ye ya mobali; pe Kemuele, tata ya Aram; 22. Pe Kesede, pe Azo, pe Pildashe, pe Yidlafe, pe Bethuele. 23. Nzokande Bethuele abotaki Rebeka. Milka abotaki mwambe nyonso na Nakor, ndeko ya Abraham. 24. Pe makango na ye, oyo atangami kombo ya Reyuma, ye pe lokola abotaki Tebak, pe Gakame, pe Takashe, pe Maaka.

 

Mokapo 23

1. Pe bomoyi ya Sara ewumelaki mibu kama moko na tuku mibale na sambo (127): mibu ya bomoyi ya Sara. 2. Pe Sara akufaki na Kiriate-Arba, oyo ezali Ebron, kati na mboka ya Kanana. Pe Abraham ayaki kosala matanga likolo ya Sara pe pona kolela ye. 3. Pe Abrahama atelemaki liboso ya mokufi na ye pe alobaki na bana ya Heth, alobaki : 4. Nazali mopaya pe mofandi kati na bino, bopesa ngai esika ya lilita na kati na bino, pe nakokunda mokufi na ngai liboso na ngai. 5. Pe ban aya Heth bayanolaki na Abraham, balobaki na ye: 6. Yoka biso, nkolo na ngai : yo ozali nkumu ya Nzambe na kati na biso, kunda mokufi na yo na malita na biso oyo eleki malamu. Moko te kati na biso akopimila yo lilita na ye pona okunda mokufi na yo kuna. 7. Pe Abraham atelemaki pe agumbamaki liboso ya batu ya mboka, liboso ya ban aya Heth. 8. Pe alobaki na bango, koloba: Soki ezali mokano na bino ete nakunda mokufi na ngai liboso na ngai, boyoka ngai pe bobondela pona ngai epayi ya Efrone mwana ya Tshokare. 9. Po ete apesa ngai libulu ya Makpela, oyo ezali ya ye, oyo ezali na suka ya elanga na ye. Tika apesa ngai yango na kati na bino pona motuya na yango mobimba, po nazwa yango lokola malita. 10. Nzokande, Efrone avandaki na kati ya bana ya Heth. Pe Efrone, Mohethi ayanolaki Abraham na matoyi ya bana ya Heth, liboso ya baoyo nyonso bazalaki kokota na ekuke ya engumba na ye. 11. Koloba : Te, nkolo na ngai, yoka ngai: nakopesa yo elanga ; pe libulu oyo ezali na kati na yango, napesi yo yango ; napesi yo yango na miso ya bana ya batu na ngai : kunda mokufi na yo. 12. Pe Abraham agumbamaki liboso ya batu ya mboka; 13. Pe alobaki na Efrone, na matoyi ya batu ya mboka, alobaki: Soki olingaki koyoka ngai malamu, napesa yo mbongo ya elanga, zwa yango epayi na ngai, pe nakokunda mokufi na ngai. 14. Pe Efrone ayanolaki Abraham, koloba na ye: 15. Nkolo na ngai, yoka ngai: Eteni ya mabele ya motuya ya shekele kama mineyi (400) ya palata ezali nini kati na ngai na yo? 16. Pe Abraham ayokaki Efrone, pe Abraham atangelaki Efrone kilo ya palata oyo alobaki na matoyi ya bana ya Heth, shekele kama mineyi (400) ya palata, oyo ezalaki na sika epayi ya basali mombongo. 17. Pe elanga ya Efrone, oyo ezalaki na Makpela, liboso ya Mamre, elanga pe libulu oyo ezalaki na kati, mpe banzete nyonso oyo ezalaki na elanga, na ndelo na yango nyonso zingazinga na yango, 18. Ekomaki biloko ya Abraham na miso ya bana ya Heth, liboso ya baoyo nyonso bazalaki kokota na ekuke ya engumba. 19. Pe na sima na yango, Abraham akundaki Sara mwasi na ye na libulu na elanga ya Makpela, oyo etalani na Mamre, oyo ezali Ebron, na mboka ya Kanana. 20. Pe bana ya Heth bapesaki elanga pe libulu oyo ezalaki na kati na yango epayi na Abraham lokola biloko na ye pona azala na yango lokola esika ya kokundama.

 

Mokapo 24

1. Pe Abraham akomaki mobange, apusanaki na mbula mingi, pe Yawe apambolaki Abraham na makambu nyonso. 2. Pe Abraham alobaki na mosali na ye, oyo ya mokolo na ndako na ye, oyo azalaki kokamba biloko nyonso oyo ye azalaki na yango: Tia, nabondeli yo, loboko na yo na se ya kwise na ngai, 3. Pe nakolapisa yo ndayi na nzela ya Yawe, Nzambe ya likolo pe Nzambe ya mabele, ete okozwa mwasi te pona mwana na ngai ya mobali kati ya bana basi ya Bakanana, oyo nafandi na kati na bango; 4. Kasi okokende na mboka na ngai pe epayi ya libota na ngai, pe okozwa mwasi pona mwana na ngai, pona Izak. 5. Pe mosali yango alobaki na ye: Ezali boni soki mwasi yango alingi te kozonga elongo na ngai na mboka oyo? 6. Pe Abraham alobaki na ye: omikeba kozongisa mwana na ngai kuna. 7. Yawe, Nzambe ya likolo, oyo azwaki ngai na ndako ya tata na ngai pe na mboka ya libota na ngai, pe oyo alobaki na ngai pe alapelaki ngai ndayi, alobaki: Nakopesa na momboto na yo mboka oyo, ye moko akotinda anjelu na ye liboso na yo, pe okozwa kuna mwasi pona mwana na ngai ya mobali. 8. Pe soki mwasi yango aboyi koya elongo na yo, bongo yo okolongwa na ndayi oyo epayi na ngai : kaka yo okozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te. 9. Pe mosali atiaki loboko na ye na se ya kwise ya Abraham, nkolo na ye pe alapelaki ye ndayi na tina ya makambu yango. 10. Pe mosali azwaki bakamela zomi na kati ya bakamela ya nkolo na ye pe akendaki, nzokande azalaki na biloko nyonso ya nkolo na ye se ya loboko na ye. Atelemaki pe akendaki na Mezopotamia, na engumba ya Nakore. 11. Pe afukamisaki bakamela na libanda ya engumba, pembeni ya libulu ya mayi, na tangu ya pokwa, tangu oyo basi babimaka pona kotoka mayi. 12. Pe alobaki: Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai Abraham, nabondeli yo, sala ngai lelo nasala bokutani moko lelo, pe sala ngolu epayi ya nkolo na ngai Abraham. 13. Tala, natelemi pembeni ya libulu ya mayi, pe bana basi ya batu ya engumba bazali kobima pona kotoka mayi. 14. Bongo tika ete elenge mwasi oyo nakoloba na ye: Nabondeli yo, kitisa mbeki na yo po ete namela, pe oyo akoloba: Mela pe nakomelisa pe bakamela na yo mayi, azala ye oyo obongisi pona mosali na yo Izak. Pe na yango nakoyeba ete omonisi ngolu epayi ya nkolo na ngai.

— v. 10: Na Ebre: Arame-Naharaime; Siri ya Bibale Mibale.

15. Pe ekomaki ete liboso ye asilisa koloba, Rebeka * abimaki na mbeki na ye ya mayi na lipeka : Abotamaki na Bethuel, mwana ya Milka, mwasi ya Nakore, ndeko ya Abraham. 16. Pe elenge mwasi yango azalaki elongi kitoko mingi, ngondo, pe moko te ayebaki ye. Pe akitaki na libulu pe atondisaki mbeki na ye, pe amataki lisusu. 17. Pe mosali akimaki mbangu pona kokutana na ye pe alobaki: Nabondeli yo, tika namela mwa mayi na mbeki na yo. 18. Pe ye alobaki: Mela nkolo na ngai. Pe noki-noki akitisaki mbeki na ye na loboko na ye pe apesaki ye komela. 19. Pe tangu asilisaki kopesa ye ya komela, alobaki: Nakotoka mayi pe pona bakamela na yo, ti tangu bakosilisa komela. 20. Pe akendeki mbangu pe asopaki mbeki na ye nyonso na kati ya liziba, pe akimaki lisusu mbangu na libulu pona kotoka mayi, pe atokaki mayi pona bakamela na ye nyonso. 21. Pe mobali yango azalaki kotalaka ye na kokamwa, kozanga koloba ata liloba moko, pona komona soki Yawe alongisaki mobembo na ye to te.

— v. 15: Na Ebre: Ribka, kitoko.

22. Pe ekomaki ete tangu bakamela esilaki komela, ete mutu yango azwaki lopete moko ya wolo * oyo ezalaki na kilo ya ndambo ya shekele ** pe brasele mibale pona maboko na ye, ya kilo zomi ya wolo. 23. Pe alobaki: Ozali mwana mwasi ya nani? Yebisa ngai nayeba, nabondeli yo. Ezali na esika pona biso, na ndako ya tata na yo, esika pona kofanda kuna ? 24. Pe alobaki na ye: Nazali mwana mwasi ya Bethuel, mwana ya Milka, oyo abotaki na Nakore. 25. Pe alobaki na ye: Tozali na matiti ya matiti pe ebele ya bileyi ya banyama, pe esika pona kofanda.

— v. 22*: lopete ya zolo, tala molongo 47; esika mosusu pe: mbeli ya matoyi, tala 35:4. — v. 22**:Ebre: beka; tala Kob. 38:26.

26. Pe mutu yango afukamaki pe agumbamaki liboso ya Yawe, 27. Pe alobaki: Apambolama Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai Abraham, oyo alongolaki te ngolu pe bosolo na ye epayi ya nkolo na ngai. Tangu nazalaki nanu na nzela, Yawe akumbi ngai na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai. 28. Pe elenge mwasi akimaki mbangu pe ayebisaki na ndako ya mama na ye makambu wana. 29. Nzokande Rebeka azalaki na ndeko mobali moko na kombo Labana, pe Labana akimaki mbangu epayi ya mutu yango libanda, pembeni ya liziba. 30. Pe ekomaki tangu amonaki lopete pe brasele na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, pe ayokaki maloba ya Rebeka, ndeko na ye ya mwasi, koloba: mobali yango alobaki ngai boye, pe akendaki epayi ya mutu yango. Pe tala, atelemaki pembeni ya bakamela, pembeni ya liziba. 31. Pe alobaki: Kota, mopambolami ya Yawe; pona nini otelemi libanda ? Po nabongisi ndako pe esika pona bakamela. 32. Pe mobali yango akotaki na ndako, pe bakitasaki biloko likolo bakamela ; Bapesaki bakamela matiti ya kolia pe bileyi ya banyama, pe mayi pona kosukola makolo na ye pe makolo ya batu oyo bazalaki elongo na ye. 33. Pe batiaki bileyi liboso na ye, kasi ye alobaki: Nakolia te ti tangu nakoloba oyo nasengeli koloba. Pe Laban alobaki: Loba. 34. Pe alobaki: Nazali mosali ya Abraham. 35. Nzokande, Yawe apambolaki mingi nkolo na ngai, pe ye akomi mutu monene. Apesi ye bitonga pe bangombe, palata pe wolo, basali ya mibali pe ya basi, bakamela pe baane. 36. Pe Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kati ya kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, pe apesaki ye nyonso oyo aza na yango. 37. Pe nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi, alobaki: Okozwa mwasi te pona mwana na ngai ya mobali na kati ya bana basi ya Bakanana, na kati ya mboka oyo nafandi; 38. Kasi okokende na ndako ya tata na ngai pe na libota na ngai, pe okozwa mwasi pona mwana na ngai. 39. Pe nalobaki na nkolo na ngai: Tangu mosusu mwasi akolanda na sima na ngai te? 40. Pe alobaki na ngai: Yawe, oyo nazali kotambola liboso na ye, akotinda anjelu na ye elongo na yo pe akolongisa mobembo na yo, pe okozwa mwasi pona mwana na ngai epayi ya libota na ngai pe na ndako ya tata na ngai. 41. Tangu okokoma na libota na ngai, okobima na ndayi oyo nazali kosalisa yo; pe soki bapesi yo ye te, okobima na ndayi oyo nazali kosalisa yo. 42. Pe nayaki lelo na liziba, pe nalobaki: Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai Abraham, soki olingi kolongisa mobembo oyo nasali, 43. Tala, natelemi pembeni ya liziba ya mayi. Tika ete elenge mwasi oyo akobima pona kotoka mayi, pe oyo nakoloba na ye: Nabondeli yo, pesa ngai mwa mayi na mbeki na yo po namela, pe oyo akoloba na ngai: 44. Mela yo moko, pe nakotoka pe pona bakamela na yo, tika ye azala mwasi oyo Yawe obongisi pona mwana ya nkolo na ngai. 45. Liboso nasilisa koloba na kati ya motema na ngai, tala Rebeka abimaki na mbeki na ye likolo na lipeka na ye. Pe akitaki na libulu ya mayi pe atokaki mayi, pe nalobaki na ye: Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. 46. Pe akendeki mbangu pe akitisaki mbeki na ye na lipeka na ye pe alobaki: Mela pe nakomelisa bakamela na yo. Bongo namelaki, pe ye amelisaki bakamela. 47. Pe natunaki ye: Ozali mwana ya nani? Ye alobaki: Nazali mwana mwasi ya Bethuel, mwana ya Nakore, oyo Milka abotelaki ye. Yango wana, natiaki lopete na zolo na ye pe ba brasele na maboko na ye. 48. Pe nafukamaki pe nagumbamaki liboso ya Yawe, pe napambolaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai Abraham, oyo akambaki ngai na nzela ya sembo pona kozwa mwana mwasi ya ndeko mobali ya nkolo na ngai pona mwana na ye. 49 pe sik’oyo, soki bolingi komonisa ngolu pe bosolo epayi ya nkolo na ngai, boyebisa ngai; pe soki te, boyebisa ngai, pe nakobaluka na loboko ya mobali to na loboko ya mwasi. 50. Pe Laban na Bethuel bazongisaki pe balobaki: Likambu yango ewuti na Yawe, tokoki te koloba na yo malamu to mabe. 51. Tala Rebeka liboso na yo; kamata ye pe kende, pe tika ye azala mwasi ya mwana ya nkolo na yo, lokola Yawe alobaki. 52. Pe ekomaki ete tangu mosali ya Abraham ayokaki maloba na bango, agumbamaki na mabele liboso ya Yawe. 53. Pe mosali abimisaki biloko ya palata pe ya wolo pe bilamba pe apesaki yango na Rebeka. Apesaki pe makabo ya bozwi epayi ya ndeko na ye ya mobali pe mama na ye. 54. Ye na batu oyo bazalaki elongo na ye baliaki pe bamelaki, pe bafandaki kuna. Pe batelemaki na tongo, pe alobaki: Bozongisa ngai epayi ya nkolo na ngai. 55. Pe ndeko mobali na mama balobaki: Tika elenge mwasi atikala na biso mwa mikolo, ata zomi, bongo na sima akoki kokende. 56. Pe alobaki na bango: Bowumisa ngai te, tangu Yawe akolongisi mobembo na ngai, bozongisa ngai, po ete nakende epayi ya nkolo na ngai. 57. Pe balobaki: Tobenga elenge mwasi pe totuna monoko na ye. 58. Pe babengaki Rebeka pe balobaki na ye: Okokende elongo na mobali oyo? Pe alobaki : Nakokende. 59. Pe batikaki Rebeka, ndeko na bango ya mwasi, pe nourrice, pe mosali ya Abraham pe batu na ye. 60. Pe bapambolaki Rebeka pe balobaki na ye: Yo, ndeko na biso ya mwasi, okoma bankoto ya bankoto, pe tika ete momboto na yo ezwa ekuke ya banguna na bango! 61. Pe Rebeka atelemaki, pe bana basi na ye, pe bamataki na bakamela pe balandaki sima mobali yango. Pe mosali akamataki Rebeka pe akendaki. 62. Pe Izak awutaki kokoma na libulu ya Lakayi-royi *; nzokande azalaki kofanda na mboka ya Sud (Negeve). 63. Pe Izak abimaki na elanga pona komaniola tangu pokwa ekomaki pene. Pe atombolaki miso na ye pe atalaki, pe tala, bakamela ezalaki koya. 64. Pe Rebeka atombolaki miso pe amonaki Izak; pe akitaki likolo na kamela. 65. Nzokande alobaki mosali: Mutu wana azali nani oyo azali kotambola na bilanga na koya kokutana? Pe mosali alobaki: Ezali nkolo na ngai. Pe akamataki vwale na ye pe amizipaki. 66. Pe mosaleli ayebisaki Izak makambu nyonso oyo asalaki. 67. Pe Izak amemaki ye na kati ya hema ya Sara mama na ye ; pe azwaki Rebeka, pe akomaki mwasi na ye, pe alingaki ye; pe Izak abondisamaki na tina ya mama na ye.

— v. 62: liziba ya mayi ya Mutu ya Bomoyi oyo amimonisaka.

 

Mokapo 25

1. Pe Abraham abalaki lisusu mwasi, na kombo ya Ketura; 2. Pe abotelaki ye Zimrane, Yokeshane, Medane, Midiane, Yishibake, pe Shuya. 3. Pe Yokeshana abotaki Sheba na Dedane. Bana ya Dedane bazalaki Ashurime, Letushime pe Lewumime. 4. Bana ya Midiane bazalaki Efa, Efere, Enok, Abida pe Eldaa. Bango nyonso bazalaki bana ya Ketura. 5. Pe Abraham apesaki nyonso oyo azalaki na yango na Izak. 6. Pe epayi ya bana ya makango oyo Abrahama azalaki na bango, Abraham apesaki bamakabo, pe tangu azalaki nanu na bomoyi, atindaki bango mosika na mwana na ye Yisaka na esti, na mokili ya esti. 7. Pe oyo ezali mikolo ya bambula ya bomoyi ya Abraham, oyo abikaki na bomoyi: mbula kama moko na tuku sambo na mitano (175). 8. Pe Abraham asilaki kopema pe akufaki na mobange malamu, akolaki mingi pe atondaki na mikolo; pe asangisamaki epayi ya batu na ye. 9. Bana na ye ya mibali Izak na Ishamayel bakundaki ye na libulu ya Makpela, na elanga ya Efrone mwana ya Tsoyare, Moeti, oyo ezali kotala Mamre, 10. Elanga oyo Abraham asombaki epayi ya bana ya Eti. Kuna, bakundaki Abraham na Sara mwasi na ye. 11. Pe ekomaki, sima ya liwa ya Abraham, Nzambe apambolaki Izak, mwana na ye. Pe Izak azalaki kofanda pembeni ya libulu ya Lakayi-royi. * . 12. Pe oyo ezali mabota ya Ishmayel, mwana ya Abraham, oyo Agar Moejipito, mosali ya Sara, abotelaki Abraham. 13. Pe tala bakombo ya bana ya Ishmayel, na bakombo na bango, na kolanda mabota na bango: Nebayote, mwana ya liboso ya Ishmayel; Kedar, Adibeyel, Mibisame, 14. Pe Mishima, pe Duma, pe Masa, 15. Pe Adar, pe Tema, pe Yeture, pe Nafishi, pe Kedema. 16. Oyo ezali bana mibali ya Ishmayel, pe oyo wana ezali bakombo na bango, na kolanda mapango na bango pe bakaa na bango: bankumu zomi na mibale ya mabota na bango. 17. Pe oyo ezali bambula ya bomoyi ya Ishmayel: mibu kama moko na tuku misato na sambo (137); pe atikaki kopema pe akufaki, pe asangisamaki epayi ya batu na ye. 17. Pe bazalaki kofanda banda na Avila ti na Shure, oyo etalani na Ejipito, tangu ozali koya epayi ya Asuria. Akweyaki na liwa na miso ya bandeko na ye nyonso. 19. Oyo ezali lisolo ya oyo ewuti na Izak, mwana ya Abraham: Abraham abotaki Izak. 20. Pe Izak azalaki na mbula tuku mineyi (40) tangu abalaki Rebeka, mwana ya Bethuel Mosuria ya Padane-Aram, ndeko mwasi ya Labana Mosuria. 21. Pe Izak abondelaki na molende Yawe pona mwasi na ye, po azalaki ekomba; pe Yawe andimaki losambo na ye, pe Rebeka mwasi na ye azwaki zemi. 22. Pe bana bazalaki komitindika na kati ya libumu na ye; pe alobaki : Soki ezali bongo, pona nini nazali awa? Pe akendaki kotuna Yawe. 23. Pe Yawe alobaki na ye: Bikolo mibale ezali na kati ya libumu na yo, pe batu mibale bakokabwana na kobima na libumu na yo, pe batu moko bakozala makasi koleka batu mosusu, pe mokolo akosalela leki. 24. Pe mikolo oyo engelaki abota ekomaki, pe tala, ezalaki na mapasa na libumu na ye. 25. Pe oyo ya liboso abimaki, motane na nzoto mobimba lokola kazaka ya pwale; pe babengaki ye na kombo Ezawu*. 26. Pe na sima ndeko na ye abimaki, na loboko na ye esimbaki litindi ya Ezawu; pe babengaki kombo na ye Yakobo *. Pe Izak azalaki na mibu tuku motoba (60) tangu babotamaki. 27. Pe bana bakolaki: Ezawu azalaki mutu ya mayele na koboma nyama, mutu ya zamba; pe Yakobo azalaki mutu ya pete, oyo azalaki kofanda na bahema. 28. Pe Izak alingaki Ezawu, po ete banyama ezalaki bileyi na ye; kasi Rebeka azalaki kolinga Yakobo. — v. 26*: oyo asimbi na litindi, elingi koloba: oyo azali kozwa esika ya. 29. Pe Yakobo azalaki kolamba potopoto; pe Ezawu awutaki na zamba, pe azalaki ya kolemba. 30. Pe Ezawu alobaki na Yakobo: Nabondeli yo, tika ngai namela eloko ya motane, litumbu wana ya motane po nalembi. Yango wana babengaka kombo na ye Edome*. 31. Pe Yakobo alobaki: Tekela ngai lelo lotomo na yo yaya. 32. Pe Ezawu alobaki na Yakobo: Tala, nazali kokende na kokufa, lotomo na ngai ya yaya ezali na litomba nini pona ngai? 33. Pe Yakobo alobaki: Lapela ngai ndayi lelo. Pe ye alapelaki ye ndayi pe atekaki lotomo na ye ya yaya epayi ya Yakobo. 34. Pe Yakobo apesaki Ezawu lipa na potopoto ya lentiye, pe aliaki pe amelaki, pe atelemaki pe akendaki. Pe Ezawu atiolaki lotomo na ye ya yaya.

— v. 30: motane. * .

 

Mokapo 26

1. Pe nzala ezalaki na kati ya mboka, longola nzala ya yambo oyo esalemaki na mikolo ya Abraham. Pe Izak akendaki epayi ya Abimeleke, mokonzi ya Bafilistia, na Gerare. 2. Pe Yawe abimelaki ye pe alobaki: Kokita na Ejipito te, vanda na mokili oyo nalobaki na yo. 3. Fanda na mboka oyo, pe nakozala elongo na yo pe nakopambola yo; po na yo pe na bakitani na yo nakopesa bamboka oyo nyonso, pe nakokokisa ndayi oyo nalapaki na Abraham tata na yo. 4. Pe nakobakisa bakitani na yo lokola minzoto ya likolo, pe nakopesa bakitani na yo bamboka oyo nyonso, pe bikolo nyonso ya mabele ekopambolama na nzela ya bakitani na yo, 5. Po ete Abraham ayokaki mongongo na ngai pe abatelaki ekateli na ngai, mibeko na ngai, mitindo na ngai pe malako na ngai. 6. Pe Izak afandaki na Gerare. 7. Pe mibali ya esika wana batunaki na tina ya mwasi na ye, pe alobaki: Azali ndeko na ngai ya mwasi, po abangaki koloba: Mwasi na ngai, noki te mibali ya esika yango baboma ye na tina ya Rebeka, po azali elongi kitoko. 8. Pe esalemaki ete lokola kofanda na kati na esika wana tangu molayi, Abimelek, mokonzi ya Bafilistia, atalaki na lininisa, pe amoni, tala, Izak azalaki kosakana na Rebeka, mwasi na ye. 9. Pe Abimelek abengaki Izak pe alobaki: Tala, azali penza mwasi na yo! Pe ndenge nini olobi: Azali ndeko na ngai ya mwasi’? Pe Izak alobaki na ye: Po ete namilobaki: Noki te nakufa na tina na ye. 10. Pe Abimelek alobaki: Likambu nini osali biso? Etikalaki moke ete moko ya batu alala na mwasi na yo, pe olingaki komemisa biso ngambo. 11. Pe Abimelek apesaki batu nyonso mitindo, koloba: Ye oyo nyonso akosimba mobali oyo to mwasi na ye, akobomama penza. 12. Pe Izak alonaki na mabele wana pe mbula wana abukaki mbala kama moko, pe Yawe apambolaki ye. 13. Pe Mutu yango akolaki pe azalaki kokoba kokola ti akomaki makasi mingi penza. 14. Pe azalaki na bitonga ya bameme na bantaba ebele pe bangombe pe ebele ya basali, pe Bafilistia bayokelaki ye likunya. 15. Pe Bafilistia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya tata na ye batimbolaki na mikolo ya tata na ye Abraham pe batondisaki yango na zelo. 16. Pe Abimelek alobaki na Izak: Longwa mosika na biso, po yo ozali na nguya makasi koleka biso. 17. Pe Izak alongwaki kuna, pe atiaki kaa na lobwaku ya Gerare pe afandaki kuna. 18. Pe Izaka atimbolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimbolaki na mikolo ya tata na ye Abraham, oyo Bafilistia bazipaki sima ya liwa ya Abraham, pe apesaki yango bakombo na bakombo oyo tata na ye apesaka yango. 19. Pe basali ya Izak batimbolaki na lobwaku pe bakutaki libulu ya mayi ya peto. 20. Pe babateli bibwele ya Gerare baswanaki na babateli bibwele ya Izak, balobaki: Mayi ezali ya biso. Pe abengaki libulu yango na kombo Esek, po ete baswanaki elongo na ye. 21. Pe batimbolaki libulu mosusu, pe baswanaki lisusu pona yango pe; pe abengaki yango na kombo Sitana. 22. Pe alongwaki kuna pe atimbolaki libulu mosusu, pe baswanaki pona libulu yango te; pe abengaki yango na kombo Reyobote, po ete, alobi, Yawe apesi biso sik’oyo esika, pe tokofuluka mingi na mboka.

— v. 20: matata. — v. 21: botelemeli, koyina. — v. 22: bisika ya kofanda.

23. Pe wuta kuna, amataki ti na Beere-Sheba. 24. Pe Yawe abimelaki ye na butu wana, pe alobaki: Ngai nazali Nzambe ya tata na yo Abraham, kobanga te, po nazali elongo na yo, nakopambola yo pe nakokomisa bakitani na yo mingi na tina ya Abraham, mosali na ngai. 25. Pe atongaki etumbelo kuna pe abelelaki kombo ya Yawe. Atelemisaki kuna hema na ye, pe basali ya Izak batimbolaki libulu moko ya mayi kuna. 26. Pe Abimeleke awutaki na Gerare akeyi epayi na ye, elongo na moninga na ye Akuzate pe Pikole, mokonzi ya lipinga na ye. 27. Pe Izak alobaki na bango: Pona nini boye epayi na ngai, po bino boyinaka ngai pe bobenganaki ngai mosika na bino? 28. Pe balobaki: Biso tomoni polele ete Yawe azali elongo na yo, pe tolobaki: Tika ete ndayi ezala kati na biso, kati na biso na yo, pe tokosala boyokani elongo na yo : 29. Ete okosala biso mabe te, lokola biso tosimbo yo te, lokola tosalelaki yo kaka malamu pe tozongisaki yo na kimia. Ozali sik’oyo mopamboli ya Yawe. 30. Pe aselelaki bango elambo, pe baliaki pe bamelaki. 31. Pe balamukaki na tongo-tongo pe balapaki ndayi moko epayi na mosusu; pe Izak azongisaki bango, pe bakendaki epayi na ye na kimia. 32. Pe ekomaki na mokolo yango, basali ya Izak bayaki pe bayebisaki ye na tina ya libulu oyo batimbolaki, pe balobaki na ye: Tomoni mayi. 33. Pe abengaki yango na kombo Sheba; yango wana kombo ya engumba yango ezalaki Beer-Sheba kino lelo.

— v. 28: ndayi na elakeli mabe. — v. 33: ndayi.

34. Pe Ezawu azalaki na mbula tuku mineyi (40) pe azwaki pona basi Yudite mwana mwasi ya Beyeri Moheti, pe Basemate mwana mwasi ya Elone Moheti ; 35. Pe bazalaki balolo ya elimo pona Izak pe pona Rebeka.

 

Mokapo 27

1. Pe ekomaki, tangu Izak akomaki mobange pe miso na ye elembaki na lolenge ete akokaki komona te, abengaki Ezawu mwana na ye ya liboso pe alobaki na ye: Mwana na ngai! Pe ye alobaki na ye: Ngai oyo. 2. Pe alobaki: Omoni ete nazali mobange, nayebi te mokolo ya liwa na ngai. 3. Pe sik’oyo, nabondeli yo, kamata bibundeli na yo, mbeli na yo, pe likonga na yo, pe bima na elanga, pe bomemela ngai mwa nyama; 4. Pe bongisela ngai bileyi ya elengi lokola nalingaka, pe memela ngai yango, pe nakolia yango, po ete molimo na ngai epambola yo liboso ete nakufa. 5. Nzokande Rebeka azalaki koyoka Izak tangu azalaki koloba na mwana na ye Ezawu. Pe Ezawu akendaki na elanga pona kozwa mwa nyama, pona komemela ye. 6. Pe Rebeka alobaki na mwana na ye Yakobo, koloba: Tala, nayokaki tata na yo oyo azalaki koloba na ndeko na yo Ezawu, koloba: 7. Memela ngai mwa nyama pe bongisela ngai bileyi ya elengi, po ete nalia, pe ete napambola yo liboso ya Yawe liboso ya kufa na ngai. 8. Pe sik’oyo, mwana na ngai, yoka mongongo na ngai na nyonso oyo nakopesa yo mitindo. 9. Kende, nabondeli yo, na etonga pe zwela ngai bana ntaba ya malamu kati na bantaba, pe nakobongisa bileyi ya elengi pona tata na yo, lokola alingaka. 10. Pe okomemela yango epayi ya tata na yo, pe akoliya, po ete apambola yo liboso ya kufa na ye. 11. Pe Yakobo alobaki na Rebeka, mama na ye: Tala, Ezawu, ndeko na ngai, azali mutu ya pwale, kasi ngai nazali mutu azanga pwale. 12. Mbala mosusu tata na ngai akosimba-simba ngai, pe nakoleka na miso na ye pona mokosi, pe nakomema elakeli mabe likolo na ngai, kasi lipamboli te. 13. Pe mama na ye alobaki na ye: Mwana na ngai, tika ete elakeli mabe na yo ezala likolo na ngai! Kaka yoka mongongo na ngai, pe kende, zwela ngai yango. 14. Pe akendaki pe azwaki yango, pe amemaki yango epayi ya mama na ye; pe mama na ye abongisaki bileyi ya elengi, lokola tata na ye alingaka. 15. Pe Rebeka akamataki bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, bilamba ya motuya oyo azalaki na yango elongo na kati ya ndako pe alatisaki yango Yakobo, mwana na ye ya moke. 16. Pe elongo na baposo ya bana ntaba, azipaki pe maboko na ye pe kingo ya pamba. 17. Pe atiaki bileyi ya elengi pe lipa oyo abongisaki na loboko ya Yakobo, mwana na ye. 18. Pe ayaki epayi ya tata na ye pe alobaki: Tata na ngai! Pe alobaki : Ngai oyo ; Ozali nani, mwana na ngai? 19. Pe Yakobo alobaki na tata na ye: Ngai nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso, nasali ndenge oyebisaki ngai: Nabondeli yo, telema pe fanda pe lia banyama na ngai, po molimo na yo epambola ngai. 20. Pe Izak alobaki na mwana na ye: Mwana na ngai, ndenge nini ozwi yango noki-noki? Pe alobaki: po Yawe Nzambe na yo apesi ngai nzela ya kokutana na ye liboso na ngai. 21. Pe Izak alobaki na Yakobo: Opusana, mwana na ngai, po nakoka kosimba-simba yo, po nayeba soki ozali penza mwana na ngai Ezawu to te. 22. Pe Yakobo apusanaki penepene ya Izak tata na ye pe asimbaki-simbaki ye, pe alobaki: Mongongo ezali mongongo ya Yakobo, kasi maboko ezali maboko ya Ezawu. 23. Kasi ayebaki ye te, po maboko na ye ezalaki na pwale lokola maboko ya ndeko na ye Ezawu; pe apambolaki ye. 24. Alobaki: Ozali penza mwana na ngai Ezawu? Pe alobaki : Nazali yango. 25. Pe alobaki: Tiela ngai, pe ete nalia nyama ya mwana na ngai, po ete molimo na ngai epambola yo. Pe atielaki ye pe aliaki. Pe amemeli ye vino, pe amelaki. 26. Pe Izak, tata na ye, alobaki na ye: Nabondeli yo, pusana, pe pesa ngai beze, mwana na ngai. 27. Pe apusanaki pe apesaki ye beze. Pe ayokaki solo kitoko ya bilamba na ye, pe apambolaki ye, pe alobaki : Tala, solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya elanga oyo Yawe apambolaki. 28. Tika ete Nzambe apesa yo mamwe ya likolo pe ya mafuta ya mabele, pe ebele ya mbuma pe vino ya sika! 29. Tika ete batu ya bikolo basalela yo, pe bikolo bafukama liboso na yo! Zala nkolo ya bandeko na yo, pe tika bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo! Alakelama mabe ye oyo akolakela yo mabe, pe ye oyo akopambola yo apambolama!” 30. Pe lokola Izak asilisaki kopambola Yakobo, pe ete Yakobo abimaki nanu te liboso ya tata na ye Izak, esalemaki ete Ezawu ndeko na ye ya mobali, awutaki koboma banyama. 31. Ye pe lisusu abongisaki pe bileyi ya elengi pe amemelaki yango tata na ye. Pe alobaki na tata na ye: Tika tata na ngai atelema pe alia nyama ya mwana na ye, po molimo na yo epambola ngai. 32. Pe Izak, tata na ye atunaki ye: Yo, ozali nani? Pe ayanolaki: Nazali mwana na yo, mwana na yo ya liboso, Ezawu. 33. Bongo Izak asimbamaki na kolenga makasi pe alobaki: bongo ezali nani oyo azwaki nyama pe amemelaki ngai yango? Naliaki yango nyonso liboso yo oya, pe napambolaki ye : bongo apambolami. 34. Tangu Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, agangaki na mongongo makasi pe ya bololo ; pe alobaki na tata na ye: Tata na ngai, pambola ngai, ngai pe! 35. Pe alobaki: Ndeko na yo ayaki na bokosi pe azwi lipamboli na yo. 36. Pe alobaki: ezali te ete babengaki kombo na ye Yakobo? Pe azwaki esika na ngai mbala mibale: azwaki lotomo na ngai ya liboso, pe tala, sik’oyo azwi lipamboli na ngai! Pe alobaki : Obombeli ngai lipamboli moko te? 37. Pe Izak ayanolaki pe alobi na Ezawu: tala, nakomisi ye nkolo na yo pe napesi ye bandeko na ye nyonso pona bazala basali, pe napesi ye ble pe vino ya sika, bongo nakosala nini pona yo, mwana na ngai? 38. Pe Ezawu alobaki na tata na ye: Tata na ngai, ozali kaka na lipamboli moko oyo? Pambola ngai, ngai pe ! Pe Ezawu atombolaki mongongo na ye pe alelaki. 39. Pe Izak, tata na ye ayanolaki ye: tala, efandeli na yo ekozala na kati ya mafuta ya mabele pe na mamwe ya likolo. 40. Pe okobika bomoyi na mopanga na yo pe okosalela ndeko na yo; pe tangu okozwa kokonza, okobuka ekanganeli na ye na likolo na kingo na yo. 41. Pe Ezawu ayinaki Yakobo na tina ya lipamboli oyo tata na ye apesaki ye. Pe Ezawu alobaki na kati ya motema na ye: Mikolo ya kolela tata na ngai ezali kobelema, nakoboma ndeko na ngai Yakobo. 42. Pe bayebisaki Rebeka maloba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, pe atindaki pe abengaki Yakobo, mwana na ye ya leki pe alobaki na ye: Tala, Ezawu, ndeko na yo ya mobali azali komilendisama na tina na yo na elikia ya koboma yo. 43. Pe sik’oyo mwana na ngai, yoka mongongo na ngai: Telema, kima epayi ya Labana ndeko na ngai ya mobali, na Arane; 44. Pe okofanda elongo na ye mwa mikolo, ti tangu kanda ya ndeko na yo ekosila. 45. Kino kanda ya ndeko na yo ekolongwa epayi na yo pe akobosana oyo osali ye, pe nakotinda yo pe nakobimisa yo kuna. Pona nini nasengeli kozanga bino mibale na mokolo moko? 46. Pe Rebeka alobaki na Izak: Nazali koyina bomoyi na ngai na tina ya bana basi ya Baheti, soki Yakobo azwi mwasi moko na kati ya bana basi ya Baheti, lokola baoyo, na kati ya bana basi ya mboka, litomba nini ekozala pona ngai kobika na bomoyi?

 

Mokapo 28

1. Pe Izak abengaki Yakobo pe apambolaki ye pe apesaki ye mitindo, pe alobaki na ye: Okozwa mwasi te na kati ya bana basi ya Kanana. 2. Telema, kende sik’oyo na Padane-Aram, na ndako ya Bethuel, tata ya mama na yo, pe kuna zwa mwasi na kati ya bana basi ya Labana, ndeko ya mama na yo. 3. Pe tika ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apambola yo pe asala yo obota pe akomisa yo mingi, po okoma lisanga ya batu. 4. Pe tika apesa yo lipamboli ya Abraham, na yo pe na bakitani na yo elongo na yo, po ozwa mokili ya bofandi na yo, oyo Nzambe apesaki Abraham. 5. Pe Izak atindaki Yakobo akende, ye akendaki na Padane-Aram, epayi ya Labana, mwana ya Bethuel Moarame, ndeko ya Rebeka, mama ya Yakobo pe ya Ezawu. — molongo 3: El-Shadayi. 6. Pe Ezawu amonaki ete Izak apambolaki Yakobo pe asilaki kotinda ye na Padane-Aram pona azwa mwasi moko, pe ete apesaki ye motindo tangu azalaki kopambola ye: Okozwa mwasi te na kati ya bana basi ya Kanana. 7. Pe ete Yakobo ayokaki tata na ye pe mama na ye pe akendaki na Padane-Aram. 8. Pe Ezawu amonaki ete bana na basi ya Kanana bamonanaki mabe na miso ya tata na ye Izak. 9. Pe Ezawu akendaki epayi ya Ishmayel pe azwaki pona mwasi, longola basi oyo asilaki kozala na bango, Mayalate, mwana ya Ishmayel, mwana ya Abraham, ndeko mwasi ya Nebayote. 10. Pe Yakobo abimaki na Beer-Sheba pe akendaki na Arane. 11. Pe akomaki na esika moko oyo pe alalaki butu mobimba kuna, po moyi elalaki ; pe akamataki mabanga ya esika wana pe asalaki yango likonzi, pe alalaki kuna. 12. Pe alotaki: pe tala, eskalie etelemi na mabele, pe songe na yango ezalaki kotuta ti na likolo, pe baanjelu ya Nzambe bazalaki komata pe kokita likolo na yango. 13. Pe tala, Yawe atelemaki likolo na yango pe alobaki: Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Abraham tata na yo pe Nzambe ya Izak ; mabele, oyo olali likolo na yango, nakopesa yo yango, pe bakitani na yo ; 14. Pe bakitani na yo bakozala lokola putulu ya mabele, pe okopanzana na westi pe na esti pe na nord pe na sudi ; pe mabota nyonso ya mabele ekopambolama na nzela na yo pe na kati ya mokitani na yo. 15. Pe tala, nazali elongo na yo pe nakobatela yo epayi nyonso oyo okokende, pe nakozongisa yo na mabele oyo, po nakotika yo te ti tangu nakosala oyo nalaki yo. 16. Pe Yakobo alamukaki na pongi na ye pe alobaki: Ya solo Yawe azali na esika oyo, pe ngai nayebaki yango te. 17. Pe alengaki pe alobaki: Esika oyo ezali penza somo! 18. Pe Yakobo atelemaki na tongotongo pe azwaki libanga oyo atiaki na se ya moto na ye, pe atelemisaki yango lokola likonzí, pe asopi mafuta likolo na yango. 19. Pe abengaki esika yango na kombo Bethel*; kasi liboso kombo ya engumba yango ezalaki Luzi. 20. Pe Yakobo alapaki ndayi, alobaki: Soki Nzambe akozala elongo na ngai pe akobatela ngai na nzela oyo nazali kotambola, pe ete akopesa ngai lipa ya kolia pe elamba pona nalata, 21. Pe ete nazongi na kimia na ndako ya tata na ngai, Yawe akozala Nzambe na ngai*. 22. Pe libanga oyo natelemisi na likonzi ekozala ndako ya Nzambe, pe na nyonso oyo okopesa ngai, nakopesa yo moko na zomi.

 

Mokapo 29

1. Pe Yakobo atambolaki pe akendaki na mboka ya bana ya esti. 2. Pe atalaki, pe tala libulu moko ya mayi na kati ya elanga, pe tala bitonga misato ya bampate elalaki pembeni na yango (po ete bitonga ezalaki komela mayi na libulu wana) ; pe libanga moko monene ezalaki likolo ya monoko ya libulu yango. 3. Pe bitonga nyonso basanganaki kuna, pe bazalaki kozipa yango na libanga moko likolo na monoko ya libulu ya mayi, pe bazalaki komelisa bitonga mayi. Na sima, bazalaki kozongisa libanga yango na esika na yango likolo ya monoko ya libulu ya mayi. 4. Pe Yakobo alobaki na bango: Bandeko na ngai, bowuti wapi? Pe balobaki: Tozali batu ya Arane. 5. Pe alobaki na bango: Bino boyebi Labana mwana ya Nakore? Pe balobaki: Toyebi ye. 6. Pe alobaki na bango: Azali malamu? Balobaki : Malamu. Pe tala Rashele, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bitonga. 7. Pe alobaki: Tala, moyi ezali nanu makasi, ezali nanu te tangu ya kosanganisa bitonga, melisa bibwele mayi pe kende koleyisa bango. 8. Balobaki: Tokoki te, ti tangu bitonga nyonso ekosangana, bongo tokolongola libanga likolo ya monoko ya libulu ya mayi, pe tokomelisa bibwele mayi. 9. Lokola azalaki nanu kosolola na bango, Rashele ayaki elongo na bibwele ya tata na ye, po azalaki mobateli ya mpate. 10. Pe ekomaki tangu Yakobo amonaki Rashele, mwana ya Labana, ndeko ya mama na ye, pe bibwele ya Labana, ndeko ya mama na ye, Yakobo apusanaki pe abalusaki libanga yango mosika na monoko ya libulu mayi pe amelisaki bibwele ya Labana, ndeko ya mama na ye. 11. Pe Yakobo ayambaki Rashele na beze, pe atombolaki mongongo na ye pe alelaki. 12. Pe Yakobo ayebisaki Rashele ete azalaki ndeko ya tata na ye pe ete azalaki mwana ya Rebeka ; pe akimaki mbangu koyebisa yango tata na ye. 13. Pe esalemaki ete tangu Labana ayokaki basango etali Yakobo, mwana mobali ya ndeko na ye ya mwasi, akimaki mbangu na bokutani na ye, pe ayambaki ye, pe apesaki ye beze, pe akotisaki ye na ndako na ye; pe ye ayebisaki Labana makambu wana nyonso. 14. Pe Labana alobaki na ye: Ya solo, ozali mokuwa ngai pe mosuni na ngai. Pe afandaki elongo na ye sanza moko. 15. Pe Labana alobaki na Yakobo: Kaka po ete ozali ndeko na ngai, okosalela ngai pona eloko te? Yebisa ngai, lifuti na yo ekozala boni? 16. Nzokande Labana azalaki na bana basi mibale; kombo ya mokolo ezalaki Leya, pe kombo ya leki Rashele. 17. Pe Leya azalaki na miso ya bolembu, kasi Rashele azalaki kitoko na nzoto pe na lolenge ya komonana. 18. Pe Yakobo alingaki Rashele, pe alobaki: Nakosalela yo mbula sambo pona Rashele, mwana na yo ya mwasi ya leki. 19. Pe Labana alobaki : Ezali malamu napesa ye yo na esika ya kopesa ye na mobali mosusu, fanda elongo na ngai. 20. Pe Yakobo asalaki pona Rashele na bowumeli ya mbula sambo, kasi amonanaki lokola mwa mikolo pamba po alingaki ye. 21. Pe Yakobo alobaki na Labana: Pesa ngai mwasi na ngai, po mikolo ekokisami, pe ngai nakokota epayi na ye. 22. Pe Labana asangisaki batu nyonso ya esika yango pe asalaki feti. 23. Pe ekomaki na pokwa wana, akamataki Leya mwana na ye ya mwasi pe amemaki ye, pe akotaki epayi na ye. 24. Pe Labana apesaki mosali na ye Zilipa epayi ya mwana na ye ya mwasi Leya po azala mosali na ye. 25. Pe ekomaki na tongo, tala, ezalaki Leya. Alobaki na Labana: Osali ngai nini? Nasalelaki yo pona Rashele te? Bongo pona nini okosi ngai? 26. Pe Labana alobaki: Ezali momeseno te na mboka na biso kopesa mwana mwasi ya leki liboso ya oyo ya mukolo. 27. Silisa poso ya mosala ya oyo, pe tokopesa yo mosusu, pona mosala oyo okosala pona ngai na bowumeli ya mbula sambo mosusu. 28. Pe Yakobo asalaki boye, pe asilisaki poso ya oyo pe. Na sima, apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rashele. 29. Pe Labana apesaki Bilha mosali na ye ya mwasi epayi ya mwana na ye ya mwasi Rashele pona azala mosali na ye ya mwasi. 30. Pe akotaki epayi ya Rashele, pe alingaki Rashele koleka Leya. Pe asalelaki ye lisusu mbula sambo mosusu. 31. Pe Yawe amonaki ete Leya ayinamaki, afungolaki matrise na ye, pe Rashele azalaki kobota te. 32. Pe Lea azwaki zemi pe abotaki mwana mobali, pe abengaki ye na kombo Rubene, po alobaki: po Yawe amoni pasi na ngai, pe sik’oyo mobali na ngai akolinga ngai. 33. Pe azwaki zemi lisusu pe abotaki mwana mosusu ya mobali, pe alobaki: Po Yawe ayoki ete ngai nayinamaki, apesi ngai lisusu pe mwana mobali oyo. Abengaki ye na kombo Simeyon. 34. Pe azwaki zemi lisusu pe abotaki mwana mosusu ya mobali, pe alobaki: Sik’oyo na mbala oyo mobali na ngai akomipesa epayi na ngai, po naboteli ye bana misato ya mibali. Yango wana babengaka kombo na ye Lewi. 35. Pe azwaki zemi lisusu pe abotaki mwana mosusu ya mobali, pe alobaki: Na mbala oyo nakosanzola Yawe, yango wana abengaki kombo na ye Yuda*, pe atikaki kobota bana.

-vv. 35 kosanzola

 

Mokapo 30

1. Pe Rashele amonaki ete azalaki kobotela Yakobo bana te, ayokelaki ndeko na ye ya mwasi zuwa pe alobaki na Yakobo: Pesa ngai ban aya mibali, soki te nakokufa! 2. Kanda ya Yakobo epelisaki na kotelemela Rashele, pe alobaki: Nazali na esika ya Nzambe, oyo apekiseli yo mbuma ya libumu? 3. Ye alobaki: Tala mosali na ngai Bila, kota epayi na ye, pe akobota bana na mabolongo na ngai, pe ngai pe nakozwa bana na nzela na ye. 4. Pe apesaki ye mosali na ye Bila pona mwasi, pe Yakobo akotaki epayi na ye. 5. Pe Bila azwaki zemi pe abotelaki Yakobo mwana mobali. 6. Pe Rashele alobaki: Nzambe alongisi ngai, ayoki mongongo na ngai pe apesi ngai mwana mobali. Yango wana abengaki ye na kombo ya Dan. 7. Pe Bila, mosali ya Rashele, azwaki zemi lisusu pe abotelaki Yakobo mwana mobali ya mibale. 8. Pe Rashele alobi: Nabundaki bitumba ya Nzambe na ndeko na ngai ya mwasi, pe nalongi yango. Pe abengaki kombo na ye Naftali.

— v. 6: mosambisi. — v. 8: etumba na ngai.

9. Pe Leya amonaki ete atikaki kobota bana, akamataki mosali na ye Zilpa pe apesaki ye epayi ya Yakobo pona azala mwasi na ye. 10. Pe Zilipa, mosali ya Leya, abotelaki Yakobo mwana moko ya mobali. 11. Pe Leya alobaki: Bozwi malamu eye. Pe abengaki ye na kombo ya Gade**. 12. Pe Zilipa, mosali ya Leya, abotelaki Yakobo mwana mobali ya mibale. 13. Pe Leya alobaki: Ezali pona esengo na ngai, bana basi bakobenga ngai mopambolami. Pe abengaki kombo na ye Ashere*.

— v. 11: bamosusu batangi: bolamu. — v. 11**: bolamu, to lipinga. — v. 13: esengo.

14. Pe Rubene abimaki na tango ya kobuka ble, pe akutaki madragore na bilanga, pe amemaki yango epayi ya Leya, mama na ye. Pe Rashele alobaki na Leya: Nabondeli yo, pesa ngai madragore ya mwana na yo. 15. Pe alobaki na ye: Ezali likambo ya moke ete ozwaki mobali na ngai, pe ozwa lisusu pe madragore ya mwana na ngai? Pe Rashele alobaki : Malamu penza, akolala na yo na butu ya lelo pona madragore ya mwana na yo. 16. Pe Yakobo awutaki na elanga na pokwa, pe Leya abimaki na bokutani na ye, pe alobaki: Okokota nde epayi na ngai, po nafuteli yo na esika ya bamandragore ya mwana na ngai. Pe alalaki elongo na ye na butu wana. 17. Pe Nzambe ayokaki Leya, pe azwaki zemi, pe abotelaki Yakobo mwana mobali ya mitano. 18. Pe Leya alobaki: Nzambe apesi ngai mbano na ngai, po napesaki mosali na ngai epayi ya mobali na ngai. Pe abengaki kombo na ye Izakare*. 19. Pe Leya azwaki zemi lisusu pe abotelaki Yakobo mwana mobali ya motoba. 20. Pe Leya alobaki: Nzambe apesi ngai likabo ya malamu, sik’oyo mobali na ngai akofanda elongo na ngai, po naboteli ye bana mibali motoba. Pe abengaki kombo na ye Zebulone*. 21. Pe na sima abotaki mwana mwasi, pe abengaki kombo na ye Dina.

— v. 18: mbano ezali. — v. 20: esika ya kofanda.

22. Pe Nzambe akanisaki Rashele; pe Nzambe ayokaki ye pe afungolaki matrise na ye. 23. Pe azwaki zemi pe abotaki mwana mobali, pe alobaki: Nzambe alongoli soni na ngai. 24. Pe abengaki kombo na ye Yozefe pe alobaki: Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali!

— v. 24: tika ete abakisa.

25. Pe esalamaki ete tangu Rashele abotaki Yozefe, Yakobo alobaki na Labana ete: zongisa ngai, pe nakokende na esika na ngai pe na mboka na ngai. 26. Pesa ngai basi na ngai oyo pona bango nasalelaki yo, pe bana na ngai, pe ngai nakokende; po oyebi mosala oyo ngai nasalelaki yo. 27. Pe Labana alobaki na ye ete: Soki nazwi ngolu na miso na yo, namoni ete Yawe apambolaki ngai na tina na yo. 28. Pe alobaki: Tiela ngai lifuti na yo, pe nakofuta yo yango. 29. Pe alobaki na ye: Oyebi ndenge nasalelaki yo, pe oyo etonga na yo ekomi elongo na ngai; 30. Po oyo ozalaki na yango liboso na ngai ezalaki moke, kasi ekomaki mingi pe ekomaki ebele; pe Yawe apambolaki yo wuta nayaki. Pe sik’oyo, tangu nini nakosala, ngai pe, pona ndako na ngai? 31. Pe ayanolaki: Nakopesa yo nini? Pe Yakobo alobaki : Okopesa ngai eloko te, soki olingi kosala boye pona ngai, nakobatela lisusu bibwele na yo pe nakokengela yango : 32. Nakoleka lelo na bibwele na yo nyonso, pe nakolongola banyama nyonso ya madodo pe ya banzela-nzela, pe oyo nyonso ezali na banzela-nzela pe na madodo kati na bantaba, pe yango wana ekozala lifuti na ngai. 33. Pe bosembo na ngai ekoyanola ngai wuta sik’oyo, tangu ekoya liboso na yo pona lifuti na ngai; kati na bantaba nyonso oyo ezali na madodo te to oyo ezali na banzela-nzela te, to kati ya bana mpate nyonso oyo ezali mwindu te, epayi na ngai ekotalelama pona oyo eyibami. 34. Pe Labana alobaki: Tala, tika ete ezala ndenge olobi. 35. Pe mokolo yango, alongolaki bantaba ya mibali oyo ezalaki na bilembo pe ya banzela-nzela, pe bantaba nyonso ya basi oyo ezalaki na madodo pe ya banzela-nzela, pe nyonso oyo ezalaki na pembe, pe bana-mpate nyonso ya mwindu, pe apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali. 36. Pe ye atiaki mikolo misato ya nzela kati na ye na Yakobo ; pe Yakobo abokolaki bitonga mosusu ya Labana. 37. Pe Yakobo akamataki bitape ya sika ya mobesu ya pembe, ya amande pe ya platane, pe alongolaki kasa ya libanda na yango na bisika-bisika po pembe na bitape yango oyo ezalaki kati emonana polele, pe amonisaki pole ya pembe oyo ezalaki ya banzete. 38. Pe atiaki bitape oyo apelisaki liboso ya bibwele na kati ya bimeleli, na bisika oyo bibwele ezalaki koya komelaka mayi. Bazalaki kozwaka zemi tangu ezalaki koya komela mayi. 39. Pe banyama ya bitonga bazalaki kozwa zemi liboso ya bitape yango pe kobota bana ya milongo-milongo, oyo bakoma, madodo pe ya banzela-nzela. 40. Pe Yakobo akabolaki bana ya mpate pe abalusaki etonga epayi ya oyo ezalaki na milongo-milongo pe nyonso oyo ezalaki ya mwindu kati na etonga ya Labana. Pe atiaki bitonga na ye moko pembeni, pe atiaki yango elongo na bibwele ya Labana te. 41. Pe ekomaki ete tangu nyonso oyo bibwele ya makasi ekotaki na molunge, Yakobo azalaki kotia bitape yango na kati ya bimemeli ya mayi liboso ya bibwele po bakota na molunge liboso ya bitape. 42. Kasi tangu bibwele ezalaki ya bolembu, azalaki kotia yango te. Pe oyo bolembu ezalaki ya Labana, pe oyo ya makasi ezalaki ya Yakobo. 43. Pe mutu yango akomaki monene mingi koleka pe azalaki na bibwɛlɛ mingi, pe basali ya basi pe basali ya mibali, pe bakamela pe ba-ane.

— v. 30: na matambe na ngai. — v. 37*: to: nzete ya amande. — v. 37**: to: nzete ya plane.

 

Mokapo 31

1. Pe ayokaki maloba ya bana ya Labana, oyo bazalaki koloba: Yakobo azwi biloko nyonso oyo ezalaki ya tata na biso, pe na oyo ezalaki ya tata na biso nde asili kozwa kembo oyo nyonso. 2. Pe Yakobo atalaki elongi ya Labana, pe tala, azalaki epayi na ye te lokola liboso. 3. Pe Yawe alobaki na Yakobo: Zonga na mboka ya batata na yo pe epayi na libota na yo, pe nakozala elongo na yo. 4. Pe Yakobo atindaki pe abengaki Rashele na Lea na bilanga, na etonga na ye. 5. Pe alobaki na bango: Namoni elongi ya tata na bino, ete azali epayi na ngai te lokola liboso, kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai. 6. Pe bino moko boyebi ete nasalelaki tata na bino na makasi na ngai nyonso. 7. Pe tata na bino atiolaki ngai pe abongolaki lifuti na ngai mbala zomi, kasi Nzambe apesaki ye nzela te ete asala ngai mabe. 8. Soki alobaki boye ete: ya madodo bakozala lifuti na yo, bongo bibwele nyonso esalaki madodo. Pe soki alobaki boye ete : Baoyo bakoma mindelo bakozala lifuti na yo, bongo bibwele nyonso esalaki makomi ya mindelo. 9. Pe Nzambe alongolaki etonga ya tata na bino pe apesi ngai yango. 10. Pe ekomaki ete, na tangu oyo bibwele ekotaka na molunge, ete natombolaki miso na ngai, pe namonaki na ndoto, pe tala, bantaba mibali oyo bazalaki kosangana na bitonga bazalaki na bandelo, na madodo, pe na makomi ya pembe. 11. Pe Anjelu ya Nzambe alobaki na ngai na ndoto: Yakobo! Pe nalobaki : Ngai oyo. 12. Pe alobaki: Tombola miso na yo pe tala: bantaba nyonso ya mibali oyo ezali kosangana na bitonga bazali na bandelo, na madodo pe na makomi ya pembe, po namoni nyonso oyo Labana asalaki yo. 13. Nazali Nzambe ya Bethel, epayi opakolaki likonzí mafuta, epayi olapelaki ngai ndayi. Sik’oyo, telema, bima na mboka oyo, pe zonga na mboka ya bandeko na yo. 14. Pe Rashele na Lea bayanoli ye pe balobi na ye: Tozali nanu na eteni pe libula na ndako ya tata na biso? 15. Totangamaki te epayi na ye lokola bapaya te? Po ete atekaki biso, pe kutu aliaki tangu nyonso mbongo na biso. 16. Po ete bozwi nyonso oyo Nzambe alongolaki tata na biso ezali ya biso pe ya bana na biso. Pe sik’oyo, sala nyonso oyo Nzambe alobaki na yo.

— v. 2: lokola lobi, mokolo ya misato (awa, pe bisika mosusu).

17. Pe Yakobo atelemaki pe atiaki bana na ye ya mibali na basi na ye likolo ya bakamela; 18. Pe amemaki bibwele na ye nyonso pe biloko na ye nyonso, oyo azwaki, bitonga oyo azwaki na Padana-Aram, pona kokende epayi ya Izak, tata na ye na mboka ya Kanana. 19. Pe Labana akendaki kokata bitonga na ye, pe Rashele ayibaki ba terafim* oyo ezalaki ya tata na ye. 20. Pe Yakobo akosaki Labana Moarama, po ayebisaki ye te ete azali kokima. 21. Pe akimaki, ye na nyonso oyo ezalaki ya ye. Pe atalemaki pe akatisaki ebale, pe atiaki elongi na ye epayi ya ngomba ya Gileade.

— v. 19: banzambe ya ndako.

22. Pe na mokolo ya misato, bayebisaki Labana ete Yakobo akimaki. 23. Pe amemaki bandeko na ye elongo na ye pe alandaki ye nzela ya mikolo sambo, pe azwaki ye na ngomba ya Gileade. 24. Pe Nzambe ayaki epayi ya Labana Moarame na kati ya ndoto na butu pe alobaki na ye: Keba ete oloba na Yakobo, ezala na malamu te, na mabe te. 25. Pe Labana akomaki ti na Yakobo, pe Yakobo atelemisaki hema na ye likolo na ngomba, pe Labana na bandeko na ye batelemisaki hema na bango likolo na Ngomba ya Gileade. 26. Pe Labana alobaki na Yakobo: Osali nini na kokosa ngai pe nakomema bana na ngai ya basi lokola bakangami ya etumba. 27. Pona nini okimaki na komibombama pe omiyibaki ngai? Pona nini oyebisaki ngai te? Nalingaki kozongisa yo na esengo pe na banzembo, na tambur pe na nzenze. 28. Pe otika ngai te napesa bana na ngai ya mibali pe ya basi beze; na wana osali yango na bozoba. 29. Na maboko na ngai, nazali na nguya ya kosala bino mabe, kasi Nzambe ya tata na bino alobaki na ngai lobi na butu ete: Keba ete oloba eloko moko te epayi ya Yakobo, ezala malamu to mabe. 30. Pe sik’oyo ete okeyi po ozalaki naposa makasi ya ndako ya tata na yo, pona nini oyibi banzambe na ngai? 31. Pe Yakobo ayanolaki pe alobaki na Labana: Po nazalaki kobanga, po nalobaki: Noki obotola ngai bana na yo ya basi. 32. Tika ete azala na bomoyi te, ye oyo okokuta epayi na ye banzambe na yo! Liboso ya bandeko na biso, luka oyo ezali ya yo epayi na ngai, pe zwa yango. Nzokande Yakobo ayebaki te ete Rashele ayibi yango. 33. Pe Labana akotaki na kati ya hema ya Yakobo pe na hema ya Leya pe na bahema ya basali ya basi mibale, pe amonaki eloko te. Abimaki na hema ya Leya pe akotaki na hema ya Rashele. 34. Nzokande Rashele azwaki baterafim pe atiaki yango na kati ya saki ya kamela pe afandaki likolo na yango. Pe Labana alukaki hema mobimba, kasi amonaki eloko te. 35. Pe alobaki na tata na ye: Tika ete nkolo na ngai omona te na liso ya kosilika ete nakoki kotelema liboso na yo te, po nazali na oyo basi bazalaka na momeseno ya kozala na yango. Pe alukaki, kasi amonaki baterafimi te. 36. Pe Yakobo asilikaki pe asuanisaki Labana. Pe Yakobo ayanolaki pe alobaki na Labana: Mbeba na ngai ezali nini, lisumu na ngai ezali nini ete olanda ngai na kanda boye? 37. Tangu olukaki biloko na ngai nyonso, omonaki nini na biloko nyonso ya ndako na yo? Tia yango awa liboso ya bandeko na ngai pe bandeko na yo, po ete basambisa kati na biso mibale. 38. Bambula tuku mibale (20) oyo nazalaki elongo na yo; bameme na yo ya basi pe bantaba na yo basopaki zemi te, pe naliaki bameme-mobali ya etonga na yo te. 39. Oyo epasolamaki, nazongikiselaki yo yango te; Ngai moko naniokwamaki pona kobungisa yango. Ozalaki kosenga na loboko na ngai oyo bayibaki ngai na moyi pe oyo bayibaki ngai na butu. 40. Nazalaki wana, na moyi, kokawuka ezalaki kolia ngai pe malili makasi na butu; pongi ezalaki kokima na miso na ngai. 41. Bambula tuku mibale (20) oyo nazalaki na ndako na yo; Nasalelaki yo mbula zomi na mineyi (14) pona bana na yo mibale ya basi pe mbula motoba pona bitonga na yo, pe obongoli lifuti na ngai mbala zomi. 42. Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abraham pe somo ya Izak, azalaki elongo pona ngai te, mbele olingaki sik’oyo kozongisa ngai pamba. Nzambe amoni minioko na ngai pe mosala makasi ya maboko na ngai, pe apamelaki yo butu eleki. 43. Pe Labana ayanolaki pe alobaki na Yakobo: Bana basi bazali bana na ngai ya basi, pe bana mibali bazali bana na ngai ya mibali, pe bibwele ezali bibwele na ngai, pe biloko nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Pe kasi ngai nakosala nini lelo na baoyo, bana basi na ngai, to na bana na bango ya mibali oyo bango baboti ? 44. Pe sik’oyo, yaka, tosala boyokani, yo na ngai, pe yango ekozala litatoli kati na yo na ngai. 45. Pe Yakobo akamataki libanga moko pe atelemisaki yango lokola likonzí. 46. Pe Yakobo alobaki na bandeko na ye: Bolokota mabanga. Pe bakamataki mabanga pe basalaki liboke na yango, pe baliaki kuna likolo ya liboke. 47. Pe Labana abengaki yango na kombo Yegare-Sahaduta*, pe Yakobo abegaki yango na kombo Galede**. 48. Pe Labana alobaki: Liboke ya mabanga oyo ezali lelo litatoli kati na ngai na yo. Yango wana abengaki yango na kombo Galhed, pe Mitsipa*, 49. Po alobaki: Tika ete Yawe akengela kati na ngai na yo tangu tokobombama moko na mosusu. 50. Soki oniokoli bana na ngai ya basi to okamati basi likolo ya bana na ngai ya basi (ezali na mobali moko te elongo na biso), tala, Nzambe azali motatoli kati na ngai na yo. 51. Pe Labana alobaki na Yakobo: Tala liboke oyo ya mabanga, pe tala likonzí oyo natelemisi kati na ngai na yo; 52. Liboke oyo ekozala litatoli, pe likonzí oyo ekozala litatoli, ete nakokatisa liboke oyo te pona koya epayi na yo, pe ete yo okokatisa liboke oyo te pe likonzí oyo pona koya epayi na ngai pona kosala mabe. 53 Tika ete Nzambe ya Abraham pe Nzambe ya Nahore, Nzambe ya tata na bango, asambisa kati na biso. Pe Yakobo alapaki ndayi na somo ya tata na ye Izak. 54. Pe Yakobo abonzaki mbeka likolo na ngomba pe abengisaki bandeko na ye balia lipa. Baliaki lipa pe balalaki butu mobimba na ngomba.

— v. 47*: liboke ya litatoli. — v. 47**: liboke ya batatoli. — v. 48: esika ya kotala.

 

Mokapo 32

1. Pe Labana atelemaki na tongotongo pe apesaki bana na ye ya mibali pe ya basi beze pe apambolaki bango. Pe Labana akendaki, pe azongaki na esika na ye. 2. Pe Yakobo akendaki nzela na ye. Pe baanjelu ya Nzambe bakutanaki na ye. 3. Pe Yakobo alobaki tangu amonaki bango: Oyo ezali lipinga ya Nzambe. Pe abengaki esika yango na kombo Mahanaime.

— v. 3: mapinga mibale to bakaa.

4. Pe Yakobo atindaki bamemi-sango liboso na ye epayi ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seyire, kati na etuka ya zamba ya Edome. 5. Apesaki bango mitindo, alobaki ete: Bokoloba boye na nkolo na ngai Ezawu: Boye elobi mosali na yo Yakobo: Nafandaki epayi ya Labana pe natikali kuna ti sik’oyo. 6. Pe nazali na bangombe, ba-ane, bibwele, pe basali ya mibali pe ya basi, pe natindi bango bayebisa nkolo na ngai po ete nazwa ngolu na miso na yo. 7. Bamemi-sango bazongaki epayi ya Yakobo, balobaki: Tokendaki epayi ya ndeko na yo, epayi ya Ezawu, pe ye akoya kokutana na yo, na mibali kama mineyi (400) elongo na ye. 8. Pe Yakobo abangaki mingi pe atungisamaki, pe ye akabolaki batu oyo bazalaki elongo na ye, bitonga ya bibwele pe bangombe pe bakamela, na mapinga mibale*. 9. Pe alobaki: Soki Ezawu aye na moko ya lipinga pe abeti yango, lipinga oyo etikali ekoki kokima. 10. Pe Yakobo alobaki: Nzambe ya tata na ngai Abraham, pe Nzambe ya tata na ngai Izak ! Yawe, oyo alobaki na ngai: Zonga na mboka na yo pe epayi na libota na yo, pe nakosala yo malamu ! 11. Nazali moke mingi penza pona bangolu pe pona bosolo nyonso oyo omonisaki epayi ya mosali na yo. Po nakatisaki Yordani oyo kaka na lingenda na ngai, pe sik’oyo nakomi mapinga mibale. 12. Nabondeli, kangola ngai na loboko ya ndeko na ngai, na loboko ya Ezawu, po nazali kobanga ye, noki aya kobeta ngai—mama elongo na bana mibali. 13. Pe yo, olobaki: Ya solo, nakosala yo bolamu, pe nakokomisa bokitani na yo lokola zelo ya mayi monene, oyo ekoki kotangama te na tina ya ebele na yango. 14. Pe alekisaki butu wana kuna, pe azwaki oyo azalaki na yango na maboko, likabo pona Ezawu, ndeko na ye : 15. Bantaba ya basi kama mibale (200) pe bantaba ya mibali tuku mibale (20); bampate kama mibale (200) pe bameme-mibali tuku mibale (20); 16. Bakamela tuku misato (30) oyo ezali komelisa bana na yango, pe bana na yango; bangombe ya basi tuku mineyi (40) pe bangombe zomi ya mibali; ba-ane ya basi tuku mibale (20) pe bana ya ane zomi. 17. Pe atiaki yango na maboko ya basali na ye, etonga moko-moko pembeni, pe alobaki na basali na ye: Boleka liboso na ngai pe botia kakabwana kati na etonga na etonga. 18. Pe apesaki motindo na oyo ya liboso pe alobaki: Tangu Ezawu, ndeko na ngai akokutana yo, koloba: Yo, ozali ya nani? Pe okokende wapi ? Pe biloko oyo ezali liboso na yo ezali ya nani ? 19. Okoloba: Ezali ya mosali na yo Yakobo ; Ezali likabo oyo atindi epayi ya nkolo na ngai Ezawu, pe ye moko pe azali koya sima na biso. 20. Pe apesaki motindo ndenge wana na oyo mibale, pe na oyo ya misato pe ndenge moko na baoyo nyonso bazalaki kolanda bitonga, alobaki: na lolenge ya liloba oyo bokoloba na Ezawu, tangu bokokutana na ye ; 21. Bokoloba lisusu: Tala, mosali na yo Yakobo azali koya sima na biso. Po azalaki komiloba: Nakokitisa ye motema na likabo oyo ezali kokende liboso na ngai, pe na sima na yango nakomona elongi na ye, mbala mosusu akoyamba ngai na boboto. 22. Pe likabo ekendaki liboso na ye, kasi pona ye, alekisaki butu wana na kaa.

— v. 8: na mapinga.

23. Pe atelemaki na butu wana, pe akamataki basi na ye mibale, pe basali na ye mibale ya basi, pe bana na ye zomi na moko, pe akatisaki bango ebale ya Yaboke. 24. Pe akamataki bango pe akatisaki bango na ngambo mosusu ya ebale; pe alekisaki nyonso oyo ezalaki ya ye. 25. Pe Yakobo atikalaki ye moko; pe mutu moko abundaki na ye kino na etaneli ya tongo. 26. Pe tangu amonaki ete akoki kolonga ye te, asimbaki songe ya loketo na ye, pe loketo ya Yakobo ebukanaki lokola azalaki kobunda na ye. 27. Pe alobaki: Tika ngai nakende, po tongo ezali kotelema. Pe alobaki : Nakotika yo te okende soki osili kopambola ngai te. 28. Pe alobaki na ye: Kombo na yo nani? Pe alobaki : Yakobo. 29. Pe alobaki: Kombo na yo ekobengama lisusu Yakobo te, kasi Israel*, po obundaki na Nzambe pe na batu pe olongi. 30. Pe Yakobo atunaki, pe alobaki : nabondeli, yebisa ngai kombo na yo. Pe alobaki : pona nini ozali kotuna kombo na ngai ? Pe apambolaki ye wana. 31. Pe Yakobo abengaki esika yango na kombo ya Penuwele *: po namoni Nzambe elongi na elongi, pe molimo na ngai ekangolamaki. 32. Pe moyi ebimaki likolo na ye lokola azalaki koleka Penuwele, pe azalaki kotengatenga na loketo na ye. 33. Yango wana, ti lelo, bana ya Israele baliaka te misisa oyo ezali na songe ya loketo, po esimbaki songe ya loketo ya Yakobo na misisa.

— v. 29: molongi (to nkumu) ya *Nzambe. — v. 31: elongi ya *Nzambe.

 

Mokapo 33

1. Pe Yakobo atombolaki miso na ye pe atalaki, pe tala, Ezawu akoya, pe mibali kama mineyi (400) elongo na ye. Pe akabolaki bana kati na Leya na Rashele pe basali mibale ya basi. 2. Pe atiaki liboso basali ya basi pe bana na bango, pe na sima Leya na bana na ye, pe na sima Rashele na Yozefe. 3. Pe alekaki liboso na bango pe agumbamaki na mabele mbala sambo kino akomaki pene ya ndeko na ye. 4. Pe Ezawu akimaki mbangu na kokutana na ye, ayambaki ye, abwakaki maboko na kingo na ye pe apesaki ye beze; pe balelaki. 5. Pe atombolaki miso na ye, pe amonaki basi pe na bana, pe alobaki, Baoyo bazali banani pona yo? Pe alobaki: Bazali bana oyo Nzambe asali likabo ya ngolu na mosali na yo. 6. Pe basali ya basi bapusanaki, bango na bana na bango, pe bagumbamaki. 7. Pe Leya pe apusanaki na bana na ye, pe bagumbamaki; pe na sima Yozefe pe Rashele bapusanaki pe bagumbamaki. 8. Pe alobaki: Olingi nini na kaa oyo nyonso oyo nakutanaki na bango? Pe alobaki : Ezali pona kozwa ngolu na miso ya nkolo na ngai. 9. Pe Ezawu alobaki: pona ngai, nazali na biloko ebele, ndeko na ngai, tika oyo ezali ya yo ezala ya yo. 10. Pe Yakobo alobaki : Te, nabondeli yo, soki nazwi ngolu na miso na yo, zwa likabo oyo na loboko na ngai, po ezali pona yango nde namoni elongi na yo lokola nde namonaki elongi ya Nzambe, pe oyambi ngai na boboto. 11. Nabondeli yo, kamata lipamboli na ngai oyo namemeli yo, po Nzambe asali ngai ngolu, pe epayi na ngai nazali na nyonso. Pe atiaki ye molende pe azwaki yango. 12. Pe alobaki: Tokende pe tokende, pe nakotambola liboso na yo. 13. Pe alobaki na ye: Nkolo na ngai ayebi ete bana bazali makasi te, pe nazali komema bibwele pe bangombe oyo ezali komelisa bana, soki batamboli mbangu ata mokolo moko, bango nyonso bakokufa- etonga nyonso. 14. Nabondeli yo, nkolo na ngai, tika ye akende liboso ya mosali na ye; pe ngai, nakotambola na nzela malembe-malembe, kolanda etamboli ya biloko oyo ezali liboso na ngai, pe na etamboli ya bana, kino nakokoma epayi ya nkolo na ngai na Seyire. 15. Pe Ezawu alobaki: Nabondeli yo, tika natika elongo na yo batu mosusu oyo bazali elongo na ngai. Pe alobaki: pona nini? Tika nazwa ngolu na miso ya nkolo na ngai! 16. Pe Ezawu azongaki mokolo wana, na nzela na ye moko, na Seyire. 17. Pe Yakobo akendaki na Sukote pe atongaki ndako mpo na ye pe abongisi bisika ya kobombama pona bibwele na ye : yango wana esika yango ebengamaki na kombo ya Sukote*.

— v. 17: bisika ya kobombama.

18. Pe Yakobo ayaki na kimia (Salem) na engumba ya Shekeme, oyo ezali na mboka ya Kanana, lokola awutaki na Padane-Aram; pe atiaki kaa na ngambo ya engumba. 19. Pe asombaki na loboko ya bana ya Amore, tata ya Shekeme, na shekele* kama moko (100), eteni ya elanga epayi atelemisaki hema na ye; 20. Pe atelemisaki etumbelo moko kuna pe abengaki yango El-Elohe-Israel*.

— v. 19: shekele, kilo ya wolo to ya palata oyo motuya na yango eyebani te. — v. 20: *Nzambe, Nzambe ya Israele.

 

Mokapo 34

1. Pe Dina, mwana mwasi ya Leya, oyo abotaki na Yakobo, abimaki pona kotala basi ya mboka. 2. Pe Shekeme, mwana mobali ya Amore, Mohivi, nkumu ya mboka, amonaki ye, pe akangaki ye, pe alalaki elongo na ye, pe akitisaki ye na koyokisa ye soni. 3. Pe molimo na ye ekangamaki epayi ya Dina, mwana mwasi ya Yakobo, pe alingaki elenge mwasi yango, pe alobaki na motema na elenge mwasi yango. 4. Pe Shekeme alobaki na Amore tata na ye, alobaki: Kamatela ngai elenge mwasi oyo pona mwasi. 5. Pe Yakobo ayokaki ete babebisaki Dina, mwana na ye ya mwasi. Nzokande bana na ye ya mibali bazalaki na bilanga elongo na bitonga na ye, pe Yakobo afandaki nye ti tangu baya. 6. Pe Amore, tata ya Shekeme, ayaki epayi ya Yakobo pona koloba elongo na ye. 7. Pe tangu bana ya Yakobo bawutaki na bilanga, bayokaki oyo esalemaki, pe mibali yango batungisamaki pe kanda na bango epelaki makasi mingi, po esalemaki likambu ya soni na kati ya Israele, na kolala na mwana mwasi ya Yakobo, ndenge wana esengelaki kosalema te. 8. Pe Amore alobaki na bango: Motema ya Shekeme, mwana na ngai ekangami na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye po azala mwasi na ye. 9. Bosangana na biso na mabala : bopesa biso bana na bino ya basi pe bino bozwa bana na biso ya basi pona bino moko. 10. Bofanda elongo na biso, pe mboka ekozala liboso na bino. Bofanda na kati na yango, bosala mombongo, bozwa yango lokola bozwi na bino. 11. Pe Shekeme alobaki na tata na ye pe bandeko na ye: Tika ete nazwa ngolu na miso na bino, pe nakopesa nyonso oyo bokoloba. 12. Bobakisa penza motuya pona libala pe makabo, pe nakopesa ndenge nyonso oyo bokoloba na ngai. Pe bopesa ngai elenge mwasi azala mwasi na ngai. 13. Pe bana mibali ya Yakobo bayanolaki Shekeme na tata na ye Amore na eyano na bokosi pe balobaki na bango (po akomisaki Dina, ndeko na bango ya mwasi mbindo). 14. Balobaki na bango ete: Tokoki kosala bongo te, kopesa ndeko na biso ya mwasi epayi ya mobali oyo akatama ngenga te, po yango ekozala soni pona biso. 15. Biso tokoyokana kaka na bino na likambo oyo: ete bokoma lokola biso, mobali nyonso kati na bino akatama ngenga. 16. Bongo tokopesa bino bana na biso ya basi, pe tokozwa bana na bino ya basi, pe tokofanda elongo na bino, pe tokokoma ekolo moko. 17. Kasi soki boyoki biso te pona koatama ngenga, tokokamata mwana na biso ya mwasi pe tokokende. 18. Pe maloba na bango esepelisaki Amore pe Shekeme, mwana ya Amore. 19. Pe elenge mobali azelaki te kosala likambu yango, po mwana mwasi ya Yakobo azalaki kosepelisa ye mingi, pe azalaki na lokumu mingi koleka mibali nyonso ya ndako ya tata na ye. 20. Pe Amore na Shekeme mwana na ye bakendaki na ekuke ya engumba na bango pe balobaki na mibali ya engumba na bango boye : 21. Batu oyo bazali na kimia elongo na biso; tika bafanda na mboka pe basala mombongo kati na yango. Pe tala, mboka ezali monene liboso na bango; tokozwa bana na bango ya basi lokola basi, pe tokopesa bango bana na biso ya basi; 22. Kasi kaka na likambu oyo mibali yango bakondima kofanda elongo na biso pe pona tokoma ekolo moko: ete mobali nyonso kati na biso akatama ngenga lokola bango bakatama ngenga. 23. Bibwele na bango, bozwi na bango pe banyama na bango nyonso ekozala ya biso te? Tondima kaka bango pe bakofanda elongo na biso. 24. Pe batu nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba na ye bayokaki Amore pe Shekeme mwana na ye; pe mobali nyonso akatamaki ngenga, batu nyonso oyo babimaka na ekuke ya engumba na ye. 25. Pe na mokolo ya misato, tangu bazalaki koyoka pasi, bana mibali mibale ya Yakobo, Simeyon pe Lewi, bandeko ya Dina, moko na moko akamataki mopanga na ye pe bakotaki na engumba na mpiko nyonso pe babomaki mibali nyonso. 26. Pe babomaki Amore pe mwana na ye Shekeme na mopanga, pe bakamataki Dina na ndako ya Shekeme, pe babimaki. 27. Bana mibali ya Yakobo bayaki epayi ya batu oyo babomamaki pe bapunzaki engumba, po babebisaki ndeko na bango ya mwasi. 28. Bakamataki bampate na bango pe bangombe na bango, ba-ane na bango, pe nyonso oyo ezalaki na engumba pe na elanga. 29. Bamemaki pe bapunzaki biloko na bango nyonso, bana na bango nyonso ya mike, basi na bango pe biloko nyonso oyo ezalaki na bandako. 30. Pe Yakobo alobaki na Simeyon pe Lewi ete: Bosili kotungisa ngai na ndenge bokomisi ngai solo mabe epayi ya bafandi ya mboka, Bakanana pe Baferezi. Ngai, nazali na batu moke ; bakosangana pona kobundisa ngai pe bakoboma ngai, ngai na ndako na ngai. 31. Pe balobi: Esengeli kosalela ndeko na biso ya mwasi lokola mwasi ya ndumba?

 

Mokapo 35

1. Pe Nzambe alobaki na Yakobo: Telema pe mata na Bethel pe ofanda kuna, pe otonga etumbelo epayi ya Nzambe oyo abimelaki yo tangu ozalaki kokoma liboso ya Ezawu, ndeko na yo. 2. Pe Yakobo alobaki na batu ya ndako na ye pe na batu nyonso oyo bazalaki elongo na ye: Bolongola banzambe bapaya oyo bazali na kati na bino, pe bomipetola pe bobongola bilamba na bino. 3. Pe biso totelema pe tomata na Bethel, pe kuna nakotongela etumbelo na Nzambe, oyo ayanolaki ngai na mokolo ya pasi na ngai pe oyo azalaki elongo na ngai na nzela nyonso oyo natambolaki. 4. Bapesaki Yakobo banzambe nyonso ya bapaya oyo bazalaki na yango na maboko na bango pe bapete oyo balataki na matoyi na bango, pe Yakobo abombaki yango na se ya nzete ya shene pene na Shekeme. 5. Pe Bakendaki, pe bobangi ya Nzambe ezalaki likolo ya bingumba oyo ezalaki kozinga bango zingazinga, pe balandaki bana mibali ya Yakobo te. 6. Yakobo akomaki na Luze, oyo ezali na mboka ya Kanana- yang onde Bethel- ye pe batu nyonso oyo bazalaki elongo na ye. 7. Atongaki kuna etumbelo pe abengaki esika yango El-Bethel*, po kuna nde Nzambe amimonisaki epayi na ye tangu azalaki kokima liboso ya ndeko na ye. 8. Pe Debora, mobateli ya Rebeka, akufaki pe akundamaki na se ya Bethel na se ya nzete ya shene, pe kombo na yango ebengamaki Alone-Bakute*.

— v. 7: *Nzambe ya ndako ya *Nzambe. — v. 8: nzete ya shene ya kolela.

9. Pe Nzambe amimonisaki lisusu epayi ya Yakobo, sima ya kozonga na ye wuta na Padane-Aram, pe apambolaki ye; 10. Pe Nzambe alobaki na ye: Kombo na yo ezali Yakobo, kombo na yo ekobengama lisusu Yakobo te, kasi Israele ekozala kombo na yo. Pe abengaki ye na kombo ya Israele. 11. Pe Nzambe alobaki na ye: Ngai nazali *Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso* (El-Shadayi), bobota pe bokoma mingi, ekolo moko pe ebele ya bikolo ekobima na yo, pe bakonzi bakobima na loketo na yo. 12. Pe mboka oyo napesaki Abraham pe Izak, nakopesa yo yango epayi na yo, pe nakopesa mboka yango na libota na yo sima na yo. 13. Pe Nzambe amataki longwa na ye na esika oyo alobaki elongo na ye. 14. Pe Yakobo atelemisa eloko ya libanga na esika oyo Nzambe alobaki elongo na ye, eloko ya libanga, pe asopaki libatio likolo na yango, pe asopelaki yango mafuta. 15. Pe Yakobo abengaki kombo ya esika oyo Nzambe alobaki elongo na ye Bethel. 16. Pe bakendaki longwa na Bethel ; pe etikalaki mwa esika na mboka pona kokoma na Efrata, pe Rashele azalaki kobota pe azalaki na pasi makasi ya kobota. 17. Pe lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi ya bwania alobaki na ye : Kobanga te, po ozali na mwana mosusu ya mobali. 18. Pe esalemaki, wana molimo na ye ezalaki kobima (po azalaki kokufa), ete abengaki kombo ya mwana ya mwana mobali* Ben-Oni** ; kasi tata na ye abengaki ye Benyamina***. 19. Pe Rashele akufaki; pe akundamaki na nzela ya Efrata, oyo ezali Betheleme. 20. Pe Yakobo atelemisaki likonzí likolo ya lilita na ye: ezali likonzí ya lilita ya Rashele ti lelo.

— v. 18*: kombo na ye. — v. 18**: mwana ya mosala makasi na ngai. — v. 18***: mwana ya loboko [na ngai] ya mobali.

21. Pe Israele atambolaki pe atelemisaki hema na ye na ngambo mosusu ya Migdal-Edere *. 22. Pe ekomaki boye: wana Israele azalaki kofanda na mboka yango, Ruben akendaki pe alalaki elongo na Bilha, makango ya tata na ye; pe Israel ayokaki yango. — v. 21: ndako molayi ya etonga. 23. Pe bana ba Yakobo bazalaki zomi na mibale. Bana ya Leya: Rubene, mwana ya liboso ya Yakobo, pe Simeyone, Lewi, Yuda, Izakare pe Zebulone; 24. Bana ya Rashele: Yozefe pe Benyamina; 25. Pe bana ya Bila, mosali-mwasi ya Rashele: Dan pe Neftali; 26. Pe bana ya Zilipa, mosali-mwasi ya Leya: Gade pe Azere. Oyo nde bana ya Yakobo, oyo babotamaki na ye na Padane-Aram. 27. Pe Yakobo akendaki epayi ya Izak tata na ye na Mamre, na Kiriate-Arba, yango nde Ebrone, epayi oyo Abraham pe Izak bafandaki. 28. Pe mikolo ya Izak ezalaki mibu kama moko na tuku mwambe (180). 29. Pe Izak akataki pema na ye pe akufaki, pe ayanganaki epayi ya batu na ye, akomaki mobange pe atondi na mikolo. Bana na ye Ezawu na Yakobo bakundaki ye.

 

Mokapo 36

1. Pe oyo ezali lisolo ya oyo ewuti na Ezawu, ye nde azali Edome. 2. Ezawu azwaki basi na ye kati ya bana basi ya Kanana: Ada, mwana mwasi ya Elone Mohite; pe Oholibama, mwana mwasi ya Ana, mwana mwasi ya Tshibeyone Mohivi; 3. Pe Basemate, mwana mwasi ya Ishmayele, ndeko mwasi ya Nebayote. 4. Pe Ada abotelaki Ezawu Elifaze, pe Basemate abotaki Rewuyel. 5. Pe Oholibama abotaki Yewushe, Yahelam pe Kora. Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu, oyo babotamelaki ye na mboka ya Kanana. 6. Pe Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, pe batu nyonso ya ndako na ye, bibwele na ye, banyama na ye nyonso pe bozwi nyonso oyo azwaki na mboka ya Kanana, pe akendaki na mboka mosusu, mosika na Yakobo, ndeko na ye. 7. Po bozwi na bango ezalaki mingi penza pona bakoka kofanda esika moko, pe mboka oyo bazalaki kofanda ekokaki te komema bango na tina ya bitonga na bango. 8. Pe Ezawu afandaki na ngomba ya Seyire : Ezawu azali Edome. 9. Oyo ezali lisolo ya oyo ewuti na Ezawu, tata ya Edome, na ngomba ya Seyire. 10. Oyo ezali bakombo ya bana mibali ya Ezawu: Elifaze, mwana ya Ada, mwasi ya Ezawu; Rewuyel, mwana ya Basemate, mwasi ya Ezawu. 11. Pe bana ya Elifaze bazalaki Temane, Omar, Tshefo, Gatame pe Kenaze. 12. Timna azalaki makango ya Elifaze, mwana ya Ezawu, pe abotelaki Elifaze Amaleke. Bango nde bana mibali ya Ada, mwasi ya Ezawu. 13. Oyo nde bana mibali ya Rewuyel: Nakate, Zerak, Shama, pe Miza. Bango nde bazalaki bana mibali ya Basemate, mwasi ya Ezawu. 14. Oyo nde bana mibali ya Oholibama, mwana mwasi ya Ana, mwana ya Tshibeyone, mwasi ya Ezawu. Abotelaki Ezawu Yewushe, Yahelam pe Kora. 15. Oyo nde bakambi ya mabota ya bana ya Ezawu: bana ya Elifaze, mwana ya liboso ya Ezawu: Mokonzi Temane, Mokonzi Omar, Mokonzi Tshefo, Mokonzi Kenaze, 16. Mokonzi Kora, Mokonzi Gatame, pe Mokonzi Amaleke. Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Elifaze na mboka ya Edome. Bango nde bazalaki bana mibali ya Ada. 17. Pe oyo nde bazali bana mibali ya Rewuyel, mwana ya Ezawu: Mokonzi Nakate, Mokonzi Zerak, Mokonzi Shama, pe Mokonzi Miza. Baoyo nde bazalaki bakonzi ya mabota Rewuyel na mboka ya Edome. Bango wana nde bana mibali ya Basemate, mwasi ya Ezawu. 18 — oyo nde bana mibali ya Oholibama, mwasi ya Ezawu: Mokonzi Yewush, Mokonzi Yahelam, pe Mokonzi Kora. Bango nde wana bazali bakonzi ya mabota ya Oholibama, mwana mwasi ya Ana, mwasi ya Ezawu. 19. Bango nyonso wana nde bana ya Ezawu, pe bang onde bakambi na bango: ye azali Edome.

— v. 15: mokonzi ya libota to libota.

20. Oyo nde bana mibali ya Seyire, Mohore, oyo afandaki na mboka yango: Lotane, Shobale, Tshibeyone pe Ana, 21. Dishone, Etshere pe Dishane. Bango wana nde bakonzi ya mabota Bahore, bana mibali ya Seyire, na mboka ya Edome. 22. Pe bana mibali ya Lotane bazalaki Ori pe Emame, pe Timna, ndeko mwasi ya Lotane. 23. Pe oyo nde bana mibali ya Shobale: Alwane, Manayate, Ebal, Shefo pe Oname. 24. Oyo nde bana mibali ya Tshibone: Aya pe Ana. Ezalaki Ana wana nde oyo amonaki maziba ya moto na esobe*, wana azalaki koleyisa bampunda ya Tshibone, tata na ye. 25. Pe oyo nde bana mibali ya Ana: Dishone pe Oholibaha, mwana mwasi ya Ana. 26. Oyo nde bana mibali ya Dishane: Emedane, Eshbane, Itirane pe Kerane. 27. Oyo nde bana mibali ya Etshere: Biliane, Zaawane, pe Akane. 28. Oyo nde bana mibali ya Dishane: Uze pe Arane.

— v. 24: mingi batangi: bapunda.

29. Oyo nde bakonzi ya mabota ya Bahori oyo: Mokonzi Lotane, Mokonzi Shobale, Mokonzi Tshibone, Mokonzi Ana, 30. Mokonzi Dishone, Mokonzi Etsher, Mokonzi Dishan. Bango wana nde bazalaki bakonzi ya Bahori, na kolanda bakonzi ya mabota na bango, na mboka ya Seyire. 31. Pe oyo nde bakonzi oyo bayangelaki na kati ya mboka ya Edome liboso ete mokonzi moko ayangela likolo ya bana ya Israele. 32. Bela mwana ya Beyore akonzaki na Edome, pe kombo ya engumba na ye ezalaki Dinaba. 33. Pe Bela akufaki, pe Yobabe mwana ya Zerak ya Bozira akonzaki na esika na ye. 34. Pe Yobabe akufaki, pe Ushame ya Batemane akonzaki na esika na ye. 35. Ushame akufaki, pe Adade mwana ya Bedade, oyo abetaki Midiane na bilanga ya Moaba, akonzaki na esika na ye. Pe kombo ya engumba na ye ezalaki Awite. 36. Pe Adade akufaki, pe Samla ya Masreka akitanaki na esika na ye. 37. Pe Samla akufaki, pe Sawulo ya Rehobote likolo na Ebale Efrate akonzaki na esika na ye. 38. Pe Sawulo akufaki, pe Baal-Anane mwana mobali ya Akebore akonzaki na esika na ye. 39. Pe Baal-Anane mwana ya Akebore akufaki, pe Adare akonzaki na esika na ye. Pe kombo ya engumba na ye ezalaki Pawu, pe kombo ya mwasi na ye Meyetabele, mwana mwasi ya Matred, mwana mwasi ya Mezayabe.

— v. 39: Hadada (?).

40. Pe oyo nde bakombo ya bakonzi ya mabota ya Ezawu, na kolanda mabota na bango, na kotalela bisika na bango, na bakombo na bango: Mokonzi Timna, Mokonzi Alva, Mokonzi Yetete, 41. Mokonzi Oholibama, Mokonzi Ela, Mokonzi Pinon, 42. Mokonzi Kenaz, Mokonzi Teman, Mokonzi Mibtshar, 43. Mokonzi Magdiele, Mokonzi Iram. 43. Oyo nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edome, na kolanda bifandeli na bango na mboka oyo bazalaki na yango. Oyo ezali Ezawu, tata ya Edome.

 

Mokapo 37

1. Pe Yakobo afandaki na mboka wapi tata na ye afandaki, na kati ya mboka ya Kanana. 2. Oyo nde ezali lisolo ya oyo ewuti ya Yakobo: Yozefe, azalaki na mbula zomi na sambo (17), azalaki kobatela bibwele elongo na bandeko na ye, pe elenge mobali, azalaki elongo na bana ya Bila pe bana ya Zilipa, basi ya tata na ye; pe Yozefe azalaki koyebisa tata na bango maloba na bango ya mabe. 3. Pe Israele alingaki Yozefe koleka bana na ye ya mibali nyonso, po azalaki pona ye mwana na ye kimobange na ye, pe asalelaki ye elamba ya molayi pe (kazaka) ya maboko. 4. Pe bandeko na ye bamonaki ete tata na bango alingaki ye koleka bandeko na ye nyonso, bayinaki ye pe bakokaki koloba na ye na kimia te. 5. Pe Yozefe alotaki ndoto, pe ayebisaki yango bandeko na ye, bayinaki ye lisusu mingi. 6. Pe alobaki na bango: Nabondeli bino, boyoka ndoto oyo nalotaki : 7. Tala, tozalaki kokangisa maboke ya mbuma na kati ya bilanga, pe tala, liboke na ngai etelemaki pe etelemaki sembo; pe tala, maboke na bino mazingaki ya yango pe egumbamaki liboso ya liboke na ngai. 8. Pe bandeko na ye balobaki na ye ete: Osengeli bongo koyangela likolo na biso? Okokonza likolo na biso ? Pe bayinaki ye lisusu mingi na tina ya bandoto na ye pe maloba na ye. 9. Pe alotaki lisusu ndoto mosusu, pe ayebisaki bandeko na ye. Pe alobaki : Tala, nalotaki lisusu ndoto mosusu, pe tala, moyi, pe sanza, pe minzoto zomi na moko, egumbamaki liboso na ngai. 10. Pe ayebisaki yango tata na ye pe na bandeko na ye. Pe tata na ye apamelaki ye, pe alobaki na ye : Oyo ezali nini ndoto oyo olotaki ? Ngai na mama na yo pe bandeko na yo, tokoya kogumbama na mabele liboso na yo? 11. Pe bandeko na ye bayokelaki ye zuwa, kasi tata na ye abombaki liloba yango.

— v. 2*: to: pe asalaki elongo na bango. — v. 2**: engebene na basusu: maloba mabe. — v. 3: to: tunique na manzaka.

12. Pe bandeko na ye bakendaki koleyisa bibwele ya tata na bango na Shekeme. 13. Pe Israele alobaki na Yozefe: Bandeko na yo bazali koleyisa [bibwele] na Shekeme te? Yaka, pe nakotinda yo epayi na bango. Pe ye alobaki na ye: Ngai oyo. 14. Pe alobaki na ye: Nabondeli yo, kende, tala soki bandeko na yo bazali malamu, pe soki bibwele bazali na nzoto malamu, pe omemela ngai basango. Pe atindaki ye longwa na Lobwaku ya Ebrone, pe akomaki na Shekeme. 15. Pe mutu moko amonaki ye, tala, azalaki koyengayenga na kati ya bilanga. Pe mutu yango atunaki ye, alobaki: Ozali koluka nini? 16. Pe ye alobaki: Nazali koluka bandeko na ngai, nabondeli yo, yebisa ngai esika nini oyo bazali koleyisa. 17. Pe mutu yango alobaki: Balongwe awa, po nayokaki bango bazalaki koloba: Tokende na Dotane. Pe Yozefe akendaki sima bandeko na ye pe amonaki bango na Dotane. 18. Pe bamonaki ye na mosika, pe liboso ete akoma penepene na bango, basalaki likita pona koboma ye. 19. Balobanaki mobali moko na ndeko na ye: Tala, nkolo ya bandoto, ye oyo akoya! 20. Pe sik’oyo, boya, toboma ye pe tobwaka ye na kati ya moko ya maziba, pe tokoloba ete: Nyama moko ya mabe aliaki ye, pe tokomona bandoto na ye ekokoma nini. 21. Pe Rubene ayokaki yango, pe akangolaki ye na maboko na bango pe alobaki: Tobeta ye te akufa. 22. Pe Rubene alobaki na bango: Bosopa makila te, bobwaka ye na kati ya liziba oyo ezali na kati ya esobe, pe botia loboko te likolo na ye. Po ete akakongola ye na maboko na bango, pona azongisa ye epayi ya tata na ye. 23. Pe esalemaki ete tangu Yozefe akomaki epayi ya bandeko na ye, balongolaki Yozefe elamba na ye, elamba ya molayi pe maboko oyo ezalaki na ye; 24. Pe bakamataki ye pe babwakaki ye na kati ya liziba; pe liziba yango ezalaki pamba: mayi ezalaki na kati te. 25. Pe bafandaki pona kolia lipa; pe batombolaki miso pe batalaki, pe tala, molongo moko ya Ba-Ishmayele ezalaki koya wuta na Gileadi; pe bakamela na bango ememaki biloko ya solo kitoko, mafuta ya malasi, pe mire, oyo bazali kokende kokitisa na Ejipito. 26. Pe Yuda alobaki na bandeko na ye: Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso pe tobombi makila na ye? 27. Boya, toteka ye epayi ya Ba-Ishmayele; pe tika ete loboko na biso ezala likolo na ye te; po azali ndeko na biso, mosuni na biso. Pe bandeko na ye bayokaki ye. 28. Pe batu ya Midiane, basali mombongo balekaki. Pe babendaki Yozefe na liziba pe bamisaki ye libanda, pe batekaki ye epayi ya Ba-Ishmayele na biteni tuku mibale (20) ya palata. Pe baoyo wana bamemaki Yozefe na Ejipito. 29. Pe Rubene azongaki na liziba, pe tala Yozefe azalaki te na kati ya liziba. Pe apasolaki bilamba na ye, 30. Pe azongaki epayi ya bandeko na ye pe alobaki: Mwana azali wana te, pe ngai, nakokende wapi? 31. Pe bakamataki elamba ya Yozefe, pe babomaki mobali ya ntaba pe bazindisaki elamba yango na kati ya makila. 32. Pe batindaki elamba ya molayi epayi ya tata na bango pe balobaki: Tosili komona yango, tala soki ezali elamba ya mwana na yo to te. 33. Pe ye ayebaki yango pe alobaki: Oyo ezali elamba ya mwana na ngai, nyama moko ya mabe esili kolia ye : Yozefe asili penza kopasolama! 34. Pe Yakobo apasolaki bilamba na ye pe alataki saki na loketo na ye pe asalaki matanga na tina ya mwana na ye mikolo mingi. 35. Pe bana na ye nyonso ya mibali pe ya basi batelemaki pona kobondisa ye, kasi ye aboyaki kobondisama. Alobaki : Nakokita penza na kolela epayi ya mwana na ngai, na Sheol*. Pe tata na ye alelaki ye.

— v. 31: Ebre: ntaba mobali ya bantaba ya basi: awa pe bisika mosusu, mbala mingi. — v. 35: elobeli oyo ezali penza polele te pona komonisa esika oyo milimo bikabwana na nzoto.

36. Pe Bamidiane batekaki ye na Ejipito epayi ya Potifare, mutu ya lopango ya Farao*, mokonzi ya bakengeli.

Vv.36 : ebengelami ya bakonzi ya Ejipito

 

Mokapo 38

1. Pe ekomaki ete na tangu wana, Yuda akitaki epayi ya bandeko na ye pe akendaki ti kofanda epayi ya mobali moko ya Adulame, kombo na ye Ira. 2. Pe kuna, Yuda amonaki mwana mwasi ya mobali moko ya Kanana, pe kombo na ye ezalaki Shuwa. Azwaki ye pe akotaki epayi na ye. 3. Pe akomaki na zemi pe abotaki mwana mobali, pe abengaki kombo na ye Er. 4. Akomaki lisusu na zemi pe abotaki mwana mobali, pe abengaki kombo na ye Onane. 5. Abotaki mwana mosusu ya mobali, pe abengaki kombo na ye Shela. Pe azalaki na Kezibe tangu abotaki ye. 6. Pe Yuda azwaki mwasi pona Er, mwana na ye ya liboso, oyo kombo na ye Tamare. 7. Pe Er, mwana ya liboso ya Yuda, azalaki mutu mabe na miso ya Yawe, pe Yawe abomaki ye. 8. Pe Yuda alobaki na Onane: Kende epayi ya mwasi ya ndeko na yo pe okokisa mokumba na yo ya semeki, pe telemisa bokitani pona ndeko na yo. 9. Kasi Onane ayebaki ete bokitani ekozala ya ye te; pe ekomaki ete tangu akotaki epayi ya mwasi wa ndeko mobali na ye, azalaki kosopa mayi ya kimobali na ye na mabele, pona kopesa bokitani te na ndeko na ye ya mobali. 10. Pe oyo azalaki kosala ezalaki mabe na miso ya Yawe, pe abomaki ye lokola. 11. Pe Yuda alobaki na Tamar, bokilo na ye ya mwasi: Tikala mwasi akufela mobali na kati ya ndako ya tata na yo kino Shela akola, po alobaki : po ete akufa te, ye pe, lokola bandeko na ye. Pe Tamar akendaki pe afandaki na ndako ya tata na ye. 12. Pe mikolo ekomaki milayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Pe Yuda amibondisaki pe amataki na Timna, ye na Ira Moadulame, moninga na ye, epayi ya baoyo balongolaka bapwale ya bibwele na ye. 13. Pe bayebisaki Tamar, balobak ete: Tala bokilo na yo amati na Timna pona kolongola bapwale ya etonga na ye. 14. Pe alongolaki bilamba na ye ya mwasi oyo akufela mobali, pe amizipaki vwale moko, pe amizingaki. Afandaki na ekoteli ya Enayime, oyo ezalaki na nzela ya Timna, po amonaki ete Shela akolaki, pe bapesaki ye te lokola mwasi. 15. Pe Yuda amonaki ye, azwaki ye lokola mwasi ya ndumba, po azipaki elongi na ye. 16. Abalukaki epayi na ye na nzela pe alobaki ete: Nabondeli yo, tika ngai naya epayi na yo. Po ayebaki te ete azalaki bokilo na ye ya mwasi. Pe alobaki : Okopesa ngai nini po ete oya epayi na ngai? 17. Pe alobaki: Nakotinda mwana ya ntaba ya etonga. Alobaki : nini okopesa ngai lokola elaka kino okotinda yango? 18. Pe alobaki: Elaka nini nakopesa yo? Pe alobaki : Kashe na yo, singa na yo, pe lingenda na yo oyo ezali na loboko na yo. Pe apesaki ye, pe akotaki epayi na ye, pe akomaki na zemi na ye. 19. Pe atelemaki pe akendaki, pe alongolaki vwale na ye likolo na ye pe alataki bilamba na ye ya mwasi oyo akufela mobali. 20. Pe Yuda atindaki mwana ya ntaba na loboko ya moninga na ye, Moadulame, pona azwa elaka na lobok ya mwasi yango, kasi amonaki ye te. 21. Pe atunaki mibali ya esika yango ete: Wapi mwasi oyo amibonza na kindumba oyo azalaki na Enayime, na nzela? Pe balobaki: Mwasi oyo amibonza na kindumba azalaka awa te. 22. Pe azongaki epayi na Yuda pe alobaki: Namonaki ye te, pe lisusu mibali ya esika yango bayebisaki ngai pe ete: Awa mwasi oyo amibonza na kindumba azalaka te. 23. Pe Yuda alobaki: Tika ye azwa yango pona ye moko, noki tozala ya kotiolama.

—vv. 21, 22: awa, na maloba penza: [mwasi] abulisami [na kindumba pona losambo ya Ashtarote].

24. Pe ekomaki na sima ya sanza misato, bayebisaki Yuda ete: Tamar, bokilo na yo ya mwasi, asali kindumba, pe tala azwi zemi na nzela ya kindumba. Yuda alobaki: Bobimisa ye, pe ete atumbama. 25. Lokola bazalaki kobimisa ye, pe atindaki maloba epayi ya bokilo na ye, koloba ete: Nazali na zemi ya mobali oyo biloko oyo ezali ya ye. Pe alobaki : Nabondeli yo, oyeba kashe oyo, singa oyo, pe lingenda oyo ezali ya nani. 26. Pe Yuda ayebaki yango pe alobaki: Azali moyengebene koleka ngai, po napesaki ye te na mwana na ngai Shela. Pe ayebaki ye lisusu te. 27. Pe ekomaki na tangu abotaki, tala ete mapasa bazalaki na kati ya libumu na ye; 28. Pe esalemaki ete, tangu azalaki kobota, moko na bango asembolaki loboko na ye; pe mwasi ya bwania akamataki yango pe akangaki singa ya motane na loboko na ye, kolobaka: Oyo akobima liboso. 29. Pe esalemaki, lokola alongolaki loboko na ye, ete tala, ndeko na ye ya mobali abimaki; pe alobaki: Opasoli nzela boni, kopasola nzela ezala likolo na yo. Pe babengaki kombo na ye Perez. 30. Pe sima ndeko na ye ya mobali abimaki, oyo likolo ya loboko na ye singa ya motane ezalaki; pe babengaki kombo na ye Zerak.

— v. 29: kopasola nzela. — v. 30: komata.

 

Mokapo 39

1. Pe Yozefe bamemaki ye na Ejipito; pe Potifare, mokonzi ya basoda ya Farao, kapiteni ya bakengeli, mutu moejipito, asombaki ye na loboko ya Ba-Ishmayele oyo bamemaki ye kuna. 2. Pe Yawe azalaki elongo na Yozefe, pe azalaki mutu oyo azalaki kolongisa nyonso, pe azalaki na ndako ya nkolo na ye, Moejipito. 3. Pe nkolo na ye amonaki ete Yawe azalaki elongo na ye pe ete nyonso azalaki kosala, Yawe azalaki kolongisa yango na maboko na ye. 4. Pe Yozefe azwaki ngolu na miso na ye pe azalaki kosalela ye; Pe atiaki ye mokambi likolo ya ndako na ye pe atiaki na maboko na ye nyonso oyo azalaki na yango. 5. Pe esalemaki ete, wuta atiaki ye likolo ya ndako na ye pe ya nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya Moejipito na ²tina ya Yozefe; pe lipamboli ya Yawe ezalaki likolo ya nyonso oyo azalaki na yango, ezala na ndako pe na bilanga. 6. Pe atikaki nyonso oyo ya ye na maboko ya Yozefe, pe azalaki koyeba eloko moko te longola kaka lipa oyo azalaki kolia. Nzokande Yozefe azalaki kitoko na lolenge pe kitoko na elongi. 7. Pe esalemaki sima ya makambu wana ete mwasi ya nkolo na ye atombolaki miso na ye epayi ya Yozefe pe alobaki: Laka na ngai. 8. Kasi aboyaki, pe alobaki na mwasi ya nkolo na ye : Tala, nkolo na ngai ayebi te makambu oyo ezali na ndako elongo na ngai, pe atie nyonso oyo azali na yango na maboko na ngai. 9. Mutu moko te azali monene koleka ngai na ndako oyo, pe aboyi te eloko moko liboso na ngai longola kaka yo, po ozali mwasi na ye; pe ndenge nini nakoki kosala mabe monene oyo, pe kosumuka liboso ya Nzambe? 10. Pe esalemaki été lokola azalaki koloba na Yozefe mokolo na mokolo, ayokaki ye te pona kolala pembeni na ye to kozala elongo na ye. 11. Pe esalemaki mokolo moko ete akotaki na kati ya ndako pona kosala maye asengelaki kosala, pe mutu moko te kati na batu ya ndako azalaki kuna na kati ya ndako. 12. Pe akangaki ye elamba na ye, alobaki: Lala na ngai. Pe atikaki elamba na ye na loboko na ye pe akimaki pe abimaki libanda. 13. Pe esalemaki ete tangu amonaki ete atiki elamba na ye na loboko na ye pe akimi libanda. 14. Abengaki batu ya ndako na ye pe alobaki na bango: botala, amemeli biso Moebre moko pona koseka biso: ayei epai na ngai pona kolala elongo na ngai; pe nagangaki na mongongo makasi; 15. Pe esalemaki ete tangu ayokaki ete natombolaki mongongo na ngai pe nagangaki, ete atikaki elamba na ye pembeni na ngai, pe akimaki, pe abimaki libanda. 16. Pe atiaki elamba na ye pembeni na ye ti nkolo na ye azongaki na ndako na ye. 17. Pe alobaki na ye maloba oyo: Mowumbu Moebre oyo omemelaki biso ayaki epayi na ngai pona kotiola ngai. 18. Pe esalemaki ete tangu natombolaki mongongo na ngai pe nagangaki, atikaki elamba na ye pembeni na ngai pe abimaki mbangu. 19. Pe esalemaki ete tangu nkolo na ye ayokaki maloba ya mwasi na ye, alobaki na ye: Mowumbu na yo asalelaki ngai boye, zolo* na ye epelaki makasi. 20. Nde nkolo ya Yozefe akamataki ye pe atiaki ye na ndako molayi ya boloko, esika oyo bakangami ya mokonzi bakangamaki ; pe azalaki wana na ndako molayi ya boloko. 21. Kasi Yawe azalaki elongo na Yozefe pe amonisaki boboto na ye likolo na ye pe apesaki ye ngolu na miso ya mokambi-monene ya ndako molayi ya boloko. 22. Pe Mokambi-monene ya ndako molayi ya boloko atiaki bakangami nyonso oyo bazalaki na ndako molayi ya boloko na loboko ya Yozefe, pe likambu nyonso oyo esalemaki kuna, ye moko azalaki mosali na yango. 23. Mokambi –monene ya ndako molayi ya boloko azalaki kotya likebi te na eloko moko te na oyo ezalaki na se ya loboko na ye, po ete Yawe azalaki elongo na ye, pe oyo ye azalaki kosala, Yawe azalaki kopesa yango elonga.

— v. 11: to: na tangu wana. — v. 16: elamba na ye. V. 19 : zolo na ye epeli makasi ezali komonisa kanda makasi— v. 20: Ebre: ndako ya linongi, awa na mokapo mobimba.

 

Mokapo 40

1. Pe esalemaki sima ya makambu ete mokonzi ya bapesi-masanga pe mokonzi ta basali-mapa ya mokonzi ya Ejipito basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito. 2. Pe Farao asilikelaki bakonzi na ye mibale, na mokambi ya masanga pe mokonzi ya basali mapa. 3. Pe atiaki bango na boloko ya kapiteni ya bakengeli, na ndako molayi ya boloko, esika Yozefe akangamaki. 4. Pe mokonzi ya bakengeli atiaki bango na litambwisi ya Yozefe, pe asalelaki bango; pe bazalaki na se ya bokengeli pona mikolo mingi. 5. Pe bango mibale balotaki ndoto, mutu na mutu alotaki ndoto na ye moko, na butu moko, moko na moko kolanda ndimbola ya ndoto na ye —momemi masanga pe mosali mapa ya mokonzi ya Ejipito, oyo bakangamaki na ndako molayi ya boloko. 6. Pe Yozefe ayaki epayi na bango na tongo pe atalaki bango ; pe tala, bazalaki na mawa na bilongi na bango. 7. Pe atunaki bakonzi ya Farao, oyo bazalaki elongo na ye na se ya bokengeli na kati ya ndako ya nkolo na ye, alobaki: Pona nini bilongi na bino ezali komonana na mawa mingi lelo? 8. Pe balobaki na ye: Tolotaki ndoto, kasi mutu moko te azali pona kolimbola yango. Pe Yozefe alobaki na bango: Bandimbola ezali ya Nzambe te? Nabondeli bino, boyebisa ngai yango. 9. Pe mokonzi ya bamemi-masanga ayebisaki Yozefe ndoto na ye, pe alobaki na ye: Na ndoto na ngai, tala, nzete ya vino ezalaki liboso na ngai. 10. Pe likolo na nzete ya vino yango ezalaki na bitape misato; pe ezalaki lokola ezali kobimisa matiti ya sika ; fololo na yango ebimaki, pe maboke na yango ebotaki bambuma ya vino oyo eteli; 11. Pe kopo ya Farao ezalaki na loboko na ngai, pe nazwaki mbuma ya vino pe nakamolaki yango na kati ya kopo ya Farao, pe natiaki kopo yango na loboko ya Farao. 12. Pe Yozefe alobaki na ye: Ndimbola na yango oyo: Bitape misato ezali mikolo misato. 13. Mikolo misato lisusu, pe Farao akotombola moto na yo pe akozongisa yo na esika na yo, pe okotia kopo ya Farao na loboko na ye, na kolanda momeseno ya kala tangu ozalaki mokonzi ya bamemi masanga na ye. 14. Kasi kanisa ngai tangu okozala na bolamu, pe nabondeli yo omonisela ngai boboto. Pe loba pona ngai epayi na Farao pe obimisa ngai na ndako oyo. 15. Po ete bayibaki ngai na mboka ya Baebre, pe awa nasali eloko moko te oyo ebongi pona batia ngai na kati ya libulu. 16. Pe mokonzi ya basali-mapa amonaki ete alimboli yango malamu, pe alobaki na Yozefe: Ngai pe, na ndoto na ngai ; pe tala, bakitunga misato ya mapa ya pembe ezalaki likolo ya moto na ngai; 17. Pe na kitunga oyo eleki likolo ezalaki na bileyi ya ndenge nyonso pona Farao, mosala ya kosala-mapa; pe bandeke baliaki yango na kitunga oyo ezalaki likolo ya moto na ngai. 18. Pe Yozefe ayanolaki pe alobaki: Ndimbola na yango oyo: Bakitunga misato ezali mikolo misato. 19. Na mikolo misato mosusu, pe Farao akotombola moto na yo likolo na yo pe akobaka yo na nzete, pe bandeke bakolia mosuni na yo. 20. Pe ekomaki, mokolo ya misato, mokolo ya mbotama ya Farao, asalaki feti pona basali na ye nyonso. Atombolaki pe moto ya mokonzi ya bamemi masanga pe moto ya mokonzi ya basali-mapa kati na basali na ye : 21. Pe azongisaki mokonzi ya bamemi masanga na esika na ye ya mokonzi bamemi-masanga pe atiaki kopo na loboko ya Farao ; 22. Pe abakaki mokonzi ya basali mapa, ndenge Yozefe alimbolaki bango. 23. Kasi mokonzi ya bamemi masanga akanisaki Yozefe te pe abosanaki ye.

 

Mokapo 41

1. Pe esalemaki na sima ya mibu mibale koleka, Farao alotaki ndoto ; pe tala, azalaki kotelema pembeni ya ebale ya Nil. 2. Pe tala, bangombe sambo, kitoko na kotala pe misuni mafuta, ebimaki na ebale, pe bazalaki kolia matiti na kati ya matiti ya mayi. 3. Pe tala, na sima na bango, pe bangombe mosusu sambo ebimaki na ebale, mabe na kotala pe nzoto mikemike. Pe batelemaki pembeni ya bangombe oyo ezalaki na libongo ya ebale; 4. Pe bangombe oyo bazalaki mabe ya kotala, oyo ezalaki mike na nzoto baliaki bangombe sambo ya kitoko ya kotala pe mafuta-mafuta. Pe Farao alamukaki. 5. Pe alalaki pe alotaki mbala ya mibale: pe tala, mito sambo ya mbuma, ya mafuta-mafuta pe ya malamu, ezalaki kokola na lititi moko. 6. Pe tala, mito sambo ya mbuma mike, pe ezikisamaki na mopepe ya esti, ebimaki sima na yango; 7. Pe mito ya bambuma baliaki mito sambo oyo minene pe etonda. Pe Farao alamukaki; pe tala, ezalaki ndoto. 8. Pe esalemaki na tongo ete elimo na ye etungisamaki; pe atindaki pe abengaki babikoli * nyonso ya Ejipito, pe batu na ye nyonso ya bwania. Pe Farao ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ezalaki mutu moko te oyo alimbolaki yango Farao. 9. Pe mokonzi ya bamemi-masanga alobaki na Farao, koloba: Lelo nakanisi bambeba na ngai. 10 Farao asilikelaki basali na ye, pe atiaki ngai na boloko ya ndako ya mokonzi ya bakengeli. 11. Pe tolotaki ndoto na butu moko, ngai pe ye, moko na moko na biso alotaki kolandama na ndimbola ya ndoto na ye. 12. Pe ezalaki wana elongo na biso, elenge mobali moko ya Moebre, mosali ya mokonzi ya bakengeli; pe toyebisaki ye yango, pe alimbolaki biso bandoto na biso, pe apesaki moko na moko na biso ndimbola kolandama na ndoto na ye. 13. Pe esalemaki ete, lokola alimbolaki pona biso, boye esalemaki : Ngai [Farao] azongisaki ngai na esika na ngai, pe ye abakamaki na nzete.

— v. 8*: to: bakomeli. —

14. Pe Farao atindaki pe abengaki Yozefe; pe babimisaki ye mbangu na libulu, pe akataki suki pe abongolaki bilamba na ye; pe ayaki epayi ya Farao. 15. Pe Farao alobaki na Yozefe: Nalotaki ndoto, pe ata mutu moko te akoki kolimbola yango, pe nayoki koloba na oyo etali yo ete ososolaka ndoto pona kolimbola yango. 16. Pe Yozefe ayanolaki Farao, koloba: Ezali ngai te, Nzambe akopesa Farao eyano ya kimia. 17. Pe Farao alobaki na Yozefe: Na kati ya ndoto na ngai, tala, natelemaki pembeni ya ebale; 18. Pe tala, kuna na ebale bangombe sambo ya misuni mafuta-mafuta, oyo ezalaki kitoko na kotala, ezalaki kolia matiti na kati ya matiti ya pembeni ya ebale. 19. Pe tala, bangombe mosusu sambo ematamaki sima na bango, ya nzoto mike-mike pe ya mabe penza pona kotala, pe ya nzoto ekonda : Namona ata moko te lokola bango na mabe na kati ya mboka mobimba ya Ejipito. 20. Pe bangombe ya kokonda pe ya mabe baliaki bangombe sambo ya liboso, oyo ya mafuta : 21. Bakotaki na kati ya libumu na bango, pe emonanaki te ete bakotaki na libumu na bango, pe komonana na bango ezalaki mabe lokola na ebandeli. Na sima, nalamukaki. 22. Pe namonaki na ndoto na ngai; pe tala, mito sambo ya mbuma mazalaki kokola na lititi (tije) moko, ya kotonda pe ya malamu; 23. Pe tala, mito sambo ya mbuma ekawuka, ya polele, ezikisami na mopepe ya esti, ebimaki sima na yango; 24. Pe mito ya kokonda baliaki mito sambo ya malamu. Pe nayebisaki babikoli; pe ezalaki na mutu moko te oyo akokaki kolimbola ngai yango. 25. Pe Yozefe alobaki na Farao: Ndoto ya Farao ezali kaka moko: Nzambe asili koyebisa Farao makambu oyo akosala. 26. Bangombe sambo ya malamu ezali mbula sambo, pe mito sambo ya malamu ya mbuma ezali mbula sambo : ezali ndoto moko. 27. Pe bangombe sambo ya kokonda pe ya mabe oyo emataki sima na yango ezali mbula sambo, pe mito sambo ya mbuma oyo ya polele, ekawuka, oyo mopepe ya esti ezikisa, ezali mbula sambo ya nzala. 28. Liloba oyo ezali oyo nalobi na Farao ; oyo Nzambe akosala, alakisi yango na Farao. 29. Tala, mbula sambo ya kofulama ebele monene ezali koya na mokili mobimba ya Ejipito; 30. Pe mbula sambo ya nzala ekotelema sima na yango, pe kofulukama ebele ya biloko nyonso ekobosanama na mboka ya Ejipito, pe nzala ekosilisa mokili. 31. Pe kufulukuma ebele ekoyebana lisusu te na mboka na tina ya nzala oyo ekolanda, po ekozala makasi penza. 32. Pe ete ndoto yango ezongelamaki mbala mibale epayi ya Farao, yango emonisi ete Nzambe nde azwi ekateli, pe ete Nzambe akosala mbangu-mbangu pona kokokisa yango. 33. Pe sik’oyo, tika Farao akoluka mutu moko ya mayele pe ya bwania pe atia ye likolo ya Ejipito. 34. Tika ete Farao asala bongo pe apona bakengeli misala likolo ya mboka, pe azwa eteni moko kati na biteni mitano ya biloko ya mboka ya Ejipito na mibu sambo ya bofuluki. 35. Pe tika ete basangisa bileyi nyonso ya bambula oyo ya malamu oyo ezali koya, pe tika babomba ble na se ya loboko ya Farao pona bilei kati na bingumba, pe babatela yango. 36. Pe bilei yango ekozala ebombelo pona mboka, pona mbula sambo ya nzala oyo ekozala na mboka ya Ejipito, pe mboka ekobebisama te na nzala. 37. Pe likambu yango ezalaki malamu na miso ya Farao pe na miso ya basali na ye nyonso. 38. Pe Farao alobaki na basali na ye: Tokoki komona mutu lokola oyo, oyo Molimo ya Nzambe ezali kati na ye? 39. Pe Farao alobaki na Yozefe: Lokola Nzambe alakisaki yo makambu oyo nyonso, mutu moko te azali na mayele pe na bwania lokola yo. 40. Yo, okozala likolo ya ndako na ngai, pe batu na ngai nyonso bakotosa mitindo ya monoko na yo. Bobele na oyo etali kiti ya bokonzi, nakozala monene koleka yo. 41. Pe Farao alobaki na Yozefe: Tala, natie yo likolo ya mokili mobimba ya Ejipito. 42. Pe Farao alongolaki lopete na ye ya elembo na loboko na ye pe atiaki yango na loboko ya Yozefe. Alatisaki ye bilamba ya kitoko ya lino pe atiaki monyololo ya wolo na kingo na ye. 43. Pe amatisaki ye na shar na ye ya mibale, pe bazalaki koganga liboso na ye: *Abrek! Pe atiaki ye mokonzi likolo ya mboka mobimba ya Ejipito. 44. Pe Farao alobaki na Yozefe: Ngai nazali Farao, kasi soki yo te, mutu moko te akotombola loboko to likolo na ye mboka mobimba ya Ejipito. 45. Pe Farao apesaki Yozefe kombo Zafenat-Paneya * pe apesaki ye Asenata, mwana mwasi ya Potifera, nganga-nzambe ya On, po azala mwasi na ye. Pe Yozefe atambolaki kotala mboka mobimba ya Ejipito. 46. Pe Yozefe azalaki na mbula tuku misato (30) tangu atelemaki liboso ya Farao, mokonzi ya Ejipito. Pe Yozefe alongwaki liboso ya Farao pe atambolaki na mboka mobimba ya Ejipito.

— v. 42: esika mosusu: coton ya malamu. — v. 43: Liloba ya Ejipito oyo elimboli: bofukama ; mabolongo na bino na se to lokumu na ye. — v. 45: mobimisi basekele; engebene na Moejipito: mobikisi ya mokili, mosungi ya bomoyi to Nzambe alobi : akozala na bomoyi.

47. Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki biloko mingi penza. 48. Pe asangisaki bilei nyonso ya mibu sambo oyo ezalaki na mboka ya Ejipito pe abombaki bilei yango kati na bingumba; na engumba moko na moko, atiaki bilei oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango. 49. Pe Yozefe abombaki mbuma ebele penza lokola zelo ya mayi monene, ebele mingi koleka ete batikaki kotanga yango po ezalaki lisusu na motango te. 50. Liboso ete mibu ya nzala eya, bana mibali mibale babotamaki na Yozefe na Asenate, mwana mwasi ya Potifera, nganga-nzambe ya On. 51. Yozefe apesaki mwana na ye ya liboso kombo Manase* : Nzambe asali ete nabosana bapasi na ngai nyonso pe ndako nyonso ya tata na ngai. 52. Pe apesaki mwana ya mibale kombo ya Efrayime*: Nzambe asali ete mbuma na ngai ebotama ebele na mboka ya bapasi na ngai.

— v. 51: kobosana to ye oyo asalaka tobosana. — v. 52: kobota mbala mibale to mbala mibale koleka na kobota mbuma.

53. Pe mibu sambo ya bilei ebele oyo ezalaki na mboka ya Ejipito ekomaki na suka; 54. Pe mibu sambo ya nzala ebandaki koya, lokola kaka Yozefe alobaki. Pe nzala ekomaki na bikolo nyonso; kasi na mboka nyonso ya Ejipito ezalaki na lipa. 55. Pe mboka nyonso ya Ejipito eyokaki nzala, pe batu babelelaki Farao pona lipa; pe Farao alobaki na Baejipito nyonso: Bokende epayi ya Yozefe, bosala nyonso oyo akoyebisa bino. 56. Pe nzala ezalaki likolo ya etando mobimba ya mabele (batu nyonso ya mabele); pe Yozefe afungolaki bisika nyonso ya kobomba biloko pe atekelaki batu ya Ejipito ble; po nzala ekomaki makasi na mboka ya Ejipito. 57. Pe batu nyonso na mabele mobimba bayaki na Ejipito, epayi ya Yozefe, pona kosomba ble, po nzala ezalaki makasi na mabele mobimba.

 

Mokapo 42

1. Pe Yakobo amonaki ete ble ezalaki na Ejipito, pe Yakobo alobaki na bana na ye ya mibali: Pona nini bozali kotalana bino na bino? 2. Alobaki: Tala, nayoki ete ble ezali na Ejipito, bokita kuna pe bosombela biso bilei kuna, po ete tozala na bomoyi pe tokufa te. 3. Pe Bandeko zomi ya Yozefe bakitaki na Ejipito pona kosomba ble. 4. Kasi Yakobo atindaki Benyamina te, ndeko ya Yozefe, elongo na bandeko na ye, po alobaki: likama moko te ekoki kokomela ye. 5. Bana ya Israele bakendaki kosomba ble na kati ya batu oyo bazalaki kokende kosomba, po nzala ezalaki makasi na mokili ya Kanana. 6. Pe Yozefe nde azalaki guvernere ya mboka, ye nde azalaki kotekela ble na batu nyonso ya mboka*. Pe bandeko ya Yozefe bayaki pe bafukamaki liboso na ye na bilongi na bango na mabele. 7. Tangu Yozefe amonaki bandeko na ye pe ayebaki bango, asalaki lokola mopaya epayi na bango pe alobaki na bango na makasi: Bowuti wapi? Bazongisaki ete: Towuti na mokili ya Kanana, pona kosomba bilei. 8. Yozefe ayebaki bandeko na ye, kasi bango bayebaki ye te.

— v. 6: to: batu nyonso ya mabele.

9. Pe Yozefe akanisaki bandoto oyo alotaka na tina na bango, pe alobaki na bango: Bino bozali banongi, ezali pona kotala motakala ya mboka nde boye. 10. Balobaki na ye: Te, nkolo na ngai, kasi biso basali na yo toye pona kosomba bilei. 11. Biso nyonso tozali bana ya mutu moko; tozali batu ya sembo; basali na yo bazali banongi te. 12. Pe alobaki na bango: Te, kasi boye kotala motakala ya mboka. 13. Pe balobaki: Basali na yo bazalaki bandeko zomi na mibale, biso nyonso tozali bana ya mutu moko na mboka ya Kanana, pe tala, lelo oyo mwana ya suka azali elongo na tata na biso, pe moko azali lisusu te. 14. Pe Yozefe alobaki na bango: ezali kaka ndenge nalobaki na bino ete: Bozali banongi. 15. Na likambo oyo, bokomekama: na bomoyi ya Farao ! Bokobima awa te longola se soki ndeko na bino ya leki aye awa! 16. Botinda moko kati na bino akende koluka ndeko na bino, pe bino bokotikala kokangama, pe maloba na bino ekomekama po emonana soki solo ezali elongo na bino; soki te, na bomoyi ya Farao! Bino bozali banongi. 17. Pe akangaki bango nyonso esika moko na boloko mikolo misato.

— v. 9: bolumbu.

18. Pe na mokolo ya misato, Yozefe alobaki na bango: Bosala boye po bozala na bomoyi, po ngai nabanga Nzambe. 19. Soki bozali batu ya sembo, tika ete ndeko moko kati na bino atikala na boloko epayi oyo bakangaki bino; pe bino, bokende, bomema ble pona nzala ya bandako na bino; 20. Pe bomemela ngai ndeko na bino ya leki, pe maloba na bino ekomonana ete ezali ya solo, pe bokokufa te. Pe bandimaki kosala bongo. 21. Pe balobanaki bango na bango: Ya solo, tozali na ngambo epayi ya ndeko na biso, po tomonaki pasi ya molimo na ye tangu azalaki kobendela biso, pe tolingaki koyoka ye te, yango wana pasi oyo ekomeli biso. 22. Rubene ayanolaki bango: Nalobaki na bino te ete: Bosala mwana mabe te? Kasi boyokaki ngai te. Sik’oyo, tala, makila na ye ezali kosengama. 23. Bayebaki te ete Yozefe azalaki kososola bango, po mobongoli moko azalaki kati na bango. 24. Na sima, abalukaki epayi na bango pe alelaki ; pe azongaki epayi na bango pe alobaki na bango, pe azwaki na kati na bango Simeone pe akangaki ye liboso ya miso na bango. 25. Pe Yozefe apesaki mitindo ete batondisa basaki na bango na ble, pe bazongisaki mbongo ya mutu na mutu na saki na ye, pe bapesa bango bileyi pona nzela ; pe basalaki bango bongo. 26. Pe bamatisi ble na bango likolo na ba-ane na bango pe balongwe kuna. 27. Pe moko afungolaki saki na ye pona kopesa bileyi na ane na ye na kati ya esika bakitaki pona kolala, pe kuna amonaki mbongo na ye, pe tala, ezalaki na monoko ya saki na ye. 28. Alobaki na bandeko na ye: Mbongo na ngai ezongisami epayi na ngai, pe tala yango oyo ezali na saki na ngai! Pe mitema na bango ebimaki bango, pe balengaki, kolobaka moko na mosusu: Nini oyo Nzambe asali biso ? 29. Bongo bakomaki epayi ya Yakobo tata na bango na mboka ya Kanana pe bayebisi ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango, kolobaka : 30. Mutu yango, nkolo ya mboka, alobaki na biso makasi pe akamataki biso lokola banongi (batu ya kotala-tala na kobombama esika ya pete ya mboka); 31. Kasi biso tolobaki na ye: Biso tozali batu ya sembo, tozali banongi te. 32. Tozalaki bandeko zomi na mibale, bana mibali ya tata na biso: moko azali lisusu te, pe mwana ya suka azali lelo na tata na biso na mboka ya Kanana. 33. Pe mobali yango, nkolo ya mboka, alobaki na biso: na likambu oyo nde nakoyeba ete bozali batu ya sembo: Botika moko ya ndeko na bino epayi na ngai, pe bokamata biloko pona nzala ya bandako na bino, pe bokende. 34. Bomemela ngai leki na bino ya mobali, pe nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bozali batu ya sembo ; bongo nakozongisela bino ndeko na bino, pe bokosala mombongo na mboka oyo. 35. Pe ekomaki ete bango kofongola basaki na bango, pe tala, saki ya moko na moko ezalaki na liboke ya mbongo na ye kati ; pe bango na tata na bango bamonaki maboke na bango ya mbongo, babangaki. 36. Yakobo, tata na bango, alobaki na bango: Bozangisi ngai bana: Yozefe azali lisusu te, pe Simeona azali lisusu te, pe bolingi kokamata Benyamina! Makambu oyo nyonso ezali kotelemela ngai. 37. Pe Rubene alobaki na tata na ye, koloba: Okoboma bana na ngai mibale ya mibali soki nazongisi ye epayi na yo te, pesa ye na maboko na ngai, pe nakozongisa ye epayi na yo. 38. Kasi ye alobaki: Mwana na ngai ya mobali akokita elongo na bino te, po ndeko na ye mobali akufa, pe ye moko atikali ; soki likama ekweli ye na nzela epayi bozali kokende, bokokitisa basuki na ngai ya pembe na mawa na kati ya sheol.

— v. 38: elobeli oyo ezali penza polele te pona komonisa esika oyo milimo bikabwani na nzoto.

 

Mokapo 43

1. Pe nzala ezalaki makasi likolo ya mboka. 2. Pe tangu basilisaki kolia ble oyo bamemaki na Ezipito, tata na bango alobaki na bango: Bozonga pe bosombela biso mwa ndambo ya bileyi. 3. Pe Yuda alobaki na ye: Mobali wana ayebisaki biso solo, alobaki ete: bokomona elongi na ngai te soki ndeko na bino azali elongo na bino te. 4. Soki otindi ndeko na biso elongo na biso, tokokita pe tokosombela yo mwa bileyi; 5. Kasi soki okotinda ye te, biso pe tokokita te, po mobali yango alobaki na biso polele: Bokomona elongi na ngai te soki ndeko na bino azali elongo na bino te. 6. Israel alobaki : Pona nini bosali ngai mabe ndenge wana nakoyebisa mobali yango ete bozali na ndeko mosusu ? 7. Bango balobaki: Mutu yango atunaki malamu na oyo etali libota na biso, alobaki: Tata na bino azali nanu na bomoyi? Bozali na ndeko mosusu ya mobali? Pe biso toyebisaki ye makambu ndenge penza ezalaki. Ndenge nini tokokaki koyeba ete akoloba : bokitisa ndeko na bino? 8. Bongo Yuda alobaki na Israel tata na ye: “Tinda elenge mobali yango elongo na ngai, pe biso tokotelema pe tokokende, pe tokozala na bomoyi pe tokokufa te, ezala biso, to yo, to bana na biso ya mike. 9. Ngai, nazali na mokumba po na ye; okolukaa ye na loboko na ngai. Soki nazongisi ye epayi na yo te pe namemi ye liboso na yo te, nakozala mikolo nionso na ngambo liboso na yo. 10. Po soki towumelaki te, mbele esi tozongaki mbala mibale. 11. Pe Israel, tata na bango, alobaki na bango: Soki ezali bongo, boye bosala boye: Bokamata bambuma ya malamu koleka ya mboka na kati ya bambeki na bino pe bomemela mobali yango likabo: mwa mafuta ya malasi pe mwa mafuta ya nzoyi, biloko ya solo kitoko pe mafuta ya mpaka (mire), pistache pe amande. 12. Pe bokomata mbongo mbala mibale na maboko na bino, pe bozongisa na maboko na bino mbongo oyo bapesaki bino tangu bofungolaki basaki na bino; mbala mosusu ezalaki libunga. 13. Pe bokamata ndeko na bino, pe botelema pe bozonga epayi ya mutu yango; 14. Pe tiká ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso* asala ete bayokela bino mawa na miso ya mutu yango, po atika ndeko na bino mosusu pe Benyamina ! pe ngai, soki nakobungisa bana, nakobungisa.

— v. 14: El-Shaddai.

15. Pe mibali bakamataki likabo wana; pe bakamataki mbongo pe mbongo mbala mibale na maboko na bango, pe Benyamina, pe batelemaki, pe bakitaki na Ejipito; pe batelemaki liboso ya Yozefe. 16. Pe Yozefe amonaki Benyamina elongo na bango; pe alobaki na ye oyo azalaki kokamba ndako na ye: Bomema batu oyo na kati ya ndako, pe boboma pe bobongisa bileyi, po batu oyo bakolia elongo na ngai na midi. 17. Pe mutu yango asalaki ndenge Yozefe alobaki, pe mutu amemaki batu yango na kati ya ndako ya Yozefe. 18. Pe mibali yango balengaki ete bazalaki komema bango na kati ya ndako ya Yozefe, pe balobaki: Ezali na tina ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso na ebandeli nde bamemaki biso awa, po babundisa biso, bakweya likolo na biso, pe bazwa biso elongo na ba-ane na biso lokola bawumbu. 19. Pe bapusanaki penepene na mobali oyo azalaki kokamba ndako ya Yozefe pe basololaki na ye na ekoteli ya ndako. 20. Pe balobaki: Aa, nkolo na ngai ! Tokitaki na ebandeli pona kosomba bileyi; 21. Pe ekomaki tangu tokomaki na esika ya kolala na nzela, pe tofungolaki basaki na biso, pe mbongo ya moko na moko ezalaki na monoko ya saki na ye, mbongo na biso nionso na motuya na yango mobimba, oyo tozongisi yango na maboko na biso. 22. Pe tomemi lisusu mbongo mosusu na maboko na biso pona kosomba bileyi, kasi toyebi te nani atiaki mbongo na biso na basaki na biso. 23. Ye alobaki: Kimia ezala na bino ! Bobanga te, ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde apesaki bino eloko ya motuya na kati ya basaki na bino, mbongo na bino ekomaki epayi na ngai. Na sima, abimisaki Simeone pe amemaki ye epayi na bango. 24. Mutu yango akotisaki mibali yango na kati ya ndako ya Yozefe pe apesaki bango mayi, pe basukolaki makolo na bango. Apesaki pe bampunda na bango bileyi ya kolia. 25. Pe babongisaki likabo pona boyeyi ya Yozefe na midi, po bayokaki ete bakolia lipa kuna. 26. Tangu Yozefe akomaki na ndako, bamemelaki ye likabo oyo ezalaki na maboko na bango pe bagumbamelaki liboso na ye kino na mabele. 27. Atunaki bango soki bazali malamu, pe alobaki: Tata na bino, mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu? Azali nanu na bomoyi? 28. Balobaki: “Mosali na yo, tata na biso, azali malamu, azali nanu na bomoyi. Pe bagumbaki mitu pe bafukamaki. 29. Pe atombolaki miso na ye pe amonaki Benyamina, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye, pe alobaki: Oyo nde ndeko na bino ya leki oyo boyebisaki ngai? Pe alobaki : Mwana na ngai, Nzambe asala yo ngolu! 30. Yozefe asalaki mbangu, po motema na ye etondaki naposa makasi pona ndeko na ye, pe alukaki esika ya kolela. Pe akotaki na shambre na ye pe alelaki kuna. 31. Bongo asukolaki elongi pe abimaki. Pe amikangaki motema, pe alobaki : Bolia lipa. 32. Pe bapesaki ye bileyi, ye moko, pe bango pe ya bango moko, pe Baejipito oyo bazalaki kolia elongo na ye pe ya bango moko, po ete Baejipito bakokaki kolia lipa elongo na Baebele te; ezalaki likambu ya nkele pona Baezipito. 33. Pe bafandaki liboso na ye, mwana ya liboso kolanda lotomo na ye ya mwana ya liboso, pe mwana ya suka kolanda na bolenge na ye; pe mibali yango batalanaki bango na bango kokamwa. 34. Pe azwaki biteni ya bilei oyo ezalaki liboso na ye pe apesaki bango; pe eteni ya Benyamina ezalaki monene mbala mitano koleka biteni ya bango nyonso; pe bamelaki pe basalaki elambo elongo na ye.

 

Mokapo 44

1. Pe apesaki mitindo na ye oyo azalaki likolo ya ndako na ye, koloba: Tondisa basaki ya mibali oyo na bileyi, na kotalela oyo bakoki komema, pe tia mbongo ya moko na moko na esika ya monoko ya saki na ye; 2. Pe kopo na ngai, kopo ya palata, okotia yango na esika ya monoko ya saki ya mwana mobali ya leki, elongo na mbongo ya ble na ye. Pe asalaki lolenge na liloba ya Yozefe, oyo alobaki. 3. Pe tongo etanaki, pe mibali batindimaki bango pe ba-ane na bango. 4. Babimaki na engumba; bakomaki mosika te, pe ete Yozefe alobaki na ye oyo azalaki likolo ya ndako na ye: Telema, landa mibali wana, pe tangu okokutana na bango, loba na bango: Pona nini bozongisi mabe pona bolamu? 5. Yango oyo te (kopo) oyo nkolo na ngai amelaka pe abikoloka na nzela na yango te? Bosali mabe na oyo bosali. 6. Pe akutanaki na bango pe alobaki na bango maloba wana. 7. Pe balobaki na ye: Pona nini nkolo na ngai azali koloba likambu ya ndenge wana? 8. Tala, mbongo oyo tokutaki na monoko ya basaki na biso, tozongiselaki yo longwa na mboka ya Kanana. Bongo ndenge nini tokokaki koyiba mbongo to wolo na ndako ya nkolo na yo? 9. Ye oyo kati na basali na yo akokuta na yango, akokufa; pe biso pe tokokoma bawumbu ya nkolo na ngai. 10. Pe alobaki: Sik’oyo pe, tika ete ezala ndenge olobi: ye oyo akokutana na yango akozala mowumbu na ngai, pe bino bokozala na ngambo te. 11. Bongo bawelaki mbangu, kokitisa moko na moko saki na ye na mabele pe moko na moko afungolaki yango. 12. Pe alukaki, kobanda na oyo ya mokolo pe kosuka na oyo ya leki, pe kopo yango ezwamaki na saki ya Benyamina. 13. Bongo bapasolaki bilamba na bango, moko na moko atiaki mikumba na ye likolo ya ane na ye, pe bazongaki na engumba. 14. Tangu Yuda elongo na bandeko na ye bakotaki na ndako ya Yozefe, oyo azalaki nanu kuna, pe bakweyaki liboso na ye kino na mabele. 15. Yozefe alobaki na bango: likambu nini oyo bosali? Boyebaki te ete mutu lokola ngai nakoki kobikola? 16. Yuda alobaki: Tokoloba nini epayi na nkolo na ngai? Tokoyanola nini ? Pe ndenge nini tokomilongisa? Nzambe amoni mabe ya basaleli na yo. Tala, biso tozali bawumbu ya nkolo na ngai, biso pe ye oyo epayi na ye kopo ezwamaki. 17. Ye alobaki: Ezala mosika na ngai kosala likambo ya ndenge wana! Ye oyo na loboko na ye bakutaki kopo akozala mowumbu na ngai, kasi bino, bomata na kimia epayi ya tata na bino. 18. Bongo Yuda apusanaki pene na ye pe alobaki: Mawa, nkolo na ngai, nabondeli yo, tika mosali na yo aloba ata liloba moko na matoyi ya nkolo na ngai, pe kanda na yo epela te likolo na mosali na yo, po ozali lokola Farao. 19. Nkolo na ngai atunaki basali na ye, koloba: Bozali na tata to ndeko moko ya mobali? 20. Pe tolobaki na nkolo na ngai: Tozali na tata ya mobange, pe mwana moke ya mobange na ye, elenge. Ndeko na ye akufa, pe ye moko nde atikali kati na mama na ye, pe tata na ye alingaka ye. 21. Olobaki na basali na yo: Bokitisa ye epayi na ngai, po namona ye na miso na ngai moko. 22. Pe tolobaki na nkolo na ngai: Elenge mobali akoki kotika tata na ye te, soki atiki ye, tata na ye akokufa. 23. Olobaki na basali na yo: Soki leki na bino ya mobali akiti elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. 24. Pe ekomaki tangu tomataki epayi ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye maloba oyo nkolo na ngai alobaki. 25. Tata na biso alobaki : Bozonga pe bosombela biso mwa bileyi. 26. Kasi tolobaki: Tokoki kokita te, soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso, wana nde tokokita, po tokoki komona elongi ya mobali wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. 27. Bongo mosali na yo, tata na ngai, alobaki na biso: Boyebi ete mwasi na ngai aboteli ngai bana mibale; 28. Pe moko akenda mosika na ngai, pe nalobaki: Ya solo, apasolama, pe ti lelo namona ye te. 29. Pe soki bozwi pe lisusu oyo liboso na ngai, pe likama moko ekomeli ye, bokokitisa suki na ngai ya pembe na Sheol na mawa. 30. Pe sik’oyo, soki nakeyi epayi ya mosali na yo, tata na ngai, pe ete elenge mobali, oyo bomoyi na ye ekangami penepene na ye, azali elongo na biso te, 31. Ekokoma ete akokufa penza tangu akomona ete elenge mobali yango azali wana te; pe basali na yo bakokitisa suki pembe ya mosali na yo, tata na biso, na Sheol na mawa. 32. Po mosali na yo ayanoli tata na ngai na tina ya elenge mobali yango, alobi ete: Soki nazongisi ye epayi na yo te, nakozala na ngambo liboso ya tata na ngai mikolo na ngai nyonso. 33. Pe sik’oyo, nabondeli yo, tika mosali na yo atikala mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali, pe elenge mobali amata elongo na bandeko na ye ; 34. Po ndenge nini nakomata epayi ya tata na ngai, soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kobanga ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai !

 

Mokapo 45

1. Yozefe akokaki lisusu te komikanga liboso ya baoyo nyonso batelemaki pene na ye, pe agangaki ete: Bobimisa batu nyonso awa! Kasi ata mutu moko te atelemaki pene na Yozefe tangu amimonisaki epayi ya bandeko na ye. 2. Pe Alelaki na mongongo makasi, pe Baejipito bayokaki yango, pe ndako ya Farao bayokaki yango. 3. Pe Yozefe alobaki na bandeko na ye: Ngai nazali Yozefe, tata na ngai azali nanu na bomoyi? Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola na ye te, po bakamwaki liboso na ye. 4. Pe Yozefe alobaki na bandeko na ye: Bopusana pembeni na ngai pe bapusanaki. Pe alobaki: Nazali Yozefe, ndeko na bino, oyo botekaki na Ejipito. 5. Pe sik’oyo, bomitungisama te, botala te na liso ya mawa te po ete botekaki ngai awa, po ezali pona kobomba bino na bomoyi nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino. 6. Po tala mbula mibale ete nzala ezali na mabele, pe ezali lisusu na mbula mitano mosusu oyo kotimbola mabele to kobuka mbuma ekozala te. 7. Pe Nzambe atindi ngai liboso na bino pona kobomba batikali na bino na mabele, pe pona kobomba bomoyi na bino na kokangolama monene. 8. Pe sik’oyo ezali bino te oyo botindaki ngai awa, kasi ezali Nzambe; pe akomisi ngai tata ya Farao, pe nkolo ya ndako na ye mobimba, pe guvernere ya mboka mobimba ya Ejipito. 9. bosala mbangu, pe bomata epayi ya tata na ngai, pe boyebisa ye ete: Boye elobi mwana na yo Yozefe: Nzambe akomisi ngai nkolo ya Ejipito mobimba, kita epayi na ngai, kowumela te. 10. Pe okofanda na mokili ya Goshene, pe okozala pene na ngai, yo na bana na yo ya mibali pe bana ya bana na yo, bitonga na yo ya bampate pe ya bangombe na yo, pe biloko nyonso oyo ezali ya yo; 11. Pe nakoleyisa yo kuna, pamba te ezali nanu na mbula mitano ya nzala, noki yo na batu ya ndako na yo pe biloko nyonso oyo ozali na yango bokoma na pasi. 12. Pe tala, miso na bino, pe miso ya Benyamina, ndeko na ngai ya mobali, bomoni ete ezali monoko na ngai ezali koloba na bino. 13. Pe bokoyebisa tata na ngai kembo na ngai nyonso na Ejipito, pe nyonso oyo bomoni; pe bokosala mbangu pe bokokitisa tata na ngai awa. 14. Pe amibwaki na kingo ya Benyamina, ndeko na ye ya mobali, pe alelaki; pe Benyamina alelaki na kingo na ye; 15. Pe ayambaki bandeko na ye nyonso, pe alelaki likolo na bango; pe sima na yango, bandeko na ye basololaki elongo na ye. 16. Pe sango ekomaki na kati ya ndako ya Farao pe elobaki: Bandeko ya Yozefe baye. Pe yango ezalaki malamu na miso ya Farao pe na miso ya basali na ye. 17. Pe Farao alobaki na Yozefe: Yebisa bandeko na yo: Bosala boye: Bomatisa mikumba na banyama na bino pe bokende, bokota na mboka ya Kanana ; 18. Bokamata tata na bino na bandako na bino pe boya epayi na ngai, pe nakopesa bino biloko oyo eleki malamu na mboka ya Ejipito, pe bokolia mafuta ya mboka yango. 19. Pe na yo, napesi yo mitindo ete: bosala boye: Bokamata bashario na mboka ya Ejipito pona bana na bino ya mike pe pona basi na bino, pe tika ete tata na bino amata na kati na yango, pe aya. 20. Tika ete miso na bino eyoka mawa te ya biloko na bino, po biloko ya malamu koleka ya mboka mobimba ya Ejipito ekozala ya bino. 21. Pe Bana ya Israel basalaki bongo, pe Yozefe apesaki bango bashario, lolenge ya etinda ya Farao, pe apesaki bango bileyi pona mobembo. 22. Apesaki moko na moko na bango bilamba ya kobongola; pe apesaki Benyamina biteni kama misato (300) ya mbongo pe bilamba mitano ya kobongola. 23. Pe atindaki boye pona tata na ye: ba-ane zomi oyo ememaki biloko ya malamu koleka ya Ejipito, pe ba-ane zomi ya basi oyo bamemaki ble, pe ya lipa pe bileyi pona tata na ye pona mobembo. 24. Atindaki bandeko na ye bakende, pe bakendaki. Alobaki na bango : Boswana na nzela te. 25. Bamataki longwa na Ejipito pe bakomaki na mboka ya Kanana, epayi ya Yakobo tata na bango. 26. Bayebisaki ye, koloba ete: Yozefe azali nanu na bomoyi, pe ezali ye nde azali koyangela mboka mobimba ya Ejipito. Kasi motema na ye etikalaki malili, po andimaki bango te. 27. Pe bayebisaki ye maloba nyonso oyo Yozefe alobaki na bango, pe amonaki bashario oyo Yozefe atindaki pona komema ye. Pe elimo ya Yakobo tata na bango elamukaki lisusu. 28. Pe Israele alobaki: Ekoki, Yozefe mwana na ngai azali na bomoyi, nakokende, nakomona ye liboso nakufa.

 

Mokapo 46

1. Pe Israel akendaki mobembo na nyonso oyo azalaki na yango pe akomaki na Beer-sheba pe apesaki bambeka epayi ya Nzambe ya tata na ye Izak. 2. Pe Nzambe alobaki na Israel na kati ya bimonaneli ya butu, pe alobaki: Yakobo, Yakobo! Pe ye azongisaki : Ngai oyo. 3. Pe alobaki: Ngai nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo, kobanga te kokita na Ejipito, po kuna nakokómisa yo ekolo monene. 4. Ngai, nakokita elongo na yo na Ejipito, pe ngai, nakomema yo kozonga. Pe Yozefe akotia loboko na ye likolo ya miso na yo. 5. Yakobo alongwaki na Beer-sheba, pe Bana ya Israel bamemaki Yakobo tata na bango, bana na bango ya mike pe basi na bango na bashario oyo Farao atindaki pona komema ye. 6. Bakamataki bibwele na bango pe bomengo na bango, oyo bazwaki na mboka ya Kanana, pe bakomaki na Ejipito : Yakobo pe bakitani na ye nyonso elongo na ye. 7. Ye amemaki elongo na ye na Ejipito bana na ye ya mibali pe ya bana ya bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi pe bana basi ya bana na ye, pe momboto na ye nyonso.

— v. 6: Ebre: Zera elingi koloba momboto. Ezali malamu kobongola te mbala nyonso zera na bakitani, po yango elongolaka ezaleli na yango ya bomoko

8. Pe oyo ezali bakombo ya Bana ya Israel oyo bayaki na Ejipito: Yakobo na bana na ye ya mibali. Mwana ya liboso ya Yakobo : Rubene. 9. Pe bana mibali ya Rubene: Enok, Palu, Ezirone, pe Karami. 10 — Bana mibali ya Simeyone: Yemuele, Yamine, Oyade, Yakine, Tshoyare, pe Sawulo, mwana ya mwasi moko Mokanana. 11 — Bana mibali ya Lewi: Gershone, Keyate, na Merari. 12 — Bana mibali ya Yuda: Ere, Onane, Shela, Pereze, na Zera. Ere na Onane bakufaki na mboka ya Kanana. Bana mibali ya Pereze bazalaki Ezerone na Amulu. 13 — Bana mibali ya Izakare: Tola, Puwa, Yobo, na Shimirone. 14 — Bana mibali ya Zabulone: ​​Serede, Elone, na Yahleele. 15 — Bango wana nde bazalaki bana mibali ya Leya, oyo abotelaki Yakobo na Padane-Aram, pe Dina mwana na ye ya mwasi. Milimo nyonso, bana na ye ya mibali pe ya basi, tuku misato na misato (33). 16. Bana mibali ya Gade: Tshifione, Agi, Shuni, Etshebone, Eri, Arodi, pe Areyeli. 17. Bana mibali ya Ashere: Yimna, Yishiwa, Yishiwi, pe Beriya, pe Sera ndeko na bango ya mwasi. Bana mibali ya Beriya: Ebere pe Malkiele. 18. Oyo nde bazalaki bana ya Zilipa, oyo Labana apesaki Leya, mwana na ye ya mwasi, pe ye abotelaki Yakobo, milimo zomi na motoba (16). 19. Bana mibali ya Rashele, mwasi ya Yakobo: Yozefe na Benyamina. 20. Na mokili ya Ejipito, Manase na Efrayime babotamaki na Yozefe, oyo Asenate, mwana mwasi ya Potifera, nganga-nzambe ya On, abotelaki ye. 21 — Pe bana mibali ya Benyamina: Bela, Bekere, Ashbele, Gera, Naamane, Eki, Rosh, Mupime, Upime, pe Aride. 22 — Bango wana nde bazalaki bana mibali ya Rashele, oyo abotelaki Yakobo; bango nyonso bazalaki zomi na mineyi (14). 23. Pe mwana mibali ya Dan: Ushime. 24 — pe bana mibali ya Naftali: Yaatshele, Guni, Yetshere, na Shileme. 25 — wana nde bazalaki bana mibali ya Bila, oyo Labana apesaki na mwana na ye ya mwasi Rashele, pe ye abotelaki Yakobo; milimo nyonso sambo. 26. Milimo nyonso oyo bakotaki elongo na Ejipito, oyo bazalaki ya Yakobo, bakitani ya mosuni mpe makila na ye moko, longola basi ya bana ya Yakobo, bango nyonso ntuku motoba na motoba. 27. Bana mibali ya Yozefe oyo babotamelaki ye na mboka ya Ejipito bazalaki milimo mibale. Milimo nyonso ya ndako ya Yakobo oyo bayaki na Ejipito bazalaki tuku sambo (70).

— v. 26: to: batu nyonso.

28. Pe atindaki Yuda liboso na ye epayi ya Yozefe, pona ete abongisa nzela liboso na ye ya kokende na Goshene. Pe bakomaki na mboka ya Goshene. 29. Yozefe abongisaki shario na ye pe amataki po akutana na Israel tata na ye, na Goshene. Tangu amimonisamaki epayi na ye, pe amibwakaki na kingo na ye, pe alelaki na kingo na ye tangu molayi. 30. Pe Israel alobaki na Yozefe: « Sik’oyo, tika ete nakufa, po namoni elongi na yo, po ozali nanu na bomoyi. » 31. Yozefe alobaki na bandeko na ye pe na ndako ya tata na ye: « Nakomata pe nakoyebisa Farao, nakoloba na ye: Bandeko na ngai pe ndako ya tata na ngai, oyo bazalaki na mboka ya Kanana, baye epayi na ngai. 32. Batu yango bazali babateli ya bibwele, bazali batu ya (kobatela) bitonga, pe bamemi bampate na bango pe bangombe na bango pe biloko nyonso oyo bazali na yango. 33. Boye ekokoma ete tangu Farao akobenga bino pe akotuna bino: Mosala na bino ezali nini? 34. Bokoloba ete: Basali na yo, wuta bomwana na biso ti sik’oyo, tozali batu (babatelaka) bibwele, biso pe batata na biso ; na bongo bokoka kofanda na mboka ya Goshene, po babateli nyonso ya mpate bazali likambu ya nkele pona Baejipito. »

 

Mokapo 47

1. Yozefe akendaki pe ayebisaki Farao: « Tata na ngai pe bandeko na ngai ya mibali, bampate na bango pe bangombe na bango, pe biloko nyonso oyo bazali na yango, bawuti na mboka ya Kanana, pe sik’oyo bazali na mokili ya Goshene. » 2. Azwaki mibali mitano kati na bandeko na ye pe amemaki bango liboso ya Farao. 3. Farao atunaki bandeko na ye: « Mosala na bino ezali nini? » Bango bazongiselaki Farao: « Basali na yo bazali babateli ya mpate, biso pe batata na biso. » 4. Balobaki na Farao ete: Biso toye pona kofanda na mboka oyo, po ete esika koleyisa bibwele ezali lisusu te pona basali na yo, po nzala ezali makasi na mboka ya Kanana. 5. Farao alobaki na Yozefe : Tata na yo na bandeko na yo baye epayi na yo. 6. Mboka ya Ejipito ezali liboso na yo; fandisa tata na yo pe bandeko na yo na eteni eleki malamu ya mboka, tika ete bafanda na mboka ya Goshene. Soki oyebi ete mibali moko ya makoki kati na bango bazali, okotia bango bakambi ya bibwele na ngai. 7. Yozefe amemaki tata na ye Yakobo pe atelemisaki ye liboso ya Farao, pe Yakobo apambolaki Farao. 8. Farao atunaki na Yakobo : Mikolo boni ya bambula ya bomoyi na yo ezali boni? 9. Yakobo alobaki na Farao: Mikolo ya mibu ya mobembo na ngai ezali mibu kama moko na tuku misato (130), mikolo ya mibu ya bomoyi na ngai ezalaki moke pe etondi na pasi, pe ekokani te na mikolo ya mibu ya bomoyi ya batata na ngai, na mikolo ya mobembo na bango. 10. Pe Yakobo apambolaki Farao pe abimaki liboso ya Farao. 11. Yozefe apesaki tata na ye pe bandeko na ye esika ya kofanda na mboka Ejipito pe na eteni ya malamu koleka ya mboka, na mboka ya Ramese, ndenge Farao apesaki mitindo. 12. Yozefe azalaki kopesa lipa na tata na ye na bandeko na ye pe na batu nyonso ya ndako ya tata na ye, na kolanda motango ya bana na bango. 13. Pe bileyi ezalaki lisusu te na kati ya mboka mobimba, po nzala ezalaki makasi penza ; pe mboka ya Ejipito pe mboka ya Kanana elembaki makasi na nzala. 14. Pe Yozefe azwaki mbongo nyonso oyo ezwamaki na mboka ya Ejipito pe na mboka ya Kanana pona ble oyo bazalaki kosomba, pe Yozefe akotisaki mbongo yango na ndako ya Farao. 15. Tangu mbongo esilaki ya mboka ya Ejipito pe ya Kanana esilaki, Baejipito nyonso bayaki epayi ya Yozefe pe balobaki: Pesa biso lipa, pona nini tokokufa liboso na yo, po mbongo esili? 16. Yozefe alobaki: Bopesa bibwele na bino, pe ngai nakopesa bino lipa na esika ya bibwele na bino, soki mbongo esili bino. 17. Bamemaki bibwele na bango epayi ya Yozefe, pe Yozefe apesaki bango lipa pona kozwa bapunda, bitonga ya bampate, bitonga ya bangombe pe ya ba-ane. Apesaki bango lipa na mbula wana pona kozwa bibwele na bango nyonso. 18. Pe mobu wana esilaki; pe bayaki epayi na ye na mbula oyo elandaki pe balobaki: Tokobombela nkolo na ngai te ete mbongo esili, pe nkolo na ngai azali na bitonga ya bibwele.Eloko mosusu te etikali liboso ya nkolo na ngai longola se nzoto na biso pe mabele na biso. 19. Pona nini tosengeli kokufa liboso ya miso na bino, biso na mabele na biso? Somba biso na mabele na biso na esika ya lipa, pe biso na mabele na biso tokoma basali ya Farao. Pe pesa biso milona, po tozala na bomoyi pe tokufa te, pe ete mabele ekoma pamba te. 20. Pe Yozefe asombaki mabele mobimba ya Ejipito po na Farao, po Baezipito batekaki moko na moko eilanga na ye, po nzala ezalaki makasi likolo na bango; pe mabel nyonso ekomaki ya Farao. 21. Po na batu, akambaki* bango na bingumba, banda na suka moko ya ndelo ya Ejipito ti na suka mosusu. 22. Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, po banganga-nzambe bazalaki kozwa eteni oyo Farao apesaki bango. Yango wana, batekaki mabele na bango te. 23. Bongo Yozefe alobaki na batu : Botala, lelo nasombi bino pe mabele na bino pona Farao. Tala milona pona bino, bolona mabele. 24. Pe ekokoma na eleko ya kobuka mbuma, bokopesa ndambo moko na mitano epayi ya Farao, pe biteni mineyi ekozala pona bino, pona milona ya bilanga, pona bileyi na bino, pe pona baoyo bazali na bandako na bino pe pona bileyi ya bana na bino ya mike. 25. Balobaki: Obombi bomoyi na biso, tika ete tozwa ngolu na miso ya nkolo na ngai, pe tokozala Farao. 26. Pe Yozefe akomisaki yango mobeko, ti lelo, likolo ya mabele ya Ejipito: epayi ya Farao moko na mitano. Kaka mabele ya banganga-nzambe nde ezalaki ya Farao te. vv. 21 : basusu balimboli : akomisaki bango basali to atiaki bango na mosala ya mokonzi 27. Pe Israel afandaki na kati ya mboka ya Ejipito, na kati ya mboka ya Goshene; pe bazwaki bozwi kuna, pe babotaki bana, pe bakomaki ebele mingi. 28. Pe Yakobo abikaki na mboka ya Ejipito mibu zomi na sambo (17); pe mikolo ya Yakobo, mibu ya bomoyi na ye, ezalaki mibu kama moko na tuku mineyi na sambo (147). 29. Pe mikolo ya Israel ekomaki pene na liwa. Pe abengaki Yozefe mwana na ye, pe alobaki na ye: Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya loketo na ngai, pe salela ngai bolamu pe na bosembo, nabondeli yo, kokunda ngai te na Ejipito; 30. Kasi tangu nakolala elongo na batata na ngai, okomema ngai na Ejipito, pe okokunda ngai na lilita na bango. Pe alobaki : Nakosala lokola olobi. 31. Pe [Yakobo] alobaki: Lapa ndayi epayi na ngai. Pe alapelaki ye ndayi. Pe Israel agumbamaki na moto ya mbeto.

 

Mokapo 48

1. Pe esalemaki ete sima ya makambu oyo, bayebisaki na Yozefe: Tala, tata na yo azali kobela. Pe amemaki elongo na ye bana na ye mibale ya mibali, Manase pe Efrayime. 2. Pe bayebisaki Yakobo, pe balobaki: Tala, Mwana na yo Yozefe azali koya epayi na yo. Pe Israel asangisaki makasi na ye pe afandaki likolo na mbeto. 3. Pe Yakobo alobaki na Yozefe: Nzambe Mokoki-ya-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luzi na mboka ya Kanana pe apambolaki ngai. 4. Pe alobaki na ngai: Nakosala ete omema bambuma ebele yo pe nakokomisa yo mingi, pe nakosala yo ete okoma lisanga ya batu ebele, pe nakopesa mboka oyo na bakitani na yo sima na yo, lokola eloko ya libela. 5. Pe sik’oyo bana na yo mibale ya mibali, oyo babotameli yo na mboka ya Ejipito, liboso naya epayi na yo na Ejipito, bazali ya ngai: Efrayime na Manase bazali ya ngai, ndenge moko pe na Rubene na Simeyone. 6. Pe bana na yo, oyo obotaki sima na bango, bakozala ya yo; Bakobengama kolandama na kombo ya bandeko na bango, na libula na bango. 7. Pe ngai, tangu nazalaki koya wuta na Padane, Rashele akufaki pembeni na ngai na mboka ya Kanana, na nzela kuna, lokola ezalaki nanu na mwa esika na mboka pona kokoma na Efrate; pe nakundaki ye kuna na nzela ya Efrate, oyo ezali Bethleme.

— molongo 3: El-Shaddai. — v. 6: to: ekozala na.

8. Pe Israel amonaki bana ya Yozefe, pe atunaki: Baoyo bazali banani? 9. Yozefe alobaki na tata na ye: Bazali bana na ngai oyo Nzambe apesi ngai awa. Alobaki : “Nabondeli yo, mema bango epayi na ngai, pe nakopambola bango. 10. Nzokande, miso ya Israel ekomaki kilo na kimobange, pe akokaki komona te. Yozefe apusaki bango penepene na ye, pe apesaki bango beze pe ayambaki bango. 11. Israel alobaki na Yozefe: Nakanisaki te ete nakomona lisusu elongi na yo, kasi tala, Nzambe asali ngai namona bakitani na yo. 12. Yozefe alongolaki bango na kati ya mabolongo na ye, pe agumbamaki na elongi na ye ti na mabele. 13. Yozefe akamataki bango mibale : Efrayime na loboko na ye ya mobali, na loboko ya mwasi ya Israel, pe Manase na loboko na ye ya mwasi, na loboko ya mobali ya Israel, pe apusaki bango pene na ye. 14. Kasi Israel asembolaki loboko na ye ya mobali pe atiaki yango likolo na moto ya Efrayime (nzokande azalaki leki), pe loboko na ye ya mwasi likolo na moto ya Manase, pe atiaki maboko na ye na koyeba malamu, po Manase azalaki mwana ya liboso. 15. Apambolaki Yozefe pe alobaki ete: Tika Nzambe oyo batata na ngai Abraham na Izak batambolaki liboso na ye, Nzambe oyo azali mobateli (aleyisaki) na ngai banda bomoyi na ngai mobimba ti lelo, 16. Anzelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bilenge mibali oyo. Tika ete babengama na kombo na ngai pe na kombo ya batata na ngai Abraham pe Izak, pe ete bakoma ebele na kati ya mokili. 17. Tangu Yozefe amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali likolo na moto ya Efrayime, yango esepelisaki ye te; yango asimbaki loboko ya tata na ye pona kolongola yango na moto ya Efrayime pe kotia yango likolo na moto ya Manase. 18. Yozefe alobaki na tata na ye: bongo te, tata na ngai, oyo azali mwana ya liboso, tia loboko na yo ya mobali likolo na moto na ye. 19. Pe tata na ye aboyaki pe alobaki: Nayebi, mwana na ngai, nayebi, ye pe akokoma batu pe akozala monene, kasi ndeko na ye oyo azali leki na ye akoleka ye na monene, pe bakitani na ye bakokoma ebele ya bikolo. 20. Na mokolo yango apambolaki bango pe alobaki: Na kati na yo Israel akopambola, akoloba: Nzambe akomisa yo lokola Efrayime pe lokola Manase! Pe atiaki Efrayime liboso ya Manase. 21. Bongo Israel alobaki na Yozefe : Tala, nazali pene na kokufa, pe Nzambe akozala elongo na yo, pe akozongisa bino na mboka ya batata na bino. 22. Pe ngai, napesi yo, koleka bandeko na yo, eteni* (sisheme) oyo nazwaki na loboko ya Moamore na mopanga na ngai pe na likonga na ngai.

— v. 22: Na Ebre: Shekeme.

 

Mokapo 49

1. Pe Yakobo abengaki bana na ye ya mobali pe alobaki: Bosangana, po nayebisa bino makambu oyo ekokomela bino na mikolo ya suka. 2. Boyangana pe boyoka, bana ya Yakobo; boyoka Israel, tata na bino. 3. Rubene, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, pe ebandeli ya nguya na ngai, ozali liboso na lokumu pe ozali liboso na makasi! 4. Ozali lokola mayi oyo ezali kotoka, pe okoleka te, po omataki likolo na mbeto ya tata na yo; okomisi yango mbindo... ye amataki likolo na mbeto na ngai! 5. Simeyone na Lewi bazali bandeko. Mipanga na bango ezalaki bisaleli ya mobulu. 6. Molimo na ngai, kokota te na kati ya likita na bango ya kuku; kembo na ngai, kosangana na liyangani na bango te! Po na kati ya kanda na bango babomaki mutu, pe pona esengo na bango bakataki misisa ya makolo ya ngombe-mobali. 7. kanda na bango elakelama mabe, po ezalaki makasi; pe kanda na bango ezalaki ya motema mabe! Nakokabola bango na kati ya Yakobo, pe nakopalangisa bango na kati ya Israel. 8. Yo Yuda, bandeko na yo bakosanzola yo; loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo; bana mibali ya tata na yo bakogumbamela liboso na yo. 9. Yuda azali mwana ya nkosi. Omati pembeni na nyama ya kolia, mwana na ngai. Agumbami pe alali lokola nkosi pe lokola nkosi ya mwasi​—nani akolamusa ye? 10. Lingenda* ya likonzí ya bokonzi ekolongwa na Yuda te, to lingenda ya bopesi-mibeko ** na kati-kati ya makolo na ye te, ti tangu Shilo akoya; pe na ye ekozala botosi pe bosangani* ya batu. 11. Akangi mwana punda na ye na nzete ya vino, pe mwana na ye ya punda na nzete ya vino ya malamu; asukolaka elamba na ye na kati ya vino, pe kazaka na ye na makila ya mbuma ya vino. 12. Miso na ye ekomi motane na vino, pe mino na ye pembe na miliki.

— v. 8, 16, 19: ezali na paronomaze na Ebre na tina na bakombo Yuda, Dan, pe Gad. — v. 10*: to: lingenda (ya libota). — v. 10**: to: lingenda ya bokonzi. — v. 10***: to: bokutani.

13. Zebulone akofanda pembeni ya ebale monene pe akozala pembeni ya esika masuwa etelemaka, pe mopanzi na ye ekozala pene na Sidona.14. Izakare azali ane oyo ezali na mikuwa makasi, elali na kati ya bandelo mibale 15. Amoni ete kopema ezali malamu pe mboka ezali kitoko; pe agumbi lipeka na ye pona komema mikumba pe amikomisi mosali ya misala makasi. 16. Dan * akosambisa batu na ye, lokola mabota mosusu ya Israel. 17. Dan akozala nyoka pembeni ya nzela, etupa* pembeni ya nzela, oyo eswaka matambe ya punda, na boye ete motambwisi na yango akweya na sima. 18. O Yawe, nazali kozela lobiko na yo!

— vv. 8, 16, 19: ezali na paronomaze na Ebre na tina na bakombo Yuda, Dan, pe Gad. * vv.17 etupa ezali nyoka oyo babengi vipere.

19 Gade *, lipinga ya babundi ekokwela ye likolo; pe ye akokweya na bitambi na bango.

— vv. 8, 16, 19: ezali na paronomasie na Ebre na tina na bankombo Yuda, Dane, mpe Gada. * .

20. Na Azer, lipa ya malamu; pe ye akopesa bileyi kitoko ya bokonzi. 21. Naftali azali mboloko ya mwasi oyo batiki azala na bonsomi; abimisaka maloba ya kitoko. 22. Yozefe azali etape ya nzete oyo ebotaka mbuma, etape ya nzete oyo ebotaka mbuma pembeni ya liziba; bitape na ye ekolaka likolo ya mir. 23. Batu oyo babetaka makonga batumbulaki ye na bololo, pe babwakelaki ye masasi pe bayinaki ye; 24. Kasi likonga na ye etikalaki ngwi, pe maboko ya maboko na ye ezali pete na maboko ya Nguya ya Yakobo. Wuta kuna ezali Mobateli mpate, libanga ya Israel : 25. Ya Nzambe ya tata na yo, pe akosalisa yo; pe na Oyo-ya-Nguya-Nyonso, pe oyo akopambola yo na mapamboli ya lola likolo, na mapamboli ya mozindo oyo ezali na se, na mapamboli ya mabele pe ya libumu. 26. Mapamboli ya tata na yo eleki mapamboli ya batata na ngai, kino na suka ya bangomba mike ya seko; yango nyonso ekozala likolo ya moto ya Yozefe, pe likolo ya motole ya moto oyo aponamaki na bandeko na ye.

— v. 26: to: Monazarena; bamosusu: batiami motole. *

27. Benyamina azali mbwa ya zamba oyo epasolaka nyama, na tongo aliaka banyama oyo apasuli, pe na pokwa akabolaka biloko oyo azwi. 28. Bango nyonso nde bazali mabota zomi na mibale ya Israel, oyo nde tata na bango alobaki na bango tangu apambolaki bango: apambolaki moko na moko na kolanda lipamboli oyo ya ye. 29. Pe apesaki bango mitindo pe alobaki na bango: Nakosangana epayi ya batu na ngai ; bokunda ngai elongo na batata na ngai na kati ya libulu oyo ezali na elanga ya Efrone Mohite. 30. Na libulu oyo ezali na elanga ya Makpela, oyo etalani na Mamere, na mboka ya Kanana, oyo Abraham asombaki epayi ya Efrone Mohite, elongo na elanga, po ezala esika ya kokunda. 31. Kuna bakundaki Abraham na Sara mwasi na ye; kuna bakundaki Izak na Rebeka mwasi na ye; pe kuna nakundaki Leya. 32. Elanga pe libulu oyo ezali kati na yango ezwamaki epayi ya bana ya Eti. 33. Pe tangu Yakobo asilisaki kopesa mitindo na ye epayi ya bana na ye ya mibali, abendaki makolo na ye na mbeto, pe akataki pema ya suka, pe asanganaki epayi ya batu na ye.

 

Mokapo 50

1. Yozefe pe akweyaki likolo ya elongi ya tata na ye pe alelaki ye pe apesaki ye beze. 2. Pe Yozefe apesaki mitindo na basali na ye, minganga, ete bapakola nzoto ya tata na ye na kisi ya kobatela ebembe, pe minganga bapakolaki Israel kisi ya kobatela ebemba. 3. Pe mikolo tuku mineyi (40) ekokisamaki pona ye, po ezali mikolo oyo esengelaki pona kopakola ebembe kisi ya kobatela ebembe. Pe Baejipito balelaki ye mikolo tuku sambo (70). 4. tangu mikolo ya kolela esilaki, Yozefe alobaki na ndako ya Farao: Soki nazwi ngolu na miso na bino, nabondeli bino boloba na matoyi ya Farao pe boloba: 5. Tata na ngai alapisaki ngai ndayi, alobaki: Tala, nazali kokufa; na lilita oyo namibongisaki pona ngai moko na mboka ya Kanana, kuna okokunda ngai. Pe sik’oyo nabondeli yo, tika ngai namata pe nakunda tata na ngai, pe nakozonga. 6. Pe Farao alobaki boye: Mata pe kunda tata na yo, ndenge alapisaki yo ndayi. 7. Bongo Yozefe amataki pona kokunda tata na ye, pe basali nyonso ya Farao, bampaka ya ndako na ye pe bampaka nyonso ya mboka ya Ejipito bamataki elongo na ye. 8. Pe ndako mobimba ya Yozefe, pe bandeko na ye, mpe ndako ya tata na ye; kaka batikaki bana na bango ya mike, pe bitonga pe bibwele na bango na kati ya mboka ya Goshene. 9. Pe bamati elongo na ye bashario pe batambolisi bapunda; pe ezalaki na kaa moko monene penza. 10. Pe bakomaki na esika ya kotuta mbuma ya Atade (nzube), oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, pe kuna balelaki mingi pe kolela na mozindo; Pe asalelaki tata na ye matanga mikolo sambo. 11. Pe bafandi ya mboka yango, Bakanana, bamonaki matanga na esika ya kotuta mbuma ya Atade, pe balobaki: Oyo ezali matanga monene pona Baejipito. Yango wana babengaki yango na kombo Abel-Mitsherayime (matanga ya Baejipito), oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani. 12. Pe bana na ye ya mibali basalaki pona ye lokola apesaki bango mitindo; 13. Pe bana na ye ya mibali bamemaki ye na mboka ya Kanana pe bakundaki ye na libulu na elanga ya Makpela, oyo Abraham asombaki epayi ya Efrone Mohite, elongo na elanga, oyo etalani na Mamre, pona kozala na yango lokola esika ya kokundama. 14. Pe Yozefe, sima ya kokunda tata na ye, azongaki na Ejipito, ye na bandeko na ye pe na baoyo nyonso bamataki elongo na ye pona kokunda tata na ye. 15. Pe bandeko ya Yozefe bamonaki ete tata na bango akufaki, pe balobaki: Mbala mosusu Yozefe akoyina biso pe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye. 16. Bongo batindelaki Yozefe sango, koloba: Tata na yo apesaki motindo liboso akufa, koloba : 17. Bokoloba boye na Yozefe: Nabondeli yo, limbisa bandeko na yo mabe na bango pe lisumu na bango, po basalaki yo mabe. Pe sik’oyo, tobondeli yo, limbisa mabe ya basali ya Nzambe ya tata na yo. Yozefe alelaki tangu bazalaki koloba na ye. 18. Bandeko na ye pe bakendaki pe bakweyaki liboso na ye, pe balobaki: Biso ye yo, tozali basali na yo. 19. Yozefe pe alobaki na bango: Babanga te, po ngai nazali na esika ya Nzambe? 20. Bino, bokanisaki kosala ngai mabe : Nzambe akanaki yango na bolamu, pona kosala ndenge ezali lelo, na tina ya kobatela bomoyi ya ebele ya batu. 21. Pe sik’oyo bobanga te; nakoleyisa bino pe bana na bino ya mike. Pe abondisaki bango pe alobaki na mitema na bango. 22. Pe Yozefe afandaki na Ejipito, ye pe ndako ya tata na ye ; pe Yozefe awumelaki mbula kama moko na zomi (110). 23. Pe Yozefe amonaki bakitani ya Efrayime kino na libota ya misato ; pe lisusu bana mibali ya Makiri, mwana ya Manase, babotamaki na mabolongo ya Yozefe. 24. Pe Yozefe alobaki na bandeko na ye: Ngai nazali kokufa, kasi Nzambe akotala bino pe akobimisa bino na mboka, akomema bino ti na mboka oyo alakaki na kolapa ndayi epayi ya Abraham, Izak pe Yakobo. 25. Yozefe alapisaki bana ya Israel ndayi, pe alobaki: solo Nzambe akoya kotala bino, pe bokobimisa mikuwa na ngai longwa awa. 26. Pe Yozefe akufaki, azalaki na mbula kama moko na zomi (110); pe bapakolaki ye kisi ya kobatela ebembe, pe batiaki ye na kati ya sanduku ya ebembe na Ejipito.