Oze to Osheya

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14Banoti

 

1        Mokapo 1

Liloba ya Yawe oyo eyaki epayi ya Oze mwana ya Beeri, na mikolo ya Uziya, Yotame, Akaze, pe Ezekias, bakonzi ya Yuda, pe na mikolo ya Yeroboame mwana ya Yoashe mokonzi ya Israel.

2. Ebandeli ya liloba ya Yawe na nzela ya Oze. Pe Yawe alobaki na Oze: Kende, zwa pona yo mwasi moko ya ndumba pe bana ya kindumba; po ete mokili yango esili komikaba na kindumba mosika na Yawe. 3. Pe akendaki pe azwaki Gomere, mwana mwasi ya Diblayime; pe azwaki zemi, pe abotaki mwana mobali. 4. Pe Yawe alobi na ye: Benga ye na kombo ya Yizireyele: po na mwa tangu moke, nakotalela makila ya Yizireyele likolo ya ndako ya Yehu, pe nakosukisa bokonzi ya ndako ya Israel; 5. Pe ekokoma na mokolo yango, nakobuka likonga ya Israel na kati ya lobwaku ya Yizireyele.

6. Pe azwaki lisusu zemi, pe abotaki mwana mwasi; pe alobi na ye: Benga ye na kombo ya Lo-Rukama (1), po nakoyokela lisusu ndako ya Israel mawa te, pona kolimbisa bango lisusu; 7. Kasi nakoyokela ndako ya Yuda mawa, pe nakobikisa bango na nzela ya Yawe Nzambe na bango; pe nakobikisa bango te na nzela ya likonga, to na nzela ya mopanga, to na etumba, to na nzela ya bampunda, to na nzela ya bakumbi mpunda.

8. Pe alongolaki Lo-Rukama na komela mabele. Pe azwaki zemi pe abotaki mwana mobali. 9. Pe  alobi : Benga ye na kombo ya Lo-Ami (2), po bozali batu na ngai te, pe nakozala na bino te.

10. Nzokande motuya ya bana ya Israel ekozala lokola zelo ya mayi monene, oyo ekoki komekama te to kotangama te; pe ekosalema, ete na esika wapi oyo balobaki na bango: Bozali batu na ngai te, bakoloba na bango : Bozali bana ya Nzambe na bomoyi. 11. Bana ya Yuda pe bana ya Israel bakosanganaka, pe bakopona mokonzi se moko, pe bakomata na mokili; po mokolo ya Yizireyele ezali monene.

 

2        Mokapo 2

1 Boloba bandeko na bino ya mibali Ami, pe bandeko na Bino ya basi Ruhama.

2. Bofunda na kotelemela mama na bino, bofunda ! Po azali mwasi na ngai te, pe ngai, nazali mobali na ye te; pe tika ye alongola kindumba na ye liboso na ye, pe ekobo na ye na kati ya mabele na ye. 3. Noki te namonisa bolumbu na ye,  pe ete nazongisa ye lokola na mokolo ya kobotama na ye, pe nakomisa ye lokola esobe, pe nakomisa ye lokola mabele ya kokawuka, pe naboma ye naposa ya mayi. 4. Pe nayokela bana na ye mawa te, po bazali bana ya kindumba. 5. Po mama na bango asali kindumba, ye oyo azwaki zemi na bango amiyokisaki soni, po alobaki: Nakolanda bamakagu na ngai, oyo bapesaka ngai lipa na ngai pe mayi na ngai, suki na ngai ya mpate pe lin na ngai, mafuta na ngai pe masanga na ngai. 6. Yango wana, tala, nakokanga nzela na yo na banzube, pe nakokangela ye mir ya mabanga ; ete akomona banzela na ye te. 7. Bongo akopota mbangu sima ya baakangu na ye ; kasi akokoma epayi na bango te; akoluka bango, kasi akomona bango te; pe akoloba: Nakokende pe nakozongela mobali na ngai ya liboso ; po wana nazalaki malamu koleka ndenge nazali sik’oyo. 8. Kasi ayebi te ete ezali ngai nde napesaki ye ble, pe vino, pe mafuta, pe nabakiselaki ye mingi lisusu palata pe wolo : - basaleli yango pona Baal. 9. Yango wana nakobotola ble na ngai na tangu na yango, pe vino na ngai na eleko na yango, pe nakolongola ye bilamba na ngai ya suki ya mpate pe elamba na ngai ya lino oyo esengelaki kozipa bolumbu na ye. 10. Pe sik’oyo nakomonisa soni na ye liboso ya miso ya bamakangu na ye, pe mutu moko te akokangola ye na loboko na ngai. 11. Nakosilisa kosepela nionso ya bafeti na ye, basanza na ye ya sika, sabata na ye pe babokutani na ye nionso. 12. Pe nakopunza bilanga na ye ya vino pe banzete na ye ya figi, oyo azali koloba: yango oyo bakado na ngai oyo bamakango ngai bapesaki ngai; pe nakokomisa yango zamba, pe banyama ya zamba bakoliya yango 13. Pe nakotalela likolo na ye mikolo ya Baal, oyo azalaki kotumbela yango mpaka ya malasi, pe amilataki pete na ye na zolo pe babiju na ye ya motuya, pe azalaki kolanda bamakangu  na ye, pe abosanaki ngai, elobi Yawe.

14. Yango wana, tala, ngai, pe nakomema ye na esobe, pe nakolobela ye na motema na ye. 15. Pe kuna nakopesa ye bilanga na ye ya vino, pe lobwaku ya Akor pona ekuke moko ya elekya na ye, pe akoyemba kuna lokola na mikolo ya bolenge na ye, pe lokola mokolo oyo amataki wuta na mokili ya Ejipito. 16. Pe ekozala na mokolo yango, elobi Yawe, ete okobenga ngai : mobali na ngai, pe okobenga ngai lisusu Nkolo (3) na ngai te. 17. Po nakolongola bakombo ya Babaal na monoko na ye, pe bakotángama lisusu te na bakombo na bango

18. Na mokolo wana, nakosala pona bango kondimana elongo na banyama ya zamba, pe na bandeke ya likolo, pe na banyama oyo etambolaka libumu na mabele; pe nakolongola na mokili, nakobukaka, likonga, pe mopanga, pe etumba, pe nakofandisa bango na kimia. 19. Pe na kofianse yo na ngai moko pona libela; Na kofianse yo na ngai na bosembo, pe na bosambisi, pe na bolamu, pe na ngolu. 20. Na kofianse yo ngai na solo, pe okoyeba Yawe. 21. Pe ekozala na mokolo wana, nakoyoka, elobi Yawe, ete nakoyoka likolo, pe bango bakoyoka mabele. 22. Pe mabele ekoyoka ble, pe vino ya malamu, pe mafuta; pe bango bakoyoka na Yizirehele. 23. Pe nakolona yango pona ngai na kati ya mokili, pe nakoyokela Lo-Rukama mawa, pe nakoloba na Lo-Ami : Ozali batu na ngai, pe akoloba na ngai : Nzambe na ngai.

 

3        Mokapo 3

1. Pe Yawe alobi na ngai: Kende lisusu, linga mwasi oyo alingami na moninga, pe asali ekobo, lokola bolingo ya Yawe pona bana ya Israele, atako bango babuluki epayi ya banzambe mosusu pe balingaka bagato basala na mbuma ya vino. 2. Pe nasombaki mwasi oyo pona ngai na zomi na mitano ya palata pe Omer (4) (mezire ya kokawuka ya orje to ya ble) moko ya orge pe na ndambo ya Omer moko ya orje; 3. Pe nalobi na ye: Okofanda kozela ngai na mikolo mingi; okosala kindumba te, pe okozala na mobali moko te; pe ngai lokola epayi na yo. 4. Po bana ya Israel bakotikala mikolo mingi na kozanga mokonzi pe kozanga nkumu, kozanga mbeka pe kozanga ekeko, kozanga Efode ata Terafime te. 5. Na sima, bana Israel bakozonga, pe bakoluka Yawe Nzambe na bango, pe David Mokonzi na bango, pe bakobaluka na bobangi epayi na Yawe pe epayi ya bolamu na ye, na mikolo ya suka.

 

4        Mokapo 4

1. Boyoka liloba ya Yawe, bana ya Israel; po ete Yawe azali na kosambisama na bafandi ya mokili; po  ete bosolo ezali te, mawa ezali te, boyebi ya Nzambe ezali te na kati na mboka : 2. Ezali bobele kolakela mabe, lokuta, koboma, moyibi pe ekobo; mabe epanzani penza, pe makila mingi esimbi makila mosusu mingi. 3. Yango wana mboka ekozala na matanga, pe baoyo nionso bafandaka kuna bakolemba, elongo na banyama ya zamba, pe elongo na bandeke ya likolo; ata bambisi ya mayi monene bakomemama na liwa.

4. Ata mutu moko te akotelemela, pe mutu moko te akopamela; nzokande batu na yo bazali lokola oyo bakowelana na Nganga-nzambe. 5. Bongo okokweya na moyi makasi, pe profete lisusu pe akokweya elongo na yo na butu : pe nakobebisa mama na yo.

6 Batu na ngai babebisami pona kozanga na boyebi te. Po yo, oboyi boyebi, ngai nakoboya yo, po osala lisusu bonganga-Nzambe epayi na ngai te. Po obosani Mobeko ya Nzambe na yo, ngai pe nakobosana bana na yo. 7. Na lolenge bakomaki ebele, bazalaki kosala lisumu na kotelemela ngai: Nakobongola kembo na bango na soni. 8. Bazali koliya lisumu ya batu na ngai, pe molimo na bango ezali naposa makasi ya mabe na ye. 9. Lokola batu, ndenge wana ekozala nganga-Nzambe. Pe nakotalela likolo na bango banzela bango, pe nakozongisala bango na kolanda misala na bango. 10. Pe bakoliya, kasi bakotonda te; bakomisala kindumba, kasi bakofuluka mingi te; po baboyi kotia bokebi na Yawe. 11. Pite, pe vino, vino ya sika, elongolaka bososoli.

12. Batu na ngai bakosenga toli na nzete na ye, pe lingenda na ye ezali koyanola ye, po elimo ya pite ebungisaka nzela, pe basali kindumba, pe amitiami mosika ya Nzambe na ye. 13. Bazali kobonza mbeka na likolo ya bangomba, pe bazali kotumba bampaka ya malasi na bangomba mike, na se ya banzete ya chene, na se ya banzete ya pepliye pe na se ya banzete ya terebinte, po elili na yango ezali malamu. Yango wana bana na bino ya basi bakosala kindumba, pe basi ya bana na bino bakosala ekobo. 14. Nakopesa etumbu te na bana na bino ya basi pona basalaki kindumba, pe na basi ya bana na bino pona basalaki ekobo; pamba te bamikabolami bango moko na basi ya ndumba, pe babonzaka mbeka elongo na basi oyo bamikaba na pite; boye batu oyo bazangi mayele bakobeba.

15. Soki osali kindumba, ô Israel, ata moke te Yuda azala na ngambo te; yango wana kokende te na Gilgale, pe komata Beth-Avene (5) te, pe kolapa ndai te : Yawe azali na bomoyi. 16. Po Israel atomboki makasi lokola ngombe-mwasi oyo ya botomboki. Sik’oyo Yawe akoleyisa bango lokola bana ya mpate na bisika minene. 17. Efrayime amiakangami na bikeko : botika ye asala. 18. Masanga na bango ekomi bololo koleka; bazalaki kaka kosala kindumba; bakonzi na bango balingaka mingi makambu ya soni. 19. Mopepe ekangi ye elongo na mapapu na ye, bazali soni na tina ya bambeka na bango.

 

5        Mokapo 5

1. Boyoka oyo, banganga-Nzambe ; pe botia bokebi, ndako ya Israel, pe botia matoyi, ndako ya Mokonzi, po ezali na kotelemela bino nde kosambisama; po bozalaki motambo na Mitsipa, pe lokola monyama oyo epalangani likolo ya Tabore. 2. Pe bapengwi bakeyi mosika na mbindo ya komipbonzaka bambeka, kasi ngai, nakopesa bango nionso etumbu. 3. Nayebi Efrayime, pe Israel ebombami te liboso na ngai, po sik’oyo yo, Efrayime, osali ekobo ; Israele akomi mbindo. 4. Misala mabe na bango ekopesa bango nzela te ya kozonga epayi ya Nzambe na bango, pamba te elimo ya pite ezali na kati na bango, pe bayebi Yawe te. 5. Lolendo ya Israel ekotatola liboso ya elongi na ye ; pe Israel na Efrayime bakokweya na tina ya mabe na bango; Yuda pe akokweya elongo na bango. 6. Elongo na bampate na bango pe elongo na bangombe na bango, bakokende pona koluka Yawe, kasi bakomona ye te, po alongwe mosika na bango. 7. Basalaki makambu ya bosembo te epayi na Yawe; po babotaki bana bapaya : sik’oyo sanza moko ekoliya bango elongo na biloko na bango.

8. Bobeta liseke na Gilbea, pe kelelo na Rama. Boganga na mongongo makasi na Beth-Aven; sima na yo, Benyamina. 9. Efraime ekotikala pamba na mokolo ya kosembola etumbu; Nazali koyebisa yango na kati ya Mabota ya Israel lokola likambu moko ya solo. 10. Bakonzi ya Yuda bazali lokola baoyo bazongisaka bandelo na sima : nakosopa kanda na ngai likolo na bango lokola mayi; 11. Efrayime azali koniokwama, abukani na nzela ya bosambisi, po na mokano na ye moko, alandaki mobeko ya pamba. 12. Pe ngai, nakozala lokola nselele pona Efrayime, pe lokola eloko epolisaka pona ndako ya Yuda.

13. Pe Efrayime amonaki maladi na ye, pe Yuda, pota na ye; Efrayime asili kokende na Asuria, pe atindi epayi ya Mokonzi Yarebe ; kasi ye akokaki kobikisa bino te, pe alongolaki pota na bino te.  14. Po nakozala lokola nkosi na Efrayime, pe lokola nkosi ya elenge pona ndako ya Yuda : ngai, ngai, nakopasola, pe nakokende mosika; Nakomema, pe ekozala na mutu moko te oyo akokangola te ! 15. Nakokende, pe nakozonga na esika na ngai, kino bakomiyambola ete bazali na mbeba, pe bakoluka elongi na ngai; Na kati ya minioko na bango,  Bakoluka ngai na tongotongo.

 

6        Mokapo 6

1. Boya, tozonga epayi ya Yawe, po ye nde apasoli, kasi ye akobikisa biso; abeti, pe akozipa bapota na biso. 2. Na mikolo mibale akosekwisa biso, pe na mokolo ya misato, akotelemisa biso, pe tokobika liboso na elongi na ye. 3. po biso tokoyeba pe tokokoba koyeba Yawe. Kobima na ye ebongisami lokola oyo ya tongo, pe akoya epayi na biso lokola mbula, lokola mbula ya eleko ya suka oyo esopelaka mabele mayi.

4. Nakosala yo nini, Efrayime? Nakosala yo nini, Yuda? Bopetwa na yo ezali lokola lipata ya tongo, pe lokola mamwɛ ya tongo oyo ezali kokende na ngonga ya tongo. 5. Yango wana nakati bang biteni na biteni na nzela ya baprofete, pe nabomi bango na nzela ya maloba ya monoko na ngai, pe bosambisi na ngai ezali kobima lokola mwinda. 6. Po nalingaka bolamu, kasi mbeka te; pe boyebi Nzambe, koleka makabo ya kotumba ; 7. Kasi bango lokola Adam, babukaki boyokani, wana nde basalaki na bokosi epayi na ngai.

8. Gilade ezali engumba ya baoyo basalaka mbindo, oyo azipami na bilembo ya makila. 9. Pe lokola bamiyibi bakengelaka na kobombama mutu moko, lisanga moko ya banganga-Nzambe, baazali koboma batu na nzela ya Sikeme; po bazali kosala makambu ya mbindo. 10. Namoni makambu ya nkele ya mabe na ndako ya Israel : kuna ezali kindumba ya Efrayime ! Israel ezali mbindo ! 11. Pona yo lisusu, Yuda, tangu ya kobuka mbuma ebongisami, tangu nakobalusa bokangami ya batu na ngai.

 

7        Mokapo 7

1. Tangu  nalingaki kobikisa Israel, mbeba ya Efrayime emoniosamaki pe makambu mabe ya Samaria, po basalelaki lokuta, pe moyibi akoti, pe lisanga ya miyibi bazali koyiba libanda. 2. Pe balobi te na kati ya mitema na bango ete nakundola mabe na bango nionso. Sik’oyo misala na bango ya mabe ezingi bango, batelemi liboso ya elongi na ngai. 3. Bakosepelisaka Mokonzi na nzela ya mabe na bango, pe Bankumu na nzela ya bokosi na bango. 4. Bango nionso basalaka ekobo, lokola furu oyo mosali mapa apelisi moto, oyo atikaka kopelisa yango banda tangu azali kobalola potopoto kino pate ekovimba. 5. Na mokolo ya Mokonzi na biso, Bankumu  bakomaki kobela pona molende ya vino; asembolaki lobɔkɔ na ye epai ya bato oyo bazalaki kotyola. 6. Po bapelisaki mitema na bango na moto lokola furu na mitambu na bango : mosali mapa na bango alalaka butu mobimba, na tongo apelaka lokola moto oyo ezali kopela moto. 7. Bango nionso bazali kopela moto lokola furu, pe bazali koliya Basambisi na bango; Bakonzi na bango nionso bakweyi, pe ata moko te kati na bango azali kobelela ngai.

8. Efrayime asangani na kati ya batu ya bikólo; Efrayime azali gato oyo ebalusami te. 9.  Bapaya basilisi makasi na ye, pe ayebi yango te; basuki ya pembe epalangani na moto na ye, pe ayebi yango te. 10. Pe lolendo ya Israel etatoli liboso na elongi na ye, pe bazongi epayi ya Yawe Nzambe na bango te, pe bakolukaka ye te atako makambo oyo nionso. 11. Efrayime akomaki lokola ebenga ya bozangi mayele, oyo azangi motema; bakobengaka Ejipito, pe bakeyi na Asuria. 12. Kasi tangu kaka bakokende, nakotanda monyama na ngai likolo na bango; pe nakokitisa bango lokola bandeke ya likolo; Nakopesa bango etumbu, ndenge eyokanaki na liyangani na bango.

13. Mawa na bango, po ete bapengwi mosika na ngai; kobebisamalikolo na bango po batombokeli ngai; pe ngai, nalingaki kokangola bango, kasi balobaka lokuta likolo na ngai. 14. Pe bazali kobelela ngai te na kati ya mitema na bango, kasi bazali kolelaka likolo na bambeto na bango; basangana na komipasolaka pona ble pe vino ya malamu, pe bapesaka ngai mokongo. 15. Pe ngai, nateyaki bango, pe nalendisaki maboko na bango, kasi bakanaki mabe na kotelemela ngai. 16. Bazongi te epayi ya Oyo-Aleki-Na likolo; bakomi lokola likonga ya bokosi; banjumu na bango bakokweya na mopanga, na tina ya kanda ya lolemo na bango; oyo ekozala soni na bango na mokili ya Ejipito.

 

8        Mokapo 8

1. Tiya kelelo na monoko na yo. Lokola mpongo, likolo na ndako ya Yawe; po babuki boyokani na ngai, pe bazalaki batomboki na mobeko na ngai. 2. Bakobelela ngai: Nzambe na ngai! Toyebi yo, Israël !… 3. Israel abwaki bolamu, monguna akolanda ye. 4. Bango bakomisi bakonzi, kasi kowuta na ngai te; bakomisi Bankumu, pe ngai nayebaki te. Na wolo na bango pe na palata na bango basali bikeko po ete bango moko babunga na kokatama. 5. Samaria, mwana na yo ya ngombe abwaki yo mosika; kanda na ngai epelelaki bango; Kino tangu nini bakokoka te kozala peto na bozangi mbeba? 6. Po azali ya Israel, oyo wana lisusu : mosali-wolo asalaki ye ; pe azali Nzambe te; po mwana ya ngombe ya Samaria ekokatana biteni na biteni ! 7. Po balonaki mopepe, bakobuka mopepe makasi; azali ata na tije ya ble te ; akobimisa mbuma na yango, ekobimisa farini te, pe soki abimisi yango, bapaya bakoliya yango. 8. Israel asili koliyama mobimba; sik’oyo akozala kati na bikolo lokola eloko oyo basepelaka na yango te.

9. Po bamataki epayi ya Mutu ya Asuria : Punda ya zamba oyo atelemi ye moko; Efrayime apesaki bakado epayi ya bamakango. 10. Ata tangu bazali kopesa bakado kati na bikolo, nakosangisa bango sik’oyo elongo, pe bakopema mwa moke na mokumba ya Mokonzi ya Bankumu.

11. Po Efrayime abakisaki bitumbelo mingi pona masumu, bitumbelo bikozalela ye pona kosumuka. 12. Nakomeli pona ye makambu mingi pe minene ya Mibeko na ngai, kasi etalelami lokola eloko oyo bayebi. 13. Pona bambeka oyo ya ba mabonza ngai, bakobonzaka mosuni pe bakolia yango; kasi Yawe andimi bango te. Sik’oyo akokundola mabe na bango, pe akotala na masumu na bango. Bakozonga na Ejipito. 14. Kasi Israel abosani mosali na ye, pe atongi bandako minene, pe Yuda abakisaki bingumba mingi ya makasi; kasi nakotinda moto na kati ya bingumba na yango, pe ekozikisa bandako na ye minene ya makasi.

 

9        Mokapo 9

1. Kosepela te, Israel, kino koganga na esengo lokola batu mosusu ; pamba te osali kindumba, pe obwaki Nzambe na yo. Po olingaki lifuti ya pite na bisika nionso ya kotuta ble. 2. Esika ya kotuta mbuma pe esika ya kokatisa vino ekoleyisa bango te, pe vino ya elengi ekokosa bango. 3. Bakofanda na kati ya mokili ya Yawe te ; kasi Efrayime akozonga na Ejipito, pe bakoliya na Asuria bileyi ya bosoto. 4. Bakosopa esopeli ya vino na Yawe te, pe bambeka na bango ekosepelisa ye te; kasi ekozala pona bango lokola lipa ya matanga; baoyo nionso bakoliya yango bakomikomisa mbindo; po lipa na bango ekozala pona milimo na bango, ekokota na kati ya ndako ya Yawe te.

5. Okosala nini na mokolo ya mayangani ya lokumu pe na mokolo ya bafeti ya Yawe? 6. Po tala, basili kokende na tina ya bobebisami; Ejipito akosangisa bango, Mofi (6) ekokunda bango; oyo azali ya motuya ya palata, nzube ekozala mosangoli na bango, pe nzube ekozala na kati ya bandako na bango. 7. Baye mokolo ya bozongisi ekomi, mokolo ya kozongisa mbano ekomi, pe Israel akoyeba yango. Profete azali zoba, mutu ya molimo azali liboma (7), pona monene ya mabe na yo, pe bonguna na yo monene. 8. Efrayime azali kokengela elongo na Nzambe na ngai. Profete azali motambo ya ndeke na banzela nionso, azali botomboki na kati ya ndako ya Nzambe na ye. 9. Basili kodinda na bozindo ya kobebisama lokola na mikolo ya Gibea; akokanisa mabe na bango, akotala masumu na bango na kopesa etumbu.

10. Namonaki Israel lokola bitunga ya bambuma ya vino na esobe; Namonaki batata na bino na ebandeli lokola mbuma ya liboso na nzete ya figi. Kasi bakendaki na Baal-Peor, pe bamikabaki na likambu moko ya soni, pe bamikomaki nkele lokola bamakangu na bango. 11. kembo ya Efrayime ekopumbwa noki lokola ndeke, kobota te, mokumba te, zemi te. 12. Ata soki babokoli bana na bango ya mibali, nakosala bazanga bango, po ata mutu moko te atikala; po lisusu, mawa na bango, tangu nakolongwa na bango. 13. Po Efrayime, lokola namonaki ye, azalaki Turo oyo elonami na kati ya bilanga kitoko, kasi Efrayime akomema bana na ye ya mibali libanda epayi ya mobomi.

14. Pesa bango, Yawe ! Nini okopesa bango? Pesa bango matrise oyo esopaka zemi, pe mabele oyo ekawuka. 15. Mabe na bango nionso ezali na Gilgale; po kuna, nayinaki bango; Na tina ya mabe ya misala na bango, nakobengana bango na ndako na nga. Nakolinga bango lisusu te; bankumu na bango nionso bazali bapengwi. 16. Efrayime abetami; pe misisa na bango ekawuki, ekobota mbuma te; pe soki baboti, nakoboma mbuma ya motuya ya libumu na bango. 17. Nzambe na ngai abwaki bango, po bayokaki ye te, pe bakoyengayenga na kati ya bikolo.

 

10 Mokapo 10

1. Israele ezali nzete ya vino oyo etikali polele, ebotaka mbuma kaka pona yango moko, lokola kofulukama ya mbuma na ye, akomisi bitumbelo ebele ; na lolenge ya kitoko ya mokili na ye, akomisi bikeko na ye kitoko. 2. Mitema na bango ekabwana, pe sik’oyo bakotalela bango lokola baoyo bazali na ngambo, akobuka bitumbelo na bango, akobebisa bikeko na bango. 3. Po, sik’oyo bakoloba ete: Tozali na mokonzi te, po tobangakaki Yawe te; pe Mokonzi akosala nini pona biso?

4. Bakoloba maloba, bakolapa ndayi ya lokuta, bakosala baboyokani; yango wana bosambisi ekobima lokola nzete ya ngenge na kati ya libulu ya bilanga. 5. Mofandi na Samaria akolenga na somo pona mwana-ngombe ya Beth-Avene, po batu na ye bakolela likolo na ye, pe Bakamarim (8) na ye bakolenga na tina na ye, pona kembo na ye, po ete amemakii mosika na ye ; 6. Akomemama na Asuria, lokola likabo epayi ya Mokonzi Yarebe; Efrayime akosimbama na soni, pe Israel akoyoka soni pona toli na ye.

7. Samaria, mokonzi na ye akufi, lokola likasa likolo ya may ; 8. Pe  bisika ya likolo ya Avene, lisumu ya Israel, ekobebisama; nzube pe nzete ya nzube ekokola likolo na bitumbelo; pe bakoloba na bangomba: Zipa biso; pe na bangomba ya mike: Kweya likolo na biso.

9. banda mikolo ya Gibea, Israel, osali lisumu : batikali kotelema wana; etumba ya kotelemela bana ya batu mabe ekomaki epayi na bango te na Gibha. 10. Nakopesa bango etumbu na ndenge ya bosepeli na ngai, pe batu bakosangana pona kobundisa bango, tangu  bakokanga  bango basinga pona mabe na bango mibale. 11. Pe Efrayime azali elenge ngombe ya mwasi oyo eteyami malamu, oyo alingaka konyata ble, pe ngai, naleki likolo ya kingo na ye ya kitoko : Nakobenda shario ya Efrayime, Yuda akobalola mabele, Yakobo akobuka biteni ya mabele oyo ekangami na misisa ya nzete. 12. Bolona pona bino boyengebene, bobuka mbuma na mezire ya bosembo. Bobalula pona bino biteni ya mabele ya sika; ete tangu ekoki ya koluka Yawe, kino akoya pe abetisela bino mbula ya boyengebene. 13. Otimoli mabe, pe obuki mbindo; oliaki mbuma ya lokuta ; po otielaki banzela na yo motema, na ebele ya bilombe na yo ya nguya. 14. Pe mobulu ekotelema na kati ya batu na yo, pe bisika na yo nionso ya makasi ekobebisama, lokola Shalma abebisaki Beth-Arbele, na mokolo ya bitumba : mama aniatamaki likolo ya bana na ye ya mibali. 15. Bethel akosala bino pe bongo, na tina ya mabe ya mabe na bino : na tongotongo, Mokonzi ya Israel oyo esengelaki abomama akobomama mobimba.

 

11 Mokapo 11

1. Tangu Israel azalaki mwana moke, nalingaki ye, pe nabengaki mwana na ngai libanda na Ejipito. 2. tangu babengaki bango, bakendaki mosika na baoyo babengaki bango; bazalaki kopesa mbeka epayi ya Babaal, pe kotumba mpaka ya malasi na bikeko oyo eyemami. 3. Pe nateyaki Efrayime kotambola; amemaki ye likolo na maboko na ye, kasi bayebaki te ete nazali kobikisa bango. 4. Nazali kobenda bango na basinga ya mutu, pe na bokangami ya bolingo, pe nazalaki pona bango lokola baoyo bakolongola ekanganeli wuta na kingo na bango, pe na boboto epayi na bango, napesaki bango ya koliya. 5. Akozonga te na kati ya mokili ya Ejipito, kasi MoAsuria akozala Mokonzi na bango, po baboyaki kozonga. 6. Pe mopanga ekotambola na bingumba na bango, pe ekobuka bikangeli na bango, pe ekoboma bango, na tina ya mabongisi na bango. 7. Pe batu na ngai bakangami makasi na koboya ngai; pe babengi bango epayi ya Likolo, kasi ata moko te kati na bango atelemi.

8. Ndenge nini nakotika yo, Efrayime? Ndenge nini nakokaba yo, Israel? Ndenge nini nakosalela yo lokola Adama, pe nakokomisa yo lokola Zeboime? Motema na ngai ebalukaki na kati na ngai, mawa na ngai nionso eninganaki elongo. 9. Nakopesa nzela te na kanda makasi ya kanda na ngai te, pe nakobebisa lisusu te Efrayime; po ngai nazali Nzambe, pe mutu te; Mosantu, na kati na yo, pe nakoya nakosilika te. 10. Bakotambola sima ya Yawe; akoganga lokola nkosi; pe tangu akoganga, bana na ye mibali, bakoya mbangu na komitungisa longwa na Mayi monene. 11. Bakopota mbangu na komitungisa lokola bandeke kowuta na Ejipito; pe lokola bibenga na mokili ya Asuria, pe nakofandisa bango na bandako na bango, elobi Yawe.

 

12 Mokapo 12

1. Efrayime azingi ngai na lokuta, pe ndako ya Israel na bokosi, kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, pe elongo na basantu ya solo. 2. Efrayime azali koliya mopepe, pe akolanda mopepe ya esti; mikolo nionso azali kobakisa lokuta na ye pe kobebisa ; pe azali kosala boyokani elongo na Asuria, pe akomema mafuta na Ejipito. 3. Yawe azali pe na matata elongo na Yuda, pe akopesa Yakobo etumbu na kolanda banzela na ye, pe akozongisela ye na kolanda misala na ye. 4. Na kati ya libumu, akangaki ndeko na ye na nzela ya litambe, pe na makasi na ye abundaki na Nzambe ; 5. Pe abundaki na Anjelu pe alongaki : alelaki pe abondelaki ye. Na Bethel, amonaki ye ; kuna asololaki na biso. 6. Pe Yawe, Nzambe ya mampinga, - Yawe ezali ekaniseli na ye. 7. Pe yo, zonga epayi ya Nzambe na yo,  bomba motema malamu pe bosambisi, pe zala na elikia tangu nionso epayi na Nzambe na yo.

8. Azali moteki mombongo; balansi ya bokosi ezali na kati ya loboko na ye; alingaka kobotola mbongo na makasi. 9. Pe Efrayime alobi: Ata ndenge nini, nakomi mozwi; pe nazwi bozwi mingi pona ngai moko. Na kati ya misala na ngai, bamoni ata mbeba moko te oyo ezali lisumu. 10. Pe ngai, Yawe Nzambe na yo wuta na mokili ya Ejipito; Nakofandisa bino lisusu na bahema, lokola na mikolo ya feti ya lokumu. 11. Pe nalobaki na Baprofete ; pe ngai, nakobakisa bimonaneli, pe na nzela ya Baprofete, nalobaki na bokokanisi. 12. Soki Gileade ezali eloko pamba (9), bango, bakozala eloko te. Na Gilgale, babonzaki mbeka ya bangombe; bitumbelo na bango ekozala lokola bitunga ya mabanga na kati ya mabulu ya bilanga. 13. Pe Yakobo akimaki na bilanga ya Siria, pe Israel asalaki pona mwasi moko, pe abatelaki pona mwasi moko. 14. Pe na nzela ya profete moko, Yawe abimisaki Israel na Ejipito, pe na nzela ya profete moko abatelamaki. 15. Efrayime asilikisaki Nzambe pasi ya bololo : nkolo na ye akotika likolo na ye makila na ye, pe akofuta ye kolanda mafinga na ye.

 

13 Mokapo 13

1. Tangu Efrayime azalaki koloba, ezalaki kolengisa; atombwamaki na Israel : kasi amikomisaki ngambo na nzela ya Baal, pe akufaki. 2. Pe sik’oyo akokoba na kosumuka pe na ba palata na bango basali bililingi ya bibende etumbami na moto, bikeko na lolenge na bososoli na bango, nionso mosala ya basali misala, balobaka pona bato wana : batu oyo bpesaka mbeka, bapesa bana ya ngombe babeze. 3. Yango wana bakozala lokola lipata ya tongo, pe lokola mamwe oyo elimwaka na tongotongo; lokola matiti ekawuka oyo mopepe makasi ememaka na esika yango, pe lokola milinga oyo ezali kobima na libanda ya fenetre. 4. Pe ngai, nazali Yawe Nzambe na bino, wuta na mokili ya Ejipito, pe oyebaki Nzambe mosusu te longola kaka ngai, pe ezali na Mobikisi te longola se ngai. 5. Ngai, nayebaki yo na kati ya esobe, na kati ya mabele oyo ekawuka. 6. Batondisamaki na lolenge ya ebele ya matiti na bango ya koleyisa bibwele, pe mitema na bango mitombolaki; yango wana babosani ngai. 7. Bongo nakozala pona bango lokola nkosi; pe lokola nkoyi, nakotala-talaka bango na nzela. 8. Nakobundisa bango lokola urse ya mwasi oyo balongoli bana na yango, pe nakopasola ezipeli ya motema na bango, pe kuna nakoliya bango lokola nkosi ya mwasi; banyama ya zamba bakopasola bango biteni na biteni.

9. ezali ebeisami na yo, Israel, po ete otelemelaki ngai, mosungi na yo. 10. Bongo wapi Mokonzi na yo? Pona abikisa yo na bingumba na yo nionso. Wapi Basambisi na yo, oyo olobaki pona bango: Pesa ngai Mokonzi, pe Bankumu?… 11. Napesaki yo Mokonzi na kanda na ngai, pe nalongolaki ye na kanda na ngai.

12. Mbindo ya Efrayime ekangami elongo, pe lisumu na ye ebatami pembeni. 13. Bapasi ya mwasi oyo azali kobota ekoyela ye; Azali mwana oyo azali na mayele te, po tangu ekomi ya kobimisa bana, atelemi wana te. 14. Nakokangola bango na loboko ya sheol, nakosikola bango na liwa. Ô liwa, malozi na yo ezali wapi ?, Ô sheol, wapi libebi na yo ? Mawa ebombami na miso na ngai.

15. Po akobota mbuma na kati ya bandeko na ye, mopepe ya esti ekoya, mopepe ya Yawe oyo ekowuta na esobe ekoya, pe ekokawusa maziba na yango, pe akokawusa liziba na ye ya mayi, pe akopunza ebombeli ya biloko nionso ya motuya kitoko. 16. Samaria akomema ngambo ya mbindo na ye, po atombokelaki Nzambe na ye; bakokweya na mopanga, bana na bango ya mike bakoniatama, pe bakotobola libumu ya basi na bango ya zemi.

 

14 Mokapo 14

1. Israel, zonga epayi ya Yawe, Nzambe na yo, po ete okweyi na nzela ya mabe na yo. 2. Zwa maloba elongo na yo, pe zonga epayi ya Yawe pe lobá na ye ete: Limbisa mabe nionso, pe yamba na bolamu, na esika ya bangombe, tokopesa mbuma ya mbebu na biso lokola mbeka. 3. Asuria akobikisa biso te; tokomata lisusu te likolo ya bampunda, tokoloba lisusu te : Nzambe na biso, na mosala ya maboko na biso ; po ete epayi na yo, mokufeli baboti azwaka mawa.

4. Nakobikisa apostazi na bango, pe nakolinga bango na bolamu; po nkanda na ngai elongwe epayi na bango. 5. Nakozala pona Israel lokola mamwe; akobimisa fololo lokola lis, pe akobota misisa na yango lokola banzete ya Liban. 6. Bitape na ye ekopanzana, pe kembo na ye ekozala lokola oyo ya nzete ya olive, pe solo malasi na ye ekozala lokola Liban. 7. Bakozonga kofanda na se ya elili na ye, pe bakobota ble, pe bakobimisa fololo lokola vino, pe sango ya lokumu na ye ekozala lokola vino ya Liban.

8. Efrayime: Nazali lisusu na nini ya kosala na bikeko? – Ngai, nakoyanola ye, pe nakotala ye; Ngai, nazali lokola nzete ya sipres ya motane. - mbuma na yo ekowuta epayi na ngai.

9. Nani azali bwanya? Akososola makambu oyo; pe oyo azali na bososoli ? A koyeba yango. Po banzela ya Yawe bizali sembo; pe bayengebene bakotambola kuna, kasi batomboki bakokweya kuna.

 

15 Banoti

1. Lo-Rukama=  ye oyo bakoyokela mawa te. Ezali kombo symbolique oyo profete Oze apesaki mwana na ye ya mwasi pe ya mwasi na ye Gomere. Na mokapo 2 :1 Rukama= oyo bayokeli mawa,

2. Lo-Ami = batu na ngai te. Ezali kombo moko symbolique oyo profete Oze apesaki mwana na ye mibale ya mobali. Na mokapo 2 :1 Ami= batu na ngai,

3. Nkolo na ngai= na makomi ya Oze na Ebre ezali Ba’al na ngai oyo ezali : « Nkolo na ngai to Metre na ngai », esengeli koloba awa « Metre na ngai » po ezali liloba oyo balobeli Yawe. Ba’al= Metre, Nkolo, mukolo ya biloko,

4. Omer= mezire ya kokawuka ya orje pe ya ble ; ezali ya bokokani penepene ya 300 litre,

5. Beth-Avene= ndako ya mbindo to ndako ya bikeko,

6. Mofi ezali kombo mosusu ya engumba Memfis na Ejipito,

7. Mutu ya elimo= oyo akosalaka lokola mutu ya liboma to oyo azangi makanisi, azali komonisa to kolakisa  bizaleli oyo ezangi mayele pe oyo ekoki kokanisama te,

8. Bakamarime= banganga-nzambe ya losambo ya bikeko oyo bazalaki kobonza bambeka pona kosepelisa moko ya nzambe ya bapaganu,

9. to ezali mbindo, mabe