MOKANDA NA POLO EPAYI YA BAGALATIA

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6

 

1        MOKAPO 1

1. Polo, apostolo, kowuta na bato te, mpe na moto te, kasi na Yesu Kristu mpe Nzambe Tata oyo asekwisa ye kati na bakufi, 2. Na bandeko nyonso oyo bazali na ngai elongo, na ba eklezia  ya Galatia. 3. Ngolu mpe kimia ezala na bino, kowuta na Nzambe Tata mpe Nkolo na biso Yesu Kristu. 4. Oyo amipesaki ye moko pona masumu na biso, na lolenge ete alongola biso kati na ekeke oyo ya mabe. pelamoko na mokano ya Nzambe mpe Tata na biso, 5. Nkembo na ye libela na libela, amen .

6. Nazali kokamwa ete bozali kolongwa noki noki na ye oyo abenga bino na ngolu na Kristu, na sango malamu ya bokeseni. 7. Kasi ezali na bato oyo bazotungisa bino, mpe balingi babongola sango malamu ya Kristu. 8. Kasi tango biso moko to tango anjelu kowuta na likolo akosakola bino sango ekeseni na oyo tosakolaki bino, azala anatema. 9. Lokola tolobaki liboso, nalobi yango lisusu: soki moto asakoli bino sango ekeseni na oyo bozuaki azala anatema. 10. Sikoyo nazali kosala pona kosepelisa bato to Nzambe? Nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nakosepelisaka bato, nakozala mowumbu ya Kristu te.

11. Nde,nalingi koyebisa bino, bandeko, ete sango malamu oyo esakolama na nzela na ngai, ezali na lolenge ya mutu te. 12. Pamba te ngai mpe nazui yango  na moto te, nayekoli yango mpe te, nazui na emoniseli ya Yesu Kristu. 13. Mpo ete bayokaki sango ya bizaleli na ngayi ya kala na yudayizmo,  ndenge nazalaki koniokolama na koleka eklezia na Nzambe mpe kobebisa yango, 14.  Mpe lolenge nini nazali kokende liboso kati na yudayizmo koleka mingi batu y ambula na ngai kati na ekolo na ngai, nazalaki oyo alekaki na komipesa mingi na bokoko ya batata na ngai. 15. Kasi tango esepelisi Nzambe, ye oyo atiaki ngai pembeni  wuta libumu na mama na ngai mpe abengaki ngai na ngolu na ye, 16. Nakomonisa Muana na ye kati na ngai ete nasakola ye kati na bikolo, mbala moko, nakendaki kotalisana na musuni mpe makila te pona kozua makanisi na bango, 17 Namataki mpe te na Yerusaleme epayi ya baoyo bazalaki bapostolo liboso na ngai, kasi nakendaki na Arabi, mpe nazongaki  lisusu na Damas. 18 . Na sima na mibu misato , namataki na Yerusaleme pona kotala Cefas, mpe navandaki epayi naye mikolo zomi na mitanu ; 19. Mpe namonaki moko mosusu te ya bapostolo, ,bobele Yakobo , ndeko na Nkolo.  20. Nde na makambo nakomeli bino, tala liboso  na Nzambe, nazali kobuka lokuta te.

21. Na sima, nakendaki na ba mboka ya Syria Mpe Cilicia. 22. Nzokande, nayebanaki elongi te epayi na ba eklezia Yuda oyo ezali kati na Kristu, 23. Bayokaki bobele ete: ye oyo kala aniokolaki biso liboso,azali kosakola kondima oyo abandaki kobebisa. 24. Mpe bakumisaki Nzambe pona ngai.

 

2        MOKAPO 2

1. Sima na mibu zomi na mineyi, namataki lisusu na Yerusaleme elongo na Barnabas, nazuaki Tito elongo na ngai. 2. Nzokande namataki kolanda emoniseli , namonisakii bango sango malamu oyo nateyaka epayi bikolo, kasi na nkuku na ba oyo bazalaki na lokumu, na kobanga ete na lolenge moko boye nazala oyo akimaki mbangu to akokimaka mbangu ya pamba,3. Kasi ata Tito oyo azalaki na ngai, ata ye azalaki grek, batindikaki ye te ete akatisama ngenga: 4. Mpe wana likolo ya bandeko ya lokuta, oyo bakotaki na lolenge ya mabe, oyo bayaki na lolenge ya mabe, pona kobebisa bonsomi ezali biso kati na Kristu Yesu, pona kokitisa biso na bowumbu ; 5 Totosi bango te ata mwa tango te mpo ete solo ya sango malamu efanda na bino. 7. Kasi wana bamonaki ete sango malamu epayi ya bato bakatama ngenga te epesamelaki ngai, lokola oyo ya bokatani ngenga epesamaki na Petelo, 8 (Pamba te ye oyo asala misala kati na Petelo pona apostola ya bakatami ngenga, asali mpe mosala kati na ngai mpo na bikolo.) 9. Wana bayebaki ngolu oyo epesamelaki ngayi , Yakobo, Sefas mpe Yoane ba oyo batangami lokola ba likonzi, bapesaki ngai mpe na Barnabas loboko na lisangani mpo ete tokende epayi ya bikolo, mpe bango epayi ya bakatami ngenga . 10. Balingaki bobele kaka ete tokanisa babola, yango wana mpe nazalaki kosala.

11 . Kasi tango Sefas ayaki na Antiocha, natelemaki ye na elongi mpo ete azalaki ya kopamela. 12. Pamba te liboso ete bato mosusu baya epayi ya Yakobo, azalaki kolia esika moko na bikolo kasi tango ba oyo wana bayakii, abendamaki mpe akabwanaki ye moko. Abangaki bato bakatana ngenga. 13. Bayuda mosusu basalelaki hipokrizi elongo na ye. Na lolenge été Barnabas mpe amemamaki na bango na kosalela hipokrizi. 14. Kasi tango namoni ete bazali kotambola sembo, na solo ya sango malamu te, nalobi na Sefas liboso ya bato nyonso, soki yo oyo ozali moyuda, ozali kobika lokola bikolo, kasi lokola moyuda te, pona nini okotindika na makasi bikolo ba yudayize ? 15 Biso oyo na lolenge ya kozala tozali bayuda mpe toza na basumuki te kati na bikolo, 16. Toyebi ete moto akomi sembo te na misala ya mibeko, lolenge mosusu te bobele na kondima Yesu Kristu, na biso mpe, tondima Kristu Yesu mpo ete tosembolama  na kondima kati na Kristu, kasi na nzela ya misala mibeko te : mpo ete na nzela ya misala ya mibeko, mutu moko te akoki kosemboloma. 17. Nzokande , soki nakoluka ete tosembolama kati na Kristu, biso moko mpe tomonanaki basumuki, Kristo azali mosaleli na lisumu ? yango ezali bongo te .18. Pamba te soki biloko wana kaka oyo nakweyisa na nse, nazali kotonga yango lisusu , nazali komikomisa mobuki mibeko nga moko. 19.  Pamba te nga pona mibeko, nakufa na oyo etali mibeko, mpo ete nabika na Nzambe. 20. Nabakama elongo na Kristu, nazali kobika te ngai kasi Kristu azali kobika kati na ngai, mpe oyo nazali kobika sikoyo na mosuni, nazali kobika yango na kondima, kondima epayi na Mwana na Nzambe , oyo alingakii ngai, mpe amipesaki ye moko pona ngai.  21. Nazali kobwaka te ngolu na Nzambe, pamba te soki bosembo ezalaki na mibeko, bongo Kristu akufaki pona pamba.

 

3        MOKAPO 3

1. O Bagalatia, bazoba, nani aloki bino ? liboso na misu na bino Yesu Kirstu abakisama na ekulusu emonisamaki polele. 2. Nalingaki nayeba bobele likambo oyo kowuta epayi na bino : bozuaki Molimo pona misala na mibeko to pona koyoka na kondima ? 3. Boza bazoba boye ? Bobandaki na Molimo, sikoyo bolingi kosukisa na mosuni ? 4. Bomonaki pasi ya pamba, soki ezalaki kaka pona pamba ? 5. Ye oyo apesaki bino Molimo mpe asalaka bikamwa kati na bino, asalaka yango pona misala ya mibeko to koyoka na kondima ? 6. Lokola Abraam andimaki Nzambe, mpe yango etangameli ye lokola bosembo. 7. Boyeba ete ba oyo bazali na kondima  bango wana bazali bana na Abraam. 8. Nde makomi, eyebaki ete Nzambe akokomisa bikolo sembo na nzela ya kondima, mpe esakolaki sango malamu epayi na Abraam ete » kati na yo mabota nyonso bakopambwama ». 9. Na lolenge wana ba oyo bazali na kondima bapambolami elongo na Abraam mondimi . 10. Pamba te ba oyo bazali na misala ya mibeko, balakelami mabe; mpo ete ekomama » alakelama mabe moto nyonso oyo akobaka te na makambo nyonso oyo ekomama na buku na mibeko pona asala yango. » 11. Nzokande na nzela na mibeko, moto te akozala semboi liboso na Nzambe, yango ezali polele mpo ete «  moyengebene akobika na kondima. » 12. Kasi mibeko ezali na nzela ya kondima te, kasi » ye oyo akosala makambu oyo nyonso, akobika na yango » 13. Kristu akangoli biso na bilakeli mabe ya mibeko, akomaki elakeli mabe pona biso ( mpo ete ekomama: alakelama mabe moto nyonso abakami na nzete) 14. Na bongo, lipamboli ya Abraam ekomela bikolo kati na Kristu Yesu ete toyamba na nzela ya kondima Molimo oyo elakamaki.

15. Bandeko, nazali koloba na lolenge ya mutu. Mutu moko te abomaka boyokani oyo esili kondimama, ata oyo ya mutu, mutu te abakisaka. 16. Nzokande na Abraam bilaka esalamaki  mpe na mobotami na ye, alobi te «  mpe na babotami» lokola  na  bato mingi, kasi lokola na mutu moko » mpe na mobotami na yo » ye oyo aza Kristu. 17. Nde nalobi boye : mibeko oyo eyaki ba mbula nkama na mineyi na ntuku misato nsima, ebomaka te boyokani oyo esalamaka liboso, oyo Nzambe ye moko andima, na lolenge ya kokomisa bilaka pamba.

18. Mpo ete soki libula ezalaki na nzela ya mibeko, ezali lisusu na nzela ya elaka te, kasi Nzambe asalaki likabo na Abraam na nzela ya bilaka.

19. Pona nini mibeko ? Ebakisami likolo na tina ya bobuki mibeko, kino ekoya mobotami oyo elaka esalamaki, mibeko yango epesamalaki na nzela ya banjelu, na loboko ya moyokanisi. 20. Nzokande moyokanisi  azali ya moto moko te, kasi Nzambe azali moko.

21. Mibeko ezali kotelemela bilaka ya Nzambe ? ezali bongo te ! pamba te soko epesamaki mobeko moko oyo ezali na nguya ya kopesa bomoyi, bosembo elingaki ezala ya solo mpenza na nzela na mibeko. 22. Kasi makomi ekangi lolenge nyonso na kati ya lisumu, mpo ete elaka pona kondima na Yesu Kristu epesamela ba oyo bandimi. 23. Nzokande liboso kondima eya,  tozalaki ya kokangama na se ya mibeko, nakozela pona kondima oyo esengelaki emonisama ; 24. Na bongo mibeko ezalaki mokengeli na biso kino na Kristu, mpo ete tosembolama likolo na kondima ; 25. Kasi, wana kondima eyaki, tozali lisusu na se ya mokengeli, 26. Pamba te bozali banso bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Kristu Yesu. 27. Pamba te bino banso bo bapisami pona Kristu, bolati Kristu : 28. Moyuda azali te, Grek te, mowumbu te, mutu na bonsomi te, mobali te, muasi te ; mpo ete bino nionso, bozali moko kati na Kristu Yesu. 29. Nzokande soki bozali ya Kristu, bozali bongo mobotami na Abraam, bakitani na libula oyo ezali na lolenge ya bilaka.

 

4        MOKAPO 4

1. Nde nalobi ete wana mokitani azali muana muke, akeseni na eloko te na mowumbu, atako azali nkolo ya biloko nyonso. 2. Kasi aza na se ya babokoli mpe basali oyo batalaka ndaku kino tango ekatakamaki na tata. 3. Biso mpe bongo, tango tozalaki bana mike, tozalaki na bowumbu ya makambo na mokili, 4.  Kasi tango kotondisama ya tangu ekomaki, Nzambe atindaki Mwana  na ye, oyo abotamaki na mwasi, oyo abotamaki na se ya mibeko, 5. Pona ete asikola ba oyo bazalaki na se ya mibeko, mpo ete tokoma esika ya bana na ye. 6. Mpe pona bozali bana, Nzambe atindi Molimo ya Mwana na ye kati na mitema na biso, koganga : Abba, Tata ! 7. Na lolenge ete ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana ; mpe soki mwana, mokitani na libula na nzela ya Nzambe. 8. Kasi wana, toyebaki Nzambe te, bozalaki na bowumbu ya ba oyo na lolenge ya kozala bazalaki banzambe te : 9. Kasi sikoyo , wana toyebi Nzambe , to lokola Nzambe ayebi bino , ndenge nini bozongeli lisusu na makambo ezanga nguya mpe makambo ya petepete mpe pamba oyo bolingi lisusu kozonga na bowumbu na yango ? 10. Bozali kotalela mikolo mpe sanza mpe tango mpe ba mbula. 11. Nazali kobanga na tina na bino, été tangu mosusu nasalaki mosala pamba pona bino.

12 Bozala lokola ngai, pona nga mpe nazali lokola bino, bandeko, nabondeli bino. Bosali ngai mabe moko te ; 13. Mpe boyebi ete na bolembu ya nzoto, nateyaki bino na ebandeli. 14. Mpe botiolaki te, bobuakaki te na kele momekana oyo ezalaki na mosuni na ngai ; kasi boyambaki lokola anjelu na Nzambe, lokola Kristu Yesu. 15. Nini ezalaki esengo na bino ? Pona natatoli na tina na bino ete soki ekokaki kosalema, bolingaki kobimisa ba miso na bino moko mpe kopesa ngai. 16. Nakomi monguna na bino mpo ete nalobi na bino solo ? 17. Bozali na molende epayi na bino lokola esengeli, kasi balingi balongola bino na boyokani na biso, mpo ete botia molende na bino epayi na bango. 18. Kasi ezali malamu ete tango nyonso na molende pona  makambu ya malamu, bobele te soki nazali esika moko na bino.

19. Bana na ngayi, pona kobota oyo lisusu nazali kosala kino Kristu asalama lisusu kati na bino, 20. Iyo, nalingi kozala sikoyo elongo na bino mpe kobongola elobeli, pamba te namitungisi mingi pona bino.

21. Boyebisa ngai, bino oyo bolingi kozala na se ya mibeko, boyoki mibeko te ? 22. Mpo ete ekomama ete Abraam azalaki na bana mibali mibale, moko wuta na mwasi mowumbu, mpe moko na mwasi na bonsomi. 23. Kasi oyo abotamaki na mwasi ya mowumbu, abotamaki na nzela ya mosuni, mpe oyo oyo abotamaki na mwasi ya nsomi, abotamaki na nzela ya elaka. 24. Makambo oyo mibale esengeli ezuama na lolenge ya alegori, pona eza boyokani mibale, moko wuta na ngomba na sina, abota pona kibowumbu, ye wana Agar. 25. Pamba te Agar azali ngomba na sina, kati na Arabi akokani na Yerusaleme ya sikoyo, pona azali kati na bowumbu elongo na bana na ye. 26. Kasi sikoyo Yerusaleme ya likolo ezali mwasi ya nsomi ye wana azali mama na biso. 27. Mpo ete ekomama : « Sepela, yo ekomba, oyo abotaka te, sepela makasi mpe ganga, yo oyo ozali na pasi ya kobota te, mpo ete bana ya mwasi oyo asundolami baza mingi koleka ya ye oyo azali na mobali. » 28. Nde bino, bandeko, lokola Izaka, bozali bana na elaka. 29. Kasi lokola ye oyo abotamaki na nzela ya mosuni anyokolaki oyo abotamaki na nzela ya Molimo, ezali mpe bongo kino sikoyo. 30. Kasi likomi elobi nini ? « bengana  mwasi mowumbu na mwana na ye, pamba te mwana ya mwasi ya mowumbu akoki kokabola libula te na mwana ya mwasi ya nsomi » . 31. Bongo, bandeko, biso tozali ban aya mwasi ya mowumbu, kasi ya mwasi ya nsomi.

 

5        MOKAPO 5

1. Kristu atie biso na bonsomi na kokangolaka biso. Botelema ngwi mpe bozonga lisusu na kokangama na bowumbu te. 2. Tala ngai Polo, nalobi na bino ete soki bokatama ngenga, Kristu akosalela bino na eloko te. 3. Nazali kotelemela lisusu mutu nyonso akatami ngenga, azali na mokumba akokisa mibeko nyonso. 4. Bokabwani na litomba nyonso oyo ezali kati na Kristu, bino oyo bozali kolongisami na nzela ya mibeko, bokweyi mosika na ngolu 5. Mpo ete biso, na nzela ya Molimo, mpe kati na kondima, tozali kozela elikya ya bosembo. 6. Pamba te, kati na Kristu Yesu, kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na ntina te, kasi bobele kondima oyo esalaka misala na bolingo. 7. Botambolaki malamu, nani azali kopekisa bino ete botosa bosolo te ? 8. Makanisi wana oyo epekisi bino ewuti na Nzambe oyo abenga bino. 9. Mwa moke ya mfulu evimbisaka mapa mobimba. 10. Nazali na bondimi na tina na bino kati na Nkolo ete bokozala na likanisi mosusu te, kasi ye oyo azali kotungisa bino, ezala ye nani, akomema etumbu.

11. Kasi ngai, bandeko, soki nazali nanu koteya makambu na kokata ngenga, pona nini nazali koniokamaka lisusu ? soki bongo, libaku na ekulusu ezali lisusu te. 12. Nazolinga ete ba oyo batungisaka bino, bamikata nzoto bango moko.

13. Mpo ete bino, bandeko, bobengami na bonsomi, kasi bosalela bonsomi te lokola oyo ebongi pona mosuni, kasi na bolingo, bosungana bino na bino. 14. Pamba te mibeko nyonso ekokisami na liloba moko oyo « olinga moninga na yo lokola yo moko » 15. Kasi soki bozali komiswana  mpe bolianaka bino na bino, bokeba ete bobomana bino na bino.

16. Kasi nalobi ete : botambola na Molimo mpe bokokisa baposa ya mosuni te. 17. Pamba te mosuni etelemelaka Molimo, mpe Molimo etelemelaka mosuni, makambu oyo mibale emitelemelaka moko na mosusu, mpo bosalela te makambu oyo bino bolingi. 18. Kasi soki botambuisami na Molimo, bozali te na se ya mibeko. 19. Nzokande misala ya mosuni emonisami, yango ezali : pite, bosoto, kozanga petua, 20. Kosambela bikeko, kindoki, boyinani, kosuana, bazuwa, ba kanda, koluka kobenda epayi na yo pona makanisi mabe, bokaboli, 21. Masanga ya mateya mabe, batomboki pona oyo basusu bazali na yango, babomi, balangwi masanga, bolekisi na boleyi, to biloko ya lolenge boye oyo wana, na tina na yango, nayebisaki na ebandeli, lokola nalobaki été baye basalaka makambu wana bakokota bokonzi ya Nzambe te. 22. Kasi mbuma ya Molimo, ezali bolingo, esengo, kimia, bokangi motema, kozala na makanisi ya kosala basusu bolamu, bolamu, 23. Kozala na bondimi pe kosalela maloba alakaki, bopolo, komikanga ye moko, na oyo etali makambu oyo, mibeko ya kotelemela yango ezali te. 24. Nzokande ba oyo bazali ya Kristu, babaka na ekulusu mosuni na baposa pe bilulela na yango. 25. Soki tokobika na Molimo, totambola pe na nzela ya Molimo. 26. Tozala na posa ya nkembo ya pamba te, na komitombaka biso na biso kati na zuwa moko na basusu na tina oyo basusu bazali na yango pe biso tozangi yango.

 

6        MOKAPO 6

1. Bandeko, soki mutu moko azuami kati na mbeba,  bino oyo bokambami na Molimo bozongisa mutu wana na nzela kati elimo ya bopolo, sala keba na yo moko pe ozala mpe komekana.

2. Bomema mikumba na moko mpe mosusu mpe lisusu bokokisa mobeko na Kristu ; 3. Soki na yango mutu moko akanisi kozala motuya, nzoka azali motuya te, azali komikosa ye moko. 4. Mutu na mutu atalela misala na ye, mpo  ete na ntina na yango azala na likambo ya kokumisa na tina na ye moko mpe te pona ba misusu. 5. Mutu na mutu akomema mokumba na ye.

6. Moto oyo bazali koyekolisa kati na liloba, akabola  na bozui na ye nionso, molakisi oyo azali kolakisa ye.

7. Bomikosa te, batiolaka Nzambe te, oyo nionso mutu akolona, yango wana akobuka. 8. Pamba te mutu oyo akolona pona mosuni na ye moko akobuka pona mosuni na ye moko libebi, kasi mutu oyo akolona pona Molimo akobuka pona Molimo bomoyi ya seko. 9. Totika te nakosalaka bolamu, mpo ete na tango malamu, tokobuka, soki tobungisi makasi te. 10. Na bongo, lokola tozali na ngonga, tosala bolamu na banso, kasi mingi na batu ya ndaku ya kondima.

11. Bomoni mokanda molayi nakomeli bino na maboko na ngai moko. 12. Baye nionso balingi kozala na libanda malamu kati na mosuni, bango wana bazali kotindika bino na makasi ete bakatisama ngenga, na tina ete baniokwama te na tina ya ekulusu ya Kristu. 13. Pamba te ba wana bakatisama ngenga, bango moko babombaka mibeko te, kasi balingi bino bokatisama ngenga mpo bamukisama na mosuni na bino. 14. Kasi ekomela ngayi te komikumisama , bobele kati na ekulusu ya Nkolo na biso Yesu Kristu, na nzela na yango mokili ebakama na ekulusu pona ngai, mpe ngai pona mokili . 15. Pamba te kokatisama ngenga to kokatisama ngenga te nde ezali motuya, kasi kokelema ya sika. 16. Pona batu nyonso oyo bakotambola na lolenge ya mibeko oyo, kimia mpe mawa likolo na bango mpe likolo na Israele na Nzambe !

17. Sikoyo mutu aya kotungisa ngai te, pamba te ngai nakumbi na nzoto na ngai bilembo ya Nkolo Yesu. 18. Tika ete ngolu na Nkolo na biso Yesu Kristu ezala na molimo na bino, bandeko. Amen