Ezra

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Banoti

 

1        Mokapo 1

1. Pe na mbula ya liboso ya Sirise (a) mokonzi ya Perse, pona ete liloba ya Yawe ekokisama oyo elobamaki na monoko ya Yilimia, Yawe alamusaki elimo ya Sirise mokonzi ya Perse; pe asakolaki nakati ya Bokonzi na ye mobimba, pe alobi yango na mokanda, koloba: 2. Sire mokonzi ya Perse alobi boye: Yawe Nzambe ya likolo apesi ngai babokonzi nionso ya mabele; pe apesaki ngai ndingisa natongela ye ndako moko na Yerusaleme, oyo ezali na Yuda. 3. Nani kati na bino azali kati na batu na ye, - ete Nzambe na ye azala elongo na ye, pe amata na Yerusaleme, oyo ezali na Yuda, pe atonga ndako ya Yawe, Nzambe ya Israel (Ye azali Nzambe), na Yerusaleme. 4. Pe ye oyo nionso atikala na esika nionso epayi afandi, batu ya esika wana basunga ye na palata, na wolo, pe na biloko pe na bibwele, na makabo ya bolingi pona ndako ya Nzambe na Yerusaleme.

5. Pe bakonzi ya batata ya Yuda pe ya Benyamina, pe banganga-Nzambe pe Balevi, batu nionso oyo Nzambe alamusaki elimo, batelmaki pona komata kotonga ndako ya Yawe oyo ezali na Yerusaleme. 6. Pe banso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango makasi na biloko ya palata, na wolo, na biloko, pe na bibwele pe na biloko ya motuya, longola nionso oyo bapesaki bango ofele. 7. Pe mokonzi Sirise abimisaki bambeki ya ndako ya Yawe, oyo Nabukodonozor abimisaki na Yerusaleme, pe atiaki na ndako ya nzambe na ye. 8. Pe Sirise mokonzi ya Perse abimisaki yango, na nzela ya Mitredate, mobateli ya mosolo; pe atangelaki Sheshebakare, mokonzi ya Yuda. 9. Pe motango na yango ezali oyo: tuku misato ya basani ya wolo, nkoto moko ya basani, tuku mibale na libwa ya bambeli; 10. Tuku misato ya bakopo ya wolo, kama mineyi na zomi ya kopo ya palata kama ya lolenge ya mibale, nkoto moko ya bisaleli mosusu. 11. Biloko nionso ya wolo pe ya palata ezalaki nkoto mitano na kama mineyi. Sheshebakare amemaki nionso wana tangu bamataki na Babilone na Yerusaleme baoyo bakendaki na bowumbu.

 

2        Mokapo 2

1. Pe bango oyo bana mibali ya etuka oyo bamataki wuta na bokangami ya bowumbu, baoyo Nabukonozor mokonzi ya Babilone amemaki na bowumbu naBabilone, pe bazongaki na Yerusaleme pe na Yuda, moko na moko na engumba na ye. 2. Bango oyo bayaki elongo na Zorobabele, Yeshua, Nehemia, Seraya, Relaya, Mordekayi, Bilshane, Mispare, Bigvayi, Rekume, Baana.

Motango ya mibali ya batu ya Israel:

3. Bana mibali ya Parosh, nkoto mibale na kama moko na tuku sambo na mibale (2172) ; 4. Bana mibali ya Shefatia, kama misato na tuku sambo na mibale (372); 5. Bana mibali ya Arake, kama sambo na tuku sambo na mitano (775); 6. Bana mibali ya Pakate-moabe, bana mibali ya Yeshua na ya Yoabe, nkoto mibale na kama mwambe na zomi na mibale (2812); 7. Bana mibali ya Elama, nkoto moko na kama mibale na tuku mitano na mineyi (1254); 8. Bana mibali ya Zatu, kama libwa na tuku mineyi na mitano (945); 9. Bana mibali ya Zakayi, kama sambo na tuku motoba (760); 10. Bana mibali ya Bani, kama motoba na tuku mineyi na mibale (642); 11. Bana mibali ya Bebayi, kama motoba na tuku mibale na misato (623); 12. Bana mibali ya Azgade, nkoto moko na kama mibale na tuku mibale na mibale (1222); 13. Bana mibali ya Adonikama, kama motoba na tuku motoba na motoba (666); 14. Bana mibali ya Bigvayi, batu nkoto mibale na tuku mitano na motoba (2056); 15. Bana mibali ya Adine, kama mineyi na tuku mitano na mineyi (454); 16. Bana mibali ya Atere, ya Ezekiasi, tuku libwa na mwambe (98); 17. Bana mibali ya Bezayi, kama misato na tuku mibale na misato (323); 18. Bana mibali ya Yora, kama moko na zomi na mibale (112); 19. Bana mibali ya Ashume, kama mibale na tuku mibale na misato (223); 20. Bana mibali ya Gibare, tuku libwa na mitano (95); 21. Bana mibali ya Betheleme, kama moko na tuku mibale na misato (123); 22. Mibali ya Netofa, tuku mitano na motoba (56); 23. Mibali ya Anatote, kama moko na tuku mibale na mwambe (128); 24. Bana mibali ya Azmawete, tuku minei na mibale (42); 25. Bana mibali ya Kiriate-arime, Kefira pe Berote, kama sambo na tuku mineyi na misato (743); 26. Bana mibali ya Rama pe Geba, kama motoba na tuku mibale na moko (621); 27. Mibali ya Mikmas, kama moko na tuku mibale na mibale (122); 28. Mibali ya Bethel pe ya Ayi, kama mibale na tuku mibale na misato (223); 29. Bana mibali ya Nebo, tuku mitano na mibale (52); 30. Bana mibali ya Magabisi, kama moko na tuku mitano na motoba (156); 31. Bana mibali ya Elama mosusu, nkoto moko na kama mibale na tuku mitano na mineyi (1254); 32. Bana mibali ya Arime, kama misato na tuku mibale (320); 33. Bana mibali ya Lode, Adidi, pe Ono, kama sambo na tuku mibale na mitano (725); 34. Bana mibali ya Yeriko, kama misato na tuku mineyi na mitano (345); 35. Bana mibali ya Sena, nkoto misato na kama motoba na tuku misato (3630).

36. Banganga-Nzambe: bana mibali ya Yedaya, ya ndako ya Yeshua, kama libwa na tuku sambo na misato (973); 37. Bana mibali ya Imere, nkoto moko na tuku mitano na mibale (1052); 38. Bana mibali ya Pashkure, nkoto moko na kama mibale na tuku mineyi na sambo (1247); 39. Bana mibali ya Arime, nkoto moko na zomi na sambo (1017).

40. Balevi: bana mibali ya Yeshua pe ya Kadimiele, kati na bana ya Odavia, tuku sambo na mineyi (74).

41. Bayembi: bana mibali ya Azaf, kama moko na tuku mibale na mwambe (128).

42. Bana mibali ya bakengeli ya bikuke: bana mibali ya Shalume, bana mibali ya Atere, bana mibali ya Talmona, bana mibali ya Akube, bana mibali ya Atita, bana mibali ya Sobayi, bango nionso kama moko na tuku misato na libwa (139).

43. Banetinime: bana mibali ya Tshika, bana mibali ya Asufa, bana mibali ya Tabawote. 44. Bana mibali ya Keros, bana mibali ya Siyaya, bana mibali ya Padone; 45. Bana mibali ya Lebana, bana mibali ya Agaba, bana mibali ya Akube; 46. Bana mibali ya Agabe, bana mibali ya Shalamayi, bana mibali ya Anan; 47. Bana mibali ya Gidele, bana mibali ya Gakara, bana mibali ya Reya; 48. Bana mibali ya Retisini, bana mibali ya Nekoda, bana mibali ya Gazame; 49. Bana mibali ya Uza, bana mibali ya Paseya, bana mibali ya Besayi; 50. Bana mibali ya Asna, bana mibali ya Mewunime, bana mibali ya Nefusime; 51. Bana mibali ya Bakabuke, bana mibali ya Akufa, bana mibali ya Arkure; 52. Bana mibali ya Bakulute, bana mibali ya Mekida, bana mibali ya Arsha; 53. Bana mibali ya Barkos, bana mibali ya Sisera, bana mibali ya Tama; 54. Bana mibali ya Netisiyak, bana mibali ya Atifa.

55. Bana mibali ya basali ya Salomo: bana mibali ya Sotayi, bana mibali ya Soferete, bana mibali ya Peruda. 56. Bana mibali ya Yaala, bana mibali ya Darkone, bana mibali ya Gidele; 57. Bana mibali ya Shefatia, bana mibali ya Atile, bana mibali ya Pokerete-A-Sevayime, bana mibali ya Ami.

58. Banetinime nionso pe bana mibali ya basali ya Salomo, kama misato na tuku libwa na mibale (392).

59. Pe tala baoyo bamataki na Tel-Melak, na Tel-Arsha, na Kerub-Adane, na Imer; kasi bakokaki te kolakisa bandako ya tata na bango to bokitani na bango, soki bazalaki ya Israel; 60. Bana mibali ya Delaya, bana mibali ya Tobiya, bana mibali ya Nekoda, kama motoba na tuku mitano na mibale (652). 61. Pe bana mibali ya banganga-Nzambe, bana mibali ya Obaya, bana mibali ya Akoze, bana mibali ya Barzilayi, oyo azwaki mwasi na kati ya bana basi ya Barzilayi Mogaladi, pe abengamaki na kombo na bango. 62. Ba wana balukaki bokomami na buku ya bakoko, kasi emonanaki te; pe balongolamaki na bonganga ya Nzambe lokola batu ya mbindo. 63. Pe Tirshata (b) alobaki na bango ete basengeli te koliya biloko ya bule kino nganga-Nzambe moko akotelema elongo na Urime pe Tumime.

64. Liyangani mobimba lokola eloko moko ezalaki nkoto tuku mineyi na mibale na kama misato na tuku motoba (42360); 65. Longola basali na bango ya mibali pe basali na bango ya basi; bango wana bazalaki nkoto sambo na kama misato na tuku misato na sambo (7337). Pe kati na bango bayembi ya mibali pe ya basi kama mibale (200). 66. Bazalaki na bampunda kama sambo na tuku misato na motoba (736), bamulet kama mibale na tuku mineyi na mitano (245); 67. Bakamela ezalaki kama mineyi na tuku misato na mitano (435), pe bampunda ezalaki nkoto motoba na kama sambo na tuku mibale (6720).

68. Pe bakonzi ya batata, tangu bakomaki na ndako ya Yawe oyo ezali na Yerusaleme, bapesaki na bolingo na bango moko pona ndako ya Yawe pona kotelemisa yango na esika na yango. 69. Na bokasi na bango, bapesaki na ebombeli bomengo ya mosala, bapesaki wolo nkoto tuku motoba na moko (61000) ya darik, pe ya palata nkoto mitano (5000) ya mina, pe bilamba ya banganga-Nzambe kama moko (100).

70. Pe banganga-Nzambe, balevi, pe batu, pe bayembi, pe bakengeli bikuke, pe banetinime bafandaki na bingumba na bango ; pe Israel mobimba bafandaki na bingumba na ye.

 

3        Mokapo 3

1. Pe tangu sanza ya sambo ekomaki, bana ya Israel bazalaki kati na bingumba, batu basanganaki lokola mutu moko na Yerusaleme. 2. Pe Yeshua mwana ya Yokadake, na bandeko na ye banganga-Nzambe, pe Zorobabel mwana ya Salatiele, pe bandeko na ye batelemaki pe batongaki etumbelo ya Nzambe ya Israel, pona kobonza makabo ya kotumbama mobimba, ndenge ekomami na kati ya mobeko Mose, mutu na Nzambe. 3. Pe batelemisaki etumbelo na esika ya fondatio na yango, po ete bobangi ezalaki likolo na bango na tina ya batu ya bamboka wana; pe babonzaki likolo ya bambeka ya kotumba mobimba ya Yawe, bambeka ya kotumba mobimba ya tongo pe ya pokwa. 4. Pe basalaki Feti ya Bahema, ndenge ekomamaki; Pe bazalaki kobonza makabo ya kotumba mobimba mokolo na mokolo, na motango na yango, na lolenge na mobeko, oyo ya mokolo wana na mokolo na yango; 5. Pe sima na yango, mbeka ya kotumba mobimba ya tangu nionso, pe oyo ya basanza ya sika, pe oyo ya mikolo nionso ya bokutani oyo ebulisami ya Yawe, pe ya mutu nionso oyo akobonza likabo ya bolingo na ye moko epayi ya Yawe. 6. Banda mokolo ya liboso ya sanza ya sambo babandaki kobonzela Yawe makabo ya kotumba mobimba; kasi fondatio ya tempelo ya Yawe etiyamaki te. 7. Pe bafutaki mbongo na basali ya mabanga pe basali ya mabaya, pe misuni pe masanga pe mafuta, na Basidoni pe na Baturi, pona komema longwa na Liban banzete ya sedre na mayi monene ya Yafa, na kolanda motindo ya bazwaki na Sirise mokonzi ya Perse apesaki na bango.

8. Pe na mbula ya mibale tangu bokomi na bango na ndako ya Nzambe na Yerusaleme, na sanza ya mibale, Zorobabel mwana ya Salatiele, na Yeshua mwana ya Yozadake, pe batikali ya bandeko na bango, banganga-Nzambe pe Balevi, pe bango nionso oyo babimaki na bokangami na Yerusaleme, pe batelemisaki Balevi, kobanda na mibu tuku mibale pe koleka, pona kokamba na kokengela mosala ya ndako ya Yawe. 9. Pe Yeshua, bana na ye ya mibali, pe bandeko na ye, Kadimiele, pe bana na ye ya mibali, bana mibali ya Yuda, batelemaki lokola moko, po na kokamba na kokengela baoyo bazalaki kosala mosala ya ndako ya Nzambe; bana ya Enadade, bana na bango ya mibali pe bandeko na bango Balevi. 10. Pe tango batongi bazalaki kotiya fondatio ya tempelo ya Yawe, batelemisaki banganga-Nzambe na bilamba na bango, na bakelelo, pe Balevi, bana mibali ya Azaf, na basimbale (c), pona kosanzola Yawe, na kolanda mitindo ya David mokonzi ya Israel. 11. Pe bayembaki elongo na kosanzola pe kopesa matondi epayi ya Yawe : po ete azali malamu, po boboto na ye epayi na Israel ezali libela. Pe batu nionso bagangaki na mongongo makasi na kosanzola Yawe, pamba te moboko ya ndako ya Yawe etiyamaki. 12. Pe mingi kati na banganga-Nzambe, pe Balevi, na bakonzi ya batata, mibange, oyo bamonaki ndako ya liboso, balelaki na mongongo makasi, tangu batiyaki moboko ya ndako oyo liboso na miso na bango, pe mingi bagangaki mingongo na bango makasi na makelele ya esengo. 13. Pe batu bakokaki te kososola na kokesinisa lokito ya koganga ya esengo na mongongo ya kolela ya batu; po batu bagangaki mongongo makasi ya esengo, pe lokito yango eyokanaki mosika.

 

4        Mokapo 4

1. Pe banguna ya Yuda Na Benyamina bayoki ete bana ya bokangami bazalaki kotonga tempelo ya Yawe Nzambe ya Israel; 2. Pe bayaki epayi ya Zorobabel pe epayi ya bakonzi ya batata, pe balobi na bango ete: “Tolingi kotonga elongo na bino; po tozali koluka Nzambe na bino lokola bino; pe topesaki ye mbeka wuta mikolo ya Esar-Adone mokonzi ya Asuria, oyo amemaki biso awa. 3. Pe Zorobabel na Yeshua na bakonzi mosusu ya batata ya Israel balobaki na bango ete: Bozali na likambu moko te ete pona kotonga ndako elongo na biso pona Nzambe na biso; kasi biso moko nde tokotongela Yawe Nzambe ya Israel, lokola mokonzi Sirise mokonzi ya Perse apesi biso mitindo. 4. Bongo batu ya mboka balembisaki maboko ya batu ya Yuda pe babangisi bango pona kotonga. 5. Pe bafutaki bapesi-toli pona kobundisa bango pona kobebisa mokano ya mabongisi na bango, mikolo nionso ya Sirise mokonzi ya Perse, pe ti na bokonzi ya Dario mokonzi ya Perse.

6. Pe na tangu ya bokonzi ya Asuruse, na ebandeli ya bokonzi na ye, bakomaki mokanda ya kofunda bafandi ya Yuda pe ya Yerusaleme. 7. Pe na mikolo ya Artashasta, Bishame, Mitredate, Tabele, pe baninga na ye mosusu bakomelaki Artashasta mokonzi ya Perse. Bokomi ya mokanda yango ekomamaki na monoko ya siriak (d) pe ebongolamaki na monoko ya siriak. 8. Rehume guvernere na Shimshayi sekretere bakomaki mokanda pona kobundisa Yerusaleme na Artashasta mokonzi, na maloba oyo. 9. Na bongo Rehume, guvernere, na Shimishayi sekretere, pe baoyo batikali ya baninga na bango ya mosala, batu ya Din, batu ya Afarsatak, batu ya Tarpel, batu ya Afaras, batu ya Uruk, batu ya Babilone, batu ya Suze, batu ya Deya, batu ya Elam, 10. Pe batu mosusu oyo batikalaki, oyo Osnapare mutu monene pe ya lokumu amemaki pe afandisaki bango kati na bingumba ya Samaria pe ndambo mosusu na ngambo mosusu ya ebale, pe bongo na bongo… 11. Oyo ezali kopi ya mokanda oyo batindelaki ye : Na mokonzi Artashasta: Basali na yo, mibali oyo bazali na ngambo oyo ya ebale, pe bongo na bongo. 12. Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bamataki kowuta epayi na yo bayaki epayi na biso na Yelusaleme, bakotonga engumba ya botomboki pe ya mabe, pe bamir milayi basilisi kotonga pe bakobongisa miboko. 13. Tika ete mokonzi ayeba ete soki engumba oyo etongami lisusu pe bamir milayi esili kotongama, bakofuta lisusu mpako te, impo te pe mbongo ya mobembo te, pe na mikolo ekoya, yango ekosala mabe na bakonzi. 14. Lokola sik’oyo totiaka mungwa na mungwa ya ndako ya mokonzi, pe ebongi te pona biso tomona bakosala mokonzi mbeba, na tina wana tozali kotinda pe koyebisa mokonzi. 15. Po baluka na kati ya buku ya mikanda ya batata na yo; pe okomona na kati Buku ya bokundoli, pe okoyeba, ete engumba oyo ezali engumba ya botomboki, pe esala mbeba na bakonzi pe na bituka, pe ete wuta kala botomboki esalamaka kati na yango, na tina wana engumba oyo ebebisamaki. 16. Tokosala ete mokonzi ayeba soki engumba oyo etongami lisusu pe bamir milayi na ye esili, okozala na eteni moko te na ngambo oyo ya ebale.

17. Mokonzi atindaki eyano epayi ya Rehume, guvernere pe Shimisayi sekretere, pe epayi ya baninga na bango mosusu oyo bafandaki na Samaria pe na bisika mosusu oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale: kimia, pe bongo na bongo. 18. Mokanda oyo botindelaki biso etangami polele liboso na ngai. 19. Pe ngai napesaki mitindo, pe boluki esalemi pe bamonaki ete engumba oyo wuta mikolo ya kala esali botomboki na bakonzi, pe botomboki pe rebelion etombolamaki kati na yango. 20. Pe ezalaki na bakonzi ya nguya na Yerusaleme, oyo bazalaki kokonza likolo na nionso oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale; pe mpako, impo pe mbongo ya mobembo efutamaki epayi na bango. 21. Sik’oyo, pesa motindo batu oyo batika kosala, ete engumba oyo etongama lisusu te, kino ngai nakopesa motindo. 22. Pe bokeba ete bozanga kosala boye te : po na nini mabe ekokola komata kino mbeba ya bakonzi? 23. Na sima na yango, tangu kaka kopi ya mokanda ya Mokonzi Artashasta etangamaki liboso ya Rehume pe Shimshayi sekretere, pe baninga na bango, bakendaki mbangu na Yerusaleme epayi ya Bayuda, pe bakataki bango mosala na makasi pe na mobulu. 24. Na bongo mosala ya ndako ya Nzambe na Yerusaleme ekatanaki, pe esilaki ti na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dalio mokonzi ya Perse.

 

5        Mokapo 5

1. Pe baprofete, Haggai profete pe Zakaria mwana ya Ido, baprofetizaki na Bayuda oyo bazalaki na Yuda pe na Yerusaleme; na kombo ya Nzambe ya Israel likolo na bango. 2. Bongo Zorobabel mwana ya Salatiele pe Yeshua mwana ya Yozadake batelemaki pe babandaki kotonga ndako ya Nzambe oyo ezalaki na Yerusaleme, pe elongo na bango baprofete ya Nzambe oyo basalisaki bango. 3. Na tangu wana Tatenayi, guvernere na ngambo oyo ya ebale, na Shetare boznayi, na baninga na bango, bayaki epayi na bango pe balobaki na bango boye: Nani apesaki bino mitindo ya kotonga ndako oyo pe kosilisa mir molayi oyo? 4. Na sima tolobi bango lolenge oyo na bakombo ya batu oyo batongaki ndako oyo. 5. Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki likolo ya bampaka ya Bayuda, na boye ete bapekisaki bango te kino likambo yango ekomaki epayi ya Dario, pe na sima bazongisaki eyano na mokanda etali yango.

6. Kopi ya mokanda oyo Tatenayi, guvernere na ngambo oyo ya ebale, pe Shetare boznayi na baninga na bango, Batu ya Afarsak, oyo bazalaki na ngambo ya ebale, batindelaki mokonzi Dario. 7. Batindelaki ye maloba, pe ekomamaki boye na kati na yango: Na Dario mokonzi, kimia nionso! 8. Tika ete mokonzi ayeba ete tokendaki na mboka ya Yuda, na ndako ya Nzambe monene; pe etongami na mabanga minene oyo ebalusamaka, pe mabaya matiyami na bamir, pe mosala oyo ezali kokoba kitoko na molende, pe ezali kokoba liboso na se ya loboko na bango. 9. Bongo totunaki bampaka pe tolobaki na bango boye: Nani apesaki bino mitindo ya kotonga ndako oyo pe kosilisa mir molayi oyo? 10. Pe tosengaki bango lisusu bakombo na bango pona koyebisa yo, po tokoma bakombo ya batu oyo bazalaki mitu kati na bango. 11. Bongo bazongiselaki biso boye, balobi: Tozali basali ya Nzambe ya likolo pe ya mabele, pe tokotonga ndako oyo etongamaki mibu mingi liboso; pe mokonzi moko monene ya Israel atongaki yango pe asilisaki yango. 12. Kasi tangu batata na biso basilikisaki Nzambe ya likolo, akabaki bango na loboko ya Nabukodonozor, mokonzi ya Babilone, mukaladeya, pe abebisaki ndako oyo pe amemaki batu na Babilone. 13. Kasi na mbula ya liboso ya Sirise mokonzi ya Babilone, mokonzi Sirise apesaki mitindo ya kotonga ndako oyo ya Nzambe. 14. Pe biloko ya wolo pe ya palata ya ndako ya Nzambe, oyo Nabukodonozor abimisaki na tempelo oyo ezalaki na Yerusaleme, pe amemaki na kati ya tempelo ya Babilone, mokonzi Sirise abimisaki yango na tempelo ya Babilone pe apesaki yango na oyo abengami na kombo ya Shesbazar, oyo atiaki guvernere. 15. Pe alobaki na ye: Kamata biloko oyo, kende pe tysa yango na kati ya tempelo oyo ezali na Yerusaleme; pe ndako ya Nzambe etongama na esika na yango. 16. Bongo Sheshbatsar wana ayaki pe atiaki moboko ya ndako ya Nzambe, oyo ezali na Yerusaleme; pe banda tangu wana kino sik’oyo ezali kotongama, kasi esili nanu te. 17. Pe sik’oyo, soki ezali malamu pona mokonzi, tika baluka na kati ya ndako ya bozwi ya mokonzi, oyo ezali kuna na Babilone, po na komona soki ezali bongo ete mokonzi Sirise apesaka motindo pona kotonga ndako oyo ya Nzambe na Yerusaleme; pe tika mokonzi atindela biso mokano na ye na tina ya likambu oyo.

 

6        Mokapo 6

 1 Bongo Mokonzi Dario apesaki mitindo, pe balukaki na ndako ya bobombi mikanda epayi babombaka biloko ya motuya na Babilone. 2. Pe bakutaki na Ekbatane, na mboka-mokonzi oyo ezali na etuka ya Media, rulo moko, pe na kati na yango ekaniseli (memorandum) moko oyo ekomami boye: 3 Na mbula ya liboso ya Mokonzi Sirise, Mokonzi Sirise apesaki motindo oyo etali ndako ya Nzambe na Yerusaleme: Tika ete ndako etongama lokola esika ya kobonza bambeka, pe miboko na yango ezala makasi. Molayi na yango ekozala kude (e)  tuku motoba, monene na yango kude tuku motoba, 4. Milongo misato ya mabanga minene pe molongo moko ya mabaya ya sika; pe ete ndako ya mokonzi ekofuta mosolo ya mosala; 5. Pe lisusu ete biloko ya wolo pe ya palata ya ndako ya Nzambe, oyo Nabukodonozor abimisaki na tempelo ya Yerusaleme pe amemaki na Babilone, ezongisama, pe bamema yango na tempelo ya Yerusaleme, na esika na yango; pe okotiya yango na kati ya ndako ya Nzambe. 6. Yango wana, Tatenayi, guvernere na ngambo ya ebale, Shetare-boznayi, na baninga na bango, Batu ya Afarsak, oyo bazali na ngambo ya ebale, bozala mosika na esika wana; 7. Botika mosala ya ndako ya Nzambe oyo esalema. Ete guvernere ya Bayuda pe bampaka ya Bayuda batonga ndako oyo ya Nzambe na esika na yango. 8. Pe na ngai, motindo epesami na tina ya nionso oyo bokosala epayi ya bampaka ya Bayuda pona botongi ya ndako oyo ya Nzambe: Ete ya biloko ya mokonzi oyo ewuta na mpako ya ngambo ya ebale, mosolo efutama noki na batu oyo, po ete bakoka kokata mosala te; 9. Pe eloko nionso oyo esengeli pona bango, ezala bangombe bilenge ya mibali pe bampate ya mibali pe bana bampate, pona bambeka ya kotumba mobimba epayi ya Nzambe ya likolo, ble, mungwa, vino pe mafuta, na ndenge ya molongo ya banganga-Nzambe oyo bazali na Yerusaleme, epesamela bango mokolo na mokolo, ete kozanga ezala te, 10. Po babonzaka mpaka ya malasi epayi na Nzambe ya likolo pe babondela pona bomoyi ya mokonzi pe ya bana na ye ya mibali. 11. Pe na ngai motindo epesameli, ete soki mutu moko akobongola mobeko oyo ya mokonzi, ete nzete moko ekopikolama libanda ya ndako na ye pe ekotelemisama, pe bakobaka ye na yango, pe ete na tina na yango ndako na ye ekokoma liboke ya bosoto. 12. Pe Nzambe oyo afandisi kombo na ye wana akweyisa mokonzi nionso pe batu oyo bakotombola loboko pona kobongola pe kobebisa ndako ya Nzambe oyo ezali na Yerusaleme. Ngai, Dario, napesi motindo oyo; tika ete na molende esalama noki-noki.

13. Bongo Tatenayi, guvernere na ngambo oyo ya ebale, Shetare-boznayi, na baninga na bango, basalaki yango noki-noki, na ndenge oyo Mokonzi Dario atindaki. 14. Pe bampaka ya Bayuda batongaki pe bakendaki liboso na nzela ya profesi ya profete Hagai pe ya Zakaria mwana ya Ido. Pe batongaki pe basilisaki, na kolandisama ya etinda ya Nzambe ya Israel, pe na kolandisama ya etinda ya Sirise, pe ya Dario, pe ya Artashasta mokonzi ya Perse. 15. Pe ndako oyo esilaki na mokolo ya misato ya sanza ya Adar: ezalaki na mbula ya motoba ya bokonzi ya Mokonzi Dario.

16. Pe bana ya Israel, banganga-Nzambe pe Balevi, pe bana mosusu oyo bawutaki na bowumbu, basalaki feti ya kobulisa ndako ya Nzambe oyo na esengo; 17. Pe babonzaki mbeka pona kobulisa ndako oyo ya Nzambe, bangombe mibali kama moko, bampate mibali kama mibale, bana bampate kama mineyi, pe lokola mbeka ya lisumu pona Israel mobimba, bantaba zomi na mibale na motango ya mabota ya Israel. 18. Pe batiyaki banganga-Nzambe na bituluku na bango, pe Balevi na bituluku na bango, pona mosala ya Nzambe na Yerusaleme, kolandisama oyo ekomami na buku ya Mose.

19. Pe bana oyo bawuti na bowumbu basalaki Paska na mokolo ya zomi na mineyi ya sanza ya liboso; 20. Pamba te banganga-Nzambe na Balevi bamipetolamaki lokola mutu moko : bazalaki bango nionso peto. Pe babomaki Paska pona bana nionso oyo bawuti bowumbu, pe pona bandeko na bango banganga-Nzambe, pe pona bango moko. 21. Pe bana ya Israel oyo bazongaki na kowuta na bawumbu, pe elongo na bango batu nionso oyo bakabwanaki na mbindo ya bikolo ya mboka pona koluka Yawe Nzambe ya Israel, baliyaki. 22. Pe na esengo, basalaki feti ya mapa ezangi levin na mikolo sambo; po Yawe akomisaki bango batu na esengo, pe abalusaki motema ya mokonzi ya Asuria epayi na bango, po na kokembisa maboko na bango na mosala ya ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Israel.

 

7        Mokapo 7

1. Pe sima ya makambo wana, na boyangeli ya Artashasta mokonzi ya Perse, Ezra mwana ya Seraya, mwana ya Azariya, mwana ya Ilikiya. 2. Mwana ya Shalume, mwana ya Sadok, mwana ya Ahituve; 3 mwana ya Amariya, mwana ya Azariya, mwana ya Merayote; 4. Mwana ya Zeraya, mwana ya Uzi, mwana ya Buki; 5. Mwana ya Abishuya, mwana ya Fine, mwana ya Eleyazar, mwana ya Aron, mokonzi ya banganga-Nzambe. 6 - Ezra oyo amataki longwa na Babilone: ​​azalaki mokomi oyo amibongisi na boyebi malamu mibeko ya Mose oyo Yawe, Nzambe ya Israel, apesaki. Pe mokonzi apesaki ye nionso oyo asengaki, lokola loboko ya Yawe Nzambe na ye ezalaki likolo na ye. 7. Pe bana ya Israel, pe banganga-Nzambe, pe balevi, pe bayembi, pe bakengeli ya bikuke, pe Banetini, bamataki na Yerusaleme na mbula ya sambo ya Mokonzi Artashasta. 8. Pe akomaki na Yerusaleme na sanza ya mitano; ezalaki mbula ya sambo ya mokonzi. 9. Po na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, mabongisi ya kolongwa na Babilone ebongisamaki; pe na mokolo ya yambo ya sanza ya mitano, ayaki na Yerusaleme, lokola loboko malamu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye. 10. Po Ezra abongisaki motema na ye pona koluka Mibeko ya Yawe pe kotiaka yango na misala, pe kolakisa na Israel mibeko pe bikateli.

11. Pe oyo ezali kopi ya mokanda oyo Mokonzi Artashasta apesaki na Ezra nganga-Nzambe, mokomi, mokomeli ya maloba ya mibeko ya Yawe pe ya bikateli na ye tina ya Israel. 12. Artashasta, mokonzi ya bakonzi, epayi ya Ezra, nganga-Nzambe, mokomi ya kokoka na Mibeko ya Nzambe ya likolo, pe bongo na bongo. 13. Na ngai etinda epesameli ete batu nionso ya Israel pe banganga-Nzambe na bango pe Balevi, oyo kati na bokonzi na ngai, balingi kokende elongo na yo na Yerusaleme, bakende; 14. Lokola liboso ya mokonzi na bapesi-toli na ye sambo batindi yo pona kotuna mituna ya bolukiluki na tina na Yuda pe Yerusaleme, na kolanda mobeko ya Nzambe na yo, oyo ezali na loboko na yo. 15. pe pona komema palata na wolo oyo mokonzi na bapesi-toli na ye basepelaki kopesa Nzambe ya Israel, oyo efandeli na ye  ezali na Yerusaleme. 16. Pe palata pe wolo nionso oyo okomona na etuka mobimba ya Babilone, elongo na likabo ya bolingi ya batu pe ya banganga-Nzambe oyo basepelaki na kopesa na bolingo na bango moko pona ndako ya Nzambe na bango oyo ezali na Yerusaleme; 17. Bongo na mbongo yango osomba na malamu, bangombe, bampate-mibali, ban aya bampate, pe makabo na bango ya gato mbuma pe makabo na bango ya masanga, pe okobonza yango na etumbelo ya ndako ya Nzambe na bino, oyo ezali na Yerusaleme. 18. Pe nionso oyo yo na bandeko na yo bomoni malamu kosala na palata pe wolo oyo etikali, bosala yango ndenge ya mokano ya Nzambe na bino. 19. Pe bambeki oyo epesameli yo pona mosala ya ndako ya Nzambe na yo, botiya yango liboso ya Nzambe ya Yerusaleme. 20. Pe baoyo nionso etikali ya motuya pona ndako ya Nzambe na yo, oyo osengeli kopesa, okopesa yango kowuta na ndako ya ebombelo ya mosolo ya mokonzi. 21. Pe ngai, Mokonzi Artashasta, napesi etinda na babateli nionso ya mosolo na ngambo mosusu ya ebale, basala na malamu makambo nionso oyo Ezra, nganga-Nzambe, mokomi ya Mibeko ya Nzambe ya likolo, akosengi bino, 22. Kino talanta kama moko ya palata, pe kino kor (f) kama moko ya ble, pe kino baths (f) kama moko ya vino, kino baths kama moko ya mafuta, pe mungwa, oyo ezangi mezire: 23. Makambu nionso oyo Nzambe ya likolo apesi mitindo, ekosalema penza na bokebi pona ndako ya Nzambe ya likolo; pamba te pona nini kanda ekozala likolo na bokonzi ya mokonzi pe ya bana na ye? 24. Tozali koyebisa bino ete na likolo ya banganga-Nzambe nionso pe na Balevi, na bayembi, na bakengeli bikuke, na Banetinnei, pe na basali ya ndako oyo ya Nzambe, mpako te, impo te, to mbongo ya mobembo moko te ekoki kozwama. 25. Pe yo, Ezra, na bwanya ya Nzambe na yo, oyo ezali na loboko na yo, pona bamajistra pe bazuzi oyo bakosambisa bato nionso oyo bazali na ngambo mosusu ya ebale, banso oyo bayebi mibeko ya Nzambe na yo; pe na ye oyo ayebi yango te, bokolakisa ye; 26. Pe oyo nionso akotia na mosala te mobeko ya Nzambe na bino pe mobeko ya mokonzi, akosambisama na molende nokinoki, ezala pona liwa, to pona kolongola ye na esika na ye, to pona kobotola biloko na ye, to pona boloko.

27. Yawe Nzambe ya batata na biso apambolama, oyo atie makambu ya ndenge oyo na motema ya mokonzi, po na kongalisa kitoko ndako ya Yawe oyo ezali na Yerusaleme, 28. Pe ye oyo alakisaki ngai boboto na ye liboso ya mokonzi, pe bapesi-toli na ye, pe bankumu nionso ya nguya ya mokonzi! Pe ngai, nalendisamaki lokola loboko ya Yawe, Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, pe nasangisaki kati na Israel bakonzi pona komata elongo na ngai.

 

8        Mokapo 8

1. Pe tala bakonzi (g) ya batata pe makomi ya mokanda ya bakoko ya baoyo bayaki elongo na ngai wuta na Babilone, na boyangeli ya mokonzi Artashasta : 2. Na bana mibali ya Fine, Gershome; na bana mibali ya Itamare, Daniele; na bana mibali ya David, Atushe; 3. Na bana mibali ya Shekaniya, na bana mibali ya Parose, Zekariya, pe elongo na ye, bakomami na mokanda ya bakoko, mibali kama moko na tuku mitano (150); 4. Na bana mibali ya Pakate-Moabe, Eliyehoyenayi mwana ya Zerakia, pe elongo na ye mibali kama mibale (200); 5. Na bana mibali ya Shekaniya, mwana ya Yahaziele, pe elongo na ye mibali kama misato (300); 6. Pe na bana mibali ya Adine, Ebede mwana ya Yonatane, pe mibali tuku mitano (50) elongo na ye; 7. Pe na bana mibali ya Elama, Yeshaya mwana ya Atalia, pe mibali tuku sambo (70) elongo na ye; 8. Pe na bana mibali ya Shefatiya, Zebadiya mwana ya Mikaele, pe mibali tuku mwambe (80) elongo na ye; 9. Na bana mibali ya Yoab, Obadia mwana ya Yehiele, pe elongo na ye mibali kama mibale na zomi na mwambe (218); + 10. Pe na bana mibali ya Shelomite, mwana ya Yosifiya, pe mibali kama moko na tuku motoba (160) elongo na ye; 11. Pe na bana mibali ya Bebayi, Zakaria mwana ya Bebayi, pe mibali tuku mibale na mwambe (28) elongo na ye; 12. Pe na bana mibali ya Azgade, Yohanana mwana ya A-katana, pe mibali kama moko na zomi (110) elongo na ye; 13. Pe na bana mibali ya Adonikame, baoyo ya suka, pe oyo ezali bakombo na bango: Elifelete, Yehiele pe Shemahia, pe elongo na bango mibali tuku motoba (60); 14. Pe na bana mibali ya Bigvayi, Utayi na Zabude, pe mibali tuku sambo (70) elongo na bango.

15. Pe nasangisaki bango pembeni na ebale oyo ezali kowuta epayi ya Ahawa, pe totiaki kamp kuna mikolo misato; pe natalaki na bokebi batu pe banganga-Nzambe, pe namonaki ata moko te kati na bana ya Levi. 16. Na sima, natindaki baluka Eliezere, Ariel, Shemaya, Elinatane, Yaribe, Elinatane, Natane, Zakaria, Meshulame, oyo bazalaki bakonzi, na Yoyaribe na Elinatane, batu ya mayele; 17. Pe natindaki bango na Ido, oyo azalaki mokonzi na kati ya lokalite Kasifiya, pe natiyaki maloba na minoko na bango pona koloba yango na Ido na bandeko na ye, Banetinine, na kati ya lokalite Kasifiya, po bamemela biso basali pona ndako ya Nzambe na biso. 18. Pe bamemeli biso, lokola loboko malamu ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, mutu moko ya bososoli wuta na bana ya Makli, mwana ya Levi, mwana ya Israel, pe Sherebiya pe bana na ye ya mibali pe bandeko na ye, zomi na mwambe (18); 19. Pe Ashabia, pe elongo na ye Yeshaya, kati na bana mibali ya Merari, bandeko na ye ya mibali pe bana na bango ya mibali, tuku mibale (20); 20. Pe na Banetinine, oyo Davidi na bakonzi bapesaki bango pona mosala ya Balevi, Banetinine kama mibale na tuku mibale (220), bango nionso baponamaki na bakombo na bango. 21. Pe wana, pembeni ya ebale Ahawa, nasakolaki kokila bileyi, po na komikitisa liboso ya Nzambe na biso, po na kosenga na ye nzela ya polele pe solo, pona biso pe pona bana na biso, pe pona biloko na biso nionso. 22. Po nazalaki na soni pona kosenga na mokonzi mapinga pe basoda oyo batambolaka na bapunda pona kosunga biso na kobundisa monguna na nzela; po tolobaki na mokonzi, koloba: Loboko ya Nzambe na biso ezali malamu likolo ya baoyo nionso bazali koluka ye; pe nguya bokasi na ye pe nkanda na ye ezali kotelemela baoyo banso basundolaka ye. 23 Mpe tokilaki bilei, mpe tosengaki yango epai ya Nzambe wa biso, mpe ayokaki biso.

24. Pe natiaki pembeni kati na bakonzi zomi na mibale ya banganga-Nzambe: Sherebia, Ashabia, pe zomi ya bandeko na bango elongo na bango. 25. Namekelaki bango kilo ya palata na wolo pe bambeki, likabo ya kotombola pona ndako ya Nzambe na biso, oyo mokonzi na bakonzi na ye, pe bapesi ye toli, pe Israel nionso oyo bazalaki wana, bapesaki. 26. Pe namekaki na loboko na bango talanta kama motoba na tuku mitano (650) ya palata, pe bambeki ya palata talanta kama moko (100), oyo ya wolo talanta kama moko (100), 27. Pe bakopo tuku mibale (20) ya wolo oyo ezali na motuya ya darik nkoto moko (1000), pe bambeki mibale ya motako ya malamu, oyo ezali na motuya mingi lokola wolo. 28. Pe nalobi na bango : Bozali basantu pona Yawe pe bambeki ezali na bosantu, pe palata pe wolo ezali likabo ya bolingi epayi ya Yawe Nzambe ya batata na bino. 29. Bokengela pe bobatela yango ti bokomeka kilo na yango liboso ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe Balevi pe liboso ya bakonzi ya batata ya Israel na Yerusaleme, kati na bashambre ya ndako ya Yawe. 30. Pe banganga-Nzambe na Balevi bazwaki palata na wolo pe bambɛki, na kilo, pona komema yango na Yerusaleme, na ndako ya Nzambe na biso.

31. Pe tolongwaki na ebale Ahawa na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, pona kokende na Yerusaleme. Pe loboko ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, pe akangolaki biso na loboko ya monguna, pe na mitambo oyo ezalaki na nzela. 32. Pe tokomaki na Yerusaleme pe tofandaki wana mikolo misato. 33. Pe na mokolo ya mineyi, palata pe wolo pe bambeki emekamaki na kilo na ndako ya Nzambe na biso, na loboko ya Meremote mwana ya nganga-Nzambe Uriya (Pe elongo na ye Eleazare mwana ya Fine, pe elongo na bango Yozabade mwana ya Yeshua, pe Noadia mwana ya Binuyi, Balevi; 34. Na motango na kilo ya nionso; pe na kaka tango yango kilo nionso ekomamaki. 35 Bana ya bokangami oyo bawutaki na bowumbu bapesaki Nzambe ya Israele makabo ya kotumbama mobimba: zomi mibale ya bangombe-mibali pona Israel mobimba, bampate-mibali tuku libwa na motoba, bana-bampate tuku sambo na sambo, bantaba zomi na mibale pona mbeka ya lisumu, pe nionso wana mbeka ya kotumba mobimba epayi ya Yawe. 36. Pe bapesaki mibeko ya mokonzi epayi ya basatrape ya mokonzi pe na baguvernere oyo bazalaki na ngambo oyo ya ebale, pe bapesaki lisungi na bango epayi ya batu pe na ndako ya Nzambe.

 

9        Mokapo 9

1. Pe tangu makambu oyo esilaki, bakonzi bapusanaki penepene na ngai, balobaki ete: Batu ya Israel, pe banganga-Nzambe pe Balevi, bakabwanaki te na batu ya mboka, na kolanda momesano na bango ya mbindo , oyo ya Bakanana, Baheti, Baperezite, Bayebusi, Baamona, Bamoaba, Baejipito, pe Baamore; 2. Po bazwi bana basi na bango po na bango moko pe po na bana na bango ya mibali, pe basangisaki nkona mosantu na batu ya mboka; pe loboko ya bakonzi pe ya baguvernere (h) bazalaki batu ya liboso na lisumu ya bokosi oyo.3. Pe tangu nayokaki yango, napasolaki elamba na ngai pe nzambala na ngai, pe nalongolaki suki ya moto na ngai pe mandefu na ngai, pe nafandaki na se na pasi mingi; 4. Pe epayi na ngai basanganaki baoyo banso balengaki na maloba ya Nzambe Ya Israel, na tina ya lisumu ya bango baoyo bamemamaki mosika; pe natikalaki kofanda na se na pasi mingi kino na mbeka ya pokwa.

5. Pe na tangu ya mbeka ya pokwa, natelemaki na komikitisa na ngai, pe napasuki elamba na ngai pe na nzambala na ngai, nafukamaki pe nasembolaki maboko na ngai epayi ya Yawe Nzambe na ngai. 6. Pe nalobaki : Nzambe na ngai, nazali na soni pe nazali kobanga pona kotombola elongi na ngai epayi na yo, O Nzambe na ngai; po bambeba na biso ekomi monene koleka mitu na biso, pe masumu na biso na nko ekomi kino likolo. 7. Banda mikolo ya batata na biso ti lelo, tozali na ngambo monene; pe na tina ya mabe na biso, biso, bakonzi na biso, pe banganga-Nzambe na biso, tokabamaki na loboko ya bakonzi ya bamboka, na mopanga, na bomemami na bowumbu, pe na bopunzi, pe na soni ya elongi, lokola ezali lelo ; 8. Pe sik’oyo pona mwa tangu moke ngolu eye likolo na biso kowuta na Yawe Nzambe na biso, pona kotikela biso ndambo oyo bakongolami na bokangami, pe kopesa biso sete na esika esantu na ye, ete Nzambe na biso angengisa misu na biso, pe apesa biso mwa bomoyi na kati ya bowumbu na biso, po tozali bawumbu; 9. Kasi na kati ya bowumbu na biso, Nzambe na biso atikaki biso te, kasi atiaki bolamu na ye likolo na biso liboso ya bakonzi ya Perse, pona kopesa biso bomoyi pona kotelemisa lisusu ndako ya Nzambe na biso pe kotonga lisusu bitika na yango, pe kopesa biso bamir na Yuda pe na Yerusaleme. 10. Pe sik’oyo, O Nzambe na biso, tokoloba nini sima ya likambu oyo? Po tobwaki mitindo na yo, 11. Oyo opesaki mitindo na nzela ya basali na yo baprofete, olobi ete : Mboka oyo bokokota na kati na yango pona kozwa yango, ezali mboka oyo ezali mbindo na bambindo ya batu ya bamboka, na makambu na bango ya mbindo oyo batondisaki yango suka ti suka na bambindo na bango. 12. Pe sik’oyo, kopesa bana na bino ya basi te epayi ya bana na bango ya mibali, pe bokozwa bana na bango ya basi te pona bana na bino ya mibali, bokoluka te kimia na bango to bolamu na bango po na libela: po bozala makasi, pe boliya biloko ya malamu ya mboka, pe botika yango libula ya libela na bana na bino ya mibali. 13. Pe sima ya nionso oyo ekomeli biso na tina ya misala na biso ya mabe pe na tina ya monene ya lisumu na biso…; kasi yo, Nzambe na biso, opesi biso etumbu moke koleka oyo ebongi na mabe na biso  (i) pe opesi biso likangoli lokola oyo ; 14 — tosengeli lisusu kozongela na kobuka mibeko na yo pe kosangana na nzela ya libala na batu oyo basalaka makambu wana ya mbindo? Okosilikela biso te kino okosilisa biso, po ete motikali azala te to mokimi te? 15. Yawe Nzambe ya Israel, ozali sembo, po tozali na ndambu babiki oyo batikali, lokola ezali lelo. Tala, tozali liboso na yo na kati ya mbeba na biso, po na tina ya likambu, oyo tokoki kotelema liboso na yo te.

 

10 Mokapo 10

1. Pe tangu Ezra azalaki kobondela pe koyambola boye, kolela pe kofukama liboso ya ndako ya Nzambe, basanganaki pembeni na ye, Israel, liyangani monene ya mibali pe basi pe bana, po batu balelaki mingi. 2. Pe Shekania mwana mobali ya Yehiele, na bana mibali ya Elama, azwaki maloba pe alobi na Ezra: Tozalaki na bokosi epayi na Nzambe na biso pe tozwi basi ya bapaya na kati ya batu ya mboka. Kasi sik’oyo elikya ezali pona Israel na likambu yango. 3. Pe sik’oyo tika tosala boyokani elongo na Nzambe na biso po tobengana basi nionso pe baoyo babotami na bango, engebene na toli ya nkolo na ngai pe ya baoyo bakoningina na mitindo ya Nzambe na biso, pe tika yango esalema lolenge na mobeko. 4. Telema, po likambu efandi likolo na yo, pe tokozala elongo na yo; zala makasi pe sala.

5. Pe Ezra atelemaki, pe asalaki ete bakonzi ya banganga-Nzambe, Balevi pe Israel mobimba, balapi ndayi ete bakosala lolenge ya liloba oyo; pe balapaki ndayi. 6. Pe Ezra atelemaki liboso ya ndako ya Nzambe, pe akotaki na shambre ya Yohanane mwana mobali ya Eliashibe; pe akoti wana pe aliyaki lipa te mpe amelaki mayi te, po alelaki pona lisumu bokosi ya bango baoyo bamemamaki mosika.

7. Pe batumbusaki mongongo na Yuda pe na Yerusaleme mobimba pona bana nionso ya mibali oyo bawuta na bowumbu basangana elongo na Yerusaleme. 8. Pe ete mutu nionso oyo akoya te na bowumeli ya mikolo misato engebene toli ya bakonzi pe bampaka, bakobotola biloko na ye nionso, pe ye moko akokabwana na lisanga ya baoyo bamemaki bango na bowumbu.

9. Pe mibali nionso ya Yuda pe ya Benyamina basanganaki na Yerusaleme na bowumeli ya mikolo misato: ezalaki na sanza ya libwa, na mokolo ya tuku mibale ya sanza; pe banso bazalaki ya kofanda na esika ya ndako ya Nzambe, kolenga na tina ya liloba ya likambu oyo pe na tina ya bambula. 10. Pe Ezra, nganga-Nzambe atelemaki pe alobaki na bango: Bozalaki na bokosi pe bofandisaki basi ya bapaya na ndako pona kobakisa na mabe ya Israel. 11. Sik’oyo, bondima mabe na bino liboso na Yawe Nzambe ya batata na bino, pe bosala oyo ezali posa na ye, pe bokabwana na batu ya mboka pe na basi ya bapaya. 12. Pe lisanga mobimba bayanolaki pe balobaki na mongongo makasi: 13. Iyo, na biso kosala na ndenge ya maloba na yo ; kasi bato bazali mingi, pe ezali eleko ya mbula, pe nzela ya kotelema libanda ezali te; pe ezali te mosala ya mokolo moko to mibale, po mingi kati na biso tozalaki batomboki na likambu oyo. 14. Na yango, tika ete bakonzi na biso batelema wana pona liyangani mobimba na tangu ya likambo oyo, pe tika ete baoyo nionso kati na bingumba na biso, bafandisaki basi ya bapaya na bandako, baya na batangu oyo etiami, pe elongo na bango bampaka ya engumba moko-moko, pe basambisi na ye, kino kanda ya kanda makasi ya Nzambe na biso ekobaluka mosika na biso. 15. Bobele kaka Yonatane mwana mobali ya Asaele na Yahzeya mwana mobali ya Tikwa nde batelemelaki likambo yango; pe Meshulame na Shabatayi, Molevi, basungaki bango.

16.  Pe bana mibali oyo bawutaki na bowumbu basalaki bongo. Pe Ezra, nganga-Nzambe, pe mibali oyo bazalaki bakonzi ya batata, kobila bandako ya batata na bango, pe banso na kombo na bango, bakabwanaki. Pe bafandaki na mokolo ya yambo ya sanza ya zomi pona kotalela likambu yango; 17. Pe mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki na mibali nionso oyo bafandisaki basi ya bapaya na bandako. 18. Pe na kati ya bana mibali ya banganga-Nzambe bakutaki basusu oyo bafandisaki basi ya bapaya na bandako: bana mibali ya Yeshua mwana ya Yozadake, pe na bandeko na ye, Maaseya, Eliezere, Yaribe, pe Gedalia. 19. Pe batombolaki loboko pona kobimisa basi yango, pe babonzaki meme moko ya mobali na kati ya etonga lokola mbeka pona mabunga na bango. 20. Pe na kati ya bana mibali ya Imere: Anani na Zebadia; 21. Pe na bana mibali ya Arime, Maaseya, Eliya, Shemaya, Yehiele, Uziya; 22. Pe na kati ya bana mibali ya Pashure: Eliyoyenayi, Maaseya, Yishimayele, Netanele, Yozabad pe Elayasa. 23. Pe na kati ya Balevi: Yozabade, Shimeyi, Kelaya (oyo ezali Kelita), Petaya, Yuda, pe Eliezere. 24. Pe na kati ya bayembi: Eliashibe. Pe na kati ya bakengeli ya bikuke: Shalume, na Teleme, na Uri. 25. Pe baoyo ya Israel: bana mibali ya Parose, Ramiya, Yiziya, Malkiya, Miyamine, Eleazare, Malkiya, Benaya; 26. Pe kati na bana mibali ya Elama, Matania, Zakaria, Yehiele, Abidi, Yeremote, Eliya;  27. Pe na kati ya bana mibali ya Zatu, Eliyoyenayi, Eliyashibe, Matania, Yeremote, Zabade na Aziza; 28. Pe kati ya bana mibali ya Bebayi: Yohanane, Ananiya, Zabayi, Atelayi;  29. Pe na kati ya bana mibali ya Bani, Meshulame, Maluke, Adaya, Yashube, Sheala, pe Ramote; 30. Pe kati na bana mibali ya Pahate-Moabe, Adna pe Kelale, Benaya, Maaseya, Matania, Bezalele, Binuyi, pe Manase; 31. Pe bana mibali ya Arime: Eliezere, Yishiya, Malkiya, Shemaya, Simeone; 32. Benyamina, Maluke, Shemaria; 33. Na kati ya bana mibali ya Ashume: Matan, Matata, Zabade, Elifelete, Yeremayi, Manase, Shimeyi; 34. Kati na bana mibali ya Bani: Maadayi, Amram na Uwele. 35. Benaya, Bediya, Keluwi, 36. Vaniya, Meremote, Eliashibe, 37. Matanya na Matenayi na Yasayi 38. Pe Bani, pe Binuwi, Shimeyi, 39. Shelemiya, Natan, Adaya; 40. Makenadebayi, Shashayi, Sharayi, 41. Azareyele pe Shelemiya, Shemaria, 42. Shalume, Amaria, Yozef; 43. Kati na bana mibali ya Nebo: Yehiele, Matitia, Zabade, Zebina, Yadayi, pe Yoele, Benaya.  44. Bango nionso bazwaki basi ya bapaya, pe ezalaki na bamosusu kati na bango oyo basi na bango babotaki bana.

 

11 Banoti

a. sirise, na monoko ya Arameyin ezali Koresh,

b. tirshata ezali titre ya guvernere, na se ya boyangeli ya Baperse,

c. basimbale, ezali esaleli ya kobeta miziki,

d. siriak ezali yango wana arameyin,

e. kude na lingala mosusu babengi yango mapeko, yango ezali unite moko ya kala ya mezire,

f. cors, baths, khomer. Motuya ya ba unite ya mezire eyebani na bosolo te. Bobongoli na ba unite na biso ya mezire ya mikol’oyo ezali kobimisa mikakatano mingi pe ebongoli mituya. Tomoni malamu totika bakombo ya ebandeli, Cor, Bath, Khomer. Na ndenge ya molimo, ekoki mbala mingi ezala bongo,

g. bakonzi ya batata ezali pe koloba mitu ya batata,

h. guvernere, ezali segan, liloba oyo ewuti na Perse. Segan ezali mutu ya lokumu to mokambi oyo asalaki mosala na kati ya lisanga,

i. To: osili kobikisa mingi koleka oyo mabe na biso ebongi to otiki pembeni mwa mabunga na biso,