Amos
Mokapo 1 — Mokapo 2 — Mokapo 3 — Mokapo 4 — Mokapo 5 — Mokapo 6 — Mokapo 7 — Mokapo 8 — Mokapo 9
1. Maloba ya Amos, oyo azalaki moko na kati ya babateli ya mpate ya Tekoa, oyo amonaki likolo na Israel na mikolo ya Uzia mokonzi ya Yuda, pe na mikolo ya Yeroboame mwana ya Yoashe mokonzi ya Israel, mbula mibale liboso ya koningana ya mabele. 2. Pe alobaki : Yawe akoganga na Siona, pe na Yerusaleme akoyokisa mongongo na ye ; pe bisika babateli ya mpate baleyisaka bibwele ekolela, pe songe ya Karmele ekokawuki.
3. Yawe alobi boye : na tina ya mabunga misato ya Damas, pe na tina ya mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani, po batutaki Gileade na mituka ya bibende. 4. Pe nakotinda moto moko na ndako kitoko ya Azaele, pe ekozikisa bandako minene ya Ben-Adade ; 5. Pe nakobuka bibende ya bikuke ya Damasi, pe na lobwaku ya Avene nakolongola mofandi, pe na Beth-Eden, moto oyo asimbi lingenda ya bokonzi ; pe batu ya Siri bakomemama na bowumbu na Kiri, elobi Yawe.
6. Yawe alobi boye : Na tina ya mabunga misato ya Gaza, pe na tina ya mineyi, nakolongola te yango etumbu oyo ngai nakani, po bamemaki na bowumbu ya boloko mobimba, pona kokaba bango na Edome ; 7. Kasi nakotinda moto moko na bamir ya Gaza, pe ekozikisa bandako kitoko na yango ya minene ; 8. Pe nakolongola na Asdod mofandi, pe na Askalon ye oyo asimbi lingenda ya bokonzi ; pe nakobalusa loboko na ngai etelemela Ekrone, pe batikali ya Bafilistia bakokufa, elobi Nkolo, Yawe.
9. Yawe alobi boye : na tina ya mabunga misato ya Tulo, pe ya mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani: po bakabaki bowumbu nionso na Edome, pe bakanisaki te boyokani kati na bandeko. 10. Na yango wana nakotinda moto na bamir ya Tulo, pe ekozikisa bandako na yango ya kitoko.
11. Yawe alobi boye : Na tina na mabunga misato ya Edome pe na tina na mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani, po alandaki ndeko na ye na mopanga, pe asili koboma motema mawa na ye, pe po kanda na ye ezali kotungisa ye tangu nionso, pe abatelaka kanda na ye pona libela, 12. Bongo nakotinda moto na kati ya Temane, pe ekozikisa bandako kitoko ya Bozra.
13. Yawe alobi boye : na tina ya mabe misato ya bana ya Amona pe na tina ya mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani, po batoboli libumu ya basi ya zemi ya Gileade po bayeyisa monene ndelo na bango. 14. Bongo nakopelisa moto na kati ya bamir ya Raba, pe ekozikisa bandako na yango ya minene, na makelele ya koganga ya etumba na mokolo ya etumba, na mopepe makasi na mokolo ya mopepe makasi ; 15. Pe mokonzi na bango akokende na bowumbu, ye pe bankumu na ye elongo, elobi Yawe.
1. Yawe alobi boye : na tina ya mabunga misato ya Moaba pe na tina ya mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani, po atumbaki, nakokomisa langi ya pembe mikuwa ya mokonzi ya Edome, 2. Nakotinda mɔoto likolo na Mowabe, pe ekozikisa bandako kitoko ya Keriyote ; pe Mowabe ekokufa na kati ya mobulu, na kati ya makelele ya etumba, na lokito ya kelelo, 3. Pe nakolongola mosambisi na kati na ye, pe nakoboma bankumu na ye nionso elongo na ye, elobi Yawe.
4. Yawe alobi boye : na tina ya mabunga misato ya Yuda, pe na tina ya mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani : po baboyi mobeko ya Yawe, pe babombi mibeko na ye te, pe lokuta na bango, oyo batata na bango balandaki, ebungisi bango nzela ; 5. Na yango wana, nakotinda moto na kati ya Yuda, pe ekozikisa bandako kitoko ya Yerusaleme.
6. Yawe alobi boye : na tina ya mabunga misato ya Israele, pe na tina ya mineyi, nakolongola te etumbu yango oyo ngai nakani : po bazali koteka moyengebene pona mbongo, pe mobola pona sapato mibale; 7. Bango oyo bazali naposa makasi ya komona putulu ya mabele likolo na moto ya babola, pe bazali kobebisa nzela ya batu ya minioko ; pe mobali moko na tata na ye bakokendaka epayi ya muana mwasi moko pona kobebisa kombo na ngai mosantu ; 8. Pe bakolalaka na mopanzi ya etumbelo nionso, likolo ya bilamba oyo babotoli na niongo, pe bakomela na kati ya ndako ya nzambe na bango vino oyo ewuti na amande. 9. Kasi ngai, nabebisaki Moamore liboso na elongi na bango, oyo molayi na ye ezalaki lokola molayi ya nzete ya sedre, pe oyo azalaki makasi lokola banzete ya shene ; pe nabebisi mbuma na ye wuta likolo, pe misisa na ye wuta na se. 10. Pe ngai, nabimisaki bino na mokili ya Ejipito, pe nakambaki bino mibu tuku mineyi na esobe, po bozwa mokili ya Baamore. 11. Pe nabimisaki baprofete na kati ya bana na bino ya mibali, pe na kati ya bilenge na bino, banazari. Ezali bongo te, bana mibali ya Israel ? elobi Yawe. 12. Pe bomelisaki Banazare vino, pe bopesaki baprofete mitindo ete : Boprofetize te. – 13. Tala, nakopeze likolo na bino lokolo shar oyo etondi na maboke ya bambuma. 14. Pe kokima ya mbangu ekosila pona oyo azalaka mbangu ; pe elombe akobomba bokasi na ye te, pe mutu ya nguya akobikisa bomoyi na ye te ; 15. Pe ye oyo asalelaka likonga akotelema te ; pe ye oyo ya makolo ya mbangu akobika te, pe ye oyo azali komata na punda akobikisa bomoyi na ye te ; 16. Pe ye oyo motema etonda molende kati na batu ya nguya akokima bolumbu na mokolo wana, elobi Yawe.
1. Bóyoka liloba oyo Yawe alobi likolo na bino, bana mibali ya Israel, po na mabota nionso oyo nabimisaki na mokili ya Ejipito. 2. Alobi : Nayebaki kaka bino moko, na mabota nionso ya mabele ; yango wana nakotala likolo na bino mbindo na bino nionso. 3. Mibale bakoki kotambolaka esika moko soki bayokani te ? 4. Nkosi akonguluma na kati ya zamba soki azali na nyama ya koliya te ? Mwana ya nkosi akoyokisa mongongo na ye na libulu na ye soki akangi eloko moko te? 5. Ndeke ekokweya na motambo oyo ezali na mabele soki motambo pona ye ezali te ? motambo ekoki kobimaka na mabele soki ekangaki eloko te ? 6. To kelelo ekobetama na kati ya engumba, pe batu bakolenga te ? To likama ekoki zala na kati ya engumba, pe Yawe asala yango te ? 7. Nzokande Nkolo Yawe asalaka eloko te soki alakisi sekele na ye te na basali na ye baprofete.
8. Nkosi egangi, nani akolenga te ? Nkolo, Yawe alobi : nani ako profetize te ?
9. Bobelela yango likolo na bandako kitoko ya Ashdode pe likolo na bandako kitoko ya mokili ya Ejipito, pe boloba : Bosangana likolo na bangomba ya Samaria, pe bomona mobulu monene oyo ezali na kati na yango pe minioko na kati na yango. 10. Pe bayebi te kosala oyo ezali sembo, elobi Yawe, bango oyo basangisaka mobulu pe biloko oyo babotoli na makasi na bandako na bango yakitoko. 11. Na yango wana, Nkolo, Yawe alobi boye : Monguna, akozinga-zinga ya mboka mobimba ! pe akobuka nguya na yo, pe bandako na yo ya kitoko ekopunzama. 12. Yawe alobi boye : Lokola mobateli ya mpate abikisaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi, ndenge wana nde bana ya Israel bakobikisama oyo bafandi na Samaria na esika kitoko ya mbeto ya bopemi, pe na bambeto ya songe.
13. Boyoka, pe botatola kati na ndako ya Yakobo, elobi Nkolo, Yawe, Nzambe ya mampinga. 14. Na mokolo oyo nakotalela mabunga ya Israel likolo na ye, nakopesa bitumbu na bitumbelo ya Bethel ; pe maseke ya etumbelo ekozala ya kokatama pe ekokweya na mabele. 15. Pe nakobeta ndako ya eleko ya malili pe ndako ya eleko ya molunge ; pe bandako ya pembe ya nzoku ekobebisama, pe bandako minene ekotikala kozala lisusu te, elobi Yawe.
1. Boyoka liloba oyo, bangombe ya Bashane, oyo bozali na likolo ya ngomba ya Samaria, oyo bozali koniokola babola, bozali koniata bakeleli, pe bokoloba na bankolo na bino : Bomema po ete tomela. 2. Nkolo, Yawe alapi ndayi na bosantu na ye ete, tala, mikolo ekoya likolo na bino, oyo bakomema bino na bandobo, pe batikali na bino na bandobo ya bolobi-mbisi. 3. Pe bokobimela na nzela ya madusu ya mir, moko na moko liboso na ye, pe bokobwakama na Armon, elobi Yawe.
4. Boya na Bethel pe bobuka mobeko ! Na Gilgal pe bobakisa kobuka mobeko ! pe na tongo bomema bambeka na bino, moko na zomi na bino mikolo misato nionso ; 5. Pe botumba lipa oyo batia levire na mbeka ya kotonda matondi ; pe bosakola makabo ya motema mobimba, boyebisa yango ! po boye nde bolingi, bana ya Israel, elobi Nkolo, Yawe. 6. Pe bongo, ngai, napesi bino minu ya peto na bingumba na bino nionso, pe bozangi lipa na bisika na bino nionso ; pe bozongi epayi na ngai te, elobi Yawe. 7. Pe lisusu napekiseli bino pe mbula, tangu etikalaki nanu sanza misato liboso ya kobuka mbuma ; pe nanokisi mbula likolo ya engumba moko, pe nanokisi mbula likolo ya engumba mosusu ; ezalaki na mbula likolo ya eteni moko, pe etengi oyo ezalaki na mbula te, ekawukaki ; 8. Pe bingumba mibale to misato ekendaki na engumba mosusu pona komela mayi, pe batondaki te ; pe bozongi epayi na ngai te, elobi Yawe. 9. Nabeti bino na kopola pe kokawuka ; Makelele elie eteni monene ya bilanga na bino, pe ya vino na bino, pe ya figi na bino pe ya ba olive na bino ; kasi bozongi epayi na ngai te, elobi Yawe. 10. Natindi kati na bino bokono lokola oyo ya Ejipito ; Nabomi bilenge mibali na bino na mopanga, namemi bapunda na bino na bokangami, pe namatisi solo mabe na kati ya bakaa na bino, na kayi ya bazolo na bino. Kasi bozongi epayi na ngai te, elobi Yawe. 11. Natiei kobulungisana na kati na bino, lokola bolunganisaki oyo Nzambe asalaki na Sodome pe Gomore; pe bozalaki lokola eteni ya nzete oyo ebikisami na moto. Pe bozongi epayi na ngai te, elobi Yawe. 12. Yango wana nakosala yo boye, Israel. Lokola nakosala yo boye, ombongisa, Israel, pona kokutana na Nzambe na yo! 13. Po tala, ye oyo asala bangomba, pe akelaka mopepe, pe ayebisaka na mutu makanisi na ye ; oyo asalaka tongo pe molili, pe atambolaka na bisika oyo etombwana na mabele, - Yawe, Nzambe na mampinga, ezali kombo na ye.
1. Boyoka liloba oyo, kolela natomboli likolo na bino, ndako ya Israel ! 2. Akweyi,akotelema lisusu te, ngondo ya Israel ; alali likolo ya mabele na ye, ezali mutu moko te oyo akotombola ye. 3. Po boye elobi Nkolo, Yawe : Engumba oyo ebimaki nkoto moko na batu na bitumba akotikala na kama, pe engumba oyo ebimaki na kama moko na batu na bitumba akotikala na zomi, pona ndako ya Israel.
4. Po Yawe alobi boye na ndako ya Israel : Boluka ngai pe bokozala na bomoyi. 5. Pe boluka Bethel te, bokende na Gilgale te, bokende na Beer-sheba te ; pamba te Gilgale ekomemama na bowumbu pe Bethel ekobebisama. 6. Boluka Yawe, pe bokozala na bomoyi, noki te akota lokola moto na ndako ya Yozefe pe azikisa yango, pe ezala ata na mutu moko te na Bethel po na koboma yango. 7. Bino oyo bobongolaka bosembo na pwazon pe bobwakaka boyengebene na mabele , 8. Ye oyo asala minzoto sambo (pleyade) pe Orion, pe abongolisaka tongo na elili ya liwa, pe akomisaka mokolo molili ya butu, oyo abengaka mayi ya monene pe asopaka yango likolo na etando ya mabele : Yawe ezali kombo na ye ; 9. Ye oyo atelemisaka pwasa libebi likolo ya mutu ya makasi, pe libebi eye esika ebetami makasi.
10. Bayinaka ye oyo akopamela na ekuke, pe bamonaka kele ye oyo alobaka na bosolo. 11. Yango wana, lokola ozali koniata mobola pe bokozwa mbuma ya ble epayi na ye lokola impot ; botongi bandako na mabanga oyo bakata malamu, kasi bokofanda na yango te, boloni bilanga ya vino ya kitoko pe bokomela vino yango te. 12. Po nayebi mabungu na bino mingi, pe ebele ya masumu makasi na bino ; Baniokolaka bayengebene, bazwaka bakado, pe babebisaka bosembo ya babola na ekuke. 13. Yango wana, na tango oyo, mutu ya bwania oyo akofanda nye, po ezali tango mabe.
14. Boluka malamu, kasi mabe te, po bozala na bomoyi ; pe boye Yawe, Nzambe ya mampinga, akozala elongo na bino, lokola bokoloba yango. 15. Boyina mabe, pe bolinga malamu, pe botiya bosembo na ekuke ; mbala mosusu Yawe, Nzambe ya mampinga, akosala ngolu na batikali ya Yozefe. 16. Yango wana, boye elobi Yawe Nzambe na mampinga, Nkolo : kati na bisika nionso, kolela ! pe na balabala nionso, bakoloba : Ee, Ee ! pe bakobenga mosali bilanga na matanga, pe na kolela baoyo bayembaka banzembo na kolela ; 17. Pe na kati ya bavino nionso, kolela ! po nakoleka na kati na yo, elobi Yawe.
18. Mawa na bino oyo bozali naposa ya mokolo ya Yawe ! Na nini bokokanisa mokolo ya Yawe ? Ekozala molili, kasi pole te, 19. Lokola soki mutu akokima liboso na nkosi, pe urse moko ekutani na ye ; pe akoti ndako pe atie loboko na ye na mir, pe nyoka moko eswi ye. 20. Mokolo ya Yawe ezali molili te, pe pole te, pe molili bozindo pe kongenga te ? 21. Nayina, natioli bafeti na bino, pe nakosepela na mayangani na bino te. 22. Soki bobonzeli ngai bambeka ya kotumba pe makabo na bino ya gato, nakosepela na yango te ; pe nakotala te likabo ya kimia ya bangombe na bino oyo ekomi mafuta. 23. Longola liboso na ngai makelele ya banzembo na yo, pe miziki ya banzenze na yo, nakoyoka yango te. 24. Kasi tika bosembo ebalukaka lokola bibale, pe boyengebene lokola ebale oyo ekokawuka te ! 25. Bobonzelaki ngai bambeka pe makabo na kati ya esobe, na bowumeli ya mbula tuku mineyi, ndaku na Israel ? 26. Kasi bomemaki tabernakle ya Molok na bino, pe Kiun ya bililingi na bino, monzoto ya Nzambe na bino, oyo bosalaki ; 27. Pe bomemaki mosika na ngambo mosusu ya Damasi, elobi Yawe : kombo na ye ezali Nzambe ya mampinga.
1. Mawa na baoyo bazali na kimia na Siona pe na baoyo bazali na libateli likolo na ngomba ya Samaria, batu minene kati na bikolo ya liboso, oyo epayi na bango ndako ya Israel ekokende! 2. Boleka na Kalane pe botala ; pe longwa kuna, bokende na Amate, monene, pe bokita na Gate ya Bafilistia : bazali malamu koleka ba bokonzi oyo ? ndelo na bango ezali monene koleka ndelo na bino ? 3. Bino oyo bozongisaka mokolo ya pasi pe bomemi penepene kiti ya bokonzi ya mobulu ; 4. Bino baoyo bolalaka na mbeto ya pembe ya nzoku pe bomitandaka malembe likolo na bambeto na bino, pe baliyaka bampate ya etonga pe bana ngombe oyo ya mafuta oyo ewuti na ndako ya bibwele; 5. Baoyo boyembaka na lokito ya banzenze pe lokola David, bobimisaka na kobongisaka pona bino moko, bisaleli ya miziki pona loyembo ; 6. Baoyo bamelaka vino na basani pe bamipakolaka mafuta ya malamu koleka, pe bayokaka mawa te pona kobebisama ya Yozefe. 7. Yango wana, sik’oyo, bakokende na bowumbu na moto ya baoyo bakokende na bowumbu, pe kosepela ya baoyo balali malamu ekosila.
8. Nkolo, Yawe alapi ndayi na ye moko, elobi Yawe, Nzambe na mampinga : Nayinaka lolendo ya Yakobo, pe nayinaka bandako na ye ya kitoko; pe nakokaba engumba pe na nionso oyo azali na yango. 9. Pe ekosalema ete, soki batikalaki mibali zomi na ndako moko, bakokufa ; 10. Pe ndeko ya tata na bango, pe oyo esengeli atumba ye, akotombola ye pona kobimisa ye na ndako ya mikuwa, pe akoloba na oyo azali na kati ya ndako : ezali lisusu na moko pembeni na yo ? Pe akoloba : mutu te ! pe akoloba : nye ! Po tokoki te kotanga kombo ya Yawe.
11. Po tala, Yawe apesi mitindo, pe bakobeta ndako monene na madusu, pe ndako moke ekokoma na kotengama. 12. Bampunda bakopakata mbangu likolo na mabanga, to batimbolaka yango na bangombe ? po ete bobongoli bosembo na pwazon pe na bololo mbuma ya boyengebene, 13. Bino oyo bosepelaka na oyo ezali ya pamba, bino oyo bozali koloba : elongo na makasi na biso, tosili te kozwa nguya? 14. Po tala, ndako na Israel, elobi Yawe, Nzambe na mampinga, nakotelemisa ekolo moko pona kobundisa bino; pe bakoniokola bino banda na ekoteli ya Amate ti na ebale ya Araba.
1. Boye asili kolakisa ngai Nkolo, Yawe : Tala, ye asalaki makoki lokola na ebandeli ya kobuka bilanga ya mbala ya suka ebandi kokola ; pe tala, ezalaki kobuka bilanga ya suka sima ya bokati ya mokonzi. 2. Ekomaki tangu baliyaki matiti mobimba ya mabele, nalobaki ete : Nkolo, Yawe, limbisa, nabondeli yo! Ndenge nini Yakobo asengeli kobika ? Po azali moke. 3. Yawe abongoli motema na likambo oyo : ekozala bongo te, elobi Yawe. 4. Boye Nkolo, Yawe alakisaki ngai : Tala, Nkolo, Yawe, abengaki pona kosambisa na nzela ya moto ; pe ekotumba libulu monene, pe ekotumba libula. 5. Pe nalobi : Nkolo, Yawe, tika, nabondeli yo ! Ndenge nini Yakobo asengeli kobika ? Po azali moke. 6. Yawe abongoli motema na tina likambu yango : pe yango ekosalema te, elobi Nkolo Yawe. 7. Boye alakisaki ngai ; Tala, Yawe atelemaki likolo na mir oyo etongami na mbodi, pe azalaki na singa ya mbodi na loboko na ye. 8. Pe Yawe alobaki na ngai : Okomona nini, Amos ? pe nalobaki : mbondi. Pe Nkolo alobi : Tala, nakotiya singa ya mbodi na kati-kati ya batu na ngai Israel na ngai ; nakoleka lisusu na likolo na ye te. 9. Pe bisika ya likolo ya Izak ekobebisama, pe bisika bosantu ya Israele ekobebisama, pe nakotelema na mopanga pona kobundisa ndako ya Yeroboame.
10. Bongo Amatshia, nganga-Nzambe ya Bethel, atindaki epayi ya Yeroboame, mokonzi ya Israel , koloba : Amos asali likita pona kobundisa yo na katikati ya ndako ya Israel; mboka ekozala na makoki te ya kokanga motema na maloba na ye nionso ; 11. Po Amos alobi boye : Yeroboame akokufa na mopanga, pe Israel akomemama na bowumbu libanda ya mokili na ye. 12. Pe Amatshia alobi na Amos : Mona, kende ; kima na mokili ya Yuda, pe liya lipa na yo kuna, pe profetize kuna, 13. Kasi koprofetize lisusu te na Bethel, po ezali esika mosantu ya mokonzi, pe ndako ya bokonzi.
14. Pe Amos ayanoli pe alobi na Amatshia : Nazalaki profete te, pe nazalaki mwana ya profete te ; kasi nazalaki mokengeli ya mpate pe mobuki ya mbuma ya sikomore ; 15. Pe Yawe azwaki ngai tangu nazalaki kolanda etonga ya bibwele, pe Yawe alobi na ngai : Kende, profetize epayi ya batu na ngai Israel. 16. Pe sik’oyo, yoka liloba ya Yawe : Olobi na ngai : koprofetize te na kotelemela Israel, pe koloba maloba te na kotelemela ndako ya Izak. 17. Yango wana, Yawe alobi boye : Mwasi na yo akosala kindumba na engumba, pe bana na yo ya mibali pe ya basi bakokufa na mopanga, pe mabele na yo ekokabwama na singa ya molongo ekabolaka, pe yo okokufa na kati ya mokili ya mbindo, pe Israel akomemama na bowumbu libanda ya mokili na ye.
1. Boye asili kolakisa ngai Nkolo, Yawe, pe, tala, kitunga moko ya bambuma oyo ya eleko ya molunge. 2. Pe alobi: Omoni nini, Amos ? Pe nalobi : Kitunga ya bambuma oyo ya eleko ya molunge. Pe Yawe alobi na ngai : Suka ekomi pona batu na ngai Israel ; pe nakoleka lisusu te likolo na ye ; 3. Pe, na mokolo wana, banzembo ya ndako ya mokonzi ekokoma bilelo, elobi Nkolo Yawe. Banzoto ekufa ekozala ebele mingi ; na bisika nionso bakobwaka yango libanda… nye!
4. Boyoka oyo, bino oyo bozali komela babola pona kobungisa batu ya bopolo na mokili, pe koloba : 5. Tangu nini sanza ya sika ekoleka, pona ete biso toteka ble, pe Saba, pona biso tofungola bisika na biso ya kobomba mbuma ? Tokitisa efa, pe tobakisa sikle, pe tokobebisa bimekeli ya bokosi ; 6. Po ete tosomba babola na mbongo, pe bakeleli pona sapato, pe toteka bosoto ya ble ? 7. Yawe alapi ndayi na kembo ya Yakobo, alobi : soki libela nakobosana ata mosala moko na bango. 8. Pona yango, mabele ekoningana te ? Pe moko na moko ya bafandi na ye bakolela te ? Pe akomata nionso lokola Ebale Nile, pe ekomata pe ekokweya lokola ebale ya Ejipito.
9. Pe ekoskoma na mokolo wana, elobi Nkolo, Yawe, nakolalisa moyi na midi makasi, pe nakomema molili na mabele na kati-kati ya moyi. 10. Pe nakobongola bafeti na bino na matanga, pe banzembo na bino nionso na kolela ; pe nakotiya saki na loketo nionso, pe libandi na mitu nionso ; nakosala yango ezala lokola kokufela ya mwana se moko, pe suka na yango ekozala lokolo mokolo ya bololo. 11. Tala, mikolo ekoya, elobi Nkolo, Yawe, oyo nakotinda nzala na mokili, nzala ya lipa te, pe posa ya mayi te, kasi ya koyoka maloba ya Yawe. 12. Bakoyengayenga longwa na mayi monene kino na mayi monene mosusu, pe wuta na nor kino na esti ; Bakopota mbangu bisika na bisika pona koluka liloba ya Yawe pe bakozwa yango te. 13. Na mokolo wana, bangondo basi kitoko pe bilenge mibali bakolemba naposa ya mayi. 14. Balapi ndayi na nzela ya mbeba ya Samaria pe bakoloba : Dan, Nzambe na yo azali na bomoyi ! pe : Nzela ya Beersheba ezali na bomoyi ! Pe bakokweya pe bakotelema lisusu te.
1. Namoni Nkolo atelemi likolo na etumbelo, pe alobi : Beta songe ya likonzí, po ete bikuke eningana, pe buka bango nionso mito na bango, pe nakoboma bokitani na bango na mopanga ; oyo kati na bango akokima, akomibikisa te na kokima, pe oyo kati na bango abiki, akokangolama te. 2. Soki bakoti ti na Sheol, loboko na ngai ekozwa bango wuta kuna ; pe tangu bakomata ti na likolo, nakokitisa bango wuta kuna ; 3. Pe soki bamibombani na songe ya Karmele, nakoluka bango wana pe kuna nakozwa bango ; pe soki bamibombani liboso ya miso na ngai, na bozindo ya mayi monene, kuna nakopesa motindo na nyoka, pe ekoswa bango ; 4. Pe tangu bakokende na bowumbu liboso ya banguna na bango, nakopesa motindo na mopanga wuta kuna, pe ekoboma bango. Pe nakotiya miso na ngai likolo na bango pona mabe kasi pona bolamu te. 5. Pe Nkolo, Yawe na mampinga, ezali ye oyo asimbi mabele, pe eninganaka, pe banso oyo bafandi kati na yango basalaka matanga, pe ekomata nionso mobimba na likolo lokola ebale Nile, pe ekokita lokola ebale ya Ejipito ; 6. Ezali ye oyo atongi bashambre na ye ya likolo na likolo, pe ye oyo atongi bandako na ye ya kobomba biloko likolo ya mabele ; oyo abengaka mayi ya monene pe asopaka yango na etando ya mabele : Yawe ezali kombo na ye.
7. Bozali te pona ngai lokola bana ya batu ya Etiopi, ô bana mibali ya Israel ? Elobi Yawe. Nabimisaki te Israel na mokili ya Ejipito, pe Bafilistia ya Kafetore, pe Basiria ya Kiri ? 8. Tala, miso ya Nkolo Yawe ezali likolo ya bokonzi ya mosumuki, pe nakobebisa ye likolo na etando ya mabele ; bobele ete nakobebisa mobimba te ndako ya Yakobo, elobi Yawe. 9. Po tala, napesi mitindo, pe nakoyungula ndako ya Israel na kati ya bikolo nionso, lokola bayungulaka na kati ya kiyungulu; pe mbuma moko te ekokweya na mabele. 10. Ezali na mopanga nde basumuki nionso ya batu na ngai bakokufa, bango oyo balobi : Likama ekopusana pembeni na biso te, pe ekokomela biso te.
11. Na mokolo yango, nakotombola tabernakle ya Davidi oyo ekweyaki, pe nakozipa madusu na yango, pe nakotombola bitika na yango, pe nakotonga yango lokola na mikolo ya kala ; 12. Po ete bazwa bitikali ya Edome pe bikolo nionso oyo kombo na ngai etangami, elobi Yawe, oyo asali yango.
13. Tala, mikolo ekoya, elobi Yawe, oyo motimboli bilanga akopusana na ye oyo abukaka mbuma, pe na ye oyo aniati vino, na ye oyo alonaka moloni ; pe bangomba ekosopana na vino ya sika, pe bangomba mike nionso ekosopana. 14. Pe nakozongisa bakangami ya batu na ngai Israel ; pe bakotonga bingumba oyo ebebaki, pe bakofanda na yango, pe bakokolona bavino, pe bakomela vino yango, pe bakolona bilanga pe bakoliya mbuma na yango. 15. Pe nakolona bango likolo na mabele na bango ; pe bakolongolama lisusu te likolo na mabele oyo napesi bango, elobi Yawe Nzambe na yo.