Mokanda ya Basambisi
Mokapo 1 – Mokapo 2 – Mokapo 3 – Mokapo 4 – Mokapo 5 – Mokapo 6 – Mokapo 7 – Mokapo 8 – Mokapo 9 – Mokapo 10 – Mokapo 11 – Mokapo 12 – Mokapo 13 – Mokapo 14 – Mokapo 15 – Mokapo 16 – Mokapo 17 – Mokapo 18 – Mokapo 19 – Mokapo 20 – Mokapo 21
1. Pe ekomaki sima na liwa ya Yeshua, bana ya Israel batunaki Yawe boye, koloba : Nani liboso kati na biso akomata kotelemela Bakanana, pona kobundisa bango ? » 2. Pe Yawe ayanoli : Yuda akomata ; tala, napesi mboka yango na loboko na ye. 3. Pe Yuda alobi na Simeyon ndeko na ye : Mata elongo na ngai na eteni ya mabele oyo epeselami ngai, pe tobundisa Bakanana ; pe ngai pe nakokende elongo na yo na eteni na yo. Pe Simeyon akeyi elongo na ye. Pe Yuda amati; 4. Pe Yawe akabi Bakanana pe Baferizi na maboko na bango ; pe babomi bango na Bezeke, bato nkoto zomi (10 000) : 5. Pe bamoni Adoni-Bezeke na Bezeke, pe babundisi ye, pe babeti Bakanana pe Baferizi. 6. Pe Adoni-Bezeke akimi ; balandi ye, bakangi ye, pe bakati ye misapi ya minene ya maboko pe ya makolo. 7. Adoni-Bezeke alobi : Bakonzi tuku sambo (70), oyo bakatama misapi ya minene ya maboko pe ya makolo, bazalaki kolokota bilei na se ya mesa na ngai ; ndenge nasalaki bango, Nzambe azongiseli ngai yango. Pe bamemi ye na Yerusaleme, pe akufi kuna. 8. Bana ya Yuda batelemelaki Yerusaleme na kobundisa yango pe bakangaki yango ; babomaki batu na mopanga pe batumbaki engumba na moto. 9. Pe na sima na yango, bana ya Yuda bakitaki pona kobundisa Bakanana oyo bafandaki na ngomba, na sudi (Negebe), pe na mokili ya etando. 10. Pe Yuda akendaki kobundisa Bakanana ya Ebron, kombo ya Ebron ya kala ezalaki Kiriyati-Arba, babetaki Sheshayi, Akiyimani pe Talimayi.11. Longwa wana, bakendaki kobundisa bafandi ya Debiri, nzokande kombo ya kala ya Debiri ezalaki Kiriati-Sefere.12. Pe Kalebe alobi : Na ye oyo akobeta na Kiriati-Sefere pe akozwa yango, nakopesa ye mwana na ngai ya mwasi Aksa pona azala mwasi na ye. 13. Otiniele, mwana ya Kenaz, leki ya Kalebe, azwaki yango ; pe apesaki ye mwana na ye ya mwasi Aksa pona azala mwasi na ye.14. Ekomaki ete lokola akomaki epayi na ye, apusi ye asenga tata na ye elanga. Pe ye akiti na punda, pe Kalebe atuni ye : Nini pona yo ? 15. Aksa ayanoli ye : Pesa ngai lipamboli ; po opesi ngai mabele ya sudi, pesa ngai pe maziba ya mayi. Pe Kalebe apesi ye maziba ya likolo pe maziba ya se. 16. Bana ya Keni, bokilo ya Mose, bamataki longwa na engumba ya banzete ya mbila elongo na bana ya Yuda ti na esobe ya Yuda, oyo ezali na sudi ya Arada ; bakendaki pe bafandaki elongo na batu. 17. Yuda akendaki elongo na Simeyon ndeko na ye, babetaki Bakanana oyo bafandaki na Sefata, pe babunzakaki engumba yango mobimba ; babengaki engumba yango kombo : Orma. 18. Yuda azwaki pe Gaza elongo na bamboka na yango, pe Ashkelona elongo na bamboka na yango, pe Ekrona elongo na bamboka na yango. 19. Pe Yawe azalaki elongo na Yuda ; pe azwaki ngomba, kasi akokaki te kobengana batu ya lobwaku po bazalaki na bashar ya ebende.
20. Bapesaki Ebron na Kalebe, ndenge Mose alakaki ; pe abenganaki bana misato ya Anak.
21. Pe bana ya Benyamina babenganaki te Bayebusi, bafandi na Yerusaleme ; yango wana Bayebusi bafandi elongo na bana ya Benyamina na Yerusaleme kino lelo. 22. Pe Ndako ya Yozef, bango pe lokola, bamataki na Bethel, pe Yawe azalaki elongo na bango. 23. Pe ndako ya Yozef basalaki boyebi na kotala Bethel, kombo na yango ya kala ezalaki Luze. 24. Bakengeli bamonaki mutu moko abimi na engumba, pe balobi na ye : Lakisa biso, tobondeli yo, na nzela nini bakotaka na engumba, pe tokosala yo ngolu. 25. Pe alakisi bango nzela nini oyo bakotaka na engumba ; babetaki engumba na mopanga, kasi batikaki mutu wana na libota na ye mobimba bakende. 26. Pe Mutu yango akendaki na mboka ya Baheti, pe atongi engumba pe abengi yango na kombo Luze : ezali kombo na yango kino lelo. 27. Pe Manase akokaki te kobengana batu ya Beth-Sheyane pe bamboka na yango, ata Taanaki pe bamboka na yango, ata bafandi ya Dor pe mamboka na yango, ata bafandi ya Yibleyame pe bamboka na yango, ata bafandi ya Megido pe bamboka na yango ; Bakanana balingaki kaka kofanda na kati ya mokili yango. 28. Pe ekomaki ete tangu Israel akomaki makasi, akomisaki Bakanana basali ya misala ya makasi, kasi abenganaki bango mobimba te. 29. Pe Efrayime abenganaki te Bakanana oyo bafandaki na Gezere ; kasi Bakanana bafandaki kati na bango na Gezere. 30. Zabulo pe abenganaki te bafandi ya Kitrona pe ya Naaloyi ; kasi Bakanana bafandaki kati na bango pe bakomaki basali ya misala ya makasi. 31. Azer pe abenganaki te bafandi ya Ako, ata bafandi ya Sidona, ata ya Akilaba, ata ya Akiziba, ata ya Eliba, ata ya Afiki, ata ya Rehobo. 32. Pe Baazer bafandaki kati na Bakanana, bafandi na mboka po babenganaki bango te. 33. Neftali pe abenganaki te bafandi ya Beth-Shemeshe, ata bafandi ya Beth-Anate ; afandaki kati na Bakanana, kasi bafandi ya Beth-Shemeshe pe ya Beth-Anate bakomaki pona ye basali na ya misala ya makasi. 34. Pe Baamori batindaki bana ya Dane na ngomba pe batikaki bango bakita na lobwaku te. 35. Pe Aamori alingaki kofanda na ngomba ya Erese, na Ayalone pe na Shaalbimi ; kasi loboko ya ndako ya Yozef ekomaki makasi pe bakomisaki bango basali ya misala makasi. 36. Ndelo ya Baamori ezalaki wuta na emateli ya Akrabimi, longwa na libanga (rocher) pe na likolo.
1. Pe Anjelu ya Yawe amati longwa na Giligala akeyi na Bokimi, pe alobi : Ngai nabimisaki bino na Ejipito pe nakotisaki bino na kati ya mabelo oyo nalakaki na kolapa ndayi na batata na bino, pe nalobaki : Nakobuka boyokani na ngai na bino soki moke te ; 2. Pe bino, bokosala boyokani te na bafandi ya mokili oyo, pe bokobuka bitumbelo na bango. Kasi boyoki mongongo na ngai te. Pona nini bosali bongo ? 3. Pe lisusu nalobi : Nakobengana bango te liboso na bino; bakozala na mipanzi na bino, pe banzambe na bango bakozala motambo pona bino. 4. Pe ekomaki ete lokola Anjelu ya Yawe azalaki koloba maloba wana nyonso na bana ya Israel, batu batombolaki mingongo pe balelaki. 5. Pe babengaki esika wana na kombo ya Bokimi (baoyo bakolela) ; pe babonzaki kuna mbeka epayi na Yawe. 6. Pe Yeshua azongisaki batu, pe bana ya Israel bakendaki moko na moko na libula na ye pona kozwa mokili. 7. Pe batu basalelaki Yawe na mikolo nyonso ya Yoswua, pe na mikolo nyonso ya bampaka oyo batikalaki na bomoyi sima ya Yoswua, pe baoyo bamonaki misala minene oyo Yawe asalaki pona Israel. 8. Pe Yeshua, mwana ya Nun, mosali ya Yawe, akufi na mibu kama moko na zomi (110). 9. Pe bakundaki ye na ndelo ya libula na ye na Timinate-Erese, na ngomba ya Efrayime, na nord ya ngomba ya Gaashi. 10. Molongo (jeneratio) wana nyonso basilaki kosangana (kokundama) elongo na batata na bango ; pe sima na bango, libota (jeneratio) mosusu ebimaki oyo eyebaki Yawe te, pe eyebaki te mosala oyo asalaki pona Israel.11. Bana ya Israel basalaki oyo ezali mabe na misu ya Yawe, pe basaleli Babaal. 12. Pe basundoli Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito ; pe batamboli na sima ya banzambe mosusu, kati na banzambe ya batu oyo bazalaki zingazinga na bango, bamigumbameli liboso na bango ; pe batumboli Yawe na kanda makasi. 13. Basundoli Yawe, pe basaleli Baal pe Astarte. 14. Pe kanda ya Yawe epelaki na kotelemela Israel ; akabi bango na maboko ya bapunzi oyo bapunzaki bango; pe ateki bango na maboko ya bayini na bango ya zingazinga ; pe bakokaki lisusu kotelema te liboso ya bayini na bango. 15. Bisika nyonso bazalaki kobima, loboko ya Yawe ezalaki kotelemela bango na mabe, ndenge Yawe alobaki pe ndenge Yawe alapelaki bango ndayi ; pe bakomaki na kati ya pasi monene penza.16. Pe Yawe abimisaki basambisi, pe bakangolaki bango na maboko ya baoyo bazali kopunza bango. 17. Kasi, bayokaki ata basambisi na bango te ; po basalaki pite na kolandaka banzambe mosusu pe bamigumbamelaki liboso na bango. Balongwaki nokinoki na nzela oyo batata na bango batambolaki na koyokaka mibeko ya Yawe : bango basalaki bongo te. 18. Pe tangu nyonso Yawe azalaki kobimisela bango basambisi, Yawe azalaki elongo na mosambisi yango, pe azalaki kokangola bango na maboko ya bayini na bango na mikolo nyonso ya mosambisi ; po Yawe azalaki koyokela bango mawa na tina ya kolela na bango liboso ya baoyo bazalaki koniokola bango.19. Kasi ezalaki kokoma ete tangu mosambisi akufi, bazalaki kozonga na kobebisama lisusu makasi koleka batata na bango, na kolandaka banzambe mosusu pona kosalela pe pona kogumbamela liboso na bango. Batikaki misala na bango ya mabe te pe bakangamaki na nzela na bango ya mitema mabanga. 20. Pe kanda ya Yawe epelaki na kotelemela Israel, pe alobi : po ekolo oyo abuki boyokani na ngai oyo napesaki na batata na bango, pe bayoki mongongo na ngai te, 21. Ngai pe nakobengana lisusu ata mutu moko te liboso na bango, kati na bikolo oyo Yeshua atikaki tango akufaki ; 22. Po nakomeka Israel na nzela na bango, soki bakobatela nzela ya Yawe pona bakotambola kati na yango lokola batata na bango babombaki yango, to te. 23. Pe Yawe atikaki bikolo bazala wana, abenganaki bango nokinoki te, pe akabaki bango na loboko ya Yeshua te.
1. Oyo nde ezali bikolo Yawe atikaki pona kotia Israel na komekama na nzela na bango, baoyo nyonso oyo bayebaki bitumba ya Kanana te ; 2. Bongo kaka po mabota (jeneratio) ya bana ya Israel bayeba, na koyekola, nini oyo ezali bitumba, baoyo bayebaki yango liboso te: 3. Bakonzi mitano ya Bafilistia, Bakanana nyonso, Basidona, pe Bahivite oyo bafandaka na ngomba ya Liban, kobanda na ngomba ya Baal-Eremona ti na ekoteli ya Amate. 4. Etikalamaki pona kotia Israel na komekama na nzela na bango, pona koyeba soki bakoyoka mibeko ya Yawe, oyo apesaki mitindo na batata na bango na nzela ya Mose.5. Bana ya Israel bafandaki kati na Bakanana, Bahiti, pe Baamori, Baferizi, Bahivite pe Bayebusi. 6. Bazwaki bana na bango ya basi po bazala basi na bango, bapesaki pe bana na bango ya basi na bana na bango ya mibali, pe basalelaki banzambe na bango. 7. Bana ya Israel basali oyo ezali mabe na miso ya Yawe, babosani Yawe Nzambe na bango, pe basaleli Babaal pe ba Ashera. 8. Pe kanda ya Yawe epelaki na kotelemela Israel, pe ateki bango na maboko ya Kushana-Rishatayimi, mokonzi ya Arama-Naarayimi. Pe bana ya Israel basaleli Kushana-Rishatayimi mibu mwambe (8). 9. Pe bana ya Israel balelaki epayi ya Yawe ; pe Yawe abimiselaki bana Israel mobikisi oyo akangoli bango : Otiniele, mwana ya Kenaza, leki ya Kalebe. 10. Pe Molimo ya Yawe ezalaki likolo na ye, pe asambisi Israel ; pe abimaki pona bitumba, pe Yawe akabi na loboko na ye Kushana-Rishatayimi, mokonzi ya Arama, pe loboko na ye ekomaki makasi likolo na Kushana-Rishatayimi. 11. Mokili ezalaki na bopemi mibu tuku mineyi (40). Pe Otoniele, mwana ya Kenaza, akufi. 12. Bana ya Israel bakobaki kosala lisusu mabe na misu ya Yawe ; pe Yawe apesi makasi na Eglon, mokonzi ya Moaba, kotelemela Israel, po bazalaki kosala mabe na misu ya Yawe. 13. Pe asangisi bana ya Amona pe Amaleke elongo na ye, pe akeyi pe abeti Israel pe abotoli engumba ya nzete ya mbila. 14. Bana ya Israel basaleli Eglon, mokonzi ya Moaba, mibu zomi na mwambe (18). 15. Bana ya Israel bagangi epayi na Yawe ; pe Yawe abimiselaki bango mobikisi : Ewud, mwana ya Gera, mubenyamina, mutu oyo azalaki kosalela loboko ya mwasi (loboko na ye ya mobali ya kokangama). Bana ya Israel batindi na nzela na ye likabo ye na Eglon, mokonzi ya Moaba. 16. Pe Ewud asali mopanga ya makasi na biteni mibale, molayi na yango kude moko ya moke, pe akangi yango na se ya bilamba na ye, na loketo na ye ya mobali. 17. Apesi likabo yango na Eglon, mokonzi ya Moaba; kasi Eglon azalaki mutu monene ya mafuta mingi. 18. Pe ekomaki ete tangu asilisi kopesa likabo, azongisi batu oyo bamemaki likabo. 19. Kasi ye moko azongi longwa na bikeko ya mabanga oyo ezali pene na Gilgala, pe alobi : Naza na liloba ya sekele pona yo, ô Mokonzi ! Pe alobi : Fanda nye ! Pe baoyo nyonso bazalaki pene na ye babimi. 20. Pe Ewud akoti epayi na ye ; nzokande azalaki kofanda na shambre ya likolo ya mopepe, oyo ezalaki pona ye moko ; pe Ewud alobi : Naza na liloba moko ya Nzambe pona yo. Pe atelemaki na kiti na ye. 21. Pe Ewud atomboli loboko na ye ya mwasi, pe azwi mopanga na loketo na ye ya mobali, pe atubaki yango na kati ya libumu na ye; 22. Esimbelo pe ekoti sima ya mopanga, pe mafuta ezipi mopanga yango, po alongolaki yango na libumu na ye te ; pe ebimi na kati ya makolo. 23. Pe Ewud abimi na veranda, pe akangi bikuke ya shambre ya likolo pe akangi yango. 24. Pe tangu abimi, basali na ye baye, pe bamoni : pe tala, bikuke ya shambre ya likolo ezalaki ya kokangama, pe balobi : Penza azali kozipa makolo na shambre ya mopepe. 25. Bazelaki kino bayokaki soni; pe tala, bakoki te kofungola shambre likolo, pe bazwi fungola, bafungoli, pe bamoni nkolo na bango alala na se, akufi. 26. Pe Ewud akimi tangu bango bazalaki kozela, aleki pembeni ya bikeko ya mabanga ; pe amibikisi na Sehira. 27. Pe tangu akomi kuna, abeti kelelo na ngomba ya Efrayime ; pe bana ya Israel bakiti elongo na ye, ye moko liboso na bango. 28. Pe alobi na bango : bolanda ngai, po Yawe akabi bayini na bino na maboko na bino, Bamoaba. Pe bakiti sima na ye, pe babotolaki Moaba bisika ya kokata ngambo ya Yordani, pe batikaki ata mutu moko te aleka. 29. Na tangu wana, babetaki Moaba soki nkoto zomi (10 000) ya batu, bango nyonso mibali ya nzoto mafuta pe bilombe, pe ata moko te abikaki. 30. Na mokolo wana, Moaba akitisami moto na se ya loboko ya Israel ; pe mokili ezalaki na bopemi mibu tuku mwambe (80).31. Pe sima na ye, ezalaki Shamgar, mwana ya Anate; abetaki Bafilistia, mibali kama motoba (600) na fimbo oyo bapusa bangombe na yango. Ye pe lokola abikisaki Israel.
1. Bana ya Israel basalaki lisusu mabe na misu ya Yawe ; nzokande Ewud akufaki. 2. Pe Yawe ateki bango na maboko ya Yabina, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki koyangela na Atshora ; pe mokambi ya mapinga na ye ezalaki Sisera, pe ye oyo azalaki kofanda na Aroshete ya bikolo. 3. Pe bana ya Israel bagangi epayi ya Yawe, po Yabina azalaki na bashar ya bibende kama libwa (900), pe azalaki koniokola makasi mingi bana ya Israel mibu tuku mibale (20). 4. Pe Debora, profetese, mwasi ya Lapidote, azalaki kosambisa Israel. 5. Pe Azalaki kofanda na se ya nzete ya mbila ya Debora, kati na Rama pe Bethel, na ngomba ya Efrayime ; pe bana ya Israel bazalaki komata epayi na ye po asambisa bango. 6. Pe atindi po babenga Barak, mwana ya Abinoyami, ya Kedeshe ya Neftali, pe alobi na ye : Yawe, Nzambe ya Israel, asili kopesa motindo boye : Kende pe mata na ngomba ya Tabora, pe zwa elongo na yo nkoto zomi (10 000) ya bana ya Neftali pe ya bana ya Zabulon. 7. Ngai nakobenda epayi na yo, na liziba ya Kison, Sisera, kapita ya mapinga ya Yabina, elongo na bashar na ye pe ebele ya basoda na ye, pe nakokaba ye na loboko na yo. 8. Pe Barak alobi na ye : Soki okeyi elongo na ngai, nakokende ; kasi soki okeyi na ngai te, nakokende te. 9. Pe azongisi : Nakokende penza elongo na yo ; kasi kaka ekozala lokumu ya yo te na nzela oyo ozali kokende, po Yawe akoteka Sisera na maboko ya mwasi. Boye Debora atelemaki pe akendaki elongo na Barak na Kedeshe. 10. Pe Barak asangisi Zabulon pe Neftali na Kedeshe ; pe nkoto zomi (10 000) ya mibali balandi sima na ye, pe Debora amati elongo na ye. 11. Nzokande Ebere, mutu ya Keni, akabwanaki na Bakeni mosusu, bana ya Obab, bokilo ya Mose ; pe apikaki hema na ye ti pene na nzete ya Tshayanayimi, oyo ezali pembeni ya Kedeshe. 12. Bayebisi Sisera ete Barak, mwana ya Abinoyami, amataki likolo na ngomba Tabora. 13. Pe Sisera asangisi bashar na ye nyonso, bashar ya bibende kama libwa (900), pe batu nyonso oyo bazalaki elongo na ye, longwa na Haroshete ya bikolo, na liziba ya Kishoni. 14. Pe Debora alobi na Barak : Telema ! Po lelo ezali nde mokolo oyo Yawe akabi Sisela na loboko na yo. Yawe abimi liboso na yo te ? Boye Barak akiti longwa na ngomba Tabora, pe nkoto zomi (10 000) ya mibali balandi ye. 15. Pe Yawe atie Sisera na kobulungana, bashar na ye nyonso pe mapinga na ye nyonso, na nzela ya mopanga, liboso ya Barak ; pe Sisera akiti na shar na ye, pe akimi na makolo. 16. Pe Barak alandi bashar pe mapinga ti na Haroshete ya bikolo ; pe mapinga nyonso ya Sisera ekweyi na mopanga, ata mutu moko te atikali. 17. Pe Sisera akimi na makolo ti na hema ya Yaele, mwasi ya Eber, mutu ya Keni ; po kimia ezalaki kati na Yabina, mokonzi ya Atshora, pe ndako ya Eber. 18. Pe Yaele abimi kokutana na Sisera, pe alobi na ye : Kota, nkolo na ngai, kota epayi na ngai ; kobanga te. Akoti epayi na ye na kati ya hema, pe Yaele azipi ye na bulengeti. 19. Pe alobi na ye : nabondeli yo, pesa ngai mwa mayi ya komela, po nazali naposa. Pe ye afungoli molangi oyo ezalaki na miliki, apesi ye amela, pe azipi ye lisusu. 20. Pe alobi na ye : Telema na ekoteli ya hema ; soki ekomi ete mutu aye pe atuni yo, alobi : Mutu moko azali awa ? Okoloba : Te. 21. Pe Yaele, mwasi ya Eber, azwi likonga ya hema pe asimbi marto na loboko; pe aye epayi na ye malembe penza, tangu alali pongi makasi po alembaki, abeti likonga yango na litama ya moto, yango ekoti ti na se ; pe akufi. 22. Pe tala Barak, azalaki kolanda Sisera, pe Yaele abimi kokutana na ye, pe alobi na ye : Yaka, pe nakolakisa yo mutu oyo ozali koluka. Pe akoti epayi na ye, pe amoni Sisera alala wana, akufi, pe likonga ekangami na kati ya litama ya moto na ye. 23. Pe na mokolo wana, Nzambe akitisaki Yabina, mokonzi ya Kanana, liboso ya bana ya Israel. 24. Pe loboko ya bana ya Israel ezalaki kaka kopusana pe ekomaki kilo makasi likolo ya Yabina, mokonzi ya Kanana, ti tangu babomaki Yabina, mokonzi ya Kanana.
1. Pe na mokolo wana, Debora ayembaki nzembo elongo na Barak, mwana ya Abinoyami, na koloba:
2. Po ete bakonzi bamitiaki liboso na Israel, po batu bamipesaki na bolingo na bango moko, pambolá Yehova !
3. Bakonzi, boyoka ! Bankumu, botia litoyi ! Ngai, ngai, nakoyembela Yawe; nakoyemba nzembo na Yawe, Nzambe ya Israel.
4. Yawe! Tangu obimaki na Seyiri, tangu ozalaki kokende na elanga ya Edom, mabele eninganaki, pe likolo esopaki mayi, pe mapata esopaki mayi.
5. Bangomba ebukanaki liboso ya Yawe; ata Sinayi, liboso ya Yawe, Nzambe ya Israel.
6. Na mikolo ya Shamgar, mwana ya Anate, na mikolo ya Yaele, banzela ya minene etikalamaki pamba ; baoyo bazalaki kotambola na banzela minene bakomaki kokende na banzela ya mike oyo etengama.
7. Bingumba polele etikalamaki pamba na Israel, yango etikalamaki pamba, — ti tangu ngai natelemaki, ngai Debora, ti tangu ngai natelemaki, mama kati na Israel.
8. Baponalaki banzambe ya sika, pe na tangu wana bitumba ezalaki na bikuke ya bingumba ! Bazalaki komona nguba moko te, likonga moko te kati na nkoto tuku mineyi (40 000) ya Israel.
9. Motema na ngai ezali epayi ya bakambi ya Israel baoyo bamipesaki na bolingo moko kati na batu. Pambola Yawe!
10. Bino baoyo bokomata likolo ya bapunda ya pembe, bino baoyo bofandi na likolo ya bitoko ya talo, pe bino baoyo bozali kotambola na banzela, bokanisa pe boyemba !
11. na tina ya mongongo ya baoyo bazali kokabola biloko ya bitumba na bisika ya kotoka mayi : kuna nde bazali kotatola misala ya bosembo ya Yawe, misala na ye ya bosembo epayi na bingumba na ye polele na kati ya Israel. Na tangu wana, batu ya Yawe bakitaki na bikuke. 12. Lamuka, lamuka, Debora ! Lamuka, lamuka, loba loyembo moko! Telema, Barak ! Mema na bokangami bakangami na yo, mwana ya Abinoyame !
13. Bongo baoyo batikalaki, batu ya lokumu, bakitaki epayi ya batu na ye ; Yawe ! Kita elongo na ngai kati na mibali ya makasi !
14. Wuta na Efrayime, misisa na bango ezali na Amaleke ; na sima na yo, Benyamina aye kati na batu na yo. Wuta na Makiri, bakambi bakiti, pe wuta na Zabulone, baoyo basimbaka lingenda ya moyangeli baye. 15. Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ; pe Isakari lokola Baraki, batindamaki na se ya lobwaku na makolo na ye. Kati na biteni ya Rubene, ezalaki makanisi minene ya mitema!
16. Po na nini otikali kofanda kati na bisika ya bampate, po na koyoka makelele ya bitonga ya bibwele ? Kati na biteni ya Rubene, ezalaki makanisi minene ya motema!
17. Galada afandaki na ngambo mosusu ya Yordani ; pe Dani, po na nini afandi na likolo ya masuwa ? Azere atikali pembeni ya mayi monene, pe afandi na mabongo na ye.
18. Zabulone azali batu oyo batiaki bomoyi na bango na liwa, Neftali pe bongo, na bisika ya likolo ya bilanga.
19. Bakonzi bayaki, babundaki ; bongo bakonzi ya Kanana babundaki na Taanake, pene na mayi ya Megido; kasi bazwaki palata ya kopunza te.
20. Wuta na likolo, minzoto mibundaki ; wuta na nzela na yango etambolaka, minzoto babundaki na Sisera.
21. Ebale ya Kishoni ememaki bango, ebale ya kala penza, ebale ya Kishoni. Molimo na ngai, oniataki makasi na se ya makolo!
22. Na tangu wana, makolo ya bapunda ebetaki mabele makasi na tina ya kopota mbangu makasi, na kopota mbangu makasi ya bilombe na bango.
23. Bolakela Meroze mabe, elobi Anjelu ya Yawe ; bolakela mabe penza batu na yango ! Po bayaki te kosalisa Yawe, kosalisa Yawe elongo na batu ya makasi.
24. Yaele, mwasi ya Ebere, Mokeni, apambolama koleka basi nyonso ! Apambolama koleka basi nyonso oyo bafandaka na bahema !
25. Asengaki mayi, apesaki ye miliki ; na sani ya batu ya lokumu, amemaki mafuta ya bere.
26. Atandaki loboko na ye pike, pe loboko na ye ya mobali na marto ya basali ; abetaki Sisera, apanzi moto na ye, apasoli pe atoboli litama ya moto na ye.
27. Kati na makolo na ye, agumbami, akweyi, alalaki; kati na makolo na ye, agumbamaki pe akweyaki ; esika agumbamaki, kuna nde akweyi akufi.
28. Mama ya Sisera azalaki kotala na fenetre, azali koganga na nzela ya fenetre : Po na nini shar na ye ekowumela koya? Po na nini etamboli ya bashar na ye ezali kotambola malembe boye ? »
29. Basi ya bwanya kati na bamama-bakonzi na ye bazongiseli ye ; ye moko pe amizongiseli maloba na ye moko :
30. Bazwi pe bazali kokabola biloko ya bitumba te ? Mwa elenge mwana mwasi moko to mibale pona moto ya mobali moko; biloko ya bitumba ya bilamba ya langilangi pona Sisera, bilamba ya langi oyo batonga kitoko na maboko, bilamba ya langi mibale pona kingo ya bakangami !
31. Tika ete bayini na yo nyonso bakufa bongo, ô Yawe ! Kasi baoyo balingaki yo bazala lokola moyi tangu ebimi na makasi na yango mobimba !
Pe mokili epemaki mibu tuku mineyi (40).
1. Pe Bana ya Israel basali lisusu mabe na misu ya Yawe ; pe Yawe akabaki na maboko ya Midiani mibu sambo ya mbula 2. Loboko ya Midiani ekomaki kilo likolo ya Israel. Na tina kobanga Midiani, bana ya Israel bamitongelaki bisika ya kobatama na mabwaku ya bangomba, na madusu pe na bisika ya makasi. 3. Pe ekomaki ete na tangu nyonso oyo Israel azalaki kolona, Midiani azalaki komata, Baamaleke pe bana ya monyele bazalaki koya kobundisa bango. 4. Bazalaki kopika kaa pona kobundisa bango, pe bazalaki kobebisa milona ya mboka kino na boyeyi ya Gaza ; bazalaki kotika eloko te ya kolia pona Israel, ata mpate, ngombe to ane. 5. Po bazalaki koya elongo na bituluku ya bibwele na bango pe bahema na bango ; bazalaki koya ebele lokola makonki. Bango pe bakamela na bango bazalaki na motángo te ; bazalaki koya na mboka pona kobebisa yango. 6. Pe Israel akomaki mobola mingi na tina ya Midiani ; pe bana ya Israel bagangaki epayi ya Yawe. 7. Pe ekomaki ete tangu bana ya Israel bagangaki epayi ya Yawe na tina ya Midiani, 8. Yawe atindaki profete epayi ya bana ya Israel, oyo alobi na bango : Boye nde Yawe, Nzambe ya Israel, alobi : Ngai nabimisaki bino na Ejipito pe nabimisaki bino na ndako ya bowumbu. 9. Pe nabikisaki bino na maboko ya Baejipito pe na maboko ya baoyo nyonso baniokolaki bino ; nabenganaki bango liboso na bino pe napesaki bino mokili na bango. 10. Pe nalobaki na bino : Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino ; bokobanga banzambe ya Baamori te, oyo bozali kofanda na mokili na bango. Kasi boyokaki mongongo na ngai te. 11. Pe Anjelu ya Yawe aye, pe afandi na se ya nzete ya terebinte oyo ezali na Ofra, oyo ezalaki ya Yoasi, mwana ya Abiezerite. Mwana na ye Gedeon azalaki kotuta mbuma ya froma na bisika ya koniata vino, pona kobatela yango liboso ya Midiani. 12. Anjelu ya Yawe amonani epayi na ye pe alobi : Yawe azali na yo, mwana-mobali ya mpiko pe ya makasi ! 13. Pe Gedeon alobi na ye : Aa, nkolo na ngai ! Soki Yawe azali na biso, bongo pona nini makambu oyo nyonso ekweli biso ? Pe wapi bikamwiseli na ye nyonso oyo batata na biso bayebisaki biso, kolobaka ete : Yawe abimisaki biso na Ejipito te ? Kasi sik’oyo Yawe asundoli biso, pe akabi biso na maboko ya Midiani. 14. Yawe atali ye pe alobi : Kende na makasi na yo oyo oza na yango, pe okobikisa Israel na maboko ya Midiani. Ngai natindi yo te ? 15. Pe alobi na ye: Aa, Nkolo ! Nakobikisa Israel na nini ? Tala, libota (nkoto) na ngai nde eleki mobola na Manase, pe ngai moko nazali moke koleka na ndako ya tata na ngai. 16. Pe Yawe alobi na ye : solo, Ngai nakozala elongo na yo ; pe okobeta Midiani lokola mutu moko. 17. Pe alobi na ye : Nasengi yo, soki namoni ngolu na misu na yo, pesa ngai elembo ete ezali penza yo nde ozali koloba na ngai. 18. Nabondeli Yo, kolongwa awa te ti tangu nakozonga epayi na yo, pe namema likabo na ngai pe nakotia yango liboso na yo. Yawe azongisi : Nakofanda ti tangu okozonga. 19. Pe Gedeo akoti, pe abongisaki mwana-ntaba moko pe mapa oyo ezanga levin ya efa moko ya farine. Atiaki misuni na kati ya kitunga, pe supu na kati ya mbeki ; pe amemaki yango epayi na ye na se ya nzete ya terebinte pe apesaki ye yango. 20. Pe Anjelu ya Nzambe alobi na ye : Zwa misuni pe mapa ezanga levin, tia yango likolo ya libanga oyo, pe sopa supu. Pe asali bongo. 21. Bongo Anjelu ya Yawe asemboli suka ya fimbo oyo azalaki na yango na loboko, asimbi misuni pe mapa oyo ezanga levin; pe moto ebimi na libanga pe ezikisaki misuni pe mampa yango nyonso. Pe Anjelu ya Yawe alimwaki na misu na ye. 22. Pe Gedeon amoni ete azalaki Anjelu ya Yawe, pe Gedeon alobi : Aa ! Nkolo Yawe ! Ezali pona yango nde namoni Anjelu ya Yawe elongi na elongi ! 23. Pe Yawe alobi na ye : Kimia ezala na yo ; kobanga te, okokufa te. 24. Pe Gedeon atongi wana etumbelo pona Yawe, pe abengi yango na kombo : Yawe-Shalomo (Yawe ya Kimia). Kino lelo ezali kaka na Ofra ya Baabiezerite. 25. Ekomaki na butu wana, ete Yawe alobi na ye : Zwa mwana-ngombe oyo ezali ya tata na yo, pe ngombe mobali ya mibale ya mibu sambo ; buka etumbelo ya Baala oyo ezali ya tata na yo, pe okokata Ashera oyo ezali pembeni na yango. 26. Pe okotonga etumbelo pona Yawe Nzambe na yo na songe ya esika ya makasi oyo, na ndenge oyo ebongi. Okozwa ngombe mobali ya mibale pe okobonza yango mbeka ya kotumba na likolo ya Ashera oyo okokata. 27. Pe Gedeon azwi mibali zomi kati na basali na ye, pe asali ndenge Yawe alobaki na ye. Pe lokola azalaki kobanga batu ya ndako ya tata na ye pe mibali ya engumba, asali yango na butu, na moyi te. 28. Pe tangu batu ya engumba balamuki na tongo makasi, bamoni etumbelo ya Baala ezalaki ya kobukana, pe Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami, pe ngombe ya mibale ebonzamaki mbeka na likolo ya etumbelo ya sika. 29. Balobani bango na bango : Nani asali likambo oyo ? Baluki pe batuni, pe balobi : Gedeon, mwana ya Yoasi, nde asali yango. 30. Batu ya engumba balobi na Yoasi : Bimisa mwana na yo pe ete akufa, po abuki etumbelo ya Baala pe akati Ashera. 31. Pe Yoasi alobi na batu nyonso bazalaki pembeni na ye : Bino nde bokofundela Baala ? Bino nde bokobikisa ye ? Ye oyo akobunda pona ye, akosila koboma liboso tongo etana. Soki ye azali nzambe, amibundela pona ye moko, po babuki etumbelo na ye. 32. Pe na mokolo wana, babengaki Gedeon na kombo Yerubbaal, na koloba : Tika Baal abundisa ye, po abuki etumbelo na ye. 33. Midiani mobimba, Baamaleke pe bana ya monyele basangani elongo, bakatisi pe bapiki kaa na lobwaku ya Izreyel. 34. Molimo ya Yawe elataki Gedeon ; abeti kelelo, pe Baabiezrite basangani sima na ye. 35. Atindi bamemi-sango na bisika nyonso ya Manase, pe bango pe basangani sima na ye ; atindi bamemi-sango na Azer, Zabulon pe Neftali, pe bango pe bamati na bokutani na bango. 36. Pe Gedeon alobi na Nzambe : Soki olingi kobikisa Israel na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki, 37. Tala, nakotia poso ya mpate na esika batutaka mbuma. Soki roze (mamwe) ezali kaka likolo ya poso ya mpate yango moko pe kokawuka ezali likolo na mabele nyonso, boye nakoyeba ete okobikisa Israel na loboko na ngai. 38. Ekomi pe bongo. Pe lobi alamuki na tongo makasi, akamoli poso ya mpate yango pe roze (mamwe) ebimi, etondisi kopo mobimba. 39. Pe Gedeon alobi lisusu na Nzambe : Kanda na yo epelela ngai te, nakoloba kaka mbala oyo : Nabondeli yo, tika nameka lisusu mbala moko poso ya mpate. Tika ete kokawuka ezala kaka likolo ya poso mpate pe likolo ya mabele nyonso ezala roze (mamwe). 40. Nzambe asali bongo na butu wana : kokawuka ezali likolo ya poso ya mpate, pe likolo ya mabele nyonso ezalaki na roze (mamwe).
1. Yerubaal, ye Gedeon, atelemaki na tongo makasi elongo na batu nyonso oyo bazalaki na ye, pe bapikaki kaa pene na liziba ya Arode ; pe kaa ya Midiani ezalaki na nord, na ngambo ya ngomba moke ya More, na lobwaku. 2. Pe Yawe alobaki na Gedeon : Batu oyo bazali na yo bazali ebele mingi pona nakaba Midiani na loboko na bango ; soki moke te, Israel asala lolendo liboso na ngai pe koloba : Loboko na ngai nde ebikisi ngai. 3. Pe sik’oyo, ganga na matoyi ya batu, koloba : Nani oyo azali na kobanga pe kolenga, azonga pe alongwa na ngomba ya Galad. Boye nkoto tuku mibale na mibale (22 000) ya batu bazongaki, pe nkoto zomi (10 000) nde batikali. 4. Pe Yawe alobi na Gedeon : Batu bazali kaka ebele ; kitisa bango na mayi, pe kuna nakoponela yo bango ; ekosalama ete mutu oyo nakoloba na yo : ye oyo akokende na yo, ye akokende ; pe mutu moko oyo nakoloba na yo : ye oyo akokende na yo te, ye akokende te. 5. Pe akitisaki batu na mayi. Pe Yawe alobi na Gedeon : Ye oyo akomela mayi na lolemo ndenge mbwa amelaka, okotia ye na pembeni ; pe baoyo nyonso bakogumbama na mabolongo na bango pona komela mayi. 6. Motango ya batu oyo bakamataki mayi na maboko pona komela na monoko ezalaki mibali kama misato (300) ; pe batu mosusu nyonso bagumbamaki na mabolongo pona komela mayi. 7. Pe Yawe alobi na Gedeon : Na nzela mibali kama misato (300) oyo bameli lokola mbwa nde nakobikisa bino, pe nakokaba Midiani na loboko na yo ; kasi batu mosusu nyonso bazonga, moko na moko na esika na ye. 8. Pe bazwaki na maboko bilei ya batu pe bakelelo na bango. Pe azongisaki mibali nyonso ya Israel, moko na moko na bahema na bango, pe atikalaki kaka na mibali kama misato (300). Nzokande kaa ya Midiana ezalaki na se na ye, na lobwaku. 9. Ekomaki na butu wana, Yawe alobi na Gedeon : Telema, kita na kaa na bango, po nakabi bango na loboko na yo. 10. Kasi soki ozali kobanga kokita, kita na kaa, yo na Pura, elenge mobali na yo ; 11. Okoyoka oyo bazali koloba, pe sima na yango maboko na yo ekozwa makasi pe okokita na kaa. Boye akitaki, ye elongo na Pura, elenge mobali na ye, ti na molongo ya liboso ya mapinga ya basoda oyo bazalaki na kaa. 12. Pe Bamidiana, Baamaleke pe bana ya monyele bapalanganaki na lobwaku ebele lokola makonki ; pe bakamela na bango ezalaki na motango te, ebele lokola zelo ya mayi monene. 13. Pe Gedeon akomi, pe tala mobali moko azali koyebisa ndoto moko na moninga na ye ; pe alobaki: Tala, naloti ndoto ; pe tala gato moko ya lipa ya orje ezalaki kobaluka na kaa ya Midiana, yango eyaki ti na hema pe etutaki yango, pe ekweyaki yango ; pe ebalusaki yango likolo se pe hema ezalaki wana ya kokweya. 14. Moninga na ye azongisi pe alobi : Yango ezali eloko mosusu te soki mopanga ya Gedeon te, mwana ya Yoasi, mutu ya Israel ; Nzambe akabi Midiana pe kaa na ye nyonso na loboko na ye. 15. Tangu Gedeon ayokaki lisolo ya ndoto yango pe ndimbola na yango, angumbamaki. Pe azongaki na kaa ya Israel pe alobi : Botelema ! Po Yawe akabi kaa ya Midiana na maboko na bino. 16. Pe akabolaki mibali kama misato (300) na biteni misato ; apesi bango bakelelo na maboko, pe mbeki ya pamba pe ba torshe na kati ya bambeki. 17. Pe alobi na bango : Botala oyo ngai nakosala pe bosala ndenge wana. Tala, tangu nakokoma na suka ya kaa na bango, oyo nakosala, bino pe bosala ndenge wana ; 18. Pe tangu nakobeta kelelo, ngai na baoyo bazali na ngai, bino pe bokobeta bakelelo zingazinga ya kaa na bango, pe bokoloba : Pona Yawe pe pona Gedeon ! 19. Pe Gedeon na mibali kama moko (100) oyo bazalaki na ye bakomaki na suka ya kaa, na ebandeli ya butu, bawutaki kaka kotia bakengeli. Babetaki bakelelo pe babukaki bambeki oyo bazalaki na yango na maboko na bango. 20. Pe biteni nyonso misato babeti kelelo pe babuki bambeki ; basimbaki batorshe na loboko ya mwasi, pe bakelelo na loboko ya mobali pona kobeta, pe bagangaki : Mopanga ya Yawe pe ya Gedeon ! 21. Pe batelemaki moko na moko na esika na ye zingazinga ya kaa; pe kaa nyonso bakomaki kokima pe koganga, bakimaki mbangu. 22. Pe mibali kama misato (300) babetaki kelelo, pe Yawe abalolaki mopanga ya moko na moko likolo ya moninga na ye kati na kaa nyonso. Pe kaa bakimaki ti na Beth-Sita, epayi ya Tsherera ti na ndelo ya Abele-Meyola, pembeni na Tabate. 23. Mibali ya Israel basanganaki, na ya Neftali, Azere pe Manase pe balandi Midiana. 24. Pe Gedeon atindaki bamemi-sango na ngomba nyonso ya Efrayime pona koloba : Bokita na bokutani na Midiana, pe bobotola bango ya mayi ti na Beth-Bara pe na Yordani. Boye mibali nyonso ya Efrayime basangani pe babotolaki bamayi ti na Beth-Bara, pe na Yordani. 25. Pe bakangaki bankumu mibale ya Midiana : Orebe pe Zeyebe ; pe babomaki Orebe na libanga ya Orebe, pe babomaki Zeyebe na bisika ya koniata vino ya Zeyebe. Pe balandaki Midiana, pe bamemaki mito ya Orebe na Zeyebe epayi ya Gedeon, na ngambo mosusu ya Yordani.
1. Pe mibali ya Efrayime balobi na ye : Likambu nini oyo osali biso ? Ete obengaki biso te tangu okendaki kobundisa Midiana ? Pe bapamelaki ye makasi penza. 2. Pe ye alobi na bango : Likambu nini ngai nasali sik’oyo na kokanisa na bino? Kosala kobuka-buka ya mbuma ya vino ya Efrayime ezali kitoko te koleka kobuka bambuma ya vino ya Abiezere ? 3. Nzambe akabi na maboko na bino bankumu ya Midiana, Orebe na Zeyebe; bongo nini ngai nasali na kokanisa na bino ? Bongo molimo na bango epayi na ye ekitaki tangu alobaki liloba wana.
4. Pe Gedeon akomaki na Yordani pe akatisaki yango, ye elongo na mibali kama misato (300) oyo bazalaki na ye ; balembaki, kasi bakobaki kaka kolanda. 5. Pe Alobi na batu ya Sukote : Nasengi bino, bopesa bagato ya lipa na batu oyo bazali kolanda ngai, po bazali ya kolemba ; pe ngai nakolanda Zebak na Tshalmuna, bakonzi ya Midiana. 6. Pe bakambi ya Sukote balobaki : Boye loboko ya Zebak na Tshalmuna esili kokoma na loboko na yo, po biso topesa lipa na lipinga ya basoda na yo ? 7. Pe Gedeon alobi : na tina na yango, tangu Yawe akokaba Zebak na Tshalmuna na loboko na ngai, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe pe elongo na nzete ya nzube. 8. Pe longwa kuna, amati na Penuele pe alobi na bango ndenge moko. Batu ya Penuele pe bazongiseli ye kaka lokola batu ya Sukote basalaki. 9. Pe alobi ndenge moko na batu ya Penuele, alobi : Tangu nakozonga na kimia, nakobuka ndako-molayi oyo ! 10. Pe Zebak na Tshalmuna bazalaki na Karkoro, pe ba kaa na bango elongo na bango, soki nkoto zomi na mitano (15 000), bango nde oyo batikali na kaa ya bana mibali ya monyele, po mibali nkoto mokama na tuku mibale (120 000) oyo babundaka na mopanga bakweyaki. 11. Pe Gedeon amati na nzela ya baoyo bafandaka na bahema, na monyele ya Nobak na Yogobeya ; pe abeti kaa wana pe kaa bazalaki na likama te. 12. Pe Zebak na Tshalmuna bakimaki, pe alandi bango, pe akangi bakonzi mibale ya Midiana, Zebak na Tshalmuna, pe abulunganisi kaa mobimba nyonso. 13. Pe Gedeon, mwana ya Yoasi, azongi longwa na bitumba na nzela ya ematelo ya Erese.14. Pe akangi elenge mobali kati na mibali ya Sukote pe atuni ye mituna ; elenge yango akomeli ye kombo ya bakambi ya Sukote pe bampaka na yango, mibali tuku sambo na sambo (77). 15. Pe akendaki epayi ya batu ya Sukote pe alobi : Tala Zebak na Tshalmuna, na tina na bango bino bofingaki ngai, kolobaka : Loboko ya Zebak na ya Tshalmuna esili kokoma na loboko na yo, po topesa lipa na batu na yo oyo balembi ? 16. Azwi bampaka ya engumba, pe basende ya esobe na banzete ya nzube, pe na nzela na yango apesi liteya na batu ya Sukote. 17. Pe abuki ndako-molayi ya Penuele pe abomi mibali ya engumba. 18. Pe alobi na Zebak na Tshalmuna : Mibali oyo bobomaki na ngomba ya Tabor bazalaki ndenge nini ? Pe balobi : Lokola yo, bango bazalaki bongo ; moko na moko bango azalaki na elongi lokola mwana ya mokonzi. 19. Pe alobi : Bazalaki bandeko na ngai, bana ya mama na ngai. Yawe azali na bomoyi, soki botikaka bango bazala na bomoyi, mbele nakoboma bino te ! 20. Pe alobi na Yetere, mwana na ye ya liboso : Telema, boma bango ! Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te po azalaki kobanga, po azalaki nanu elenge mobali. 21. Pe Zebak na Tshalmuna balobi : Telema yo moko, mibwaka likolo na biso; po lolenge mutu azali, lolenge pe makasi na ye ezali. Pe Gedeon atelemaki pe abomi Zebak na Tshalmuna, pe azwi basanza ya mike-mike oyo ezalaki na bakingo ya bakamela na bango. 22. Pe mibali ya Israel balobi na Gedeon : Konza likolo na biso, yo, mwana na yo ya mobali pe mwana mobali ya mwana na yo ya mobali ; po obikisi biso na loboko ya Midiana. 23. Pe Gedeon alobi na bango : Nakokonza likolo na bino te, pe mwana na ngai ya mobali akokonza likolo na bino te ; Yawe nde akokonza likolo na bino. 24. Pe Gedeon alobi na bango : Nakosenga bino likambu moko : moko na moko na bino apesa ngai biloko ya matoyi ya wolo oyo azwi na biloko ya bitumba. Po (Bamidiani) bazalaki na biloko ya matoyi ya wolo po ete bazalaki Baishamaele. 25. Pe Balobi : Tokopesa yango na bolingo penza. Pe batandi kazaka moko, pe moko na moko abwaki kuna biloko matoyi ya wolo oyo azwaki na bitumba. 26. Pe kilo ya biloko matoyi ya wolo oyo asengaki ezalaki shekele nkoto moko na kama sambo (1 700) ya wolo ; longola biloko ya basanza mike-mike, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya motane oyo bakonzi ya Midiana bazalaki kolata, pe basheneti oyo ezalaki na bakingo ya bakamela na bango. 27. Pe Gedeon asali efod moko, pe atie yango na engumba na ye ya Ofra. Pe Israel mobimba basalaki pite na sima na yango; pe yango ekomaki motambo pona Gedeon pe pona ndako na ye. 28. Bongo Midiana akitisami liboso ya bana ya Israel; atombolaki lisusu moto te. Pe mboka ezwaki bopemi mibu tuku mineyi (40) na mikolo ya Gedeon. 29. Pe Yerubbaal, mwana ya Yoasi, akendaki pe afandaki na ndako na ye. 30. Pe Gedeon abotaki bana ya mibali tuku sambo (70), oyo babimaki na mokongo na ye, po azalaki na basi mingi. 31. Pe makango na ye oyo azalaki na Sisheme, ye pe, abotelaki ye mwana mobali ; pe apesi mwana yango kombo Abimelek. 32. Pe Gedeon, mwana ya Yoasi, akufi na kimobange ya malamu penza, pe akundami na lilita ya tata na ye Yoasi, na Ofra ya Baabiezere. 33. Pe tangu Gedeon akufi, ekomaki ete bana ya Israel bazongi lisusu na pite na kolandaka Babaal, pe bamitieli Baal-Beriti nzambe pona bango. 34. Pe bana ya Israel bakanisaki lisusu te Yawe, Nzambe na bango, oyo abikisaki bango na maboko ya bayini na bango nyonso oyo bazalaki zingazinga ; 35. Pe bamonisaki boboto te epayi ya ndako ya Yerubaal, Gedeon, na kotalela bolamu nyonso oyo asalelaki Israel.
1. Pe Abimelek, mwana ya Yerubaal, akendaki na Sisheme epayi ya bandeko ya mama na ye, pe alobaki na bango pe na libota mobimba ya ndako ya tata ya mama na ye, koloba : 2. Nasengi bino, boloba na matoyi ya mibali nionso ya Sisheme : Nini eleki malamu pona bino : mibali tuku sambo (70), bango nyonso bana ya Yerubaal, bakonza likolo na bino, to mutu moko pamba akonza likolo na bino ? Pe lisusu, bobosana te ete ngai nazali mokuwa na bino pe mosuni na bino. 3. Pe bandeko ya mama na ye bayebisaki maloba wana nyonso na mibali ya Sisheme ; pe mitema na bango ekendaki epayi ya Abimelek, po balobaki : Azali ndeko na biso. 4. Bapesaki pe ye palata tuku sambo (70) oyo balongolaki na ndako ya Baal-Beriti ; pe na mbongo yango, Abimelek afutaki mibali ya pambala-pambala pe ya mobulu, pe balandaki ye. 5. Pe akendaki na ndako ya tata na ye na Ofra, pe abomaki bandeko na ye, bana ya Yerubaal, mibali tuku sambo (70) na likolo ya libanga moko ; kasi Yotama, mwana ya moke ya Yerubaal, atikalaki po amibombaki. 6. Pe mibali nyonso ya Sisheme basanganaki elongo pe na ndako mobimba ya Milo ; pe bakendaki pe bakomisaki Abimelek mokonzi, pene na ya monima oyo ezali na Sisheme. 7. Pe bayebisaki yango Yotama, pe akendaki kotelema na songe ya ngomba ya Garizimi ; atombolaki mongongo na ye, agangaki pe alobi na bango : Boyoka ngai, mibali ya Sisheme, Nzambe pe akoyoka bino ! 8. Banzete bakendaki kopakola mutu moko mafuta po azala mokonzi na bango. Balobaki na nzete ya Olive : konza biso. 9. Pe nzete ya olive alobi bango : Nakotika mafuta na ngai oyo basalelaka pona kopesa Nzambe pe batu ya lokumu, po nakende koningana-ningana likolo ya nzete mosusu ? 10. Banzete pe balobi na nzete ya Figi : Yo yaka, kokonza likolo na biso. 11. Pe nzete ya figi alobi na bango : Nakotika elengi na ngai pe mbuma na ngai ya kitoko, pe nakokende pona koningana-ningana likolo ya banzete? 12. Pe banzete balobi na nzete ya Vino : Yo yaka, kokonza likolo na biso. 13. Pe nzete ya vino alobi na bango : Nakotika vino na ngai oyo esepelisaka Nzambe pe batu, pe nakokende pona koningana-ningana likolo ya banzete ? 14. Pe banzete nyonso balobi na nzete ya banzube: Yo yaka, kokonza likolo na biso. 15. Pe nzete ya banzube alobi na bango : Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta po nazala mokonzi na bino, boya, bomibomba na se ya elilingi na ngai ; soki bongo te, moto ekobima na nzete ya banzube pe ekozikisa banzete ya sedre ya Liban ! 16. Pe sik’oyo, soki bosali na bosembo pe solo na kotia Abimelek mokonzi, soki bosali malamu epayi ya Yerubaal pe epayi ya ndako na ye, pe soki bosali ye lolenge ya misala ya maboko na ye ; 17. Po tata na ngai abundaki pona bino, pe atiaki bomoyi na ye na likama pe akangolaki bino na loboko ya Midiana ; 18. Kasi bino botelemeli ndako ya tata na ngai lelo, bobomi bana na ye mibali, mibali tuku sambo (70) na likolo ya libanga moko, pe bokomisi Abimelek, mwana ya mosali na ye ya mwasi, mokonzi likolo ya batu ya Sisheme po azali ndeko na bino ; 19. Soki penza na bosembo pe na solo nde bosali epayi ya Yerubaal pe epayi ya ndako na ye lelo, boye bosepela na Abimelek, pe ye pe asepela na bino ! 20. Kasi soki bongo te, moto ekobima na Abimelek pe ekozikisa mibali ya Sisheme pe na ndako ya Milo ; pe moto ekobima na mibali ya Sisheme pe na ndako ya Milo pe ekozikisa Abimelek! » 21. Pe Yotam akimaki pe akimi, pe akendaki kofanda na Beere na tina ya Abimelek, ndeko na ye. 22. Pe Abimelek akonzaki Israel mibu misato (3). 23. Pe Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimelek pe mibali ya Sisheme ; bongo mibali ya Sisheme basalaki Abimelek mabe na nko, 24. Po ete mabe oyo esalamaki likolo na bana mibali tuku sambo (70) ya Yerubaala ezongela Abimelek ndeko na bango oyo abomaki bango, pe ezongela mibali ya Sisheme oyo bapesaki ye maboko makasi po aboma bandeko na ye. 25. Pe mibali ya Sisheme batiaki batu pona kobombama likolo na bangomba pona kobundisa ye, pe bazalaki kopunza mutu nyonso oyo azalaki koleka na nzela wana ; pe yango esilaki koyebisama epayi ya Abimelek. 26. Pe Gaala, mwana ya Ebed, aye elongo na bandeko na ye, pe baleki na Sisheme ; pe mibali ya Sisheme batiaki motema epayi na ye. 27. Pe babimi na bilanga, babuki bavino na bango, baniati yango pe basali feti monene ; pe bakoti na ndako ya nzambe na bango, pe balie, pe bameli pe balakeli Abimelek mabe. 28. Pe Gaala, mwana ya Ebed, alobi : Abimelek azali nani, pe Sisheme azali nani po biso tosalela ye ? Azali mwana ya Yerubaal te ? Pe Zebul azali lietina na ye te ? Bosalela nde mibali ya Amor, tata ya Sisheme ! Kasi biso pona nini tosalela ye ? 29. O ! Soki nazalaki na batu oyo na se ya loboko na ngai, pe nalongolaki Abimelek ! Pe alobi na Abimelek: Bakisa lipinga ya basoda na yo, pe bima. 30. Pe Zebul, mokambi ya engumba, ayoki maloba ya Gaala, mwana ya Ebed, pe kanda na ye epeli makasi. 31. Pe atindi ya kobatama bamemi-sango epayi ya Abimelek, na koloba : Tala Gaala, mwana ya Ebed, na bandeko na ye baye na Sisheme, pe bazali kotinda engumba batelemela yo. 32. Pe sik’oyo, telema na butu, yo na batu oyo bazali na yo, pe bomibomba na bilanga. 33. Pe na tongo, okotelema na ngonga malamu, tangu moyi ekobima, okobundisa engumba; pe tala Gaala na batu oyo bazali na ye bakobima pona kobundisa yo, pe okosala ye ndenge loboko na yo ekokuta. 34. Pe Abimelek atelemaki na butu elongo na batu nyonso bazalaki na ye, pe babongisaki bisika ya mitambo ya kobundisa Sisheme, na biteni mineyi ya basoda. 35. Pe Gaala, mwana ya Ebed, abimaki pe atelemaki na ekuke ya engumba ; pe Abimelek pe batu bazalaki na ye balongwe esika batiaki mitambo. 36. Pe Gaala amoni batu pe alobi na Zebul : Tala, batu bazali kokita longwa na songe ya bangomba. Pe Zebul alobi na ye : Yo, ozali komona elilingi ya bangomba lokola batu. 37. Pe Gaala alobi lisusu : Tala, batu bazali kokita longwa na likolo ya mboka, pe lipinga moko ya basoda ezali koya na nzela ya shene ya batu ya soloka. 38. Pe Zebul alobi na ye : Monoko na yo ezali wapi sikoyo, yo oyo ozalaki koloba : Abimelek azali nani po biso tosalela ye ? Oyo ezali batu oyo nde otiolaki bango te ? Bima sik’oyo, nabondeli yo, pe bunda na bango ! 39. Pe Gaala abimi liboso ya mibali ya Sisheme pe abundi na Abimelek. 40. Pe Abimelek alandi ye, pe akimi liboso na ye ; pe ebele mingi bakweyaki ya kobomama ti na ekuke ya engumba. 41. Pe Abimelek atikali na Aruma; pe Zebul abengani Gaala na bandeko na ye po bafanda lisusu na Sisheme te. 42. Ekomaki na lobi na yango ete batu babimi na bilanga ; bayebisi yango Abimelek. 43. Azwi batu na ye, akaboli bango na biteni misato, pe atie mitambo na bilanga. Pe atali, amoni batu bazali kobima na engumba ; atelemeli bango pe abomi bango. 44. Pe Abimelek na lipinga oyo bazalaki na ye basopani pe batelemi na monoko ya ekuke ya engumba, pe mibale ya mapinga basopanaki likolo ya baoyo nyonso bazalaki na bilanga pe babomi bango. 45. Pe Abimelek abundisaki engumba mokolo wana mobimba ; azwi engumba, abomi batu oyo bazalaki kuna, abuki engumba yango pe aloni mungwa kuna. 46. Pe mibali nyonso ya ndako-molayi ya Sisheme bayoki yango, pe bakoti na esika ya makasi ya ndako ya El Berith (nzambe ya Berith). 47. Pe bayebisi Abimelek ete mibali nyonso ya ndako-molayi ya Sisheme basangani esika moko. 48. Pe Abimelek amati likolo na ngomba ya Tshalimona, ye na batu nyonso bazalaki na ye. Azwi epasola elongo na ye, akati etape ya nzete, atomboli yango pe atie yango na lipeka na ye, pe alobi na batu oyo bazalaki na ye : Oyo bomoni ngai nasali, bosala yango noki ndenge nasali ! 49. Pe batu nyonso moko na moko akati etape na ye ya nzeté ; balandi Abimelek, batie yango likolo ya esika makasi, pe batumbi na moto esika makasi likolo na bango. Batu nyonso oyo bazalaki na ndako-molayi ya Sisheme bakufi lisusu, nkoto moko (1000) ya mibali pe basi. 50. Pe Abimelek akendaki na Tebek, pe atelemisaki kaa ya kobundisi Tebek pe azwi yango. 51. Pe ezalaki na ndako-molayi ya makasi na katikati ya engumba ; pe mibali nyonso pe basi nyonso bakimi kuna, pe mibali nyonso ya engumba ; bakangi sima na bango, pe bamati na likolo ya ndako-molayi yango. 52. Pe Abimeleke apusani ti na ndako-molayi, pe abundisi yango ; pe akomi ti na ekoteli ya ndako molayi pona kotumba yango na moto. 53. Pe mwasi moko abwaki likolo ya moto ya Abimelek libanga oyo batutelaka mbuma, pe epasoli ye mokuwa ya bongo. 54. Pe abengi noki elenge mobali oyo azalaki komemela ye bibundeli, alobi na ye : Bimisa mopanga na yo, boma ngai, noki bato baloba na tina na ngai ete : Mwasi moko nde abomi ye. Pe elenge mobali na ye atoboli ye na mopanga, pe akufi. 55. Pe tangu mibali ya Israel bamoni ete Abimelek akufi, bazongaki moko na moko na mboka na ye. 56. Pe Nzambe akweyisaki likolo Abimelek mabe oyo asalaki tata na ye na ndenge abomaki bandeko na ye tuku sambo (70). 57. Pe Nzambe akweyisi likolo na mito ya mibali ya Sisheme mabe na bango nyonso; bongo elakeli mabe ya Yotam, mwana ya Yerubaala, ekweyi likolo na bango.
1. Pe na sima ya Abimelek, Tola, mwana ya Puwa, mwana ya Dodo, mutu ya Isakari, atelemaki pona kobikisa Israel ; azalaki kofanda na Shamiri, na ngomba ya Efrayime. 2. Asambisaki Israel mibu tuku mibale na misato (23) ; akufaki pe bakundaki ye na Shamiri. 3. Pe na sima na ye, Yayire, Mogalada, atelemaki ; asambisaki Israel mibu tuku mibale na mibale (22). 4. Pe azalaki na bana ya mibali tuku misato (30) oyo bazalaki komata likolo ya bapunda moke tuku misato ; pe bazalaki pe na bingumba tuku misato oyo babengaki yango ti lelo Bingumba ya Yayire, oyo ezali na mabele ya Galada. 5. Pe Yayire akufaki pe bakundaki ye na Kamone. 6. Pe bana ya Israel basalaki lisusu oyo ezalaki mabe na misu ya Yawe ; basalelaki Babaal, Baashtorete, banzambe ya Siri, banzambe ya Sidona, banzambe ya Moaba, banzambe ya bana ya Amone pe banzambe ya Bafilistia. Basundolaki Yawe pe basalelaki ye lisusu te. 7. Pe kanda ya Yawe epelaki likolo ya Israel ; pe atekaki bango na maboko ya Bafilistia pe na maboko ya bana ya Amone, oyo mbula wana, baniokolaki pe bafinaki makasi bana ya Israel; 8. Na bowumeli ya mibu zomi na mwambe (18), bafinaki bana ya Israel nyonso oyo bazalaki na ngambo ya Yordani, na mabele ya Baamori, oyo ezali na Galada. 9. Bana ya Amone bakatisaki Yordani pona kobundisa pe Yuda, Benyamina, pe ndako ya Efrayime. Pe Israel azalaki na pasi monene penza. 10. Pe bana ya Israel bagangaki epayi ya Yawe, koloba : Tosaleli yo masumu, po tosundoli Nzambe na biso pe tosaleli Babaal. 11. Pe Yawe alobi na bana ya Israel : Ngai nabikisaki bino te na maboko ya Baejipito, pe na Baamori, bana ya Amone pe Bafilistia ? 12. Pe Basidona, Baamaleke pe Bamaone baniokolaki bino, pe bogangaki epayi na ngai pe nabikisaki bino na maboko na bango. 13. Kasi bino bosundolaki ngai pe bosalelaki banzambe mosusu ; yango wana, nakobikisa bino lisusu te ! 14. Bokende, boganga epayi ya banzambe oyo boponaki ; bango nde bakobikisa bino na tangu na bino ya pasi ! 15. Pe bana ya Israel balobi na Yawe : Tosali masumu ; sala na biso nyonso oyo omoni malamu ; kasi, tosengi yo, bikisa biso kaka lelo oyo. 16. Balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango pe basalelaki Yawe ; pe motema na ye eyokaki pasi pona minioko ya Israel. 17. Pe bana ya Amone basangani pe bapiki hema na Galada ; bana ya Israel pe basangani pe bapiki hema na Mitsepa.18. Batu pe bakonzi ya Galada balobani bango na bango : Mutu nini akobanda bitumba likolo ya bana ya Amone ? Ye nde akokoma mokambi ya batu nyonso ya Galada.
1. Pe Yefete, Mogalada, azalaki mutu ya makasi pe ya mpiko ; pe azalaki mwana ya mwasi ya ndumba, pe Galada abotaki Yefete. 2. Pe Mwasi ya Galada abotelaki ye bana ya mibali ; pe bana mibali ya mwasi na ye bakolaki, pe babenganaki Yefete pe balobaki na ye : Okozwa libula moko te na ndako ya tata na biso, po ozali mwana ya mwasi mosusu. 3. Pe Yefete akimi liboso bandeko na ye pe afandaki na mboka ya Tob ; pe mibali ya pambala-pambala basangani zingazinga na ye, pe bazalaki kobima elongo na ye. 4. Pe ekomaki, sima ya mwa tangu, bana ya Amone babundisaki Israel : 5. Pe lokola bana ya Amone bazalaki kobundisa Israel, bampaka ya Galada bakendaki kokamata Yefete na mboka ya Tob. 6. Pe balobi na Yefete : Yaka, pe okozala kapitene pona biso, pe tokobundisa bana ya Amone. 7. Pe Yefete alobi na bampaka ya Galada : Ezali bino te nde boyinaki ngai pe bobenganaki ngai na ndako ya tata na ngai ? pona nini boye epayi na ngai, awa sik’oyo bozali na kati ya pasi ? 8. Pe bampaka ya Galada balobi na Yefete : Yango wana sik’oyo toye epayi na yo, po oya elongo na biso, pe obundisa bana ya Amone ; pe okozala mokonzi na biso nyonso, bafandi ya Galada : Pe Yefete alobi na bampaka ya Galada : 9. Soki bozongisi ngai pona kobundisa bana ya Amone pe Yawe akabi bango liboso na ngai, nakozala mokonzi na bino ? 10. Pe bampaka ya Galada balobi na Yefete : Yawe azali oyo ayoki kati na biso soki tosali te ndenge olobi ! 11. Pe Yefete akendaki elongo na bampaka ya Galada, pe batu batiaki ye mokonzi pe kapitene likolo na bango. Pe Yefete alobaki maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, na Misipa. 12. Pe Yefete atindakii bamemi-sango epayi ya mokonzi ya bana ya Amone, koloba : Likambo nini kati na ngai na yo, po oya epayi na ngai kobundisa mboka na ngai ? 13. Pe mokonzi ya bana ya Amone alobi na bamemi-sango ya Yefete : Ezali po Israel abotolaki mabele na ngai tangu abimaki na Ejipito, wuta na Arnoni ti na Yaboki pe ti na Yordani ; pe sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia. 14. Pe Yefete atindaki lisusu bamemi-sango epayi ya mokonzi ya bana ya Amone, pe alobi na ye : 15. Boye nde Yefete alobi : Israel abotolaki mboka ya Moaba te, pe mboka ya bana ya Amone te. 16. Po tangu balongwaki na Ejipito, Israel atambolaki na nzela ya esobe ti na mayi monene ya motane, pe akomaki na Kadeshe. 17. Pe Israel atindaki bamemi-sango epayi ya mokonzi ya Edom, koloba : Tika ngai naleka na mboka na yo ; kasi mokonzi ya Edoma ayokaki te. Pe atindaki pe lisusu epayi ya mokonzi ya Moaba, kasi ye alingaki te. Boye Israel afandaki na Kadeshe. 18. Pe atambolaki na esobe, pe abalukaki sima ya mboka ya Edoma pe ya mboka ya Moaba, pe ayaki na ngambo ya ebimelo ya moyi na mboka ya Moaba ; pe bapikaki kaa na bango na ngambo mosusu ya Arnon, kasi bakotaki na ndelo ya Moaba te, po Arnon nde ezalaki ndelo ya Moaba. 19. Pe Israele atindaki bamemi-sango epayi ya Sihoni, mokonzi ya Baamori, mokonzi ya Eshibon, pe Israel alobi na ye : Tika biso toleka na mbok na yo ti tokoma na esika na biso. 20. Kasi Sihoni atiaki motema te na Israel pona atika ye aleka na bandelo na ye ; Sihoni asangisaki batu na ye nyonso, bapiki kaa na Yaatsha pe babundisaki Israel. 21. Pe Yawe, Nzambe ya Israel, akabaki Sihoni na batu na ye nyonso na maboko ya Israel, pe abetaki bango ; pe Israel azwaki mokili nyonso ya Baamori oyo bazalaki kofanda na mboka wana. 22. Pe Bazwi mokili mobimba ya Baamori, kobanda na Arnon ti na Yaboki, pe kobanda na esobe ti na Yordani. 23. Pe Sik’oyo Yawe, Nzambe ya Israele, abenganaki Baamori liboso ya batu na ye Israel, pe yo olingi sik’oyo obotola biso yango ? 24. Ozali te na oyo nzambe na yo Kemoshi apesa yo ? Pe biso tokozala na mokili nyonso oyo Yawe Nzambe na biso apesa liboso na biso. 25. Pe sik’oyo, yo oleki bongo malamu koleka Balak mwana ya Tshipor, mokonzi ya Moaba ? Ye asuwanaki ata te Israel ? Ye atikalaki ata te kobundisa bango ? 26. Tangu oyo Israel afandaki na Eshiboni pe na bamboka na yango ya mike, pe na Aroyere pe na bamboka na yango ya mike, pe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arnon, na mikolo kama misato (300), pona nini bino bokangolaki yango te na tangu wana ? 27. Pe ezali ngai te nde nasali yo mabe moko, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Yawe, Mosambisi, akosambisa lelo kati na bana ya Israel pe bana ya Amone. 28. Kasi mokonzi ya bana ya Amone ayokaki maloba ya Yefete te. 29. Pe Molimo ya Yawe azalaki likolo ya Yefete ; pe akatisi Galada pe Manase, akatisi Misipa ya Galada, pe akendaki epayi ya bana ya Amone. 30. Pe Yefete akataki ndayi moko epayi ya Yawe, alobi : Soki okabi bana ya Amone na loboko na ngai, 31. Pe ekokoma ete nyonso oyo ekobima na bikuke ya ndako na ngai pona bokutani na ngai, tangu nakozonga na kimia, kowuta epayi na bana ya Amone, ekozala ya Yawe, pe nakobonza yango mbeka ya kotumba. 32. Pe Yefete akatisi epayi ya bana ya Amone pona kobundisa bango ; pe Yawe akabi bango na loboko na ye. 33. Pe abeti bango makasi penza, kobanda na Aroyere ti na Minite, abotoli bango bingumba tuku mibale (20), pe ti na Abel-Keramime. Pe bana ya Amone bakitisami liboso ya bana ya Israel. 34. Pe Yefete azongi na ndako na ye na Misipa, pe tala, mwana na ye ya mwasi abimi pona kokutana na ye na bambonda pe na mabina ; azalaki mwana se moko, azalaki na mwana mosusu te, mobali to mwasi. 35. Pe ekomaki tangu amoni ye, apasoli bilamba na ye pe alobi : A, mwana na ngai ya mwasi ! Okomisi ngai na mawa monene, pe ozali kati na baoyo bazali kotungisa ngai ! Po nafungoli monoko na ngai liboso ya Yawe, pe nakoki kozonga sima te. 36. Pe alobi na ye : Tata na ngai, soki ofungoli monoko na yo liboso ya Yawe, sala ngai ndenge maloba oyo ebimi na monoko na yo, po Yawe asili kozongisela bayini na yo, bana ya Amone, mabe na bango. 37. Pe alobi lisusu na tata na ye : Sala ngai likambo yango : tika ngai sanza mibale, pe nakokende pe na kokita na bangomba, pe nakolela moseka na ngai, ngai pe elongo na baninga na ngai. 38. Pe alobi na ye : Kende. Atindi ye pona sanza mibale. Pe akeyi, ye elongo na baninga na ye, pe aleli moseka na ye likolo na bangomba. 39. Pe ekomaki sima ya sanza mibale, azongi epayi ya tata na ye ; pe asali na ye ndayi oyo alapaki. Pe ye ayebaki mobali te. 40. Pe ekomaki momeseno na Israel : mbula na mbula, bana basi ya Israel bazalaki kofete mwana mwasi ya Yefete, Mogalada, mikolo mineyi na mbula moko.
1. Mibali ya Efrayime basanganaki, bakatisaki na nord pe balobi na Yefete : Pona nini okendaki pona kobundisa bana ya Amone pe obengaki biso te pona tokende elongo na yo ? Tokozikisa ndako na yo na moto likolo na yo ! 2. Pe Yefete azongiseli bango : Ngai na batu na ngai tozali na kowelana makasi na bana ya Amone ; nabengaki bino, kasi bobikisaki ngai na maboko na bango te. 3. Pe tangu namonaki ete bokobikisa ngai te, namitiaki bomoyi na ngai kati na maboko na ngai, pe nakatisaki epayi ya bana ya Amone ; pe Yawe akabaki bango na maboko na ngai. Pona nini bino boyeli ngai lelo, pona kobundisa ngai ? 4. Pe Yefete asangisaki mibali nyonso ya Galada pe abundisaki Efrayime ; mibali ya Galada babomi Efrayime, po balobaki : Bino Galada, bozali kaka bakimi ya Efrayime, na kati-kati ya Efrayime pe na kati-kati ya Manase. 5. Pe Galada bakangaki bisika ya kokatisa mayi ya Yordani na Efrayime. Pe soki tangu moko ya bakimi ya Efrayime alobi : Tika nakatisa, mibali ya Galada batuni ye : Ozali mutu ya Efrayime ? Soki azongisi : Te, 6. Bongo balobi na ye : sik’oyo loba noki : Shibolete ! Kasi ye alobi : Sibolete, po akokaki te koloba yango malamu. Bongo bakangi ye pe babomi ye na esika ya kokatisa mayi ya Yordani. Na tangu wana, nkoto tuku mineyi na mibale (42 000) ya mibali ya Efrayime bakweyaki. 7. Pe Yefete asambisaki Israel mibu motoba (6). Boye Yefete, mutu ya Galada, akufi pe bakundaki ye na moko ya bingumba ya Galada. 8. Na sima na ye, Ibitshana ya Betheleme nde asambisaki Israel. 9. Azalaki na bana mibali tuku misato (30), pe bana basi tuku misato oyo abalisaki bango na bapaya ; pe azwaki libanda pe basi tuku misato (30) pona bana na ye ya mibali. Asambisaki Israele mibu sambo (7). 10. Pe Ibitshana akufi pe bakundaki ye na Betheleme. 11. Na sima na ye, Elone, mutu ya Zabulone, asambisaki Israel ; pe asambisaki Israel mibu zomi (10). 12. Elone, mutu ya Zabulone, akufi pe bakundaki ye na Ayalone, na mabele ya Zabulone. 13. Na sima na ye, Abidona, mwana ya Ilele, mutu ya Piratone, asambisaki Israele.14. Azalaki na bana mibali tuku mineyi (40) pe bakoko tuku misato (30), bango nyonso bazalaki komata likolo ya bapunda moke tuku sambo (70). Asambisaki Israel mibu mwambe (8).15. Abidona, mwana ya Ilele, mutu ya Piratone, akufi pe bakundaki ye na Piratone, na mabele ya Efrayime, likolo na ngomba ya Baamaleke.
1. Bana ya Israel basalaki lisusu oyo ezali mabe na misu ya Yawe ; bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Bafilistia mibu tuku mineyi (40). 2. Pe ezalaki na mobali moko ya Tshora, na libota ya Badaniti, kombo na ye Manoya ; mwasi na ye azalaki ekomba, pe azalaki kobota te. 3. Pe Anjelu ya Yawe amonanaki epayi ya mwasi yango pe alobi na ye : Tala, ozali ekomba pe obotaka te ; kasi okozwa zemi pe okobota mwana mobali. 4. Sik’oyo nabondeli yo, mikengela pe komela vino te, pe masanga ya makasi te, pe kolia eloko moko te ya mbindo. 5. Po tala, okozwa zemi pe okobota mwana mobali ; jileti moko te ekoleka na moto na ye, po elenge mobali yango akozala Nazereni ya Nzambe wuta libumu; ye nde akobanda kobikisa Israel na maboko ya Bafilistia. 6. Pe Mwasi akendaki pe alobi na mobali na ye, koloba : Mutu moko ya Nzambe ayaki epayi na ngai ; pe elongi na ye ezalaki lokola elongi ya anjelu ya Nzambe, ezalaki ya somo penza ; pe natunaki ye te sika wapi awuti, pe ye pe ayebisaki ngai kombo na ye te. 7. Kasi alobi na ngai : Tala, okozwa zemi pe okobota mwana mobali ; pe sik’oyo, komela vinu te, masanga ya makasi te, pe kolia eloko moko te ya mbindo ; po elenge mobali akozala Nazereni ya Nzambe wuta na libumu ti mokolo ya liwa na ye. 8. Pe Manoya abondelaki Yawe : Aa, Nkolo ! Mutu ya Nzambe oyo otindaki azongela biso lisusu, nabondeli yo, pe ete ateya biso nini tosengeli kosala na elenge mobali oyo akobotama. 9. Nzambe ayokaki mongongo ya Manoya ; pe Anjelu ya Nzambe azongelaki lisusu mwasi, tangu azalaki ya kofanda na bilanga, pe Manoya, mobali na ye, azalaki elongo na ye te. 10. Mwasi akimi noki koyebisa mobali na ye, pe alobi na ye : Tala, mobali oyo ayaki epayi na ngai mokolo mosusu amimonisi epayi na ngai! 11. Pe Manoya atelemaki pe alandaki mwasi na ye ; pe akomaki epayi ya mutu yango pe alobi na ye : Ezali yo nde osololi na mwasi oyo ? Alobi : Ngai. 12. Pe Manoya alobi : Bongo tangu maloba na yo ekokokisama, mibeko nini esengeli elenge mobali kolanda pe asengeli kosala nini ? 13. Anjelu ya Yawe azongiseli Manoya : Mwasi akokengela makambu nyonso oyo nayebisaki ye. 14. Akolia te eloko oyo ewutaka na nzete ya vino, akomela vino te, masanga ya makasi te, pe akolia eloko moko te ya mbindo. Akotosa makambu nyonso oyo napesi ye etinda. 15. Pe Manoya alobi na Anjelu ya Yawe : Tika biso tokanga yo mwa moke pe tobongisela yo mwana-ntaba. 16. Anjelu ya Yawe alobi na Manoya : Ata soki osengi ngai natikala, nakolia lipa na yo te ; kasi soki olingi kobonza mbeka ya kotumba, bonza yango epayi ya Yawe. Po Manoya ayebaki te ete azalaki Anjelu ya Yawe. 17. Pe Manoya alobi na Anjelu ya Yawe : Kombo na yo nani, po tokumisa yo tangu maloba na yo ekokokisama ? 18. Anjelu ya Yawe alobaki na ye : Pona nini ozali kotuna kombo na ngai ? Ezali Likamwisi. 19. Pe Manoya azwaki mwana-ntaba na libonza ya gato, pe abonzaki yango mbeka epayi ya Yawe likolo ya libanga. Bongo asalaki likambu ya kokamwa, wana Manoya na mwasi na ye bazalaki kotala. 20. Wana moto ezalaki komata likolo wuta na etumbelo, Anjelu ya Yawe amati na kati ya moto ya etumbelo; Manoya na mwasi na ye bamonaki yango, pe bakweyaki na bilongi na bango ti na mabele. 21. Pe Anjelu ya Yawe amimonisaki lisusu te epayi ya Manoya pe mwasi na ye. Boye Manoya asosolaki ete azalaki Anjelu ya Yawe. 22. Pe Manoya alobaki na mwasi na ye : Tokokufa penza, po tomoni Nzambe ! 23. Kasi mwasi na ye alobi na ye : Soki Yawe alingaki koboma biso, mbele alingaki kozwa na maboko na biso te mbeka na biso ya kotumba pe libonza ya gato, pe mbele alingaki koyebisa biso te makambu ya ndenge oyo nyonso te.
24. Mwasi abotaki mwana mobali pe apesaki ye kombo Samison ; pe mwana akolaki pe Yawe apambolaki ye. 25. Pe Molimo ya Yawe akomaki kotinda ye na Mahane-Dan, kati na Tshora pe Eshtayoli.
1. Samison akitaki na Timina ; kuna amoni mwasi moko kati na bana basi ya Bafilistia. 2. Azongi pe ayebisi tata na ye na mama na ye : Na Timina, namoni mwasi moko kati na ban aya basi ya Bafilistia; pe sik’oyo, bozwela (bobalela) ngai ye po azala mwasi na ngai. 3. Pe Tata na ye pe mama na ye alobi na ye : Mwasi azali te na kati ya bana basi ya bandeko na yo pe na batu na biso mobimba, po okende koluka mwasi epayi ya Bafilistia, baoyo bakatisama ngenga te ? Kasi Samesone alobi tata na ye : Kamata oyo wana pona ngai, po azali kosepelisa misu na ngai. 4. Pe Tata na ye na mama na ye bayebaki te ete likambu yango ewutaki epayi ya Yawe ; po azalaki koluka libaku moko epayi ya Bafilistia. Na tangu wana, Bafilistia nde bazalaki kokonza Israel.
5. Samison akitaki na Timina elongo na tata na ye na mama na ye ; tangu bakomaki pene ya bilanga ya vino ya Timina, tala, mwana-nkosi moko agangaki makasi po na kokutana na ye ! 6. Molimo ya Yawe asimbaki ye na makasi : apasoli nkosi wana na maboko lokola bapasolaka mwana-ntaba, ata azalaki na eloko moko te na loboko na ye. Ayebisaki te tata na ye pe mama na ye likambu oyo asalaki. 7. Akitaki pe asololi na mwasi yango, pe asepelisi misu ya Samison. 8. Sima ya mwa tangu, azongaki pona kozwa ye ; abulukaki pona kotala ebembe ya nkosi wana. Pe tala liboke ya nzoyi na kati ya nzoto ya nkosi yango, elongo na mafuta ya nzoyi. 9. Akamati yango na maboko na ye, pe akeyi, azalaki kolia yango nzela-nzela ; akomi epayi ya tata na ye na mama na ye, apesi bango pe baliaki yango. Kasi ayebisaki bango te ete mafuta ya nzoyi yango azwaki yango na kati ya nzoto ya nkosi. 10. Tata na ye akitaki epayi ya mwasi yango, pe Samison asali feti kuna, po boye nde bilenge mibali bazalaki na momeseno ya kosala. 11. Tangu bamonaki ye, bapesaki ye mibali tuku misato (30) po bazala elongo (baninga) na ye. 12. Pe Samison alobi na bango : tika napesa bino likambu ya kokanisa (sambole), soki bokokoka kolimbola yango na bowumeli ya mikolo sambo ya feti, soki bososoli yango, nakopesa bino shemizi tuku misato (30) pe bilamba ya kolata tuku misato (30). 13. Kasi soki bokoki kolimbola yango te, bino nde bokopesa ngai shemizi tuku misato (30) pe bilamba ya kolata tuku misato (30). Balobi na ye : « Pesa sambole na yo, pe tokoyoka yango. 14. Alobi na bango : Na ye oyo azali kolia ebimi biloko ya kolia, pe na elombe makasi ebimaki eloko ya sukali. Pe na mikolo misato eleki, kasi bakokaki kolimbola sambole yango te. 15. Na mokolo ya sambo, balobaki na mwasi ya Samison : Pusa mobali na yo po alimbolela biso sambole yango, soki bongo te, tokotumba yo na ndako ya tata na yo na moto. Bino bobengi biso pona kopunza biloko na biso, ezali boye te ? 16. Mwasi ya Samison alelaki pene na ye pe alobaki : Ozali kaka na koyina pona ngai, pe olingi ngai te ! Opesi bana ya mboka na ngai sambole kasi olimboleli ngai yango te. Ye alobaki na ye : Tala, nalimboleli tata na mama na ngai te, bongo nalimbolela yo ? 17. Pe alelaki pene na ye mikolo sambo oyo ya feti na bango ezalaki. Pe esalamaki na mokolo ya sambo, lokola azalaki kotungisa ye makasi, Samison alimboleli ye yango. Mwasi pe alimbolaki sambole yango na bana mibali ya batu na ye.18. Liboso moyi ekita na mokolo ya sambo, mibali ya engumba balobaki na ye : Nini eleki mafuta ya nzoyi na elengi, pe nini eleki nkosi na makasi ? Pe azongiseli bango : Soki bolonaki na mwana-ngombe na ngai ya mwasi te, mbele bolimbolaki sambole na ngai te ! 19. Molimo ya Yawe asimbi ye na makasi ; pe akendaki na Askalona, abomi mibali tuku misato (30) kuna, akamati bilamba na bango pe apesaki bilamba ya kobongwana na baoyo balimbolaki sambole. Azongaki na ndako ya tata na ye, pe kanda na ye epelaki makasi. 20. Pe mwasi ya Samison akomaki ya moninga na ye, oyo akomisaki moninga na ye.
1. Pe ekomaki sima ya mwa tangu, na bileko ya bobuki mbuma ya ble, ete Samison akendaki kotala mwasi na ye, amemi mwana-ntaba ; pe alobi : Nalingi nakota epayi ya mwasi na ngai na shambre. Kasi tata ya mwasi apekisi ye akota. 2. Pe Tata alobi : Nakanisaki ete oyini ye penza, yango wana napesi ye epayi ya moninga na yo. Ndeko na ye ya mwasi ya moke azali kitoko koleka ye te ? Kamata ye na esika na ye, nasengi yo. 3. Pe Samison alobi na bango : Mbala oyo nazali na ngambo te liboso na Bafilistia soki nasali bango mabe. 4. Pe Samison akeyi, akangi bambwa ya zamba kama misato (300) ; azwi bakoni ya moto, akangi bambwa yango mikila na mikila mibale-mibale, pe atie koni moko katikati ya mikila yango. 5. Pe Atumbi moto na bakoni ya moto, pe atiki bambwa ya zamba bakota na bilanga ya ble ya Bafilistia ; azikisi bibombeli ya ble, na ble oyo ezali nanu na mabele, pe bilanga ya olive. 6. Bafilistia batuni : Nani asali likambo oyo ? Bazongisi : Samison, bokilo ya mutu ya Timina, po abotoli ye mwasi na ye pe apesi ye epayi ya moninga na ye. Boye Bafilistia bamataki, pe bazikisi mwasi yango na tata na ye na moto. 7. Pe Samison alobi na bango : Soki boye nde bokosala, boye nakozongisela bino mabe makasi, pe na sima nde nakotika. 8. Abomi bango na mbala moko penza, na kobuka bango maboko na makolo. Na sima na yango, akiti pe afandi na mwa libulu ya libanga ya Etame. 9. Pe Bafilistia bamati, bapiki kaa na Yuda pe bapanzani na Leki. 10. Pe Mibali ya Yuda balobi : Pona nini bomati kobundisa biso ? Pe balobi : Tomati pona kokanga Samison, po tosala ye ndenge asalaki biso. 11. Pe mibali nkoto misato (3 000) ya Yuda bakiti na libulu ya libanga ya Etame, pe balobi na Samison : Oyebi te ete Bafilistia nde bazali kokonza biso ? Pe likambu nini osali biso ? Alobi na bango : Ndenge basalaki ngai, nde nasali bango. 12. Pe Balobi na ye : Tokiti po tolinga yo basinga, po ete tokaba yo na maboko ya Bafilistia. Samison alobi na bango : Bolapela ngai ndayi ete bino moko bokomibwaka likolo na ngai te. 13. Pe balobi na ye, koloba : Te, tokokanga yo kaka basinga pe tokokaba yo na maboko na bango ; kasi solo penza, biso tokoboma yo te. Bakangi ye na basinga ya sika mibale, pe babimisi ye libanda ya libanga. 14. Akomi ti na Leki, pe Bafilistia bagangi (egangeli ya bitumba) na bokutani na ye. Kasi Molimo ya Yawe asimbi ye; pe basinga oyo ezalaki na maboko na ye ekomi lokola singa ya lino oyo moto ezali kozikisa, bongo basinga yango ekweyi longwa na maboko na ye. 15. Pe amoni mokuwa ya mbanga ya ane oyo ekawuka nanu te, asemboli loboko na ye pe akamati yango, pe abomi na yango mibali nkoto moko (1000). 16. Pe Samison alobi :
Na mokuwa ya mbanga ya ane, mopiko moko, mipiko mibale ! na mokuwa ya mbanga ya ane, nabomi mibali nkoto moko (1000) !
17. ekomaki tangu asilisi koloba, abwaki mokuwa yango mosika ya loboko na ye, pe apesi esika wana kombo Ramate-Leki (Ngomba ya mokuwa ya mbanga). 18. Ayokaki posa ya mayi makasi penza, pe agangi epayi na Yawe : Opesi na nzela ya mosali na yo na elonga monene oyo, bongo sik’oyo nakokufa naposa ya mayi pe nakokweya na maboko ya baoyo bakatisama ngenga te ? 19. Nzambe apasoli libulu na ngomba oyo ezalaki na Leki, bongo mayi ebimi; pe ameli, pe molimo na ye ezongi pe azwi lisusu bomoyi. Yango wana liziba yango ebengami Ene-Akore (Liziba ya ye oyo azali koganga) ; ezali na Leki ti lelo. 20. Pe asambisaki Israel na mikolo ya Bafilistia, na bowumeli ya mibu tuku mibale (20).
1. Pe Samison akendaki na Gaza ; pe kuna amonaki mwasi moko ya ndumba pe akotaki epayi na ye. 2. Batu ya Gaza bayokaki koloba : Samison aye awa. Bazingaki ye pe bazalaki kokengela ye butu mobimba na ekuke ya engumba ; bafandaki nye, balobi : na etaneli ya tongo, tokoboma ye. 3. Pe Samison alalaki ti na kati-kati ya butu ; na kati-kati ya butu wana, alamukaki, asimbaki bizipelo ya ekuke ya engumba elongo na makonzi na yango mibale, apikoli yango elongo na kanga-ekuke, atie yango na mapeka na ye, pe amemi yango ti na songe ya ngomba oyo etali Ebron. 4. Pe ekomaki na sima na yango, alingaki mwasi moko na lobwaku ya Sorek, pe kombo na ye ezalaki Delila. 5. Pe bankumu ya Bafilistia bamataki epayi na ye pe balobi na ye : tungisa ye po omona makasi na ye monene ewutaka wapi, pe ndenge nini tokoki kolonga ye pe na nini tokoki kokanga ye po tokumisa ye moke ; pe biso moko na moko tokopesa yo palata nkoto moko na kama moko (1 100). 6. Pe Delila alobi na Samison : Yebisa ngai, nabondeli yo, makasi na yo monene ezalaka nini, pe na eloko nini bakoki kokanga yo po baniokola yo. 7. Pe Samison alobaki na ye : Soki bakangi ngai na basinga ya sika sambo oyo ekawuka te, wana nakolemba, pe nakokoma lokola mutu mosusu nyonso. 8. Pe bankumu ya Bafilistia bamemelaki ye basinga ya sika sambo oyo ekawuka te, pe akangi ye na yango. 9. Pe batu bazalaki komibomba na kati ya shambre na ye ; pe Delila alobaki na ye : Samison, Bafilistia bazali likolo na yo ! Kasi akataki basinga yango lokola singa ya lin soki ezwi moto ; bongo na ye eyebanaki te. 10. Pe Delila alobi na Samison : Tala, okosi ngai pe olobi ngai makambu ya lokuta; nabondeli yo sik’oyo, yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo. 11. Pe alobaki na ye : Soki bakangi ngai malamu na basinga ya sika oyo basalela yango nanu te, nakolemba, pe nakokoma lokola mutu mosusu nyonso. 12. Pe Delila azwaki basinga ya sika, akangaki ye na yango pe alobi na ye : Samison, Bafilistia bazali likolo na yo ! Batu pe bazalaki kobombama na kati ya shambre. Kasi akataki basinga yango ya likolo ya maboko na ye lokola singa ya pamba. 13. Pe Delila alobi na Samison : Ti kino sik’oyo okosi ngai pe olobi na ngai lokuta; yebisa ngai na nini bakoki kokanga yo. Pe alobi na ye : Soki otongi suki sambo ya moto na ngai na eloko ya kotonga-suki, nakolemba. 14. Bongo atongaki suki ya moto na ye na eloko ya kotonga-suki, pe akangaki yango na sete, pe alobi na ye : Samisone, Bafilistia bazalaki na yo ! Pe alamuki na pongi, pe apikoli sete ya elamba pe singa elamba. 15. Pe alobi na ye : Ndenge nini okoloba : Nalingi yo, kasi motema na yo ezali epayi na ngai te ? Otioli ngai mbala misato, pe oyebisi ngai te epayi wapi makasi na yo monene ewutaka. 16. Pe ekomaki lokola azalaki kotungisa ye na maloba mikolo nyonso pe kopekisa ye kopema, molimo na ye elembaki penza ti na liwa. 17. Pe ye afungoleli ye motema na ye mobimba, alobi na ye : Razware etikalaka koleka nanu na suki ya moto na ngai te, po nazali Naziri ya Nzambe kobanda na libumu ya mama na ngai. Soki bakati ngai suki, makasi na ngai ekolongwa na ngai, nakolemba, pe nakozala lokola mutu mosusu nionso. 18. Pe Delila amoni ete ayebisaki ye motema na ye mobimba ; pe atindi pe abengi bankumu ya Bafilistia, koloba : Bomata mbala oyo, po ayebisi ngai motema na ye mobimba. Pe bankumu ya Bafilistia bamati epayi na ye, pe bamemi palata na maboko na bango. 19. Pe alalisi ye na mabolongo na ye, pe abengi mobali moko pe akati ye suki sambo ya moto na ye ; pe abandi kosakanela ye, pe makasi na ye elongwaki na ye. 20. Pe alobi : Bafilistia bazali likolo na yo, Samison! Pe alamuki na pongi na ye, pe amilobi: Nakobima lokola mbala mosusu pe nakomikangola. Nzokande ayebaki te ete Yawe asilaki kolongwa na ye. 21. Pe Bafilistia bakangi ye, batoboli ye miso na ye, pe bakitisi ye na Gaza pe bakangi ye na miniololo mibale ya bronze ; pe azalaki kobalusa enikeli ya koniatela ble na boloko. 22. Pe suki ya moto na ye ekomaki kokola lisusu, na sima ya kokatama na yango. 23. Pe bankumu ya Bafilistia basangani pona kobonza mbeka monene pona Dagon, nzambe na bango, pe pona kosepela ; pe balobi : nzambe na biso apesi na maboko na biso, Samison, monguna na biso ! 24. Pe batu bamoni ye, pe bakumisi nzambe na bango, bongo balobaki : nzambe na biso apesi na maboko na biso monguna na biso, pe ye oyo azalaki kobebisa mabele na biso pe ye oyo abomaki batu ebele kati na biso. 25. Boye ekomaki lokola mitema na bango ezalaki na esengo, balobi : Bobenga Samison, po ete asalela biso lokola eloko ya kosakana. Bongo babengaki Samison na ndako ya bakangami pe azali kosala masano liboso na bango ; pe batelemisaki ye kati-kati ya makonzi. 26. Pe Samison alobaki na elenge mobali oyo azalaki kosimba ye na loboko : Tika ngai, pe sala nasimba makonzi oyo ndako efandi likolo na yango, po namisimba yango. 27. Pe ndako ezalaki ya kotonda na mibali na basi ; pe bankumu nyonso ya Bafilistia bazalaki wana, pe, na likolo ya ndako, mibali na basi soki nkoto misato (3 000) bazalaki kotala Samison azali kosakana. 28. Bongo Samison abelelaki epayi ya Yawe, pe alobaki : Nkolo Yawe ! Kanisa yo, nabondeli yo; nasɛngi yo, pesa ngai makasi kaka mbala oyo moko, ô Nzambe ! Po ete nazongisela Bafilistia mabe pona miso na ngai mibale. 29. Pe Samison asimbi makonzi mibale ya kati-kati oyo ndako ezalaki kofanda likolo na yango, pe amipesaki likolo na yango : moko na loboko na ye ya mobali pe mosusu na loboko na ye ya mwasi. 30. Pe Samison alobaki : Tika bomoyi na ngai ekufa elongo na Bafilistia ! Pe apusaki makonzi yango na makasi na ye nyonso, pe ndako ekweyaki likolo ya bankumu pe likolo ya batu nyonso oyo bazalaki kati na yango. Pe bakufi oyo abomaki na liwa na ye bazalaki mingi koleka baoyo abomaki na bomoyi na ye. 31. Bongo bandeko na ye pe batu nyonso ya ndako ya tata na ye bakitaki, pe bakamataki ye, pe bamemaki ye pe bakundaki ye kati na Tshora pe Eshtayoli, na lilita ya Manoa, tata na ye. Pe azalaki kosambisa Israel mibu tuku mibale (20).
1. Pe ezalaki na mobali moko na ngomba ya Efrayime, oyo kombo na ye Mika. 2. Pe alobi na mama na ye : Palata nkoto moko na kama moko (1 100) oyo bayibaki yo, oyo olakelaki mabe pe oyo olobaki yango na matoyi… tala, palata yango ezali epayi na ngai ; ezali ngai nde nayibaki yango. Pe Mama na ye alobi : Mwana na ngai, opambolama na Yawe! 3. Pe azongiseli mama na ye palata yango nkoto moko na kama moko (1100); bongo mama na ye alobi : Na maboko na ngai, nabulisaki palata yango na Yawe pona mwana na ngai, na tina kosala ekeko ya nzete pe ekeko ya libende; sik’oyo nazongiseli yo yango. 4. Bongo azongiselaki mama na ye palata yango ; bongo mama na ye azwaki kama mibale (200) ya palata, apesi yango epayi ya mosali-biloko ya ebende, pe asali ekeko pe ekeko ya koniangwisama; etiamaki na ndako ya Mika. 5. Mobali yango Mika azalaki na ndako ya banzambe ; asali efode pe baterafime, pe atondisi maboko (abulisi) ya moko ya bana na ye, pe ye wana akomaki nganga-Nzambe na ye. 6. Na mikolo wana, mokonzi azalaki te na Israel ; moko na moko azalaki kosala kaka oyo amoni malamu na misu na ye. 7. Ezalaki na elenge mobali moko ya Betheleme ya Yuda, ya libota ya Yuda ; azalaki Molewi pe afandaki wana. 8. Mobali yango alongwaki na engumba ya Betheleme ya Yuda pona kokende kofanda esika akokuta ; bongo tangu azalaki kotambola, akomaki na ngomba ya Efrayime kino na ndako ya Mika. 9. Pe Mika atuni ye : Owuti wapi ? Pe ye azongisi : Nazali Molewi ya Betheleme ya Yuda, pe nazali koluka esika ya kofanda epayi nakomona. 10. Pe Mika alobi na ye : Fanda elongo na ngai pe okozala tata pe nganga-Nzambe pona ngai ; nakopesa yo palata zomi na mbula na mbula, pe bilamba pe bileyi na yo. Boye Molewi akendaki. 11. Pe Molewi yango andimaki kofanda elongo na mobali yango ; bongo elenge mobali yango akomaki lokola moko ya bana na ye. 12. Pe Mika abulisi molewi wana; bongo elenge mobali akomaki nganga-Nzambe na ye ; pe afandaki na ndako ya Mika. 13. Pe Mika alobi : Sik’oyo nayebi ete Yawe akosala ngai bolamu, po nazwi molewi po azala nganga-Nzambe na ngai.
1. Na mikolo wana, mokonzi azalaki te na Israel ; pe na mikolo yango, libota ya Badaniti bazalaki koluka libula pona kofanda, po kino mokolo wana, libula moko ezalaki nanu te oyo epesami epayi na bango kati na mabota ya Israel. 2. Bana ya Dane batindaki na Tshora pe na Eshetayoli mibali mitano ya mpiko oyo bazwaki kati na mabota na bango nyonso, po na kokende koluka mokili pe kotalatala yango; pe balobi na bango : Bokende, botalatala mokili. Bongo bakendaki na ngomba ya Efrayime kino na ndako ya Mika, pe balalaki wana. 3. Lokola bazalali pene na ndako ya Mika, bayokaki mongongo ya elenge mobali ya Molevi ; pe babulukaki kuna pe batunaki ye : Nani amemaki yo awa ? Ozali kosala nini awa ? Pe nini ozali na yango awa ? 4. Pe ye alobi na bango : Mika asali ngai boye na boye, pe azali kofuta ngai lifuti, pe nakomi nganga-nzambe na ye. 5. Balobi na ye : Tuna Nzambe, tobondeli yo, po toyeba soki mobembo na biso oyo tokosala ekosimba. 6. Nganga-nzambe azongiseli bango : Bokende na kimia ; nzela na bino oyo bozali kokende ezali liboso ya Yawe 7. Bongo mibali mitano bakendaki, pe bakomi na Laishi ; bamoni batu ya esika wana bazalaki kofanda na kimia, na ndenge moko na Basidoni ; kimia pe kobanga eloko te. Mutu moko te azalaki kopesa bango pasi na mokili yango ; pe bazalaki mosika na Basidoni pe bazalaki na boyokani na mutu moko te. 8. Bazongi epayi ya bandeko na bango na Tshora pe Eshetayoli, bandeko na bango batunaki bango : Bolobi nini ? 9. Balobi : Totelema, tomata kobundisa bango ; po tomoni mokili yango, pe tala, ezali malamu mingi penza. Bino bozali kaka kofanda nye ? Bozala na kigoyigoyi te pona kokende kokamata mokili yango. 10. Tangu bokokota, bokokuta batu oyo bazali na babangi eloko te pe mboka yango ezali monene penza ; Nzambe apesi yango na maboko na bino. Ezali esika oyo eloko moko te ya mokili ezali kozanga. 11. Boye bakendaki mibali kama motoba (600) ya libota ya Dane kolongwa na Tshora pe Eshetayoli, bamilatisi bibundeli ya etumba. 12. Bamataki pe bapiki kaa na Kiriyate-Yeyarime, na Yuda ; yango wana babengaka esika wana Mayane (Kaa) ya Dan kino na mokolo ya lelo : tala ezali na sima ya Kiriyate-Yeyarime. 13. Pe longwa kuna, bakatisaki na ngomba ya Efrayime pe bakomaki ti na ndako ya Mika. 14. Pe mibali mitano oyo bakendaki kotalatala mboka ya Layishi bazwi maloba pe balobi na bandeko na bango : Boyebi ete na kati ya bandako oyo, efod ezali, terafime ezali, pe ekeko pe ekeko ya libende ezali ? Pe sik’oyo boyebi likambu nini bosengeli kosala. 15. Pe babalukaki na esika wana, pe bakoti na kati ya ndako ya elenge mobali, ya Molewi, ndako ya Mika, pe batuni ye na tina ya kimia na ye. 16. Pe mibali kama motoba (600) ya Dane, bamilatisi bibundeli na bango ya bitumba, batelemaki na ekoteli ya ekuke. 17. Pe mibali mitano oyo bakendaki pona kotalatala mboka bamataki pe bakoti na kati, bakamati ekeko, efod, terafime pe ekeko ya palata. Pe Nganga-nzambe atelemaki na ekoteli ya ekuke elongo na mibali kama motoba (600) oyo balata bibundeli na bango ya bitumba. 18. Pe bango wana bakoti na ndako ya Mika pe bakamati ekeko, efod, terafime, ekeko ya libende ; pe nganga-nzambe atuni bango : Bozali kosala nini boye ? 19. Pe balobi na ye: Fanda nye, tia loboko na yo na monoko na yo, yaka elongo na biso; pe koma tata pe nganga-nzambe pona biso. Ezali malamu pona yo kozala nganga-nzambe ya ndako ya mutu moko pamba, to kozala nganga-nzambe ya tribu mobimba pe libota mobimba na kati ya Israel? 20. Pe motema ya nganga-nzambe esepelaki; akamati efod, terafime pe ekeko, pe akendaki kati na batu yango. 21. Pe babalukaki pe bakobi mobembo na bango, batie liboso na bango bana mike, pe bibwele pe biloko na bango ya motuya. 22. Tangu bakendaki mosika ya ndako ya Mika, mibali oyo bazalaki na bandako pene ya ndako ya Mika basangani na koganga makasi, pe balandi bana ya Dane ti bakutani na bango. 23. Pe bagangeli bana ya Dane; pe bango babalusi bilongi na bango pe batuni Mika: Nini ozali na yango ete osangisa batu? 24. Pe ye alobi: Bokamati (ba) nzambe na ngai oyo nasala, pe nganga-nzambe na ngai, pe bino bokeyi; bongo nini etikali na ngai? Pe ndenge nini bokotuna ngai: Nini ozali na yango? 25. Pe bana ya Dane balobi na ye: Koyokisa te mongongo na yo kati na biso, noki te mibali ya kanda bakokwela bino, bongo yo pe okobungisa bomoyi na yo pe bomoyi ya ndako na yo. 26. Pe bana ya Dane bakobi kokende nzela na bango; bongo Mika amoni ete bazali makasi koleka ye, abaluki pe azongi na ndako na ye. 27. Pe bango, bakamati oyo Mika asala pe nganga-nzambe oyo asala, pe bakomi na Layishi, epayi ya batu oyo bazalaki na kimia pe babangaki eloko te; babeti bango na mbeli ya mopanga, pe bazikisi engumba na moto. 28. Ezalaki ata na mutu moko te pona kobikisa bango, po bazalaki mosika na Sidoni pe bazalaki na boyokani na mutu te : engumba yango ezalaki na lobwaku ya Beth-Rehobo. Pe batongi engumba pe bafandi wana. 29. Pe babengaki yango na kombo Dan, kolandama kombo ya Dan, tata na bango, oyo abotamaki na Israel; kasi liboso, kombo ya engumba ezalaki Layishi. 30. Pe bana ya Dan batelemisaki ekeko pona bango moko; bongo Yonatane, mwana ya Gereshome, mwana ya Mose, ye na bana na ye bakomaki banganga-nzambe pona libota ya Dane ti na mokolo ya bamemami ya mboka na bowumbu. 31. Pe batelemisi pona bango ekeko ya Mika oyo asalaki, na mikolo nyonso oyo ndako ya Nzambe ezalaki na Silo
1. Pe ekomaki na mikolo wana, tangu mokonzi azalaki te na Israel, ete Molewi moko oyo azalaki kofanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayime, azwaki pona ye mwasi* moko (oyo azali na esika ya mibale na libala) ya Bethleme ya Yuda. 2. Kasi mwasi na ye azalaki sembo epayi na ye te pe asalaki kindumba, pe azongi elongo na ye na ndako ya tata na ye na Bethleme ya Yuda ; pe afandaki kuna mibu moko na sanza mineyi. 3. Pe mobali na ye atelemaki, alandi ye pona koloba na motema na ye, na tina ete azongisa ye ; pe azalaki na elenge mosali na ye elongo na ye pe bampunda mibale. Pe akotisaki ye na ndako ya tata na ye ; bongo tangu tata ya elenge mwasi amoni ye, asepelaki na bokutani na ye. 4. Pe bokilo na ye ya mobali, tata ya elenge mwasi, akangaki ye ; pe afandaki elongo na ye mikolo misato ; pe baliaki, bamelaki, pe balalaki kuna. 5. Pe ekomaki na mokolo ya mineyi, balamukaki tongotongo ; pe lokola atelemaki pona kokende, tata ya elenge mwasi alobi na bokilo na ye : kembisa motema na yo mwa lipa, bongo sima bokokende. 6. Bafandaki, baliaki pe bamelaki bango mibale elongo ; bongo tata ya elenge mwasi alobi na mobali yango : Nabondeli yo, ndima kolala awa butu oyo, pe tika motema na yo esepela. 7. Mobali atelemaki pona kokende, kasi bokilo na ye ya mobali atungisi ye makasi ; bongo azongi lisusu pe alali butu wana. 8. Pe na mokolo ya mitano, alamuki na tongotongo pona kokende ; kasi tata ya elenge mwasi alobi : Nabondeli yo, kembisa motema na yo. Pe Bawumelaki ti tangu moyi ekomaki kokita, bongo baliaki bango mibale. 9. Pe mobali atelemaki pona kokende, ye na mwasi na ye pe mosali na ye. Pe bokilo na ye, tata ya elenge mwasi, alobi na ye : omoni ete moyi ekiti, pokwa ekomi pene ; nabondeli bino, bolala awa ; tala, butu ekomi, lala awa pe tika motema na yo esepela ; bongo lobi bokolamuka tongotongo pona kokende nzela na bino, okozonga na ndako na yo. 10. Kasi mobali wana alingaki te kolala butu mosusu; pe atelemaki pe akendaki, ti akomi na ngambo ya Yebusi oyo ezali Yerusaleme, pe elongo na ye bapunda na ye mibale pe mwasi na ye. 11. Bazalaki penepene penza na Yebusi, pe moyi ekotaki makasi; bongo mosali alobi na nkolo na ye : Tokende, nabondeli yo, tobaluka epayi na engumba oyo ya Bayebusi pe tolala kuna. 12. Pe Nkolo na ye alobi na ye : Biso tokobalukaa te epayi na engumba ya bapaya, oyo ezali ya bana ya Israel te ; kasi tokoleka kaka ti na Gibea. 13. Pe alobi na mosali na ye : Yaka, topusana na moko ya bisika oyo, tolala na Gibea to na Rama. 14. Pe baleki liboso koleka, pe batamboli, pe moyi elalaki, lokola bazalaki pene na Gibea, oyo ezali ya Benyamina. 15. Pe babulakaki pona kokota pe pona kolala na Gibea. Pe bakoti, pe afandi na esika monene ya engumba, kasi ezalaki ata na mutu moko te oyo ayambaki bango na ndako na ye pona kolala. 16. Pe tala na pokwa, mobange moko awutaki na mosala na ye ya bilanga : pe mobali yango azalaki mutu ya ngomba ya Efrayime, pe afandaki na Gibea lokola mopaya pe mibali ya esika wana bazalaki Babenyamina. 17. Pe atombolaki misu na ye, amoni mutu ya mobembo wana na esika monene ya engumba ; pe mobange atuni ye : Okekende wapi, pe owuti wapi ? 18. Pe alobaki na ye : Tozali koleka longwa na Bethleme ya Yuda ti na suka ya ngomba ya Efrayime ; nazali mutu ya kuna, nakendaki na Bethleme ya Yuda pe nakokende na ndako ya Yawe ; kasi ezali ata mutu moko te ayambi ngai na ndako na ye. 19. Kasi, nazali na matiti pe bileyi pona bapunda na biso, nazali pe lisusu na lipa pe vino pona ngai, pona mosali na yo ya mwasi pe pona elenge mobali oyo azali elongo na basali na yo ; eloko moko te ezangi biso. 20. Pe mobange alobi na ye : Kimia ezala na yo ! Tika mikumba na yo nyonso ezala na maboko na ngai ; kasi kolala na esika monene ya engumba oyo te. 21. Pe akotisi ye na ndako na ye, pe apesi bapunda bileyi; bongo basokoli makolo na bango, pe baliaki pe bamelaki. 22. Lokola bazalaki na esengo na mesa, tala mibali ya engumba, batu, bana ya Belial, bazingaki ndako, babetaki na ekuke; balobi na mobange, nkolo-ndako : Bimisa mobali oyo akoti na ndako na yo, po ete toyeba ye. 23. Pe nkolo-ndako abimi epayi na bango pe alobi na bango : Te, bandeko na ngai, nasengi bino, bosala mabe oyo te ; lokola mobali oyo akoti na ndako na ngai, bosala likambo ya soni ndenge wana te. 24. Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi mobali nanu te, pe na mwasi ya mobali oyo : botika nabimisa bango, pe bokasanela bango, pe bokosala bango oyo ezali malamu na misu na bino; kasi na mobali oyo, bosala ye likambu ya soni boye te. 25. Kasi batu wana balingaki koyoka ye te ; boye mutu akamati mwasi na ye pe amemeli bango ye na libanda. Basangisaki na ye nzoto pe baniokoli ye butu mobimba ti na tongo ; tangu tongotongo ekomaki kobima, batiki ye akende. 26. Pe lokola tongo ekomaki, mwasi aye pe akweyi na ekoteli ya ndako epayi nkolo na ye azalaki, afandi kuna ti moyi ebimi. 27. Pe nkolo na ye alamuki na tongo, afungoli ekuke ya ndako, pe abimi pona kokoba nzela na ye ; pe tala, mwasi, mwasi na ye akweyi na ekoteli ya ya ndako, maboko na ye na se ya ekuke. 28. Pe alobi na ye : Telema, pe tokende. Kasi mutu ayanoli te. Pe mobali akamati ye, atie ye likolo ya punda, pe azongi na mboka na ye. 29. Pe akotaki na ndako na ye, pe akamati mbeli, asimbi mwasi na ye, akaboli ebembe na ye biteni zomi na mibale (12) kolanda mikuwa na ye, pe atindi biteni yango na bisika nyonso ya Israel. 30. Pe ekomaki ete baoyo nyonso oyo bamonaki yango balobi : Likambu ya boye esalema nanu te pe emonana nanu te, wuta mokolo bana ya Israel babima na mboka ya Ejipito ti lelo. Bokanisa likambu oyo, bosangana pe boloba.
1. Pe Bana ya Israel nyonso babimi, kobanda na Dan ti na Beere-Sheba, pe na mboka ya Galaade ; lisanga mobimba esangani lokola mutu moko epayi ya Yawe na Mitspa. 2. Pe bakambi ya batu nyonso, mabota nyonso ya Israel, bamilakisi na kati ya lisanga ya batu ya Nzambe ; mibali nkoto kama minei (400 000), batu nyonso oyo batambolaka na makolo pe babetaka mopanga. 3. Pe bana ya Benyamina bayokaki ete bana ya Israel bamataki na Mitspa. Bongo bana ya Israel balobaki : Boloba ndenge nini mabe oyo esalemaki ? 4. Pe Molewi, mobali ya mwasi oyo babomaki, azongisaki pe alobaki : Nazalaki na Gibea, oyo ezali ya Benyamina, ngai na mwasi na ngai, po tolala kuna ; 5. Kasi mibali ya Gibea batelemaki pona kotelemela ngai, pe bazingaki ndako butu wana na tina na ngai ; bakanisaki koboma ngai, pe baniokolaki mwasi na ngai, pe akufaki. 6. Pe nakamataki mwasi na ngai, nakataki ye na biteni-biteni, pe natindaki yango na mikili nyonso ya libula ya Israel ; po ete basalaki likambu ya soni pe mabe monene na kati ya Israel. 7. Tala, bino nyonso bana ya Israel, pe bopesa likanisi na bino awa. 8. Pe batu nyonso batelemi lokola mutu moko, balobaki : Moko te kati na biso akokende na hema na ye, pe moko te akozonga na ndako na ye. 9. Pe sik’oyo oyo nde tokosala na Gibea : tokosala ye kolanda ndenge ye zeke ekokana .10. Pe Tokokomata mibali zomi (10) na kati ya kama moko (100), pe kama moko (100) na kati ya nkoto moko (1 000), po bamema bileyi pona batu ; po ete na bokomi na bango, tosala Gibea ya Benyamina kolanda na mabe na ye oyo asalaki na Israel. 11. Pe mibali nyonso ya Israel basanganaki pona kobundisa engumba yango, basangani lokola mutu moko. 12. Pe mabota ya Israel batindaki batu na mabota nyonso ya Benyamina, koloba : Mabe nini oyo ekomi kati-kati na bino ? 13. Pe sik’oyo, bopesa biso mibali yango, bana ya Belial oyo bazali na Gibea, po ete toboma bango pe tolongola mabe na kati ya Israel. Kasi Benyamina balingaki te koyoka mongongo ya bandeko na bango, bana ya Israel. 14. Pe bana ya Benyamina basonganaki na bingumba na bango, bayangani na Gibea pona kobima pona kobundisa bana ya Israel.15. Pe na mokolo wana, batangaki mibali ya Benyamina oyo bawutaki na bingumba na bango: mibali nkoto tuku mibale na motoba (26 000) oyo babetaka mopanga, longola bafandi ya Gibea oyo batangamaki mibali kama sambo (700) ya piko penza. 16. Na batu wana nyonso, mibali kama sambo (700) ya mpiko bazalaki kosalela loboko ya mwasi ; bango nyonso bazalaki kobwaka libanga moko na singa ti na suki ya moto, pe ezalaki kozanga kotuta te. 17. Pe pe mibali ya Israel, longola Benyamina : bazalaki mibali nkoto kama mineyi (400 000) oyo bayebi kobeta mopanga, banso batu na bitumba. 18. Pe bana ya Israel batelemaki, pe bamataki na Bethel (ndako ya Nzambe) pe batunaki Nzambe, pe balobi : Nani kati na biso akomata liboso pona kobundisa bana ya Benyamina ? Pe Yawe alobi : Yuda, ya liboso. 19. Pe bana ya Israel batelemaki na tongo, bapiki kaa pona kobundisa Gibea. 20. Pe mibali ya Israel babimaki pona kobundisa Benyamina, pe mibali ya Israel batelemi na molongo pona kobundisa Benyamina na liboso ya Gibea. 21. Pe bana ya Benyamina babimaki na Gibea ; na mokolo wana, batandaki bibembe na mabele mibali nkoto tuku mibale na mibale (22 000) ya Israel. 22. Pe batu, mibali ya Israel balendisami, pe batelemaki lisusu na molongo ya etumba na esika oyo na mokolo ya liboso batelemaki elongo. 23. Pe bana ya Israel bamataki, pe balelaki liboso ya Yawe ti na pokwa ; pe batunaki Yawe, koloba : Nakopusana lisusu pona kobunda bitumba na Benyamina, ndeko na ngai ? Pe Yawe azongisi : Mata kobunda na ye. 24. Pe bana ya Israele bapusanaki pona kobundisa bana ya Benyamina na mokolo ya mibale. 25. Pe Benyamina abimi pona kobundisa bango na Gibea, na mokolo ya mibale ; pe batandi lisusu na mabele bibembe nkoto zomi na mwambe (18 000) ya mibali ya bana Israel, banso nyonso babeti ya mopanga. 26. Pe bana nyonso ya Israel pe batu nyonso bamataki na Bethel; balelaki pe bafandaki kuna liboso ya Yawe; pe bakili bileyi mokolo wana ti na pokwa, pe babonzaki mbeka ya kotumba pe mbeka ya kimia liboso ya Yawe. 27. Pe bana ya Israel batunaki Yawe (pe sanduku ya boyokani ya Nzambe ezalaki kuna na mikolo wana ; 28. Pe Fine, mwana ya Eleyazare, mwana ya Aaron, atelemaki liboso na ye na mikolo yango). Pe balobi: Nakobima lisusu pona kobunda na bana ya Benyamina, ndeko na ngai, to nakotika ? Pe Yawe alobi : Mata ; po lobi nakokaba bango na maboko na yo. 29. Pe Israel atiaki mitambo zingazinga ya Gibea. 30. Pe bana ya Israel bamataki na mokolo ya misato, pona kobundisa bana ya Benyamina ; batelemi na molongo liboso ya Gibea lokola bambala oyo elekaki. 31. Pe bana ya Benyamina babimaki na bokutani na batu ; babendamaki mosika ya engumba, pe babandaki kobeta batu, oyo babomami lokola mikolo oyo elekaki ; soki tuku misato (30) ya mibali ya Israel na banzela, oyo moko emati na Bethel pe mosusu na Gibea, na kati ya bilanga. 32. Pe bana ya Benyamina balobaki : Babetami liboso na biso lokola mbala ya liboso. Pe bana ya Israel balobaki : Tokima, po tokobenda bango mosika na engumba, na banzela. 33. Pe mibali nyonso ya Israel batelemi na bisika na bango pe batelemi na molongo na Baal-Tamar; bongo babombami ya Israel babimaki na esika na bango pe balandaki bango na etando ya polele ya Gibea. 34. Pe mibali nkoto zomi (10 000) ya makasi ya Israel mobimba baye kobundisa Gibea ; etumba ezalaki makasi penza, pe bana ya Benyamina bayebaki te likama nini ekokomela bango. 35. Pe Yawe abetaki Benyamina liboso ya Israel ; pe bana ya Israel batandaki mokolo wana bibembe nkoto tuku mibale na mitano na kama moko (25 100) ya mibali ya Benyamina, bango nyonso babeti ya mopanga. 36. Pe bana ya Benyamina bamonaki ete babetamaki. Nzokande mibali ya Israel batikelaki esika na baoyo ya Benyamina po batiaki motema na baoyo babombamaki pene na Gibea. 37. Pe baoyo babombamaki babimaki noki pe bakotaki na Gibea ; pe baoyo babombamaki bapanzanaki liboso, pe babetaki engumba nyonso na mopanga. 38. Pe elembo oyo bayokanaki kati na mibali ya Israel pe baoyo babombamaki ezalaki ete bamatisa na likolo molinga monene na kati ya engumba. 39. Pe mibali ya Israel babongolaki elongi na bitumba, pe Benyamina akomaki kobeta pe koboma batu tuku misato kati na batu ya Israel, po balobaki: Penza babetami liboso na biso lokola na etumba ya liboso. 40. Kasi tangu etumbeli ebandaki komata na engumba lokola likonzi ya molinga, bana ya Benyamina batali na sima, pe tala, engumba mobimba ezali komata na milinga ti na likolo. 41. Pe mibali ya Israel babongoli elongi; pe mibali ya Benyamina bakangi pema na somo ; po bamonaki ete mabe ekomeli bango. 42. Babalusi mokongo liboso ya mibali ya Israel na nzela ya esobe, kasi bitumba ezingaki bango makasi. Baoyo babimaki na bingumba babomi bango na kati-kati na yango. 43. Pe bazingaki Benyamina, balandi bango pe baniati-niati bango na bango na esika oyo balingaki kopema, ti na ngambo ya Gibea epayi moyi ebimaka. 44. Pe Benyamina bakweyaki mibali nkoto zomi na mwambe (18 000), bango nyonso mibali ya makasi. 45. Pe babalusaki mokongo, pe bakimaki na esobe, epayi ya libanga ya Rimone ; pe Israel abomaki lisusu nkoto mitano (5 000) oyo alokotaki na banzela, pe bazingi bango penepene na kolanda bango ti na Gidome pe babeti nkoto mibale (2 000). 46. Pe baoyo nyonso ya Benyamina oyo bakweyaki na mokolo wana bazalaki nkoto tuku mibale na mitano (25 000), bango nyonso babeti ya mopanga, banso mibali ya makasi. 47. Pe mibali kama motoba (600) babalukaki mokongo pe bakimaki na esobe epayi ya libanga ya Rimone sanza mineyi. 48. Pe mibali ya Israel bazongaki epayi bana ya Benyamina pe babetaki na mbeli ya mopanga, pe mibali ya engumba moko-moko pe banyama, pe nyonso oyo ezalaki wana ; bazikisi bingumba nyonso oyo bakutanaki na yango.
1. Pe mibali ya Israel balapaki ndayi na Mitspa, balobi : Moko te kati na biso akopesa mwana na ye ya mwasi pona mwasi ya libala epayi ya Benyamina. 2. Pe batu bayaki na Bethel, pe bafandaki wana liboso ya Nzambe ti na pokwa ; pe batomboli mingongo na bango pe baleli na mawa penza. 3. Pe balobi : Yawe, Nzambe ya Israel, pona nini likambu oyo ekomi na Israel, po ete lelo libota moko ezanga na kati ya Israel ? 4. Pe na mokolo elandi, ekomi ete batu batelemaki na tongotongo, pe batongi wana etumbelo pe babonzaki bambeka ya kotumba pe bambeka ya kimia. 5. Pe bana ya Israel batuni : Nani oyo amataki te epayi na Yawe, kati na lisanga, kati na mabota ya Israel? Po balapaki ndayi monene pona ye oyo nyonso akomata epayi ya Yawe te na Mitspa, koloba : akobomama. 6. Pe bana ya Israel babongwanaki na tina ya Benyamina, ndeko na bango, pe balobi : Libota moko lelo elongwe kati na Israel. 7. Tokosala nini pona baoyo batikali, pona bazwa basi, lokola biso moko tolapaki ndayi na Yawe ya kopesa bango bana na biso ya basi te pona basi babala? 8. Pe Balobi : Ezali na moko kati na mabota ya Israel oyo amataki te epayi na Yawe na Mitspa? Nzokande ata mobali moko te ya Yabeshi ya Galaade ayaki na kaa, na lisanga. 9. Pe Batu batangami : pe tala ata mobali moko te ya Yabeshi ya Galaade azalaki wana. 10. Boye liyangani atindaki mibali nkoto zomi na mibale (12 000) kati ya bilombe mibali, pe bapesaki bango mobeko, koloba : bokende, bobeta bafandi ya Yabeshi ya Galaade na mopanga, elongo na basi pe bana. 11. Botala oyo bokosala : bokoboma mibali nyonso, pe basi nyonso oyo basila kosangisa nzoto na mibali. 12. Pe bamonaki kati na bafandi na Yabeshi ya Galaade bilenge basi kama mineyi (400) oyo bayebaki mobali nanu te ; pe bamemaki bango na kaa na Silo, oyo ezali na mboka ya Kanana. 13. Pe liyangani mobimba batindaki baloba na ya bana ya Benyamina oyo bazalaki na libanga ya Rimone, pe basakola bango kimia. 14. Pe na tangu wana, Benyamina azongi, pe bapesaki bango basi ya Yabeshi ya Galaade oyo batikaki na bomoyi ; kasi basi yango bakokaki bango nyonso te. 15. Pe batu babongwanaki na tina ya Benyamina, po Yawe asalaki libulu moko na kati ya mabota ya Israel. 16. Pe bampaka ya liyangani balobaki : Tokosala nini pona baoyo batikali, pona bazwa basi, po basi babomamaki kati ya Benyamina? 17. Pe balobaki : Esengeli libula pona baoyo ya Benyamina babiki, po libota moko te elimwa na Israel. 18. Pe biso, biso moko tokoki kopesa bango basi te kati na bana na biso ya basi ; po bana ya Israel balapaki ndayi, koloba: alakelema mabe ye oyo akopesa mwasi epayi ya Benyamina ! 19. Pe balobi : Tala, ezalaka na feti moko ya Yawe esalemaka mbula na mbula na Silo, oyo ezali na nor ya Bethel, na esika moyi ebimaka na nzela oyo emataka na Bethel na Sikem, pe na midi ya Lebona. 20. Pe Bapesaki mibali ya Benyamina mobeko : bokende pe bobombama na kati ya bavino. 21. Pe bokotala, pe tala, tangu bana basi ya Silo bakobima pona kobina banzembo, boye bokobima na bavino, pe bokokamata pona bino, moko na moko mwasi na ye kati na bana basi ya Silo, pe bino bokokende na mboka ya Benyamina. 22. Pe soki ekomi ete batata to bandeko na bango baye koswanisa biso, tokoloba na bango : Bomonisa ngolu epayi na biso na tina na bango, po biso tozwaki moko na moko mwasi na ye na nzela ya bitumba te ; po ezali bino nde bopesi bango te, yango wana bozali na ngambo te. 23. Pe bana ya Benyamina basalaki bongo ; balongolaki basi kolanda motango na bango kati na basi oyo bazalaki kobina oyo babotolaki ; bongo bakendaki pe bazongaki na libula na bango, pe batongi bingumba lisusu pe bafandi wana. 24. Na tangu wana, bana ya Israel bakendaki moko na moko azongi na tribu pe na libota na ye pe na libula na ye. 25. Na mikolo wana, mokonzi azalaki te na Israel; moko na moko azalaki kosala oyo ezali malamu na misu na ye.