Mokanda ya Balewi

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14Mokapo 15Mokapo 16Mokapo 17Mokapo 18Mokapo 19Mokapo 20Mokapo 21Mokapo 22Mokapo 23Mokapo 24Mokapo 25Mokapo 26Mokapo 27

 

Mokapo 1

1. Pe Yawe abengaki Mose pe alobaki na ye wuta na hema ya bokutani, na koloba : 2. Loba na Bana ya Israel pe yebisa bango : Tangu mutu moko kati na bino akopesa likabo na Yawe, bosengeli kopesa likabo na bino ya bibwele, wuta na etonga ya bangombe to na etonga ya bampate.

3. Soki likabo na ye ezali likabo ya kotumba oyo ewuti na etonga ya bangɔmbɛ, akopesa libonza ya mobali oyo ezali ya kokoka² ; akopesa yango na ekuke ya hema ya bokutani, pona kondimama na ye liboso ya Yawe. 4. Akotia loboko na ye likolo na moto ya likabo ya kotumba, pe ekondimama pona ye, pona kozipa masumu pona ye.  5.  Pe akoboma ngombe mobali ya elenge liboso ya Yawe, pe bana ya Aaron, Banganga-Nzambe, bakopesa makila pe bakosopa makila yango zingazinga ya etumbelo oyo ezali na ekuke ya hema ya bokutani.  6. Akolongola mposo ya mbeka ya kotumba pe akokata yango na biteni. 7. Pe bana mibali ya Aaron, nganga-Nzambe, bakotia moto na etumbelo pe bakobongisa koni likolo ya moto.  8. Pe bana mibali ya Aaron, banganga-Nzambe, bakobongisa biteni, moto pe mafuta likolo ya koni oyo ezali na moto likolo ya etumbelo.

9.  Pe akosukola na mayi biloko na yango ya kati pe makolo, pe nganga-Nzambe akotumba yango nyonso na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumbama mobimba, mbeka oyo etumbami na moto, solo kitoko epayi na Yawe. 10. Soki likabo na ye pona mbeka ya kotumba ewuti na etonga, kati na bameme to na bantaba, akopesa ya mobali oyo ezali ya kokoka².  11.  Akoboma yango na pembeni ya etumbelo, epayi ya nord, liboso ya Yawe, pe bana mibali ya Aaron, banganga-Nzambe, bakosopa makila likolo ya etumbelo, na zingazinga na yango.  12.  Akokata yango na biteni, elongo na moto na yango pe mafuta na yango, pe nganga-Nzambe akobongisa yango likolo ya koni oyo ezali likolo na moto oyo ezali likolo na etumbelo. 13.  Pe akosukola na mayi biloko na yango ya kati pe makolo na yango ; pe nganga-Nzambe akopesa yango nyonso pe akotumba yango likolo na etumbelo : ezali mbeka ya kotumba, mbeka oyo etumbami na moto, solo kitoko epayi na Yawe.

14. Soki likabo na ye epayi ya Yawe ezali mbeka ya kotumba ya bandeke, akopesa likabo

na ye na kati ya bibenga to na kati ya bana ya pijeon. 15. Nganga-Nzambe akomema yango na etumbelo, pe akolongola moto na yango elongo na linzaka, pe akotumba yango likolo na etumbelo ; pe akobimisa makila na yango na mopanzi ya etumbelo.  16. Akolongola eloko oyo ezalaka na nsala na kingo na yango, pe akobwaka yango pembeni ya etumbelo, na ngambo ya este, na esika oyo baputulu ya moto ezali.  17. Akopanza yango kati na mapapu na yango, akokabola yango te, pe nganga-Nzambe akotumba yango likolo na etumbelo, likolo na nkoni oyo ezali likolo na moto : ezali mbeka ya kotumba, mbeka oyo etumbami na moto, solo kitoko epayi na Yawe.

². To ezanga mbeba

 

Mokapo 2

1. Pe tangu mutu moko akopesa na likabo, likabo ya gato epayi ya Yawe, likabo na ye ekozala na farini ya malamu koleka, pe akosopa mafuta likolo na yango pe akotia mpaka ya malasi likolo na yango.  2. Akomema yango epayi ya bana ya Aaron, banganga-Nzambe, pe nganga-Nzambe  akosimba farini etondi na loboko na ye pe mafuta, elongo na mpaka ya malasi na yango nyonso, pe akotumba yango na etumbelo lokola likabo ya bokundoli : ezali mbeka etumbami na moto, ya solo kitoko epayi na Yawe.  3. Ndambo oyo etikali ya likabo ya gato ekozala pona Aaron pe pona bana na ye ya mibali : ezali eloko moko ya bosantu penza kati na bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto.

4. Pe tangu okopesa likabo, likabo ya gato oyo etumbami na fulu ya moto, ekozala ya farini ya malamu, ya bagato oyo ezangi levin, esangisami na mafuta, pe bagaleti oyo ezangi levin pe epakolami na mafuta.  5. Pe soki likabo na yo ezali likabo ya gato ekalingami na kikalungu, ekozala na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta, ezangi levin.  6. Okobuka yango na biteni pe okosopa mafuta likolo na yango : ezali likabo ya gato. 7. Pe soki likabo na yo ezali likabo ya gato ekalingami na kikalungu, ekozala ya farini ya malamu, elongo na mafuta.  8. Okomemela Yawe likabo ya gato oyo esalemi na biloko yango, pe bakopesa yango epayi ya nganga-Nzambe, pe ye akomema yango na etumbelo.  9. Nganga-Nzambe akolongola likabo ya gato eteni ya bokundoli pe akotumba yango na etumbelo : ezali mbeka etumbami na moto, solo kitoko epayi na Yawe. 10. Oyo etikali na likabo ya gato ekozala pona Aaron pe pona bana na ye ya mibali : ezali eloko ya bosantu penza kati na bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto.

11. Likabo moko te ya gato oyo bokopesa epayi ya Yawe ekosalama na levin ; po bokotumba te levin pe mafuta ya nzoyi lokola mbeka etumbami na moto epayi na Yawe. 12. Pona likabo ya bambuma ya liboso, bokopesa epayi na Yawe ; kasi ekotumbama te likolo na etumbelo na solo kitoko. 13. Pe likabo nyonso ya likabo na yo ya gato, okotia yango mungwa, pe okotika te mungwa ya boyokani ya Nzambe na yo ezanga likolo na likabo na yo ya gato ; na makabo na yo nyonso, okopesa mungwa.

14. Pe soki opesi epayi na Yawe likabo ya gato ya bambuma ya liboso, okopesa pona likabo ya gato ya bambuma ya liboso na yo, bamitu ya bambuma ya sika etumbami na moto, mitu ya mbuma oyo etutami pe epasulami ; 15. Pe okotia mafuta likolo na yango, pe okotia mpaka ya malasi likolo na yango : ezali likabo ya gato. 16. Pe nganga-Nzambe akotumba yango na bokundoli, eteni ya bambuma na yango oyo etutami pe epasulami pe na mafuta na yango, elongo na mpaka ya malasi na yango nyonso : ezali likabo etumbami

na moto epayi ya Yawe.

 

Mokapo 3

1. Soki likabo na ye ezali mbeka ya kimia, soki ezali ya bangombe, ezala mobali to ya mwasi, akopesa yango ya kokoka² liboso ya Yawe. 2. Akotia loboko na ye likolo na moto ya likabo na ye pe akoboma yango na ekuke ya hema ya bokutani ; pe bana mibali ya Aaron, banganga-Nzambe, bakosopa makila zingazinga ya etumbelo.  3. Akopesa mbeka ya kimia, mbeka etumbami na moto epayi ya Yawe: mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, pe mafuta nyonso oyo ezali likolo ya biloko ya kati 4. Pe barin mibale ya nzoto, pe mafuta oyo ezali likolo, likolo ya rin, pe monyama oyo ezali na fwa, oyo bakolongola ti likolo na barin ; 5. Pe bana ya Aaron bakotumba yango na etumbelo, likabo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya koni oyo ezali na moto : ezali likabo ya etumbami na moto, solo kitoko epayi ya Yawe.

6. Pe soki likabo na ye pona mbeka ya kimia epayi ya Yawe ewuti na etonga ya bibwele, ya mobali to ya mwasi, akopesa yango ya kokoka².  7. Soki ezali mwana-mpate lokola likabo na ye, akopesa yango liboso ya Yawe. 8. Akotia loboko na ye likolo na moto ya likabo na ye pe akoboma yango liboso ya hema ya bokutani. Bana mibali ya Aaron bakosopa makila zingazinga ya etumbelo. 9. Akopesa mbeka ya kimia, mbeka oyo etumbami na moto epayi ya Yawe : mafuta na yango, mokila na yango oyo bakolongola mobimba ti na mokuwa ya mokongo, mafuta oyo ezipaka eloko ya kati, pe mafuta nyonso oyo ezali na eloko ya kati. 10. Barin mibale, mafuta oyo ezali likolo na yango, oyo ezali na barin, pe biteni na fwa oyo ezali likolo ya fwa, bakolongola ti likolo na bareins ; 11. Pe Nganga-Nzambe akotumba yango likolo na etumbelo : ezali lipa mbeka etumbami epayi na Yawe.

12. Pe soki likabo na ye ezali ntaba, akopesa yango liboso ya Yawe; 13. Pe akotia loboko na ye likolo na moto na yango pe akoboma yango liboso ya hema ya bokutani ; Bana mibali ya Aaron bakosopa makila zingazinga ya etumbelo ; 14. Pe akopesa likabo na ye, mbeka etumbami na moto epayi ya Yawe : mafuta oyo ezipaka eloko ya kati, pe mafuta nyonso oyo ezali likolo ya eloko ya kati. 15. Pe barin mibale, pe mafuta oyo ezali likolo, oyo ezali likolo ya barin, pe biteni ya fwa oyo ezali likolo ya fwa, bakolongola kino likolo ya barin ; 16. Pe nganga-Nzambe akotumba yango likolo na etumbelo : ezali lipa ya mbeka etumbami na moto, na solo kitoko. Mafuta nyonso ezali ya Yawe.  17. Ezali mobeko ya seko, na mabota na bino, kati na bisika nyonso ya kofanda na bino : bokolia te ata mafuta moko to ata makila moko.

 

Mokapo 4

1. Pe Yawe alobaki na Mose, koloba: Loba na Bana ya Israel: 2. Soki mutu moko asali lisumu na bozangi boyebi na mibeko ya Yawe na kati ya makambu oyo asengeli kosala te,  pe asali moko ya makambu oyo. 3. Soki ezali nganga-Nzambe mopakolami asali lisumu na kolanda mbeba nyonso ya batu,  asengeli kopesa na Yawe, pona lisumu na ye asalaki, elenge ngombe-mobali, mwana mobali etonga monene oyo ezangi mbeba na mbeka pona lisumu. 4. Pe akomema ngombe-mobali na ekuke ya hema ya bokutani liboso ya Yawe, pe akotia loboko na ye likolo na moto ya ngombe-mobali pe akoboma ngombe-mobali yango liboso ya Yawe ; 5. Pe nganga-Nzambe mopakolami akozwa makila ya ngombe-mobali pe akomema yango na hema ya bokutani;  6. Pe nganga-Nzambe akozindisa lisapi na ye na kati ya makila pe akosopa makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya esika mosantu ;  7. Pe nganga-Nzambe akotia makila na maseke ya etumbelo ya mpaka ya malasi esika batumbaka malasi ya solo kitoko liboso na Yawe,  oyo ezali na kati ya hema ya bokutani ; pe akosopa makila nyonso ya ngombe-mobali na makolo ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekoteli ya hema ya bokutani.  8. Pe akolongola mafuta nyonso ya ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu : mafuta oyo ezipaka eloko ya kati, pe mafuta nyonso oyo ezali likolo na eloko ya kati.  9. Pe barin mibale, pe mafuta oyo ezali likolo na yango, oyo ezali likolo na barein, pe biteni ya fwa oyo ezali likolo na fwa, bakolongola ti na barin. 10. Lokola balongolaka yango na ngombe ya mbeka ya kimia, pe nganga-Nzambe akotumba yango likolo na etumbelo ya mbeka ya kotumba.  11. Pe poso ya ngombe-mobali pe mosuni na yango nyonso, elongo na moto na yango, pe na makolo na yango, mitiopo na yango pe bosoto na yango.  12. Pe akomema ngombe-mobali mobimba libanda ya kaa, na esika ya peto, na esika oyo basopaka putulu ya moto, pe ekotumbama.

13. Soki lisanga mobimba ya Israel esali lisumu na kozanga boyebi, pe yango etikali kobombama liboso ya misu ya lisanga, pe basali ata eloko moko oyo Yawe apesaki mobeko basala te, pe bazali na ngambo, 14. Pe lisumu yango oyo basalaki ekoyebana, bongo lisanga mobimba ekopesa ngombe-mobali ya etonga lokola mbeka ya lisumu, pe akomema yango liboso ya hema ya bokutani ; 15. Bampaka ya lisanga bakotia maboko na bango likolo na motó ya ngombe-mobali liboso ya Yawe, pe ngombe-mobali yango ekobomama liboso ya Yawe. 16. Nganga-nzambe mopakolami akomema makila ya ngombe-mobali na hema ya bokutani. 17. Nganga-nzambe akozindisa mosapi na ye na kati ya makila pe akosopa yango mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido.  18. Akotia yango na maseke ya etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe na hema ya bokutani, pe akosopa makila nyonso na makolo ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekoteli ya hema ya bokutani. 19. Pe akolongola mafuta nyonso pe akotumba yango na etumbelo. 20. Akosala ngombe-mobali boye lokola asalaki epayi ya ngombe-mobali pona (mbeka ya) lisumu ; akosala na yango ndenge moko. Bongo nganga-Nzambe akosala mosala ya kozipa masumu pona bango, pe bakolimbisama. 21. Ngombe-mobali yango ekomemama libanda ya kaa pe bakotumba yango ndenge batumbaki ngombe-mobali ya liboso : ezali mbeka pona lisumu ya lisanga. 22. Soki nkumu moko asali lisumu pe asali na ndenge ya koyeba te na moko ya mibeko ya Yawe Nzambe na ye, likambo oyo esengeli kosalama te, pe akomi na ngambo, 23. Pe bayebisi ye lisumu na ye oyo, na sima akomema pona likabo na ye, ntaba ya mobali oyo ekoka; 24. Pe akotia loboko na ye likolo na moto ya ntaba pe akoboma yango na esika oyo babomaka mbeka ya kotumba liboso ya Yawe : ezali mbeka pona lisumu.  25. Pe nganga-Nzambe akozwa na lisapi na ye makila ya mbeka pona lisumu, pe akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, pe akosopa makila yango na makolo ya etumbelo ya mbeka ya kotumba ; 26. Pe akotumba mafuta nyonso likolo na etumbelo, lokola mafuta ya mbeka ya kimia ; pe nganga-Nzambe akosala bozipami ya masumu pona ye pona kopetola ye na masumu na ye, pe akolimbisama.

27. Soki mutu moko kati na batu ya mboka asali lisumu na ndenge ya koyeba te, asali na tina moko ya mibeko ya Yawe oyo esengeli kosalama te, pe akomi na ngambo.  28. Soki  bayebisi ye lisumu na ye oyo asali, na bongo akomema likabo na ye, ntaba ya mwasi oyo ezangi mbeba, pona lisumu na ye oyo asali ; 29. Pe akotia loboko na ye likolo na moto ya mbeka pona lisumu, pe akoboma mbeka pona lisumu na esika oyo babomaka mbeka ya

kotumba.  30. Pe nganga-Nzambe akozwa makila ya ntaba na lisapi na ye, pe akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, pe akosopa makila nyonso na makolo ya etumbelo. 31. Pe akolongola mafuta nyonso, lokola mafuta elongwaki likolo ya mbeka ya kimia ; nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na solo kitoko epayi na Yawe ; pe nganga-Nzambe akozipa masumu pona ye, pe akolimbisama.  32. Soki amemi mwana-mpate pona likabo na ye ya mbeka pona lisumu, akomema ya mwasi oyo ezangi mbeba ;  33. Akotia loboko na ye likolo na moto ya mbeka pona lisumu pe akoboma yango lokola mbeka pona lisumu na esika oyo mbeka ya kotumba ezali kobomama. 34. Pe nganga-Nzambe akozwa makila ya mbeka pona lisumu na lisapi na ye pe akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, pe akosopa makila nyonso na makolo ya etumbelo. 35. Pe akolongola mafuta nyonso, lokola mafuta ya mwana-mpate oyo elongwamaki na mbeka ya kimia ; pe nganga-Nzambe akotumba yango likolo na etumbelo, likolo ya bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto ; pe nganga-Nzambe akosala bozipami ya masumu pona ye, pona lisumu na ye oyo asali ; pe akolimbisama

 

Mokapo 5

1. Pe soki mutu moko asali lisumu ete azalaki motatoli pe ayokaki kobengama ya kotatola na kokosa te, amonaki to ayebaki, kasi atatoli te, akomema mbeba na ye ; 2.  To soki mutu moko asimbaki eloko moko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo, to ebembe ya nyama ya ndako ya mbindo, to ebembe ya nyama oyo ebendanaka na mabele ya mbindo, pe etikali kobombama liboso na ye, boye azali mbindo pe azali na ngambo ; 3.  To soki asimbaki bosoto ya mutu, ata bosoto nini oyo amibebisi na nzela na yango, pe yango etikali kobombama liboso na ye, tangu ayebi yango, azali na ngambo ; 4. To soki mutu moko, na mbebu na ye alobi na bozangi kokanisa, alapi ndayi ete akosala malamu to mabe, lolenge nyonso oyo mutu akoloba na bozangi kokanisa tangu azali kolapa ndayi, pe yango etikali kobombama liboso na ye, tangu ayebi yango, boye azali na ngambo na moko ya makambu yango. 5. Ekosalama ete soki azali na ngambo na makambu oyo, akotubela nini oyo ye asumukaki. 6. Pe akomema epayi na Yawe mbeka na ye pona ngambo, pona lisumu na ye oyo asali, ebwele ya mwasi, to meme, to ntaba, na mbeka pona lisumu ; pe nganga-Nzambe akosala kozipa masumu pona ye, pona lisumu na ye. 7. Soki makoki na ye ekoka te kosomba mwana-mpate moko, akomema epayi ya Yawe, pona ngambo na ye oyo asali, bibenga mibale to bana mibale ya pijeon, moko pona mbeka pona lisumu pe mosusu pona mbeka ya kotumba.  8. Akomema yango epayi ya nganga-Nzambe, pe nganga-Nzambe akopesa liboso oyo ezali pona mbeka pona lisumu, pe akokata moto na yango na manzaka pembeni ya kingo, kasi akokabola yango te ;  9. Akosopa makila ya mbeka pona lisumu na mopanzi ya etumbelo, pe makila oyo etikali akopalangisa na se ya etumbelo : ezali mbeka pona lisumu. 10. Pe ya mibale ekopesama lokola mbeka ya kotumba lolenge na makuli. Pe nganga-Nzambe akosala bozipi masumu pona ye, pona lisumu oyo asali, pe akolimbisama. 11. Pe soki makoki na ye ekoki te kokoma na bibenga mibale to bana mibale ya pijeon, boye ye oyo asali lisumu akomema lokola likabo na ye moko ya zomi ya efa moko ya farini ya malamu lokola mbeka pona lisumu ; akotia mafuta likolo na yango te, pe akotia mpaka ya malasi likolo na yango te : po ezali mbeka pona lisumu. 12. Pe akomema yango epayi ya nganga-Nzambe, pe nganga-Nzambe akozwa loboko moko ya kotonda na yango pona ekaniseli, pe akotumba yango likolo ya etumbelo likolo ya bambeka oyo etumbami na moto pona Yawe : ezali mbeka pona lisumu.  13. Pe nganga-Nzambe akosala bozipi masumu pona ye, pona lisumu na ye oyo asali na moko ya makambu oyo, pe akolimbisama ; pe oyo etikali ekozala pona nganga-Nzambe, lokola likabo ya gato.

14. Yawe alobi na Mose : 15. Soki mutu moko asali mbeba pe asali lisumu na kozanga koyeba kati na makambo ya bule ya Yawe, akomema mbeka na ye pona ngambo epayi na Yawe, mpate-mobali oyo ezangi mbeba na etonga, azwami kati na bibwele, lolenge ya motuya na yo na basikle ya palata, na kolanda sikle ya esika mosantu, na mbeka pona ngambo. 16. Pe na nyonso oyo asali lisumu na kokamata eloko ya bule, akozongisa yango, pe akobakisa likolo ndambo ya mitano na yango, pe akopesa yango na nganga-Nzambe ; pe nganga-Nzambe akosala kozipa pona ye na mpate-mobali pona mbeka ya ngambo, pe akolimbisama. 17. Kasi soki mutu moko asali lisumu pe asali, na tina ya moko ya mitindo ya Yawe, nini esengeli kosalama te, pe ayebi yango te, akozala na ngambo pe akomema mabe na ye. 18. Akomema na nganga-Nzambe mpate-mobali oyo ezangi mbeba, ezwami na etonga, lolenge na kotalela motuya na yo, na mbeka pona ngambo ; pe nganga-Nzambe akosala bozipi pona ye pona kopengwa apengwaki na kozanga koyeba, pe akolimbisama. 19. Ezali mbeka pona ngambo ; azwi penza ngambo liboso ya Yawe.

20. Yawe alobi na Mose, koloba : 21. Soki mutu moko asali lisumu pe azali sembo te epayi ya Yawe, pe akosi moninga na ye pona eloko oyo bapesaki ye, to oyo batiaki na maboko na ye, to ayibi, to abotoli na moninga na ye eloko na makasi ; 22. To soki amoni eloko moko oyo ebungaki, pe akosi na tina na yango, pe alapi ndayi ya lokuta na tina ya moko ya makambu nyonso oyo mutu asali na ndenge oyo asalaka lisumu na kosalaka yango ; 23. Boye, soki asali lisumu pe azali na ngambo, asengeli penza kozongisa eloko oyo ayibaki, to nini oyo abotolaki na makasi, to oyo babombisaki epayi na ye, to oyo ebungaki ye amonaki. 24. to nyonso oyo alapaki ndayi na lokuta ; pe akozongisa motuya monene, pe akobakisa ndambo ya mitano likolo na yango ; akopesa yango na ye oyo ezali ya ye, na mokolo ya mbeka na ye pona ngambo.  25. Pe akomema pona Yawe, epayi ya nganga-Nzambe, mbeka pona ngambo, mpate-mobali oyo ezangi mbeba, oyo ezwami kati na etonga, na lolenge ya motuya na yo, na mbeka pona ngambo. 26. Pe nganga-Nzambe akosala bozipi pona ye liboso ya Yawe ; pe akolimbisama, ezala mbeba nini asalaki kati na oyo akomaki na ngambo.

 

Mokapo 6

1. Pe Yawe alobi na Mose : 2. Pesa Aaron pe bana na ye ya mibali mitindo, koloba : Oyo ezali mobeko ya mbeka ya kotumba. Ezali mbeka ya kotumba : ekozala likolo ya motalaka ya likolo na etumbelo butu mobimba kino tongo, pe moto ya etumbelo ekopela likolo na yango. 3. Pe nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino pe bakaleson na ye  ya lino, pe akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisi na etumbelo pe akotia yango pembeni ya etumbelo. 4. Bongo akolongola bilamba na ye pe akolata bilamba mosusu, pe akomema putulu na libanda ya kaa na esika ya peto. 5. Pe moto oyo ezali likolo ya etumbelo ekozika likolo na yango ; ekopesamela nzela te ya koboma yango. Pe nganga-Nzambe akopelisa koni likolo na yango tongo nyonso, pe akobongisa mbeka ya kotumba likolo na yango, pe akotumba mafuta ya mbeka ya kimia likolo na yango. 6. Moto ekopelaka tangu nyonso likolo ya etumbelo ; ekopesamela nzela te ya koboma yango.

7.  Pe oyo nde mobeko ya likabo ya gato: Moko ya bana ya Aaron akopesa yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo. 8. Akozwa na loboko na ye ndambo ya farini ya gato pe ya mafuta na yango, pe mpaka ya malasi nyonso oyo ezali likolo ya gato, pe akotumba yango likolo ya etumbelo lokola solo kitoko, likanisi ya bokundoli epayi ya Yawe.  9. Pe Aaron na bana na ye ya mibali bakolia biloko oyo etikali na yango ; ekoliama ezanga levin na esika mosantu ; bakolia yango na lopango ya hema ya bokutani. 10. Bakotumba yango na levin te. Ezali eteni na bango, oyo napesi bango na bambeka na ngai ya kotumbama na moto. Ezali eloko moko ya mosantu mingi, lokola mbeka pona lisumu pe mbeka pona ngambo. 11. Mobali nyonso kati na bana mibali ya Aaron akolia yango ; ezali mobeko ya libela kati na mabota na bino mobimba, eteni na bango ya makabo oyo etumbami na moto epayi ya Yawe : Nyonso oyo ekosimba yango ekozala mosantu. 12. Pe Yawe alobaki na Mose, kolobaka : 13. Oyo nde likabo ya Aaron na bana na ye ya mibali, oyo bakopesa na Yawe, na mokolo ya kopakolama na ye mafuta : ndambo moko ya zomi ya efa moko ya farini, na likabo ya gato ya tangu nyonso, ndambo na tongo pe ndambo na pokwa. 14. Akobongisa likabo yango likolo likalangu na mafuta ; Okomema yango esangani na mafuta ; okopesa biteni ya gato oyo batumbaki ya solo kitoko epayi ya Yawe. 15. Pe nganga-Nzambe kati ya bana mibali oyo apakolami na esika na ye akosala boye ; ezali mobeko ya libela : ekotumbama mobimba epayi na Yawe. 16. Pe Gato nyonso ya nganga-Nzambe ekotumbama mobimba ; ekoliama te. 17. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 18. Loba na Aaron na bana na ye ya mibali, na koloba : Oyo ezali mobeko ya mbeka pona lisumu: Na esika oyo babomi mbeka ya kotumba, mbeka pona lisumu ekoboma liboso ya Yawe : ezali mosantu ya bosantu. 19. Nganga-Nzambe oyo akobonza yango pona lisumu akolia yango ; ekoliama na esika mosantu, na kati ya lopango ya hema ya bokutani. 20. Nyonso oyo ekotuta mosuni na yango ekozala mosantu ; pe soki makila na yango esopani likolo na elamba, okosukola oyo makila esopani likolo na yango na esika mosantu. 21. Mbeki ya mabele oyo balambaki yango na kati, ekobukana ; pe soki elambamaki na kati ya mbeki ya bronze, ekopakolama pe ekosukolama na kati ya mayi.  22. Mobali nyonso kati na banganga-Nzambe akokoliya yango : ezali mosantu ya bosantu. 23. Mbeka moko te pona lisumu oyo makila na yango ememami na hema ya bokutani pona kozipa masumu na kati ya esika mosantu, ekoliama te ; ekotumbama na moto.

 

Mokapo 7

1. Oyo ezali mobeko ya mbeka ya ngambo ; ezali mosantu ya bosantu. 2. Na esika oyo bakoboma mbeka ya kotumba, bakoboma mbeka ya ngambo,  pe bakosopa makila na yango zingazinga ya etumbelo. 3. Mafuta na yango nyonso, mokila na yango, pe mafuta oyo ezipi biteni na yango ya kati ; 4. Barin mibale pe na mafuta oyo ezali likolo, mafuta oyo ezali na rin, pe biteni ya fwa oyo ezali na fwa, oyo ekolongolama kino na barin. 5. Nganga-Nzambe akotumba yango likolo na etumbelo lokola mbeka ya moto na Yawe : ezali mbeka pona ngambo.  6. Mobali nyonso kati na banganga-Nzambe akolia yango ; ekoliama na esika mosantu ; ezali mosantu ya bosantu. 7. Lokola mbeka pona lisumu, bongo ezali pe mbeka pona ngambo; ezali kaka na mobeko moko pona bango : ezali ya nganga-Nzambe oyo bozipami ezali na nzela na ye.  8.  Pe nganga-Nzambe oyo abonzi mbeka ya kotumba ya mutu moko, poso ya mbeka ya kotumba oyo ye akopesa ekozala ya nganga-nzambe ; ezali ya ye.  9. Pe likabo nyonso ya gato oyo etumbami na fulu to oyo ezali likolo ya kikalungu to na lituka, ekozala pona nganga-Nzambe oyo akobonza yango : ezali ya ye. 10. Pe likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta pe ya kokawuka, ekozala pona bana mibali nyonso ya Aaron, pona moko lokola pona mosusu.

11. Tala mobeko ya likabo ya kimya oyo ekopesama epai ya Nkolo. 12. Soki mutu moko abonzi yango lokola bozongisi matondi, akobonza yango elongo na mbeka ya bozongisi matondi, bagato oyo ezangi levin epakolami mafuta, pe bagalete oyo ezangi levin bapakoli mafuta, pe farini oyo esangisami, na bagato oyo esangisami na mafuta.  13. Akobonza pona likabo na ye, elongo na bagato, mapa ya levire elongo na mbeka na ye bozongisi matondi ya kimia ; 14. Pe likabo mobimba, akobonza yango moko na likabo oyo etombolami epayi ya Yawe : Ekozala pona nganga-Nzambe oyo akosopa makila ya mbeka ya kimia ; ezali ya ye. 15. Pe mosuni ya mbeka na ye ya kimia ekoliama mokolo oyo bakobonza yango ; bakotika eloko moko te kino na tongo. 16. Soki mbeka ya likabo na ye ezali ndayi alakaki to ya mokano ya motema, mbeka na ye esengeli eliama mokolo oyo ekopesama, pe oyo etikali ekoliama mokolo oyo elandi ;  17. Pe misuni oyo etikali ya mbeka ekotumbama na moto na mokolo ya misato.  18. Soki mutu moko alie misuni ya mbeka na ye ya kimia na mokolo ya misato, akondimama te ; Ekotangama te na ye oyo abonzaki yango : ekozala eloko ya mbindo ; pe molimo oyo ekolia yango ekomema mabe na yango. 19. Pe mosuni nyonso oyo ekotuta eloko moko ya mbindo, ekoliamaka te : ekotumbama na moto. Kasi pona mosuni, mutu nyonso oyo azali peto akolia mosuni yango.  20. Pe ye oyo azali na mbindo likolo na ye, akolia mosuni ya mbeka ya kimia oyo ezali ya Yawe, ye wana akolongolama na batu na ye. 21. Soki molimo moko asimbaki eloko moko ya mbindo, ezala mbindo ya mutu, to nyama ya mbindo, to eloko mosusu ya kele pe ya mbindo, pe alie mosuni ya mbeka ya kimia oyo ezali ya Yawe, mutu yango akolongolama na batu na ye.

22. Yawe alobi na Mose, koloba : 23. Loba na bana Israele, koloba : Bokolia ata mafuta ya ya ngombe, ya mpate to ya ntaba te. 24. Mafuta ya ebembe to mafuta ya nyama oyo epasolami ekoki kosalelama pona likambu nyonso, kasi bokolia yango te ; 25. Po mutu nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzeli Yawe na mbeka batumbi na moto, ye oyo akolia yango akolongolama na batu na ye.  26. Pe bokolia makila moko te na bisika na bino ya kofanda, ezala ya bandeke to ya bangombe. 27. Ye oyo nyonso akolia makila ya ndenge nyonso, ye wana akolongolama na batu na ye. 28. Yawe alobi na Mose, koloba : 29. Loba na bana ya Israel, koloba : Ye oyo akobonza mbeka na ye ya kimia epayi ya Yawe akomema likabo na ye epayi na Yawe, oyo ezwami na mbeka ya kimia. 30. Maboko na ye ekomema bambeka oyo etumbami na moto epayi ya Yawe, pe akomema mafuta elongo na tolo : tolo, pona koningisa yango lokola likabo ya koningisa liboso ya Yawe.  31. Pe nganga-Nzambe akotumba mafuta likolo na etumbelo, pe tolo ekozala pona Aaron na bana na ye ya mibali. 32. Pe bokopesa nganga-Nzambe, lokola likabo oyo enotolami, lipeka ya mobali ya bambeka na bino ya kimia. 33. Ye oyo ya mwana ya Aaron oyo akobonza makila pe mafuta ya bambeka ya kimia akozwa pona ye lipeka na ye ya mobali.  34. Po nalongoli  na bana ya Israel tolo oyo baningisi pe lipeka oyo batomboli ya bambeka na bango ya kimia, pe napesi yango na Aaron, nganga-Nzambe pe na bana na ye ya mibali, na mobeko ya libela epayi ya bana ya Israel.  35. Oyo ezali epakolami ya Aaron pe epakolami ya bana na ye kati na bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto, banda mokolo oyo bamemaki bango pona kosala bonganga ya Nzambe liboso ya Yawe; 36. Oyo Yawe apesi mitindo ete bapesa bango na bana ya Israel mokolo oyo akopakola bango mafuta ; ezali mibeko ya seko na bakitani na bango mobimba.

37. Tala oyo ezali mobeko ya mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka pona lisumu, mbeka ya ngambo, mbeka ya kobulisa pe mbeka ya kimia. 38. Oyo Yawe apesaki Mose mitindo likolo na ngomba ya Sinayi, na mokolo oyo apesaki bana ya Israel mitindo ete babonzela Yawe makabo na bango kati na esobe ya Sinayi.

 

Mokapo 8

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 2. Kamata Aaron pe bana na ye ya mibali elongo na ye, pe bilamba, mafuta ya epakoli, pe elenge ya ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu, bameme mibale ya mibali pe kitunga ya mapa oyo ezangi levin ; 3. Pe benga liyangani mobimba na ekoteli ya hema ya bokutani.  4. Pe Mose asalaki lokola Yawe atindaki ye, pe liyangani ebangamaki na ekoteli ya hema ya bokutani. 5. Pe Mose alobaki na liyangani : Oyo ezali nde oyo Yawe apesi mitindo ete bosala. 6. Pe Mose amemaki Aaron pe bana na ye ya mibali pe asukolaki bango na mayi. 7. Atiaki nzambala likolo na ye, pe akangaki ye mokaba, pe alatisaki ye elamba, pe atiaki ye efode likolo pe akangaki ye na mokaba ya efode, pe azingaki ye na yango likolo na ye ; 8. Pe atiaki Pektoral (poshi) likolo na ye, pe atiaki Urime * (2) pe Tumime**(3) likoló na Pektoral (poshi) ; 9. Pe atiaki etendi elamba na moto na ye, pe likolo na etendi elamba na moto, na liboso na elongi na ye, atiaki palaki (fololo) ya wolo, ekoti mosantu ya mokonzi, lokola Yawe apesaki Mose motindo. 10. Pe Mose azwaki mafuta ya epakolami pe apokali tabernakle pe biloko nyonso oyo ezalaki na kati, pe abulisaki yango ; 11. Pe asopaki yango likolo na etumbelo mbala sambo, pe apokoli mafuta na etumbelo, bisaleli na yango nyonso, saani ya esukweli pe moboko na yango, pona kobulisa yango. 12. Asopaki mafuta ya epakolami na moto ya Aaron pe apokali ye epakoli, pona kobulisa ye.

— v. 8*(2) : mwinda. — v. 8**(3) : makambu ya kokoka.

13. Pe Mose abendaki penepene bana ya Aaron pe alatisaki bango banzambala, akangaki bango mokaba, pe akangaki bikoti na bango ya moto, ndenge Yawe apesaki Mose motindo. 14. Amemaki ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu, pe Aaron pe bana na ye batiaki maboko na bango likolo na moto ya ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu. 15. Babomaki yango, pe Mose azwaki makila pe atiaki yango na mosapi na ye na maseke ya etumbelo, zingazinga, pe apetolaki (alongolaki lisumu ya) etumbelo ; Asopaki makila na se ya etumbelo pe abulisaki yango, kosala bozipi pona yango.  16. Pe akamataki mafuta ya nyama nyonso oyo ezalaki na kati, monyama ya fwa, barin mibale pe mafuta na yango, pe Mose atumbaki yango na etumbelo.  17. Pe ngombe-mobali, poso na yango, mosuni na yango pe bosoto na yango, atumbaki yango na moto, na libanda ya kaa, ndenge Yawe apesaki Mose motindo. 18. Pe amemaki meme-mobali ya mbeka ya kotumba, pe Aaron pe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango likolo na moto ya meme-mobali.  19. Babomaki yango, pe Mose asopaki makila likolo na etumbelo, zingazinga ya etumbelo ;  20. Bakataki meme-mobali biteni na biteni, pe Mose atumbaki moto na yango, biteni na yango pe mafuta na yango ; 21. Pe basukolaki kati pe makolo ya meme-mobali kati na mayi, pe Mose atumbaki meme-mobali mobimba na etumbelo : mbeka ya kotumba ya solo kitoko, ezalaki mbeka etumbami moto na Yawe, ndenge Yawe apesaki Mose motindo. 22. Pe amemaki meme-mobali ya mibale, meme-mobali ya kobulisa, pe Aarona pe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango likolo na moto ya meme-mobali. 23. Pe babomaki yango, pe Mose azwaki makila na yango pe atiaki yango na songe ya litoyi ya mobali ya Aaron, na mosapi monene ya loboko na ye ya mobali pe na mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali. 24. Pe amemaki bana mibali ya Aaron, pe Mose atiaki makila na songe ya matoyi na bango ya mobali, na mosapi monene ya maboko na bango ya mobali pe na mosapi monene ya makolo na bango ya mobali ; Pe Mose asopaki makila likolo na etumbelo, zingazinga. 25. Pe akamataki mafuta ya nyama, pe mokila, pe mafuta nyonso oyo ezalaki na kati, pe monyama ya fwa, pe barin mibale pe mafuta na yango, pe lipeka ya mobali ; 26. Pe azwaki na kitunga ya mapa oyo ezangi levin oyo ezalaki liboso ya Yawe, gato oyo ezangi levin, gato moko ya lipa ya mafuta, pe galete moko, pe atiaki yango likolo ya mafuta pe likolo na lipeka ya mobali.  27. Pe atiaki nyonso na maboko ya Aaron pe na maboko ya bana na ye ya mibali, pe aningisi yango lokola likabo ya koningisa liboso ya Yawe. 28. Pe Mose azwaki yango na maboko na bango pe atumbaki yango na etumbelo likolo ya mbeka ya kotumba : Ezalaki mbeka ya kobulisa, na solo kitoko ; ezalaki mbeka oyo etumbamaki na moto ya Yawe. 29. Pe Mose azwaki tolo pe aningisi yango lokola likabo ya koningisa liboso ya Yawe ; ezalaki meme-mobali ya kobulisa- Oyo eteni ya Mose, lokola Yawe apesaki motindo na Mose.  30. Pe Mose azwaki mafuta ya epakolami pe makila oyo ezalaki likolo ya etumbelo, pe asopaki yango likolo ya Aaron, likolo na bilamba na ye, pe likolo ya bana na ye ya mibali pe likolo ya bilamba ya bana na ye ya mibali elongo na ye : Abulisaki Aaron, bilamba na ye pe bana na ye ya mibali pe bilamba bana na ye mibali elongo na ye.  31. Pe Mose alobaki na Aaron pe na bana na ye ya mibali : Botumba mosuni na ekoteli ya hema ya bokutani pe bolia yango kuna, elongo na lipa oyo ezali na kitunga ya kobulisa, ndenge napesaki motindo, nalobaki : Aaron pe bana na ye ya mibali bakolia yango. 32. Pe mosuni oyo etikali pe lipa, bokotumba yango na moto. 33. Bokobima te na ekoteli na hema ya bokutana na bowumeli ya mikolo sambo, ti mokolo oyo mikolo ya kobulisama na yo ekokisama, po ekosɛnga mikolo sambo pona kobulisa bino. 34. Yawe apesi motindo ete tosala lokola tosali lelo, pona kozipa masumu pona bino.  35. bokofanda na ekoteli ya hema ya bokutani na bowumeli ya mikolo sambo, butu na moyi, pe bokobatela oyo Yawe apesi bino po bobatela, po ete bokufa te; po boye nde motindo epesamelaki ngai. 36. Pe Aaron pe bana na ye ya mibali basalaki makambu nyonso oyo Yawe apesaki na nzela ya Mose.

 

Mokapo 9

1. Na mokolo ya mwambe, Mose abengaki Aaron na bana na ye ya mibali pe bampaka ya Israel. 2. Pe alobi na Aaron : Kamata elenge ya ngombe-mobali pona mbeka pona lisumu pe meme-mobali pona mbeka ya kotumba, oyo ezangi mbeba, pe obonza yango liboso ya Yawe. 3. Pe okoloba na bana ya Israel, koloba : Bokamata ntaba ya mobali pona mbeka pona lisumu ; mwana-ngombe pe mwana-mpate ya mbula moko oyo ezangi mbeba pona mbeka ya kotumba,  4. Ngombe-mobali pe meme-mobali pona mbeka ya kimia, pona kobonza yango mbeka liboso ya Yawe, pe likabo ya gato oyo esangani na mafuta, po lelo Yawe akobimela bino. 5. Pe bazwaki liboso ya hema ya bokutani oyo Mose apesaki mitindo ; pe lisanga mobimba bapusanaki pe batelemaki liboso ya Yawe. 6. Pe Mose alobi : Tala oyo Yawe apesi motindo, bosala yango, pe kembo ya Yawe ekomonana epayi na bino. 7. Pe Mose alobi na Aaron : Pusana na etumbelo pe obonza mbeka na yo pona lisumu pe mbeka na yo ya kotumba, pe sala yo moko bozipi pona yo pe pona batu ; pe obonza likabo ya batu, pe sala bozipi pona bango, lokola Yawe apesaki motindo. 8. Pe Aaron apusanaki na etumbelo pe abomaki mwana-ngombe ya mobali ya mbeka pona lisumu, oyo ezalaki pona ye.  9.  Pe bana mibali ya Aaron bapesaki ye makila, pe azindisaki mosapi na ye na kati ya makila pe atiaki yango na maseke ya etumbelo pe asopaki makila na se ya etumbelo. 10. Na likolo ya etumbelo, atumbaki mafuta, barin pe misuni ezwami na fwa ya mbeka pona lisumu, ndenge Yawe apesaki Mose motindo. 11. Atumbaki misuni pe poso ya nyama na moto na libanda ya kaa. 12. Pe abomaki mbeka ya kotumba, pe bana mibali ya Aaron bapesaki ye makila, pe asopaki yango na etumbelo, zingazinga. 13. Bapesaki ye mbeka ya kotumba, na biteni-biteni pe moto, pe atumbaki yango likolo na etumbelo ;  14. Asukolaki kati na yango pe makolo, pe atumbaki yango likolo ya mbeka ya kotumba likolo ya etumbelo. 15. Pe abonzaki likabo ya batu : akamataki ntaba ya mbeka pona lisumu oyo ezalaki pona batu, abomaki yango, pe abonzaki yango pona lisumu, lokola asalaki liboso. 16. Pe abonzaki mbeka ya kotumba pe asalaki yango na kolanda mibeko. 17. Abonzaki likabo ya gato pe atondisaki yango na loboko na ye pe atumbaki yango likolo na etumbelo, elongo na mbeka ya kotumba ya tongo. 18. Abomaki ngombe-mobali pe meme-mobali ya mbeka ya kimia oyo ezalaki pona batu, pe bana mibali ya Aaron bapesaki ye makila, pe asopaki yango likolo ya etumbelo, zingazinga. 19. Pe mafuta ya ngombe-mobali pe ya meme-mobali, mokila pe oyo ezipaki ya kati, barin pe biloko ya fwa. 20. Batiaki mafuta likolo na tolo, pe ye atumbaki mafuta likolo na etumbelo. 21. Pe Aaron aningisi na likabo ya koningisa liboso ya Yawe, tolo pe lipeka ya mobali, ndenge Mose apesaki motindo. 22. Pe Aaron atombolaki maboko na ye epayi ya batu pe apambolaki bango ; pe sima ya kobonza mbeka pona lisumu pe mbeka ya kotumba pe mbeka ya kimia, akitaki.

23. Pe Mose na Aaron bakotaki na hema ya bokutani ; Na sima, babimaki pe bapambolaki batu, pe kembo ya Yawe emonisamaki epayi ya batu nyonso. 24. Pe moto ebimaki liboso na Yawe pe ezikisaki mbeka ya kotumba pe mafuta ya nyama likolo na etumbelo ; pe batu nyonso bamonaki yango, bagangaki na esengo pe bakweyaki na bilongi na bango.

 

Mokapo 10

1. Pe Nadabe na Abiyu, bana mibali ya Aaron, mutu moko-moko azwaki mbeki na ye, atiaki moto na kati na yango, pe atiaki mpaka ya malasi likolo na yango, pe abonzaki yango liboso ya Yawe moto ya mopaya, oyo epesamelaki bango motindo te. 2. Kasi moto ebimaki liboso na Yawe pe ezikisaki bango, pe bakufaki liboso na Yawe. 3. Pe Mose alobi na Aaron : Tala oyo Yawe alobaki, koloba : Nakosantisama kati na baoyo bakopusana penepene na ngai, pe liboso ya batu nyonso nakokumisama. Pe Aaron afandaki nye. 4. Pe  Mose abengaki Mishaele pe Eltshafane, bana mibali ya Uziele, noko ya Aaron, pe alobi na bango : Bopusana awa pe bomema bandeko na bino liboso ya esika mosantu, na libanda ya kaa. 5. Pe bapusanaki penepene, pe bamemaki bango libanda ya kaa na banzambala na bango, ndenge Mose alobaki. 6. Pe Mose alobi na Arona pe na Eleyazare na Itamar, bana na ye ya mibali : Bofungola mito na bino te pe bopasola bilamba na bino te, po ete bokokufa te pe kanda eyela lisanga mobimba te ; kasi bandeko na bino, ndako mobimba ya Israel, bakolela moto oyo Yawe apelisi.  7. Pe bobima te na ekoteli ya hema ya bokutani, po ete bokufa te, po mafuta ya epakolami ya Yawe ezali likolo na bino. Pe basalaki lolenge ya liloba ya Mose.

8. Pe Yawe alobaki na Aaron : 9. Yo na bana na yo ya mibali elongo na yo, bokomela vino te to masanga makasi te tangu bokokota na hema ya bokutani, po ete bokufa te.  Ezali mobeko ya libela na mabota na bino, 10. Po ete bokabola kati na oyo ezali mosantu pe oyo ezali mosantu te, pe oyo ezali mbindo pe oyo ezali peto. 11. Pe po ete bolakisa bana ya Israel mibeko nyonso oyo Yawe alobelaki bango na nzela ya Mose.

12. Pe Mose alobi na Aaron pe na Eleyazare na Itamar, bana na ye ya mibali oyo batikali : Bokamata likabo ya gato, oyo etikali na bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto, pe bolia yango na mapa ezangi levin, na pembeni ya etumbelo, po ezali mosantu ya bosantu. 13. Bokolia yango na esika mosantu, pamba te ezali eteni na yo pe eteni ya bana na yo ya mibali na bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto, po ete epesamelaki ngai etinda boye. 14. Pe Yo, bana na yo ya mibali pe bana na yo ya basi elongo na yo, bokolia tolo oyo ebalusami na se pe lipeka oyo etombolami na esika ya peto, po epesameli bino lokola eteni na yo pe eteni ya bana na yo ya mibali kati na bambeka ya kimia ya bana ya Israel. 15. Bakomema lipeka oyo etombolami pe tolo oyo eningisami (elongo na bambeka ya moto, oyo ezali mafuta ya nyama), pona koningisa yango lokola likabo oyo eningisami liboso ya Yawe ; pe ekozala ya yo pe ya bana na yo mibali elongo na yo, na mobeko ya libela, lokola Yawe apesaki motindo. 16. Mose alukaki na molende ntaba ya mbeka pona lisumu, kasi tala, ezikisamaki. Pe asilikelaki Eleyazare na Itamar, bana mibali ya Aaron oyo batikali, pe alobi: 17. Pona nini boliaki mbeka pona lisumu na kati ya esika ya bule te ? po ezali eloko mosantu ya bosantu ; epesameli bino po bomema mbindo ya lisanga, pe bosala bozipi pona bango liboso na Yawe : 18. Tala, makila na ye ememami te na kati ya esika esantu ; bosengeli ata ndenge nini bolia yango na kati ya esika mosantu, ndenge napesi motindo. 19. Pe Aaron alobi na Mose : Tala, babonzi lelo mbeka na bango pona lisumu pe mbeka na bango ya kotumba liboso ya Yawe, pe makambu yango ekomeli ngai ; soki naliaki lelo mbeka pona lisumu, yango elingaki kozala malamu na misu na Yawe ?  20. Pe Mose ayokaki yango, pe ezalaki malamu na misu na ye.

 

Mokapo 11

1. Yawe alobi na Mose na Arona, alobi na bango: 2. Loba na bana ya Israel: Ezali yang’oyo  banyama oyo bokolia na kati ya banyama nyonso oyo ezali awa na mabele. 3. Bokolia, kati na banyama nyonso oyo etafunaka biloko, oyo basabo/manzaka ekabwana pe makolo ekabwana mobimba. 4. Bobele oyo bokolia te na kati ya baoyo batafunaka pe baoyo bazali na makolo ekabwana: kamela, po etafunaka, kasi ezali na makolo ekabwana te; po ezali mbindo pona bino : 5. Blero ya mabanga (Daman), po etafunaka, kasi ezali na makolo ya kopasuka te; ezali mbindo pona bino : 6. Simbiliki ya zamba(‘arnebeti) , po etafunaka, kasi makolo ya kopusaka te; ezali mbindo pona bino : 7. Pe ngulu, po ezali na basabo oyo ekabwana pe makolo na yango ekabwana, kasi etafunaka ata te; Ezali mbindo pona bino. 8. Bokolia ata mosuni na bango te, pe kosimba bibembe na bango te;bazali mbindo pona bino. 9. Bokolia oyo kati nyonso oyo ezali kati na mayi : na kati na bibale, na kati na mayi minene, pe na kati ya biluka (riviere), bokolia oyo nyonso ezali na mapapu (najware) pe na ba ekaye. 10. Kasi oyo nyonso ezali na mapapu (najware) te pe na ekaye te, kati na mayi monene pe kati na bibale, oyo nyonso etondi na kati ya mayi pe na bikelamu nyonso ya bomoyi oyo ezali na kati ya mayi, ekozala likambu ya kele pona bino. 11. Bikozala eloko ya kele pona bino ; bokolia mosuni na yango te, pe bokoyoka kele ya bibembe na bango. 12. Nyonso oyo ezali na kati ya mayi oyo ezali na mapapu (najware) te pe na ekaye te, ekozala likambu ya kele pona bino.

13. Pe kati na bandeke, bakoyoka oyo kele pona bino ; Bakoliaka yango te, ekozala eloko ya kele : mpongo, mpongo monene ya mokila pembe pe mpongo ya mayi monene, 14. Pe kombekombe pe ndeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, ya ndenge ya lolenge na yango ; 15. Korbo (wangana) nyonso, ndenge ya lolenge na yango ; 16. Pe otrishe (maligbanga) ya mwasi pe otrishe (maligbanga) ya mobali, ndeke ya mayi pe kombekombe (epervier), ya ndenge ya lolenge na yango ; 17. Pe ibu (esulungutu), ndeke monene ya mayi (kormoran), pe ndeke ya makolo milayi pe monoko molayi (ibis) ; 18. Pe ndeke motane-bule ya mayi, pe ndeke ya monoko molayi pe abombaka bileyi na poshi (pelikan), ndeke oyo eliaka misuni ya kopala ; 19. Pe ndeke monene ya basala minene, mokwela (Eron), ndenge ya lolenge na yango, ndeke ya lopumpu pe lolema (shovesuri). 20. Ekelamu nyonso ya mapapu oyo etambolaka na makolo mineyi, ekozala likambu ya kele pona bino. 21. Bobele oyo bokolia, kati na bikelamu nyonso ya mapapu oyo etambolaka na makolo mineyi, baoyo bazali na makolo likolo ya makolo na bango oyo na yango bapumbwaka na mabele. 22. Baoyo nde bazali oyo bokolia : makonki ya ndenge ya lolenge na yango, mayoyo (solam) ya ndenge ya lolenge na yango, pe lolenge mosusu ya makonki (Kargol) ya ndenge ya lolenge na yango, pe lolenge mosusu ya mayoyo (Kargab)*(4) ya ndenge ya lolenge na yango. 23. Kasi ekelamu nyonso ya mapapu oyo ezali na makolo mineyi ekozala likambu ya kele pona bino ; 24. Pe na nzela na yango bokomikomisa mbindo : mutu nyonso oyo akosimba bibembe na bango akozala mbindo ti na pokwa. 25. Pe mutu nyonso oyo akomema eloko nyonso oyo ewuti na nzoto na bango, asengeli kosukola bilamba na ye, pe akozala mbindo ti na pokwa. 26. Nyama nyonso oyo ezali na makolo oyo ekabwana, kasi yango ekabwana mobimba te pe etafunaka, ekozala mbindo pona bino ; mutu nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo.  27. Pe nyama nyonso ya makolo mineyi oyo etambolaka na makolo na yango ekozala mbindo pona bino ; mutu nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo ti na pokwa.  28. Pe mutu nyonso oyo akomema bibembe na yango akosukola bilamba na ye pe kozala mbindo ti na pokwa. Bakozala mbindo pona bino.

29. Pe oyo ekozala mbindo pona bino na kati ya biloko oyo etambolaka na mabele : mpuku ya se ya mabele, pe mpuku, miselekete ya ndenge ya lolenge na yango. 30. Pe moselekete ya ndako oyo ezali kolela, pe moselekete monene ya esobe, pe moselekete ya zamba, pe moselekete ya langi ya pondu, pe kameleyon (kingima). 31. Yango ekozala mbindo pona bino kati na banyama nyonso oyo ebendanaka na mabele ; mutu nyonso oyo akosimba yango tangu ekufi, akozala mbindo ti na pokwa. 32. Pe na eloko nyonso oyo akokweyela likolo na yango tangu bakufi ekozala mbindo : esaleli nyonso ya mabaya, elamba, loposo, to saki — eloko nyonso oyo esalelami pona ntina nyonso — ekotiama na mayi, pe ekozala mbindo ti na pokwa ; bongo ekozala peto. 33. Pe mbeki nyonso ya mabele oyo eloko moko ekweyi na kati… eloko nyonso oyo ezali na kati, ekozala mbindo, pe okobuka mbeki yango. 34. Pe bileyi nyonso oyo baliaka oyo mayi yango ekowuta ekozala mbindo ; pe masanga nyonso oyo ewuti na kati ya mbeki nyonso ekozala mbindo. 35. pe eloko nyonso oyo eteni moko ya nzoto na bango ekweli likolo na yango ekozala mbindo. Fulu ya moto pe lituka ya moto ekobebisama : bazali mbindo, pe bakozala mbindo pona bino. 36. Kasi liziba to libulu ya mayi, to ebateli nyonso ya mayi, ekozala peto. Kasi ye oyo akosimba ebembe na bango akozala mbindo. 37. Soki eteni moko ya nzoto na bango ekweyi likolo ya molona oyo baloni, ekozala peto. 38. Kasi soki batiaki mayi likolo ya molona, pe eteni moko ya nzoto na bango ekweyi likolo na yango, ekozala mbindo pona bino. 39. Pe soki moko ya banyama oyo boliaka ekufi, ye oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo ti na pokwa ; 40. Pe ye oyo akolia ebembe na yango akosukola bilamba na ye pe akozala mbindo ti na pokwa ; pe ye oyo akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye pe akozala mbindo ti na pokwa. 41. Eloko nyonso oyo etambolaka na mabele ekozala kele ; ekoliamaka te.  42. Bokolia ata te eloko moko oyo etambolaka na mabele, eloko nyonso oyo etambolaka na libumu na yango, eloko nyonso oyo etambolaka na makolo mineyi, to eloko nyonso oyo ezali na makolo mingi—eloko moko te na biloko oyo etambolaka na mabele—po ezali likambu ya kele.  43. Bomikomisa batu ya kele te na eloko nyonso oyo etambolaka na mabele, pe bomikomisa mbindo te na nzela na yango,  na boye ete bokoma mbindo na nzela na yango. 44. Po ngai nazali Yawe Nzambe na bino : pe bino bokomibulisa pe bokozala basantu, po ngai nazali mosantu. Bokomibebisa te na eloko moko oyo etambolaka na mabele. 45. Po ngai nazali Yawe oyo abimisaki bino na mokili ya Ejipito po ete nazala Nzambe na bino : bokozala basantu, po nazali mosantu. 46. Tala mobeko oyo etali banyama pe bandeke, pe ekelamu nyonso ya bomoyi oyo etambolaka na kati ya  mayi pe ekelamu nyonso oyo etambolaka na mabele.  47. Po ete bokabola oyo ezali mbindo pe oyo ezali peto, pe nyama oyo ekoliama pe nyama oyo ekokoliama te.

*(4) v.22 : solam, kargol, kagab, lolenge ya bamakonki

 

Mokapo 12

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 2. Loba na bana ya Israel, koloba ete : Soki mwasi azwi zemi pe aboti mwana mobali, akozala mbindo na bowumeli ya mikolo sambo, akozala mbindo lokola na mikolo ya bosoto na ye ya sanza.  3. Na mokolo ya mwambe, loposo ya liboso ya mwana ekokatama ngenga. 4. Akotikala na makila ya bopetoli na ye mikolo tuku misato na misato ; akosimba eloko moko ya mosantu te, pe akoya te na esika mosantu, kino mikolo ya kopetola na ye ekokisama.  5. Soki aboti mwana mwasi, akozala mbindo na bowumeli ya poso mibale, lokola na mbindo na ye ya komona sanza, pe akotikala na makila ya kopɛtolama na ye mikolo tuku motoba na motoba. 6. Tangu mikolo ya kopetolama na ye ekokisama, pona mwana mobali to pona mwana mwasi, akomemela nganga-Nzambe na ekuke ya hema ya bokutani, mwana-mpate ya mobali ya mbula moko pona mbeka ya kotumba, pe elenge ya pijon to ebenga pona mbeka pona lisumu. 7. Akobonza biloko oyo liboso ya Yawe pe akosala bozipi pona ye, pe akopetolama na bosopami ya makila na ye. Oyo ezali mobeko pona ye oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi.

8. Soki azali na makoki te pona kozwa mwana-mpate, akozwa bibenga mibale to bilenge mibale ya pijon, moko pona mbeka ya kotumba pe mosusu pona mbeka pona lisumu ; pe nganga-Nzambe akosala bozipi pona ye, pe akozala peto.

 

Mokapo 13

1. Yawe alobi na Mose na Arona, alobi : 2. Soki mutu azali kovimba, kolokoto, to litono* ya pembe na loposo na ye, pe ekomi na poso ya mosuni na ye, pota ya maba, bakomema ye epayi ya Aaron, nganga-Nzambe to epayi ya banganga-Nzambe, moko ya bana na ye ya mibali. 3. Nganga-Nzambe akotala pota oyo ezali na loposo ya mosuni na ye. Soki pwale na kati ya pota ekomi pembe, pe pota yango emonani lokola ezali mozindo koleka loposo ya mosuni na ye, ezali pota ya maba ; nganga-Nzambe akotala yango pe akoloba ete ye azali mbindo.  4. Soki litono ya pembe na kati ya loposo ya mosuni na ye ezali pembe, pe soki emonani ete ezali mozindo koleka loposo te,  pe soki pwale na yango ekomi pembe te, nganga-Nzambe akokanga ye oyo azali na pota na esika moko bowumeli ya mikolo sambo. 5. Pe nganga-Nzambe akotala ye na mokolo ya sambo : pe tala, pota etikali na miso na ye na lolenge moko, pota epalangani na kati ya loposo te ; bongo nganga-Nzambe akokanga ye mikolo sambo mosusu. 6. Nganga-Nzambe akotala ye pona mbala ya mibale na mokolo ya sambo, pe tala, pota ekolimwa, pe pota epanzani te na loposo ; bongo nganga-Nzambe akoloba ete azali peto ; ezali kolokoto ; akosukola bilamba na ye pe akozala peto. 7. Kasi soki kolokoto epalangani mingi na kati ya poso, sima ya komona ye na nganga-Nzambe pona kopetolama na ye, nganga-Nzambe akomona ye mbala ya mibale. 8. Nganga-Nzambe akotala ye : pe tala, kolokoto epalangani na kati ya loposo ; bongo nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo : ezali maba.

—v.2 : litono, na lifalanse : tâche.

9. Soki ezali na pota moko ya maba kati na mutu moko, bakomema ye epayi ya nganga-Nzambe. 10. Pe nganga-Nzambe akotala yango, pe tala, kovimba ya pembe ezali na loposo, pe ekomisi pwale pembe, pe ezali na pota efungwama na mosuni na kati ya kovimba. 11.  ezali maba oyo ewumelaka na kati ya loposo ya mosuni na ye : nde nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo ; akokanga ye te, po azali mbindo. 12. Soki maba ebimi likolo na loposo, pe maba ezipi loposo mobimba ya ye oyo azali na pota, banda na moto ti na makolo, ndenge nganga-Nzambe akoki komona. 13. Nganga-Nzambe akomona ye, pe tala, maba ezipi mosuni na ye mobimba ; bongo akoloba ete azali peto, po akomi penza mobimba pembe ; azali peto. 14. Kasi mokolo oyo bakomona kati na ye pota ya mosuni efungwama, akozala mbindo.  15. Pe nganga-Nzambe akotala pota ya mosuni efungwama pe akoloba ete azali mbindo ; mosuni ya kofungwama ezali mbindo, ezali maba. 16. Kasi soki pota ya mosuni ebongwani pe ekomi pembe, akoya epayi ya nganga-Nzambe ; 17. Pe nganga-Nzambe akomona ye, pe tala, pota ekomi pembe ; bongo nganga-Nzambe akoloba ete pota ezali peto : azali peto.

18. Soki mosuni ezalaki na bibon na loposo na ye pe ebiki, 19. Pe na esika ezalaki bibon, ezali kovimba ya pembe to kolokoto ya pembe ya motane, asengeli amilakisa na nganga-Nzambe ; 20. Pe nganga-Nzambe akomona yango, tala, ekomonana lokola ete ezali mozindo koleka loposo, pe pwale na ye ekomi pembe ; bongo nganga-Nzambe akoloba azali mbindo : ezali pota ya maba oyo ebimi na kati ya bibon. 21. Soki nganga-Nzambe amoni yango pe tala, ezali na pwale ya pembe na kati na ye te,  pe ezali mozindo te koleka loposo, kasi elimwe, nganga-Nzambe akokanga ye na bowumeli ya mikolo sambo. 22. Pe soki epalangani mingi na loposo, nganga-Nzambe akoloba azali mbindo : ezali pota. 23. Kasi soki lotono yango etikali kaka ndenge ezalaki na esika na yango pe epalangani te, ezali sikatrise ya bibon : nganga-Nzambe akoloba azali peto. 24. To soki mosuni ezali na elembo ya kozika na moto na loposo na ye, pe elembo ya kozika ezali lotono ya pembe ya motane to ya pembe. 25. Nganga-Nzambe akomona yango : pe tala, pwale ekomi pembe na esika yango, pe ekomonana ezindi na mozindo koleka loposo, —ezali maba ; epanzani na esika oyo ezali kozika ; pe nganga-Nzambe akoloba azali mbindo : ezali pota ya maba. 26. Soki nganga-Nzambe amoni yango pe ezali na pwale ya pembe te na esika yango,  pe ezali mozindo koleka loposo te, pe esili kolimwa, nganga-Nzambe akokanga ye na bowumeli ya mikolo sambo. 27. Na mokolo ya sambo, nganga-Nzambe akotala ye : Soki esika yango epalangani mingi na loposo, nganga-Nzambe akoloba azali mbindo : ezali pota ya maba.  28. Kasi soki lotono etikali na esika na yango pe epalangani te na loposo, pe elimwe, ezali kovimba ya kozika, pe nganga-Nzambe akoloba azali peto, po ezali sikatrise ya esika eziki. 29. Soki mobali to mwasi azali na pota na moto to na mandefu,  30. Nganga-Nzambe akomona pota, pe tala, emonani ezali mozindo koleka loposo, na kati ezali na pwale ya jone pe ya kotela, bongo nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo : ezali lipalata, ezali maba ya moto to ya mandefu. 31. Soki nganga-Nzambe amoni pota ya lipalata, pe emonani ete ezali mozindo koleka loposo te pe ezali na pwale ya mwindu te, bongo nganga-Nzambe akokanga ye na bowumeli ya mikolo sambo. 32. Na mokolo ya sambo, nganga-Nzambe akomona pota pe tala, lipalata epalangani te, pe ezali na pwale ya jone te, pe lipalata emonani mozindo koleka loposo te. 33. Na bongo, ye akomikokola, kasi akokola lipalata te ; Nganga-Nzambe akokanga ye azali na palata mikolo sambo mosusu.  34. Na mokolo ya sambo, nganga-Nzambe akomona lipalata pe tala, lipalata epalangani na loposo te pe emonani mozindo koleka loposo te, bongo nganga-Nzambe akoloba azali peto ; pe mutu yango akosukola bilamba na ye, pe akozala pɛto. 35. Pe soki lipalata epalangani mingi na loposo, sima ya kopetolama na ye, 36. Nganga-Nzambe akotala yango ; pe tala lipalata epalangani na loposo, nganga-Nzambe akoluka pwale ya jone te : azali mbindo.  37. Soki na misu na ye, lipalata etikali kaka na lolenge moko, pe ete pwale ya mwindu ekoli kuna, lipalata esili kobikisama : azali peto, pe nganga-Nzambe akoloba azali peto. 38. Tangu mobali to mwasi azali na lotono (tashi) na loposo na ye, ba lotono (tashi) ya pembe, 39. Nganga-Nzambe akomona yango ; pe tala, na loposo ya mosuni na bango, ezali na ba lotono (tashi) ya pembe ya pete, ezali lotono ya pete oyo ebimi na kati na loposo : azali peto. 40. Soki mobali moko abungisi suki ya moto na ye, azali libandi : azali peto.  41. Pe soki abungisi suki ya moto na ye na mopanzi ya elongi na ye, azali libandi na liboso : azali peto. 42. Pe soki ezali na pota ya pembe motane na eteni ya libandi ya likolo to ya liboso, ezali maba oyo ebimi na eteni ya libandi ya likolo to ya liboso ;  43. Pe nganga-Nzambe akomona yango : pe tala, kovimba ya pota ezali motane lokola pembe na eteni ya libandi ya likolo to ya liboso, lokola komonana ya maba na kati ya loposo ya mosuni ; 44. Azali mutu ya maba, azali mbindo. Nganga-Nzambe akoloba azali mobimba penza mbindo : po pota na ye ezali na moto na ye.

45. Mutu ya maba oyo azali na pota akozala na bilamba na ye ya kopasuka pe moto na ye ekozala polele, pe akozipa mandefu na ye pe akoganga : Mbindo ! Mbindo !  46. Mikolo nyonso oyo pota ezali na kati na ye, akozala mbindo ; azali mbindo. Akofanda ye moko, pe efandeli na ye ekozala libanda ya kaa.

47. Tangu pota ya maba ezali na kati ya elamba, na elamba ya lene to na elamba ya lino, 48. To na basinga ya elamba to na basinga nyonso ya lino to na lene, to na loposo, to eloko nyonso ya poso (ya nyama) ; 49. Pe soki pota yango ezali langi ya mayi ya pondu to motane na kati ya elamba, to na kati ya loposo, to na basinga elamba to na basinga nyonso ya elamba to na kati ya eloko nyonso ya poso, ezali pota ya maba, pe ekolakisama epayi ya nganga-Nzambe. 50. Nganga-Nzambe akomona pota pe akokanga ‘’eloko oyo ezali na’’ pota na bowumeli ya mikolo sambo. 51. Na mokolo ya sambo, akotala pota : soki pota epalangani na elamba, ezala na basinga ya elamba to na elamba, to na loposo, to na eloko nyonso oyo esalemi na poso, pota yango ezali maba oyo ekomi makasi : eloko yango ezali mbindo. 52. Na bongo, bakotumba elamba yango, to basinga ya elamba yango to basinga elamba ya lene to ya lino, to eloko nyonso ya poso oyo pota ezali na kati ; po ezali maba oyo ekomi makasi ; eloko yango ekotumbama na moto. 53. Soki nganga-Nzambe atali yango pe tala pota epalangani te na kati ya elamba, to na basinga ya elamba to na biteni ya elamba, to na eloko moko ya poso.  54. Bongo nganga-Nzambe akopesa motindo ete basukola eloko oyo epayi pota na kati na yango pe bákanga yango na bowumeli ya mikolo sambo mosusu. 55. Pe nganga-Nzambe akotala yango, pe sima ete pota ekosukolama : pe tala, pota ebongwanaki na lolenge ya komonana te, pe epalangani te ; eloko ezali mbindo, okotumba yango na moto ; ezali oyo ebebi likolo pe liboso na yango. 56. Pe soki nganga-Nzambe atali, pe tala, pota elimwe sima ete esukolami, nde bakolongola ya na elamba, to ya poso, to ya basinga ya elamba, to eteni ya elamba. 57. Pe soki ebimi lisusu na elamba, to na kati ya basinga ya elamba, to na kati ya biteni ya elamba, to na eloko nyonso ya poso, ezali maba ebimi ; okotumba na moto eloko oyo pota ezali na kati.  58. Pe elamba, to basinga ya elamba, to biteni ya elamba, to eloko nyonso ya poso oyo osukoli, pe oyo pota elongolami na yango, ekosukolama mbala ya mibale, pe ekozala peto.  59. Oyo ezali mobeko oyo etali pota ya maba na kati ya elamba ya lene to ya lino, to na basinga ya elamba to na biteni ya elamba, to na eloko nyonso oyo esalemi na poso, pona kopetola yango to koloba ete ezali mbindo.

 

Mokapo 14

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 2. Tala mobeko pona mutu ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye : Bakomema ye epayi ya nganga-Nzambe ; 3. Pe nganga-Nzambe akobima libanda ya kaa, pe nganga-Nzambe akomona ye, pe tala, mutu ya maba abikisami na maba ; 4. Pe nganga-Nzambe akopesa motindo ete bamema bandeke mibale ya peto oyo ya bomoyi pona ye oyo esengeli kopetola, elongo na nzete ya sedre, singa ya motane-bule pe izope ; 5. Pe nganga-Nzambe akopesa motindo ete moko ya bandeke yango ebomama likolo ya mbeki ya mabele, likolo na mayi ya peto. 6. Po na ndeke ya bomoyi, akozwa yango, elongo na nzete ya sedre, singa ya motane pe izope, pe akozindisa yango, elongo na ndeke ya bomoyi, na kati ya makila ya ndeke oyo babomaki likolo ya mayi ya peto ; 7. Pe akosopa mbala sambo likolo na ye oyo asengeli kopetolama na maba, pe akotatola ye peto ; na sima akotika ndeke yango ya bomoyi akende na bilanga. 8. Pe ye oyo asengeli kopetolama akosukola bilamba na ye pe akokola pwale na ye nyonso, pe akomisukola na kati ya mayi ; pe akozala peto. Pe sima na yango akokota na kaa, pe akofanda na libanda ya hema na ye mikolo sambo. 9. Pe na mokolo ya sambo akokola pwale na ye nyonso, moto na ye pe mandefu na ye pe makiki na ye ; akokata pwale na ye nyonso ; pe akosukola bilamba na ye, pe akosukola mosuni na ye na kati ya mayi, pe akozala peto. 10. Na mokolo ya mwambe, akozwa bana-mpate mibale oyo bazangi mbeba, pe mwana-mpate moko ya mwasi ya mbula moko oyo ezali na mbeba te, pe ndambo misato ya zomi ya efa moko ya farini ya malamu oyo basangisi na mafuta, na likabo ya gato, pe log (molangi) moko ya mafuta. 11. Nganga-Nzambe oyo akosala mosala ya kopetola akotia mutu oyo asengeli apetolama, pe biloko nyonso liboso ya Yawe na ekoteli ya hema ya bokutani. 12. Nganga-nzambe akozwa moko ya bana-mpate pe akobonza yango lokola mbeka pona ngambo, elongo na log (molangi) ya mafuta, pe akoningisa na likabo ya koningisa liboso ya Yawe. 13. Bongo akoboma mwana-mpate na esika oyo babomi mbeka pona lisumu pe mbeka ya kotumba, na esika mosantu ; po mbeka pona ngambo ezali lokola mbeka pona lisumu, ezali ya nganga-Nzambe : ezali mosantu ya bosantu. 14. Nganga-Nzambe akozwa makila ya mbeka pona ngambo pe nganga-Nzambe akotia yango na litoyi ya mobali ya mutu oyo asengeli kopetolama, na mosapi monene ya loboko na ye ya mobali pe na mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali. 15. Nganga-Nzambe akozwa log (molangi) ya mafuta pe akosopa yango na loboko na ye ya mwasi, y aye, nganga-Nzambe. 16. Pe nganga-Nzambe akozindisa mosapi ya loboko na ye ya mobali na mafuta oyo ezali na loboko na ye ya mwasi, pe akosopa mafuta yango na mosapi na ye mbala sambo liboso na Yawe. 17. Nganga-Nzambe akotia mafuta oyo etikali na loboko na ye na se ya litoyi ya mobali ya mutu oyo asengeli kopetolama, na mosapi monene ya loboko na ye ya mobali pe na mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali, likolo ya makila ya mbeka pona ngambo.  18. Nganga-Nzambe akotia mafuta oyo etikali na loboko na ye na moto ya mutu oyo asengeli kopetolama, pe nganga-Nzambe akosala bozipi ya masumu pona ye liboso ya Yawe. 19. Pe nganga-Nzambe akobonza mbeka pona lisumu pe akozipa masumu pona mutu oyo akopɛtolama na mbindo na ye, pe na sima akoboma mbeka ya kotumba. 20. Pe nganga-Nzambe akobonza na etumbelo  mbeka ya kotumba pe gato likolo ya etumbelo, pe nganga-Nzambe akozipa masumu pona mutu oyo asengeli kopetolama, pe akozala peto.

21. Soki azali mobola pe loboko na ye azali na makoki te ya kokoma wana, akozwa mwana-mpate lokola mbeka pona ngambo, pona likabo ya koningisa, po na kozipa masumu pona ye, pe ndambo ya zomi ya efa ya farini oyo esangisami na mafuta, pona likabo ya gato pe log (molangi) moko ya mafuta. 22. Pe pijon mibale to bana ya pijon mibale, na lolenge ete loboko na ye ekokoka : moko ekozala mbeka pona lisumu pe mosusu mbeka ya kotumba.  23. Na mokolo ya mwambe ya kopetolama na ye, akomema yango epayi ya nganga-Nzambe na ekoteli ya hema ya bokutani liboso ya Yawe ; 24. Pe nganga-Nzambe akokamata mwana-mpate ya mbeka pona ngambo pe log (molangi) ya mafuta, pe nganga-Nzambe akoningisa yango na likabo ya koningisa liboso ya Yawe ; 25. Pe akoboma mwana-mpate ya mbeka pona ngambo ; Nganga-nzambe akozwa makila ya mbeka pona ngambo pe akotia yango na songe ya litoyi ya mobali ya mutu oyo asengeli kopetolama, likolo na mosapi monene ya loboko na ye ya mobali, pe na mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali.  26. Nganga-Nzambe akosopa mafuta na loboko na ye ya mwasi, ya ye, nganga-Nzambe. 27. Pe elongo na mosapi monene ya loboko na ye ya mobali, nganga-Nzambe akosopa mafuta oyo ezali na loboko na ye ya mwasi, mbala sambo liboso ya Yawe.  28. Nganga-nzambe akotia mafuta oyo ezali na loboko na ye na songe ya litoyi ya mobali ya mutu oyo asengeli kopetolama, pe na mosapi monene ya loboko na ye ya mobali, pe na mosapi monene ya lokolo na ye ya mobali, na esika oyo atiaki makila ya mbeka pona ngambo. 29. Mafuta oyo etikali oyo ezali na loboko ya nganga-Nzambe akotia yango na moto ya mutu oyo asengeli kopetolama, pona kosala bozipi masumu pona ye liboso ya Yawe. 30. Na oyo loboko na ye ekoki kokoma, akobonza moko ya pijon to moko ya bana ya pijon : 31. Na oyo loboko na ye ekoki kokoma, moko akozala mbeka pona lisumu pe mosusu mbeka ya kotumba, elongo na likabo ya gato. Pe nganga-Nzambe akosala bozipi pona ye oyo asengeli kopetolama liboso ya Yawe.  32. Oyo ezali mobeko pona ye oyo azali na pota ya maba, pe oyo loboko na ye ekokaki na kokoma te pona kopetolama.

33. Yawe alobi na Mose na Aaron, koloba: 34. Tangu bokokɔta na mokili ya Kanana, oyo nakopesa bino lokola bozwi, soki natie pota ya maba na ndako moko boye ya mokili oyo bozali na yango.  35. Ye oyo ndako ezali ya ye akoya koyebisa nganga-Nzambe, koloba: Nazali neti komona lokola maba na ndako na ngai ; 36. Pe nganga-Nzambe akopesa motindo ete batika ndako wana polele liboso ete nganga-Nzambe akota pona kotala pota, po ete nyonso ezali na kati ya ndako ekoma mbindo. Na sima, nganga-Nzambe akokota pona kotala ndako.  37. Pe akotala pota : pe tala, pota ezali na bamir ya ndako—bamir ekomi langi ya pondu to motane, pe emonani lokola ezali mozindo koleka likolo ya mir. 38. Bongo nganga-Nzambe akobima na ndako, na ekoteli ya ndako pe akokanga ndako yango mikolo sambo.  39. Pe na mokolo ya sambo, nganga-Nzambe akozonga pe akotala : pe tala, pota epalangani na kati ya bamir ya ndako ; 40. Bongo nganga-Nzambe akopesa motindo ete balongola mabanga oyo pota ezali kati na yango pe babwaka yango libanda ya engumba, na esika ya mbindo.  41. Pe akokola ndako na kati pe zingazinga, pe putulu oyo epanzani na kokolama, bakobwa yango na libanda ya engumba, na esika ya mbindo.  42. Pe bakozwa mabanga mosusu pe bakotia na esika ya mabanga yango, pe bakozwa putulu mosusu pe bakopakola likolo ya ndako. 43. Pe soki pota ezongi pe epanzani na ndako sima ya kolongola mabanga, kokola ndako pe kopakola ndako.  44. nganga-Nzambe akokota pe akotala : pe tala, pota epalangani na kati ya ndako ; ezali maba oyo ezali kopalangana na kati ya ndako : ezali mbindo. 45. Bongo bakobuka ndako yango, mabanga na yango pe mabaya na yango, elongo na putulu nyonso ya ndako, pe bakomema yango na libanda ya engumba, na esika moko ya mbindo. 46. Ye oyo akokota na kati ya ndako na bowumeli ya mikolo nyonso oyo ekangami, akozala mbindo ti na pokwa ; 47. Pe ye oyo alali na ndako akosukola bilamba na ye, pe ye oyo aliaki na kati ya ndako akosukola bilamba na ye. 48. Kasi soki nganga-Nzambe akoti pe atali, pe tala, pota epalangani te na ndako sima ya kopakolama ya mir ndako, nganga-Nzambe akoloba ete ndako yango ezali peto, po pota ebikisami.

49. Pe akokamata pona kopetola ndako na lisumu, bandeke mibale, pe nzete ya sedre, pe singa ya motane-bule, pe izope; 50. Pe akoboma moko ya bandeke na mbeki moko ya mabele, ya mayi ya peto; 51. Pe akokamata nzete ya sedre pe izope pe singa ya motane-bule, pe ndeke ya bomoyi, pe akozindisa yango na makila ya ndeke oyo babomi pe na mayi ya peto; pe akosopa yango likolo ya ndako mbala sambo; 52. Pe akopetola na ndako na lisumu, na nzela ya makila ya ndeke pe na mayi ya peto, pe na ndeke ya bomoyi, pe na nzete ya sedre, na izope pe na singa ya motane-bule. 53. Pe akotika ndeke oyo ezali na bomoyi akende na libanda ya engumba, na kati ya bilanga. Akosala bozipi pona ndako, pe ekozala peto.

54. Oyo ezali mobeko pona pota nyonso pe kolokoto; 55. Pe etali maba ya bilamba pe ya bandako, 56. Pe kovimba, pe bapota, pe ba lotono (tashi) ya pembe,  57. Pona kolakisa na tangu nini mbindo ezali pe na tangu nini ezali na bopeto : oyo ezali mobeko ya maba. .

 

Mokapo 15

1. Yawe alobi na Mose pe na Aaron, alobi: 2. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango: Mutu nyonso oyo azali kobimisa litanga mayi na nzoto na ye, litanga ya mayi ya nzoto na ye ekokomisa ye mbindo. 3. Tala oyo ekozala mbindo na ye na kati ya kotanga ya mayi na ye ya nzoto: soki mosuni na ye ekosopa mayi ya nzoto na ye to mosuni na ye ekokanga yango, yango nde mbindo na ye. 4. Mbeto nyonso oyo mutu oyo azali kobimisa mayi na nzoto alali likolo na yango ekozala mbindo, pe eloko nyonso oyo ye afandi likolo na yango ekozala mbindo. 5. Mutu nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa. 6. Mutu nyonso oyo akofanda likolo ya eloko nyonso oyo mutu oyo azali kobimisa mayi afandi, akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa. 7. Pe ye oyo akosimba mosuni ya mutu oyo azali kobimisa mayi na nzoto, akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi; pe akozala mbindo ti na pokwa. 8. Soki ye oyo azali kobimisa mayi na nzoto na ye asopeli mutu ya peto soyi, mutu yango akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa.  9. Shar nyonso oyo likolo na yango mutu oyo azali kobimisa mayi ekozala mbindo. 10. Mutu nyonso oyo akosimba eloko nyonso oyo ezalaki na se na ye, akozala mbindo ti na pokwa. Ye oyo akomema moko ya eloko yango akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa. 11. Pe mutu nyonso oyo akosimbama na ye oyo azali kobimisa mayi pe asukoli maboko na ye na mayi te, akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa. 12. Pe mbeki nyonso ya mabele oyo mutu oyo azali kobimisa mayi na nzoto akosimba esengeli kobukana, pe mbeki nyonso ya mabaya ekosukolama na kati ya mayi.

13. Pe tangu ye oyo azali kobimisa mayi na nzoto akopetolama na kobimisa mayi na ye, akotanga mikolo sambo pona kopetolama na ye ; nde akosukola bilamba na ye, pe akosukola mosuni na ye na kati ya mayi ya bomoyi ; pe akozala peto 14. Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale to bilenge ya pijon mibale pe akoya liboso ya Yawe na ekoteli ya hema ya bokutani pe akopesa yango na nganga-Nzambe. 15. Nganga-Nzambe akobonza yango, moko na mbeka pona lisumu pe mosusu na mbeka ya kotumba. Nganga-nzambe asengeli kozipa masumu mpo na ye liboso ya Nkolo mpo na bobimisi na ye.

16. Tangu nyonso oyo mayi ya mobali ekobima na mutu, akosukola mosuni na ye nyonso na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa. 17. Elamba to loposo nyonso oyo mayi ya mobali ekozala likolo na yango, ekosukolama na mayi, pe ekozala mbindo ti na pokwa.  18. Mwasi oyo mobali akosangisaki nzoto na ye ; bakomisukola na kati ya mayi, pe bakozala mbindo ti na pokwa.

19. Pe soki mwasi azali kobimisa matanga, pe mayi na ye ezali makila, akozala na bokabwani na ye mikolo sambo, pe mutu nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo ti na pokwa. 20. Pe eloko nyonso oyo alali likolo na yango na mikolo ya bokabwan na ye ekozala mbindo ; pe eloko nyonso oyo afandi likolo na yango ekozala mbindo.  21. Pe mutu nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa. 22. Pe mutu nyonso oyo akosimba eloko nyonso oyo ye afandi, akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa.  23. Pe soki eloko moko ezali likolo na mbeto to na eloko moko oyo afandi, mutu nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo ti na pokwa.  24. Pe soki mobali asangisi nzoto na ye pe mbindo na ye etikali likolo na ye, akozala mbindo na bowumeli ya mikolo sambo ; pe mbeto nyonso oyo akolela ekozala mbindo.  25. Pe tangu mwasi azali na makila oyo ezali kosopana na bowumeli ya mikolo mingi na koleka ya tangu ya mbindo na ye, to tangu azali kosopana koleka tangu ya kokabwana na ye, mokolo nyonso ya kosopana ya bosoto na ye akozala mbindo, lokola na mikolo ya kokabwana na ye. 26. Mbeto nyonso oyo alali likolo na yango na mikolo oyo azali komona sanza ekozala lokola mbeto ya bokabwani na ye ; pe eloko nyonso oyo afandi likolo na yango ekozala mbindo, lolenge ya mbindo ya bokabwani na ye.  27. Pe mutu nyonso oyo akosimba biloko yango akozala mbindo, pe akosukola bilamba na ye pe akosukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na mpokwa. 28. Soki apetolami na sanza na ye, akotanga mikolo sambo, pe sima na yango, akozala peto.  29. Pe na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale to bilenge mibale ya pijon pe akomema yango epayi ya nganga-Nzambe na ekoteli ya hema ya bokutani. 30. Nganga-Nzambe akobonza moko na mbeka pona lisumu pe mosusu na mbeka ya kotumba. Pe nganga-Nzambe akosala bozipi pona ye liboso ya Yawe, na tina ya litanga ya bosoto na ye.

31. Bokokabola bana ya Israel na mbindo na bango, pe bakokufa te na kati ya mbindo na bango, na kokomisa mbindo tabernakle na ngai oyo ezali na kati na bango.

32. Yang’oyo mobeko oyo ezali pona ye oyo azali kobimisa mayi to oyo mayi ya mobali ezali kobima na ye oyo ezali kokomisa ye mbindo.  33. Pe pona mwasi oyo azali koyoka pasi na tina ya sanza na ye, na mikolo ya bokabwani na ye, pe pona mutu nyonso oyo azali kobimisa mayi, ezala mobali to mwasi, pe pona mutu nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya mbindo.

 

Mokapo 16

1. Pe Yawe alobaki na Mose sima ya liwa ya bana mibale ya Aaron, tangu bapusanaki penepene na Yawe pe bakufaki. 2. Pe Yawe alobi na Mose : Loba ndeko na yo Aaron, ete akota te tangu nyonso na kati ya esika mosantu, na kati ya rido, liboso ya ezipeli ya sanduku  oyo ezali likolo ya sanduku, po ete akufa te, po nazali komonana na lipata likolo ya ezipeli ya sanduku. 3. Aaron akokota na esika mosantu ndenge wana : elongo na elenge-ngombe-mobali pona mbeka pona lisumu pe meme-mobali pona mbeka ya kotumba ; 4. Akolata nzambala mosantu ya lino, na bakaleso ya lino na mosuni na ye, pe akomikanga mokaba ya lino na loketo na ye, pe akomizipa moto na eteni ya elamba ya lino : oyo ezali bilamba mosantu ; Akosukola mosuni na ye na mayi pe akolata yango. 5. Akozwa na lisanga ya bana ya Israel bantaba mibale ya mibali pona mbeka pona lisumu, pe meme-mobali moko pona mbeka ya kotumba. 6. Pe Aaron akobonza ngombe-mobali mbeka pona lisumu, oyo ezali pona ye moko, pe akomizipa pona ye moko pe pona ndako na ye.

7. Akozwa bantaba mibale ya mibali pe akotia yango liboso ya Yawe na ekoteli ya hema ya bokutani.  8. Aarona akobeta zeke pona bantaba mibale, moko pona Yawe pe moko pona Azazel*.  9. Pe Aaron akolakisa ntaba ya mobali oyo zeke ekweleli pona Yawe pe a kobonza yango na mbeka pona lisumu. 10. Ntaba mobali oyo likolo na ye zeke ekweleli pona Azazel, akotiama na bomoyi liboso ya Yawe pona kozipa likolo na yango, pona kotinda yango na esobe pona azala ya Azazel.

— v. 8 : ntaba mobali oyo azokende.

11. Pe Aaron akopesa ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu, oyo ezali pona ye moko, pe komizipa ya boyokanisami pona ye moko pe pona ndako na ye ; pe akoboma ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu, oyo ezali pona ye moko ; 12. Bongo akozwa mbeki ya mpaka ya malasi oyo etondi na makala ya moto, liboko ya etumbelo liboso ya Yawe, pe maboko na ye oyo etondi na mpaka ya malasi ya solo kitoko ya mabele, pe akomema yango na kati ya rido. 13. Akotia mpaka ya malasi likolo na moto liboso ya Yawe, po lipata ya mpaka ya malasi ezipa ezipeli ya sanduku oyo ezali likolo ya litatoli, po akufa te. 14. Akozwa makila ya ngombe-mobali pe akosopa yango na mosapi na ye na liboso ya ezipeli ya sanduku, na ngambo ya esti ; pe akosopa makila na mosapi na ye mbala sambo liboso ezipeli ya sanduku.

15. Akoboma ntaba ya mobali ya mbeka pona lisumu oyo ezali pona batu pe akomema kɔtisa makila na yango na kati ya rido, pe akosala na makila na yango ndenge asalaki na makila ya ngombe-mobali : akosopa likolo na ezipeli ya sanduku pe liboso ya ezipeli ya sanduku. 16. Pe akosala boyokanisami pona esika mosantu, akopetola yango na bambindo ya bana ya Israel pe ya botomboki na bango, na kolanda masumu na bango nyonso. Akosala bongo pe pona hema ya bokutani, oyo efandi elongo na bango na kati ya mbindo na bango.  17. Mutu moko te akozala na kati ya hema ya bokutani tangu akokota na kati na yango pona kosala boyokanisami na esika mosantu ti tangu akobima. Akosala boyokanisami pona ye moko, pona ndako na ye, pe pona liyangani mobimba ya Israel.  18. Akobima epayi na etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe pe akosala boyokanisami pona yango. Akozwa makila ya ngombe-mobali pe makila ya ntaba mobali pe akotia yango na maseke ya etumbelo, zingazinga ; 19. Akosopa likolo na yango makila na mosapi na ye mbala sambo, pe akopetola yango pe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Israel.

20. Pe tangu akosilisa kosala boyokanisami pona esika mosantu, pe pona hema ya bokutani, pe pona etumbelo, akobonza ntaba ya bomoi.  21. Pe Aaron akotia maboko na ye mibale likolo ya moto ya ntaba mobali ya bomoyi pe akoyambola likolo na yango mabe nyonso ya bana ya Israel, pe botomboki na bango nyonso, lolenge masumu na bango nyonso ; Akotia yango likolo na moto ya ntaba pe akotinda yango na esobe na nzela ya mutu oyo amibongisi.  22. Pe ntaba mobali akomema likolo na ye mabe na yango nyonso na mabele oyo batu bafandi te, pe mutu yango akotika ntaba mobali ekende na esobe.

23. Aaron akozonga na hema ya bokutani pe akolongola bilamba ya lino oyo alataki tangu akotaki na esika mosantu pe akotika yango kuna. 24. Pe akosukola mosuni na ye na kati ya mayi na esika mosantu pe akolata bilamba na ye ; pe akobima pe akobonza mbeka na ye moko ya kotumba pe mbeka ya kotumba ya batu, pe akosala boyokanisami pona ye moko pe pona batu. 25. Pe akotumba mafuta ya mbeka pona lisumu likolo ya etumbelo. 26. Pe  oyo amemaki ntaba mobali pona ezala Azazel, akosukola bilamba na ye pe akosukola mosuni ya nzoto na ye na mayi, pe na sima na yango akozonga na kaa. 27. Bakomema libanda ya kaa, ngombe-mobali ya mbeka pona lisumu pe ntaba mobali ya mbeka pona lisumu, oyo makila na yango ememamaki na esika mosantu pona kosala boyokanisami, pe poso na yango, mosuni na yango pe bosoto na yango ekotumbama na moto. 28. Ye oyo akotumba yango akosukola bilamba na ye pe akosukola mosuni ya nzoto na ye na mayi, pe na sima na yango akokota na kaa.

29. Pe oyo ekozala mobeko ya libela pona bino : Na sanza ya sambo, na mokolo ya zomi ya sanza, bokomikitisa pe bokosala mosala ata moko te, ezala mwana mboka to mopaya oyo afandi kati na bino. 30. Po ete na mokolo wana, boyokanisami ekosalama pona bino, po ete bino bopetolama : pe bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe.  31. Ekozala pona bino Sabata ya bopemi, pe bokomikitisa ; ezali mobeko ya libela. 32. pe nganga-Nzambe oyo apakolami pe abulisami pona asala bonganga-Nzambe na esika ya tata na ye, akosala boyokanisami ; pe akolata bilamba ya lino, bilamba mosantu ; 33. Pe Akosala boyokanisami pona esika mosantu ya bosantu, pe akosala boyokanisami pona hema ya bokutani pe pona etumbelo, pe akosala boyokanisami pona banganga-Nzambe pe pona batu nyonso ya lisanga.  34. Pe oyo ekozala pona bino mobeko ya libela, pona kosala boyokanisami pona bana ya Israel na tina ya masumu na bango nyonso, mbala moko na mbula. Pe basalaki ndenge Yawe apesaki motindo na Mose.

 

Mokapo 17

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba: 2. Loba na Aaron pe na bana na ye ya mibali pe na bana ya Israel nyonso, pe yebisa bango : Tala oyo Yawe apesi motindo, koloba : 3. Ye oyo nyonso kati na bana ya Israel oyo abomi ngombe, to meme to ntaba ya mwasi, na kati ya kaa, to abomi yango na libanda ya kaa ; 4. Pe amemi yango te na ekoteli ya hema ya bokutani pona kopesa yango lokola likabo epayi ya Yawe liboso ya tabernakle ya Yawe, makila ekotiama likolo na mutu yango : asopi makila ; Mutu wana akolongwama kati na batu na bango ; 5. Po ete bana ya Israel bamemela bambeka na bango oyo bakobonzela na kati ya bilanga, ete bamema yango epayi ya Yawe na ekoteli ya hema ya bokutani, epayi ya nganga-Nzambe, pe akopesa yango mbeka na mbeka ya kimia epayi ya Yawe. 6. Nganga-Nzambe akosopa makila likolo na etumbelo ya Yawe na ekoteli ya hema ya bokutani pe akotumba mafuta na yango na solo kitoko epayi na Yawe. 7. Bakobonza lisusu mbeka na bango te epayi ya elima ntaba oyo basalaki kindumba epayi na bango. Yango ekozala mobeko ya libela pona bango na mabota na bango mobimba. 8. Pe okoloba na bango : Mutu nyonso ya ndako ya Israel, to na bapaya oyo bafandi na kati na bango, akobonza mbeka ya kotumba to mbeka ; 9. Pe akomema yango te na ekoteli ya hema ya bokutani pona kopesa yango na Yawe, mutu yango akolongwama kati na batu na ye.

— molongo 7 : na Ebre ezali : Seyirim. Oyo elobami : ezipami na pwale; — pe wuta na oyo : bantaba ; mbeka ezalaki kopesama na bikelamu ya makanisi oyo babengami na kombo na yango. Babengi yango : satire, to bantaba ya bademon, to bademon ya ntaba, to bikelamu oyo bazanga koyoka mawa.

10. Pe mutu nyonso ya ndako ya Israel to ya bapaya oyo bafandi na kati na bango akolia makila ya lolenge nyonso, nakotia elongi na ngai kotelemela mutu oyo akolia makila, pe nakolongola ye na kati ya batu na ye ; 11. Po bomoyi ya mosuni ezali kati na makila, pe napesi bino yango likolo na etumbelo pona kozipa milimo na bino ; po ezali makila nde esalaka bozipi pona molimo. 12. Yango wana nalobaki na bana ya Israel : Mutu moko te kati na bino akolia makila, pe mopaya moko te  oyo akofanda na kati na bino akolia makila. 13. Pe mutu nyonso na kati ya bana ya Israel to bapaya oyo bafandi na kati na bango, oyo na bokila, akozwa nyama to ndeke nyonso oyo eliamaka, akobimisa makila na yango pe akozipa yango na putulu ; 14. Po bomoi ya mosuni nyonso ezali na kati ya makila na ye, yango nde bomoyi na ye ; yango wana, nalobi na bana ya Israel : Bokolia makila ya mosuni moko te, po bomoyi ya mosuni nyonso ezali makila na ye, mutu nyonso oyo akolia yango akolongwama. 15. Pe mutu nyonso, azala mobotami ya mboka to mopaya, oyo akolia ebembe ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo banyama ya zamba oyo ‘’nyama mabe’’ apanzaki, akosukola bilamba na ye pe akomisukola na kati ya mayi, pe akozala mbindo ti na pokwa ; bongo akozala peto.  16. Kasi soki asukoli bilamba na ye te pe asukoli mosuni na ye te, akomema mabe na ye.

 

Mokapo 18

1. Yawe alobi na Mose, koloba: 2. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango ete: Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino. 3. Bokosala te ndenge basalaka na mokili ya Ejipito, epayi oyo bofandaki, pe bokosala te oyo esalamaka na mokili ya Kanana, epayi oyo nazali kokotisa bino, bokotambola te na lolenge ya mimeseno na bango. 4. Bokotia bikateli na ngai na misala pe bokobatela malakisi na ngai po botambola na kati na yango. Ngai, nazali Yawe  Nzambe na bino. 5. Bokobatela malakisi na ngai pe mibeko na ngai, oyo na nzela na yango, soki batosi yango, mutu akobika. Ngai, nazali Yawe.

6. Mobali moko te akopusana penepene na ndeko na ye ya mwasi pona komona bolumbu na ye. Ngai, nazali Yawe. 7. Okomona te bolumbu ya tata na yo, to bolumbu ya mama na yo : azali mama na yo ; okomona bolumbu na ye te. 8. Okomona te bolumbu ya mwasi ya tata na yo : ezali bolumbu ya tata na yo. 9. Bolumbu ya ndeko na yo ya mwasi, mwana mwasi ya tata na yo to mwana mwasi ya mama na yo, abotami na ndako to abotami libanda—bolumbu na ye, okomona yango te. 10. Bolumbu ya mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to mwana mwasi ya mwana na yo ya mwasi—okomona bolumbu na ye te, po ezali bolumbu na yo moko. 11. Bolumbu ya mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, oyo abotami na tata na yo —azali ndeko na yo ya mwasi : okomona bolumbu na ye te. 12. Okomona te bolumbu ya ndeko mwasi ya tata na yo ; azali mosuni ya tata na yo. 13. Okomona te bolumbu ya ndeko mwasi ya mama na yo ; azali mosuni ya mama na yo. 14. Okomona te bolumbu ya ndeko mobali ya tata na yo ; okopusana penepene na mwasi na ye te, po azali bokilo na yo. 15. Okomona te bolumbu ya bokilo na yo ya mwasi, po azali mwasi ya mwana na yo ; okomona bolumbu na ye te. 16. Okomona te bolumbu ya mwasi ya ndeko na yo ; ezali bolumbu ya ndeko na yo. 17. Okomona te bolumbu ya mwasi moko na mwana na ye ya mwasi ; okozwa te mwana mwasi ya mwana na ye to mwana mwasi ya mwana na ye ya mwasi te pona komona bolumbu na ye ; bazali mosuni na ye moko : ezali likambu ya mabe. 18. Okozwa te mwasi epayi ya ndeko na ye ya mwasi pona kopesa ye mawa na komona bolumbu na ye pembeni na ye, tangu azali nanu na bomoyi. 19. Okopusana penepene na mwasi te na tangu ya bokabwani ya mbindo na ye pona komona bolumbu na ye.  20. Okosangisa nzoto na mwasi ya mozalani na yo te, pona komikomisa mbindo na ye.

21. Okopesa te bokitani na yo pona kopesa Molok* mbeka, pe okotiola kombo ya Nzambe na yo te. Ngai, nazali Yawe. 22. Okolala mobali te lokola balalaka mwasi : ezali likambu ya kele. 23. Okolala nyama moko te pona komikomisa mbindo na yango, pe mwasi akoki kotelema liboso ya nyama te pona kosangisa nzoto na yango ; ezali kopengwa mabe. 24. Bokomikomisa mbindo te na nzela moko ya makambu oyo, pamba te ezalaki na banzela nyonso wana nde nazali kobengana bikolo oyo liboso na bino, bamikomisaki mbindo, pe mboka yango ekomaki mbindo, 25. Pe napesaki yango etumbu pona mbindo na yango, pe mboka yango esanzaki bafandi na yango. 26. Kasi bino, bokobatela bikateli na ngai pe mibeko na ngai, pe bokosala ata moko te na makambu wana ya kele, ezala mwana mboka, to mopaya oyo afandi na kati na bino ; 27. Po batu ya mboka oyo bazalaki wana liboso na bino basalaki makambu nyonso wana ya kele, pe mboka ekomaki mbindo ; 28.  Po ete mboka esanza bino te tangu bokokomisa yango mbindo, ndenge esanzaki ekolo oyo ezalaki wana liboso na bino. 29. Po mutu nyonso oyo akosala moko ya makambu ya kele oyo… batu nyonso oyo bakosala yango, bakolongolama na kati ya batu na bango.  30. Pe bokobatela oyo napesi bino mitindo ete bobatela, po ete bosalela te mimesano ya kele oyo ezalaki kosalama liboso na bino, pe bomikomisa te mbindo na nzela na yango. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

— v. 21* : nzambe ya Baamona, oyo bazalaki kobonzela ya bana mike lokola mbeka.

 

Mokapo 19

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 2. Loba na lisanga mobimba ya bana ya Israel pe yebisa bango : Bokozala basantu, po ngai, Yawe Nzambe na bino, nazali mosantu. 3. Mokomoko na bino akobanga mama na ye pe tata na ye, pe bokobatela Basabata na ngai. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

4. Bokobaluka te epayi ya bikeko to bokomisalela banzambe ya bibende te. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

5. Soki bokobonza mbeka ya mbeka ya kimia epayi ya Yawe, bokobonza yango pona bandima yango. 6. ekoliama yango mokolo oyo bokobonza yango, pe na mokolo oyo ekolanda ; pe oyo etikali na mokolo ya misato ekotumbama na moto. 7. Soki balie yango na lolenge moko na mokolo ya misato, ekozala eloko ya mbindo ; ekondimama te. 8. Pe ye oyo akolia yango akomema mabe na ye, po akomisi mbindo oyo ezali mosantu epayi ya Yawe; pe mutu wana akolongolama na kati ya batu na ye.

9. Pe tangu bokobuka mbuma ya mabele na bino, bokosilisa kobuka mbuma ya elanga na yo te ti na mondelo pe okolokota te mbuma oyo ekweyi na bobuki na yo te. 10. okobuka mbuma ya vino na yo te to kosangisa bambuma ya vino oyo ekweyi na vino na yo ; okotika yango pona babola pe pona mopaya. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

11. Bokoyiba te, pe bokomikosana te, pe bokobuka lokuta te moko na mosusu. 12. Pe bokolapa ndayi ya lokuta te na kombo na ngai ; pe okotiola kombo ya Nzambe na yo te. Ngai, nazali Yawe. 13. Okoniokola mozalani na yo te, pe okopunza ye te. Lifuti ya mosali na yo ya lifuti ekolala butu epayi na yo te ti na tongo.

14. Okolakela baba mabe te, pe okotia libaku te liboso ya mokufi misu, kasi okobanga Nzambe na yo. Ngai, nazali Yawe. 15. Bokosala bozangi bosembo te na kati ya bikateli: okoyokela mobola mawa te, pe okokumisa mozwi te, kasi okosambisa moninga na yo na bosembo. 16. Okotambola te bipayi na bipayi kati na batu na yo pona kotonga. Okotelemela makila ya mozalani na yo te. Ngai, nazali Yawe. 17. Okoyina ndeko na yo na kati ya motema na yo te. Okozanga te kopamela moninga na yo, pe okomema lisumu te pona ye. 18. Okozongisa mabe te likolo na mabe, pe okobombela bana ya batu na yo kanda te, kasi okolinga mozalani na yo lokola yo moko. Ngai, nazali Yawe. 19. Bokobomba mibeko na ngai. Kati na bibwele na yo, okosangisa te nzoto ya bibwele mibale ya lolenge ekeseni. Okolona te milona ya ndenge mibale ekeseni na elanga na yo, pe elamba ya eteni elamba esalama na singa ya ndenge mibale te, okotia likolo nzoto na yo te.

20. Soki mobali alali mwasi, oyo azali mowumbu, fianse na mobali moko, pe atikalaki ata kosikolama te to atiamaki na bonsomi te, bakozwa etumbu ; bakoboma bango te, po ete atiamaki na bonsomi te. 21. Pe ye akomema epayi na Yawe, na ekoteli ya hem aya bokutani, mbeka na ye pona ngambo, meme-mobali na mbeka pona ngambo. 22. Pe  nganga-Nzambe akozipa masumu pona ye liboso ya Yawe, na meme-mobali ya mbeka pona ngambo, na tina lisumu na ye oyo asali, pe lisumu na ye oyo asalaki ekolimbisama.

 23. Tangu bokokota na mboka pe bokolona banzete ya ndenge nyonso oyo ekoki koliama, bokotala mbuma na yango lokola oyo ekatamaki ngenga te ; ekokatama ngenga te pona bino na bowumeli ya mbula misato : bokolia yango te. 24. Na mobu ya mineyi, mbuma na yango nyonso ekozala mosantu, po na masanzoli ya Yawe. 25. Na mbula ya mitano, bokolia mbuma na yango, po ete ebakisamela bino mbuma na yango. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

26. Bokolia eloko moko te elongo na makila. Bokosala makambu ya kobikola te to ya bondoki te. 27. Bokokata te basonge ya moto na bino pe bokokata te songe ya mandefu na bino te. 28. Bokokata misuni ya nzoto na bino te pona bakufi pe bokokoma batatuwaje na nzoto te. Ngai, nazali Nkolo. 29. Okokomisa mwana na yo ya mwasi mbindo te na kokomisaka ye mwasi ya ndumba, noki te mboka esala ekobo pe etonda na makambu ya kele. 30. Bokobatela  basabata na ngai pe bokomemia esika mosantu na ngai. Ngai, nazali Yawe. 31. Bobaluka te epayi ya baoyo babelelaka milimo ya bakufi*, to epayi ya bambikudi**; bóbaluka epai na bango te mpo na komikómisa mbindo. Nazali Nkolo Nzambe na bino.

— v. 31*: babeleli milimo ya bakufi : bosololi oyo ekanisami ete ezali kati milimo ya bakufi pe batu ya bomoyi. –vv.31** : baoyo bakanisaka ete bazali na nguya ya kosolola pe kozwa sango epayi ya milimo ya bakufi-

32. Okotelema liboso ya suki pembe, pe okokumisa mobange, pe okobanga Nzambe na yo. Ngai, nazali Yawe. 33. Soki mopaya afandi na kati na bino na mokili na bino, bokoniokola ye te.  34. Mopaya oyo akofanda na kati na bino akozala lokola mwana mboka kati na bino, pe okolinga ye lokola yo moko, po bino bozalaki bapaya na mokili ya Ejipito. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino. 35. Bokosala bozongi na bosembo te na bikateli na bino, to na bamezire ya molayi, to na kilo to na mezire ya makoki. 36. Okozala na balansi ya sembo, kilo ya sembo, efa ya sembo pe hin ya sembo. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na mokili ya Ejipito. 37. Bokobatela mibeko na ngai nyonso pe bikateli na ngai nyonso, pe bokosala yango : Ngai, nazali Yawe.

 

Mokapo 20

1. Pe Yawe alobaki na Mose, koloba : 2. okoloba pe na bana ya Israel: Mutu nyonso kati na bana ya Israel to mopaya nyonso oyo afandi na Israel, oyo akopesa bana na ye epayi ya Molok, akobomama ; batu ya mboka bakoboma ye na mabanga.  3. Ngai, nakotelemela mutu wana pe nakolongola ye kati na batu na ye, po apesaki bana na ye na Molok, pona kokomisa esika na ngai mosantu mbindo pe kobebisa kombo na ngai mosantu.  4. Soki batu ya mboka yango bakangi misu, na lolenge moko boye epayi ya mutu yango, tangu apesaka bana na ye epayi ya Molok, pona koboma ye te, ngai nakotelemela mutu wana pe na libota na ye, 5. Ngai nakotelemisa elongi na ngai pona kotelemela mutu yango pe libota na ye pe nakolongola ye na kati ya batu na ye, elongo na baoyo nyonso basalaka kindumba sima na ye, na kosala kindumba na Molok.  6. Pe mutu oyo akobaluka epayi ya babelelaka milimo pe bambikudi, kosala kindumba epayi na bango, nakotia elongi na ngai pona kotelemela mutu wana, pe nakolongola ye na kati ya batu na ye.  7. Pe bino, bokomibulisa pe bokozala basantu, po ngai nazali Yawe Nzambe na bino.  8. Pe bokobomba mibeko na ngai pe bokotosa yango. Ngai, nazali Yawe oyo akobulisa bino. —9. Mutu nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, akobomama penza ; alakelaki tata na ye pe mama na ye mabe, makila na ye ezali likolo na ye.

10. Pe mobali oyo asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu —oyo asali ekobo na mwasi ya moninga na ye… : mobali pe mwasi ya ekobo bakobomama penza. 11. Pe mobali oyo akolala na mwasi ya tata na ye amoni bolumbu ya tata na ye ; bango mibale bakoboma penza : makila na bango ezali likolo na ye. 12. Pe soki mobali alali na mwasi ya mwana na ye, bango mibale bakoboma penza ; bamipengwisi : makila na bango ezali likolo na bango. 13. Soki mobali alali na mobali lokola balalaka na mwasi, bango mibale basali likambu ya kele ; bakobomama penza ; makila na bango ezali likolo na bango. 14. Soki mobali azwi mwasi na mama na ye, ezali bosoto ya kele ; bakotumba bango na moto, ye pe bango, pe bosoto ya kele ekozala te na kati na bino. 15. Soki mutu alali na nyama, akobomama penza, pe okoboma nyama yango. 16. Soki mwasi apusani penepene na nyama nyonso pona kosangisa nzoto na yango, okoboma mwasi pe nyama yango ; bakobomama penza : makila na bango ezali likolo na bango. 17. Soki mobali azwi ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye to mwana mwasi ya mama na ye, pe amoni bolumbu na ye, pe oyo ya mwasi amoni bolumbu na ye, ezali soni : bakolongolama na misu ya batu na bango. Amoni bolumbu ya ndeko na ye ya mwasi ; akomema ngambo na ye. 18. Soki mobali alali na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza, pe amoni bolumbu na ye, abimisi polele kotanga ya mayi na ye, pe mwasi amoni kotanga ya makila na ye : bango mibale bakolongolama na kati na batu na bango. 19. Okomona te bolumbu ya ndeko mwasi ya mama na yo to ndeko mwasi ya tata na yo, po ye oyo asali bongo azali kobimisa polele mosuni na ye moko : bakomema mabe na bango. 20. Soki mobali alali na mwasi ya noko na ye, amoni bolumbu ya noko na ye ; bakomema lisumu na bango ; bakokufa kozanga bana. 21. Soki mobali azwi mwasi ya ndeko na ye, ezali bosoto ; amoni bolumbu ya ndeko na ye ; bakozala na bana te.

22. Bokobomba mibeko na ngai nyonso pe mitindo na ngai nyonso, pe bokosala yango ; po ete mboka epayi nazali komema bino pona kofanda kuna esanza bino te.  23. Pe  bokotambola te na mibeko ya ekolo oyo nazali kobengana liboso na bino ; po basalaki makambu nyonso wana, pe nayokaki bango kele ; 24. Pe nalobaki na bino : ezali bino nde bokozwa mabele na bango, pe nakopesa bino yango po bozwa yango, mokili oyo ezali kosopana na miliki pe mafuta ya nzoyi. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino, oyo akaboli bino na mabota. 25. Pe bokokesenisa kati na nyama oyo ezali peto pe oyo ya mbindo, pe kati na ndeke oyo ezali mbindo pe oyo ezali peto, pe bokomikomisa mbindo te na nyama to ndeke to eloko nyonso oyo etambolaka na mabele, oyo nakabolaki pe natatolaki ete ezali mbindo. 26. Bokozala basantu pona ngai, po ngai, Yawe, nazali mosantu, pe nakaboli bino na bikolo pona bozala ya ngai.  27. Soki mobali to mwasi bazali babeleli milimo to mbikudi, basengeli penza babomama ; bakobamba bango mabanga : makila na bango ekozala likolo na bango.

 

Mokapo 21

1. Pe Yawe alobi na Mose : Loba na banganga-Nzambe, bana mibali ya Aaron, pe yebisa bango: Nganga-Nzambe amikomisa mbindo te na kati ya batu na ye pona mokufi ;  2. Longola se ndeko na ye ya penepene, mama na ye, tata na ye, mwana na ye ya mobali, mwana na ye ya mwasi, pe ndeko na ye ya mobali ;  3. Pe  pona ndeko na ye ya mwasi oyo azali moseka, oyo azali penepene na ye, oyo abala te, pona ye amikomisa mbindo. 4. Amikómisa mbindo te lokola mokambi na kati ya batu na ye, pona komikomisa mbindo.  5. Bakosala libandi te likolo ya moto na bango, pe bakokola te suki ya mandefu na bango, pe bakokata nzoloko te na mosuni ya nzoto.  6. Bakozala basantu epayi ya Nzambe na bango pe bakokomisa kombo ya Nzambe na bango mbindo te, po babonzaka mbeka ya Yawe etumbami na moto, lipa ya Nzambe na bango ; pe bakozala basantu. 7 Bakozwa te mwasi ya ndumba to mwasi oyo mobali mosusu ayebaka. Pe bakozwa te mwasi oyo baboya ye na libala na mobali na ye, po nganga-Nzambe azali mosantu, abulisami pona Nzambe na ye.  8. Okotale ye lokola mosantu, po azali kobonza lipa ya Nzambe na yo. Akozala mosantu pona yo, po ngai Yawe, oyo nazali kosantisa bino, nazali mosantu. 9. Soki mwana mwasi ya nganga-Nzambe amikomi mbindo na ndenge azali kosala kindumba, akomisi tata na ye mbindo ; akotumbama na moto. 10. Nganga-Nzambe monene kati na bandeko na ye ya mibali, oyo basopa mafuta ya epakolami etiama likolo na moto na ye pe oyo abulisami pona kolata bilamba mosantu, akomona moto na ye te pe akopasola te bilamba na ye. 11. Akokende te ata epayi ya ebembe moko; akomilomisa mbindo te pona tata na ye to mama na ye. 12. Akobima te na esika mosantu pe akobebisa te esika mosantu ya Nzambe na ye, po ete bobulisami ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye ezali likolo na ye. Ngai nazali Yawe.

13. Akozwa ngondo lokola mwasi na ye. 14. Akobala te mwasi akufela mobali, to mwasi oyo baboya na libala, mwasi mobali mosusu ayeba nzoto to mwasi ya ndumba ; kasi akobala ngondo oyo awuti na kati ya batu na ye. 15. Pe akobebisa te mayi na ye mobali  kati na batu ya na ye, po ngai nazali Yawe oyo azali kosantisa ye.

16. Pe Yawe alobi na Mose ete : 17. Loba na Aaron, na ​​kolobaka : Moko te kati na bakitani na yo na bakola na ye (jeneratio) mobimba oyo azali na bambeba ya nzoto akopusana te pona kobonza lipa ya Nzambe na ye ; 18. Po nani oyo azali na mbeba ya nzoto akopusana te : mokufi misu, to motengumi, to ye oyo azali na zolo mokuse pe ya kokangama, to oyo azali na eteni moko molayi koleka mosusu ; 19. To mutu oyo likolo ebukana to loboko ebukana ; 20. To mutu oyo azali na kunki na mokongo, to oyo azali na nzoto ekonda, to oyo azali na lotono (tashi) na lisu, to oyo azali na makwanza, to oyo azali na mapalata, to oyo azali na mabindi ebukana. 21. Mokitani moko te ya nganga-Nzambe Aaron oyo azali na mbeba ya nzoto akoki kopusana pona kobonza bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto ; azali na mbeba ya nzoto : Akoki kopusana te pona kobonza lipa ya Nzambe na ye.  22. Akolia lipa ya Nzambe na ye, ya biloko oyo ya mosantu ya bosantu pe biloko ya mosantu;  23. Bobele akokota te sima ya rido pe akopusana te na etumbelo, po ete azali na mbeba ya nzoto, pe akobebisa te biloko na ngai ya mosantu ya bosantu ; po ngai nazali Yawe oyo akosantisa bango.

24. Mose alobaki boye na Aaron pe na bana na ye ya mibali pe epayi ya bana ya Israel nyonso.

 

Mokapo 22

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 2. Loba na Aaron na bana na ye ya mibali ete bakabwana na biloko ya bule ya bana ya Israel, pe babebisa kombo na ngai mosantu te na makambu oyo bazali kosantisa pona ngai. Ngai nazali Yawe. 3. Loba na bango : Mobali nyonso kati na bakitani na bino nyonso na bowumeli ya mabota na bino, oyo azali na mbindo na ye likolo na ye, akopusana penepene na biloko ya bule oyo bana ya Israel babulisi epayi ya Yawe, mutu yango akolongolama na misu na ngai. Ngai, nazali Yawe. 4. Mobali moko te kati na bakitani ya Aaron oyo azali na maba to akobimisa mayi na nzoto akolia biloko ya bule ti tangu akopetolama. Pe ye oyo asimbaki mutu oyo azali mbindo na nzela ya ebembe, to ye oyo akobimisa mayi ya mobali, 5. To ye oyo asimbaki nyama nyonso oyo ebendanaka na mabele oyo ekomisaka yango mbindo, to mobali oyo akokomisa ye mbindo na mbindo nyonso oyo ekoki kozala na ye. 6. Mobali oyo akosimba biloko oyo akozala mbindo ti na pokwa, pe akolia biloko bosantu te, soki asukoli mosuni na ye na mayi ; 7. Sima ya kolala ya moyi, akozala peto ; na sima, akolia biloko mosantu, po ezali lipa na ye. 8. Akolia nyama oyo ekufaki na yango moko te to oyo banyama ya zamba bapasolaki yango, pona kokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe.  9. Pe Bakobatela oyo natindaki bango babatela, po ete bamema lisumu te likolo na bango pe bakufa te, pona batioli mibeko na ngai. Ngai, nazali Yawe, oyo asantisaki bango. 10. Mopaya (na bokitani ya Aaron) moko te akoki kolia biloko ya bule ; ye oyo afandaka na ndako ya nganga-Nzambe, to mosali ya mosala, bakolia te biloko ya bule. 11. Kasi soki nganga-Nzambe asombaki mowumbu na mbongo na ye, mowumbu yango akolia yango, pe ye oyo abotami na ndako na ye : baoyo wana bakolia lipa na ye.  12. Pe mwana mwasi ya nganga-Nzambe, soki azali na mobali ya mopaya, akolia makabo ya biloko ya bule te. 13. Kasi soki mwana mwasi ya nganga-Nzambe azali mwasi akufela mobali to aboma libala, pe azali na bana te, pe azongi na ndako ya tata na ye lokola na bolenge na ye, akolia lipa ya tata na ye ; kasi mopaya moko te akolia yango. 14. Pe soki mutu moko alie eloko moko ya bule na kozanga koyeba, akopesa nganga-Nzambe eloko yango ya bule pe akobakisa ndambo ya mitano likolo na yango. 15. Bakobebisa biloko mosantu ya bana ya Israel, oyo bazali kobonzela Yawe na libonza. 16. Bakomemisa bango te ngambo ya lisumu na bango tangu bakolia biloko na bango ya bule, po ngai nazali Yawe oyo azali kobulisa bango.

17. Pe Yawe alobaki na Mose, koloba : 18. Loba na Aaron na bana na ye ya mibali pe na bana ya Israel nyonso, pe yebisa bango : ye oyo nyonso ya ndako ya Israel to baoyo bazali kofanda na Israel, akobonza likabo na ye, lolenge na bilaka na ye nyonso pe lolenge ya makabo na ye ya bolingo malamu, oyo akobonza na mbeka ya kotumba epayi ya Yawe, 19. Pona andimama, akobonza mbeka ya mobali oyo ezali na mbeba te, oyo ewuti na etonga, ya bameme to bantaba. 20. Bokobonza te eloko moko oyo ezali na mbeba ya nzoto, po ekondimama te pona bino.  21. Soki mutu moko abonzi mbeka ya kimia epayi ya Yawe, pona kokokisa ndayi to na likabo ya bolingi, ezala na etonga ya bangombe to na etonga ya bibwele, ekozala na mbeba te pona kondimama ; ekozala na mbeba moko te ya nzoto kati na yango. 22. Bokobonza te epayi ya Yawe oyo ekufa misu, oyo ebukana, to oyo eteni ya nzoto ekatana, to oyo azali na bapota, to na mapalata, to na makwanza, pe bokopesa ata moko te mbeka ya kotumba likolo na etumbelo, epayi na Yawe. 23. Okoki kobonza mbeka ya mokano na yo ya ngombe to mwana-mpate oyo eteni ya nzoto na yango ezali molayi mingi to mokuse ; pona ndayi moko, kasi ekondimama te. 24. Bokobonza te epayi ya Yawe oyo ebukani, oyo eniatami, oyo epasolama, to oyo ekatamaki ; bokosala boye te na mboka na bino.  25. Na loboko ya mopaya, bokobonza te moko ya biloko oyo lokola lipa ya Nzambe na yo, po kobebisama ezali kati na bango, po mbeba ezali  kati na bango : ekondimama te pona na bino.

26. Yawe  alobi  na Mose : 27. Mwana ya ngombe to mwana ya mpate to mwana ya ntaba, tangu akobotama, akozala mikolo samba na se ya mama na ye ; pe wuta mokolo ya mwambe, ekondimama pona likabo ya mbeka etumbami na moto pona Yawe.  28. Pe okoboma te ngombe to mpate, ye pe mwana na ye, na mokolo moko. 29. Pe soki bobonzi mbeka ya mbeka ya botondi epayi ya Yawe, bokobonza mbeka yango po ete endimama pona bino. 30. ekoliama kaka mokolo wana ; bokotika ata eloko moko te ti na tongo. Ngai, nazali Yawe.  31. Bokobatela mitindo na ngai pe bino bokotia yango na misala. Ngai, nazali Yawe. 32. Bokobebisa kombo ya bosantu na ngai te, kasi kati na bana ya Israel bayoyeba ete ngai nazali mosantu : Ngai, nazali Yawe oyo asantisaka bino  33. Ye  oyo abimisaki bino na mokili ya Ejipito pona kozala Nzambe na bino. Ngai, nazali Yawe.

 

Mokapo 23

1. Yawe alobi na Mose, koloba: 2. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango: Mikolo oyo etiami ya kopusana na Yawe, oyo bokosakola, ekozala mayangani mosantu. Oyo nde ezali mikolo na ngai oyo etiami: 3. Mikolo motoba bokosala, kasi mokolo ya sambo ezali sabata ya bopemi, liyangani mosantu ; Bokosala mosala moko te : ezali sabata pona Yawe na bisika na bino nyonso ya kofanda.

4. Oyo ezali mikolo oyo etiami ya kopusana na Yawe, mayangani mosantu, oyo bokosakola na batangu na yango. 5. Na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na mineyi ya sanza, kati na bapokwa mibale, ezali Paska ya Yawe. 6. Pe na mokolo ya zomi na mitano ya sanza oyo ezali feti ya mapa ezanga levin po na Yawe: na mikolo sambo bokolia mapa ezanga levin. 7. Na mokolo ya liboso, bokozala na liyangani mosantu ; bokosala mosala moko te ya kosala.  8. Na bowumeli ya mikolo sambo, bokobonzela Yawe mbeka etumbami na moto : Na mokolo ya sambo, liyangani mosantu ekosalama ; bokosala mosala moko ya kosala te. 9. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 10. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango : tangu bokokota na mboka oyo nazali kopesa bino pe bokobuka mbuma na yango, bokomemela nganga-Nzambe liboke ya mbuma ya liboso ya bobuki mbuma na bino.  11. Akoningisa liboke liboso ya Yawe po ete bondimama. Nganga-Nzambe akoningisa yango na mokolo oyo elandi Sabata.  12. Mokolo oyo bokoningisa liboke ya mbuma, bokobonza mwana-mpate oyo azangi mbeba, oyo azali na mbula moko, na mbeka ya kotumba po na Yawe. 13. Pe pona likabo na ye ya gato, ndambo mibale na zomi ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta, mbeka etumbami na moto po na Yawe, solo kitoko ; pe likabo na ye ya masanga ekozala ya vino, ndambo moko na mineyi ya hin.  14. Pe bokolia lipa te, mbuma ya kotumba te, to mbuma na epi te, ti kaka na mokolo wana, ti tangu bokomema likabo ya Nzambe na bino. Mobeko ya libela na mabota na bino na bisika na bino nyonso ya kofanda. 15. Pe bokotanga banda mokolo oyo elandi Sabata, banda mokolo oyo bokomema liboke ya mbum aya likabo ya koningisa, basaba sambo ; ekozala ya kokoka : 16. Bokotanga mikolo tuku mitano (50) ti mokolo oyo elandi Sabata ya sambo, pe bokobonzela Yawe likabo ya gato ya sika; 17. Bokomema na bandako na bino mapa mibale, na likabo ya koningisa ; ekozala na ndambo mibale na zomi ya farini ya malamu ; bokotumba yango na levin : oyo ezali bambuma ya liboso po na Yawe. 18. Pe bokobonza elongo na lipa bana-mpate sambo oyo bazangi mbeba, ya mbula moko, mwana-ngombe-mobali moko pe bameme-mibali mibale : Bakozala mbeka ya kotumba po na Yawe, elongo na likabo na bango ya gato pe makabo na bango ya masanga, mbeka etumbami na moto, solo kitoko epayi na Yawe. 19. Pe bokobonza ntaba moko ya mobali lokola mbeka pona lisumu, pe bana-mpate mibale ya mbula moko na mbeka ya kimia.  20. Pe nganga-Nzambe akoningisa yango elongo na lipa ya mbuma ya liboso, na likabo ya koningisa liboso ya Yawe, elongo na bana-mpate mibale : Bakozala basantu epayi na Yawe pona nganga-Nzambe.  21. Pe bokosakola kaka na mokolo wana ; ekozala pona bino liyangani mosantu. Bokosala ata mosala moko te : Ezali mobeko ya libela na bisika na bino nyonso ya kofanda pona mabota na bino nyonso. 22. Pe tangu bokobuka mbuma ya mabele na bino, okosilisa kobuka basonge ya elanga na bino te, pe okolokota te mbuma oyo ekweyi na bilanga na bino te ; okotikela yango babola pe mopaya. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

23. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 24. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango : Na sanza yasambo, na mokolo ya liboso ya sanza, ekozala na bopemi pona bino, ekaniseli ya esengo, liyangani mosantu. 25. Bokosala ata mosala moko te, pe bokobonzela Yawe mbeka oyo etumbami na moto.

26. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 27. Bobele bongo, na mokolo ya zomi ya sanza oyo ya sambo ezali Mokolo ya Bozipi masumu : Ekozala liyangani mosantu pona bino, pe bokomitungisa, pe bokobonza epayi ya Yawe mbeka oyo etumbami na moto. 28. Bokosala mosala ata moko te na mokolo wana, po ezali mokolo ya bozipi masumu, pona kosala bozipi masumu pona bino liboso ya Yawe Nzambe na bino. 29. Mutu nyonso oyo akomitisaka te na mokolo yango, akolongwa kati na batu na ye. 30. Pe mutu nyonso oyo akosala mosala moko na mokolo yango, nakolongola ye na kati ya batu na ye. 31. Bokosala ata mosala moko te. Oyo ezali mobeko ya libela pona mabota na bino, na bisika nyonso ya bofandi na bino. 32. Ezali Sabata ya bopemi pona bino, pe bokomikitisa. Na mokolo ya libwa ya sanza, na pokwa, banda na pokwa ti na pokwa, bokosala Sabata na bino. 33. Pe Yawe alobi na Mose pe koloba : 34. Loba na bana ya Israel, yebisa: Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza oyo ya sambo, feti ya tabernakle epayi ya Yawe na bowumeli ya mikolo sambo.  35. Na mokolo ya liboso, liyangani moko mosantu ekosalama ; bokosala ata mosala moko te ya mosala. 36. Na bowumeli ya mikolo sambo, bokobonza epayi ya Yawe mbeka oyo etumbami na moto; na mokolo ya mwambe bokosala liyangani mosantu pe bokobonza mbeka oyo etumbami na moto : Ezali liyangani moko ya lokumu ; bokosala ata mosala moko te.

37. Oyo ezali mikolo oyo etiami ya Yawe, oyo bokosakola, mayangani mosantu, po na kobonza mbeka oyo etumbami na moto epayi ya Yawe, bambeka ya kotumba, makabo ya gato, bambeka pe makabo ya masanga, mokolo na mokolo na kolanda oyo etiami pona mokolo yango, 38. Longola Basabata ya Yawe, longola mabonza na bino, longola bilaka na bino nyonso, pe longola makabo na bino nyonso ya bolingi oyo bozali kopesa epayi ya Yawe. 39. Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, tangu bokosangisa mbuma ya mabele, bokosala feti ya Yawe mikolo sambo : na mokolo ya liboso ekozala bopemi pe na mokolo ya mwambe ekozala bopemi. 40. Pe na mokolo ya liboso, bokozwa mbuma ya banzete ya kitoko, bitape ya banzete ya mbila, pe bitape ya banzete ya zamba pe ya sole ya ebale, pe bokosepela liboso ya Yawe Nzambe na bino mikolo sambo.  41. Bokosala feti yango lokola feti ya Yawe na bowumeli ya mikolo sambo mbula na mbula ; ezali mobeko ya libela na bankola na bino nyonso : Bokosepela yango na sanza ya sambo.  42. Bokofanda na bahema mikolo sambo ; Bana ya Israel nyonso oyo babotami na mboka na bango bakofanda na bahema,  43. Po mabota na bino bayeba ete nafandisaki bana ya Israel na bahema tangu nabimisaki bango na mokili ya Ejipito. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.  44. Pe Mose alobi na bana ya Israel, mikolo oyo etiami ya Yawe.

 

Mokapo 24

1. Yawe alobi na Mose, koloba: 2. Pesa motindo na bana ya Israel ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto, oyo eniatami pona mwinda, na tina ete bamatisa na kopelisa mwinda tangu nyonso. 3. Aaron akobongisa yango tangu nyonso liboso ya Yawe, banda na pokwa ti na tongo, na libanda ya rido ya litatoli, na hema ya bokutani. Ezali mobeko ya libela na milongo na bino nyonso. 4. Akobongisa mwinda na etelemelo ya mwinda ya peto liboso ya Yawe tangu nyonso.

5. Pe okozwa farini ya malamu pe okotumba yango na bagato zomi na mibale, pe gato moko-moko ekozala ya kilo mibale likolo na zomi. 6. Pe okotia yango na milongo mibale, motoba na molongo moko, likolo ya mesa ya peto liboso ya Yawe, 7. Pe okotia mpaka ya malasi ya peto likolo na molongo moko-moko. Pe ekozala lipa moko ya bokundoli, mbeka etumbami na moto ya Yawe. 8. Mikolo nyonso ya Sabata, bakobongisa yango liboso ya Yawe tangu nyonso, kowuta na bana ya Israel. 9. Yango ekozala ya Aaron pe na bana na ye ya mibali, pe bakolia yango na esika ya mosantu, po ekozala pona ye eloko ya mosantu ya bosantu na kati ya bambeka ya Yawe oyo etumbami na moto, mobeko ya libela.

10. Mwana mobali ya mwasi moko ya Israel (kasi azalaki mwana ya mobali ya mutu moko ya Ejipito) abimaki na kati ya bana ya Israel, pe mwana ya mwasi ya Israel pe mobali moko ya Israel babundaki na kaa. 11. Mwana ya mwasi ya Israel afingi Kombo pe alakelaki yango mabe, pe akomema ye epayi ya Mose. Kombo ya mama na ye Shelomite, mwana mwasi ya Dibri, ya libota ya Dan. 12. Pe batiaki ye na boloko, pona kokata likambu yango na kolanda liloba ya monoko ya Yawe. 13. Pe Yawe alobi na Mose, koloba: 14. Bobimisa libanda ya kaa ye oyo alakelaki mabe ; pe baoyo nyonso oyo bayokaki yango bakotia maboko na bango likolo na moto na ye, pe lisanga mobimba bakobamba ye mabanga. 15. Pe okoloba na bana ya Israel, koloba: Mutu nyonso oyo akolakela Nzambe na ye mabe akomema lisumu na ye ; 16. Pe ye oyo akofinga kombo ya Yawe akoboma penza : liyangani mobimba bakozanga te kobamba ye mabanga. Ezala mopaya to mwana mboka akobomama tangu akofinga Kombo. 17. Pe soki mutu moko akobeta mutu na boye ete akufa, akobomama penza. 18. Pe ye oyo akobeta nyama po ekufa, akozongisa oyo ye abomi, bomoyi pona bomoyi. 19. Pe soki mutu asali moninga na ye mabe na nzoto, ekosalamela ye ndenge asalaki. 20. Kobuka mukwa pona kobuka mukwa, lisu pona lisu, linu pona linu ; lolenge na mbeba ya nzoto oyo asali mutu, bongo ekosalamela ye. 21. Oyo akobeta nyama po ekufa, akozongisa nyama pona yango, pe ye oyo akobeta mutu po akufa, akobomama. 22. Ekozala na mobeko moko pona bino : ekozala pona mopaya lokola pona mutu ya mboka; po ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. 23. Pe Mose alobaki na bana ya Israel, pe babimisaki libanda ya kaa ye oyo alakelaki mabe pe babambaki ye mabanga ti akufaki. Bana ya Israel basalaki ndenge Yawe apesaki motindo na Mose.

 

Mokapo 25

1. Pe Yawe alobi na Mose na Ngomba Sinai, koloba : 2. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango :

Tangu bokokota na mboka oyo nazali kopesa bino, mboka yango ekopema Sabata ya Yawe. 3. Na bowumeli ya mbula motoba bokolona elanga na yo mpe kokata elanga na yo ya vino pe bokosangisa mbuma na yango. 4. Na mobu ya sambo, ekozala Sabata ya bopemi pona mboka, sabata pona Yawe  Sabata ya Yawe. Okolona elanga na yo te, okokata vino na yo te. 5. Okobuka te mbuma oyo ebimi yango moko obukaki lona  ya vinyo na bobuki oyo elekaki ya elanga na yo, okokata te bambuma ya vino na yo : Ekozala mbula ya bopemi pona mboka. 6. Pe sabata ya mboka ekozala bilei pona yo, pe pona basaleli na yo ya mibali pe ya basi, pe po na batu na yo ya lifuti pe bapaya na yo oyo bbafanbafandaka elongo na yo. 7. Pe pona bibwɛlɛ na yo pe banyama oyo ekozala na mboka na yo : mbuma na yango nyonso ekoza ekozala bileyi na yo.8. Okotanga Basabata sambo ya mbula, mbala sambo na mbula sambo ; pe mikolo ya Basabata sambo oyo ya mibu ekokokisa mibu tuku mineyi na libwa (49) pona bino.  9. Na sanza ya sambo, na mokolo ya zomi ya sanza, okobeta makelele ya kelelo ; na Mokolo ya Bozipi masumu, okobeta kelelo na mboka na bino mobimba. 10. Pe bokobulisa mbula ya tuku mitano (50) pe bokosakola bonsomi na mokili mobimba epayi ya bafandi na yango nyonso. Ekozala jibile pona bino ; moko na moko na bino akozonga na biloko na ye moko, pe moko na moko na bino akozonga na libota na ye. 11. Mbula oyo ya tuku mitano ekozala jibile pona bino : bokolona te pe bokobuka te mbuma oyo ekoli na yango moko, pe bokobuka te mbuma ya vino oyo ekatami te. 12. Po ezali Jibile : ekozala mosantu pona bino. Bokolia na kozwa oyo elanga ekobotaka.  13. Na mobu oyo ya Jibile, moko na moko na bino akozonga na biloko na ye. 14. Pe soki okoteka eloko nyonso epayi ya mozalani na yo, to soki okosomba eloko moko na loboko ya mozalani na yo, mutu moko te asala ndeko na ye mabe. 15. Okosomba epayi ya moninga na yo na kotalela motango ya bambula banda jibile, pe ye akotekela yo na kotalela motango ya bambula ya mbuma. 16. Na lolenge ya bambula ekozala mingi, okobakisa talo na ye; pe lolenge na mbula ekozala moke, talo na yango ekokita, po ezali motango ya mbuma abuki oyo azali kotekela yo. 17. Pe moko te kati na bino akosala mozalani na ye mabe, pe okobanga Nzambe na yo, po ngai, nazali Yawe Nzambe na bino. 18. Bokotosa mibeko na ngai pe bokobomba mitindo na ngai, pe bokosala yango, po bofanda malamu na mboka yango.  19. Pe mboka ekopesa bino mbuma na yango, pe bokolia biloko kino kotonda pe bokofanda na kimia. 20. Pe soki bolobi : Tokolia nini na mbula ya sambo, pamba te tozali kolona te pe tokobuka mbuma ya bilanga na biso te ? 21. Nakopesa mitindo ete lipamboli na ngai ezala likolo na bino na mbula ya motoba, pe ekopesa mbuma ya mbula misato. 22. Na mbula ya mwambe, bokolona, ​​pe bokolia mbuma ya kala ti na mbula ya libwa ; kino molona na yango ekokola, bokolia molona ya kala. 23. Pe mboka ekotekama te ti ekufa libela, po mboka ezali ya ngai ; po bino, bino bozali epayi na ngai lokola bapaya pe lokola mutu oyo bayambi.  24. Pe na mboka mobimba ya bozwi na bino, bokopesa lotomo ya kosikola pona mabele yango.

25. Soki ndeko na yo akomi mobola pe ateki ndambo ya biloko na ye, tika ye oyo azali na lotomo ya kosikola, ndeko na ye ya penepene, akoya kosikola biloko oyo ndeko na ye ateki.  26. Kasi soki mutu azali na mutu moko te pona kosikola ye, pe soki loboko na ye ezwi pe ezwi oyo ekoki pona kosikola ye.  27. Akotanga bambula banda atekaki yango, pe akozongisa na kobakisa na mutu oyo ye atekelaki yango, pe akozonga na biloko na ye.  28. Pe soki loboko na ye ezwi oyo ekoki te pona kofuta ye, eloko oyo ateki ekotikala na loboko ya ye oyo asombaki yango ti na mobu ya jibile : Eloko oyo ateki ekobima na Jibile, pe moteki akozonga lisusu na biloko na ye.

29. Pe soki moko ateki ndako ya kofanda na kati ya engumba oyo ebatelami na bamir, akozala na lotomo na ye ya kosikola ti na suka ya mbula oyo boteki : Lotomo na ye ya kosikola ekotikala mbula mobimba. 30. Kasi soki esikolami te liboso ete mbula mobimba esila, ndako oyo ezali na kati ya engumba oyo ezingami na bamir ekotikala libela ya mosombi na bowumeli ya mabota na ye ; ekobima te na Jibile.  31. Kasi bandako nyonso oyo ezali na bamboka oyo ezali na bamir te zingazinga, ekotalelama lokola bilanga ya mboka. Akozala na lotomo ya kosikola, pe bakozwa bonsomi na Yubile.  32. Po na bingumba ya Balewi pe bandako oyo ezali na bingumba oyo bazali na yango, Balewi bakozala na lotomo ya libela ya kosikola. 33. Soki mutu moko asikoli ndako moko ya Balewi, ndako oyo bateki na engumba oyo bazali na yango ekobimisama na Jibile ; po bandako na bingumba ya Balewi ezali bozwi na bango na kati ya bana ya Israel. 34. Bilanga oyo ezali bisika ya libanda ya bingumba na bango ekotekama te, po ezali bozwi na bango pona libela.

35. Soki ndeko na yo akomi mobola pe loboko na ye ekomi kolengalenga pembeni na yo, okosunga ye, azala mopaya to mutu oyo bayambi, po abika pembeni na yo.  36. Okosenga ye intere te to lipaso te, kasi okobanga Nzambe na yo, po ndeko na yo afanda pembeni na yo. 37. Okokomata epayi na ye intere te, pe okodefisa ye bilei na yo na litomba te. 38. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na mokili ya Ejipito pona kopesa bino mokili ya Kanana, po nazala Nzambe na bino.

39. Soki ndeko na yo akomi mobola na pembeni na yo pe amiteki epayi na yo, okosalisa ye mosala ya mowumbu te.  40. Akozala elongo na yo lokola mosali ya mosala pe mopaya ; akosalela yo ti na mobu ya Jibile.  41. Na sima, ye na bana na ye ya mibali elongo na ye bakoki kotika yo pe kozonga na libota na ye pe akozonga kati na biloko ya batata na ye.  42. Po bazali basali na ngai, oyo nabimisaki na mokili ya Ejipito ; bakoteka bango te lokola bawumbu batekamaka.  43. Okokonza likolo na ye na makasi te, pe okobanga Nzambe na yo.  44. Kasi pona mosali na yo ya mibali pe mosali na yo ya mwasi oyo bazali ya yo, na kati ya bikolo oyo ezali zingazinga na yo, okosomba basali ya mibali pe ya basi epayi na bango.  45. Pe bokosomba lisusu bana mibali ya bapaya oyo bafandi na kati na bino, pe ya mabota na bango oyo bazali elongo na bino, oyo bakobota na mokili na bino ; pe bakozala bozwi bwa bino.  46. Pe bokotika yango lokola libula na bana na bino ya mibali sima na bino, po bazwa yango ; bokosalela yango libela ; kasi na bandeko na bino, bana ya Israel, mutu moko te akokonza ndeko na ye na makasi.

47. Pe soki mopaya to mutu moko oyo afandi kati na bino akomi mozwi pe ndeko na yo oyo afandaka pembeni na ye akomi mobola pe amiteki epayi ya mopaya oyo afandi na kati na yo, to epayi ya mutu moko oyo abimi na libota ya mopaya, 48 — Sima ete ye amitekaki, akozala na lotomo ya bosikoli ; moko ya bandeko na ye akosikola ye ; 49. to ndeko mobali ya tata na ye, to mwana mobali ya ndeko mobali ya tata na ye ya akosikola ye ; to ndeko moko ya penepene ya libota na ye akosikola ye ; to soki loboko na ye ekoki kokoma, akomisikola ye moko. 50. Akotanga elongo na oyo asombaki ye, kobanda mbula oyo amitekaki epayi na ye ti na mobu ya Jibile ; pe mbongo ya talo na ye ekozala na boyokani na motango ya mibu ; akozala epayi na nkolo na ye lolenge na mikolo ya mosali ya mosala. 51. Soki etikali nanu bambula mingi kino mbula ya Jibile, akotanga elongo na ye ; na boyokani na mibu wana, likolo na talo oyo asombamaki ; 52. Pe soki etikali kaka mikolo moke ya bambula ti na mobu ya Jibile, akotanga elongo na ye ; na boyokani ya motango ya mibu, akozongisa talo ya bosikoli na ye. 53. Akozala epayi na ye lokola mosali ya mosala, mbula na mbula ; nkolo akokonza ye na makasi te na misu na yo.  54. Pe soki asikolami te na moko ya banzela oyo, ye na bana na ye ya mibali elongo na ye bakobima na mobu ya Jibile. 55. Po bana ya Israel bazali basali na ngai ; bazali basali na ngai oyo nabimisaki na mokili ya Ejipito. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

 

Mokapo 26

1. Bokomisalela bikeko te, bokotelemisa te ekeko to likonzi oyo etelemi, pe bokotelemisa libanga oyo ekatami na mokili na bino te pona kofukama liboso na yango ; po Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino.

2. Bokobatela Basabata na ngai pe bokomemia esika mosantu na ngai. Ngai, nazali Yawe.

3. Soki botamboli na mibeko na ngai pe botosi mitindo na ngai pe bozali kosala yango. 4. Nakopesa bino bambula na bino na eleko na yango, pe mabele ekobota mbuma na yango, pe banzete ya elanga ekobota mbuma na yango. 5. Tangu ya kopupula mbuma ekokomela bino na tangu ya kobuka vino, pe tangu ya kobuka vino ekokutana na tangu ya kolona ; pe bokolia lipa na bino kino bosili kotonda, pe bokofanda na kimia pe na bobateli kati na mokili na bino. 6. Pe nakopesa kimia na mboka ; bokolala pe mutu moko te akobangisa yo ; pe nakolongola banyama mabe na mokili, pe mopanga ekoleka na mokili na bino te.  7. Bokolanda banguna na bino, pe bakokweya liboso na bino na mopanga. 8. Mitano kati na bino bakobengana kama moko, pe kama moko kati na bino bakobengana batu nkoto zomi, pe banguna na bino bakokweya liboso na bino na mopanga.  9. Nakobaluka elongi epayi na bino pe nakobota bino pe nakokomisa bino ebele, pe nakokokisa kondimana na ngai elongo na bino. 10. Bokolia bilei ya kala pe bokobimisa oyo ya kala liboso ya oyo ya sika. 11. Nakotia tabernakle na ngai na kati na bino, pe nakoyina bino te.  12. Nakotambola kati na bino pe nakozala Nzambe na bino, pe bokozala batu na ngai. 13. Ngai, nazali Yawe Nzambe na bino, oyo nabimisaki bino na mokili ya Ejipito, po bozala bawumbu na bango te. Nabukaki bikangeli ya ekanganeli na bino pe natambolisaki bino na mito etelemi likolo.

14. Kasi soki boyokeli ngai te pe bosali mibeko oyo nyonso te, 15. Pe soki botioli mibeko na ngai pe mitema na bino eyini mibeko na ngai, na boye ete bosala mitindo na ngai nyonso te pe kobuka kondimana na ngai te ; 16. Ngai pe nakosalela bino boye : Nakotindela bino somo, maladi ya kobebisa pe fievre oyo ekosilisa miso na bino pe ekolembisa molimo na bino ; pe bokolona pamba, po banguna na bino bakolia yango.  17. Nakotia elongi na ngai kotelemela bino : bokobetama liboso ya banguna na bino ; baoyo bayinaka bino bakokonza bino, pe bokokima ata soki mutu moko te azali kolanda bino. 18. Soki, ata nyonso wana, boyokeli Ngai te, nakobakisa kopesa bino etumbu mbala sambo lisusu pona masumu na bino ; 19. Pe nakobuka lolendo ya nguya makasi na bino, pe nakokomisa likolo na bino lokola ebende, pe mabele na yo lokola bronze. 20. bokosilisa makasi na bino pamba, pe mabele na bino ekobota mbuma na yango te, pe banzete ya mabele ekobota mbuma na yango te. 21. Pe soki bokotambola na kotelemela ngai pe boboyi koyoka ngai, nakobeta bino lisusu mbala sambo, kolandisama na masumu na bino ; 22. Pe nakotinda banyama ya zamba pona kobundisa yo, oyo bakobotola bino bana na bino, bakobebisa bibwele na bino, pe ekokitisa bino na motango moke ; pe banzela na bino ekozala ya kobebisama. 23. Pe soki na nzela ya makambo oyo bozwi mateya na ngai te, pe bozali kotambola na kotelemela ngai, 24. Ngai pe nakotambola na kotelemela bino, pe nakobeta bino mbala sambo lisusu koleka na tina ya masumu na bino ;  25. Pe nakomemela bino mopanga oyo ekozongisa mabe ya kondimana ; pe tangu bokosangana na bingumba na bino, nakotinda bokono kati na bino, pe bokokabama na loboko ya monguna. 26. Tangu nakobuka lingenda na bino ya lipa, basi zomi bakotumba lipa na bino na fulu moko pe bakozongisela bino lipa na bino na kilo ; pe bokolia, pe bokotonda te. 27. Pe soki na yango bozali kaka koyoka ngai te, kasi bozali kotambola na kotelemela ngai. 28. Ngai pe lokola nakotambola na kotelemela bino, na kanda makasi, pe nakopesa bino etumbu mbala sambo lisusu na tina ya masumu na bino ; 29. Pe bokolia mosuni ya bana na bino ya mibali, pe bokolia mosuni ya bana na bino ya basi ; 30. Nakobebisa bisika na bino ya likolo ya losambo pe nakolongola bitumbeli na bino ya mpaka malasi, pe nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya bikeko na bino, pe molimo na ngai ekoyina bino.  31. Nakokomisa bingumba na bino esobe ya pamba pe nakobebisa bisika na bino mosantu, pe nakoyoka solo kitoko ya mpaka ya malasi na bino te. 32. Pe nakobebisa mboka, pe banguna na bino oyo bakofanda na yango bakokamwa. 33. Nakopalangisa bino na kati ya bikolo pe nakobeta mopanga sima na bino, pe mboka na bino ekobeba, pe bingumba na bino ekozala esobe.

34. Bongo mboka ekosepela na basabata na yango mikolo nyonso oyo ekozala pamba : tangu bokozala na mokili ya banguna na bino, boye mboka ekopema pe ekosepela na sabata na yango.  35. Mikolo nyonso oyo atikali pamba, akopema, po apemaki te na basabata na bino tangu bozalaki kofanda kuna. 36. Po na baoyo kati na bino oyo batikali, nakomema kobangabanga pe kolemba ekota na mitema na bango na mikili ya banguna na bango, pe makelele ya kasa oyo epepami na mopepe ekolanda bango, pe bakokima lokola bakimi mopanga, pe bakokweya ata mutu moko te akolanda bango.  37. Bakobeta libaku mutu moko likolo na ndeko na ye lokola liboso ya mopanga, ata mutu moko te akolanda bango, pe bokokoka te kotelema liboso ya banguna na bino. 38. Bokokufa na kati ya bikolo, pe mokili ya banguna na bino ekolia bino.  39. Baoyo kati na bino oyo batikali bakosilisama na mabe na bango na mikili ya banguna na bino, pe bakobomama elongo na bango na mabe ya batata na bango, elongo na bango.

40. Pe bakotubela mabe na bango pe mabe ya batata na bango, kolandama bozangi bosembo na bango epayi na ngai, pe lisusu boniboni batambolaki na botelemeli epayi na ngai, 41. Na bongo ngai pe lisusu natambolaki na kotelemela bango, pe namemi bango na mokili ya banguna na bango. Soki mitema na bango oyo ekatamaki ngenga te ekitisami pe bandimi etumbu ya mabe na bango, 42. Nakokanisa kondimana na ngai elongo na Yakobo, pe lisusu kondimana na ngai elongo na Izaka, pe nakokanisa lisusu kondimana na ngai elongo na Abrayama, pe nakokanisa mabele yango : 43. Mabele yango ekosundolama na bango, pe ekosepela na Basabata na yango na kati ya libebi na yango, bango bazali kuna te ; pe bakondima etumbu ya mabe na bango, po ete…, iyo, po ete batioli mitindo na ngai, pe milimo na bango eyinaki mibeko na ngai. 44. Ata kutu bongo, tangu bakozala na mboka ya banguna na bango, nakotiola bango te to nakoyoka bango kele te pona kosilisa bango, pona kobuka boyokani na ngai elongo na bango ; po nbai, nazali Yawe Nzambe na bango ; 45. Pe nakokanisa pona bango kondimana oyo nasalaki elongo na bakoko na bango, baoyo nabimisaki na mokili ya Ejipito, na misu ya bikolo, pona nazala Nzambe na bango. Ngai, nazali Yawe.

46. Oyo ezali mibeko, mitindo pe malako oyo Yawe atiaki kati na ye pe bana ya Israel, na Ngomba Sinai, na loboko ya Mose.

 

Mokapo 27

1. Pe Yawe alobi na Mose, koloba : 2. Loba na bana ya Israel pe yebisa bango : Soki mutu alapi ndayi na kotika eloko moko, batu yango bakozala ya Yawe na kotalela motuya na yo. 3. Pe motuya na yo ya mobali wuta na mbula tuku mibale ti tuku motoba ekozala shekele ya palata tuku mitano (50), ndenge ya shekele ya esika mosantu. 4. Soki ezali mwasi, motuya na yo ekozala shekele tuku misato (30).  5. Pe soki mobali azali na mbula kobanda mitano ti tuku mibale, motuya na yo ekozala shekele tuku mibale (20), pe pona mwasi shekele zomi.  6. Pe soki azali mobali kobanda sanza moko ti mbula mitano, motuya na yo ekozala shekele mitano ya palata, pe motuya na yo ya mwasi ekozala shekele misato ya palata.  7. Pe soki ezali mobali ya mbula tuku motoba (60) to koleka, motuya na yo ekozala shekele zomi na mitano (15), pe pona mwasi shekele zomi (10). 8. Pe soki azali mobola koleka motuya na yo, bakomema ye liboso ya nganga-Nzambe, pe nganga-Nzambe akotalela yango na kotalela oyo loboko ya mutu oyo alaki ndayi ekoki kokoka.

9. Pe soki ezali moko ya banyama oyo ebonzami lokola libonza epayi ya Yawe, nyonso oyo ebonzami na Yawe ekozala mosantu.  10. Bakobongola yango te, pe bakopesa mosusu na esika na yango te, ya malamu na oyo ya mabe, to ya mabe na oyo ya malamu te ; pe soki nyama moko ebongwani na lolenge moko to mosusu, ezala nyama oyo ebongwani pe oyo ekozwa esika na yango ekozala bosantu. 11. Pe soki ezali nyama ya mbindo oyo ekoki kopesama lokola libonza epayi ya Yawe te, bakotia yango liboso ya nganga-Nzambe. 12. Pe nganga-Nzambe akotalela yango na kotalela soki ezali malamu to mabe. Ekozala ndenge na motuya na yo, nganga-Nzambe ! 13. Pe soki balingi kosikola yango, akobakisa ndambo ya mitano na motuya na yo.

14. Pe tangu mutu moko akobulisa ndako na ye pona ezala mosantu na Yawe, nganga-Nzambe akotala motuya na yango, na ndenge ekozala malamu to mabe ; bakotelema na motuya nganga-Nzambe akotia.  15. Soki mutu oyo abulisaki yango, alingi kosikola ndako yango, akobakisa ndambo moko na mitano ya palata oyo etangi na motuya na yo likolo na yango, pe ekozala ya ye.

16. Soki mutu moko abulisi epayi ya Yawe ndambo ya elanga na ye, etaleli na yo ekotalelama na oyo ekoki kolonama kuna : komere ya milona ya orje ya shekele tuku mitano (50) ya palata. 17. Soki abulisa elanga na bango na mobu ya Jibile, motuya na bino ekotelema. 18. Soki abulisa elanga na ye sima ya Jibile, nganga-Nzambe akotanga motuya na ye na kotalela bambula oyo etikali tii na mobu ya Jibile, mpe bakokitisa motuya na bino oyo etángamaki.  19. Soki ye oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa ndambo moko na mitano ya mosolo ya motuya oyo yo otangi na likolo na yango, pe ekotikala ye.  20. Pe soki asikoli elanga te to atekisi yango epayi ya mutu mosusu, akokoka kosikola yango lisusu te.  21. Pe elanga, tangu ekosikolama na Jibile, ekozala mosantu, epayi na Yawe, lokola elanga oyo epesameli ; yango ekozala ya nganga-Nzambe.

22. Pe soki abulisami epayi ya Yawe elanga moko oyo asombi, oyo ezali ya bilanga na ye moko te.  23. Nganga-Nzambe akotanga motuya ya talo na yo okotia kino na mbula ya Jibile, pe na mokolo wana akopesa motuya ya talo na yo okotia lokola eloko ya bule epayi ya Yawe;  24. Na mbula ya Jibile, elanga ekozonga epayi ya ye oyo asombaki yango pe epayi na ye oyo mabele ezalaki ya ye.

25. Pe motuya nyonso oyo okozwa ekozala na kolanda shekele ya esika mosantu : shekele ekozala garar* tuku mibale (20).

-vv.25 garar, ezali mezire moke ya kilo, basalelaki yango lokola mosolo

26. Bobele kaka, mwana ya liboso kati na banyama, oyo ebonzami lokola mbuma ya liboso epayi na Yawe, mutu moko te akokoka kobulisa yango ; soki ezali na ngombe to mwana na mpate, ezali ya Yawe.  27. Soki ezali banyama ya mbindo, akosikola yango na kotalela motuya na yo, pe akobakisa ndambo ya mitano na yango ; soki esikolami te, ekotekama ndenge ya motuya na yo.  28. Bobele kaka, eloko moko te oyo abonzi  epayi na Yawe; nyonso oyo azali na yango, azala mutu to nyama, to elanga na ye, ekotekama te pe ekokangalama te : eloko nyonso oyo ebonzami ekozala mosantu ya bosantu na Yawe.  29. Mutu nyonso kati na batu amipesi na (Nzambe) akoki kosikolama te : akobomama penza.

30. Pe moko ya zomi ya mabele, ya milona ya mabele, pe ya mbuma ya banzete, ezali ya Yawe : ezali eloko mosantu epayi na Yawe. 31. Soki mutu moko alingi kosikola moko ya zomi na ye, akobakisa ndambo ya mitano likolo na yango.  32. Pona moko ya zomi ya bangombe pe ya etonga, ya biloko nyonso oyo elekaka na se ya lingenda, ekozala mosantu epayi ya Yawe. 33. Bakokesenisa te kati ya malamu pe mabe, pe bokobongola yango te ; pe soki babongoli yango, ezala nyama oyo babongoli pe oyo batia na esika na yango ekozala mosantu ; bakosikolama te.

34. Wana ezali mitindo oyo Yawe apesi na Mose pona bana ya Israel likolo na Ngomba ya Sinai.