Mokanda na mibale na Yoane

 

 

1.Mpaka epayi na kuria moponami mpe na bana na ye, oyo nalingaka kati na solo, mpe nga moko te kasi batu nyonso oyo bayebi solo.

2. pona solo ezali kati na biso mpe ekozala na biso na libela

3. Ngolu, mawa mpe kimia ekozala na bino kowuta na Nzambe Tata mpe na nkolo Yesu Kristu Mwana ya Tata kati na solo mpe bolingo

 

4. Nasepelaki makasi ya komona ba mosusu ya bana na yo kotambola na solo lokola tozwaki mobeko kowuta na Tata.

5. sik’oyo, kuria, nabondeli yo, ezali lokola nakomeli yo mobeko ya sika te, kasi oyo tozwaki wuta na ebandeli ete tolingana biso na biso.

6. Bolingo ezali kotambola kolanda mibeko na ye. Oyo ezali mobeko na ye lokola toyokaki yango wuta na ebandeli po ete totambola kati na yango

7. Bakosi mingi babimi kati na mokili, ba oyo batatolaka te ete Yesu Kristu ayaki na nzoto, ye azali mokosi pe antiKristu

8. Bomibatela bino po ete tobungisa te makambu tosalaki, kasi tozua lifuti monene.

9. Mutu nyonso oyo akokumba bino mosika mpe awumeli te na mateya ya Kristu, azali na Nzambe te, oyo akowumela  na mateya, ye wana azali na Tata mpe Mwana.

10. soki mutu aye epayi na bino, mpe amemi mateya oyo te, bayamba ye te na ndaku na bino mpe boloba na ye te boyeyi malamu.

11. Pona mutu oyo akoloba na ye boyeyi malamu, asangani  na ye na mosala na ye ya mabe.

12. Nazali na makambu ebele ya kokomela bino, nalingi kokoma yango te na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Kasi nazali na elikya ete nakoya epayi na bino mpe nakosolola na bino monoko na monoko pona esengo na biso ekokisama.

13. Bana ya ndeko na yo ya mwasi moponami bapesi yo mbote.