MOKANDA NA LIBOSO EKOMAKI

YOANE

1

 

Yango ejalaki longwa na ebandeli, yango esili biso koyoka, yango esili biso komɔna na miso na biso, yango etalaki biso mpe emamaki biso na mabɔkɔ na biso na ntina na Liloba na bomɔi, 2 (bomɔi emɔnanaki mpe biso tosili komɔna, tojali kotatola mpe kosakwela bino bomɔi na seko oyo ejalaki mboka na Tata mpe emɔnanaki na biso), 3 yango esili biso komɔna mpe koyoka, tojali kosakwela bino yango, na ntina ete bino bójala na biso na lisangana, mpe biso tojali na lisangana na Njambe mpe na Mwana na ye Yesu Masiya. 4 Biso mpe tojali kokoma makambo oyo ete esεngɔ na bino étonda.

Lisangana na Yesu na Bandimi

5 Mpe oyo ejali nsango esili biso koyoka na monɔkɔ na ye mpe ejali biso kotɔndwεla bino ete Njambe ajali moi mpe kati na ye molili ejali sɔkɔ mokε tε. 6 Sɔkɔ tolobi ete tojali na ye na lisangana, nde tokotambolaka kati na molili, tojali kobuka lokuta, tokosalaka makambo na sɔlɔ tε. 7 Nde sɔkɔ tokotambolaka kati na moi lokola ye mɔkɔ ajali kati na moi, tokojalanaka na biso na lisangana, mpe makila na Yesu Mwana na ye makopεtɔlaka biso na masumu yɔsɔ. 8 Sɔkɔ tolobi ete tojali na lisumu tε, tojali komipεngwisa biso mpenja, mpe sɔlɔ ejali kati na biso tε. 9 Sɔkɔ tokoyambola masumu na biso, ye mokokisi na bilaka mpe moyεngεbεni mpɔ na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopεtɔla biso na bokεsεnε yɔsɔ. 10 Sɔkɔ tokoangana ete tosili kosala masumu, tojalisi ye moto na lokuta mpe Liloba na ye ejali kati na biso tε.

2

 

 

Bana na ngai mikε, najali kokomela bino makambo oyo ete bósala lisumu tε, mpe sɔkɔ moto mɔkɔ akosala lisumu, tojali na Molobeli na mboka na Tata, ye Yesu Masiya, moyεngεbεni; 2 ye mpe ajali mbɔndi mpɔ na masumu na biso, nde bobεlε mpɔ na yango na biso tε kasi mpɔ na mokili mobimba.

3 Mpɔ na boye tokoyebaka ete tosili koyeba ye, sɔkɔ tokokokisaka malako na ye. 4 Oyo alobi ete: Nasili koyeba ye; mpe akokokisaka malako na ye tε, ajali moto na lokuta, mpe kati na ye sɔlɔ ejali tε. 5 Nde sɔkɔ moto nani akokokisaka maloba na ye, na sɔlɔ bolingo na Njambe esili kokoka kati na moto yango. Mpɔ na boye tokoyebaka ete tojali kati na ye. 6 Mpɔ na oyo alobi ete ajali koumela kati na ye, ekoki na ye mɔkɔ kotambolaka pelamɔkɔ ye wana atambolaki.

7 Balingami, najali kokomela bino lilako na sika tε, kasi lilako na kala lijalaki na bino longwa na ebandeli. Lilako oyo na kala ejali maloba mayokaki bino. 8 Lisusu najali kokomela bino lilako na sika, lijali lilako na sɔlɔ kati na ye mpe kati na bino. Mpɔ ete molili ejali koleka mpe moi na sɔlɔ ejali naino kotana. 9 Mpɔ na oyo alobi ete ajali kati na moi nde akoyinaka ndeko na ye, ajali kati na molili kino sasaipi. 10 Oyo akolingaka ndeko na ye akoumelaka kati na moi, mpe libaku ejali kati na ye tε. 11 Nde oyo akoyinaka ndeko na ye ajali kati na molili, akotambolaka na molili, ayebi mpe tε sɔkɔ akei wapi, mpɔ ete molili ebebisi miso na ye.

12 Najali kokomela bino bana mikε, mpɔ ete masumu na bino masili kolimbisamela bino mpɔ na nkombo na ye. 13 Najali kokomela bino, batata, mpɔ ete bosili koyeba oyo ajali longwa na ebandeli. Najali kokomela bino, bilεngε mibali, mpɔ ete bosili koleka ye mabe.

Nakomeli bino, bana mikε, mpɔ ete bosili koyeba Tata. 14 Nakomeli bino, batata, mpɔ ete bosili koyeba oyo ajali longwa na ebandeli. Nakomeli bino, bilεngε mibali, mpɔ ete bojali makasi, mpe maloba na Njambe makoumelaka kati na bino mpe bosili koleka ye mabe.

Kokeba mpɔ na Mokili oyo

15 Bólingaka mokili tε, sɔkɔ makambo kati na mokili tε. Sɔkɔ moto akolingaka mokili, bolingo na Tata ejali kati na ye tε. 16 Mpɔ ete makambo yɔsɔ kati na mokili, ete mposa mabe na mosuni, na mposa mabe na miso, na ngambó na bifandeli, mauti na Tata tε, kasi mauti na mokili. 17 Mokili ejali kolongwa, na mposa na yango mabe lokola, nde oyo akosalaka mokano na Njambe akoumelaka seko.

18 Bana mikε, oyo ntango na nsuka, mpe pelamɔkɔ eyokaka bino ete Motεmεli-na-Masiya ajali koya, sasaipi mpe batεmεli-na-Masiya mingi basili kobima, na boye tojali koyeba ete oyo ntango na nsuka. 19 Babimaki na kati na biso, kasi bajalaki bato na biso tε, mpamba tε sɔkɔ bajalaki bato na biso nde basili koumela na biso elɔngɔ, kasi basili kobima bongo ntina ete bámɔnana ete yɔsɔ bajali bato na biso tε. 20 Bino mpe bojali na epakweli elongwi na Mobulami, mpe boyebi makambo yɔsɔ. 21 Nakomeli bino na mpɔ ete bojangi koyeba makambo na sɔlɔ tε, kasi na mpɔ ete boyebi yango, mpe na mpɔ ete lokuta mɔkɔ tε ekobima na makambo na sɔlɔ.

22 Nani moto na lokuta, ¿ bobεlε oyo akoanganaka ete Yesu ajali Masiya tε ? Ye wana Motεmεli-na-Masiya, oyo akoanganaka Tata mpe Mwana. 23 Bato yɔsɔ baoyo bakoanganaka Mwana bajangi Tata mpe. 24 Oyo akoyambolaka Mwana ajali na Tata mpe. Mpɔ na bino, tika ete yango eyokaki bino longwa na ebandeli éumela kati na bino. Sɔkɔ yango eyokaki bino longwa na ebandeli ekoumela kati na bino, bino mpe bokoumela kati na Mwana mpe kati na Tata. 25 Boye mpe ejali elaka oyo ye mɔkɔ atikela biso, bomɔi na seko. 26 Nakomeli bino makambo oyo na ntina na bango bajali kopεngwisa bino. 27 Mpe mpɔ na bino, epakweli ejui bino epai na ye ekoumelaka kati na bino, mpe bojali na kosenga tε ete moto álakisa bino, Kasi lokola epakweli na ye ekolakisaka bino na ntina na makambo yɔsɔ, (ejali mpe sɔlɔ, ejali lokuta tε), mpe pelamɔkɔ elakisaki ye bino, bóumelaka kati na ye. 28 Sasaipi mpe, bana mikε, bóumelaka kati na ye, ntina ete, sɔkɔ ye akomɔnana, tójala na molende mpe tókima ye na nsɔni kati na Koya na ye tε. 29 Sɔkɔ boyebi ete ye moyεngεbεni, bóyebaka mpe ete moto na moto oyo akosalaka boyεngεbεnε asili kobotama na ye.

Mpɔ na Bana na Njambe

3

 

Bótala motindo na bolingo bosili Tata kopεsa biso, ete tóbiangama bana na Njambe, tojali mpe bongo. Yango wana mokili eyebi biso tε, mpɔ ete eyebaki ye tε. 2 Balingami, sasaipi tojali bana na Najmbe, mpe naino emɔnani sɔkɔ mokε tε sɔkɔ tokojala nini. Toyebi ete sɔkɔ ekomɔnana, tokojala lokola ye, mpɔ ete tokomɔna ye pelamɔkɔ ejali ye. 3 Moto na moto oyo ajali na elikia oyo epai na ye, akomipεtɔlaka ye mɔkɔ, pelamɔkɔ ye wana ajali mpεtɔ. 4 Moto na moto oyo akosalaka masumu akosopaka mpe Mibeko, masumu majali bosopi na Mibeko. 5 Boyebi ete ye wana amɔnanaki ete álongola masumu, mpe lisumu ejali kati na ye tε. 6 Moto na moto oyo akoumelaka kati na ye akosalaka masumu tε. Moto na moto oyo akosalaka masumu amɔni naino ye tε, ayebi naino ye mpe tε. 7 Bana mikε, tika moto ápεngwisaka bino tε, oyo akosalaka boyεngεbεnε ajali moyεngεbεni, pelamɔkɔ ye wana ajali moyεngεbεni. 8 Oyo akosalaka masumu auti na Satana, mpɔ ete Satana akosalaka masumu longwa na ebandeli. Mwana na Njambe amɔnanaki mpɔ na boye ete áboma misala na Satana.

9 Moto na moto oyo abotami na Njambe akosalaka masumu tε, mpɔ ete momboto na Njambe ekoumelaka kati na ye; akoki kosalaka masumu tε, mpɔ ete asili kobotama na Njambe. 10 Bana na Njambe mpe bana na Satana bakomɔnanaka polele na likambo oyo. Moto na moto oyo akosalaka boyεngεbεnε tε, auti na Njambe tε, na oyo akolingaka Ndeko na ye tε lokola. 11 Mpɔ nsango eyokaki bino longwa na ebandeli ejali boye ete tólinganaka. 12 Pelamɔkɔ Kaina tε, oyo autaki na ye mabe, mpe abomaki ndeko na ye. Abomaki ye na ntina nini, mpɔ misala na ye mijalaki mabe, nde yango na ndeko na ye mikokanaki.

13 Bókamwaka tε, Bandeko, sɔkɔ mokili ekoyinaka bino. 14 Biso toyebi ete tosili kobima kati na kufa kokɔta kati na bomɔi, mpɔ ete tolingi Bandeko. Oyo akolingaka tε akoumelaka kati na kufa. 15 Moto na moto oyo akoyinaka Ndeko na ye ajali mobomi na bato, mpe boyebi ete mobomi na bato sɔkɔ mɔkɔ tε ajali na bomɔi koumela kati na ye. 16 Tosili koyeba bolingo na mpɔ oyo, mpɔ ete ye wana atielaki biso bomɔi na ye. Mpɔ na biso, ekoki na biso kotiela Bandeko bomɔi na biso. 17 Nde sɔkɔ moto nani, oyo ajali na bilɔkɔ na mokili, amɔni Ndeko na ye kojanga, mpe akangeli ye motema na ye, ¿ bolingo na Njambe ekoumelaka kati na ye boni ? 18 Bana mikε, tólinganaka na bolingo na maloba tε, sɔkɔ na bolingo na monɔkɔ tε, kasi na bolingo na misala mpe na sɔlɔ.

19 Na njela oyo tokoyeba ete tojali bato na sɔlɔ, mpe toko- ndimisa mitema na biso liboso na ye ; 20 mpɔ ete sɔkɔ mitema na biso mikokweisaka biso na likambo nini, ejali mpɔ ete Njambe aleki mitema na biso mpe ayebi makambo yɔsɔ. 21 Balingami, sɔkɔ mitema na biso mikokweisaka biso tε, tojali na molende mboka na Njambe, 22 mpe sɔkɔ tojali kolɔmba elɔkɔ nini, tojali kojua yango na mabɔkɔ na ye, mpɔ ete tokokokisaka malako na ye mpe tokosalaka makambo majali malamu na miso na ye. 23 Mpe lilako na ye ejali boye ete tóndima nkombo na Mwana na ye Yesu Masiya mpe tólinganaka, pelamɔkɔ elakaki ye biso lilako. 24 Oyo akokokisaka malako na ye akoumelaka kati na ye, mpe ye kati na ye. Na mpɔ oyo tokoyebaka ete akoumelaka kati na biso, mpɔ na Molimo oyo apεsaki biso.

Mpɔ na Kosɔsɔla Mateyo

4

 

Balingami, bótiaka mitema na milimo yɔsɔ tε, kasi bómekisaka milimo sɔkɔ bauti na Njambe; mpɔ ete basakoli-na-lokuta mingi basili kobima kati na mokili. 2 Na mpɔ oyo bokoyebaka Milimo na Njambe: molimo na molimo oyo ekoyambolaka ete Yesu Masiya asili koya lokola moto euti na Njambe; 3 molimo na molimo oyo ekoyambolaka Yesu tε euti na Njambe tε. Oyo mpe ejali molimo na Motεmεli-na-Masiya, oyo bosili koyoka ete ekoya mpe sasaipi ejali naino kati na mokili. 4 Bino, bana mikε, bojali bana na Njambe, mpe bosili koleka bango, mpɔ ete oyo na kati na bino aleki oyo na kati na mokili. 5 Bango bajali bato na mokili, yango wana bakolobaka makambo na mokili, mpe mokili ekoyokaka bango. 6 Biso tojali bato na Njambe. Oyo ajali koyeba Njambe akoyokaka biso. Oyo ajali moto na Njambe tε akoyokaka biso tε. Na njela yango tokosɔsɔlaka milimo na makambo na sɔlɔ mpe milimo na lipεngwi.

Mpɔ na Bolingo

7 Balingami, tika tólinganaka, mpɔ ete bolingo euti na Njambe, mpe moto na moto oyo akolingaka asili kobotama na Njambe mpe akoyebaka Njambe. 8 Oyo akolingaka tε ayebi Njambe tε, mpɔ ete Njambe ajali bolingo. 9 Na mpɔ oyo bolingo na Njambe emɔnɔnεli biso, mpɔ ete Njambe asili kotinda Mwana na ye na likinda kati na mokili ete tójala na bomɔi mpɔ na ye. 10 Bolingo ejali boye tε ete tolingaki Njambe, kasi bongo ete Njambe alingaki biso mpe atindi Mwana na ye mbɔndi mpɔ na masumu na biso. 11 Balingami, sɔkɔ Njambe alingaki biso boye, mpɔ na biso ekoki ete tólinganaka. 12 Moto naino amɔni Njambe sɔkɔ ntango mɔkɔ tε. Sɔkɔ tokolinganaka, Njambe ajali koumela kati na biso mpe bolingo na ye esili kokokisama kati na biso. 13 Mpɔ na boye, tokoyebaka ete tojali koumela, biso kati na ye, mpe ye kati na biso, mpɔ ete asili kopεsa biso na Molimo na ye. 14 Biso mpe tosili kotala mpe tojali kotatola ete Tata atindaki Mwana lokola Mobikisi na mokili. 15 Mpɔ na moto na moto oyo akondima ete Yesu ajali Mwana-na-Njambe, bajali koumela, Njambe kati na ye mpe ye kati na Njambe. 16 Biso mpe tosili koyeba mpe kondima bolingo bojali na Njambe kati na biso. Njambe ajali bolingo. Mpɔ na oyo akoumelaka kati na bolingo, bakoumelaka, ye kati na Njambe, mpe Njambe kati na ye.

17 Mpɔ na boye bolingo esili kokokisama epai na biso, ete tójala na molende na Mokɔlɔ na Kosambisama, mpɔ ete pelamɔkɔ ye wana ajali, biso mpe tojali bongo kati na mokili oyo. 18 Kati na bolingo nsɔmɔ ekojalaka tε, kasi bolingo bosili kokokisama ekobwakaka nsɔmɔ libanda, mpɔ ete nsɔmɔ ejali na likamba; oyo akobangaka asili naino kokokisama na bolingo tε. 19 Biso tokolingaka mpɔ ete ye alingaki biso liboso. 20 Sɔkɔ moto akoloba ete: Nalingi Njambe; mpe akoyinaka Ndeko na ye, ye moto na lokuta. 21 Mpɔ ete oyo alingi Ndeko na ye tε, awa esili ye komɔna ye, ¿ ákoka kolinga Njambe boni ? awa naino emɔni ye Njambe tε. Mpe lilako lijui biso na ye ejali boye ete : Oyo akolingaka Njambe álingaka Ndeko na ye lokola.

5

 

Moto na moto oyo akondimaka ete: Yesu ajali Masiya; asili kobotama na Njambe, mpe moto na moto oyo akolingaka moboti akolingaka mpe mobotami na ye. 2 Na mpɔ oyo tokoyebaka ete tolingi bana na Njambe, sɔkɔ tokolingaka Njambe mpe tokokokisaka malako na ye. 3 Mpɔ ete bolingo na Njambe ejali boye, ete tókokisaka malako na ye, mpe malako na ye majali bojito tε. 4 Mpɔ ete moto na moto oyo asili kobotama na Njambe akolekaka mokili, mpe elonga eleki mokili ejali boye, ete kondima na biso. 5 Nani moleki na mokili, ¿ bobεlε mondimi ete Yesu ajali Mwana-na-Njambe tε ? 6 Ye oyo ayaki koya na mai mpe na makila, Yesu Masiya; bobεlε kati na mai mpamba tε, kasi kati na mai mpe kati na makila. 7 Mpe Molimo ajali motatoli, mpɔ ete Molimo ajali sɔlɔ. 8 Mpɔ ete batatoli bajali misato, ete Molimo, na mai, na makila. Mpe bango misato basangani na litatoli mɔkɔ.

9 Sɔkɔ tokoyambaka matatoli na bato, litatoli na Njambe lileki monεnε; mpɔ ete litatoli na Njambe ejali boye ete asili kotatola na ntina na Mwana na ye. 10 Oyo akondimelaka Mwana-na-Njambe ajali na litatoli yango kati na ye. Oyo akondimelaka Njambe tε asili kojalisa ye moto na lokuta, mpɔ ete naino andimi litatoli lisili Njambe kotatola na ntina na Mwana na ye tε. 11 Mpe litatoli yango ejali boye, ete Njambe apεsi biso bomɔi na seko, mpe bomɔi oyo ejali kati na Mwana na ye. 12 Oyo ajali na Mwana ajali na bomɔi, oyo ajangi Mwana-na-Njambe ajangi bomɔi.

Mateyo na Nsuka

13 Nakomeli bino makambo oyo ete bóyeba ete bojali na bomɔi na seko, bino bato bokondimelaka nkombo na Mwana-na-Njambe. 14 Mpe molende mojali na biso na epai na ye ejali bobεlε boye, ete sɔkɔ tokolɔmba elɔkɔ ekani ye mokano, akoyokaka biso. 15 Mpe sɔkɔ toyebi ete akoyokaka biso, sɔkɔ tokolɔmba elɔkɔ nini, toyebi ete tojui bilɔmbεli bisili biso kolɔmba yε. 16 Sɔkɔ moto akomɔna Ndeko na ye kosala lisumu, lijali lisumu na kufa tε, akolɔmba, mpe akopεsa ye bomɔi,—na bango bajali kosala lisumu na kufa tε. Lisumu na kufa lijali, mpɔ na yango nalobi tε ete átuna. 17 Lofundo yɔsɔ ejali lisumu. Lisumu na kufa tε ejali mpe.

18 Toyebi ete moto na moto oyo asili kobotama na Njambe akosalaka mabe tε, kasi mpɔ na oyo asili kobotama na Njambe ekobatelaka ye, mpe Satana akotielaka ye lobɔkɔ tε: 19 Toyebi ete tojali bana na Njambe, mpe mokili mobimba ejali kolala na kati na ye mabe. 20 Toyebi ete Mwana-na-Njambe asili koya mpe kopεsa biso mayεlε, bongo tojali koyeba ye Moto-na-Sɔlɔ, tojali mpe kati na ye Moto-na-Sɔlɔ, kati na Mwana na ye Yesu Masiya. Ye wana Njambe na sɔlɔ mpe Bomɔi na seko. 21 Bana mikε, bómisεnjεla na bikeko.

MOKANDA NA MIBALE EKOMAKI

YOANE

1 Mbɔtε na ngai mokolo, na yɔ mwasi Mopɔnami mpe na bana na yɔ, baoyo ngai nalingi na sɔlɔ, mpe bobεlε ngai mɔkɔ tε, kasi bango yɔsɔ basili koyeba makambo na sɔlɔ, 2 mpɔ na sɔlɔ ekoumelaka kati na biso, mpe ekojala na biso elɔngɔ libela. 3 Na biso ekofanda ngɔlu, na mawa, na kimia, iuti na Njambe Tata mpe na Yesu Masiya Mwana na Tata, kati na sɔlɔ mpe na bolingo.

4 Nasepelaki mingi ete nasili kojua bamɔkɔ na bana na yɔ kotambola kati na sɔlɔ, pelamɔkɔ ejui biso lilako epai na Tata. 5 Mpe sasaipi, mama, najali kobɔndεla yɔ, lokola na kokomela yɔ lilako na sika tε, kasi yango ejalaki na biso longwa na ebandeli, ete tólinganaka. 6 Bolingo mpe ejali boye, ete totambolaka lokola elaki ye malako na ye. Lilako ejali boye, ete pelamɔkɔ eyokaki bino longwa na ebandeli bótambolaka kati na yango.

7 Mpɔ ete bapεngwisi mingi babimi kati na mokili, bango bakoyambolaka tε ete Yεsu Masiya ayei na njoto. Ye wana mopεngwisi mpe Motεmεli-na-Masiya. 8 Bómitalaka bino mpenja ete bóbungisa makambo masalaki biso tε, kasi bójua libonja mpenja. 9 Bato yɔsɔ, baoyo bakoumelaka na mateyo na Masiya tε nde bakoleka na makambo mosusu, bajangi Njambe. Nde mpɔ na oyo akoumelaka na mateyo yango, ye wana ajali na Tata, mpe Mwana. 10 Sɔkɔ moto akoya mboka na bino mpe akoyela mateyo oyo tε, bónyangela ye na ndako tε, na kotikana na bino na ye, bóboya kopεsa ye monɔkɔ na kokεnda malamu. 11 Mpɔ ete oyo akoloba na ye ete: Ókεndε malamu; ajali kosangana na ye na misala na ye mabe.

12 Najali na makambo mingi na kokomela bino, nde nalingi kokoma yango na mokanda na mai-na-mokanda tε, kasi najali na elikia ete nákómela bino mpe násolana na bino na monɔkɔ, ete esεngɔ na bino étonda maa.

13 Bana na Ndeko na yɔ mwasi Mopɔnami batindeli yɔ mbɔtε.

MOKANDA NA MISATO EKOMAKI

YOANE

1 Mbɔtε na ngai mokolo, na yɔ Kayo molingami, oyo ngai nalingi na sɔlɔ.

2 Ɛ molingami, najali kobɔndεla ete ópambwamaka na makambo yɔsɔ mpe ójalaka na njoto makasi, pelamɔkɔ molimo na yɔ ekopambwamaka. 3 Mpɔ ete wana eyaki Bandeko mosusu kotatwela ngai mpɔ na sɔlɔ na yɔ ete okotambolaka na bijaleli na sɔlɔ, nasepelaki mingi mpenja. 4 Najali na esεngɔ mosusu eleki esεngɔ oyo tε, bobεlε esεngɔ na koyoka ete bana na ngai bajali kotambola na makambo na sɔlɔ.

5 Molingami, okosalaka sembo na mitindo yɔsɔ ekosalelaka yɔ Bandeko, ata bango bapaya. 6 Bango basili kotatwela bolingo na yɔ na miso na Ekelesia. Sɔkɔ mpe okotindisa bango na njela na motindo ebongi na Njambe, okosala malamu. 7 Mpɔ ete babimi mpɔ na Nkombo yango, koyambaka elɔkɔ na mabɔkɔ na Bapakano tε. 8 Na bongo ekoki na biso konyangela bato na motindo yango ete tójala basali basangani na bango na makambo na sɔlɔ.

9 Nakomelaki ekelesia mokanda, kasi Diɔtεlεfε, oyo asepeli kojala moto na liboso na bango, aboi koyoka biso. 10 Mpɔ na bongo, sɔkɔ nakoya, nakokanisela bino misala mikosalaka ye, na monɔkɔ mabe ekolobalobaka ye na ntina na biso. Asuki na makambo wana mpe tε; ye mɔkɔ akoyambaka Bandeko tε, nde akopekisaka baoyo balingi koyamba bango mpe akobimisaka bango na ekelesia.

11 Molingami, óyokola makambo mabe tε kasi makambo malamu. Oyo akosalaka makambo malamu ajali moto na Njambe; oyo akosalaka makambo mabe asili komɔna Njambe tε. 12 Demeteli ajui matatoli malamu na bato yɔsɔ mpe na makambo na sɔlɔ yango mpenja. Biso mpe tokotatolaka bobεlε bongo, mpe oyebi ete matatoli na biso majali na sɔlɔ.

13 Najalaki na makambo mingi na kokomela yɔ, kasi najali na mposa na kokomela yɔ yango na mai-na-mokanda na ekomeli na mai tε. 14 Najali nde na elikia na komɔna yɔ nɔki, mpe tokosolana na minɔkɔ.

15 Kimia na yɔ. Baninga batindeli yɔ mbɔtε. Ópεsa baninga mbɔtε nkombo na nkombo.