Mokanda ya Zakaria

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14

 

1        Mokapo 1

1. Na sanza ya mwambe, na mbula ya mibale ya Dario, liloba ya Yawe eyaki epayi ya Zakaria, profete, mwana ya Berekiya, mwana ya Ido, koloba :

2. Yawe asilikelaki batata na bino makasi. 3. Pe okoloba na bango: Yawe ya mapinga alobi boye: Bozonga epayi na ngai, elobi Yawe ya mapinga, pe nakozonga epayi na bino, elobi Yawe na mapinga. 4. Bozala te lokola batata na bino, oyo baprofete ya yambo babelelaka bango, koloba: Tala oyo Yawe ya mapinga alobi: Bolongwa sik’oyo na banzela na bino ya mabe pe na misala na bino ya mabe !… kasi bayokaki ngai te, pe batiaki likebi na ngai te, elobi Yawe. 5. Batata na bino, bazali wapi? Pe baprofete, bazali na bomoyi libela? 6. Kasi maloba na ngai pe mibeko na ngai, oyo napesaki motindo na basali na ngai baprofete, ekomelaki batata na bino te? Pe bazongaki pe balobaki: Lokola Yawe na mapinga akanaki kosala biso, na kolanda banzela na biso pe misala na biso, ndenge wana asalaki na biso.

7. Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya zomi na moko, oyo ezali sanza ya Shebate, na mbula ya mibale ya Dario, liloba ya Yawe eyaki epayi ya Zakaria, profete, mwana ya Berekiya, mwana ya Ido, koloba : 8. Namoni na butu, pe tala, mutu moko amataki likolo ya punda motane; pe atelemaki na kati ya banzete ya mirte oyo ezalaki na kati ya lobwaku na se, pe sima na ye ezalaki na bapunda ya motane, ya motane makasi pe ya pembe. 9. Pe nalobi: Nkolo na ngai, baoyo bazali banani? Pe anjelu oyo azalaki kosolola na ngai, alobi na ngai: Nakolakisa yo baoyo bazali banani. 10. Pe mutu oyo atelemaki na kati-kati ya banzete ya mirte, ayanolaki pe alobi: Baoyo bazali oyo Yawe atindaki po batambola epayi na epayi na mabele. 11. Pe bayanolaki anjelu ya Yawe oyo atelemaki na kati ya banzete ya mirte, pe balobaki: Totambolaki epayi na epayi na mabele, pe tala, mabele mobimba efandi kimia pe ezali kopema. 12. Bongo anjelu ya Yawe azwaki liloba pe alobi : Yawe na mapinga, kino tangu nini okoyokela Yerusaleme mawa te, pe bingumba ya Yuda, oyo osilikelaki yango mbula tuku sambo oyo? 13. Pe Yawe ayanolaki anjelu oyo azalaki koloba na ngai, maloba ya boboto pe na maloba ya kobondisa. 14. Pe anjelu oyo azalaki kosolola na ngai, alobi na ngai: Ganga, koloba: Boye elobi Yawe na mapinga: Nazali na zuwa mingi pona Yerusaleme pe pona Siona, 15. Pe nazali na kanda monene penza nakosilikela bikolo oyo bazali na kimia; po nasilikaki mwa moke, kasi bango basungi na mabe. 16. Na yango wana Yawe alobi boye: Nazongi na Yerusaleme na mawa; Ndako na ngai, elobi Yawe na mapinga, ekotongama kati na yango, pe singa ekosembolama likolo ya Yerusaleme. 17. Ganga lisusu, oloba: boye  elobi Yawe na mapinga: Bingumba na ngai ekotonda lisusu na biloko ya malamu; pe Yawe akobondisa Siona, pe akopona lisusu Yerusaleme.

18. Pe natombolaki misu na ngai, pe namonaki, pe tala, maseke mineyi. 19. Pe nalobaki na anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: Baoyo ezali nini? Pe alobi na ngai: Wana ezali maseke oyo epalanganisaki Yuda, Israel pe Yerusaleme. 20. Pe Yawe alakisaki ngai basali mineyi. 21. Pe nalobaki: Baoyo baye kosala nini? pe alobi na ngai : Wana bazali maseke oyo epalanganisaki Yuda, na boye ete mutu moko te atombola moto na ye; pe baoyo baye pona kolengisa bango, pe kobwaka mosika na se maseke ya bikolo oyo batombolaki liseke likolo ya mboka ya Yuda, pona kopalanganisa yango.

 

2        Mokapo 2

1. Pe natombolaki misu na ngai, pe natalaki, pe tala, mutu moko, pe singa ya komezire ezalaki na loboko na ye. 2. Pe nalobi: Ozali kokende wapi? Pe alobi na ngai: Pona komezire Yerusaleme, pona komona boni monene na yango pe boni molayi na yango. 3. Pe tala, anjelu oyo azalaki kosolola na ngai abimaki; pe anjelu mosusu abimaki pona kokutana na ye. 4. Pe alobaki na ye: Kima mbangu, loba na elenge mobali oyo: Yerusaleme ekofanda lokola engumba oyo ezangi bamir yo kozipa lopango, po na ebele ya batu pe banyama na katikati na yango. 5. pe ngai, elobi Yawe, nakozala mir ya kozipa ya moto zingazinga na ye, pe nakozala kembo na katikati na ye.

6. O! O! Kima na mokili ya Nord! Yawe alobi; po napanzaki bino na mipepe mineyi ya likolo, elobi Yawe. 7. O! Kima, E Siona, yo oyo ofandi epayi na mwana mwasi ya Babilone! 8. Po boye elobi Yawe ya mapinga: sima ya kembo, atindi ngai epayi ya bikolo oyo epunzaki bino; po ye oyo asimbi bino, asimbi pome ya lisu na ye. 9. Po tala, nakoningisa loboko na ngai pona kobundisa bango, pe bakozala misuni pona baoyo basalelaki bango; pe bokoyeba ete Yawe ya mapinga atindi ngai.

10. Sepela, pe sepela, mwana mwasi ya Siona! Po tala, nakoya pe nakofanda na kati na yo, elobi Yawe. 11. Pe na mokolo yango bikolo mingi ekosangana na Yawe, pe bakozala batu na ngai; pe nakofanda kati na yo, pe okoyeba ete Yawe ya mapinga atindi ngai epayi na yo. 12. Pe Yawe akozwa Yuda lokola libula na ye na mokili mosantu, pe akopona lisusu Yerusaleme. 13. Tika batu nyonso bafanda nye liboso ya Yawe. Po alamuki na efandeli na ye ya bosantu.

 

3        Mokapo 3

1. Pe alakisaki ngai Yeshua nganga-Nzambe monene, atelemi liboso ya Anjelu ya Yawe, pe Satana atelemaki na loboko na ye ya mobali pona kofunda ye.

2. Pe Yawe alobi na Satana: Yawe apamela yo, Satana ; tika ete Yawe, oyo aponi Yerusaleme, apamela yo! Oyo azali te eteni ya libaya eziki na moto oyo ebikisami na moto? 3. Pe Yeshua azalaki na bilamba ya bosoto oyo alataki, pe atelemaki liboso ya anjelu. 4. Pe ayanolaki pe alobaki na baoyo batelemaki liboso na ye: Bolongola likolo na ye bilamba na ye ya bosoto; pe alobi na ye: Tala, nalekisi likolo na yo mabe na yo, pe nalatisa yo bilamba ya kitoko. 5. Pe nalobi: Tika ete batia na moto na ye elamba ya peto ya lokumu ya moto. Pe batiaki na moto na ye elamba ya peto ya lokumu ya moto, pe balatisaki ye. Pe Anjelu ya Yawe atelemaki wana.

6. Pe Anjelu ya Yawe apesaki Yosua litatoli, koloba: 7. Boye elobi Yawe ya mapinga : Soki otamboli na banzela na ngai pe obateli mokumba oyo napesi yo, boye okosambisa ndako na ngai pe okozala mokengeli ya lopango na ngai, pe nakopesa yo otambola na kati ya baoyo batelemi awa.

8. Yoka sik’oyo, Yeshua nganga-Nzambe monene, yo na baninga na yo oyo bafandi liboso na yo, po bazali batu ya kokamwa ; po tala, nakomeme mosali na ngai, oyo abengami Etape. 9. Po tala, libanga oyo natie liboso ya Yeshu ; likolo ya libanga moko oyo misu sambo, tala, nakokomela yango likomi, elobi Yawe ya mapinga, pe nakolongola mbindo ya mboka oyo na mokolo moko. 10. Na mokolo wana, elobi Yawe na mapinga, bokobengisana na se ya nzete ya vino pe na se ya nzete ya figi.

 

4        Mokapo 4

1. Pe anjelu oyo azalaki kosolola na ngai ayaki lisusu pe alamusaki ngai, lokola mutu oyo balamusi na pongi na ye. 2. Pe alobi na ngai: Omoni nini? Pe nalobi: Namoni, pe tala, etelemelo ya mwinda nyonso mobimba ya wolo, pe saani na yango ya mafuta na likolo na yango, pe mwinda na yango sambo likolo na yango ; sambo pe mabulu sambo pona mwinda oyo ezali na likolo na yango. 3. Pe banzete mibale ya olive pembeni na yango, moko na loboko ya mobali ya sani ya mafuta pe mosusu na loboko na yango ya mwasi. 4. Pe nayanolaki pe nalobi na anjelu oyo azalaki kosolola na ngai, koloba: Nkolo na ngai, oyo ezali nini? 5. Pe anjelu oyo azalaki kosolola na ngai ayanolaki pe alobi na ngai: Oyebi te nini yango ezali? Pe nalobi: Te, nkolo na ngai. 6. Ayanoli pe alobi na ngai ete: Awa nde liloba ya Yawe epayi na Zorobabel: Na makasi te, to na nguya te, kasi na Molimo na ngai, elobi Yawe na mapinga. 7. Ozali nani, O ngomba monene, liboso ya Zorobabel? Okokoma esika ya patatalu! Pe akobimisa libanga ya suka na koganga makasi : Ngolu, ngolu na ye!

8. Pe liloba ya Yawe eyaki epayi na ngai, koloba: 9. Maboko ya Zorobabel nde etongaki ndako oyo, pe maboko na ye ekosilisa yango; pe okoyeba ete Yawe na mapinga atindi ngai epayi na bino.10. Po nani atiolaka mokolo ya makambu mike? Pe na esengo nyonso ba sambo wana bakomona kokweya na loboko ya Zorobabel: bango bazali misu ya Yawe oyo ezali kotambola-tambola na mboka mobimba.

11. Pe nayanolaki pe nalobi na ye: Nzete mibale oyo ya olive ezali nini na loboko ya mobali ya etelemelo ya mwinda pe na loboko na yango ya mwasi? 12. Pe nayanolaki ya mbala ya mibale pe nalobi na ye: Bitape mibale oyo ya olive ezali nini pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ezali kosopa wolo? 13. Pe alobaki na ngai ete: Oyebi te nini yango ezali? Pe nalobi: Te, nkolo na ngai. 14. Pe alobi: Baoyo ezali bana mibale ya mafuta, oyo batelemi pembeni na Nkolo ya mabele mobimba.

 

5        Mokapo 5

1. Pe natomboli lisusu misu na ngai, pe namoni, pe tala, rulo moko oyo epumbwaka. 2. Pe alobi na ngai: Okomona nini? Pe nalobi: Namoni rulo moko oyo epumbwaka, oyo molayi na yango ezalaki mapeko tuku mibale, pe monene na yango ezalaki mapeko zomi. 3. Pe alobi na ngai: Oyo ezali elakeli mabe oyo ezali kobima na etando ya mabele mobimba; po mutu nyonso oyo ayibaki akobebisama lolenge na oyo ekomami na mopanzi oyo ya rulo; pe mutu nyonso oyo alapaki ndayi ya lokuta akobebisama lolenge na oyo ekomami na mopanzi wana ya rulo. 4. Nabimisi ye, elobi Yawe na mapinga; pe akokota na ndako ya moyibi, pe na ndako ya ye oyo alapi ndayi ya lokuta na kombo na ngai; pe akofanda na kati ya ndako na ye pe akobebisa yango, ezala mabaya na yango pe mabanga na yango.

5. Pe anjelu oyo azalaki kosolola na ngai ayaki pe alobi na ngai: Tombola misu na yo, nabondeli yo, pe tala : Nini oyo ekobima ? 6. Pe nalobi: Ezali nini? Pe alobi: Oyo ezali efa moko oyo ebimaka; pe alobi : Oyo ezali komonana na bango na mokili mobimba. 7. Pe tala, diske moko ya libende etombolamaki; pe mwasi moko afandaki na katikati ya efa. 8. Pe alobi: Oyo ezali makambu mabe; pe abwakaki ye na kati-kati ya efa, pe abwakaki kilo ya libende likolo na monoko na yango. 9. Pe natombolaki miso na ngai, pe namonaki, pe tala, basi mibale babimaki, pe mopepe ezalaki na kati ya mapapu na bango, pe bazalaki na mapapu lokola mapapu ya ndeke monene, pe batombolaki efa na kati-kati ya mabele pe likolo. 10. Pe nalobaki na anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: Epayi nini baoyo bazali komema efa? 11. Pe alobi na ngai: Pona kotongela ye ndako na kati ya mokili ya Shinare; pe kuna ekotelemisama, pe ekotiama likolo ya likonzi na yango.

 

6        Mokapo 6

1. Pe natomboli lisusu misu na ngai, pe namoni, pe tala, bashar mineyi mabimaki na kati-kati ya bangomba mibale; pe bangomba ezalaki bangomba ya bronze. 2. Na shar ya liboso ezalaki na bampunda ya motane, pe na shar ya mibale ezalaki na bampunda ya mwindu; 3. Pe na shar ya misato bampunda ya pembe, pe na shar ya mineyi bampunda ya madodo, makasi. 4. Pe nayanolaki pe nalobi na anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: nkolo na ngai, baoyo ezali nini? 5. Pe anjelu ayanolaki pe alobi na ngai: Oyo ezali milimo mineyi ya likolo, oyo ezali kobima, sima ya komimonisa liboso ya Nkolo ya mabele mobimba. 6. Oyo bampunda ya mwindu ezali, babimaka na mboka ya nord; pe ya pembe babimi sima na bango; pe baoyo bazali na madodo babimaka na mokili ya sud; 7. Pe baoyo ya makasi babimaka, pe balukaka kokende pe kotambola bipayi na bipayi na mabele. Pe alobi: Kende, botambola na mabele. Pe bazalaki kotambola-tambola na mabele. 8. Pe abengaki ngai pe alobaki na ngai: Tala, baoyo babimi na mboka ya nord bapemisi elimo na ngai na mboka ya nord.

9. Pe liloba ya Yawe eyaki epayi na ngai ete: 10. Kamata epayi ya basusu oyo bakendaki na bokangami, na Eldayi, na Tobiya, pe na Yedaya, pe yo yaka na mokolo wana, kende na ndako ya Yoshiya mwana ya Sefania, epayi bawutaki na Babilone. 11. Pe okozwa palata na wolo pe okosala ba motole. Pe okotia yango na moto ya Yeshua mwana ya Yehosadake, nganga-Nzambe monene, pe okoloba na ye ete : 12. Yawe ya mapinga alobi boye: Tala, mutu moko, kombo na ye Etape; pe akobima na esika na ye, pe akotonga tempelo ya Yawe. 13. Ye akotonga tempelo ya Yawe; pe akomema kembo; pe akofanda na kiti na ye ya bokonzi pe akokonza, pe akozala nganga-Nzambe na kiti na ye ya bokonzi; pe mabongisi ya kimia ekozala kati na yango mibale. 14. Pe ba motole ekozala pona Eleme pe pona Tobiya pe pona Yedaya pe pona Ene mwana ya Sefania, pona bokundoli na tempelo ya Yawe. 15. Pe  baoyo bazali mosika bakoya pe bakotonga na tempelo ya Yawe; pe bokoyeba ete Yawe na mapinga atindi ngai epayi na bino. Pe yango ekosalema soki bokoyoka na molende mongongo ya Yawe Nzambe na bino.

 

7        Mokapo 7

1. Pe esalemaki ete na kati ya mbula ya mineyi ya mokonzi Dario, liloba ya Yawe eyaki epayi ya Zakaria na mokolo ya mineyi ya sanza ya libwa, na sanza ya Kisleve. 2. Tangu Bethel atindaki Sazerere na Regeme-meleke na batu na ye babondela Yawe. 3. Pona koloba na banganga-Nzambe oyo bazalaki na ndako ya Yawe ya mapinga pe na baprofete ete: Nakoba kolela na sanza ya mitanu, pe nakoboya biloko, ndenge nasali bambula mingi oyo?

4. Pe liloba ya Yawe ya mapinga eyaki epayi na ngai, ete: 5. Loba na batu nyonso ya mboka pe na banganga-Nzambe ete: Tangu bokilaki bileyi pe boleli na sanza ya mitanu pe na sanza ya sambo na bowumeli ya mbula ntuku sambo, bokilaki bileyi ata moke pona ngai? 6. Kasi tangu boliaki pe tangu bomelaki, ezali bino te batu oyo boliaka pe bino nde bomelaki masanga? 7. Oyo ezali te maloba ya Yawe agangaki na nzela ya baprofete ya yambo, tangu Yerusaleme ezalaki na bafandi pe ezalaki kopema na kimia, pe bingumba na ye oyo ezalaki kozinga-zinga ye, pe batu bazalaki kofanda na sud pe na mboka se ya mabele?

8. Pe liloba ya Yawe eyaki epayi ya Zakaria ete: 9. Yawe ya mapinga alobi boye: Bosambisa bosambisi ya solo, pe boyokelana boboto pe mawa moko na mosusu; 10. Pe konyokola te mwasi akufela mobali, to mozangi baboti, to mopaya, to mobola; pe bokanisa mabe na mitema na bino te na tina ya ndeko na bino. 11. Kasi baboyaki kotia likebi, pe batombolaki mapeka na bango na botomboki pe bakomisaki matoyi na bango kilo po ete bayoka te. 12. Pe bakomisaki mitema na bango lokola diamant, pona bayoka te Mibeko pe maloba oyo Yawe ya mapinga atindaki na nzela ya Molimo na ye, na nzela ya baprofete ya yambo. Pe bongo kanda monene ewutaki epayi ya Yawe ya mapinga. 13. Pe ekomaki ete, lokola agangaki, pe bayokaki te, bongo bakoganga, pe nakoyoka te, elobi Yawe na mapinga; 14. Pe napalanganisaki bango na kati ya bikolo nyonso oyo bayebaki te; pe mboka etikalaki ya kobebisama pamba sima na bango, boye ezalaki na mokeyi moko kuna te pe moleki moko te ; Pe bakomisaki mboka ya esengo eloko ya kobebisama.

 

8        Mokapo 8

1. Pe liloba ya Yawe ya mampinga eye ete: 2. Yawe ya mapinga alobi boye: Nazali koyoka zuwa pona Siona na zuwa monene, pe nazali na zuwa pona ye na kanda makasi. 3. Yawe alobi boye: Nazongi na Siona, pe nakofanda na katikati ya Yerusaleme; pe Yerusaleme ekobengama engumba ya solo, pe ngomba ya Yawe ya mampinga, ngomba mosantu. 4. Yawe ya mampinga alobi boye: ekozala lisusu na mibange mibali pe mibange basi bakofanda na kati na balabala ya Yerusaleme, moko na moko na lingenda na ye na loboko, na tina ya mikolo mingi. 5. Pe balabala ya engumba ekotonda na bilenge mibali pe bilenge basi oyo bazali kosakana na babalabala na yango. 6. Yawe ya mapinga alobi boye: Soki ezali likambu ya kokamwa na misu ya batikali ya batu oyo, na mikolo wana, ekozala likambu ya kokamwa na miso na ngai? Yawe ya mapinga alobi bongo. 7. Yawe na mapinga alobi boye: Tala, ngai nakobikisa batu na ngai na mokili oyo moyi etelemaka pe na mokili oyo moyi elalaka; 8. Pe nakomema bango, pe bakofanda na katikati ya Yerusaleme; pe bakozala batu na ngai, pe nakozala Nzambe na bango na bosolo pe na bosembo.

9. Yawe ya mapinga alobi boye: maboko na bino ezala ya kokemba, ô bino oyo boyoki maloba oyo na monoko ya baprofete na mikolo oyo, oyo balobaki, na mokolo oyo moboko ya ndako ya Yawe ya mapinga, etandamaki pona kotonga tempelo. 10. Po liboso ya mikolo wana, lifuti pona batu ezalaki te, pe lifuti pona nyama ezalaki te; pe kimia ezalaki te pona ye oyo abimaki pe ye oyo akotaki na tina ya monguna, pe natiaki mutu nyonso kotelemela moninga na ye. 11. Kasi sik’oyo nakozala te epayi ya batikali ya batu oyo lokola na mikolo ya kala, elobi Yawe na mapinga; 12. Kasi ekozala bokitani ya kimia, nzete ya vino, ekobota mbuma na yango, pe mabele ekobota mbuma na yango, pe likolo ekopesa mamwe na yango. Pe na batikali ya batu oyo nakopesa nyonso oyo lokola libula. 13. Pe ekosalema ete lokola bozalaki elakeli mabe na kati ya bikolo, ndako ya Yuda pe ndako ya Israel, boye nakobikisa bino, pe bokozala lipamboli. Kobanga te : bolendisa maboko na bino! 14. po ete Yawe ya mapinga alobi boye: Lokola nakanisaki kosala bino mabe tangu batata na bino basilikisaki ngai, elobi Yawe ya mapinga, (pe nabongoli mokano te). 15. Yango wana nazali na mokano ya kosala lisusu malamu na mikolo wana na Yerusaleme pe na ndako ya Yuda. Kobanga te! 16. Yang’oyo makambu oyo bokosala: Bolobana solo moko na moninga na ye; Bosambisa na bosolo, pe bosala esambiselo ya kimia na kati ya baporte na bino. 17. Pe bokanisa te na kati ya mitema na bino, kosala mabe moko na mosusu, pe bolinga ndayi ya lokuta te ; po makambu wana nyonso, nayinaka yango, elobi Yawe.

18. Pe liloba ya Yawe ya mapinga eyaki epayi na ngai ete: 19. Yawe ya mapinga alobi boye: kokila bileyi ya sanza ya mineyi, kokila bileyi ya sanza ya mitanu, kokila bileyi ya sanza ya sambo, pe kokila bileyi ya sanza ya zomi ekozala pona ndako ya Yuda kosepela pe esengo, pe bafeti ya esengo. Linga solo pe kimia. 20. Yawe ya mapinga alobi boye: Ekosalema lisusu ete batu mpe bafandi na bingumba mingi bakoya; 21. Pe bafandi na moko bakokende epayi ya misusu, koloba ete: Tokende, tokende sik’oyo kobondela Yawe, pe toluka Yawe na mapinga ! Ngai pe, nakokende. 22. Pe ebele ya batu pe bikolo ya nguya bakoya koluka Yawe ya mapinga na Yerusaleme, pe pona kobondela Yawe. 23. Yawe na mapinga alobi: Na mikolo yango, mibali zomi ya minoko nyonso ya bikolo bakosimba elamba ya Moyuda moko pe bakoloba ete: Tokokende elongo na bino, po toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.

 

9        Mokapo 9

1. Liloba ya Yawe na kati ya mokili ya Adrake; pe Damas ekozala esika ya bofandi na ye ya kimia (po ete Yawe azali na lisu likolo na mutu nyonso pe mabota nyonso ya Israel), 2. Pe lisusu na Amate, oyo ezali ndelo na yango, na Turo pe Sidone, po azali na bwania mingi. 3. Pe Turo amitongaki esika makasi, pe atomboli palata lokola putulu, pe wolo lokola potopoto ya babalabala. 4. Tala, Nkolo akozwa yango, pe akobuka nguya na yango na kati ya mayi monene, pe yango moko ekozikisama na moto. 5. Askalone akomona yango pe akolenga; Gaza pe, ekobanga mingi ; pe Ekrone, po ete elikia na ye ekomi soni ; pe mokonzi akobomama na Gaza, pe Askalone ekofanda lisusu te. 6. Pe mwana ya makangu akofanda na Asdode, pe nakolongola lolendo ya Bafilistia. 7. Pe nakolongola makila na ye na monoko na ye, pe makambu na ye ya mbindo na kati ya minu na ye; pe oyo akotikala, ye pe, akozala pona Nzambe na biso, pe akozala lokola mokonzi na Yuda, pe Ekrone lokola Moyebuse. 8. Pe nakotia kaa moko pembeni na ndako na ngai, na tina ya mapinga, liboso ya baoyo bazali kokota pe kobima; pe moniokoli moko te akoleka likolo na bango lisusu te, po sik’oyo namoni yango na miso na ngai.

9. Sepela makasi, mwana mwasi ya Siona; Ganga na esengo, mwana mwasi ya Yerusaleme! Tala, mokonzi na yo azali koya epayi na yo ; sembo pe mobikisi, na komikitisa pe amati likolo na punda, pe likolo ya elenge ya punda, mwana ya punda ya mwasi. 10. Pe nakolongola bashar na Efrayime, pe na Yerusaleme, nakolongola bapunda pe likonga ya etumba. Pe akoloba kimia na bikolo; pe bokonzi na ye ekozala wuta na mayi monene mosusu kino na mosusu, pe wuta na ebale kino na suka ya mabele. 11. Pe yo pe, na tina ya makila ya boyokani na yo, nakobimisa bakangami na yo libanda na libulu oyo ezali na mayi te. 12. Bozonga na esika ya makasi, bino bakangami ya elikia! Lelo nasakoli ete : nakozongisela bino mbala mibale. 13. Po nagumbaki pona ngai Yuda lokola likonga, pe na natondisi likonga ya Efrayime natondisi; pe nakolamusa bana na yo ya mibali, ô Siona, pona kobundisa bana na yo, ô Yavan/Grese, pe nakokomisa yo lokola mopanga ya moto ya nguya. 14. Pe Yawe akomonana likolo na bango, pe likonga na ye ekobima lokola kake; pe Nkolo Yawe akobeta kelelo, pe akotombola elongo na mipepe makasi ya sud. 15. Yawe ya mapinga akobatela bango; pe bakoliya, pe bakobuka mabanga ya ebundeli oyo ebwakaka mabanga, pe bakomela, pe bakosala makelele lokola na vino, pe bakotonda lokola basani ya mbeka, lokola songe ya etumbelo. 16. Pe Yawe Nzambe na bango akobikisa bango na mokolo wana, lokola etonga ya batu na ye. Po bakozala mabanga ya motole oyo ezali kongenga na mokili na ye. 17. Po ete bolamu na ye ezali monene, pe kitoko na ye ezali monene! Ble ekokolisa bilenge mibali, pe vino ekokolisa bilenge basi.

 

10 Mokapo 10

1. Bosenga na Yawe mbula, na tangu ya mbula ya elanga ya suka; Yawe azali kosala kake ya makasi, pe akopesa bino bambula : matiti ya zamba epayi na moko na moko. 2. Po ete baterafime balobi maloba pamba, pe babikoli bamoni lokuta, pe balobaki bandoto ya lokuta, pe bakobondisa ya pambapamba. Yango wana bazali koyengayenga lokola etonga, baniokolami po ete mobateli ya mpate azali te. 3. Kanda na ngai epeli na kotelemela babateli ya mpate, pe nakopesa bantaba etumbu; po Yawe ya mapinga akotala etonga na ye, ndako ya Yuda, pe akokomisa bango lokola punda na ye ya kembo na etumba. 4. Ewuti na ye libanga ya suka ya se, epayi na ye likonzi, epayi na ye likonga ya etumba, wuta na ye ekobima elongo banguna nionso. 5. Pe bakozala lokola bato ya nguya, bazali konyata potopoto ya babalabala na etumba; pe bakobunda, po Yawe akozala elongo na bango, pe baoyo bamataka na bapunda bakozipana na soni. 6. Pe nakokembisa ndako ya Yuda, pe nakobikisa ndako ya Yozefe, pe nakofandisa bango; po nakoyokela bango mawa, pe bakozala lokola nde nabwakaki bango libanda te ; po nazali Yawe Nzambe na bango, pe nakoyanola bango. 7. Pe Efrayime akozala lokola mutu ya nguya, pe mitema na bango ekosepela lokola na vino, pe bana na bango ya mibali bakomona yango pe bakosepela; motema na bango ekosepela na Yawe. 8. Nakobeta piololo pona bango pe nakosangisa bango, po nasikoli bango; pe bakobakisama lokola babakisamaki. 9. Pe nakolona bango kati ya bikolo, pe na kati ya bikolo ya mosika bakokanisa ngai; pe bakofanda elongo na bana na bango ya mibali pe bakozonga. 10. Pe nakolongola bango na mokili ya Ejipito, pe nakosangisa bango na Asulia, pe nakomema bango na mokili ya Gileade pe na Liban; pe esika ekozala te pona bango. 11. Akoleka na mayi monene ya pasi, pe na kati ya mayi monene akobeta mbonge, pe bozindo nyonso ya ebale ya Nil ekokawuka; pe lolendo ya Asulia ekobwakama, pe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa. 12. Nakokomisa bango bilombe na kati ya Yawe, pe bakotambola na kombo na ye, elobi Yawe.

 

11 Mokapo 11

1. Liban, fungola baporte na yo, ete moto elia banzete na yo ya sedre! 2. Boganga na kolela, sipres! Po ete nzete ya sedre ekweyi, po oyo ya kembo ebebisami. Boganga na kolela, banzete ya shene ya Bashane! Po zamba oyo (nani to nini) ekoki kokota te esili ebwakami. 3. Babateli ya mpate bazali koganga na mongongo makasi, po kembo na bango ebebisami; mongongo ya koganga makasi ya bankosi ya bilenge, po lolendo ya Yordani ebebisami!

4. Yawe Nzambe na ngai alobi boye: Leyisa etonga ebongisami na koboma, 5. Oyo basombi na yango babomaka, pe bamemaka etumbu te; pe oyo batekisi na yango, balobaka ete: Yawe akumisama, po nakomi mozwi. Pe oyo babateli na yango bayokaka bango mawa te. 6. Po nakoyokela lisusu bafandi ya mboka mawa te, elobi Yawe; pe tala, nakokwesa batu kati na loboko ya mozalani na ye, na loboko ya mokonzi na ye; pe bakobuka mboka ndambo ndambo, pe nakobikisa te na loboko na bango.

7. Pe nazalaki koleyisa etonga ebongisami na koboma, ata kutu babola ya etonga; pe nakamataki banzete mibale: moko nabengaki Kitoko, pe mosusu nabengaki Bomoko; pe nazalaki kobatela etonga. 8. Pe nabebisaki misato ya babateli ya mpate na kati ya sanza moko. Pe molimo na ngai etungisamaki epayi na bango, pe molimo na bango pe elembaki ngai. 9. Bongo nalobaki ete: Nakoleyisa bino lisusu te; oyo ekufaka, ekoki kokufa, pe oyo ekomiboma, ekoki komiboma; pe baoyo batikali baliana mosuni ya moko na mosusu. 10. Pe nakamataki lingenda na ngai Kitoko pe nabukaki yango, pona kobuka boyokani na ngai oyo nasalaki na batu nyonso. 11. Pe ebukanaki mokolo wana; pe bongo babola ya etonga, oyo bazalaki kotiya likebi epayi na ngai, bayebaki ete ezali liloba ya Yawe. 12. Pe nalobaki na bango ete: Soki ezali malamu na misu na bino, bopesa ngai lifuti na ngai; kasi soki te, botika yango ekende; pe bamekaki lifuti na ngai: mosolo tuku misato ya palata. 13. Pe Yawe alobi na ngai: Bwaka yango epai ya moyemi-mbeki, motuya ya kembo oyo batie ngai motuya mingi. Pe nakamataki tuku misato ya palata, pe nabwakaki yango na ndako ya Yawe, epayi ya mosali-mbeki. 14. Pe nabukaki lingenda na ngai ya mibale, bomoko, pona kobuka bondeko kati na Yuda pe Israel.

15. Pe Yawe alobi na ngai ete: Kamata lisusu bisaleli ya mobateli ya zoba ya mpate. 16. Po tala, nakotelemisa mobateli ya mpate na kati ya mboka; oyo akokende kotala baoyo bazali kokufa te, akoluka te baoyo babunga nzela, pe akobikisa baoyo bazoki te, akoleyisa te oyo ezali ya nzoto kolongono, kasi akoliya mosuni ya mafuta pe akopasola makolo na bango na biteni. 17. Mawa na mobateli mpate oyo azangi tina oyo asundolaka etonga! Mopanga likolo ya loboko na ye pe likolo ya lisu na ye ya mobali! Loboko na ye ekokawuka penza, pe lisu na ye ya mobali ekokoma penza molili.

 

12 Mokapo 12

1. Liloba ya Yawe likolo na Israel : Yawe, oyo asembola likolo, pe oyo atonga mabele, pe oyo asala elimo ya mutu kati na ye, alobi boye: 2. Tala, nakokomisa Yerusaleme kopo ya kolangwisa pona batu nyonso oyo bazali zingazinga na yango; pe ekozala lisusu likolo ya Yuda na tangu ya bozingami ya Yerusaleme. 3. Pe ekosalema boye na mokolo wana, nakokomisa Yerusaleme pona batu nyonso libanga ya kilo makasi pona kotombola: baoyo nyonso bakotombola yango bakozoka penza bapota, pe bikolo nyonso ya mabele bakoyangana pona kobundisa ye. 4. Na mokolo yango, elobi Yawe: Nakobeta bapunda nyonso na kolenga, pe batambwisi na yango na liboma, pe nakofungola misu na ngai likolo na ndako ya Yuda, pe nakobeta punda nyonso ya batu na bokufi misu. 5. Pe bakonzi ya Yuda bakoloba na mitema na bango ete: Bafandi ya Yerusaleme bakozala makasi na ngai na nzela ya Yawe na mapinga, Nzambe na bango.

6. Na mokolo wana, nakokomisa bankumu ya Yuda lokola nzungu ya moto na kati-kati ya banzete, pe lokola mwinda ya moto na kati ya bitunga ya matiti; pe bakoliya batu banso zingazinga na bango, na loboko ya mobali pe na loboko ya mwasi. Pe Yerusaleme ekofandaka lisusu na esika na yango na Yerusaleme. 7. Pe Yawe akobikisa liboso bahema ya Yuda, po ete kembo ya ndako ya David pe kembo ya bafandi ya Yerusaleme etombolama te likolo ya Yuda.

8. Na mokolo wana, Yawe akobatela bafandi ya Yerusaleme; pe oyo akobeta libaku na kati na bango akozala lokola David na mokolo yango, pe ndako ya David ekozala lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe liboso na bango. 9. Pe ekosalema boye na mokolo wana, nakoluka koboma bikolo nyonso oyo ekoya kobundisa Yerusaleme. 10. Pe nakosopa elimo ya ngolu pe ya libondeli likolo ya ndako ya David pe likolo ya bafandi ya Yerusaleme; pe bakotala epayi na ngai oyo batobolaki, pe bakolela likolo na ye lokola mutu azali kolela mwana bobele se moko, pe bakoyoka mawa pona ye, lokola mutu azali kolela mwana ya liboso. 11. Na mokolo wana, ekozala na kolela na Yerusaleme ekozala monene, lokola kolela ya Adad-Rimone na lobwaku ya Megido. 12. Pe mokili ekolela, libota na libota esika na bango : libota ya ndako ya David esika na bango, pe basi na bango esika na bango; libota ya ndako ya Natan esika na bango, pe basi na bango esika na bango; 13. Libota ya ndako ya Levi esika na bango, pe basi na bango esika na bango; libota ya shimeyi esika na bango, pe basi na bango esika na bango; 14. Pe mabota nyonso oyo batikali, libota na libota na esika na yango, pe basi na bango esika na bango.

 

13 Mokapo 13

1. Na mokolo yango, liziba moko ekofungwama pona ndako ya David pe pona bafandi na Yerusaleme pona masumu pe pona mbindo. 2. Pe ekosalema na mokolo wana, elobi Yawe na mapinga, nakolongola bankombo ya bikeko na mokili, pe bakokanisa yango lisusu te; pe nakolongola lisusu na mokili baprofete pe elimo ya mbindo. 3. Pe ekosalema tangu wana, soki mutu aprofetize lisusu, tata na ye pe mama na ye oyo babota ye, bakoloba na ye ete: Okozala na bomoyi te, po olobi lokuta na kombo ya Yawe. Pe tata na ye pe mama na ye oyo baboti ye, bakotobola ye tangu akoprofetize. 4. Pe ekosalema na mokolo wana, baprofete bakoyoka soni, moko na moko na emoniseli na ye, tangu akoprofetize; pe bakolata lisusu elamba ya pwale te pona kokosa. 5. Akoloba: Nazali profete te, nazali mosali bilanga na mabele, po mutu asombaki ngai wuta bolenge na ngai. 6. Pe soki mutu alobi na ye ete: Bapota oyo na maboko na yo ezali nini? Bongo akoloba ete: Bapota oyo babetaki ngai na ndako ya baoyo balingaka ngai. 7. Lamuka, mopanga, kotelemela mobateli na ngai, pe na mutu oyo azali moninga na ngai! Elobi Yawe na mapinga; Beta mobateli ya mpate, pe etonga ekopanzana. Pe nakobalola loboko na ngai epayi ya bana mike. 8. Pe ekokoma na mokili mobimba, elobi Yawe, biteni mibale na yango ekokatama pe ekokufa, pe ndambo ya misato na yango ekotikala. 9. Pe nakomema ndambo ya misato na moto, pe nakopetola yango lokola palata epetolami, pe nakomeka yango lokola wolo emekami. Bakobelela kombo na ngai, pe ngai, nakoyanola ye; Nakoloba: Baoyo bazali batu na ngai; pe ye akoloba ete: Yawe azali Nzambe na ngai.

 

14 Mokapo 14

1. Tala, mokolo moko ezali koya pona Yawe, pe biloko na yo ekokabolama na kati na yo. 2. Pe nakosangisa bikolo nyonso na kotelemela Yerusaleme pona etumba; pe engumba ekozwama, pe bandako ekopunzama, pe bakosangisama na nzoto na basi na bolali bango na makasi; pe ndambo ya engumba ekokende na bokangami ya bowumbu, kasi ndambo ya batu oyo batikali bakolongwa te o libanda ya engumba.

3. Pe Yawe akobima pe akobundisa bikolo wana, lokola na mokolo oyo akobunda, na mokolo ya etumba. 4. Pe makolo na ye ekotelema na mokolo wana na Ngomba ya Olive, oyo ezali liboso ya Yerusaleme, na esti: Pe Ngomba ya Olive ekokabwana na kati-kati epayi ya esti pe epayi ya westi, - na lobwaku moko monene penza; pe ndambo ya ngomba ekobaluka epayi ya nord pe ndambo na yango epayi ya sud. 5. Pe bokokima na lobwaku ya bangomba na ngai, po lobwaku ya bangomba ekokoma ti na Akal; pe bokokima, lokola bokimaki liboso ya koningana ya mabele na mikolo ya Ozias, mokonzi ya Yuda. Pe Yawe, Nzambe na ngai, akoya, pe basantu nyonso elongo na yo.

6. Pe ekokoma na mokolo wana, pole ekozala te; mapata to malili ekozala molili. 7. Pe ekozala mokolo moko eyebani na Yawe, moyi te to butu te; Pe na tangu ya pokwa, ete pole ekobima.

8. Pe ekosalama na mokolo wana, ba mayi ya bomoyi ekobima na Yerusaleme, ndambo epayi ya mayi monene ya esti, pe ndambo epayi ya mayi monene ya west; yango ekosalama na eleko ya molunge pe na eleko ya malili. 9. Pe Yawe akozala mokonzi na mabele mobimba; Na mokolo yango Yawe akozala kaka moko, pe kombo na ye moko. 10. Mokili mobimba banda na Geba ti na Rimona, oyo ezali na sud ya Yerusaleme ekobongwana lokola etando ya Araba; pe ekotombwama, pe ekofanda na esika na yango, banda na ekuke ya Benyamina ti na esika ya ekuke ya liboso, pe ti na ekuke ya songe, pe banda na ndako molayi ya Ananeyel ti na bisika ya kokatisa vino ya mokonzi. 11. Pe bakofanda na kati na yango, pe elakeli mabe ekozala lisusu te; pe Yerusaleme ekofanda na kimia.

12. Pe oyo ekozala bolozi oyo Yawe akobeta na yango bikolo nyonso oyo ebundisaki Yerusaleme: Akopolisa mosuni ya moko na moko tangu batelemi na makolo na bango, pe misu na bango ekopola na bilongi na bango, pe lolemo na bango ekopola na minoko na bango. 13. Pe ekosalama na mokolo wana, mobulungano monene ekowuta na Yawe kati na bango; pe mutu moko akosimba loboko ya moninga na ye, pe loboko ya moko na moko ekotelemela loboko ya mozalani na ye. 14. Pe lisusu Yuda akobunda na kati ya Yerusaleme; pe bozwi ya bikolo nyonso ya zingazinga ekosangana esika moko: wolo pe palata pe bilamba mingi koleka. 15. Pe boye ekozala bolozi ya bapunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane, pe ya bibwele nyonso oyo ekozala na kati ya bakaa : ekozala lolenge ya pota wana. 16. Pe ekosalama ete nani oyo nyonso atikali kati na bikolo nyonso oyo bayaki kobundisa Yerusaleme bakomata mbula na mbula pona kongumbamela liboso ya Mokonzi, Yawe ya mapinga, pe pona kosala feti ya feti ya bahema. 17. Pe ekosalama ete: soki moko na mabota ya mabele amati na Yerusaleme te pona kongumbamela liboso ya Mokonzi, Yawe ya mapinga, mbula ekobeta te likolo na bango; 18. Pe soki libota ya Ejipito emati te pe eye te, mbula ekobeta likolo na yango pe te. Yango ekozala bolozi oyo Yawe akobeta na yango bikolo oyo ekomata te pona kosepela feti ya Bahema. 19. Oyo ekozala etumbu ya Ejipito pe etumbu ya bikolo nyonso oyo ekomata te pona kosepela feti ya Bahema. 20. Na mokolo yango, ekozala makomi na bangonga mike-mike ya bapunda ete: Bosantu na Yawe. Pe banzungu ya kolamba na kati ya ndako ya Yawe ekozala lokola basani liboso ya etumbelo; 21. Pe nzungu nyonso ya kolamba na Yerusaleme pe na Yuda ekozala mosantu pona Yawe ya mapinga; pe banso oyo bakobonzela bambeka bakoya pe bakozwa epayi na bango pe bakolamba na kati na yango. Pe na mokolo yango, Mokanana akozala lisusu te na ndako ya Yawe ya mapinga.