Estere
Mokapo 1 — Mokapo 2 — Mokapo 3 — Mokapo 4 — Mokapo 5 — Mokapo 6 — Mokapo 7 — Mokapo 8 — Mokapo 9 — Mokapo 10 — Banoti
1. Pe na mikolo ya Ashasheruse (a) (ezali Ashasheruse, oyo ayangelaki kobanda na Inde ti na Etiopi likolo na bituka kama moko na tuku mibale na sambo), 2. Na mikolo wana, ekomaki ete Mokonzi Ashasheruse afandaki na kiti ya bokonzi na ye, na Shushan, engumba monene, 3. Na mbula ya misato ya bokonzi na ye, asalaki elambo pona bankumu pe basali na ye nionso, batu ya nguya ya mampinga ya Perse pe ya Mede, batu minene pe bakonzi ya bituka, bazalaki liboso na ye, 4. - Kolakisaka babozwi ya kembo ya bokonzi na ye pe kembo kitoko ya monene na ye na bowumeli ya mikolo mingi, mikolo kama na tuku mwambe.
5. Pe tangu mikolo yango ekokaki, mokonzi asalaki na batu nionso oyo bazalaki na Shushan, engumba monene, kobanda mutu monene ti na mutu moke, elambo ya mikolo sambo, na lopango ya elanga ya ndako monene ya mokonzi : 6. Barido ya pembe pe ya mayi ya pondu, pe ya langi ya ble, ezalaki ya kokangisama na basinga ya bissus pe ya motane-bule na pete ya palata pe na makonzi ya marbre ya pembe; Bambeto (ya kofandela) ezalaki ya wolo pe ya palata etandamaki na pavement ya marbre ya langi ya pondu pe ya pembe pe vere polele pe ya marbre ya mwindu. 7. Pe bapesaki masanga ya komela na bambeki ya wolo, pe bambeki yango ekesanaki moko na mosusu; pe vino ya bokonzi ezalaki mingi, na ndenge ya bozwi ya mokonzi. 8. Pe bazalaki komela engebene na mobeko : batindaki mutu te na makasi; po boye mokonzi atindaki na bakonzi nionso ya ndako na ye ete basala engebene na bosepeli ya moko na moko.
9. Mokonzi-mwasi Vashti pe asalaki elambo pona basi ya ndako ya bokonzi ya Mokonzi Ashasheruse.
10. Na mokolo ya sambo, lokola motema ya mokonzi esepelaki na vino, alobaki na Mehumane, Bizta, Arbona, Bigta, pe Abagata, Zetare pe Karkase, ba enike (b) sambo oyo bazalaki kosala liboso ya mokonzi Ashasheruse, bamema Mokonzi-mwasi Vashti elongo na motole ya bokonzi liboso ya mokonzi, 11. Pona kolakisa kitoko na ye epayi ya batu pe bankumu, po azalaki kitoko pona kotala. 12. Kasi Mokonzi-mwasi Vashti aboyaki koya na liloba ya mokonzi, oyo atindaki na nzela ya ba enke. Bongo mokonzi asilikaki makasi, pe kanda na ye epeli na kati na ye.
13. Pe mokonzi alobaki na batu ya bwania oyo bayebaki tangu (po makambu ya mokonzi ezalaki bongo liboso ya banso oyo bayebi mibeko pe droit; 14. Pe baoyo bazalaki pembeni na ye ezalaki Karshna, Shetare, Admatha, Tharshish, Meres, Marsna, Memucan, bankumu sambo ya Perse pe ya Mede, oyo bamonaka elongi ya mokonzi, oyo bafandaka na kiti ya liboso na kati ya bokonzi : 15. Nini esengeli kosala na Mokonzi-mwasi Vashti na kolanda mobeko, pona asalaki te oyo Mokonzi Ashasheruse atindaki na nzela ya ba enike? 16. Bongo Memukani alobaki liboso ya mokonzi pe ya bankumu: ezali kaka te na kotelemela Mokonzi ye moko nde Mokonzi-mwasi Vashti asali mabe, kasi atelemeli pe bankumu nionso pe batu nionso oyo bafandi na bituka nionso ya Mokonzi Ashasheruse ; 17. Po likambu ya Mokonzi-mwasi ekobima na kati ya basi nionso, na ndenge ete etindika bango batiola mibali na bango na misu na bango, nakoloba na bango : Mokonzi Ashasheruse apesaki motindo bamema mokonzi-mwasi Vashti liboso na ye, pe aboyaki kokende. 18. Pe lelo bankumu-basi ya Perse pe ya Mede oyo bakoyoka likambu ya mokonzi-mwasi bakoloba bongo na bankumu nionso ya mokonzi ; pe ekozala na kotiolama pe kanda mingi. 19. Soki mokonzi amoni malamu, tika ete etinda ya bokonzi ewuta na ye pe ekomama na kati ya mibeko ya Perse pe ya Mede, oyo ekolongwama te, ete Vashti akokota lisusu te liboso ya mokonzi Ashasheruse ; pe mokonzi apesa lokumu ya bokonzi na ye na mwasi mosusu oyo akozala koleka ye ; 20. Pe mobeko ya mokonzi, oyo akopesa, ekoyokana na kati ya bokonzi, po azali monene, pe basi nionso bakopesa lokumu na mibali na bango, wuta mutu monene ti na mutu moke. 21. Pe liloba oyo ezalaki malamu na misu ya mokonzi pe ya bankumu. Pe mokonzi asali ndenge ya liloba ya Memukan, 22. Pe atindi mikanda na bingumba nionso na lolenge ya ekomeli na ye, pe batu na batu na lolenge ya elobeli na ye, po éte mobali nionso azala mokambi na kati ya ndako na ye, pe aloba na lolenge ya batu na ye.
1. Sima ya makambu yango, tangu kanda ya Mokonzi Ashasheruse ekiti, akanisaki Vashti, pe makambu oyo asalaki, pe makambu oyo bakataki pona ye. 2. Bongo basali ya mokonzi oyo bazalaki kosalela ye balobaki: Baluka pona mokonzi bana basi oyo bazali ngondo pe kitoko; 3. Pe mokonzi atia bakengeli na bituka nionso ya bokonzi na ye pe basangisa bana basi nionso oyo bazali ngondo pe kitoko na kotala na Shushan, engumba monene, kati na ndako ya basi na se ya bokengeli ya Ege, Enike, mobateli ya basi ; pe bapesa bango malasi oyo ekoki pona komibongisa. 4. Pe elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi akozala mokonzi-mwasi na esika ya Vashti. Pe liloba yango esepelisaki mokonzi; pe asalaki bongo.
5. Ezalaki na Shushan, engumba monene, Moyuda moko, kombo na ye Mordekayi, mwana ya Yayire, mwana ya Shimi, mwana ya Kis, Mobenyamini. 6. Amemaki na Yerusaleme elongo na bakangami oyo bamemaki elongo na Yekonia mokonzi ya Yuda, oyo Nabukodonozor mokonzi ya Babilone amemaki. 7. Pe abokolaki Adasa, (oyo azali Estere), mwana mwasi ya noko na ye; po azalaki na tata to mama te. Pe mwana mwasi yango azalaki kitoko na nzoto pe na elongi ya kitoko. Pe na liwa ya tata na ye pe ya mama na ye, Mordekayi azwaki ye lokola mwana na ye ya mwasi. 8. Pe ekomaki ete tangu liloba ya mokonzi pe etinda na ye eyokanaki, pe bilenge mingi ya basi basanganaki na Shushan, engumba monene, na se ya bokengeli ya Ege, Estere pe amemaki na kati ya ndako ya mokonzi, na se ya bokengeli ya Ege, mobateli ya basi. 9. Pe mwana mwasi yango asepelisaki ye pe azwaki ngolu na miso na ye ; pe asalaki mbangu pona kopesa ye malasi na ye ya kopetola pe biteni na ye, pe apesaki ye bilenge ya bana basi sambo oyo baponama na ndako ya mokonzi; pe atiaki ye elongo na bilenge bana basi na ye na bashambre ya malamu koleka ya ndako ya basi. 10. Estere ayebisaki te oyo etali batu na ye pe libota na ye, po Mordekai apesaki ye motindo ete aloba yango te. 11. Pe mokolo na mokolo, Mordekai azalaki kotambola liboso ya lopango ya ndako ya basi, pona koyeba ndenge nini Estere pe nini oyo bazalaki kosala na tina ye.
12. Pe tangu ngonga ya mwana mwasi moko-moko kokota epayi ya Mokonzi Ashasheruse, sima ya kosala sanza zomi na mibale engebene mobeko pona basi (Po ete mikolo ya kopetolama ezali kokisama bongo : sanza motoba na mafuta ya mire, pe sanza motoba na biloko ya solo kitoko pe malasi oyo ekoki ya kopetola ya basi : 13. Na lolenge wana elenge mwana mwasi akotaki epayi ya mokonzi), nionso oyo ye asengaki epesamelaki ye, po ete amema yango longwa na ndako ya basi kino na kati ya ndako ya mokonzi. 14. Na pokwa akendaki, pe na tongo azongaki na ndako ya mibale ya basi, na se ya bokengeli ya Shaashgaze, mokengeli ya basi ya kelasi ya mibale. Akotaki lisusu epayi ya mokonzi te, longola se soki mokonzi asepeli na ye pe abengami na kombo.
15. Pe tangu ekomaki ngonga ya Estere, mwana mwasi ya Abiyayile, noko ya Mordekai, oyo azwaki pona ye mwana na ye ya mwasi, kokota epayi ya mokonzi, asengaki eloko mosusu te longola kaka oyo Ege, Enike ya mokonzi, mokengeli ya basi alobaki. Pe Estere azwaki ngolu na misu ya banso oyo bamonaki ye. 16. Pe Estere, bamemaki ye liboso ya Mokonzi Ashasheruse, na ndako ya bokonzi na ye, na sanza ya zomi (ezalaki sanza ya Tebet), na mbula ya sambo ya bokonzi na ye. 17. Pe mokonzi alingaki Estere koleka basi nionso, pe azwaki ngolu pe boboto liboso na ye koleka bangondo nionso, pe atiaki motole ya bokonzi na moto na ye, pe akomisaki ye mokonzi-mwasi na esika ya Vashti. 18. Pe mokonzi asalaki elambo monene na bankumu na ye nionso pe basali na ye, elambo ya Estere; pe alongolaki bituka mokumba ya kofuta mpako, pe apesaki ba makabo na lolenge ya makasi ya mokonzi.
19. Pe tangu bangondo basanganaki pona mbala ya mibale, Mordekai afandaki na ekuke ya mokonzi. 20. Estere, ndenge Mordekai apesaki ye mitindo, alobaki te libota na ye pe batu na ye ; pe Estere asalaki ndenge Mordekai alobaki, lokola tangu oyo ye azalaki kobokola ye. 21. — Na mikolo wana, Mordekai afandaki na ekuke ya mokonzi, ba enike mibale ya mokonzi, kati na baoyo bazalaki bakengeli ya ekuke, Bigtan pe Teresh, basilikaki, pe balukaki kotiya maboko likolo ya Mokonzi Ashasheruse. 22. Pe likambu yango ekomaki na matoyi ya Mordekai, pe ayebisaki yango epai ya Mokonzi-mwasi Estere; pe Estere ayebisaki yango mokonzi na kombo ya Mordekai. 23. Pe balukaki koyeba likambu yango, pe emonanaki ete ezali ndenge wana; pe bango mibale babakamaki na nzete. Pe yango ekomamaki kati ya buku ya kokanisa misala liboso ya mokonzi.
1. Sima na makambu oyo, mokonzi Ashasheruse atombolaki na bokonzi Amane mwana ya Amedata Moagage, pe atomboli ye pe atiaki kiti na ye ya bokonzi likolo na bankumu nionso oyo bazalaki elongo na ye. 2. Pe basali nionso ya mokonzi oyo bazalaki na ekuke ya mokonzi bazalaki kogumbamela pe kofukamela Amane : po mokonzi apesaki motindo boye na tina na ye. Kasi Mordekai agumbamaki te pe afukamaki te. 3. Bongo basali ya mokonzi, oyo bazalaki na ekuke ya mokonzi, balobaki na Mordekai : Pona nini ozali kobuka mobeko ya mokonzi? 4. Pe ekomaki ete, lokola bazalaki koloba na ye mokolo na mokolo, pe azalaki koyoka bango te, bayebisaki Amane yango pona komona soki makambu ya Mordekai ekotelema kaka; po ayebisaki bango ete ye azali Moyuda. 5. Pe Amane amonaki ete Mordekai agumbamaki te pe afukamaki te liboso na ye, Amane atondaki na kanda. 6. Kasi amonaki na misu na ye eloko ezangi tina ete atia loboko na ye likolo ya Mordekai ye moko, po bayebisaki banani batu ya Mordekai, pe Amane alukaki koboma Bayuda nionso oyo bazalaki na bokonzi mobimba ya Ashasheruse, batu ya Mordekai.
7. Na sanza ya liboso, oyo ezali sanza ya Nisan, mbula ya zomi na mibale ya Mokonzi Ashasheruse, babwakaki Pire (c), elingi koloba kobeta zeke liboso ya Amane, ya mokolo na mokolo pe sanza na sanza, ti na sanza ya zomi na mibale. Yango ezali sanza ya Adare. 8. Pe Amane alobi na mokonzi Ashasheruse ete: Ezali na batu moko oyo bapalangani pe bapanzani na kati ya batu na kati ya bituka nionso ya bokonzi na yo, pe mibeko na bango ekeseni na oyo ya batu nionso, pe basalelaka mibeko ya mokonzi te, pe ebongi te na mokonzi atika bango na bonsomi ya kosala. 9. Soki mokonzi amoni yango malamu, tika ekomama ete baboma bango; pe nakopeze nkoto zomi (10000) ya talanta ya palata na maboko ya bafonktionere, pona komema yango na bibombelo ya bozwi ya mokonzi. 10. Bongo mokonzi alongolaki lopete na ye ya bilembo na loboko na ye pe apesaki yango Amane mwana ya Amedata Moagage, moniokoli ya Bayuda. 11. Pe mokonzi alobaki na Amane ete: mbongo epesameli yo, pe batu, pona osala bango oyo ekozala malamu na misu na yo. 12. Bongo bakomeli ya mokonzi babengamaki na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na misato ya sanza; pe na kolanda nionso oyo Amane apesaki motindo, bakomeli ba-satrape ya mokonzi, pe baguvernere oyo bazalaki likolo ya bituka moko-moko, pe na bakonzi ya batu, na etuka nionso na lolenge ya ekomeli na ye pe na batu na batu lolenge ya monoko na bango; ezalaki na kombo ya Mokonzi Ashasheruse nde bakomaki pe ekangamaki na lopete ya elembo ya mokonzi. 13. Pe mikanda etindamaki na maboko ya bamemi-sango kati na bituka nionso ya mokonzi, pona kobebisa, koboma pe kosilisa Bayuda nionso, banda na elenge mobali ti na mibange, bana mike pe basi, pona ete biloko na bango nionso epunzama, na mokolo moko, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, yango ezali sanza ya Adare. 14. Pona ete mobeko yango eyebana na bituka nionso, kopi moko ya mokanda yango eyebanaki na batu nionso, po bamibongisa pona mokolo yango. 15. Bamemi-sango bakendeki nokinoki na liloba ya mokonzi. Pe motindo yango eyebanaki na Shushan, engumba monene. Pe mokonzi na Amane bafandaki pona komela; kasi engumba ya Shushan ezalaki na pasi.
1. Pe Mordekai ayebaki nionso oyo esalamaki ; pe Mordekai apasolaki bilamba na ye, pe alataki elamba ya saki pe putulu, pe abimaki na kati-kati ya engumba pe agangaki koganga makasi pe ya bololo. 2. Pe ayaki ti na ekuke ya mokonzi, po mutu azalaki na nzela te ya kokota, alati elamba ya saki, na ekuke. 3. Pe na kati ya etuka nionso, bisika nionso oyo liloba ya mokonzi pe etinda na ye ekomaki, ezalaki na matanga monene na kati ya Bayuda, kokila bileyi, pe kolela, pe bileli; mingi basalaki saki pe mputulu bifandeli-bilaleli na bango. 4. Pe bilenge basi ya Estere pe ba enike na ye bayaki pe bayebisaki ye, pe mokonzi-mwasi akomaki kotungisama mingi ; pe atindaki bilamba pona kolatisa Mordekai pe pona kolongola ye elamba na ye ya saki likolo na ye, kasi andimaki yango te. 5. Bongo Estere abengaki Atake, moko ya ba enike ya mokonzi, oyo atiaki liboso na ye, pe apesaki ye motindo akenda epayi ya Mordekai pona koyeba ezali na tina likambu nini pe pona nini. 6. Bongo Atake abimaki epayi ya Mordekai na esika ya monene ya engumba oyo ezalaki liboso ya ekuke ya mokonzi. 7. Pe Mordekai ayebisaki ye nionso oyo ekomelaki ye, pe motuya ya mbongo oyo Amane alakaki ete akotia na ebombelo ya mosolo ya mokonzi na tina ya Bayuda, pona koboma bango ; 8. Pe apesaki ye kopi ya etinda oyo ekomamaki na Shushan pona koboma bango, pona kolakisa yango na Estere pe koyebisa ye yango, pe kopesa ye mitindo ete akota epayi ya mokonzi, kosenga ye ngolu pe kobondela liboso na ye pona bolamu ya batu liboso na ye.
9. Pe Atake ayaki pe ayebisaki Estere maloba ya Mordekai. 10. Pe Estere alobaki na Atake pe apesaki ye mokumba epayi ya Mordekai : 11. Basali nionso ya mokonzi pe batu ya bituka ya mokonzi bayebi ete pona mutu nionso, mobali to mwasi, oyo akokota na lopango ya kati ya mokonzi kozanga ete babenga ye, ezali pona ye mobeko moko, ete koboma ye ; longola se mokonzi atamboli lingenda ya wolo epayi na ye pona ete abika na bomoyi; Kasi ngai, nabengami te pona kokota epayi ya mokonzi na mikolo tuku misato. 12. Pe bayebisaki Mordekai maloba ya Estere. 13. Pe Mordekai alobi bayanola na Estere: Kokanisa na kati na yo te ete kaka yo moko okobika na ndako ya mokonzi, kati ya Bayuda nionso oyo. 14. Po soki ofandi nye na tangu oyo, lisungi pe lobiko pona Bayuda ekowuta na esika mosusu; kasi yo na ndako ya tata na yo bokokufa. Pe nani ayebi soki pona tangu lokola oyo nde yo okomaki na bokonzi? 15. Pe Estere alobi bayanola Mordekai: 16. Kende, sangisa Bayuda nionso oyo bazali na Shusan, pe bokila pona ngai, bolia te, bomela te, mikolo misato, butu pe moyi; Ngai lokola, pe bilenge bana basi na ngai, tokokila ndenge moko ; pe bongo, nakokota epayi ya mokonzi, oyo ezali ndenge na mobeko te; pe soki nakokufa, nakufa! 17. Pe Mordekai akendaki pe asalaki nionso oyo Estere apesaki ye mitindo.
1. Pe ekomaki, na mokolo ya misato, Estere alataki elamba na ye ya bokonzi, pe atelemaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, oyo etalani na ndako ya mokonzi. Pe mokonzi afandaki na kiti na ye ya bokonzi na ndako ya bokonzi, oyo etalani na ekuke ya bokoti ya ndako. 2. pe tangu mokonzi amonaki Mokonzi-mwasi Estere atelemi na kati ya lopango, azwaki ngolu na miso na ye; pe mokonzi asembolaki epayi na Estere lingenda ya wolo oyo ezalaki na loboko na ye; pe Estere apusanaki pe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi. 3. Pe mokonzi alobi na ye : olingi nini, Mokonzi-mwasi Estere pe bosenga na yo ezali nini? Kino ndambo ya bokonzi, ekopesamela yo! 4. Pe Estere alobi : Soki mokonzi amoni malamu, tika mokonzi na Amane baya lelo na elambo oyo nabongiseli pona ye. 5. Pe mokonzi alobi: Boluka Amane noki, pona kosala oyo Estere alobi. Pe mokonzi na Amane bayaki na elambo oyo Estere abongisaki. 6. Pe mokonzi alobaki na Estere na elambo ya vino: Bosenga na yo nini? Pe ekopesamela yo. Pe posa na yo ezali nini? Kino ndambo ya bokonzi, ekopesamela yo! 7. Pe Estere ayanoli pe alobi : Bosɛnga na ngai pe posa na ngai ezali : 8. Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, pe soki mokonzi amoni malamu kopesa bosenga na ngai pe kosala posa na ngai, tika mokonzi na Amane baya na elambo oyo nakobongisela bango, pe lobi nakosala lolenge na liloba ya mokonzi.
9. Pe mokolo wana Amane abimaki esengo pe na motema ya kosepela. Kasi tangu Amane amoni Mordekai na ekuke ya mokonzi, oyo atelemi te pe aningani pona ye te, Amane atondaki na kanda ya Mordekai; 10. Kasi Amane amipekisaki, pe tangu azongi na ndako na ye, atindaki pe abengaki baninga na ye pe Zeresh mwasi na ye. 11. Pe Amane alobelaki bango kembo ya bozwi na ye, pe ebele ya bana na ye ya mibali, pe nionso oyo mokonzi akomisaki ye, pe boniboni atombolaki ye likolo ya bankumu pe ya basali ya mokonzi. 12. Pe Amane alobi: Mokonzi-mwasi Estere abengi ata mutu moko te aya elongo na mokonzi na elambo oyo ye asali, longola kaka ngai; pe pona lobi lisusu, nabengisami epayi na ye elongo na mokonzi. 13. Kasi nionso wana ekoki te pona ngai, tangu nionso oyo nakomona Mordekai Moyuda afandi na ekuke ya mokonzi. 14. Pe Zeresh, mwasi na ye, pe baninga na ye nionso balobaki na ye: Tobongisa nzete moko, molayi ya loboko ya liboso tuku mitano; pe na tongo, oyebisa mokonzi, pona babaka Mordekai na nzete ; pe kende na esengo na elambo elongo na mokonzi! Pe liloba emonanaki malamu liboso ya Amane, pe abongisaki nzete.
1. na kati ya butu wana ya butu pongi ekimaki mokonzi, pe atindaki ete bamema buku ya kokanisa misala; pe batangaki yango liboso ya mokonzi. 2. Bamoni ete ekomamaki ete Mordekai ayebisaki na tina ya Bigtana na Teresh, ba enike mibale ya mokonzi, bakengeli ya ekuke, ete balukaki kotiya maboko likolo ya Mokonzi Ashasheruse. 3. Pe mokonzi alobi: Lokumu pe bokeseni nini bapesaki na Mordekai, na tina likambo oyo? Pe basali ya mokonzi oyo bazalaki kosalela ye, balobaki: ata eloko moko te basala pona ye. 4. Pe mokonzi alobi: Nani azali na kati ya lopango? Nzokande Amane ayaki na kati ya lopango ya libanda ya ndako ya bokonzi, pona koloba na mokonzi ete babaka Mordekai na nzete oyo abongisaki pona ye. 5. Pe basali ya mokonzi balobi na ye: Tala, Amane atelemi na kati ya lopango. Pe mokonzi alobi: Akota! Pe Amane akotaki. 6. Pe mokonzi alobi na ye: Nini esengeli kosala na mutu oyo mokonzi asepeli kokumisa ye? Pe Amane alobi na kati ya motema na ye: Na nani mosusu longola se ngai oyo Mokonzi asepeli kokumisa ? 7. Pe Amane alobi na mokonzi: Mutu oyo mokonzi asepeli kokumisa ye, 8. Bamema elamba ya bokonzi oyo mokonzi alataka, pe punda oyo mokonzi amataka na yango, pe likolo ya moto na ye motole ya bokonzi; 9. Pe elamba pe punda epesamela na maboko ya moko ya bankumu minene ya mokonzi; pe balatisa mutu oyo mokonzi asepeli na kokumisa ye, pe batumbisa ye na babalabala ya engumba, amati likolo ya punda, pe bakoganga liboso na ye: Boye basasalaka pona mutu oyo mokonzi asepeli na kokumisa.
10. Pe mokonzi alobi na Amane: Kende mbangu, kamata elamba pe punda, ndenge olobaki, pe sala bongo na Mordekai Moyuda, oyo afandi na ekuke ya mokonzi; Kozangisa eloko moko te na nionso oyo olobi. 11. Pe Amane akamati elamba pe punda, pe alatisi Mordekai, pe atumbusi ye na punda na ba balabala ya engumba, pe agangaki liboso na ye, kolobaka ete: Boye nde basalaka na mutu oyo mokonzi asepeli kokumisa ye. 12. Pe Mordekai azongaki na ekuke ya mokonzi. Kasi Amane akendaki mbangu na ndako na ye, na kolela mawa pe moto ezipakama. 13. Pe Amane ayebisaki Zeresh mwasi na ye pe baninga na ye nionso makambu nionso oyo ekomelaki ye. Bongo batu na ye ya bwania pe Zeresh mwasi na ye, balobi na ye: Soki Mordekai, oyo liboso na ye obandi kokweya, azali ya bokitani ya Bayuda, na kobundisa ye okolonga likolo na ye te, kasi okokweya penza liboso na ye. 14. Wana bazalaki nanu kosolola na ye, ba enike ya mokonzi bayaki pe bamemaki Amane mbangu na elambo oyo Estere abongisaki.
1. Pe mokonzi na Amane bayaki pona komela elongo na mokonzi-mwasi Estere. 2. Pe mokonzi alobi na Estere, na mokolo ya mibale lisusu, tangu bazalaki komela na feti ya vino : Bosenga na yo nini, Mokonzi-mwasi Estere? Pe ekopesamela yo. Pe posa na yo ezali nini kino na ndambo ya bokonzi, ekopesalema yo. 3. Pe Mokonzi-mwasi Estere ayanolaki pe alobi: Soki nazwi ngolu na misu na yo, ô mokonzi, pe soki mokonzi amoni yango malamu, tika ete na bosenga na ngai, apesa ngai bomoyi, pe batu na ngai. 4. Po totekamaki, ngai na batu na ngai, pona kobebisama, kobomama pe kosilisama; pe soki totekamaki lokola basali mibali pe basali basi ya mosala, nalingaki nafanda nye, atako monyokoli akokoka te kofuta mbeba oyo asali mokonzi. 5. Pe mokonzi Ashasheruse alobi, pe alobi na Estere mokonzi-mwasi: Azali nani, pe azali wapi, oyo motema na ye etondi asala? 6. Pe Estere alobi: monyokoli pe monguna, ezali Amane oyo mutu mabe. Pe Amane akangamaki na somo liboso ya mokonzi na mokonzi-mwasi. 7. Pe mokonzi, atelemaki na kanda na ye na elambo ya vino, pe akeyi na elanga ya ndako ya mokonzi. Kasi Amane atikalaki pona kobondela Mokonzi-mwasi Estere pona bomoyi na ye ; po amonoki ete likama na ye ezwami epayi na mokonzi. 8. Pe tangu mokonzi azongaki wuta na elanga ya ndako ya mokonzi, na ndako ya elambo ya komela vino. Pe Amane akweyaki na likolo ya mbeto-kiti oyo Estere afandaki likolo na yango. Mokonzi alobi: Alingi lisusu kosala mobulu na mokonzi-mwasi, epayi na ngai, na kati ya ndako? Liloba ebimaki na monoko ya mokonzi, bazipaki Amane elongi. 9. Pe Arbona, moko ya ba enike, alobi liboso ya mokonzi: Tala, nzete, ya molayi loboko ya liboso tuku mitano, oyo Amane abongisaki pona Mordekai, oyo alobaki pona bolamu ya mokonzi, ezali ya kotelema na ndako ya Amane. Pe mokonzi alobi: Babaka ye likolo na yango. 10. Pe babakaki Amane likolo na nzete oyo abongisaki pona Mordekai. Pe kanda ya mokonzi ekitaki.
1. Mokolo wana, mokonzi Ashasheruse apesaki epayi ya Mokonzi-mwasi Estere ndako ya Amane, monyokoli ya Bayuda. Pe Mordekai akotaki liboso ya mokonzi, po Estere ayebisaki oyo ye azalaki pona ye. 2. Pe mokonzi alongolaki lopete na ye ya bilembo, oyo alongolaki epayi ya Amane, pe apesaki yango na Mordekai. Pe Estere atiaki Mordekai likolo ya ndako ya Amane. 3. Pe Estere alobaki lisusu liboso ya mokonzi, pe akweyaki na makolo na ye pe alelaki pe abondelaki ye asukisa pamba mabe oyo Amane Moagage abongisaki, pe mwango oyo abongisaki na kotelemela Bayuda. 4. Pe mokonzi apesaki Estere lingenda ya wolo, pe Estere asembolamaki pe atelemaki liboso ya mokonzi; 5. Pe alobi: Soki mokonzi amoni malamu, pe soki nazwi ngolo liboso na ye, pe mokonzi amoni likambu yango ezali motuya, pe ngai nakosepelisa misu na ye, tika ekomama pona kolongola mikanda mabe, oyo Amane mwana ya Amedata, ya Moagage, oyo akomaki pona koboma Bayuda oyo bazali na bituka nionso ya mokonzi. 6. Po ndenge nini nakoka komona makama ya pasi oyo ekokwela batu na ngai? Pe ndenge nini nakoki komona libebi ya libota na ngai? 7. Pe Mokonzi Ashasheruse alobaki na mokonzi-mwasi Estere pe na Mordekai Moyuda: Tala, napesi Estere ndako ya Amane, pe ye babaki ye na nzete, pamba te atiaki loboko na ye likolo ya Bayuda. 8. Bongo bino, bokoma na kombo ya mokonzi na tina ya Bayuda, ndenge bomoni malamu, pe botia yango elembo na lopete ya elembo ya mokonzi. Po mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi pe etiami elembo na lopete ya elembo ya mokonzi ekoki kolongolama te.
9. Pe bakomeli ya mokonzi babengamaki na tangu wana, na sanza ya misato, oyo ezali sanza ya Sivan, mokolo ya tuku mibale na misato na yango; pe, lolenge nionso oyo Mordekai apesaki mitindo, bakomeli Bayuda, ba-satrape, baguvernere, pe bakonzi ya bituka kobanda Inde ti na Etiopie, bituka kama moko na tuku mibale na sambo, etuka na etuka na lolenge ya makomi na yango, pe batu na batu lolenge ya monoko na bango, pe epayi ya Bayuda lolenge ya makomi na bango pe lolenge ya monoko na bango. 10. Pe akomi na kombo ya mokonzi Ashasheruse, pe atiaki elembo na yango na lopete ya elembo ya mokonzi; pe atindaki mikanda na loboko ya baoyo bazalaki kopota mbangu na bapunda, oyo bazalaki kokamba ekipi ya bana bapunda ya punda ya makila ya peto ya bokonzi, 11. Na yango ekomamaki ete mokonzi apesaki nzela na Bayuda, oyo bazalaki na engumba moko na moko, basangana esika moko pe batelema pona bomoyi na bango, babebisa, baboma pe basilisa mampinga nionso ya batu pe ya etuka oyo ezalaki koniokola bango, - bana na bango pe basi na bango pe bapunza biloko na bango, 12. Na mokolo se moko, na kati ya bituka nionso ya Mokonzi Ashasheruse, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, oyo ezali sanza ya Adare. 13. Po ete kopi ya mobeko yango esakolama na bituka nionso, kopi moko ya makomi yango eyebisamaki na batu ya bikolo nionso, po Bayuda bazala ya kobongisama pona mokolo yango, pona kozongisa mabe na banguna na bango. 14. Bamemi-sango oyo bazalaki komata likolo na bapunda ya bokonzi bakendaki nokinoki pe na mbangu nionso, na etinda ya mokonzi. Pe motindo yango epesamaki na Shushan ndako makasi.
15. Pe Mordekai abimaki liboso ya mokonzi, elongo na elamba ya bokonzi ya bule pe ya pembe, pe na motole monene ya wolo, pe na elamba ya bisu pe ya motane-bule. Pe engumba ya Shushan egangaki na esengo pe esepelaki. 16. Bayuda bazalaki na pole pe esengo pe kosepela pe lokumu. 17. Pe na bituka nionso pe na bingumba nionso, epayi nionso oyo liloba ya mokonzi pe mobeko na ye ekomaki, esengo pe kosepela ezalaki na kati ya Bayuda, elambo pe mokolo ya feti. Pe mingi ya batu kati na batu ya mboka, bakomaki Bayuda, po ete somo ya Bayuda ekweyaki likolo na bango.
1. Pe na sanza ya zomi na mibale, oyo ezali sanza ya Adar, mokolo ya zomi na misato ya mokolo yango, wapi liloba ya mokonzi pe etinda na ye esengelaki esalama, na mokolo oyo banguna ya Bayuda bazalaki na elikya ya kokonza bango (kasi likambu ebalukaki kaka bongo, na boye ete Bayuda wana kaka, bakonzaki bayini na bango), 2. Bongo Bayuda basanganaki na bingumba na bango, kati na bituka nionso ya Mokonzi Ashasheruse, pona kotia maboko likolo na baoyo bazalaki koluka mabe na bango ; pe mutu moko te akokaki kotelema liboso na bango, po ete somo na bango ekweyaki likolo na bikolo nionso. 3. Pe bakonzi nionso ya bituka, pe ba-satrape, pe baguvernere, pe baoyo bazalaki kosala misala ya mokonzi, bazalaki kosunga Bayuda; po somo ya Mordekai ekweyaki likolo na bango. 4. Po Mordekai azalaki monene na kati ya ndako ya mokonzi, pe lokumu na ye epanzanaki na kati ya bituka nionso; po mobali yango Mordekai akobaki kokoma monene. 5. Pe Bayuda babetaki banguna na bango nionso, na mopanga, babomaki bango pe babebisaki bango, pe basalaki bayini na bango ndenge basepelaki. 6. Pe na Shushan, engumba monene, Bayuda babomaki pe babebisaki mibali kama mitano; 7. Pe babomaki Parshandata, Dalfon pe Aspata 8. Pe Porata, na Adalia, na Aridata 9. Pe Parmashta, na Aridayi, na Aridai, na Vayezata, 10. Bana mibali zomi ya Amane mwana ya Amedata, moniokoli ya Bayuda; kasi batiaki loboko na bango te likolo ya biloko ya kopunza.
11. Kaka mokolo wana, motango ya baoyo babomamaki na Shushan, engumba monene, eyaki liboso ya mokonzi. 12. Pe mokonzi alobi na mokonzi-mwasi Estere: Bayuda babomi pe babebisi na kati ya Shushan, engumba monene, mibali kama mitano pe bana zomi ya Hamane; na bituka mosusu ya mokonzi oyo etikali, basali nini ? Bosenga na yo ezali nini? Ekopesamela yo. Pe posa na yo ezali lisusu nini? Pe ekosalama. 13. Pe Estere alobi: Soki mokonzi amoni malamu, lobi lisusu epesama na Bayuda oyo bazali na Shushan nzela ya kosala ndenge na mobeko ya lelo; pe babaka na nzete bana zomi ya Amane. 14. Pe mokonzi alobi esalama bongo ; pe motindo epesamaki na Shushan, pe babakaki bana zomi ya Amane. 15. Pe Bayuda oyo bazalaki na Shushan basanganaki na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adare, pe babomaki mibali kama misato na kati ya Shushan; kasi batiaki loboko na bango te likolo ya biloko ya kopunza. 16. Pe Bayuda mosusu oyo bazalaki na kati ya bituka ya mokonzi basanganaki, pe batelemaki pona bomoyi na bango, pe bazwaki bopemi na banguna na bango; pe babomaki nkoto tuku sambo na mitano ya baoyo bayinaki bango; kasi batiaki loboko te likolo ya biloko ya kopunza. 17. Esalamaki na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adare; pe mokolo ya zomi na mineyi ya sanza bapemaki, pe bakomisaki yango mokolo ya elambo pe ya bosepeli. 18. Bayuda oyo bazalaki na Shushan basanganaki na mokolo ya zomi na misato pe na mokolo ya zomi na mineyi ya sanza, pe bapemaki mokolo ya zomi na mitano, pe bakomisaki yango mokolo ya elambo pe ya bosepeli. 19. Yango wana Bayuda ya mboka mike, oyo bafandaka na bingumba ya polele, basalaki mokolo ya zomi na mineyi ya sanza ya Adar mokolo moko ya esengo pe ya elambo, pe mokolo moko malamu ya feti, epayi bazalaki kotindelana bileyi moko na mosusu.
20. Pe Mordekai akomaki makambo oyo pe atindaki mikanda na Bayuda nionso oyo bazalaki na kati ya bituka nionso ya Mokonzi Ashasheruse, na baoyo bazalaki pene pe baoyo bazalaki mosika, 21. Pona kotiela bango etinda ete basalaka feti mokolo ya zomi na mineyi ya sanza ya Adare pe mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango moko, mbula na mbula. 22. Lokola mikolo oyo Bayuda bazawaki bopemi na banguna na bango, pe lokola sanza oyo pasi na bango ebongwanaki esengo, pe kolela na bango na mokolo ya feti, basengeli kokomisa yango mikolo ya elambo pe ya esengo, epayi ya botindami bileyi moko na mosusu pe kopesa bakado na babola.
23. Pe Bayuda bandimaki kosala oyo babandaki, pe oyo Mordekai akomelaki bango. 24. Po Amane mwana ya Amedata, Moagage, moniokoli ya Bayuda nionso, akanaki mayele mabe pona koboma Bayuda, pe abwakaki Pire, elingi koloba zeke, pona koboma bango pe kosilisa bango. 25. pe tangu yango ekomaki liboso ya mokonzi, atindaki na mokanda ete mabongisi oyo mutu mabe akanaki pona Bayuda ekweyisama likolo ya moto na ye, pe babakaki ye pe bana na ye ya mibali. 26. Yango wana, babengaki mikolo yango Pirime, na kombo Pire. Yango wana, na tina ya maloba nionso ya mokanda oyo, pe na tina ya oyo bango moko bamonaki pe oyo ekomelaki bango. 27. Bayuda bandimaki, pe batiaki likolo na bango moko, pe likolo ya bakitani na bango, pe likolo ya baoyo banso bakosangana na bango, mobeko libela, pona batosaka kosala feti mikolo mibale oyo mbula na mbula na lolenge ya makomi na bango, pe lolenge ya tangu oyo etiamaki; 28. Pe ete bakundolaka mikolo oyo pe ete basepelaka na yango na kati ya bakitani na bango nionso, na libota moko na moko, na bituka moko na moko pe na engumba moko na moko; pe ete mikolo ya Pirime ekokufa te na kati ya Bayuda, pe bokundoli na bango etikala kosila te na kati ya bakitani na bango. 29. Pe Mokonzi-mwasi Estere, mwana mwasi ya Abikaile, pe Mordekai Moyuda, bakomaki na bokonzi nionso na mbala ya mibale mokanda oyo etali Pirime ; 30. Pe batindaki makomi yango epayi ya Bayuda nionso na kati ya bituka kama na tuku mibale na sambo ya bokonzi ya Ashasheruse, maloba ya kimia pe ya solo, 31. Pona kotia mikolo oyo ya Purime na batangu na yango, lokola Mordekai Moyuda pe Mokonzi-mwasi Estere batiaki yango pona bango, pe ndenge batiaki pona bango moko pe pona bakitani na bango, na misala ya kokila bileyi pe ya kolela na bango. 32. Pe mobeko ya Estere etelemisaki likambu oyo ya Purim, pe ekomamaki na buku.
1. Pe mokonzi Ashasheruse atiaki mpako na mboka pe na bisanga ya mayi monene. 2. Pe misala nionso ya nguya na ye pe ya makasi na ye, pe bosikisiki ya monene ya Mordekai, ndenge oyo mokonzi atombolaki ye, ekomami na buku ya makanisi ya misala ya bakonzi ya Bamede pe ya Baperse te? 3. Po Mordekai Moyuda azalaki na esika ya mibale sima ya mokonzi Ashasheruse, pe azalaki monene na kati ya Bayuda, pe asepelaki mingi ebele ya bandeko na ye, kolukaka bolamu ya batu na ye pe alobaki pona bolamu ya bokitani na ye mobimba.
a. Ahasheruse, mokonzi ya Perse, oyo ayebani mingi na kombo ya Xerxès,
b. Enike, mobali oyo bakati mabindi na ye, to mutu oyo atiami na esika ya tina na mosala ya leta,
c. Pire, Pirime, ezali zeke (eloko oyo bazalaki kosalela) pona kozwa bikateli